Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 69

Tata na bango​—Abrahama to Zabolo?

Tata na bango​—Abrahama to Zabolo?

YOANE 8:37-59

  • BAYUDA BALOBI ETE ABRAHAMA AZALI TATA NA BANGO

  • LIBOSO ABRAHAMA AZALA, YESU AZALAKI

Yesu azali naino na Yerusaleme mpo na Fɛti ya Batabernakle (to ya mwa bandako ya matiti) mpe ateyi mateya ya ntina mingi. Bayuda mosusu oyo bazali wana balobi na ye: “Biso tozali bana ya Abrahama mpe tokómá baombo ya moto ata mokolo moko te.” Yesu azongiseli bango: “Nayebi ete bozali bana ya Abrahama; kasi bozali koluka koboma ngai, mpo liloba na ngai ezali kosala mosala te epai na bino. Makambo oyo namoni epai ya Tata na ngai nde nazali koloba; mpe bino bozali bongo kosala makambo oyo boyoki epai ya tata na bino.”​—Yoane 8:33, 37, 38.

Yesu amonisi likanisi na ye polele: Tata na ye akeseni na tata na bango. Lokola basosoli te maloba ya Yesu, bamikumisi lisusu ete: “Tata na biso ezali Abrahama.” (Yoane 8:39; Yisaya 41:8) Lokola bazali bankɔkɔ ya Abrahama, bakanisi ete bazali na kondima lokola ya Abrahama, moninga ya Nzambe.

Kasi, Yesu apesi bango eyano oyo esali bango mpasi: “Soki bozali bana ya Abrahama, bósala misala ya Abrahama.” Ya solo, mwana alandaka ndakisa ya tata na ye. Mpe abakisi: “Kasi sikoyo bozali koluka koboma ngai, moto oyo nayebisi bino solo oyo nayoki epai ya Nzambe. Abrahama asalaki bongo te.” Na nsima, Yesu alobi likambo oyo etye bango mobulu na makanisi: “Bino bozali kosala misala ya tata na bino.”​—Yoane 8:39-41.

Tii sikoyo, Bayuda basosoli naino te moto oyo Yesu azali kolobela. Batuti ntolo ete bazali bana ya makango te, ntango balobi: “Biso tobotamá na pite te; tozali na Tata kaka moko, Nzambe.” Kasi Nzambe azali mpenza Tata na bango? Yesu alobi: “Soki Nzambe azalaka Tata na bino, mbɛlɛ bolingi ngai, mpo uta na Nzambe nde ngai nabimi mpe nazali awa. Nayaki mpe na ndenge na ngai moko te, kasi Moto wana nde atindaki ngai.” Yesu atuni motuna mpe ayanoli yango ye moko: “Mpo na nini bozali koyeba te makambo oyo nazali koloba? Ezali mpo bokoki koyoka liloba na ngai te.”​—Yoane 8:41-43.

Yesu alingi komonisa ete koboya kondimela ye ezali likama. Kasi alobi polele ete: “Bino bouti na tata na bino Zabolo, mpe bolingi kokokisa bamposa ya tata na bino.” Tata na bango azali ndenge nini? Yesu ayebisi polele ndenge azali: “Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki, mpe akangamaki makasi te na solo.” Yesu abakisi: “Moto oyo auti na Nzambe ayokaka maloba ya Nzambe. Yango wana bino bozali koyoka te, mpo bouti na Nzambe te.”​—Yoane 8:44, 47.

Maloba wana epesi Bayuda nkanda, mpe balobi: “Tozali nde na elonga te ya koloba ete: Yo ozali Mosamaria mpe ozali na demo?” Babengi Yesu “Mosamaria” mpo na kotyola ye. Kasi Yesu akipe bango te; azongisi: “Nazali na demo te, nazali nde kokumisa Tata na ngai, mpe bino bozali kosambwisa ngai.” Elaka oyo Yesu apesi emonisi ete ezali likambo ya kozwa na lisɛki te: “Soki moto azali kotosa liloba na ngai, akomona liwa ata mokolo moko te.” Alingi koloba te ete bantoma mpe bato mosusu oyo balandi ye bakokufa te. Alingi nde komonisa ete bakokufa te “liwa ya mibale,” oyo ezangi elikya ya lisekwa.​—Yoane 8:48-51; Emoniseli 21:8.

Kasi Bayuda bakanisi ete Yesu azali kolobela liwa ya solosolo, yango wana balobi: “Sikoyo toyebi ete yo ozali na demo. Abrahama akufá, basakoli mpe bakufá; kasi yo olobi ete: ‘Soki moto azali kotosa liloba na ngai, akoyoka ata nsolo ya liwa te.’ Yo oleki nde tata na biso Abrahama, oyo akufá? . . . Ozali kokanisa yo nde nani?”​—Yoane 8:52, 53.

Emonani polele ete Yesu azali komonisa ete azali Masiya. Kasi na esika apesa eyano mbala moko na motuna ya koyeba soki azali nani, alobi nde ete: “Soki nazali komipesa nkembo ngai moko, nkembo na ngai ezali mpamba. Tata na ngai nde moto azali kopesa ngai nkembo, ye oyo bino bolobi ete azali Tata na bino; nzokande boyebi ye te. Kasi ngai nayebi ye. Mpe soki nalobaka ete nayebi ye te, nalingaki nazala moto ya lokuta lokola bino.”​—Yoane 8:54, 55.

 Sikoyo, Yesu alobeli ndakisa ya bankɔkɔ na bango ya sembo: “Abrahama tata na bino asepelaki mingi na elikya ya komona mokolo na ngai, mpe amonaki yango mpe asepelaki.” Lokola Abrahama azalaki kondima elaka ya Nzambe, azalaki kozela koya ya Masiya. Bayuda bandimi te mpe bazongisi: “Okokisi naino mbula ntuku mitano (50) te, bongo omoná Abrahama?” Yesu azongiseli bango: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Liboso Abrahama azala, ngai nazalaki.” Azali kolobela ndenge azalaki anzelu ya nguya na likoló liboso abotama awa na mabele.​—Yoane 8:56-58.

Bayuda basiliki ndenge Yesu alobi ete azalaki na bomoi liboso ya Abrahama, balingi kutu bábamba ye mabanga. Kasi Yesu akei, basali ye eloko te.

Makambo mosusu

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO

Abrahama—“Tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima”

Ndenge nini Abrahama amonisaki kondima? Na makambo nini okosepela komekola kondima ya Abrahama?