Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 77

Yesu apesi toli mpo na bozwi

Yesu apesi toli mpo na bozwi

LUKA 12:1-34

  • NDAKISA YA MOZWI

  • YESU ALOBI MPO NA BAYANGANGA MPE BAFOLOLO LÍSI

  • “ETONGA MOKE” EKOZWA BOKONZI

Ntango Yesu azali kolya na ndako ya Mofarisai moko, bankóto ya bato bayangani libándá, bazali kozela ye. Na Galile, ebele ya bato basalaki mpe bongo. (Marko 1:33; 2:2; 3:9) Awa na Yudea, bato mingi balingi komona ye mpe koyoka ye; bamonisi ezaleli oyo ekeseni mpenza na oyo Bafarisai bamonisaki na ntango ya kolya.

Likambo oyo Yesu alobaki liboso ezali na ndimbola mosusu mpo na bayekoli na ye: “Bókeba na levire ya Bafarisai, elingi koloba bokosi.” Yesu apesaki toli yango liboso, kasi likambo oyo amonaki na ntango ya kolya emonisi ete esengeli kozongela toli yango nokinoki. (Luka 12:1; Marko 8:15) Ntango mosusu Bafarisai balingaki komonisa ete bayokelaka bato mawa, nzokande basalaka yango mpo na kobomba mabe na bango moko. Na yango, lokola bazali bato mabe esengeli komonisa mabe na bango polele. Yesu alobi: “Ezali na eloko moko te oyo babombá malamu oyo ekomonisama te, mpe ezali na sekele moko te oyo ekoyebana te.”​—Luka 12:2.

Ntango mosusu bato mingi oyo bayei epai ya Yesu bazali Bayuda oyo bayokaki naino ye te ntango azalaki koteya na Galile. Yango wana, azongeli makanisi ya ntina oyo ateyaki liboso. Alendisi bato nyonso oyo bazali koyoka ye: “Bóbanga te baoyo babomaka nzoto mpe na nsima bakoki kosala eloko mosusu te.” (Luka 12:4) Kaka ndenge asalaki liboso, amonisi ete bayekoli na ye basengeli kozala na kondima ete Nzambe akokokisa bamposa na bango. Basengeli mpe kondima Mwana ya moto mpe koyeba ete Nzambe akoki kosalisa bango.​—Matai 10:19, 20, 26-33; 12:31, 32.

Na nsima, moto moko na kati ya ebele ya bato abimisi likambo oyo ezali kotungisa ye: “Moteyi, yebisá ndeko na ngai akabola na ngai libula.” (Luka 12:13) Mibeko elobi ete mwana ya liboso asengeli kozwa ndambo mibale ya libula, yango wana ntina ya kowelana ezali te. (Kolimbola Mibeko 21:17) Kasi, emonani ete moto wana alingi kozwa biloko mingi koleka oyo mibeko esɛngi. Yesu amonisi bwanya ndenge aboyi kokɔta na makambo wana. Atuni ye: “Yo, nani atye ngai mosambisi to mokaboli ya biloko na bino?”​—Luka 12:14.

Na nsima, Yesu apesi bakristo nyonso toli oyo: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela, mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Ata soki moto azali mozwi ndenge nini, nsukansuka, akokufa kaka mpe akotika nyonso. Mpo na kobɛta nsɛtɛ na likambo wana, Yesu apesi ndakisa moko oyo etiká nsango, oyo emonisi ntina ya komisalela nkombo malamu epai ya Nzambe:

“Mabele ya mozwi moko ebotaki malamu. Bongo abandaki kokanisa na motema na ye ete: ‘Nakosala nini sikoyo lokola nazali na esika te ya koyanganisa biloko oyo nabuki?’ Bongo alobaki: ‘Nakosala boye: Nakobuka bandako na ngai ya kobomba biloko mpe nakotonga oyo ya minene koleka, mpe kuna nakoyanganisa mbuma nyonso mpe biloko nyonso ya malamu; mpe nakoloba na molimo na ngai ete: “Molimo na ngai, ozali na ebele ya biloko ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, omisepelisa.”’ Kasi Nzambe alobaki na ye ete: ‘Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo. Bongo nani akozwa biloko oyo onduki?’ Ezali mpe bongo mpo na moto oyo amibombeli biloko ya motuya kasi azali mozwi te na miso ya Nzambe.”​—Luka 12:16-21.

Ezala bayekoli ya Yesu to bato mosusu oyo bazali koyoka ye bakokaki kokwea na motambo ya koluka to konduka bozwi. To mpe mitungisi ya bomoi ekokaki kopekisa bango kosalela Yehova. Na yango, Yesu azongeli toli ya malamu mpenza oyo apesaki soki mbula moko na ndambo liboso na Lisolo likoló ya Ngomba:

“Bótika komitungisa mpo na milimo na bino mpo na oyo bokolya to mpo na nzoto na bino mpo na oyo bokolata. . . . Bótala malamumalamu bayanganga,  mpamba te elonaka te mpe ebukaka te, mpe ezali na esika ya kobomba bilei te mpe na ndako ya kobomba biloko te, kasi atako bongo Nzambe aleisaka yango. Bino boleki bandɛkɛ na motuya mosika te? . . . Bótala malamumalamu ndenge bafololo lísi ekolaka; emonaka mpasi te mpe etongaka elamba te; kasi nazali koyebisa bino: Ata Salomo na nkembo na ye nyonso alataki lokola moko na yango te. . . . Yango wana, bótika koluka oyo bokolya mpe oyo bokomɛla, mpe bótika kozala motema likolólikoló . . . Tata na bino ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko wana. . . . Bólukaka ntango nyonso bokonzi na ye, mpe bakobakisela bino biloko wana.”​—Luka 12:22-31; Matai 6:25-33.

Banani bakoluka Bokonzi ya Nzambe? Yesu amonisi ete “etonga moke,” elingi koloba kaka bato moke ya sembo nde bakosala bongo. Na nsima, eyebanaki ete motángo na bango ezali 144 000. Nini ezali kozela bango? Yesu apesaki bango elaka oyo: “Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” Bakristo yango bakomipesa te na konduka biloko ya motuya na mabele, epai miyibi bakoki koyiba. Mitema na bango esengeli kozala nde na “biloko ya motuya oyo esilaka te na likoló,” epai bakozala bakonzi elongo na Kristo.​—Luka 12:32-34.