Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 80

Mobateli ya mpate oyo aleki malamu mpe mapango ya bampate

Mobateli ya mpate oyo aleki malamu mpe mapango ya bampate

YOANE 10:1-21

  • YESU ALOBELI MOBATELI YA MPATE OYO ALEKI MALAMU MPE MAPANGO YA BAMPATE

Ntango Yesu azali koteya na Yudea, alobeli likambo moko oyo bayoki na ye bayebi yango malamu: bampate mpe mapango ya bampate. Kasi alobeli yango nde na ndakisa. Mbala mosusu, Bayuda bayebi maloba oyo ya Davidi: “Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te. Alalisaka ngai na bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti.” (Nzembo 23:1, 2) Na loyembo mosusu, Davidi alobaki na ekólo yango: “Tófukama liboso ya Yehova Mokeli na biso. Mpo ye azali Nzambe na biso, mpe biso tozali bato na ye oyo azali kobatela lokola bampate na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti.” (Nzembo 95:6, 7) Ya solo, ntango Mibeko ezalaki kotambwisa Bayisraele, bazalaki lokola etonga ya bampate.

“Bampate” yango bazalaki na “lopango ya bampate” mpo babotamaki na kati ya kondimana ya Mibeko ya Moize. Mibeko ezalaki lokola lopango oyo ezalaki kobatela bango básala te misala mabe ya bato ya bikólo oyo ezalaki na mibeko wana te. Kasi Bayisraele mosusu banyokolaki bampate ya Nzambe. Yesu alobi na bango: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Moto oyo akɔti na lopango ya bampate na porte na yango te kasi amati na esika mosusu, moto wana azali moyibi mpe mopunzi. Kasi moto oyo akɔti na porte azali mobateli ya mpate.”​—Yoane 10:1, 2.

Bato oyo bazali koyoka Yesu bakanisi ete Yesu azali kolobela bato oyo bazalaki komibenga Masiya to Kristo. Bato yango bazali lokola miyibi mpe bapunzi. Bato basengeli te kolanda bakosi ya ndenge wana. Basengeli nde kolanda “mobateli ya mpate,” oyo Yesu alobeli ete:

“Mokɛngɛli ya porte afungolelaka ye, mpe bampate eyokaka mongongo na ye, mpe abengaka bampate na ye na nkombo mpe amemaka yango na libándá. Ntango abimisi oyo ya ye nyonso, alekaka liboso na yango, mpe bampate elandaka ye, mpo eyebi mongongo na ye. Ekolanda mopaya soki moke te kasi ekokima ye, mpo eyebi mongongo ya bapaya te.”​—Yoane 10:3-5.

Mwa bambula liboso, Yoane Mobatisi, oyo azalaki lokola mokɛngɛli ya porte, alobaki ete Yesu azali moto oyo bampate wana ya elilingi, oyo bazali kotambola na Mibeko, basengeli kolanda. Bampate mosusu na Galile mpe na Yudea bayebaki mongongo ya Yesu. ‘Akomema’ bango wapi? Mpe matomba nini bakozwa soki balandi ye? Bato mosusu oyo bayoki ndakisa yango bazali kokamwa, mpo ‘bayebi te soki makambo oyo azali koloba na bango elakisi nini.’​—Yoane 10:6.

Yesu alimboli: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Ngai nazali porte ya bampate. Baoyo nyonso bayaki na esika na ngai bazali miyibi mpe bapunzi; kasi bampate eyokaki bango te. Ngai nazali porte; moto nyonso oyo akɔti na nzela na ngai akobika, akokɔta mpe akobima mpe akozwa esika ya matiti.”​—Yoane 10:7-9.

Emonani polele ete Yesu azali kolobela likambo moko ya sika. Bayoki na ye bayebi ete azali porte ya kondimana ya Mibeko te, oyo ezalaki basiɛklɛ liboso. Na yango, azali nde koloba ete bampate oyo ‘amemi’ bakokɔta na lopango mosusu. Bakozwa nini?

Yesu alobi boye nsima ya kolimbola mokumba na ye: “Ngai nayei mpo bázwa bomoi mpe bázwa yango mingi. Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu; mobateli ya mpate oyo aleki malamu apesaka molimo na ye mpo na bampate.” (Yoane 10:10, 11) Liboso, Yesu abɔndisaki bayekoli na ye ntango alobaki: “Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) Ya solo, baoyo bazali na kati ya “etonga moke” ezali baoyo Yesu akokamba na lopango ya sika, mpo “bázwa bomoi mpe bázwa yango mingi.” Kozala na kati ya etonga yango ezali mpenza lipamboli!

Kasi Yesu asuki wana te. Abakisi boye: “Nazali na bampate mosusu, oyo ezali ya lopango oyo te; yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai, mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” (Yoane 10:16) “Bampate  mosusu” yango bazali “na lopango oyo te.” Na yango, basengeli kozala na lopango mosusu, oyo ekeseni na lopango ya baoyo bazali na kati ya “etonga moke,” baoyo bakozwa libula ya Bokonzi. Bampate mosusu bazali na elikya moko te na bampate ya etonga moke. Atako bongo, bampate yango nyonso bakozwa matomba na mokumba ya Yesu. Alobi: “Yango wana Tata alingi ngai, mpo nazali kokaba molimo na ngai.”​—Yoane 10:17.

Mingi na kati ya ebele ya bato balobi: “Azali na demo mpe azali moto ya ligboma.” Kasi basusu bamonisi ete bazali koyoka na likebi mpe balingi kolanda Mobateli ya mpate oyo aleki malamu. Balobi: “Wana ezali maloba ya moto oyo azali na demo te. Demo akoki kofungola te miso ya bato bakufá miso, boye te?” (Yoane 10:20, 21) Na ntembe te, bazali kolobela moto oyo abotamá miso ekufá oyo Yesu abikisaki.