Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 21

Na sinagoga ya Nazarete

Na sinagoga ya Nazarete

LUKA 4:16-31

  • YESU ATÁNGI RULO YA YISAYA

  • BATO YA NAZARETE BALUKI KOBOMA YESU

Na ntembe te, Nazarete ekɔti loyenge makasi. Mbula moko na ndambo liboso ete Yesu akende kozwa batisimo epai ya Yoane, azalaki mosali ya mabaya. Kasi sikoyo, bato bayebi ete azali kosala makamwisi. Bato ya Nazarete bazali na mposa ete asala mpe makamwisi epai na bango.

Mposa na bango eyei lisusu makasi ntango bamoni Yesu, ndenge amesaná, akei na sinagoga na bango. Ndenge esalemaka “na basinagoga sabata nyonso,” babondelaka mpe batángaka mikanda ya Moize. (Misala 15:21) Batángaka mpe biteni mosusu ya bisakweli. Ntango Yesu atɛlɛmi mpo na kotánga, ekoki kozala ete ayebi bato mingi oyo bazali wana mpo, kala, azalaki mpe koyangana wana. Bapesi ye rulo ya mosakoli Yisaya. Afungoli esika oyo elobeli moto oyo Yehova atyaki mafuta na elimo, oyo ezali lelo na Yisaya 61:1, 2.

Yesu atángi esakweli oyo elobi ete moto yango akosakola bonsomi epai ya baoyo bakangami, akofungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpe akosakola mbula ya boboto oyo euti na Yehova. Yesu azongisi rulo epai ya mosali mpe afandi. Bato nyonso bazali kotala ye. Na nsima, alobi ntango mosusu mwa makambo mingi mpe abakisi likambo moko ya ntina: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.”​—Luka 4:21.

Bato bakamwe “na maloba kitoko oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye,” mpe balobi: “Oyo mwana ya Yozefe te?” Kasi, lokola ayebi ete balingi asala makamwisi lokola oyo bayokaki ete asalaki, Yesu abakisi: “Na ntembe te bokosalela ndakisa oyo epai na ngai: ‘Monganga, omibikisa yo moko; makambo toyokaki ete esalemi na Kapernaume salá yango mpe awa na mboka na yo.’” (Luka 4:22, 23) Ekoki kozala ete bato ya mboka yango bamoni ete Yesu asengeli naino kobanda kobikisa bato ya mboka na ye moko, bango nde bázala bato ya liboso ya kobika. Yango wana, bakanisi ete Yesu amoni bango mpamba.

Lokola Yesu ayebi makanisi na bango, alobeli makambo mosusu oyo elekaki na Yisraele. Amonisi ete, na mikolo ya Eliya, ezalaki na basi mingi oyo mibali na bango bakufá, kasi Eliya atindamaki ata epai ya moko na bango te. Nzokande, akendaki nde na Zarefate, engumba oyo ezalaki pene ya Sidone epai ya mwasi moko oyo mobali akufá, oyo azalaki kutu moto ya Yisraele te, mpe asalaki likamwisi oyo ebikisaki bango. (1 Bakonzi 17:8-16) Mpe na mikolo ya mosakoli Elisha, bato ya maladi ya maba bazalaki ebele, kasi abikisaki kaka Naamane, moto ya Siri.​—2 Bakonzi 5:1, 8-14.

Bato ya mboka ya Yesu basali nini na masolo yango ya kala, oyo bamoni lokola ete ebimisi polele ezaleli mabe na bango ya koluka matomba na bango moko mpe ya kozanga kondima? Bato yango basiliki, batɛlɛmi mpe babengani Yesu na engumba. Bamemi ye na nsɔngɛ ya ngomba esika engumba Nazarete etongamaki mpe baluki kobwaka ye na lobwaku. Kasi, Yesu amibendi na mabɔkɔ na bango mpe akimi. Na nsima, Yesu akiti na libongo ya Kapernaume, oyo ezali na nɔrdi-wɛsti ya Mbu ya Galile.