Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 35

Lisolo likoló ya Ngomba

Lisolo likoló ya Ngomba

MATAI 5:1–7:29 LUKA 6:17-49

  • LISOLO LIKOLÓ YA NGOMBA

Nsima ya kolekisa butu mobimba na kobondela mpo na kopona bayekoli 12 bázala bantoma na ye, na ntembe te Yesu alɛmbi mpenza. Ntɔngɔ etani, kasi azali kaka na makasi mpe na mposa ya kosalisa bato. Azali likoló ya ngomba moko ya Galile, mbala mosusu mosika te na Kapernaume, epai abandaki mosala na ye.

Ebele ya bato oyo bayei epai na ye bauti na bamboka ya mosika. Bamosusu bauti na sudi, na Yerusaleme mpe na bisika mosusu ya Yudea. Bamosusu bafandaka na Tire mpe Sidone, bingumba oyo ezali pembeni ya mai na nɔrdi-wɛsti. Mpo na nini bazali koya koluka Yesu? Mpo na “koyoka ye mpe kobikisama na bamaladi na bango.” Mpe esalemi bongo; Yesu azali “kobikisa bango nyonso.” Kanisá naino! Baoyo nyonso bazali na bamaladi babikisami. Yesu abikisi mpe “ata baoyo batungisamaki na bilimo ya mbindo,” bato oyo baanzelu mabe ya Satana banyokolaki.​—Luka 6:17-19.

Na nsima, Yesu afandi na esika moko likoló ya ngomba mpe ebele ya bato bafandi pembenipembeni na ye. Bayekoli na ye, mingimingi bantoma 12, bafandi pene na ye. Bango nyonso bazali kosepela koyoka Moteyi yango oyo azali na likoki ya kosala makamwisi minene ndenge wana. Yesu asali lisolo moko oyo na ntembe te, ememeli bayoki na ye matomba. Banda wana, ebele ya bato mosusu bazwelaka yango mpe matomba. Biso mpe tokoki kozwela yango matomba mpo ezali mindɔndɔ te, ezali polele mpe ezali na mateya mozindo ya Nzambe. Yesu asaleli bandakisa ya makambo oyo bato bayebi mpe bamesaná na yango. Yango esali ete baoyo nyonso bazali koluka nzela ya Nzambe mpo na kozala na bomoi ya malamu koleka bákanga ntina na yango. Makambo nini mpenza ya lisolo yango esali ete ezala na ntina mingi?

BANANI BAZALI MPENZA NA ESENGO?

Moto nyonso alingaka kozala na esengo. Lokola Yesu ayebaki yango, abandi naino kolobela baoyo bazali mpenza na esengo. Kanisá naino ndenge ebendaki mpenza likebi ya bayoki na ye. Kasi makambo mosusu esengelaki kokamwisa bango.

Alobi boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango. Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama. . . . Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, mpo bakotonda. . . . Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango. Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino . . . mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo.”​—Matai 5:3-12.

Yesu alingi mpenza koloba nini ntango asaleli liloba “esengo”? Azali kolobela te esengo oyo moto ayokaka ntango azali kozwa mwa mopɛpɛ. Esengo ya solosolo esuki wana te. Esɛngaka moto asepela mpenza na oyo azali na yango, azala motema mpiɔ mpe na bomoi ya malamu.

Yesu alobi ete baoyo bayebi mposa na bango ya elimo, oyo bayokaka mawa mpo bazali bato ya masumu, mpe balukaka koyeba Nzambe mpe kosalela ye, bazali mpenza bato ya esengo. Ata soki bato bayini to banyokoli bango mpo bazali kosala mokano ya Nzambe, bazali na esengo mpo bayebi ete bazali kosepelisa ye mpe ete akopesa bango bomoi ya seko.

Kasi, bato mingi bakanisaka ete kozala na bozwi mpe kolanda bisengo ya mokili nde epesaka moto esengo. Kasi Yesu alobi bongo te. Alobeli nde likambo mosusu mpo na kotinda bato oyo bazali koyoka ye bákanisa; alobi boye: “Kasi mawa na bino bato ya bomɛngo, mpo bozwi libɔndisi na  bino mobimba. Mawa na bino baoyo botondi sikoyo, mpo bokoyoka nzala. Mawa, bino baoyo bozali kosɛka sikoyo, mpo bokozala na mawa mpe bokolela. Mawa, ntango bato nyonso bazali kolobela bino malamu, mpo ezali makambo ya ndenge wana nde bankɔkɔ na bango basalelaki basakoli ya lokuta.”​—Luka 6:24-26.

Mpo na nini kozala na bozwi, kosɛka na esengo, mpe kosepela na lokumu oyo basusu bazali kopesa ememaka mawa? Ezali mpo ntango moto azali na yango mpe azali kozwa yango na valɛrɛ mingi, ekoki kokómela ye mpasi akipe kosalela Nzambe mpe yango ekosala ete azala na esengo ya solosolo te. Yesu alingi koloba te ete kozala mobola to na nzala nde epesaka moto esengo. Kasi mbala mingi, bato ya ndenge wana nde balandaka mateya ya Yesu mpe bazwaka esengo ya solosolo.

Ntango Yesu alobi: “Bino bozali mungwa ya mabele,” azali nde koloba na bayekoli na ye. (Matai 5:13) Toboyi te, bazali te mungwa oyo totyaka na biloko. Ata bongo, mungwa ebatelaka biloko mpo epɔla te. Bazalaki kobomba ebele ya mungwa pembeni ya etumbelo na tempelo ya Nzambe mpe kotya yango na bambeka. Mungwa emonisaka mpe eloko oyo ebebaka te to epɔlaka te. (Balevi 2:13; Ezekiele 43:23, 24) Bayekoli ya Yesu bazali “mungwa ya mabele” mpo bizaleli na bango ebatelaka bamosusu, esalisaka bango bábatela boyokani na bango na Nzambe mpe bábatela bizaleli malamu. Ɛɛ, nsango na bango ekoki kobatela bomoi ya baoyo nyonso bazali kondima yango.

Yesu alobi mpe na bayekoli na ye boye: “Bozali pole ya mokili.” Batyaka mwinda na nse ya ekɔlɔ te kasi na etɛlɛmiselo ya miinda mpo engɛngisa bisika nyonso. Yango wana abakisi boye: “Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.”​—Matai 5:14-16.

MIBEKO OYO BAYEKOLI NA YE BASENGELI KOLANDA

Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazali komona ete Yesu azali kobuka Mibeko ya Nzambe mpe bautaki kala mingi te kosalela ye likita mpo na koboma ye. Na yango, Yesu alobi polele boye: “Bókanisa te ete nayaki mpo na kobebisa Mibeko to Basakoli. Nayaki mpo na kobebisa yango te, kasi mpo na kokokisa yango.”​—Matai 5:17.

Ya solo, Yesu azali kozwa Mibeko ya Nzambe na valɛrɛ mingi mpe alendisi basusu básala mpe bongo. Kutu, alobi boye: “Moto nyonso oyo akobuka moko ya mitindo oyo eleki moke mpe akoteya  bato básala bongo, akobengama moto oyo aleki moke na bokonzi ya likoló.” Alingi koloba ete moto ya ndenge wana akokɔta te na Bokonzi ya Nzambe. Abakisi boye: “Moto nyonso oyo akosalela yango mpe akoteya yango, moto yango akobengama moto monene na bokonzi ya likoló.”​—Matai 5:19.

Yesu apekisi kutu bizaleli oyo etindaka moto abuka Mibeko ya Nzambe. Nsima ya koloba ete Mibeko elobi “osengeli koboma moto te,” Yesu abakisi boye: “Moto nyonso oyo akobombela ndeko na ye nkanda akozongisa monɔkɔ na tribinale.” (Matai 5:21, 22) Kobombela moto nkanda ezali likambo ya lisɛki te, ekoki kutu komema na koboma moto. Na yango, Yesu alimboli tii wapi moto asengeli koluka kimya; alobi boye: “Soki omemi likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.”​—Matai 5:23, 24.

Mobeko mosusu eboyi ekobo. Yesu alobeli yango boye: “Boyokaki ete balobi, ‘osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Matai 5:27, 28) Yesu alobeli te likanisi mabe oyo ekoki koyela moto mpe koleka na yango; kutu, amonisi nde mabe mpenza ya “kokoba kotala.” Mbala mingi kokoba kotala elamwisaka mposa ya nzoto. Boye, soki libaku emonani, ekoki komema moto na ekobo. Ndenge nini moto akoki komibatela na yango? Ekoki kozala malamu azwa bikateli ya makasi. Yesu alobi boye: “Soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo. . . . Soki lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango mpe bwaká yango mosika na yo.”​—Matai 5:29, 30.

Mpo na kobikisa bomoi na bango, bato mosusu bandimaka bákata bango eteni moko ya nzoto oyo ebebi na maladi. Tokoki kokamwa te soki Yesu alobi ete eleki malamu ‘kobwaka’ eloko nyonso, ata eloko oyo ezali na ntina mingi lokola liso to lobɔkɔ, mpo na koboya makanisi ya mbindo mpe makambo oyo yango etindaka moto asala. Yesu alobi boye: “Eleki malamu obungisa moko ya binama na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na Gehena” (esika oyo bazalaki kotumba basalite na libándá ya bifelo ya Yerusaleme), elingi koloba libebi ya seko.

Yesu apesi mpe toli na ndenge ya kosala soki basali biso mabe to basilikisi biso. Alobi boye: “Bótɛmɛla te moto oyo azali mabe; kasi moto nyonso oyo abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, pesá ye mpe oyo mosusu.” (Matai 5:39) Yango elingi koloba te ete moto asengeli kosala eloko moko te soki balingi kosala ye to bato ya libota na ye mabe. Yesu alobeli mbata, oyo ekoki kosala moto mabe mpenza te to koboma ye; ezali nde kofinga. Alingi koloba ete soki moto moko alingi kobundisa yo to koswanisa yo, ezala abɛti yo mpenza mbata to afingi yo, kozongisa te.

Toli yango eyokani na mobeko ya Nzambe oyo etali kolinga mozalani. Na yango, Yesu apesi bayoki na ye toli oyo: “Bókoba kolinga banguna na  bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” Amonisi ntina mpenza ya kosala bongo; alobi boye: “Mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló, mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.”​—Matai 5:44, 45.

Yesu asukisi na mokuse eteni ya lisolo yango na maloba oyo: “Bosengeli kozala bato ya kokoka, ndenge Tata na bino ya likoló azali moto ya kokoka.” (Matai 5:48) Ya solo, alingi te koloba ete bato bakoki kosala makambo na ndenge ya kokoka mpenza. Kasi, soki tomekoli Nzambe, tokoki komonisa bolingo ata epai ya banguna na biso. Na maloba mosusu: “Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.”​—Luka 6:36.

KOBONDELA MPE KOTYELA NZAMBE MOTEMA

Ntango Yesu azali kokoba lisolo na ye, apesi bayoki na ye toli oyo: “Bókeba mpenza ete bósala makambo na bino ya boyengebene na miso ya bato te mpo bango bámona bino.” Yesu atɛmɛli ezaleli mabe ya komimonisa lokola moto malamu; abakisi boye: “Ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, koyula kelelo liboso na yo te, ndenge bakosi basalaka.” (Matai 6:1, 2) Eleki malamu kopesa makabo ya motema mawa na miso ya bato te.

Na nsima, Yesu alobi boye: “Ntango bozali kobondela, bosengeli te kozala lokola bakosi; mpamba te balingaka kobondela batɛlɛmi na basinagoga mpe na bisika oyo banzela minene ekutani mpo bato bámona bango.” Kutu, abakisi boye: “Ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana.” (Matai 6:5, 6) Yesu apekisi te kosala mabondeli liboso ya bato ebele, mpo ye moko mpe asalaki mabondeli ya ndenge wana. Azali nde kolobela mabondeli oyo esalemaka mpo na kokamwisa bato oyo bazali koyoka yango, mpe mpo na koluka lokumu.

Apesi ebele wana ya bato toli oyo: “Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te, ndenge bato ya bikólo basalaka.” (Matai 6:7) Yesu alingi koloba te ete kobondela mbala na mbala mpo na likambo moko ezali mabe. Azali kolobela nde mabe ya kosalela “mbala na mbala” bafraze oyo moto akangá na motó, kozongela mabondeli. Na nsima, apesi libondeli ya ndakisa oyo ezali na makambo nsambo ya kosɛnga. Makambo misato ya liboso emonisi lotomo ya Nzambe ya koyangela mpe mikano na ye; elingi koloba kosantisama ya nkombo na ye, koya ya Bokonzi na ye mpe kokokisama ya mokano na ye. Kaka nsima ya kolobela makambo wana nde tokoki kosɛnga makambo na biso moko; na ndakisa bilei ya mokolo na mokolo, bolimbisi ya masumu, lisalisi mpo na kokwea te na komekama mpe kobatelama na moto mabe.

Biloko na biso esengeli kozwa esika nini na bomoi na biso? Yesu alobi na ebele wana ya bato boye: “Bótika komibombela biloko ya motuya na  mabele, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka.” Toli yango ebongi mpenza! Biloko ya mokili ekoki kobeba mpe yango te nde esalaka ete Nzambe andima biso. Yango wana, Yesu abakisi boye: “Bómibombela biloko ya motuya na likoló.” Tokoki kosala bongo soki tozali kotya mosala ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. Moto moko te akoki kopekisa Nzambe andima biso to apesa biso mbano ya bomoi ya seko. Na yango, maloba oyo ya Yesu ezali solo: “Epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna.”​—Matai 6:19-21.

Mpo na komonisa ete yango ezali mpenza na ntina, Yesu apesi ndakisa oyo: “Mwinda ya nzoto ezali liso. Yango wana, soki liso na yo ezali alima, nzoto na yo mobimba ekongɛnga; kasi soki liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekozala molili.” (Matai 6:22, 23) Soki liso na biso ya elilingi ezali kosala malamu, ekozala lokola mwinda oyo ezali kongɛngisa nzoto na biso. Kasi mpo ezala bongo, miso na biso esengeli kotala kaka eloko moko; soki te, tokoki kokóma kotalela bomoi na ndenge ya mabe. Kotya makanisi nyonso na biloko ya mokili na esika ya kotya yango na kosalela Nzambe ekomonisa ete ‘nzoto na biso mobimba ezali na molili,’ ntango mosusu ekobanda kosala makambo ya sembo te to ya molili.

Na nsima, Yesu apesi ndakisa moko ya ntina mingi: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya bomɛngo.”​—Matai 6:24.

Bato mosusu oyo bazali koyoka Yesu bakoki komitungisa na ndenge oyo basengeli kotalela biloko oyo bazali na mposa na yango. Yango wana ayebisi bango ete basengeli te komitungisa soki batye mosala ya Nzambe na esika ya liboso. Alobi boye: “Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba  biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango.”​—Matai 6:26.

Alobi nini mpo na bafololo lísi oyo eboti likoló ya ngomba? Yesu amonisi ete “ata Salomo na nkembo na ye nyonso alataki lokola moko na yango te.” Yango emonisi nini? “Soki Nzambe alatisaka matiti ya esobe, oyo ezali lelo mpe lobi ekobwakama na mɔtɔ, akolatisa bino koleka te?” (Matai 6:29, 30) Yesu apesi toli malamu oyo: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ . . . Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana. Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”​—Matai 6:31-33.

NDENGE YA KOZWA BOMOI

Bantoma mpe bato mosusu ya mitema sembo balingi kotambwisa bomoi na bango na ndenge oyo ekosepelisa Nzambe, kasi yango ezali pɛtɛɛ te mpo na bango. Na ndakisa, Bafarisai mingi bazali kolobela basusu mabe mpe kosambisa bango kozanga mawa. Na yango, Yesu apesi bayoki na ye toli oyo: “Bótika kosambisa mpo básambisa bino te; mpo bakosambisa bino na lisambisi oyo bozali kosambisa; mpe bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.”​—Matai 7:1, 2.

Ezali likama kolanda litambwisi ya Bafarisai oyo bazali kolobela basusu mabe, ndenge Yesu amonisi yango na bandakisa oyo: “Moto oyo akufá miso akoki te kolakisa moto oyo akufá miso nzela, boye te? Bango nyonso mibale bakokwea na libulu, boye te?” Boye, ndenge nini bayoki ya Yesu basengeli kotalela bamosusu? Basengeli te komonaka kaka mabe na bango, mpo yango ezali mabe mpenza. Atuni boye: “Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‘Ndeko, tiká nalongola lititi oyo ezali na liso na yo,’ nzokande yo moko ozali te kotala libaya ya motɔndɔ oyo ezali na liso na yo? Mokosi! Liboso longolá libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko, bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.”​—Luka 6:39-42.

Yango elingi koloba te ete bayekoli basengeli te kosambisa bato ata na likambo nini. Yesu alobi na bango boye: “Bópesa bambwa eloko mosantu te, mpe bóbwakela bangulu mayaka na bino te.” (Matai 7:6) Mateya ya Liloba ya Nzambe ezali na valɛrɛ mingi, ezali lokola mayaka. Soki bato mosusu basali makambo lokola banyama, baboyi kozwa mateya yango na valɛrɛ, bayekoli basengeli kotika bango mpe koluka baoyo bakosepela koyoka yango.

Yesu azongeli likambo ya libondeli mpe amonisi ntina mpenza ya kotingama na yango. “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino.” Nzambe alingaka koyanola mabondeli, ndenge Yesu amonisi yango ntango atuni boye: “Nani na kati na bino oyo soki mwana na ye asɛngi mampa​—akopesa ye libanga? . . . Yango wana, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye biloko ya malamu koleka?”​—Matai 7:7-11.

Na nsima, Yesu apesi toli moko oyo eyebani tii lelo: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” Ebongi mpenza biso nyonso tóbosana te toli malamu wana mpe tósalela yango ntango tozali kosalela basusu makambo! Kasi, kosala bongo ekoki kozala mpasi, ndenge malako oyo ya Yesu emonisi yango: “Bókɔta na porte ya moke; mpamba te nzela  ya monene mpe oyo efungwamá nde oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta kuna bazali mingi; nzokande porte oyo ya moke mpe nzela ya nkaka yango nde ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.”​—Matai 7:12-14.

Ezali na bato oyo bakoluka kopekisa bayekoli bálanda nzela oyo ezali komema na bomoi, yango wana Yesu akebisi boye: “Bókeba na basakoli ya lokuta oyo bazali koya epai na bino balati mposo ya mpate, kasi na kati bazali nde bambwa ya zamba ya lokoso.” (Matai 7:15) Yesu amonisi ete nzete ya malamu mpe ya mabe eyebanaka na mbuma na yango. Ezali ndenge moko mpo na bato. Boye, tokoki koyeba basakoli ya lokuta na mateya mpe misala na bango. Ɛɛ, Yesu amonisi ete ezali kaka te oyo moto alobaka nde esalaka ete azala moyekoli na ye kasi mpe oyo asalaka. Bamosusu balobaka ete Yesu azali Nkolo na bango, kasi, tokoloba boni soki bazali kosala mokano ya Nzambe te? Yesu alobi boye: “Nakoyebisa bango polele ete: ‘Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.’”​—Matai 7:23.

Mpo na kosukisa lisolo na ye, Yesu alobi boye: “Moto nyonso oyo ayokaka maloba na ngai oyo mpe atosaka yango akokokana na moto ya mayele, oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga. Mpe mbula enɔkaki makasi mpe mpela eyaki mpe mipɛpɛ epɛpaki mpe ebɛtaki ndako yango, kasi ebukanaki te, mpo moboko na yango ezalaki likoló ya mabanga.” (Matai 7:24, 25) Mpo na nini ndako yango ebukanaki te? Mpo moto yango “atimolaki libulu mozindo mpenza mpe atyaki moboko likoló ya mabanga.” (Luka 6:48) Na yango, tosengeli kosuka kaka te na koyoka maloba ya Yesu; tosengeli mpe kosala makasi mpo na ‘kosalela yango.’

Bongo soki moto ‘ayoki maloba yango’ kasi ‘asaleli yango te’? Akokokana na “zoba oyo atongaki ndako na ye likoló ya zɛlo.” (Matai 7:26) Mbula, mpela mpe mipɛpɛ ekokweisa ndako yango.

Ebele wana ya bato bakamwe na ndenge ya Yesu ya koteya mpo azali koteya bango lokola moto oyo azali na bokonzi, kasi te lokola bakonzi ya mangomba. Ekoki kozala ete mingi kati na bato oyo bayokaki ye bakómaki bayekoli na ye.