Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 20

Likamwisi ya mibale na Kana

Likamwisi ya mibale na Kana

MARKO 1:14, 15 LUKA 4:14, 15 YOANE 4:43-54

  • YESU ASAKOLI ETE “BOKONZI YA NZAMBE EKÓMI PENE”

  • ABIKISI ELENGE MOBALI MOKO NA MOSIKA

Nsima ya kolekisa mikolo mibale na Samaria, Yesu azongi na mboka na ye. Auti kosala kampanye monene ya mosala ya kosakola na Yudea, kasi azongi na Galile mpo na kopema te. Kutu, abandi nde mosala monene awa, epai akolá. Ayebi ete bakoyamba ye malamu te, mpo ndenge ye moko alobaki yango, “mosakoli azalaka na lokumu te na mboka na ye moko.” (Yoane 4:44) Na esika ete bayekoli ya Yesu bázala na ye, batiki ye, bazongi na bandako na bango mpe na misala na bango.

Nsango nini Yesu abandi kosakola? Abandi kosakola ete: “Bokonzi ya Nzambe ekómi pene. Bóbongola mitema mpe bóndima nsango malamu.” (Marko 1:15) Bato ya Galile basali nini? Bato ya mboka yango mingi bayambi ye malamu, mpe bapesi ye lokumu. Basali yango kaka mpo na mateya na ye te. Mingi kati na bango bazalaki na fɛti ya Elekeli na Yerusaleme mwa basanza liboso, mpe bamonaki makamwisi oyo Yesu asalaki kuna.​—Yoane 2:23.

Na mboka nini ya Galile Yesu abandi mosala na ye? Emonani ete ezali na Kana, epai abongolaki mai masanga, na fɛti moko ya libala. Na mobembo na ye ya mibale na mboka yango, Yesu ayoki ete elenge mobali moko azali na maladi makasi mpe alingi kokufa. Elenge yango azali mwana ya mokonzi moko ya Leta na ntango ya Erode Antipasi, oyo na nsima, atindaki bákata Yoane Mobatisi motó. Ntango moto yango ayoki ete Yesu, oyo auti na Yudea, akómi na Kana, asali mobembo longwa na Kapernaume, epai afandaka, mpo na kokutana na Yesu. Na mawa makasi, abondeli Yesu: “Nkolo, kitá liboso ete mwana na ngai ya moke akufa.”​—Yoane 4:49.

Yesu ayanoli moto yango na maloba oyo ekamwisi ye: “Kende na yo; mwana na yo azali na bomoi.” (Yoane 4:50) Mokonzi yango ya basoda ya Erode andimeli Yesu mpe abandi kozonga na mboka na ye. Na nzela akutani na baombo na ye oyo bazali koya nokinoki epai na ye mpo na koyebisa ye nsango ya esengo ete mwana na ye abiki mpe azali nzoto kolɔngɔnɔ! Mpe atuni bango: ‘Na ngonga nini akómaki malamu?’

Baombo bayanoli ye: “Lobi na ngonga ya nsambo fiɛvrɛ na ye esilaki.”​—Yoane 4:52.

Mokonzi yango asosoli ete ezali mpenza na ngonga oyo Yesu alobaki na ye: “Mwana na yo azali na bomoi.” Nsima na yango, moto yango ya bozwi mingi, oyo azali na baombo, ná libota na ye mobimba bakómi bayekoli ya Kristo.

Kana ezali esika oyo Yesu asali makamwisi mbala mibale, abongoli mai vinyo, mpe na nsima abikisi elenge mobali moko oyo azali mosika, na kilomɛtrɛ soki 26. Kasi, makamwisi na ye esuki wana te. Ndenge abikisi elenge yango ezali na ntina mingi mpo esali ete bato báyeba ete azongi na Galile. Emonani polele ete azali mosakoli oyo Nzambe andimi, kasi ‘lokumu oyo bakopesa mosakoli yango na mboka na ye moko,’ ekoumela ntango boni?

Yango ekoyebana polele lokola Yesu azali kozonga na mboka na ye Nazarete. Likambo nini ezali kozela ye kuna?