Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 49

Asakoli mpe apesi bantoma formasyo na Galile

Asakoli mpe apesi bantoma formasyo na Galile

MATAI 9:35–10:15 MARKO 6:6-11 LUKA 9:1-5

  • YESU ASAKOLI LISUSU NA GALILE

  • ATINDI BANTOMA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Esali mbula soki mibale banda Yesu azali kosakola na molende. Sikoyo ezali ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ mpe kopema? Te, kutu Yesu ayeisi mosala yango monene ndenge azali “kolekaleka na bingumba nyonso mpe bamboka ya Galile, azalaki koteya na basinagoga na bango, kosakola nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso na nzoto.” (Matai 9:35) Makambo oyo amoni endimisi ye ete asengeli kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola. Kasi ndenge nini akosala yango?

Ntango azali kosala mibembo, Yesu azali komona bato oyo bazali na mposa ya kobɔndisama mpe kobikisama na elimo. Bazali lokola bampate oyo ezangi mobateli, bazali konyokwama mpe basundolami. Ayokeli bango mawa mpe ayebisi bayekoli na ye boye: “Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.”​—Matai 9:37, 38.

Yesu ayebi likambo oyo ekosalisa. Abengi bantoma na ye 12 mpe akaboli bango basakoli mibalemibale. Na nsima, apesi bango malako ya polele: “Bókende na nzela ya bikólo mosusu te, mpe bókɔta na engumba moko te ya Samaria; kasi, bókende kaka epai ya bampate ya ndako ya Yisraele oyo ebungá. Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’”​—Matai 10:5-7.

Bokonzi oyo basengeli kosakola ezali oyo Yesu alobelaki na libondeli ya ndakisa. ‘Bokonzi yango ekómi pene’ mpo Yesu Kristo, Mokonzi oyo Nzambe aponi azali wana. Kasi, nini ekomonisa ete bayekoli  na ye bazali mpenza bamonisi ya guvɛrnema yango? Yesu apesi bango nguya ya kobikisa bato ya maladi, ata mpe kosekwisa bakufi, nyonso wana ofele. Sikoyo, ndenge nini bantoma bakokokisa bamposa na bango, na ndakisa bilei ya mokolo na mokolo?

Yesu ayebisi bayekoli na ye bámema eloko te na mosala yango ya kosakola. Basengeli te komema wolo, palata, to motako na bapotɔmɔni na bango. Basengeli kutu te komema saki ya bilei mpo na mobembo, to bilamba mibale ya nse, to basandale. Mpo na nini? Yesu ayebisi bango ete: “Mosali asengeli kozwa bilei na ye.” (Matai 10:10) Bato oyo bakokutana na bango, oyo bakosepela na nsango na bango bakosunga bango na bilei to elamba. Yesu alobi boye: “Esika nyonso oyo bokokɔta na ndako moko, bófanda wana tii bokobima na esika yango.”​—Marko 6:10.

Yesu apesi mpe malako na ndenge basengeli kosala ntango bakómi na ndako ya moto mpo na kosakola nsango ya Bokonzi; alobi boye: “Ntango bokokɔta na ndako, bópesa bato ya ndako mbote; mpe soki ndako yango ebongi, kimya oyo botombeli yango ezala likoló na yango; kasi soki ebongi te, kimya na bino ezongela bino. Epai nyonso oyo moto akoyamba bino te to akoyoka maloba na bino te, ntango bokobima na ndako yango to na engumba yango bópupola putulu ya makolo na bino.”​—Matai 10:12-14.

Ekoki kosalema ete bato ya engumba to mboka mobimba báboya nsango na bango. Nini ekokómela engumba to mboka ya ndenge wana? Yesu amonisi ete ekozwa etumbu ya makasi. Alobi boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Na Mokolo ya Kosambisama, mokili ya Sodoma ná Gomora ekozala kutu mwa malamu koleka engumba wana.”​—Matai 10:15.