Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 43

Bandakisa oyo etali Bokonzi

Bandakisa oyo etali Bokonzi

MATAI 13:1-53 MARKO 4:1-34 LUKA 8:4-18

  • YESU APESI BANDAKISA YA BOKONZI

Ekoki kozala ete Yesu azali na Kapernaume ntango apameli Bafarisai. Mwa bangonga na nsima, kaka na mokolo yango, atamboli na makolo mpe akei na mbu ya Galile oyo ezali mosika te, epai ebele ya bato bazali. Yesu amati na masuwa, atiki libongo mpe abandi koteya bato makambo etali Bokonzi ya likoló. Asaleli ebele ya bandakisa to masese mpo na koteya bango. Ezali makambo oyo bayoki na ye bamesaná na yango mpe yango esali ete bázala na mokakatano te mpo na kokanga ntina ya makambo ndenge na ndenge oyo etali Bokonzi.

Yesu alobeli liboso mosali-bilanga oyo azali kolona. Ndambo ya mboto ekwei na nzela mpe bandɛkɛ elei yango. Mosusu ekwei na esika ya mabangamabanga epai mabele ezali mingi te. Misisa na yango ekoki kokende mosika te, mpe milona yango ya sika ekauki mpo na moi makasi. Kasi mboto mosusu ekwei na kati ya banzubɛ mpe nzubɛ etye yango nkaka ntango ezali kobima. Na nsuka, mboto mosusu ekwei na mabele ya malamu. Mboto yango ebimisi mbuma, “eboti mbala nkama moko (100), mpe oyo kuna ntuku motoba (60), mpe oyo mosusu ntuku misato (30).”​—Matai 13:8.

Na ndakisa mosusu, Yesu akokanisi Bokonzi na moto moko oyo aloni mboto. Na ndakisa oyo, ezala moto yango alali to alali te, mboto ezali kokola. “Ayebi te” soki esalemi ndenge nini. (Marko 4:27) Ekoli yango moko mpe ebimisi mbuma oyo akoki kobuka.

Na nsima, Yesu apesi ndakisa ya misato oyo etali kolona. Mobali moko aloni mboto ya kitoko, kasi “ntango bato balalaki mpɔngi,” monguna moko ayaki kolona matiti mabe na katikati ya blé. Baombo na ye batuni ye soki basengeli kopikola  matiti yango. Apesi bango eyano oyo: “Te; noki ntango bozali kopikola matiti mabe, bópikola mpe blé elongo na yango. Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma; mpe na eleko ya kobuka mbuma nakoyebisa babuki-mbuma ete, liboso bópikola matiti mabe mpe bókangisa yango mabokemaboke mpo na kotumba yango, na nsima bóbanda koyanganisa blé na kati ya ndako na ngai ya kobomba biloko.”​—Matai 13:24-30.

Mingi ya bato oyo bazali koyoka Yesu bayebi makambo etali bilanga. Alobeli mpe mbuma mosusu oyo bato mingi bayebi, elingi koloba, mbuma ya mutarde oyo ezalaka moke mpenza. Ekómaka nzete monene mpenza mpe bandɛkɛ ekoki kofanda na bitape na yango. Yesu alobi boye mpo na mboto yango: “Bokonzi ya likoló ezali lokola mbuma ya mutarde, oyo moto akamati mpe aloni na elanga na ye.” (Matai 13:31) Kasi, awa Yesu azali kotángisa te makambo etali banzete. Azali nde komonisa likambo ya kokamwa mpenza: ndenge mwa eloko ya moke ekoki kokola mpe kokóma eloko moko ya monene mpenza.

Na nsima, Yesu alobeli likambo moko oyo bayoki na ye bamesani na yango. Akokanisi Bokonzi ya likoló na “levire, oyo mwasi moko azwaki mpe abombaki na katini ya bimekelo misato ya minene ya farini.” (Matai 13:33) Atako levire yango ezali komonana na miso te, ezali kovimbisa pɔtɔpɔtɔ ya farini. Ndenge oyo ezali kovimbisa mpe kobongola pɔtɔpɔtɔ yango ezali koyebana te.

Nsima ya kopesa bandakisa yango, Yesu azongisi ebele wana ya bato mpe azongi na ndako epai azali kofanda. Mosika te, bayekoli na ye bayei epai na ye, balingi koyeba soki bandakisa yango elimboli nini.

BAZWI LITOMBA NA BANDAKISA YA YESU

Bayekoli bayokaki ndenge liboso Yesu asalelaki bandakisa, kasi mingi boye te na mbala moko. Batuni ye boye: “Mpo na nini ozali koloba na bango na bandakisa?”​—Matai 13:10.

Ntina moko oyo asali bongo ezali mpo na kokokisa bisakweli ya Biblia. Matai alobi boye: “Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa; mpo likambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli ekokisama; ye alobaki ete: ‘Nakofungola monɔkɔ na ngai na bandakisa, nakosakola makambo oyo ebombamá banda na ebandeli.’”​—Matai 13:34, 35; Nzembo 78:2.

Kasi ezali mpe na ntina mosusu oyo Yesu asali bongo: mpo na komona ezaleli oyo bato bakomonisa. Mingi na bango bazali kosepela na Yesu kaka mpo azali kobɛta masolo ya malamu mpe kosala makamwisi. Bazali kotalela ye te lokola moto oyo azali Nkolo mpe oyo basengeli kotosa mpe kolanda ye na bolingo nyonso. (Luka 6:46, 47) Balingi te kobongola makanisi to bizaleli na bango. Balingi te ete nsango yango ekɔta mpenza na mitema na bango.

Mpo na koyanola na motuna ya bayekoli na ye, Yesu alobi boye: “Yango wana nazali koloba na bango na bandakisa, mpamba te, atako bazali kotala, bátala kaka mpamba, mpe atako bazali koyoka, báyoka kaka mpamba, mpe bákanga ntina na yango te; mpe mpo na bango esakweli ya Yisaya ezali kokokisama, oyo elobi ete: ‘. . . Motema ya bato oyo ekómi makasi.’”​—Matai 13:13-15; Yisaya 6:9, 10.

Kasi yango etaleli te baoyo nyonso bazali koyoka Yesu. Alimboli boye: “Esengo na miso na bino mpo ezali komona, mpe na matoi na bino mpo ezali koyoka. Mpo ya solo mpenza nalobi na bino: Basakoli mingi mpe bayengebene mingi bazalaki na mposa ya komona makambo oyo bino bozali komona kasi bamonaki yango te, mpe bazalaki na mposa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka kasi bayokaki yango te.”​—Matai 13:16, 17.

Ya solo, bantoma 12 mpe bayekoli mosusu ya sembo bazali mitema makasi te. Yango wana, Yesu  alobi boye: “Bino bozwi likoki ya kososola basekele mosantu ya bokonzi ya likoló, kasi bato wana bazwi yango te.” (Matai 13:11) Lokola bazali mpenza na mposa ya kokanga ntina, Yesu alimboleli bayekoli na ye ndakisa ya moloni.

Yesu alobi boye: “Mboto ezali liloba ya Nzambe.” (Luka 8:11) Mpe mabele ezali motema. Yango nde sekele mpo na koyeba ndimbola ya ndakisa oyo apesi.

Mpo na mboto oyo ekweaki pembeni ya nzela, alobi boye: “Zabolo ayei mpe alongoli liloba na mitema na bango mpo bándima te mpe bábika te.” (Luka 8:12) Yesu alobeli mboto oyo ekweaki na mabele ya mabanga mpo na komonisa mitema ya baoyo bayambaka liloba na esengo kasi liloba yango ezwaka misisa mpenza te na mitema na bango. “Ntango bolɔzi to monyoko ebimi mpo na liloba,” babɛtaka libaku. Ɛɛ, “na ntango ya komekama,” mbala mosusu mpo na botɛmɛli ya bato ya libota to ya bato mosusu, batikaka kondima.​—Matai 13:21; Luka 8:13.

Bongo mboto oyo ekweaki na banzubɛ? Yesu alobi na bayekoli na ye ete yango etaleli baoyo bayoki liloba. Kasi “motungisi ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo” elongi bango. (Matai 13:22) Bazali na liloba na mitema na bango kasi ezwi nkaka mpe eboti mbuma te.

Mabele ya nsuka oyo Yesu alobeli ezali mabele malamu. Yango etaleli baoyo bayoki liloba mpe bandimi yango na mitema na bango mpe bakangi mpenza ntina na yango. Yango ebimisi litomba nini? “Baboti mbuma.” Na kotalela makambo na bango, na ndakisa mbula, sante to makoki na bango, mosusu abimisi mbala 100, oyo kuna 60, mpe oyo mosusu 30. Ya solo, mapamboli ya kosalela Nzambe eyaka epai ya “bato oyo, nsima ya koyoka liloba na motema ya kitoko mpe ya malamu,  basimbi yango mpe baboti mbuma wana bazali koyika mpiko.”​—Luka 8:15.

Maloba yango esengeli mpenza kokamwisa bayekoli oyo bayaki epai ya Yesu mpo alimbolela bango mateya na ye! Sikoyo, bakangi mpenza ntina ya bandakisa yango. Yesu alingi ete bákanga ntina yango mpo na ngala na bango báyebisa solo yango epai ya basusu. Atuni boye: “Bayaka na mwinda te mpo na kotya yango na nse ya ekɔlɔ ya komekela to na nse ya mbeto, boye te? Bayaka na yango nde mpo na kotya yango likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda, boye te?” Na yango, Yesu apesi toli oyo: “Moto oyo azali na matoi ya koyoka, ayoka.”​—Marko 4:21-23.

ABAKISELI BANGO MATEYA MINGI LISUSU

Nsima ya kozwa ndimbola na ndakisa ya moloni epai ya Yesu, bayekoli balingi koyekola makambo mosusu. Balobi na Yesu boye: “Limbolelá biso ndakisa wana ya matiti mabe na elanga.”​—Matai 13:36.

Motuna wana emonisi ete ezaleli na bango ekesani mpenza na oyo ya ebele ya bato oyo bazalaki na libongo. Emonani ete bato yango bayoki kasi bazali na mposa te ya koyeba ndimbola ya bandakisa yango mpe mateya oyo bakoki kozwa. Ndenge Yesu alobeli bandakisa yango kozanga kolimbola, mpo na bango ekoki. Mpo na komonisa ete bayoki na ye oyo bafandi pene ya mai bakeseni na bayekoli na ye oyo bazali na mposa ya koyeba mpe bayei epai na ye mpo ateya bango lisusu, Yesu alobi boye:

“Bókeba na makambo bozali koyoka. Na emekeli oyo bozali komekela, bakomekela bino na yango, ɛɛ, bakobakisela bino mingi lisusu.” (Marko 4:24) Bayekoli bazali kotya likebi na makambo oyo bazali koyoka epai na ye. Lokola bazali kozwa makambo na lisɛki te mpe bazali kotyela Yesu likebi, abakiseli bango mateya mingi lisusu. Yango wana, mpo na koyanola na motuna ya bayekoli na ye na ndakisa ya blé mpe matiti mabe, Yesu alobi boye:

“Moloni ya mboto ya malamu ezali Mwana ya moto; elanga ezali mokili; milona ya malamu, ezali bana ya bokonzi; kasi matiti mabe ezali bana ya moto mabe, mpe monguna oyo alonaki yango ezali Zabolo. Ntango ya kobuka mbuma ezali bosukisi ya makambo ya ntango moko boye, mpe babuki-mbuma ezali baanzelu.”​—Matai 13:37-39.

Nsima ya kopesa ndimbola nyonso ya ndakisa yango, Yesu amonisi ndenge makambo ekosuka. Alobi ete na nsuka ya mokili, babuki-mbuma, to baanzelu, bakokabola bakristo ya lokuta oyo bakokani na matiti mabe ná “bana ya bokonzi.” “Bayengebene” bakoyanganisama mpe nsukansuka bakongɛnga makasi “na kati ya bokonzi ya Tata na bango.” Nini ekokómela “bana ya moto mabe”? Nsuka na bango ekozala libebi, yango nde ntina oyo “bakolela mpe bakolya mino.”​—Matai 13:41-43.

Na nsima, Yesu abakiseli bayekoli na ye bandakisa misato lisusu. Ya liboso, alobi boye: “Bokonzi ya likoló ezali lokola eloko ya motuya oyo ebombami na elanga, oyo moto moko akuti mpe  abombi yango; mpe na esengo, akei kotɛka biloko oyo azali na yango mpe asombi elanga yango.”​—Matai 13:44.

Akobi boye: “Bokonzi ya likoló ezali lokola moto ya mombongo oyo asalaka mibembo ya koluka mayaka ya kitoko. Ntango amoni liyaka moko ya motuya monene, akei nokinoki kotɛka biloko nyonso oyo azali na yango mpe asombi yango.”​—Matai 13:45, 46.

Na bandakisa oyo mibale, Yesu amonisi polele ete moto asengeli komipimela makambo mosusu mpo na oyo ezali mpenza na ntina. Moto ya mombongo atɛki nokinoki “biloko nyonso oyo azali na yango” mpo na kozwa liyaka moko ya valɛrɛ mingi. Bayekoli ya Yesu bakoki kokanga ntina ya ndakisa wana ya liyaka kitoko. Mpe moto oyo amoni eloko ya motuya oyo ebombami na elanga, ‘atɛki biloko nyonso’ mpo na kozwa yango. Na bandakisa oyo mibale, eloko moko ya motuya ezali, oyo esengeli kozwa yango mpe kobatela yango. Tokoki kokokanisa yango na milende oyo moto asali mpo na kokokisa bamposa na ye ya elimo. (Matai 5:3) Bato mosusu oyo bazali koyoka ndenge Yesu azali kopesa bandakisa yango basilaki komonisa mposa ya kosala milende mpo na kokokisa bamposa na bango ya elimo mpe kozala bayekoli ya solosolo ya Yesu.​—Matai 4:19, 20; 19:27.

Na nsuka, Yesu akokanisi Bokonzi ya likoló na monyama oyo ekangi mbisi ya ndenge nyonso. (Matai 13:47) Ntango bakaboli mbisi yango, oyo ya malamu babombi yango na bikɔlɔ kasi oyo ya mabe babwaki yango. Yesu alobi ete ekozala bongo na nsuka ya mokili; baanzelu bakokabola bato mabe ná bato malamu.

Yesu ye moko asalaki mosala oyo ekokani na koluka mbisi ntango abengaki bayekoli na ye ya liboso bázala “baluki-bato.” (Marko 1:17) Kasi, alobaki ete ndakisa na ye oyo etali monyama ekokokisama na mikolo ekoya, “na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 13:49) Na yango, bantoma mpe bayekoli mosusu oyo bayoki maloba ya Yesu bakoki komona ete makambo ya malamu mpenza esengeli kosalema na nsima.

Baoyo bayokaki bandakisa oyo Yesu apesaki na masuwa, bayebi sikoyo makambo mingi lisusu. Yesu azali komonisa mposa na ye ya ‘kolimbwela bayekoli na ye makambo nyonso wana na esika oyo bazali kaka bango moko.’ (Marko 4:34) Azali “lokola moto moko, nkolo-ndako moko, oyo azali kobimisa biloko ya sika mpe ya kala na esika na ye ya kobomba biloko ya motuya.” (Matai 13:52) Yesu apesi bandakisa wana te mpo na kolakisa makoki na ye ya koteya. Kutu, azali nde koyebisa bayekoli na ye mateya oyo ezali lokola biloko ya motuya mpenza. Azali mpenza “molakisi nyonso ya bato” oyo akesani mpenza na balakisi mosusu nyonso.