Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 65

Ateyi na nzela ya Yerusaleme

Ateyi na nzela ya Yerusaleme

MATAI 8:19-22 LUKA 9:51-62 YOANE 7:2-10

  • LIKAMBO OYO BANDEKO YA YESU BAKANISELI YE

  • MOSALA YA BOKONZI EZALI NA NTINA MINGI MPENZA

Esali mwa ntango banda Yesu amipesi na kosakola mingimingi na Galile, esika nsango na ye endimami mingi koleka Yudea. Longola yango, ntango azalaki na Yerusaleme mpe abikisaki mobali moko na mokolo ya Sabata, “Bayuda balukaki lisusu makasi koboma ye.”​—Yoane 5:18; 7:1.

Sikoyo tozali na mobu 32 T.B., mpe Fɛti ya Batabernakle (to ya Mwa bandako ya matiti) ekómi pene. Fɛti yango esalaka mikolo nsambo; na mokolo ya mwambe, basalaka liyangani moko monene. Fɛti yango emonisaka nsuka ya mbula ya misala ya bilanga mpe ezalaka ntango ya esengo makasi mpe ya kopesa matɔndi.

Bandeko ya Yesu​—Yakobo, Simo, Yozefe, mpe Yudasi—​balobi na ye: “Longwá awa mpe kende na Yudea.” Yerusaleme ezali esika ya losambo ya Bayuda nyonso. Na eleko ya bafɛti misato oyo esalemaka mbula na mbula, engumba yango etondaka na bato. Bandeko ya Yesu babimisi likanisi oyo: “Moto asalaka makambo na kobombana te soki azali koluka koyebana polele. Lokola ozali kosala makambo oyo, omimonisa na mokili.”​—Yoane 7:3, 4.

Nzokande, bandeko yango minei bazali “kondimela ye te” ete azali Masiya. Sikoyo, balingi ete asala mwa makamwisi mpo ebele ya bato oyo bayei na fɛti bámona ye. Yesu amoni likama oyo ezali wana, mpe alobi na bango: “Mokili ezali na ntina moko te ya koyina bino, kasi ezali koyina ngai, mpamba te nazali kopesa litatoli ete misala na yango ezali mabe. Bino bómata na fɛti; ngai nakomata naino na fɛti yango te, mpo ntango na ngai ekoki naino mpenza te.”​—Yoane 7:5-8.

Bandeko ya Yesu bakei elongo na ebele ya bato mosusu oyo bazali mpe kokende na Yerusaleme. Mwa mikolo na nsima, Yesu ná bayekoli na ye bakei na kobombana, bato bamoni bango te. Bazwi nzela ya mokuse oyo ekatisá Samaria, na esika báleka na nzela oyo bato mingi balekaka, oyo eleki pene na Ebale Yordani. Yesu ná bayekoli na ye bakozala na mposa ya esika ya kolala na Samaria; na yango atindi bato liboso mpo bábongisa esika. Na mboka moko, bato baboyi koyamba bango mpo Yesu azali kokende na Yerusaleme na fɛti ya Bayuda. Yakobo ná Yoane basiliki, mpe balobi: “Nkolo, olingi tóyebisa mɔtɔ euta na likoló mpe esilisa bango nyɛɛ?” (Luka 9:54) Yesu apameli bango mpo na likanisi oyo bapesi, mpe bakei na mboka mosusu.

Na nzela, mokomeli moko alobi na Yesu: “Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende.” Yesu azongisi ete: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.” (Matai 8:19, 20) Na maloba yango, Yesu amonisi ete mokomeli yango akokutana na mikakatano  soki akómi moyekoli na ye. Mpe emonani ete mokomeli yango azali na lolendo mpe aboyi bomoi ya ndenge wana. Na yango, mokomoko na biso amituna: ‘Nakondima kotika nini mpo na kolanda Yesu?’

Yesu alobi na moto mosusu ete: “Landá ngai!” Kasi moto yango azongisi: “Pesá ngai naino nzela nakende kokunda tata na ngai.” Lokola Yesu ayebi ndenge makambo ezali, alobi na ye: “Tiká bakufi bákunda bakufi na bango, kasi yo kende kosakola bokonzi ya Nzambe bipai nyonso.” (Luka 9:59, 60) Emonani ete tata ya moto yango akufi naino te. Soki akufaka, mbɛlɛ mwana na ye azalaki na esika wana te mpo na kosolola na Yesu. Moto yango nde amibongisi te mpo na kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye.

Kaka na nzela, wana bazali kopusana na Yerusaleme, moto mosusu alobi na Yesu ete: “Nakolanda yo, Nkolo; kasi pesá ngai naino nzela ya kopesa bato ya ndako na ngai mbote.” Yesu apesi ye eyano oyo: “Moto oyo atye lobɔkɔ na ye na etimweli mpe azali kotala biloko oyo ezali na nsima abongi na bokonzi ya Nzambe te.”​—Luka 9:61, 62.

Bayekoli ya Yesu ya solosolo basengeli kotya miso na bango kaka na mosala ya Bokonzi. Soki moto oyo azali kosala bilanga azali kotala liboso te, mikala na ye ekotɛngama. Soki akitisi etimweli mpo atala na nsima, mosala ya bilanga ekozonga nsima. Ndenge moko mpe, moto oyo azali kotala nsima, na mokili oyo ekómi na nsuka na yango, akoki kolongwa na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.