Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 42

Yesu apameli Bafarisai

Yesu apameli Bafarisai

MATAI 12:33-50 MARKO 3:31-35 LUKA 8:19-21

  • YESU ALOBELI “ELEMBO YA YONA”

  • ALINGI BAYEKOLI MINGI KOLEKA BANDEKO YA LIBOTA

Ndenge bakomeli ná Bafarisai baboyi kondima ete Yesu abimisi bademo na nguya ya Nzambe, bazali pene ya kotuka (to kofinga) elimo santu. Na yango, bakomitya na ngámbo ya nani​—ya Nzambe to ya Satana? Yesu alobi boye: “Bósala ete nzete ezala malamu mpe mbuma na yango ezala malamu to bósala ete nzete ezala mabe mpe mbuma na yango ezala mabe; mpo nzete eyebanaka nde na mbuma na yango.”​—Matai 12:33.

Ezali bozoba koloba ete Yesu azali mosaleli ya Satana ndenge abimisi bademo, mpo yango ezali nde mbuma malamu. Ndenge Yesu amonisaki yango polele na Lisolo likoló ya Ngomba, soki mbuma ezali malamu, nzete na yango mpe ezali malamu kasi mabe te. Boye, mbuma oyo Bafarisai babimisi na bifundeli oyo ezangá motó ná makolo oyo bafundi Yesu, emonisi nini? Emonisi ete mbuma yango ezali mabe. Yesu alobi na bango boye: “Bana ya bitupa, ndenge nini bokoki koloba makambo ya malamu, awa bozali bato mabe? Mpo monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.”​—Matai 7:16, 17; 12:34.

Ya solo, maloba na biso emonisaka ndenge motema na biso ezali mpe esalisaka mpo na kosambisa moto. Yango wana Yesu alobi boye: “Liloba nyonso ya mpambampamba oyo bato balobaka, bakozongisa monɔkɔ mpo na yango na Mokolo ya Kosambisama; mpo bakotánga yo moyengebene na maloba na yo, mpe bakokweisa yo na likambo na maloba na yo.”​—Matai 12:36, 37.

Atako Yesu azali kosala misala ya nguya, bakomeli ná Bafarisai basɛngi ye asala lisusu mosusu: “Moteyi, tolingi omonisa biso elembo moko.” Ezala bamonaki na miso to te makamwisi oyo Yesu asalaki, bato oyo bamonaki yango bazali kotatola mpenza makambo oyo azali kosala. Na yango, Yesu alobi na bakambi yango ya Bayuda boye: “Libota ya mabe mpe ya ekobo ezali kokoba koluka elembo, kasi bakopesa yango elembo moko te longola kaka elembo ya mosakoli Yona.”​—Matai 12:38, 39.

Yesu alimboleli bango maloba yango boye: “Lokola Yona azalaki na kati ya libumu ya mbisi monene mikolo misato butu moi, Mwana ya moto mpe akozala na kati ya mabele mikolo misato butu moi.” Mbisi moko ya monene emɛlaki Yona kasi na nsima, abimaki na monɔkɔ na yango lokola nde asekwisamaki. Na yango, Yesu asakoli ete ye moko akokufa mpe akosekwa nsima ya mikolo misato. Ntango likambo yango esalemi na nsima, bakambi ya Bayuda babwaki “elembo ya Yona,” baboyi kobongola motema mpe kobongwana. (Matai 27:63-66; 28:12-15) Na kokesana na bango, “bato ya Ninive” babongolaki motema ntango Yona asakwelaki bango. Yango wana bakokweisa libota oyo. Yesu alobi mpe ete ndakisa ya Mokonzi-mwasi ya Sheba ekokweisa mpe bango. Azalaki na mposa ya koyoka bwanya ya Salomo mpe ekamwisaki ye.  Sikoyo, Yesu amonisi ete “moto oyo aleki Salomo azali awa.”​—Matai 12:40-42.

Yesu akokanisi libota yango mabe na moto moko oyo elimo ya mbindo ebimi na nzoto na ye. (Matai 12:45) Lokola moto yango akɔtisi te biloko ya malamu na esika oyo etikali polele, elimo mabe yango ezongi lisusu elongo na bilimo mosusu nsambo ya mabe koleka, mpe bakɔteli moto yango. Ndenge moko mpe, ekólo Yisraele epɛtolamaki mpe ebongisamaki kaka ndenge moto oyo elimo ya mbindo ebimaki na nzoto na ye. Kasi ekólo yango eboyaki basakoli ya Nzambe mpe emonisi yango polele ntango ezali kotɛmɛla Yesu, moto oyo emonani polele ete azali na elimo ya Nzambe. Yango emonisi ete ekólo yango ekómi mabe koleka ndenge ezalaki ntango ebandaki.

Ntango Yesu azali koloba, mama na ye mpe bandeko na ye bayei mpe batɛlɛmi pembeni ya ebele wana ya bato. Bato mosusu oyo bafandi pene na ye balobi na ye boye: “Mama na yo ná bandeko na yo batɛlɛmi libándá balingi bámona yo.” Kasi Yesu amonisi ete alingaka bayekoli na ye mingi koleka, bango bazali mpenza lokola bandeko na ye ya mibali, ya basi mpe bamama na ye. Alakisi lobɔkɔ epai bayekoli na ye bazali mpe alobi boye: “Mama na ngai ná bandeko na ngai ezali baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe bazali kotosa yango.” (Luka 8:20, 21) Na ndenge yango, amonisi ete atako boyokani na ye na bato ya libota na ye ezali na valɛrɛ, kasi oyo azali na yango na bayekoli na ye ezali na valɛrɛ mingi koleka. Ezali mpenza kokitisa motema kozala na boyokani malamu na bandeko na biso ya elimo, mingimingi ntango bato mosusu bandimelaka biso te to batyolaka biso mpe misala na biso ya malamu!