Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 58

Akómisi mampa ebele mpe apesi likebisi mpo na levire

Akómisi mampa ebele mpe apesi likebisi mpo na levire

MATAI 15:32–16:12 MARKO 8:1-21

  • YESU ALEISI MIBALI NKÓTO MINEI (4 000)

  • AKEBISI BAYEKOLI NA LEVIRE YA BAFARISAI

Ebele ya bato bayei epai ya Yesu na etúká ya Dekapolisi, na ngámbo ya ɛsti ya Mbu ya Galile. Bayei koyoka ye mpe kobikisama, mpe bamemi bakitunga minene oyo batyaka biloko.

Kasi, na nsima Yesu ayebisi bayekoli na ye ete: “Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa, mpo mikolo misato mobimba, bazali pene na ngai mpe bazali na eloko ya kolya te; mpe soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakokwea na nzela. Kutu, bamosusu na kati na bango bauti mosika.” Bayekoli batuni ye: “Epai wapi moto akoki kozwa mampa ya kotondisa bato oyo awa na esika oyo bato bazalaka te?”​—Marko 8:2-4.

Yesu atuni bango: “Bozali na mampa boni?” Bayekoli balobi: “Nsambo, mpe mwa ndambo ya mbisi ya mike.” (Matai 15:34) Bongo Yesu ayebisi bato báfanda na nse. Akamati mampa ná mbisi, abondeli Nzambe, mpe apesi bayekoli na ye bákabolela bato. Likambo ya kokamwa, moto nyonso alei mpe atondi. Ntango balɔkɔti oyo etikali, batondisi bakitunga nsambo ya minene, nzokande mibali oyo balyaki bazalaki soki nkóto minei (4 000), bakisa basi mpe bana!

Nsima ya kosɛnga ebele ya bato bákende, Yesu ná bayekoli na ye bamati na masuwa mpe bakei na Magadane, na bokula ya wɛsti ya Mbu ya Galile. Ntango bakómi, Bafarisai ná bato mosusu ya lingomba ya Basadukai bayei komeka Yesu, basɛngi ye alakisa bango elembo moko ya likoló.

Lokola Yesu ayebi mayele mabe na bango, ayebisi bango ete: “Ntango mpokwa ekómaka bolobaka: ‘Lelo mokolo ekozala malamu, mpo likoló ezali motane lokola mɔtɔ’; mpe na ntɔngɔ bolobaka ete: ‘Lelo ekozala mokolo ya malili makasi, mokolo ya mbula, mpo likoló ezali motane lokola mɔtɔ, kasi molilimolili.’ Boyebi kolimbola motindo oyo likoló ezali komonana, kasi bilembo ya bantango bokoki kolimbola yango te.” (Matai 16:2, 3) Na nsima, Yesu ayebisi Bafarisai mpe Basadukai ete bakopesa bango elembo moko te longola elembo ya Yona.

Yesu ná bayekoli na ye bamati na masuwa mpe bakei na Betesaida, na bokula ya nɔrdi-ɛsti ya mbu. Na nzela, bayekoli bamoni ete babosanaki kozwa mampa ebele. Bazali kaka na limpa moko. Lokola Yesu azali naino kokanisa makambo oyo elekaki na Bafarisai mpe Basadukai oyo bazali bato ya Erode, akebisi bayekoli na ye ete: “Bófungola miso, bókeba na levire ya Bafarisai mpe na levire ya Erode.” Bayekoli bakanisi ete Yesu alobeli levire mpo babosani mampa. Ntango Yesu amoni ete bazali na libunga, alobi na bango: “Mpo na nini bozali kolobana bino na bino mpo bozali na mampa te?”​—Marko 8:15-17.

Yesu autaki koleisa bankóto ya bato mampa. Na yango, bayekoli na ye basengelaki koyeba ete azali komitungisa mpo na mampa ya solo te. Atuni bango: “Bobosani nde, ntango nabukaki mampa mitano mpo na mibali nkóto mitano (5 000), bolɔkɔtaki bakitunga boni oyo etondi na bitenibiteni oyo etikalaki?” Bazongiseli ye ete: “Zomi na  mibale.” Atuni lisusu: “Ntango nabukaki mampa nsambo mpo na mibali nkóto minei (4 000), bolɔkɔtaki bakitunga boni oyo etondi na bitenibiteni oyo etikalaki?” Balobi na ye: “Nsambo.”​—Marko 8:18-20.

Yesu atuni: “Ndenge nini bozali kososola te ete nazali koloba na bino te mpo na mampa?” Mpe abakisi: “Bókeba na levire ya Bafarisai ná Basadukai.”​—Matai 16:11.

Nsukansuka, bayekoli bakangi ntina ya likambo oyo azali kolobela. Basalelaka levire mpo na kovimbisa pɔtɔpɔtɔ ya farini mpe kosala mampa. Yesu asaleli levire na ndenge ya elilingi mpo na kolobela libebi. Azali kokebisa bayekoli na ye bámibatela, bákeba na “mateya ya Bafarisai ná Basadukai,” oyo ebebisaka bato.​—Matai 16:12.