Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Poná monɔkɔ Lingala

 MOKAPO 100

Ndakisa ya mina zomi

Ndakisa ya mina zomi

LUKA 19:11-28

  • NDAKISA YA YESU YA MINA ZOMI

Yesu azali kokende na Yerusaleme, kasi ekoki kozala ete azali naino na bayekoli na ye na ndako ya Zakai. Bazali kokanisa ete “bokonzi ya Nzambe” ekotyama mosika te mpe Yesu nde Mokonzi ya Bokonzi yango. (Luka 19:11) Bakangi mpenza ntina ya likambo ya Bokonzi yango te, ndenge kaka bakangi ntina te ete Yesu asengeli kokufa. Yango wana, apesi bango ndakisa moko mpo na kosalisa bango báyeba ete Bokonzi esengelaki koya na ntango wana te.

Alobi na bango ete: “Moto moko boye ya lokumu asalaki mobembo na mokili moko ya mosika mpo na kozwa nguya ya bokonzi mpe kozonga.” (Luka 19:12) Mobembo ya ndenge wana esengelaki kozwa ntango. Kozanga ntembe Yesu azali “moto moko boye ya lokumu” oyo asengeli kosala mobembo “na mokili moko ya mosika,” na likoló, epai Tata na ye akopesa ye nguya ya bokonzi.

Na ndakisa yango, liboso ete “moto [yango] ya lokumu” akende, abengi baombo na ye zomi mpe apesi mokomoko na bango mina ya palata mpe ayebisi bango boye: “Bósala mombongo tii ntango nakoya.” (Luka 19:13) Mina ya palata ezali mpenza mbongo ya ebende ya motuya. Mina moko ezali na motuya ndenge moko na lifuti oyo mosali-bilanga azali kozwa nsima ya sanza misato.

Bayekoli bakoki kososola ete bazali lokola baombo zomi oyo ndakisa yango elobeli, mpo Yesu akokanisi bango mpe na babuki-mbuma. (Matai 9:35-38) Ya solo, azali te kosɛnga bango bábuka mbuma ya solosolo. Kasi kobuka mbuma ezali nde kokómisa bato mosusu bayekoli mpo bázwa esika na Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli basengeli kosalela makoki ndenge na ndenge oyo bazali na yango mpo na kokómisa bato ebele bazwi ya libula ya Bokonzi.

Wapi makambo mosusu Yesu amonisi na ndakisa oyo apesi? Alobi ete bana-mboka “bazalaki koyina [moto yango ya lokumu] mpe batindelaki ye etuluku ya bantoma mpe balobaki ete: ‘Tolingi te ete moto oyo akóma mokonzi na biso.’” (Luka 19:14) Bayekoli bayebi ete Bayuda balingi Yesu te, basusu balingi kutu koboma ye. Nsima ya liwa ya Yesu mpe kokende na ye na likoló, Bayuda mingi bamonisi ndenge bazalaki kotalela ye na ndenge bazali konyokola bayekoli na ye. Batɛmɛli yango bamonisi polele ete balingi te Yesu azala Mokonzi.​—Yoane 19:15, 16; Misala 4:13-18; 5:40.

Ndenge nini baombo zomi basaleli mina na bango tii ntango ‘moto ya lokumu’ akozwa “nguya ya bokonzi” mpe akozonga? Yesu alobi ete: “Nsukansuka ntango azongaki nsima ya kozwa nguya ya bokonzi, atindaki bábengela ye baombo wana oyo apesaki bango shekele ya palata, mpo na koyeba litomba oyo bazwaki na mombongo. Bongo oyo ya liboso ayaki, mpe alobaki ete: ‘Nkolo, mina na yo eboti mina zomi.’ Bongo alobaki na ye ete: ‘Longonya, moombo malamu! Mpo omonisi ete ozali sembo na likambo ya moke mpenza, zalá na bokonzi likoló ya bingumba zomi.’ Nzokande oyo ya mibale ayaki, mpe alobaki ete: ‘Nkolo, mina na yo epesi mina mitano.’ Alobaki mpe na oyo ete: ‘Yo mpe zwá mokumba ya bingumba mitano.’”​—Luka 19:15-19.

Soki bayekoli basali lokola baombo oyo basalelaki makoki na bango nyonso mpo na kokómisa ebele ya bato bayekoli, bakoki kozala na elikya ete Yesu akosepela mingi. Mpe bakoki kotya motema ete akopesa bango mbano mpo na mosala makasi wana. Ya solo, makambo ya bomoi ya bayekoli nyonso ya Yesu ezalaka ndenge moko te, makoki na bango mpe mabaku oyo bakutanaka na yango ekeseni. Kasi, ntango Yesu akozwa “nguya ya bokonzi,” akomona mpe akopambola milende na bango ya sembo na mosala ya kokómisa bato bayekoli.​—Matai 28:19, 20.

Kasi talá bokeseni ntango Yesu asukisi ndakisa oyo apesi. Alobi boye: “Kasi [moombo] mosusu ayaki, mpe alobi ete: ‘Nkolo, talá mina na yo, nabombaki yango na elamba. Omoni, nazalaki kobanga yo, mpo ozali moto ya matata; okamataka oyo obombisaki te mpe obukaka oyo olonaki te.’ Alobaki na ye ete: ‘Moombo mabe, nakosambisa yo na maloba ya monɔkɔ na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, nakamataka oyo nabombisaki  te mpe nabukaka oyo nalonaki te, boye te? Bongo mpo na nini otyaki shekele na ngai ya palata na banki te? Bongo awa nayei mbɛlɛ nabimisi yango na benefisi.’ Bongo alobaki na baoyo batɛlɛmaki wana ete: ‘Bóbɔtɔla ye mina wana mpe bópesa yango na moto oyo azali na mina zomi.’”​—Luka 19:20-24.

Lokola moombo yango aboyaki kosala mosala mpo na kokolisa bomɛngo ya bokonzi ya nkolo na ye, babɔtɔlaki ye biloko nyonso. Bantoma bazali kozela na motema likoló boyangeli ya Yesu na Bokonzi ya Nzambe. Ekoki kozala ete makambo oyo Yesu alobi mpo na moombo ya nsuka esalisi bango bámona ete soki bazali na molende te, bakozwa esika te na Bokonzi wana.

Maloba ya Yesu esengeli kolendisa bayekoli ya sembo bábakisa milende na bango. Asukisi ete, “Nalobi na bino: Moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mingi; kasi moto oyo azali na eloko te, ata oyo azali na yango bakobɔtɔla yango.” Abakisi ete banguna na ye, oyo balingaka te ete ‘akóma mokonzi na bango,’ bakobomama. Na nsima, Yesu akobi mobembo na ye na Yerusaleme.​—Luka 19:26-28.