Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 86

Mwana oyo abungaki azongi

Mwana oyo abungaki azongi

LUKA 15:11-32

  • LISOLO YA MWANA OYO ABUNGAKI

Ekoki kozala ete Yesu apesi ndakisa ya mwana oyo abungaki mpe ya drakimɛ moko ya ebende oyo ebungaki ntango azali naino na Perea na ɛsti ya Ebale Yordani. Liteya oyo bandakisa yango nyonso mibale ezali koteya biso ezali ete tosengeli kosepela ntango mosumuki moko abongoli motema mpe azongeli Nzambe. Bafarisai ná bakomeli bazalaki kotyola Yesu mpo ayambaka bato ya ndenge wana. Kasi batyoli yango bazwi liteya na bandakisa mibale oyo Yesu apesi? Bamonaki ndenge Tata na biso ya likoló ayokaka mpo na basumuki oyo babongoli mitema? Sikoyo Yesu apesi ndakisa moko ya kafukafu oyo emonisi mpenza mateya wana ya ntina.

Lisolo oyo elobeli tata moko oyo azali na bana mibali mibale; mwana mobali ya leki nde balobeli mingi na lisolo yango. Ezala Bafarisai ná bakomeli ata mpe baoyo bazali koyoka Yesu ntango azali kobɛta lisolo oyo, basengeli kozwa liteya na makambo oyo azali koloba mpo na mwana mobali ya leki. Kasi, esengeli te kozwa na lisɛki makambo oyo Yesu azali koloba mpo na tata mpe mwana mobali ya mokóló, mpo bizaleli oyo bamonisaki ekoki mpe koteya biso. Na yango, moná na makanisi bato wana misato ntango Yesu azali kobɛta lisolo yango.

Yesu abandi lisolo yango boye: “Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Mpe oyo ya leki alobaki na tata na ye ete: ‘Tata, pesá ngai ndambo na ngai ya biloko.’ Bongo akabolelaki bango biloko na ye ya kobikela.” (Luka 15:11, 12) Simbá ete mwana mobali oyo ya leki azali te koluka kozwa libula na ye mpo tata na ye akufi. Tata azali naino na bomoi. Kasi, mwana yango azali nde kosɛnga ndambo na ye ya biloko sikoyo mpo atambwisa bomoi na ye ndenge alingi mpe asala nyonso oyo motema na ye esepeli. Makambo elekaki ndenge nini?

Yesu alobi ete: “Nsima ya mwa mikolo, mwana yango oyo ya leki ayanganisaki biloko nyonso mpe akendaki na mokili moko ya mosika, mpe kuna abebisaki biloko na ye na bomoi moko ya mbindo.” (Luka 15:13) Na esika ete atikala na ndako na bango epai oyo tata na bango azali kobatela mpe kobɔkɔla bana na ye malamu, mwana yango akei na mboka mosusu. Kuna, abebisi biloko na ye nyonso  mpo na kokokisa bamposa na ye ya kosangisa nzoto. Na nsima, mikakatano ekómeli ye, kaka ndenge Yesu amonisi yango na lisolo na ye ete:

“Ntango asilisaki kobebisa biloko nyonso, nzala moko makasi ebimaki na mokili wana mobimba, mpe abandaki kokelela. Akendaki kutu kokangama na mwana-mboka moko ya mokili wana, mpe atindaki ye na bilanga na ye mpo abatelaka bangulu. Mpe azalaki na mposa ya kolya ata bilei ya bangulu, kasi moto moko apesaki ye eloko te.”​—Luka 15:14-16.

Mobeko ya Nzambe etyaki bangulu na molɔngɔ ya banyama ya mbindo, atako bongo mwana oyo asengeli kobatela bangulu. Anyokwami na nzala mpe yango esali ete akóma koluka kolya biloko ya bangulu oyo azali kobatela. Ntango akómi na mpasi mpe azangi elikya, “makanisi ya malamu ezongelaki ye.” Asali nini? Alobi ete: “Ebele ya basali ya tata na ngai bazali na mampa mingi, bongo ngai nazali kokufa na nzala awa! Nakotɛlɛma mpe nakokende epai ya tata na ngai mpe nakoloba na ye ete: ‘Tata, nasaleli likoló lisumu mpe nasaleli yo lisumu. Nabongi lisusu kobengama mwana na yo te. Zwá ngai lokola moko ya basali na yo.’” Na nsima, atɛlɛmi mpe akei epai ya tata na ye.​—Luka 15:17-20.

Tata na ye akosala nini? Akosilikela mwana na ye mpe akopamela ye mpo na bozoba oyo asalaki na ndenge awelaki kolongwa na ndako? Tata yango akoboya kokipe to koyamba mwana yango? Soki ezalaka yo, olingaki kosala nini? Olingaki kosala nini soki ezalaka mwana na yo ya mobali to ya mwasi?

 MWANA OYO ABUNGAKI AMONANI

Yesu amonisi ndenge oyo tata ayoki mpe makambo oyo asali. Alobi boye: “Ntango [mwana] azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokaki mawa, mpe apotaki mbangu mpe amibwakaki na nkingo na ye mpe apwɛpwaki ye na boboto.” (Luka 15:20) Ata soki tata yango ayokaki bansango ya bomoi ya mbindo oyo mwana na ye azalaki na yango, ayambi ye ntango azongi. Lisolo oyo ekosalisa bakonzi ya Bayuda oyo balobaka ete bayebi Yehova mpe basambelaka ye, bámona ndenge oyo Tata na biso ya likoló ayokaka mpo na mosumuki oyo abongoli motema? Bakondima mpe ete Yesu azali na ezaleli ya ndenge wana?

Elongi ya mawa oyo tata wana amoni epai ya mwana na ye etindi ye asosola ete mwana yango abongoli motema. Kasi, likambo ya malamu oyo tata asali ya kokende koyamba ye esalisi mwana yango ayambola masumu na ye. Yesu alobi boye: “Bongo mwana alobaki na ye ete: ‘Tata, nasaleli likoló lisumu mpe nasaleli yo lisumu. Nabongi lisusu kobengama mwana na yo te.’”​—Luka 15:21.

Tata alobi na baombo na ye ete: “Bóya nokinoki na zambala oyo eleki kitoko, mpe bólatisa ye yango, mpe bólatisa ye lopɛtɛ na lobɔkɔ mpe sandale na makolo. Mpe bóya na mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta, bóboma yango, bongo tólya mpe tósepela, mpo mwana na ngai oyo akufaki mpe azongi na bomoi; abungaki mpe amonani.” Na nsima, “babandaki kosepela.”​—Luka 15:22-24.

Ntango makambo wana ezali kosalema, mwana na ye ya mokóló azalaki na elanga. Yesu alobi boye mpo na mwana yango: “Ntango ayaki mpe akómaki penepene na ndako ayokaki bazali kobɛta miziki mpe kobina. Bongo abengaki moko na basaleli mpe atunaki ye ntina ya makambo wana. Alobaki na ye ete: ‘Ndeko na yo ayei, mpe tata na yo abomi mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta, mpo azwi ye lisusu na nzoto kolɔngɔnɔ.’ Kasi asilikaki mpe aboyaki kokɔta. Bongo tata na ye abimaki mpe abandaki kobondela ye. Azongiselaki tata na ye ete: ‘Talá bambula mingi oyo nazali kosalela yo lokola moombo mpe ata mbala moko te nabuká mitindo na yo, kasi opesá ngai ata mbala moko te mwana-ntaba mpo nasepela elongo na baninga na ngai. Kasi ntango kaka  mwana na yo oyo ayei, ye moto asilisaki biloko na yo ya kobikela na basi ya ndumba, obomeli ye mwana-ngɔmbɛ ya mobali ya mafutamafuta.’”​—Luka 15:25-30.

Lokola mwana wana ya mokóló, banani bazalaki koimaima mpo na motema mawa mpe likebi oyo Yesu azali kotyela bato mpamba mpe basumuki? Ezali bakomeli mpe Bafarisai. Yesu apesi ndakisa oyo mpo bato yango bazali koloba mabe na ndenge alimbisaka basumuki. Na ntembe te, moto nyonso oyo asepelaka te na ndenge Nzambe amonisaka motema mawa asengeli kozwa liteya oyo na lisɛki te.

Yesu asukisi ndakisa na ye na lisolo oyo tata asololi na mwana na ye ya mokóló. Alobi boye: “Mwana na ngai, ozalaka ntango nyonso elongo na ngai, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo; kasi tiká tósepela kaka mpe tózala na esengo, mpo ndeko na yo oyo akufaki mpe azongi na bomoi, abungaki mpe amonani.”​—Luka 15:31, 32.

Yesu amonisi te eloko oyo mwana ya mokóló asali na nsima. Kasi, nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, “ebele ya banganga-nzambe babandaki kotosa kondima.” (Misala 6:7) Mbala mosusu baoyo bayokaki ndakisa ya kafukafu oyo Yesu apesaki ya mwana oyo abungá bazalaki mpe na kati na bango. Ya solo, ata bango mpe bazalaki na likoki ya kokóma lisusu na makanisi malamu, kobongola motema mpe kozongela Nzambe.

Banda mokolo wana, bayekoli ya Yesu bakoki mpe basengeli kozwa na lisɛki te mateya ya ntina mingi oyo amonisaki na ndakisa wana. Liteya ya liboso ezali ete soki totikali na kati ya libateli ya Tata na biso ya bolingo oyo atyelaka biso basaleli na ye likebi, yango ekomonisa ete tozali na bwanya, na esika ya koyengayenga mpo na koluka bisengo na “mokili moko ya mosika.”

Liteya ya mibale ezali ete soki moko na biso alongwe na nzela ya Nzambe, asengeli kozongela Tata na biso na komikitisa mpenza mpo andima ye lisusu.

Likambo mosusu oyo ezali mpe liteya mpo na biso ezali ezaleli oyo tata amonisaki ná oyo mwana ya mokóló amonisaki; tata amonisaki ezaleli ya koyamba bapaya mpe ya kolimbisa, kasi mwana na ye ya mokóló amonisaki ezaleli ya nkanda mpe ya koboya kolimbisa. Ezali solo ete basaleli ya Nzambe basepelaka kolimbisa moto oyo abungaki nzela soki abongoli mpenza motema mpe azongi na ‘ndako ya tata.’ Tósepela ete ndeko na biso oyo ‘akufaki azongi na bomoi’ mpe oyo ‘abungaki amonani.’

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

‘Okangi ntina’?

Ndakisa oyo Yesu apesaki ya moloni oyo alalaki, ya monyama, mpe ya mwana ya mobulu elimboli nini?