Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 88

Mbongwana mpo na mozwi mpe Lazare

Mbongwana mpo na mozwi mpe Lazare

LUKA 16:14-31

  • NDAKISA YA MOZWI MPE LAZARE

Yesu azali kopesa bayekoli na ye toli moko ya malamu mpo na ndenge ya kosalela biloko ya mokili. Kasi kaka bayekoli na ye te nde bazali koyoka ye. Bafarisai mpe bazali wana, mpe basengeli kolanda na likebi mpenza toli wana ya Yesu. Mpo na nini? Mpo bazali bato “balingá mbongo.” Ntango bayoki makambo oyo Yesu azali koloba, ‘babandi kosɛkasɛka ye.’​—Luka 15:2; 16:13, 14.

Kasi, yango ebangisi Yesu te. Ayebisi bango boye: “Bino nde bato oyo bomitángaka bino moko bayengebene liboso ya bato, kasi Nzambe ayebi mitema na bino; mpo eloko ya ntina na miso ya bato ezali eloko ya bosɔtɔ na miso ya Nzambe.”​—Luka 16:15.

Bafarisai bazali na “ntina na miso ya bato,” kasi ntango ekoki mpo makambo ebongwana mpenza. Bato oyo bazali kokumisama mpo na biloko ya mokili, makambo ya politiki mpe mangomba basengeli kosila valɛrɛ. Bato mpamba oyo bayebi bamposa na bango ya elimo basengeli kozwa lokumu. Yesu amonisi yango polele ete mbongwana monene ekosalema, ntango alobi boye:

“Mibeko mpe Basakoli ezalaki tii na Yoane. Banda ntango wana nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama, mpe bato ya ndenge nyonso bazali kowela kokende epai na yango. Ya solo, ezali mpasi te ete likoló ná mabele eleka na esika ete mwa eteni ya ‘i’ ya Mibeko ekokisama te.” (Luka 3:18; 16:16, 17) Ndenge nini maloba ya Yesu emonisi ete mbongwana esengeli kosalema?

Na lolendo nyonso, bakonzi ya mangomba ya Bayuda balobi ete batosaka Mibeko ya Moize. Tóbosana te ete ntango Yesu abikisaki moto moko oyo akufá miso na Yerusaleme, Bafarisai balobaki na lolendo nyonso ete: “Biso tozali bayekoli ya Moize. Biso toyebi ete Nzambe alobaki na Moize.” (Yoane 9:13, 28, 29) Moko ya ntina ya Mibeko oyo epesamaki na nzela ya Moize ezalaki mpo na komema bato ya komikitisa epai ya Masiya, elingi koloba Yesu. Yoane Mobatisi abengaki Yesu ete Mwana-Mpate ya Nzambe. (Yoane 1:29-34) Kobanda na mosala ya kosakola ya Yoane, Bayuda ya komikitisa, mingimingi babola, bazali kondima “Bokonzi ya Nzambe.” Ya solo, ezali na “nsango malamu” mpo na bato nyonso oyo balingi kokóma bato oyo bakoyangelama na Bokonzi ya Nzambe mpe bakozwa matomba na yango.

Mibeko ya Moize ekokisami; kutu ememi nde bato epai ya Masiya. Na yango ntina ya kokoba kotosa yango esilaki. Na ndakisa, Mibeko epesaki nzela na koboma libala mpo na makambo ndenge na ndenge, kasi sikoyo Yesu alimboli ete “moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye mpe abali mosusu azali kosala ekobo, mpe moto oyo abali mwasi oyo abomá libala na mobali na ye azali kosala ekobo.” (Luka 16:18) Maloba wana epelisi nkanda ya Bafarisai oyo bazali kotya mibeko na makambo nyonso!

Sikoyo, Yesu apesi ndakisa moko oyo emonisi mbongwana moko monene oyo ekosalema. Alobeli  mibali mibale, oyo makambo ya bomoi na bango ebongwani mpenza. Wana tozali kotalela ndakisa yango, tóbosana te ete na kati ya bato oyo bazali koyoka ezali mpe na Bafarisai, bato oyo balingá mbongo mpe oyo bato bazali kokumisa mingi.

Yesu alobi boye: “Kasi moto moko boye azalaki mozwi, mpe azalaki kolata bilamba ya motane-moindo mpe lini, mokolo na mokolo azalaki na biloko ya kitoko mingi mpenza. Kasi mosɛngi-biloko moko na nkombo Lazare azalaki kotyama mbala na mbala na porte na ye, nzoto na ye etondá na bampota mpe azalaki na mposa ya kolya biloko oyo ezalaki kokwea na mesa ya mozwi yango. Ɛɛ, kutu, bambwa bazalaki koya kolɛmbɔla bampota na ye.”​—Luka 16:19-21.

Bafarisai bazali bato oyo balingá mbongo; na yango tokoki nde kokamwa ete na ndakisa yango, Yesu akokanisa bango na “mozwi”? Bakonzi wana ya mangomba ya Bayuda bazalaki mpe kolinga kolata bilamba ya ntalo makasi, oyo ezali kobenda likebi ya bato. Mpe longola bomɛngo na bango ya biloko ya mosuni, emonani mpe ete bazali bazwi na elimo mpo na mikumba mpe mabaku mosusu ya malamu oyo bazali na yango. Ya solo, kokokanisa bango na moto oyo alati bilamba ya motane-bulé emonisi esika na bango ya lokumu, mpe bilamba pɛtɛpɛtɛ ya mpɛmbɛ, emonisi boyengebene oyo bango moko bazalaki komipesa.​—Danyele 5:7.

Ndenge nini bato yango ya bozwi mpe ya lolendo bazali kotalela babola to bato mpamba? Na lityo nyonso bazali kotalela bango  lokola ‘am haˈarèts, to bato ya mabele, oyo bayebi mibeko te mpe babongi te koteyama na yango. (Yoane 7:49) Yango eyokani na likambo ya “mosɛngi-biloko moko na nkombo Lazare,” oyo azali na mposa ya kolya ata ‘biloko oyo ezali kokwea na mesa ya mozwi.’ Lokola Lazare oyo nzoto na ye etondi na bampota, bazali kotyola bato mpamba lokola nde Nzambe asepelaka na bango te.

Likambo wana ya mawa eumeli mwa ntango, kasi Yesu ayebaki ete ntango ekoki mpo mbongwana moko monene esalema mpo na baoyo bazali lokola mozwi mpe baoyo bazali lokola Lazare.

MBONGWANA MPO NA MOZWI MPE LAZARE

Yesu akobi kolimbola mbongwana monene yango. Alobi boye: “Mpe na nsima mosɛngi-biloko yango akufaki mpe baanzelu bamemaki ye tii na ntolo ya Abrahama. Mozwi mpe akufaki mpe akundamaki. Mpe na kati ya Nkunda atombolaki miso na ye, wana azalaki na kati ya minyoko, mpe amonaki Abrahama mosika mpe Lazare na ntolo na ye.”​—Luka 16:22, 23.

Bato oyo bazali koyoka Yesu bayebi ete Abrahama akufá eleki ntango molai mpe azali na Nkunda. Biblia emonisi polele ete ata moto moko te oyo azali na kati ya Nkunda, to Sheole, akoki komona to koloba, ezala mpe Abrahama. (Mosakoli 9:5, 10) Na yango, bakonzi ya mangomba yango bakangi ntina ya ndakisa wana ya Yesu? Yesu alingi komonisa nini mpo na bato mpamba mpe bakonzi ya mangomba oyo balingá mbongo?

Yesu auti komonisa mbongwana yango na ndenge alobi ete ‘Mibeko mpe Basakoli ezalaki tii na Yoane, Mobatisi, kasi banda ntango wana nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama.’ Na yango, mozwi mpe Lazare bakufi na ezaleli na bango ya kala to lolenge ya bomoi na bango ya kala ntango Yoane ná Yesu Kristo babandaki kosakola, mpe bakómi na bomoi ya sika na boye ete Nzambe akómi kotalela bango na lolenge ekeseni.

Mingimingi mpenza, bato ya komikitisa mpe babola bazali na nzala ya elimo banda kala. Kasi basalisi bango mpe bandimi nsango malamu ya Bokonzi oyo Yoane Mobatisi asakolaki liboso mpe oyo Yesu azali kosakola. Liboso, bazalaki koyoka yango kaka mwa moke lokola ‘biloko oyo ezalaki kokwea na mesa ya elimo’ ya bakonzi ya mangomba. Sikoyo, bazali kolya mpenza mateya ya solo ya Biblia, mingimingi makambo kitoko oyo Yesu azali kolimbola. Ezali lokola nde bazali na esika ya lokumu na miso ya Yehova Nzambe.

Nzokande, bazwi ná bakonzi ya mangomba baboyi nsango malamu ya Bokonzi oyo Yoane  asakolaki mpe oyo Yesu azali kosakola bisika nyonso. (Matai 3:1, 2; 4:17) Na ndenge yango, bazali na nkanda, to bazali kotungisama mpo na nsango wana, oyo ezali komonisa lisambisi ya makasi oyo Nzambe akosambisa bango. (Matai 3:7-12) Soki Yesu mpe bayekoli na ye bátikaka kosakola nsango ya Nzambe, yango elingaki kokitisa motema ya bakonzi ya mangomba oyo balingá mbongo. Bakonzi yango bazali lokola mozwi ya ndakisa ya Yesu, oyo alobi ete: “Tata Abrahama, yokelá ngai mawa mpe tindá Lazare azindisa nsɔngɛ ya mosapi na ye na mai mpe akómisa lolemo na ngai mpiɔ, mpo nazali komona bwale na mɔtɔ oyo ezali kongala.”​—Luka 16:24.

Kasi ekosalema bongo te. Bakonzi mingi ya mangomba bakobongwana te. Baboyaki ‘koyoka Moize ná Basakoli,’ oyo makomi na bango esengelaki kotinda bango bándima ete Yesu azali Masiya ya Nzambe mpe Mokonzi. (Luka 16:29, 31; Bagalatia 3:24) Bazali mpe komikitisa te mpe bazali kondima te baoyo bazali babola, oyo bazali kondima Yesu mpe Nzambe andimi bango. Nzokande, bayekoli ya Yesu bakokaki te kotika to kolɛmbisa solo kaka mpo na kosepelisa bakonzi ya mangomba to kokitisa bango motema. Na ndakisa na ye, Yesu alobeli likambo yango na maloba oyo “Tata Abrahama” ayebisi mozwi ete:

“Mwana, kobosana te ete ntango ozalaki na bomoi ozwaki biloko kitoko mingi, kasi Lazare azwaki biloko ya mabe. Bongo sikoyo ye azali kobɔndisama awa kasi yo ozali komona bwale. Mpe longola makambo nyonso wana, libulu moko monene ekabolá biso ná bino, mpe bato oyo balingi kolongwa awa báya epai na bino bakoki koya te, mpe bato bakoki kolongwa kuna mpe kokatisa tii epai na biso te.”​—Luka 16:25, 26.

Ebongaki mpenza ete mbongwana monene wana esalema! Na nsuka, makambo ebongwanaki kati na bakonzi wana ya mangomba ya lolendo mpe bato ya komikitisa oyo bandimaki ekanganeli ya Yesu mpe basengelaki kopema to kobɔndisama mpe koleisama na elimo. (Matai 11:28-30) Mbongwana yango emonanaki polele mwa basanza na nsima, ntango kondimana ya sika ezwaki esika ya kondimana ya Mibeko. (Yirimia 31:31-33; Bakolose 2:14; Baebre 8:7-13) Ntango Nzambe asopaki elimo santu na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., na ntembe te, emonanaki polele ete Nzambe andimi bayekoli ya Yesu, kasi te Bafarisai mpe baoyo basanganaki na bango na makambo ya losambo.