Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 97

Ndakisa ya basali na elanga ya vinyo

Ndakisa ya basali na elanga ya vinyo

MATAI 20:1-16

  • BASALI OYO BAZALAKI “BATO YA NSUKA” NA ELANGA YA VINYO BAKÓMI “BATO YA LIBOSO”

Yesu auti koyebisa bato oyo bazalaki koyoka ye na Perea ete “bato mingi oyo bazali bato ya liboso bakozala bato ya nsuka mpe bato ya nsuka bakozala bato ya liboso.” (Matai 19:30) Mpo na kobenda likebi ya bato na maloba yango, apesi ndakisa ya basali na elanga ya vinyo. Alobi ete:

“Bokonzi ya likoló ezali lokola nkolo-ndako moko oyo abimaki ntɔngɔntɔngɔ mpo na kozwa bato na mosala ya elanga na ye ya vinyo. Nsima ya koyokana na bato ya mosala ete akofuta bango denari moko na mokolo, atindaki bango na elanga na ye ya vinyo. Mpe ntango abimaki pene na ngonga ya misato, amonaki bato mosusu batɛlɛmi na zando, mosala ya kosala ezali te; mpe alobaki na bango ete: ‘Bino mpe, bókende na elanga ya vinyo, mpe nakopesa bino lifuti oyo ebongi.’ Bongo bakendaki. Lisusu, abimaki pene na ngonga ya motoba mpe ya libwa mpe asalaki kaka bongo. Nsukansuka, pene na ngonga ya zomi na moko abimaki mpe akutaki bato mosusu batɛlɛmi, mpe alobaki na bango ete: ‘Mpo na nini botɛlɛmi awa mokolo mobimba mosala te?’ Balobaki na ye ete: ‘Mpo moto moko te azwi biso na mosala.’ Ye alobaki na bango ete: ‘Bino mpe bókende na elanga ya vinyo.’”​—Matai 20:1-7.

Mbala mosusu ntango Yesu alobeli “Bokonzi ya likoló” mpe “nkolo-ndako moko,” bato oyo bazali koyoka ye bakanisi Yehova Nzambe. Makomami elobelaka Yehova lokola nkolo elanga ya vinyo, oyo ezalaki elilingi ya libota ya Yisraele. (Nzembo 80:8, 9; Yisaya 5:3, 4) Baoyo bazali na nse ya kondimana ya mibeko bakokanisami na basali na elanga ya vinyo. Kasi Yesu azali kolobela makambo ya kala te. Azali nde kolobela makambo oyo ezali kosalema na mikolo na ye.

Emonani lokola ete bakambi ya lingomba, na ndakisa Bafarisai oyo bautaki komeka ye na likambo etali koboma libala, nde bazali ntango nyonso kosalela Nzambe mosala makasi. Bazali lokola bato oyo basali mosala mokolo mobimba mpe bazali kozela lifuti oyo ekokani na mosala basali, elingi koloba lifuti ya denari moko.

Banganga-nzambe mpe bato mosusu na kati na bango bazali kokanisa ete Bayuda mosusu basalelaka Nzambe kaka moke, elingi koloba bazali lokola bato oyo basali kaka ndambo ya mokolo na elanga ya vinyo ya Nzambe. Na ndakisa ya Yesu, Bayuda yango bakokani na bato oyo bazwaki mosala “pene na ngonga ya misato” (9:00) to mwa moke na mokolo wana ya mosala, elingi koloba, na ngonga ya motoba (12:00), ya libwa (15:00) mpe na nsuka na ngonga ya zomi na moko (17:00).

Bazali komona mibali mpe basi oyo bazali kolanda Yesu, lokola “bato balakelamá mabe.” (Yoane 7:49) Balekisaki ntango mingi ya bomoi na bango na mosala ya koluka-mbisi to na misala mosusu ya makasi. Kasi, na prɛnta ya mobu 29 T.B., “nkolo ya elanga ya vinyo” atindaki Yesu abenga bato mpamba wana básalela Nzambe mosala makasi mpe bákóma bayekoli ya Kristo. Bazali “bato ya nsuka” oyo Yesu alobeli, basali na elanga ya vinyo oyo bayei na ngonga ya zomi na moko.

Na nsuka ya ndakisa na ye, Yesu alobeli likambo oyo esalemi ntango mokolo yango ya mosala esili; alobi boye: “Ntango mpokwa ekómaki, nkolo ya elanga ya vinyo alobaki na kapita na ye ete: ‘Bengá bato ya mosala mpe futá bango lifuti na bango, bandá na bato ya nsuka tii na bato ya liboso.’ Ntango bato ya ngonga ya zomi na moko bayei, bazwi moto na moto denari moko. Bongo, ntango bato ya liboso bayei, bakanisi ete bakozwa mingi koleka; kasi bango mpe bazwi lifuti ya denari moko. Ntango bazwi yango babandi koimaima likoló ya nkolo-ndako mpe balobi ete: ‘Bato oyo ya nsuka basali kaka ngonga moko; kasi yo ofuti bango ndenge moko na biso bato tonyokwami mokolo mobimba mpe tomoni mpasi na molunge makasi!’ Kasi azongiseli moko na bango ete: ‘Moninga, nasali yo mabe te. Oyokanaki na ngai ete nakofuta yo denari moko, boye te? Kamatá lifuti na yo mpe kende. Nalingi kopesa moto oyo ya nsuka ndenge moko na yo. Nazali na lotomo ya kosala na biloko na ngai ndenge nalingi, boye te? To oyoki mabe mpo na bolamu oyo nasali?’ Ndenge wana nde bato ya nsuka bakozala bato ya liboso, mpe bato ya liboso bakozala bato ya nsuka.”​—Matai 20:8-16.

Mbala mosusu bayekoli bazali komituna soki eteni ya nsuka ya ndakisa ya Yesu ekosalema ndenge  nini. Ndenge nini bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo bazali kokanisa ete bazali “bato ya liboso,” bakokóma “bato ya nsuka”? Mpe ndenge nini bayekoli ya Yesu bakokóma “bato ya liboso”?

Bayekoli ya Yesu oyo Bafarisai mpe bato mosusu bazali komona ete bazali “bato ya nsuka,” bakokóma “bato ya liboso,” ya kozwa lifuti ya mokolo mobimba. Ntango Yesu akufaki, Nzambe aboyaki Yerusaleme ya mabele, mpe na esika na yango aponi ekólo ya sika, “Yisraele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16; Matai 23:38) Yoane Mobatisi alobeli bato yango ntango abɛti lisolo ya batisimo na elimo santu oyo esengelaki kopesama. Baoyo bazalaki “bato ya nsuka” bakokóma bato ya liboso ya kozwa batisimo yango mpe bakozwa mokumba ya kozala batatoli ya Yesu “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:5, 8; Matai 3:11) Soki bayekoli bakangi ntina ya mbongwana monene oyo Yesu azali kolobela, bakoki komona na mosika ndenge bakonzi ya mangomba oyo bakómi “bato ya nsuka” bakoyokela bango nkanda makasi.