Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 95

Mateya etali koboma libala mpe kolinga bana

Mateya etali koboma libala mpe kolinga bana

MATAI 19:1-15 MARKO 10:1-16 LUKA 18:15-17

  • YESU AMONISI LIKANISI YA NZAMBE NA LIKAMBO ETALI KOBOMA LIBALA

  • LIKABO YA KOTIKALA MONZEMBA

  • NTINA YA KOZALA LOKOLA BANA MIKE

Yesu ná bayekoli na ye balongwe na Galile, bakatisi Ebale ya Yordani mpe bazwi nzela ya sudi oyo eleki na Perea. Mbala ya nsuka oyo Yesu azalaki na Perea, ayebisaki Bafarisai mibeko ya Nzambe na likambo etali koboma libala. (Luka 16:18) Sikoyo babimisi lisusu likambo yango mpo na komeka Yesu.

Moize akomaki ete mobali akokaki koboma libala na mwasi na ye soki amoni “likambo moko ya nsɔni” epai na ye. (Kolimbola Mibeko 24:1) Ezali na makanisi ndenge na ndenge mpo na likambo oyo esalaka ete bato báboma libala. Bato mosusu bakanisaka ete ata makambo mikemike ekoki mpe kosala ete libala ekufa. Na yango, Bafarisai batuni boye: “Mobali akoki koboma libala na mwasi na ye mpo na likambo nyonso?”​—Matai 19:3.

Na esika ete asalela makanisi ya bato, na mayele mpenza Yesu alobeli mokano ya Nzambe mpo na libala. “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’? Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:4-6) Ntango Nzambe abandisaki libala ya Adama ná Eva, asalaki te ebongiseli ya koboma libala na bango.

Bafarisai batyeli maloba ya Yesu ntembe mpe balobi ete: “Bongo mpo na nini Moize apesaki etinda ya kopesa mokanda ya kobengana mwasi mpe koboma na ye libala?” (Matai 19:7) Yesu ayebisi bango ete: “Moize atikelaki bino nzela ya koboma libala na basi na bino mpo na motó makasi na bino, kasi yango ezalaki bongo te banda na ebandeli.” (Matai 19:8) “Ebandeli” yango ezali te ya mikolo ya Moize, ezali nde ntango Nzambe abandisaki libala na Edene.

Na nsima Yesu ayebisi bango likambo moko ya ntina: “Nalobi na bino ete moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te [na Grɛki, porneiʹa], mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Matai 19:9) Pite to ekobo ezali likambo kaka moko oyo Makomami endimi mpo libala ekufa.

Yango etindi bayekoli báloba boye: “Soki likambo ya mobali ná mwasi na ye ezali bongo, ntina ya kobala ezali te.” (Matai 19:10) Emonani polele ete moto oyo azali kokana kobala asengeli koyeba ete libala esengeli koumela mpo na libela!

Na likambo etali bonzemba, Yesu amonisi ete bato mosusu babotamá mikube mpe bazali na likoki ya kobala te. Bato mosusu bamikómisá mikube mpe bazali lisusu te na likoki ya kosangisa nzoto. Kasi, bato mosusu bakangaka mposa na bango ya kosangisa nzoto. Basalaka bongo mpo bátya makanisi na bango mobimba na makambo etali Bokonzi. Yesu ayebisi bayoki na ye ete: “Oyo akoki kosala yango [kotikala monzemba] asala yango.”​—Matai 19:12.

Sikoyo bato babandi komema bana na bango epai ya Yesu. Kasi, bayekoli bapameli bato yango, mbala mosusu balingi ete bátungisa Yesu te. Ntango Yesu amoni bongo, ayoki mabe mpe alobi na bango ete: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango. Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Moto nyonso oyo ayambi bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te akokɔta na yango ata moke te.”​—Marko 10:14, 15; Luka 18:15.

Oyo nde liteya moko malamu! Mpo na koyamba Bokonzi ya Nzambe, tosengeli kozala na komikitisa mpe kondima báteya biso, lokola bana mike. Mpo na komonisa ete alingaka bana mike, Yesu amemi bango mpe apamboli bango. Mpe azalaka na bolingo ya ndenge wana epai ya moto nyonso oyo “ayambi bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke.”​—Luka 18:17.