Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 96

Yesu ayanoli elenge mokonzi moko ya bozwi

Yesu ayanoli elenge mokonzi moko ya bozwi

MATAI 19:16-30 MARKO 10:17-31 LUKA 18:18-30

  • MOZWI MOKO ATUNI LIKAMBO ETALI BOMOI YA SEKO

Yesu azali kaka koleka na Perea mpo na kokende na Yerusaleme. Elenge mobali moko ya bozwi apoti mbangu mpe afukami liboso na ye. Mobali yango azali “moyangeli moko,” mbala mosusu azali mokambi moko na sinagoga to mosambisi na Sanedrina. Atuni boye: “Moteyi malamu, nasala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?”​—Luka 8:41; 18:18; 24:20.

Yesu apesi ye eyano ete: “Mpo na nini ozali kobenga ngai malamu? Moto malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.” Emonani lokola ete elenge mobali yango asaleli liloba “malamu” lokola mwa titre moko boye kaka, ndenge barabi bazalaki kosala. Atako Yesu ayebi koteya, kasi amonisi moto yango ete titre “malamu” ebongi kaka mpo na Nzambe.

Yesu apesi ye toli ete: “Soki olingi kokɔta na bomoi, tosáká mibeko ntango nyonso.” Na yango elenge mobali yango atuni ye ete: “Oyo wapi?” Yesu atángaki mibeko mitano kati na Mibeko Zomi, na ndakisa oyo etali koboma moto, kosala ekobo, koyiba, kopesa litatoli ya lokuta, mpe kokumisa tata mpe mama. Na nsima abakisi mobeko moko ya ntina mingi: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”​—Matai 19:17-19.

Mobali yango azongiseli Yesu ete: “Natosi nyonso wana; eloko nini nazangi lisusu?” (Matai 19:20) Ekoki kozala ete azali komona lokola azangi eloko moko ya malamu, to likambo moko monene oyo ekosalisa ye azwa bomoi ya seko. Lokola amoni ete azali mpenza kosɛnga ye na motema moko, Yesu ‘atali ye na bolingo.’ (Marko 10:21) Kasi, mobali yango azali na mokakatano moko.

Mobali yango akangami makasi na bozwi na ye, yango wana Yesu ayebisi ye ete: “Eloko moko ezali kozanga yo: Kende, tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe pesá babola, mpe okozwa eloko ya motuya na likoló, mpe yaká, landá ngai.” Ya solo, mobali yango akokaki kopesa mbongo na ye epai ya babola oyo bazali te na likoki ya kozongisela ye yango, mpe kokóma moyekoli ya Yesu. Kasi mbala mosusu na mawa na motema, Yesu atali ye ndenge atɛlɛmi, alɛmbi nzoto mpe akei. Lokola moto wana  alingaki bomɛngo mpe “biloko mingi” oyo azali na yango, yango ekangi ye miso mpo amona te eloko ya motuya ya solosolo. (Marko 10:21, 22) Yesu alobi ete: “Ekozala likambo ya mpasi mpenza mpo baoyo bazali na mbongo bákɔta na bokonzi ya Nzambe!”​—Luka 18:24.

Maloba oyo mpe mosusu oyo Yesu abakisi na nsima ekamwisi bayekoli. Alobi boye: “Ya solo, kokɔta ya kamela na lidusu ya ntonga ezali pɛtɛɛ koleka kokɔta ya mozwi na bokonzi ya Nzambe.” Yango etindi bayekoli bátuna ete: “Nani akoki ntango mosusu kobika?” Kobika ezali mpenza likambo ya mpasi oyo moto ata moko te akokoka? Yesu atali bango mpe alobi na bango ete: “Makambo oyo ekoki kosalema te mpo na bato ekoki kosalema mpo na Nzambe.”​—Luka 18:25-27.

Ntoma Petro amonisi ete bango bazwaki ekateli oyo ekesani na oyo ya mozwi wana na ndenge alobi: “Talá! Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo; eloko nini mpenza tokozwa?” Yesu amonisi mbano ya nsuka oyo bakozwa ndenge bazwaki ekateli ya malamu. Alobi boye: “Ntango biloko nyonso ekokóma ya sika, ntango Mwana ya moto akofanda na kiti ya bokonzi na ye ya nkembo, bino baoyo bolandi ngai bokofanda mpe na bakiti ya bokonzi zomi na mibale, bokosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.”​—Matai 19:27, 28.

Emonani polele ete, Yesu azali kolobela makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya ntango biloko nyonso ekokóma ya sika ndenge ezalaki na elanga ya Edene. Ntoma Petro mpe bayekoli mosusu bakozwa mbano ndenge bakoyangela elongo na Yesu mabele oyo ekozonga paradiso, mbano oyo ezali na ntina koleka eloko nyonso oyo bakoki kosala!

Kasi bakozwa mbano nyonso te kaka na mikolo ezali koya. Bayekoli na ye bazali kozwa mapamboli mosusu banda sikoyo. Yesu alobi ete: “Ezali na moto moko te oyo atiki ndako to mwasi to bandeko mibali to baboti to bana mpo na bokonzi ya Nzambe oyo akozanga kozwa ata na ndenge nini mbala mingi koleka na eleko oyo, mpe na ntango oyo ezali koya bomoi ya seko.”​—Luka 18:29, 30.

Ya solo, epai nyonso bayekoli na ye bakokende, bakoki komona mpenza bolingo ya bandeko na bango bakristo mpe kozala na boyokani malamu mpe makasi mingi koleka oyo moto akoki kozala na yango na bandeko ya libota na ye ya mosuni. Likambo ya mawa, emonani ete elenge mozwi wana oyo azali mokonzi akobungisa lipamboli wana mpe mbano ya koyangela na Bokonzi ya Nzambe na likoló.

Yesu abakisi boye: “Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso bakozala bato ya nsuka mpe bato ya nsuka bakozala bato ya liboso.” (Matai 19:30) Yango elingi koloba nini?

Elenge mozwi wana oyo azali mokonzi azali na kati ya “bato ya liboso,” mpo azali mpe mokonzi ya Bayuda. Lokola azali kotosa mibeko ya Nzambe, ezali komonana lokola akoki kosalela Nzambe mpe elikya ezali ete akoki kosala makambo mingi ya malamu. Kasi atye bozwi mpe biloko oyo azali na yango na esika ya liboso na makambo nyonso na bomoi na ye. Nzokande, bato mpamba bamoni ete mateya ya Yesu ezali solo mpe nzela ya bomoi. Tokoki koloba ete bazalaki “bato ya nsuka,” kasi sikoyo bakómi “bato ya liboso.” Bakoki kozela na motema moko kofanda na bakiti ya bokonzi na likoló elongo na Yesu mpe koyangela mabele oyo ekozonga paradiso.