Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 99

Yesu abikisi mibali oyo bakufá miso mpe asalisi Zakai

Yesu abikisi mibali oyo bakufá miso mpe asalisi Zakai

MATAI 20:29-34 MARKO 10:46-52 LUKA 18:35–19:10

  • YESU ABIKISI MIBALI OYO BAKUFÁ MISO NA YERIKO

  • MOKƆNGƆLI-MPAKO ZAKAI ABONGOLI MOTEMA

Yesu ná bato oyo bazali kosala mobembo elongo na ye bakómi na Yeriko. Kolongwa na Yerusaleme tii Yeriko ezali mobembo ya mokolo moko. Yeriko ezali bingumba mibale, Yeriko ya kala ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ moko na ndambo na Yeriko ya sika oyo Baroma basali. Ntango Yesu ná ebele ya bato balongwe na moko ya bingumba yango mpe bazali kopusana penepene na mosusu, bakufi-miso mibale oyo basɛngaka biloko bayoki yikiyiki. Moko ya bakufi-miso yango nkombo na ye Bartime.

Ntango bayoki ete Yesu azali koleka, Bartime ná moninga na ye babandi koganga: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!” (Matai 20:30) Bato mosusu bapameli bango ete báfanda nyɛɛ, kasi bango mibale bagangi lisusu makasi mpenza. Ntango Yesu ayoki makelele, atɛlɛmi. Bato bakei epai ya bato yango oyo basɛngaka biloko mpe bayebisi moko na bango ete: “Zalá na mpiko, tɛlɛmá, azali kobenga yo.” (Marko 10:49) Na esengo mpenza, mokufi-miso yango alongoli elamba na ye ya likoló, atɛlɛmi, mpe akei epai ya Yesu.

Yesu atuni ete: “Bolingi nasalela bino nini?” Bakufi-miso nyonso mibale balobi ete: “Nkolo, miso na biso efungwama.” (Matai 20:32, 33) Na mawa mpenza na motema, Yesu asimbi miso na bango mpe, alobi na moko na bango ete: “Kende, kondima na yo ebikisi yo.” (Marko 10:52) Bakufi-miso wana mibale oyo basɛngaka biloko bakómi komona, mpe na ntembe te bango nyonso mibale bakómi kokumisa Nzambe. Ntango bato bamoni makambo oyo esalemi, bakumisi Nzambe. Bato oyo bazalaki bakufi-miso bakómi sikoyo kolanda Yesu.

Ebele mpenza ya bato bazingi Yesu ntango azali koleka na Yeriko. Moto nyonso alingi amona moto oyo abikisi mibali wana oyo bakufá miso. Bato bazali kokangamakangama na ye bipai nyonso; na yango, bato mosusu kutu bazali kokoka komona ye ata moke te. Ezali bongo mpe mpo na Zakai. Azali mokonzi ya bakɔngɔli-mpako na Yeriko mpe na bamboka ya zingazinga. Lokola azali mokuse, akoki te komona makambo oyo ezali koleka. Na yango, Zakai apoti mbangu tii liboso mpe amati na nzete ya sikaminosi-figi oyo ezali na nzela oyo Yesu azali koleka. Lokola Zakai azali likoló ya nzete azali komona malamu makambo nyonso. Ntango Yesu akómi pene mpe amoni Zakai likoló ya nzete, alobi na ye: “Zakai, kitá noki, mpo lelo nakofanda na ndako na yo.” (Luka 19:5) Zakai akiti mpe akei mbangu na ndako mpo na koyamba mopaya na ye ya lokumu mpenza.

Ntango bato bamoni bongo, babandi koimaima. Bakanisi ete ebongi te Yesu akende epai ya moto oyo bazali komona ete azali moto ya masumu. Zakai akómi mozwi mpo na makambo ya kozanga bosembo mpenza; azalaki kobɔtɔla bato mbongo na makasi ntango azalaki kokɔngɔla mpako.

Ntango Yesu akɔti na ndako ya Zakai, bato bakómi komilela boye: “Akɔti kofanda epai ya moto oyo azali mosumuki.” Nzokande, Yesu amoni ete  Zakai akoki kobongola motema. Mpe Yesu alɛmbi nzoto te. Zakai atɛlɛmi mpe ayebisi ye ete: “Talá ndambo ya biloko na ngai, nakopesa yango babola, mpe eloko nyonso nabɔtɔlaki moto na efundeli ya lokuta nakozongisa yango mbala minei.”​—Luka 19:7, 8.

Oyo mpenza lolenge malamu oyo Zakai amonisi ete kobongola motema na ye ezali ya solosolo! Mbala mosusu atali na mikanda na ye ya mpako mpo na koyeba mbongo boni azwaki epai ya Bayuda ndenge na ndenge, mpe alapi ndai ete akozongisela bango mbala minei. Yango eleki kutu oyo mibeko ya Nzambe esɛngaki. (Kobima 22:1; Balevi 6:2-5) Lisusu, Zakai alaki ete akozwa ndambo ya biloko na ye mpe akopesa yango babola.

Yesu asepeli na makambo oyo emonisi ete Zakai abongoli motema mpe ayebisi ye ete: “Mokolo ya lelo lobiko eyei na ndako oyo, mpo ye mpe azali mwana ya Abrahama. Mpo Mwana ya moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babungaki.”​—Luka 19:9, 10.

Mwa mikolo liboso, Yesu atyaki makanisi na ye mobimba na likambo etali “bato oyo babungaki,” na ndakisa oyo apesaki ya mwana oyo abungaki. (Luka 15:11-24) Sikoyo amonisi ndakisa ya solo mpenza ya moto moko oyo azali malamu oyo abungaki kasi amonani. Ekoki kozala ete bakambi ya mangomba mpe baoyo bazali kolanda bango bamileli mpo na Yesu mpe babandi koloba mabe na ndenge azali kotyela bato lokola Zakai likebi. Kasi, yango epekisi Yesu te akoba koluka mpe kozongisa lisusu bana ya Abrahama oyo babungaki.