Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

 MOKAPO 11

Yoane Mobatisi abongisi nzela

Yoane Mobatisi abongisi nzela

MATAI 3:1-12 MARKO 1:1-8 LUKA 3:1-18 YOANE 1:6-8, 15-28

  • YOANE AYEI KOSAKOLA MPE KOBATISA

  • BATO MINGI BAZWI BATISIMO, KASI BANGO NYONSO TE

Eleki sikoyo mbula 17 banda ntango oyo Yesu atunaki bateyi mituna na tempelo wana azali na mbula 12. Tokómi sikoyo na prɛnta ya mobu 29 T.B. Bato mingi bazali koloba mpo na Yoane, ndeko ya Yesu oyo azali kosakola na ekólo mobimba na wɛsti ya ebale Yordani.

Yoane azali moto moko oyo azali kobenda likebi ya bato, ezala na ndenge oyo azali komonana mpe na makambo oyo azali koloba. Bilamba na ye esalemi na nsuki ya kamela, mpe azali kolata mokaba ya mposo ya nyama na loketo na ye. Azali kolya mayoyo ná mafuta ya nzoi ya zamba. Azali kosakola nsango nini? “Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.”​—Matai 3:2.

Nsango ya Yoane ezali kosepelisa bato nyonso oyo bazali koya koyoka ye. Mingi bamoni ete basengeli kobongola motema, elingi koloba, kobongola makanisi mpe banzela na bango mpe kotika lolenge ya bomoi na bango ya mabe ya kala. Bato oyo bayei koyoka ye bauti na “Yerusaleme mpe ya Yudea mobimba mpe ya mokili mobimba zingazinga ya Yordani.” (Matai 3:5) Mingi kati na bango babongoli motema. Yoane abatisi bango, azindisi bango na mai ya Yordani. Mpo na nini?

Azali kobatisa bato mpo ezali elembo oyo ezali komonisa ete basali mbongwana na motema mobimba mpo na masumu oyo basalaki na ndenge babukaki kondimana ya Mibeko ya Nzambe. (Misala 19:4) Kasi bato nyonso te nde basali bongo. Ntango bakonzi ya mangomba, Bafarisai mpe Basadukai bayei epai na ye, Yoane abengi bango “bana ya bitupa.” Alobi na bango boye: “Bósala misala oyo emonisi ete bobongoli motema; mpe bózwa likanisi te ya koloba na mitema na bino ete: ‘Tata na biso Abrahama.’ Mpo nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abrahama bana na mabanga oyo. Sóka etyami na mosisa ya banzete; yango wana, nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na mɔtɔ.”​—Matai 3:7-10.

Lokola bato mingi bazali koya epai ya Yoane, azali kokóma na nguya mingi mpe azali kobatisa bato mingi; batindi banganga-nzambe mpe Balevi bátuna ye ete: “Yo ozali nani?”

Yoane ayanoli bango: “Ngai nazali Kristo te.”

Bango batuni ye: “Kasi yo nani? Ozali Eliya?”

Azongiseli bango ete: “Nazali ye te.”

Batuni ye lisusu ete: “Ozali Mosakoli?” elingi koloba mosakoli monene oyo Moize alobaki ete akoya.​—Kolimbola Mibeko 18:15, 18.

Yoane alobi na bango: “Te!”

Bakómi kotya ye mbamba: “Yo ozali nani? Mpo tópesa eyano na baoyo batindi biso. Olobi nini mpo na yo moko?” Yoane ayebisi bango ete: “Ngai nazali mongongo ya moto moko oyo azali koganga na esobe: ‘Bósembola nzela ya Yehova,’ ndenge mosakoli Yisaya alobaki.”​—Yoane 1:19-23.

Batuni ye ete: “Bongo mpo na nini ozali kobatisa, soki ozali Kristo to Eliya to Mosakoli te?” Yoane apesi bango eyano moko ya ntina mingi ete: “Ngai nazali kobatisa na mai. Na kati na bino ezali na moto moko oyo bino boyebi ye te, oyo azali koya nsima na ngai.”​—Yoane 1:25-27.

Ya solo, Yoane ayebi ete azali kobongisa nzela mpo na kobongisa mitema ya bato mpo bándima Masiya oyo alakamaki, mpe oyo akokóma Mokonzi. Yoane alobi mpo na Mokonzi yango ete: “Moto oyo azali koya nsima na ngai azali na makasi koleka ngai, mpe nabongi te kolongola basandale na ye.” (Matai 3:11) Kutu Yoane abakisi ete: “Moto oyo azali koya nsima na ngai aleká liboso na ngai, mpo azalaki liboso na ngai.”​—Yoane 1:15.

Na yango, nsango ya Yoane oyo ete: “Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene” ezali mpenza na ntina mingi. (Matai 3:2) Ezali bongo likebisi epai ya bato nyonso ete mosala ya Yesu Kristo, Mokonzi oyo Yehova alobaki ete asengeli koya, elingi kobanda.