Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 1

“Talá! Oyo Nzambe na biso”

“Talá! Oyo Nzambe na biso”

1, 2. (a) Mituna nini okosepela kotuna Nzambe? (b) Moize atunaki Nzambe nini?

KANISÁ ete ozali kosolola na Nzambe. Na ntembe te, likanisi yango ezali kobangisa—Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ azali mpenza koloba na yo! Obangi naino, kasi na nsima yo mpe obandi koloba na ye. Ayoki, azongisi eyano; kutu, asali nyonso mpo amonisa yo ete okoki kotuna ye mituna nyonso olingi. Mituna nini okotuna ye?

2 Likambo yango ekómelaki mpenza moto moko na ntango ya kala, nkombo na ye Moize. Nzokande, motuna oyo ye amonaki malamu atuna Nzambe ekoki ntango mosusu kokamwisa yo. Atunaki te makambo etali bomoi na ye, avenire na ye, ata mpe mpasi ya bato. Atunaki nde nkombo ya Nzambe. Motuna yango ekoki kokamwisa yo, mpamba te Moize ayebaki nkombo ya Nzambe. Yango wana, motuna na ye esengelaki kozala na ndimbola monene mpenza. Kutu, na mituna nyonso oyo Moize akokaki kotuna, yango nde ezalaki na ntina koleka, mpamba te eyano na yango etali biso nyonso. Ekoki kosalisa yo osala likambo moko ya ntina mingi mpo na kopusana penepene na Nzambe. Na ndenge nini? Tiká tótalela lisolo yango ya kokamwa.

3, 4. Ebandaki ndenge nini Moize asolola na Nzambe, mpe likambo nini ya ntina balobelaki?

3 Moize azalaki na mbula 80. Alekisaki mbula 40 mosika na bandeko na ye, Bayisalaele, oyo bazalaki baombo na Ezipito. Mokolo moko, na ntango oyo azalaki kobatela bampate ya bokilo na ye, amonaki likambo moko oyo amoná naino te. Mwa nzete moko ya nzubɛnzubɛ ezalaki kopela, kasi ezalaki kozika te. Ekobaki kopela, lokola mwinda na mopanzi ya ngomba. Moize apusanaki mpo na kotala yango malamumalamu. Alɛngaki mpenza ntango mongongo moko, oyo euti na katikati ya mɔtɔ, elobaki na ye! Yango nde ezalaki ebandeli ya lisolo moko ya molai oyo Nzambe, na monɔkɔ ya anzelu moko, asololaki na Moize. Mpe, lokola ntango mosusu oyebi yango, ezali na lisolo yango  nde Nzambe apesaki Moize, atako azalaki kobanga, etinda ete atika bomoi ya kimya oyo azalaki na yango mpe azonga na Ezipito kobimisa Bayisalaele na boombo.Exode 3:1-12.

4 Na ntango wana, Moize akokaki kotuna Nzambe motuna nyonso oyo alingi. Nzokande, yoká motuna oyo ye amonaki malamu atuna: “Soki ngai nakokóma epai ya bato ya Yisalaele mpe nakolobela bango ete, Nzambe ya batata na bino atindi ngai epai na bino, mpe soki bakotuna ete, Nkombo na ye nani? Nalobela bango nini?”Exode 3:13.

5, 6. (a) Liteya nini ya pɛtɛɛ mpe ya ntina tozwi na motuna oyo Moize atunaki? (b) Likambo nini ya mabe basali nkombo ya Nzambe? (c) Mpo na nini koyebisa oyo Nzambe ayebisi bato nkombo na ye ezali na ntina mingi?

5 Motuna wana eteyi biso libosoliboso ete Nzambe azali na nkombo. Tosengeli te komona liteya yango ya solo ete ezali mpamba mpo ezali pɛtɛɛ. Kasi, bato mingi bazali komona yango mpamba. Kutu, na mabongoli mingi ya Biblia, balongolá nkombo yango ya Nzambe mpe batyá na esika na yango batitre, na ndakisa “Nkolo” mpe “Nzambe.” Yango ezali likambo ya mawa mpe ya mabe mpenza oyo bato basali mpo mangomba na bango esɛngi bongo. Nzokande, soki olingi koyeba moto malamumalamu, okotuna nkombo na ye, boye te? Ezali mpe bongo soki tolingi koyeba Nzambe. Ye azangi nkombo te, azali te moto moko oyo akipaka bato te, oyo tokoki koyeba te to kokanga ntina na ye te. Atako amonanaka te, kasi azali moto mpe azali na nkombo—Yehova.

6 Longola yango, ntango Nzambe ayebisi nkombo na ye, abongiseli biso libaku moko ya malamu mpenza mpe ya esengo. Azali kosɛnga biso tóluka koyeba ye. Alingi ete tózwa ekateli oyo eleki malamu na bomoi na biso—kopusana penepene na ye. Kasi, Yehova asuki te kaka na koyebisa biso nkombo na ye. Alakisi biso mpe moto oyo nkombo yango ezali komonisa.

Ndimbola ya nkombo ya Nzambe

7. (a) Nkombo ya Nzambe elimboli nini? (b) Moize alingaki mpenza koyeba nini ntango atunaki Nzambe nkombo na Ye?

7 Yehova amipesaki nkombo moko oyo ezali na ndimbola monene  mpenza. Nkombo “Yehova” elimboli “Akómisaka.” Yehova aleki monene na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpo ete ye nde akelá biloko nyonso mpe asalaka ete mikano na ye nyonso ekokisama. Likambo yango ezali kotinda biso tópesa ye limemya mingi. Kasi, yango nde ndimbola mobimba ya nkombo na ye? Emonani ete Moize alingaki koyeba makambo mosusu. Ayebaki ete Yehova azali Mozalisi mpe ayebaki nkombo na ye, mpamba te nkombo wana ya Nzambe ezalaki nkombo ya sika te. Bato babandá kosalela yango banda kala mpenza. Na ntembe te, Moize alukaki nde koyeba nkolo nkombo yango. Ezali lokola nde atunaki boye: ‘Makambo nini etali yo oyo nakoki koyebisa ekólo na yo Yisalaele, oyo ekosala ete bándimela yo mpe oyo ekondimisa bango ete okosikola bango mpenza?’

8, 9. (a) Eyano nini Yehova apesaki na motuna ya Moize, mpe mpo na nini ndenge oyo babongolaka eyano yango ezali mabe? (b) Maloba “nakozala oyo ngai nakozala” elimboli nini?

8 Yehova amonisaki Moize ezaleli moko ya ntina mingi ya bomoto na ye, mpe likambo yango eyokani na ndimbola ya nkombo na ye. Alobaki na ye boye: “Nakozala oyo ngai nakozala.” (Exode 3:14) Babiblia mingi ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Nazali oyo nazali.” Nzokande, ndenge oyo mabongoli mosusu ebongoli vɛrsɛ yango na likebi nyonso esalisi biso tóyeba ete awa Nzambe azalaki kaka komonisa te ete azali. Azalaki nde kolakisa Moize—ná biso mpe—ndimbola ya nkombo na ye. Yehova ‘akozala,’ to akomikómisa, ndenge nyonso oyo ekosɛnga ete azala mpo na kokokisa bilaka na ye. Yango wana, Biblia ya Rotherham ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Nakokóma ndenge nyonso oyo nakosepela.” Mpe moto moko oyo ayebi malamu Liebele ya kala oyo bakomaki na yango Biblia alimboli maloba yango boye: “Ezala likambo to mposa ya ndenge nini . . . , Nzambe ‘akokóma’ nzela mpo na kolonga likambo to kosilisa mposa yango.”

9 Yango elingaki koloba nini mpo na Bayisalaele? Ezala mokakatano nini bakokutana na yango, to likambo nini ya mpasi oyo ekokómela bango, Yehova akokóma ndenge nyonso oyo ekosɛnga akóma mpo na kobimisa bango na boombo mpe komema bango na Mokili ya Ndaka. Na ntembe te, nkombo wana etindaki bango bátyela Nzambe motema. Ekoki mpe kosala bongo epai na biso lelo oyo. (Nzembo 9:10) Mpo na nini?

10, 11. Na ndenge nini nkombo ya Yehova ezali kosɛnga biso tótalela ye ete azali Tata oyo aleki malamu mpe oyo azali mpenza pene na kokokisa mikumba ndenge na ndenge? Pesá ndakisa.

 10 Tózwa ndakisa: Baboti bayebi malamu ete, mpo na kobɔkɔla bana na bango, basengeli ntango nyonso kozala pene na kokokisa mikumba ndenge na ndenge. Na mokolo moko mpamba, ekosɛnga ntango mosusu ete moboti asala mosala ya monganga, molambi, molakisi, mopesi-disipilini, zuzi mpe bongo na bongo. Basusu bamonaka ete ebele ya mikumba nyonso wana oyo basengeli kosala elekaka bango motó. Bayebi ete bana na bango batyelaka bango motema na makambo nyonso; bandimaka na motema moko ete tata to mama na bango akoki kolɛmbisa mpasi oyo bazali koyoka, akoki kosilisa matata nyonso, kobongisa eloko nyonso ya kosakana na yango oyo ebebi, mpe koyanola na motuna nyonso oyo eyeli bango. Lokola baboti mosusu bamonaka ete bakoki kosala nyonso te, bamimonaka ete babongi te mpe ntango mosusu balɛmbaka nzoto. Bamonaka ete bazali mpenza na makoki te ya kokokisa mingi kati na mikumba yango.

11 Yehova mpe azali Tata ya bolingo. Nzokande, akoki kokóma ndenge nyonso mpo na kokokisa na ndenge oyo eleki malamu bamposa ya bana na ye oyo bazali awa na mabelé, kasi abukaka te mitinda na ye ya kokoka ntango asalaka bongo. Na yango, nkombo na ye, Yehova, ezali kosɛnga biso tótalela ye lokola Tata oyo aleki malamu. (Yakobo 1:17) Eumelaki te, Moize ná Bayisalaele mosusu nyonso ya sembo bamonaki na miso ete Yehova abongi na nkombo yango. Na nsɔmɔ nyonso, bamonaki ntango amikómisaki Komanda ya basoda oyo bakoki kolonga ye te; bamonaki ntango amikómisaki Nkolo ya mai, mopɛpɛ mpe biloko mosusu ya ndenge wana; bamonaki mpe ntango amikómisaki Mopesi-Mibeko oyo akokani na mosusu te, Zuzi, Moyemi baplan; lisusu, bamonaki ntango apesaki bango biloko ya kolya ná mai, asalaki ete bilamba na bango epasuka te mpe sapato na bango ebeba te, mpe bongo na bongo.

12. Nini emonisi ete Farao ná Moize batalelaki Yehova ndenge moko te?

12 Tomoni ndenge Nzambe ayebisaki nkombo na ye, amonisaki makambo kitoko oyo eyokani na nkombo yango mpe  amonisaki ete makambo oyo alobaka ezali solo. Ntembe ezali te ete Nzambe alingi tóyeba ye. Biso mpe tolingi koyeba ye? Moize alingaki koyeba Nzambe. Mposa makasi wana ya koyeba Nzambe nde etambwisaki bomoi na ye mobimba mpe esalisaki ye apusana penepene mpenza na Tata na ye ya likoló. (Mituya 12:6-8; Baebele 11:27) Likambo ya mawa ezali ete, na ntango ya Moize, bato oyo bazalaki na mposa wana bazalaki mingi te. Ntango Moize atángaki nkombo ya Yehova liboso ya Farao, mokonzi yango ya Ezipito oyo atondaki na lofundo alobaki na ye boye: ‘Yehova azali nani?’ (Exode 5:2) Farao azalaki na mposa te ya koyeba makambo ya Yehova. Kasi, na lityo nyonso, amonaki ete Nzambe ya Yisalaele azali na ntina te. Lelo oyo mpe, bato mingi bakanisaka bongo. Yango wana, bayebaka te likambo moko ya solo oyo eleki ntina—Yehova azali Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso.

Yehova, Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso

13, 14. (a) Mpo na nini Yehova azali na batitre ebele na kati ya Biblia, mpe okoki kotánga mwa ndambo na yango? (Talá etanda “ Mwa batitre ya Yehova.”) (b) Mpo na nini kaka Yehova nde abongi kobengama “Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso”?

13 Yehova azali na likoki ya kokokisa mikumba ndenge na ndenge; yango wana, azali na batitre mingi na kati ya Makomami. Batitre yango ezali kozongisa nkombo na ye nsima te, ezali nde kosalisa biso tóyeba ndimbola na yango malamumalamu. Na ndakisa, babengi ye “Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.” (Nzembo 57:2) Titre wana ya lokumu mingi, oyo bazongeli yango mbala mingi na Biblia, ezali komonisa biso esika ya lokumu oyo Yehova azali na yango. Kaka ye nde azali na lotomo ya kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́. Mpo na nini?

14 Yehova ye moko nde azali Mozalisi. Emoniseli 4:11 elobi ete: “Obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” Bakoki kolobela moto mosusu te maloba ya lokumu oyo. Ezali na eloko moko te na molɔ́ngɔ́ oyo ekelamá na Yehova te! Yango wana, ntembe ezali te ete Yehova abongi na lokumu, nguya mpe nkembo oyo esengeli na Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso mpe Mozalisi ya biloko nyonso.

15. Mpo na nini babengaka Yehova “Mokonzi ya seko”?

 15 Titre mosusu oyo basalelaka yango kaka mpo na Yehova ezali “Mokonzi ya seko.” (1 Timote 1:17; Emoniseli 15:3) Yango elingi koloba nini? Ezali mpasi tókanga mpenza ntina ya likambo yango mpo mayele na biso ezali na nsuka; atako bongo, Yehova azali seko na seko—azali na ebandeli te mpe nsuka te. Nzembo 90:2 elobi ete: “Longwa bobele na liboso mpenza mpe lobiko na lobiko, yo ozali Nzambe.” Elingi koloba ete Yehova azali na ebandeli te; azalaka uta ntango nyonso. Yango wana, babengaka ye “Mokóló na Mikolo”—azali seko na seko liboso ata moto to eloko moko ezala na molɔ́ngɔ́! (Danyele 7:9, 13, 22) Nani akoki mpenza kotya ntembe ete Ye azali na lotomo te ya kozala Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso?

16, 17. (a) Mpo na nini tokoki komona Yehova te, mpe mpo na nini yango esengeli kokamwisa biso te? (b) Na ndenge nini Yehova azali solo mpenza koleka ata eloko nini oyo tokoki komona to kosimba?

16 Nzokande, bato mosusu batyaka ntembe yango, lokola Farao atyaki. Yango ezali ntango mosusu bongo mpo bato ya kozanga kokoka bandimaka mingi makambo oyo bamonaka na miso. Nzokande, biso bato tokoki te komona Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso, mpamba te azali elimo. (Yoane 4:24) Kutu, moto oyo azali na mai ná makila akotikala na bomoi te soki atɛlɛmi mpenza liboso ya Yehova Nzambe. Yehova ye moko alobaki na Moize boye: “Okoki kotala elongi na ngai te, mpo ete moto akotala ngai mpe kobika te.”Exode 33:20; Yoane 1:18.

17 Likambo yango esengeli kokamwisa biso te. Moize amonaki kaka mwa ndambo ya nkembo ya Yehova, kutu na lisalisi ya anzelu moko. Kasi, nini ekómelaki ye na nsima? Na boumeli ya mwa ntango, elongi na ye ‘ezalaki kongɛnga.’ Bayisalaele babangaki ata kotala yango. (Exode 33:21-23; 34:5-7, 29, 30) Yango emonisi ete moto oyo asalemi na putulu akoki soki moke te kotala mpenza Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso kati na nkembo na ye nyonso! Yango elingi koloba ete azali mpenza moto ya solosolo te mpo tokoki te komona mpe kosimba ye lokola tomonaka mpe tosimbaka biloko mosusu? Te, mpamba  te ezali na biloko mingi oyo tomonaka te kasi tondimaka ete ezali, na ndakisa mopɛpɛ, kura mpe makanisi. Longola yango, Yehova abongwanaka te, ezala ata soki mbula bamiliare boni eleki! Na bongo, tokoki koloba ete ye azali solo mpenza, koleka ata eloko nini oyo tokoki kosimba to komona, mpamba te biloko yango enunaka mpe ebebaka. (Matai 6:19) Tosengeli nde kokanisa ete azali kaka nguya moko boye oyo ezangi bomoto to Nguya moko boye oyo ezalisaki biloko nyonso? Tótalela likambo yango.

Nzambe oyo azali na bomoto

18. Emonaneli nini balakisaki Ezekiele, mpe bilongi minei ya ‘bikelamu ya bomoi’ oyo bizali penepene na Yehova ezali komonisa nini?

18 Atako tokoki komona Nzambe te, kasi Biblia ezali na bavɛrsɛ, oyo esimbaka mpenza motema, oyo esalisi biso tómona mwa moke makambo oyo ezali kuna na likoló. Tózwa ndakisa ya mokapo ya liboso ya mokanda ya Ezekiele. Balakisaki Ezekiele emonaneli ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló; amonaki yango lokola likalo moko ya monene mpenza kuna na likoló. Ndenge oyo alobeli bikelamu ya elimo ya nguya oyo ezali zingazinga na Yehova, ezali kokamwisa mingi. (Ezekiele 1:4-10) ‘Bikelamu yango ya bomoi’ bizali penepene mpenza na Yehova, mpe lolenge na bango ezali koteya biso mwa makambo ya ntina oyo etali Nzambe oyo bango bazali kosalela. Mokomoko na bango azali na bilongi minei—elongi ya ngɔmbɛ-mobali, ya nkɔsi, ya mpongo mpe ya moto. Na ntembe te, bilongi yango ezali komonisa bizaleli minei ya bomoto ya Yehova.Emoniseli 4:6-8, 10.

19. Ezaleli nini emonisami na (a) elongi ya ngɔmbɛ-mobali? (b) elongi ya nkɔsi? (c) elongi ya mpongo? (d) elongi ya moto?

19 Na Biblia, ngɔmbɛ-mobali emonisaka mbala mingi nguya, mpamba te nyama yango ezalaka na makasi mingi. Nzokande nkɔsi, mbala mingi emonisaka bosembo, mpamba te bosembo ya solosolo esɛngaka mpiko, ezaleli oyo nkɔsi eyebani mingi mpo na yango. Eyebani malamu ete miso ya mpongo emonaka mosika mpenza, ezala ata mwa biloko ya mike oyo  ezali na bankama ya bamɛtrɛ. Yango wana, elongi ya mpongo ezali elilingi ya malamu mpo na komonisa bwanya ya Nzambe oyo emonaka makambo oyo ekoya. Bongo elongi ya moto? Kaka moto, lokola asalemi na elilingi ya Nzambe, nde azali na likoki ya komonisa ezaleli ya Nzambe oyo eleki bizaleli mosusu nyonso—bolingo. (Genese 1:26) Bizaleli yango ya Yehova—nguya, bosembo, bwanya mpe bolingo—elobelami mbala mingi na Makomami; yango wana, ekoki kotalelama ete ezali bizaleli na ye ya minene.

20. Tosengeli nde kobanga ete ntango mosusu bomoto ya Yehova ebongwaná, mpe mpo na nini oyanoli bongo?

20 Lokola makambo oyo Biblia elobi mpo na Nzambe eumeli bankóto ya bambula, tosengeli nde kobanga ete ntango mosusu abongwaná? Te, bomoto na ye ebongwanaka te. Ayebisi biso ete: ‘Ngai Yehova nabongwani te.’ (Malaki 3:6) Yehova azalaka bongolabongola te, kasi atalelaka likambo mokomoko na ndenge oyo Tata ya malamu mpenza asalaka. Amonisaka motindo ya bomoto na ye oyo ebongi mpenza na likambo mokomoko. Na bizaleli minei wana, bolingo nde eleki. Amonisaka yango na makambo nyonso oyo asalaka. Amonisaka nguya, bosembo mpe bwanya na ye na bolingo mpenza. Kutu, Biblia elobi likambo moko ya kokamwa mpenza mpo  na Nzambe mpe ezaleli yango. Elobi ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Elobi te ete Nzambe azali na bolingo to mpe Nzambe alingaka. Kasi, elobi ete Nzambe azali bolingo. Bolingo nde etindaka ye asala nyonso oyo asalaka, mpamba te yango nde motindo ya bomoto na ye mobimba.

“Talá! Oyo Nzambe na biso”

21. Likambo nini tokomona ntango tokoyeba bizaleli ya Yehova malamumalamu?

21 Osilá komona mwana moko ya moke azali kolakisa baninga na ye tata na ye na mosapi mpe alobi na esengo nyonso mpe na mwa lolendo ete: “Wana papa na biso”? Basambeli ya Yehova bazali na ebele ya makambo oyo etindaka bango báyoka mpe ndenge wana mpo na ye. Biblia esakoli ete mokolo mosusu bato ya sembo bakoganga ete: “Talá! Oyo Nzambe na biso.” (Yisaya 25:8, 9) Ntango okoyeba bizaleli ya Yehova malamumalamu, okomona mpenza ete ozali na Tata oyo aleki batata nyonso.

22, 23. Biblia elobi ete Tata na biso ya likoló azalaka ndenge nini, mpe ndenge nini toyebi ete alingi tózala penepene na ye?

22 Tata yango azali te moto oyo akipaka bato te, to azalaka mafumafu te—ata soki bandimi mosusu oyo balekisi molende na makambo ya losambo mpe bato mosusu ya mayele na filozofi bandimaka yango te. Tokolinga mpenza te kopusana penepene na Nzambe moko oyo azangi bolingo; kutu, Biblia elobi te ete Tata na biso ya likoló azalaka bongo. Kasi, ebengi ye “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Ayokaka mawa mpe esengo. Ayokaka ‘mpasi na motema’ soki bato to baanzelu babuki malako oyo apesi mpo na bolamu na bango. (Genese 6:6; Nzembo 78:41) Kasi soki tolandi Liloba na ye mpe tomitambwisi malamu, ‘tosepelisaka motema’ na ye.Masese 27:11.

23 Tata na biso alingi ete tózala penepene na ye. Liloba na ye elendisi biso ‘tóluka ye na komekameka epai na epai mpe tózwa ye mpenza, atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso.’ (Misala 17:27) Kasi, ndenge nini biso bato oyo tosalemi na putulu tokoki kopusana penepene na Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba?