Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 3

‘Yehova azali mosantu, mosantu, mosantu’

‘Yehova azali mosantu, mosantu, mosantu’

1, 2. Emonaneli nini mosakoli Yisaya amonaki, mpe yango eteyi biso nini na ntina na Yehova?

LIKAMBO oyo Yisaya amonaki—emonaneli moko oyo eutaki na Nzambe—epesaki ye nsɔmɔ. Na miso ya Yisaya, emonaneli yango ezalaki lokola likambo ya solo mpenza; yango wana, akomaki na nsima ete ‘amonaki mpenza Yehova’ afandi na kiti na Ye ya bokonzi oyo ezali likoló mpenza. Malenda ya elamba ya Yehova etondaki na tempelo monene ya Yelusaleme.Yisaya 6:1, 2.

2 Likambo oyo Yisaya ayokaki mpe epesaki ye nsɔmɔ—ezalaki loyembo moko ya makasi, oyo ezalaki koningisa tempelo kobanda na likoló tii na nse. Baselafa, bamiliɔ ya bikelamu ya elimo oyo bazali na lokumu mingi, nde bazalaki koyemba loyembo yango. Na loyembo yango, maloba ya kitoko oyo ezalaki koyokana polele: ‘Yehova ya mampinga azali mosantu, mosantu, mosantu. Mabelé mobimba ezali nkembo na ye.’ (Yisaya 6:3, 4) Bazongeli mpenza liloba “mosantu” mbala misato mobimba mpe basali yango na ntina, mpo Yehova azali mosantu na ndenge oyo eleki mpenza. (Emoniseli 4:8) Na Biblia mobimba, bazali kolobela bosantu ya Yehova mingi. Na bankama ya bavɛrsɛ, balobeli nkombo na ye esika moko na maloba “mosantu” mpe “bosantu.”

3. Ndenge nini libunga oyo bato bazalaka na yango na ntina na bosantu ya Yehova esali ete ebele ya bato bápesa ye mokɔngɔ na esika ete bápusana penepene na ye?

3 Na yango, ntembe ezali te ete moko ya makambo ya libosoliboso oyo Yehova alingi tóyeba na ntina na ye ezali ete azali mosantu. Nzokande, lelo oyo bato mingi balingaka ata koyoka te bálobela bango likambo yango. Bato mosusu bazalaka na libunga, mpamba te bakanisaka ete kozala mosantu elakisi komimona ete ozali sembo koleka bato nyonso to komilakisa ete yo nde osambelaka. Bato oyo bamimonaka ete bazali mpenza na ntina te bamonaka ntango mosusu ete bosantu ya Nzambe ebangisaka mingi  na esika ete ebenda bato epai na ye. Babangaka ntango mosusu ete bakobonga ata mokolo moko te kopusana penepene na Nzambe yango oyo azali mosantu. Yango wana, ebele ya bato bazali kopesa Nzambe mokɔngɔ mpo na bosantu na ye. Ezali likambo ya mawa, mpamba te bosantu na ye esengelaki nde kotinda biso mpenza na kopusana penepene na ye. Mpo na nini? Liboso tóyanola na motuna wana, tótalela naino ndimbola ya bosantu ya solosolo.

Bosantu ezali nini?

4, 5. (a) Bosantu elimboli nini, mpe elimboli nini te? (b) Wapi ndenge mibale ya monene oyo Yehova ‘akabwani’?

4 Nzambe azali mosantu, kasi yango elingi koloba te ete amikumisaka, azali na lofundo to mpe atyolaka basusu. Kutu, ayinaka nde bizaleli wana. (Masese 16:5; Yakobo 4:6) Bongo, liloba “mosantu” elimboli mpenza nini? Na Liebele oyo bakomaki na yango Biblia, liloba yango euti na liloba mosusu oyo elimboli “oyo ekabwani na mosusu.” Na makambo ya losambo, basalelaka liloba “mosantu” mpo na kolobela eloko oyo bakosalela yango te ndenge basalelaka biloko mosusu ya ndenge yango. Bosantu elakisaka mpe bopɛto. Ndenge nini liloba yango esalelamaka mpe mpo na kolobela Yehova? Elingi nde koloba ete Ye ‘akabwani’ na bato ya kozanga kokoka to azali mosika mpenza na biso?

5 Te. Yehova, “Mosantu ya Yisalaele,” alobaki ete afandi “na kati ya” bato na ye, atako bazalaki basumuki. (Yisaya 12:6; Hosea 11:9) Yango emonisi ete bosantu na ye esalaka te ete azala mosika na bato. Kasi, na ndenge nini ye ‘akabwani’? Na ndenge mibale ya monene. Ya liboso, akabwani na biloko nyonso akelá na ndenge oyo ete ye kaka nde azali Oyo-Aleki-Likoló. Azali pɛto na makambo nyonso mpe bopɛto na ye ezali na nsuka te. (Nzembo 40:5; 83:18) Ya mibale, Yehova akabwani mosika mpenza na masumu, mpe likambo yango esengeli kobɔndisa biso. Mpo na nini?

6. Mpo na nini koyeba ete Yehova akabwani mosika mpenza na masumu ekoki kobɔndisa biso?

6 Bosantu ya solosolo emonanaka mpenza te na mokili oyo tozali. Makambo nyonso oyo bato oyo bapesá Nzambe mokɔngɔ basalaka ezangaka mwa mbindo te, lisumu mpe kozanga  kokoka ebebisaka yango. Biso nyonso tosengeli kobundisa lisumu oyo ezalaka na kati ya mokomoko na biso. Lisusu, lisumu ekoki kolonga biso nyonso soki totiki kozala na bokɛngi. (Baloma 7:15-25; 1 Bakolinti 10:12) Nzokande, likambo ya ndenge wana ekoki kokómela Yehova te. Lokola azali mpenza mosika na masumu, ata mokolo moko te akoki kosala ata mwa lisumu oyo eleki moke mpo ekoka kobebisa ye. Likambo yango ezali kondimisa biso lisusu ete Yehova azali Tata ya malamu mpenza, mpamba te yango emonisi ete tokoki kotyela ye motema na biso mobimba. Yehova akeseni na batata mingi oyo bazali basumuki; ata mokolo moko te ye akosala to akomipesa na makambo ya mbindo, ata mpe kofinga. Akoki kosala makambo ya ndenge wana ata moke te mpamba te azali mosantu. Mbala mosusu Yehova akataki ata ndai na bosantu na ye mpo na komonisa mpenza ete akokokisa maloba na ye. (Amosa 4:2) Likambo yango ezali mpenza kokitisa biso motema, boye te?

7. Mpo na nini tokoki koloba ete bosantu ekoki kokabwana ata moke te na bomoto ya Yehova?

7 Bosantu ekoki kokabwana ata moke te na bomoto ya Yehova. Yango elingi koloba nini? Tózwa ndakisa ya maloba “moto” mpe “ya kozanga kokoka.” Okoki te kolobela “moto” kozanga komonisa ete ‘azangi kokoka,’ mpamba te ezaleli yango ekɔtelá biso mpenza mpe emonanaka na makambo nyonso oyo tosalaka. Sikoyo, tózwa ndakisa ya maloba mibale oyo: “Yehova” mpe “mosantu.” Yehova atondi mpenza na bosantu. Makambo na ye nyonso ezali pɛto mpe sembo. Tokoki koyeba mpenza Yehova te soki tosimbi malamu te ndimbola ya liloba oyo ya ntina mingi—“mosantu.”

“Bosantu ezali ya Yehova”

8, 9. Nini emonisi ete Yehova asalisaka bato ya kozanga kokoka bákóma basantu kasi na ndenge ya kokoka te?

8 Lokola Yehova azali mosantu na makambo nyonso, tokoki mpenza koloba ete bosantu nyonso eutaka epai na ye. Abombaka ezaleli yango kaka mpo na ye moko te, apesaka yango mpe bato mosusu, kutu, asalaka yango na motema moko mpenza. Na ndakisa, kosolola mpamba oyo asololaki na Moize na nzela ya anzelu na kati ya mwa nzete oyo ezalaki kopela, esalaki ete ata  mabelé oyo ezalaki zingazinga na esika yango ekóma mosantu!Exode 3:5.

9 Bato ya kozanga kokoka bakoki kokóma basantu soki Yehova asalisi bango? Ɛɛ, kasi na ndenge ya kokoka te. Nzambe apesaki ekólo na ye Yisalaele elikya ya kokóma “ekólo moko ya bosantu.” (Exode 19:6) Apesaki bango lolenge moko ya kosambela ya bosantu mpe ya pɛto. Yango wana, Mibeko ya Moize elobeli bosantu mingi. Kutu, nganga-nzambe monene azalaki kolata na elongi mwa etanda moko ya wolo likoló ya elamba oyo azalaki kokanga na motó; na ndenge yango, moto nyonso akokaki komona yango ntango pole ezali kongɛngisa yango. Bakomaki likoló na yango ete: “Bosantu ezali ya Yehova.” (Exode 28:36) Na yango, bopɛto ya makasi esengelaki kokesenisa losambo mpe bomoi ya Bayisalaele ná oyo ya bikólo mosusu. Yehova ayebisaki bango boye: ‘Bokozala basantu mpo ete ngai Yehova Nzambe na bino nazali mosantu.’ (Levitike 19:2) Ntango nyonso oyo Bayisalaele bazalaki kotosa malako ya Nzambe na ndenge oyo bato ya kozanga kokoka bakoki kotosa yango, bazalaki basantu.

10. Na likambo ya bosantu, bokeseni nini ezalaki na kati ya Yisalaele ya kala ná bikólo oyo ezalaki zingazinga na yango?

10 Na losambo ya bikólo oyo ezalaki zingazinga ya Yisalaele, bazalaki kotya likebi na bosantu mingi bongo te. Bikólo wana ya bapakano bazalaki kosambela banzambe oyo bazalaki kutu te, ezalaki mpenza bokosi; bazalaki koloba ete banzambe yango bazali na mobulu, na lokoso mpe na etamboli ya mbindo. Bazalaki na bosantu ata moke te. Bato oyo bazalaki kosambela banzambe wana bakómaki mpe basantu te. Yango wana, Yehova ayebisaki basaleli na ye bákabwana na bapakano wana mpe na misala ya mbindo oyo bazalaki kosala na losambo na bango.Levitike 18:24-28; 1 Mikonzi 11:1, 2.

11. Ndenge nini bosantu ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló emonanaka epai ya (a) baanzelu? (b) baselafa? (c) Yesu?

11 Atako bongo, Yisalaele, ekólo oyo Yehova aponaki, emonisaki bosantu ya ebongiseli ya Nzambe oyo ezali na likoló kaka mwa moke. Biblia ezali kobenga bamilio ya bikelamu ya elimo oyo basalelaka Nzambe na bosembo ete ‘bamiliadi basantu’ na ye. (Yuda 14) Bamonisaka na ndenge ya kokoka kitoko ya bosantu ya  Nzambe oyo ezali pɛto mpe kongɛnga. Mpe kanisá lisusu baselafa oyo Yisaya amonaki na emonaneli na ye. Maloba ya nzembo na bango emonisi ete bikelamu makasi yango ya elimo basalaka mosala monene mpo na koyebisa bosantu ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba. Nzokande, ezali na ekelamu moko ya elimo oyo eleki bango nyonso—Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe. Yesu nde amonisaka bosantu ya Yehova koleka bikelamu mosusu nyonso. Yango wana, babengaka ye “Mosantu ya Nzambe.”Yoane 6:68, 69.

Nkombo mosantu, elimo santu

12, 13. (a) Mpo na nini balobi ete nkombo ya Nzambe ezali solo mosantu? (b) Mpo na nini nkombo ya Nzambe esengeli kosantisama?

12 Tokoloba boni mpo na nkombo ya Nzambe? Ndenge tomonaki na Mokapo 1, nkombo yango ezali kaka titre moko boye te. Ezali nde komonisa Yehova Nzambe, mpamba te bizaleli na ye nyonso ezali na kati ya nkombo yango. Yango wana, Biblia eyebisi biso ete ‘nkombo na ye ezali mosantu.’ (Yisaya 57:15) Mibeko ya Moize ekatelaki moto nyonso oyo akotyola nkombo ya Nzambe etumbu ya liwa. (Levitike 24:16) Kutu, talá likambo ya liboso oyo Yesu alobelaki na libondeli: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Kosantisa eloko elimboli kokabola yango na biloko mosusu, komona yango ete ezali mosantu to pɛto mpe komemya yango mingi. Kasi, lokola nkombo ya Nzambe ezalaka pɛto, mpo na nini esengeli lisusu kosantisama?

13 Bato babebisá lokumu ya nkombo mosantu ya Nzambe, balobelá yango mabe mpe makambo ya lokuta. Na Edene, Satana akoselaki Yehova makambo mpe maloba na ye emonisaki lokola nde Yehova azali Mokonzi moko oyo azangi bosembo. (Genese 3:1-5) Kobanda wana, Satana—moyangeli ya mokili oyo ya mbindo—asali nyonso mpo makambo oyo bazali kokosela Nzambe ebakisama se kobakisama. (Yoane 8:44; 12:31; Emoniseli 12:9) Mangomba eteyi ete Nzambe anyokolaka bato, azalaka na bato te mpe azali moto mabe. Balobi ete Nzambe asalisaka bango na bitumba na bango oyo ebomaka ebele ya bato. Nzambe asalá makambo ya kokamwa na ndenge oyo akelaki biloko, kasi mbala  mingi bato balobaka ete biloko yango esalemaki yango moko to na nzela ya evolisyo. Ya solo, bato balobeli nkombo ya Nzambe mabe mingi. Yango wana, esengeli nkombo yango esantisama mpe ezwa lisusu nkembo oyo ebongi na yango. Tozali mpenza kozela na mposa mokolo oyo Nzambe akosantisa nkombo na ye mpe akolongisa bokonzi na ye, mpe tozali na esengo ya kopesa mabɔkɔ mwa moke mpo ete mokano monene wana ekokisama.

14. Mpo na nini babengi elimo ya Nzambe santu, mpe mpo na nini ezali mabe mpenza kotuka elimo santu?

14 Ezali mpe na eloko mosusu oyo etali mpenza Yehova oyo babengaka yango ntango nyonso santu—elimo na ye, to nguya oyo esalaka mosala. (Genese 1:2) Yehova asalelaka nguya yango oyo eleki makasi mpo na kokokisa mikano na ye. Lokola Nzambe asalaka makambo na ye nyonso na bosantu mpe na bopɛto, yango wana ebongi ete nguya oyo asalaka na yango misala ebengama elimo santu, to elimo ya bosantu. (Luka 11:13; Baloma 1:4) Kotuka elimo santu, oyo elakisi kotɛmɛla na nko mikano ya Yehova, ezali lisumu oyo elimbisamaka te.Malako 3:29.

Ntina oyo bosantu ya Yehova ebendaka biso epai na ye

15. Soki totali bosantu ya Yehova, mpo na nini ebongi tóbanga ye, mpe kobanga yango ezali ya ndenge nini?

15 Yango wana, ezali mpasi te tóyeba ntina oyo Biblia emonisi ete boyokani ezali kati na bosantu ya Nzambe ná kobanga oyo moto asengeli kobanga Nzambe. Na ndakisa, Nzembo 99:3 (NW) elobi boye: “Tiká ete bákumisa nkombo na yo. Yango ezali monene, ebangisaka mpe ezali mosantu.” Nzokande bobangi yango ezali ya mabe te. Yango ezali nde limemya ya solosolo, oyo eleki malamu. Ebongi tózala na limemya ya ndenge wana, mpamba te bosantu ya Nzambe eleki biso mosika mpenza. Eleki na bopɛto mpe na nkembo. Atako bongo, esengeli kokimisa biso te. Soki tozali kotalela yango na ndenge ya malamu, esengeli nde kotinda biso tópusana penepene na Nzambe. Mpo na nini?

Bosantu esengeli kosepelisa biso ndenge kitoko esepelisaka biso

16. (a) Na ndenge nini bosantu etambolaka nzela moko na kitoko? Pesá ndakisa moko. (b) Ndenge nini bimonaneli oyo emonisaka ndenge Yehova azali ebendaka likebi na bopɛto mpe na pole?

16 Biblia elobelaka bosantu nzela moko na kitoko. Na ndakisa,  Yisaya 63:15 (NW) elobi ete likoló ezali “ndako monene ya bosantu mpe ya kitoko” ya Nzambe. Kitoko esepelisaka. Meká naino kotala fɔtɔ oyo ezali na lokasa 33. Esika yango esepelisi yo te? Nini esali ete esepelisa yo bongo? Talá, mai na yango ezali kitoko. Ata mopɛpɛ na yango ezali pɛto, mpamba te likoló ezali na langi ya bule mpe ezali kongɛnga. Kanisá sikoyo ete babebisi esika yango—biloko ya bosɔtɔ ekangi nzela ya mai, banzete ná mabanga ebebi mpo bakomikomi likoló na yango, mpe milinga ebebisi mopɛpɛ—ekosepelisa biso lisusu te; tokolinga yango lisusu te. Tomonaka ete kitoko esengeli kotambola nzela moko na bopɛto mpe na pole. Tokoki mpe kosalela maloba yango mpo na kolobela bosantu ya Yehova. Yango wana, tosepelaka mingi na bimonaneli oyo emonisaka ndenge Yehova azali! Kitoko ya Nzambe na biso mosantu engɛngaka lokola pole, lokola babiju, lokola mɔtɔ to lokola ebende ya ntalo oyo eleki pɛto mpe kongɛnga.Ezekiele 1:25-28; Emoniseli 4:2, 3.

17, 18. (a) Na ebandeli, Yisaya ayokaki ndenge nini ntango amonaki emonaneli? (b) Ndenge nini Yehova asalelaki selafa moko mpo na kobɔndisa Yisaya, mpe likambo oyo selafa yango asalaki elimbolaki nini?

17 Soki totaleli bosantu ya Nzambe, tosengeli nde komona ete tozali na nse na ye? Ɛɛ, ezali mpenza bongo. Tozali na nse ya Yehova, kutu na nse mingi mpenza koleka. Likambo yango esengeli nde kokimisa biso? Talá ndenge Yisaya asalaki ntango ayokaki baselafa bazali kosakola bosantu ya Yehova. “Nalobaki ete, Mawa na ngai, zambi nabungi! Nazali moto ya mbɛbu ya mbindo mpe nafandi kati na bato ya mbɛbu ya mbindo; mpo ete miso na ngai mamoni Mokonzi, [Yehova] na bibele.” (Yisaya 6:5) Ɛɛ, bosantu ezangá nsuka oyo Yehova azali na yango elamusaki lisusu makanisi ya Yisaya ete azali moto ya masumu mpe ya kozanga kokoka. Na ebandeli, likambo yango epesaki moto wana ya sembo mawa mingi. Kasi Yehova atikaki ye na mawa yango te.

18 Mbala moko, selafa moko abɔndisaki mosakoli yango. Ndenge nini? Elimo yango ya makasi epumbwaki tii na esika etumbelo ezali, ezwaki likala moko, mpe esimbaki mbɛbu ya Yisaya na yango. Tokoki kokanisa ete likambo yango epesaki ye mpasi lisusu koleka na esika ebɔndisa ye. Nzokande, tóbosana te ete yango ezalaki nde emonaneli oyo ezalaki na ebele ya makambo ya  elilingi. Yisaya, Moyuda moko ya sembo, ayebaki malamu ete bazalaki kotumba bambeka mokolo na mokolo likoló ya etumbelo oyo ezalaki na tempelo mpo na kosɛnga Nzambe alimbisa masumu. Na boboto mpenza, selafa yango asalisaki mosakoli abosana te ete atako azali mpenza moto ya kozanga kokoka, moto oyo azali “na mbɛbu ya mbindo,” akoki kozala pɛto na miso ya Nzambe. * Yehova azalaki pene ya kotalela moto wana ya kozanga kokoka mpe ya masumu ete azali mosantu, kasi na ndenge ya kokoka te.Yisaya 6:6, 7.

19. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, na ndenge nini tokoki kozala basantu?

19 Ezali mpe bongo lelo oyo. Bambeka wana nyonso oyo bazalaki kotumba na etumbelo ya Yelusaleme ezalaki bobele elili ya eloko moko ya monene koleka—mbeka ya kokoka oyo Yesu Klisto apesaki mbala moko mpo na libela na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). (Baebele 9:11-14) Soki totiki mpenza masumu oyo tozalaki kosala, tosemboli etamboli na biso mpe tomonisi kondima na mbeka yango, tokozwa bolimbisi. (1 Yoane 2:2) Biso mpe tokoki kozala pɛto na miso ya Nzambe. Yango wana, ntoma Petelo  ayebisi biso lisusu ete: “Ekomamá ete: ‘Bosengeli kozala basantu, mpo ngai nazali mosantu.’” (1 Petelo 1:16) Awa, Yehova alobi te ete tózala basantu ndenge moko na ye. Asɛngaka biso te makambo oyo tokoki kosala te. (Nzembo 103:13, 14) Yehova ayebisi biso nde tózala basantu mpo Ye azali mosantu. “Lokola bana balingami,” tosalaka nyonso oyo moto ya kozanga kokoka akoki kosala mpo na kolanda ndakisa na ye. (Baefese 5:1) Na yango, esengeli kolanda kosala milende mpo na kokóma na bosantu. Ntango tozali kokola na elimo, tozali kosala makasi mokolo na mokolo mpo na ‘kokokisa bosantu malamumalamu.’2 Bakolinti 7:1.

20. (a) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba ete tokoki kozala pɛto na miso ya Nzambe na biso mosantu? (b) Nini ekómelaki Yisaya ntango ayebaki ete masumu na ye elimbisami?

20 Yehova alingaka makambo oyo ezali sembo mpe pɛto. Ayinaka lisumu. (Habakuku 1:13) Kasi ayinaka biso te. Ntango nyonso oyo tozali kolanda kotalela lisumu ndenge ye atalelaka yango—koyina oyo ezali mabe mpe kolinga oyo ezali malamu—mpe kosala makasi mpo na kolanda matambe ya kokoka ya Klisto Yesu, Yehova akolimbisa masumu na biso. (Amosa 5:15; 1 Petelo 2:21) Ntango toyebi ete tokoki kozala pɛto na miso ya Nzambe na biso mosantu, yango ebongolaka makambo mingi na bomoi na biso. Ozali koyeba lisusu ete na ebandeli, bosantu ya Yehova ekundwelaki Yisaya ete ye azali moto ya mbindo. Agangaki ete: “Mawa na ngai.” Kasi ntango kaka ayebaki ete masumu na ye elimbisami, makanisi na ye ebongwanaki. Ntango Yehova atunaki soki nani akolinga kosala mosala moko oyo ye akopesa, Yisaya andimaki mbala moko, atako ayebaki te soki ezali mosala nini. Alobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai!”Yisaya 6:5-8.

21. Nini ezali kondimisa biso ete tokoki kolona ezaleli ya bosantu?

21 Tokelamá na elilingi ya Nzambe mosantu, yango wana apesá biso bizaleli malamu mpe mposa ya makambo ya elimo. (Genese 1:26) Mokomoko na biso abotamaka na likoki ya kozala mosantu. Soki tozali kolanda kolona ezaleli ya bosantu, Yehova akosepela kosalisa biso mpe tokopusana ntango nyonso penepene na ye, Nzambe na biso mosantu. Lisusu, ntango tokotalela bizaleli ya Yehova na mikapo oyo elandi, tokomona ebele ya bantina ya solosolo oyo esengeli kotinda biso tópusana penepene na ye!

^ par. 18 Elobeli “mbɛbu ya mbindo” ebongi mpenza, mpamba te mbala mingi Biblia esalelaka mbɛbu lokola elilingi ya maloba to ya likoki ya koloba. Masumu mingi oyo bato ya kozanga kokoka basalaka eutaka na ndenge oyo basalelaka likoki yango.Masese 10:19; Yakobo 3:2, 6.