Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 9

“Klisto azali nguya ya Nzambe”

“Klisto azali nguya ya Nzambe”

1-3. (a) Likambo nini ya nsɔmɔ ekómelaki bayekoli na Mbu ya Galilai, mpe Yesu asalaki nini? (b) Mpo na nini ebongi báloba mpo na Yesu ete, “Klisto azali nguya ya Nzambe”?

BAYEKOLI bazali kobanga makasi. Bazalaki kokatisa Mbu ya Galilai na masuwa mpe na mbala moko mopɛpɛ moko ya makasi ekiteli bango. Na ntembe te, ezali mbala ya liboso te bámona mopɛpɛ ya makasi na mai yango—mpamba te, basusu kati na bango bazali mpenza baluki-mbisi. * (Matai 4:18, 19) Kasi mopɛpɛ ya mbala oyo ezali ‘ekumbaki,’ oyo na ntango moke ebimisi mbonge ya makasi mpenza. Mibali yango babomi nzoto mpo na kotambwisa masuwa, kasi mopɛpɛ eleki makasi. Mbonge yango ekómi “komibwaka na masuwa,” mpe masuwa ebandi kotonda na mai. Atako makɛlɛlɛ wana ezali, Yesu akufi nde na mpɔngi kuna na eteni ya nsima ya masuwa; alɛmbi mingi mpo alekisaki mokolo mobimba na koteya ebele ya bato. Lokola bayekoli bamoni ete bomoi na bango ekómi na likama, balamusi ye; baleleli ye boye: “Nkolo, bikisá biso, tolingi tókufa!”Malako 4:35-38; Matai 8:23-25.

2 Yesu abangi te. Na motema mpiɔ mpenza, apameli mopɛpɛ mpe mbu: “Fandá nyɛɛ! Tiká makɛlɛlɛ!” Mbala moko, mopɛpɛ mpe mbu etosi ye—mopɛpɛ oyo ezalaki kobɛta makasi etiki kobɛta, mbonge esili, mpe ‘kimya moko monene ekɔti.’ Na ntango wana, kobanga moko ya ndenge mosusu ekangi bayekoli. Na mongongo ya nse, babandi kotunana: “Ye azali mpenza nani?” Ya solo mpenza, moto yango azali nani mpo akoka kopamela mopɛpɛ mpe mbu lokola nde azali kosembola mwana moko ya motó makasi?Malako 4:39-41; Matai 8:26, 27.

 3 Kasi Yesu azalaki lokola bato nyonso te. Mpo na Yesu mpe na nzela na ye, Yehova amonisaki nguya na Ye na ndenge ya kokamwa mpenza. Yango wana, elimo santu etindaki ntoma Paulo aloba mpo na Yesu ete “Klisto azali nguya ya Nzambe.” (1 Bakolinti 1:24) Na ndenge nini nguya ya Nzambe ezali komonana kati na Yesu? Mpe ndenge oyo Yesu asalelaki nguya na ye ekoki kozala na ntina nini na bomoi na biso?

Nguya ya Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe

4, 5. (a) Nguya mpe bokonzi nini Yehova apesaki Mwana mobotami-se-moko na ye? (b) Eloko nini oyo Mwana yango asalelaki mpo na kokokisa mikano ya Tata na ye ya kokela biloko mpe bikelamu mosusu?

4 Tótalela nguya oyo Yesu azalaki na yango liboso abotama moto awa na mabelé. Yehova asalelaki “nguya na ye ya seko” ntango akelaki Mwana mobotami-se-moko na ye oyo na nsima akómaki kobengama Yesu Klisto. (Baloma 1:20; Bakolose 1:15) Nsima na yango, Yehova apesaki Mwana yango nguya mpe bokonzi monene mpo akokisa mikano na Ye oyo etali kokela biloko mpe bikelamu mosusu. Biblia elobeli Mwana yango boye: “Biloko nyonso esalemaki na nzela na ye, mpe kozanga ye eloko ata moko te esalemaki.”Yoane 1:3.

5 Tokoki mpenza te komona bonene nyonso ya mokumba yango. Kanisá nguya oyo esengelaki mpo na kokela bamilio na bamilio ya baanzelu ya nguya, kokela molɔ́ngɔ́ ná bamiliare na bamiliare ya bagalaksi oyo ezali na kati, mpe kokela mabelé ná ebele ya biloko mpe bikelamu ya bomoi oyo ezali na kati. Mpo na kokokisa mosala wana nyonso, Mwana mobotami-se-moko yango asalelaki nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba—elimo santu ya Nzambe. Mwana yango azalaki na esengo monene ya kozala Mosali ya Mayele oyo Yehova asalelaki mpo na kokela biloko mosusu nyonso.Masese 8:22-31.

6. Nsima ya liwa ya Yesu awa na mabelé mpe lisekwa na ye, nguya mpe bokonzi nini bapesaki ye?

6 Mwana mobotami-se-moko yango akokaki kozwa lisusu nguya mpe bokonzi mingi koleka? Nsima ya liwa na ye awa na mabelé mpe lisekwa na ye, alobaki ete: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé.” (Matai 28:18) Ɛɛ, bapesaki Yesu likoki  mpe lotomo ya kosalela nguya na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba. Lokola azali “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo,” bapesi ye ndingisa ya “kobebisa nyɛɛ guvɛrnema nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya”—oyo ezali komonana mpe oyo ezali komonana te—oyo ezali kotɛmɛla Tata na ye. (Emoniseli 19:16; 1 Bakolinti 15:24-26) Nzambe ‘atiki ata eloko moko te ete ezanga kotyama na nse ya’ Yesu—longola kaka Yehova ye moko.Baebele 2:8; 1 Bakolinti 15:27.

7. Mpo na nini tokoki kotya motema ete Yesu akosalela ata mokolo te na ndenge ya mabe nguya oyo Yehova apesi ye?

7 Tosengeli nde kobanga ete mokolo mosusu Yesu akosalela nguya na ye na ndenge ya mabe? Soki moke te! Lokola Yesu alingi mpenza Tata na ye, akoki ata mokolo moko te kosala eloko oyo ekosepelisa Ye te. (Yoane 8:29; 14:31) Yesu ayebi malamu ete Yehova asalelaka soki moke te nguya na ye monene na ndenge ya mabe. Yesu ye moko amoni na miso ete Yehova alukaka nde mabaku ya ‘komonisa nguya na ye mpo na baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.’ (2 Ntango 16:9) Lisusu, ntembe ezali te ete Yesu alingaka bato lokola Tata na ye; yango wana, tokoki kotya motema ete akosalela ntango nyonso nguya na ye mpo na kosala makambo ya malamu. (Yoane 13:1) Kutu, makambo oyo asalá ezali mpenza kondimisa biso likanisi yango. Tótalela nguya oyo azalaki na yango ntango azalaki awa na mabelé mpe ndenge oyo asalelaki yango.

Azalaki na “nguya na . . . maloba”

8. Nsima ya kopakolama ya Yesu, azwaki nguya ya kosala nini, mpe ndenge nini asalelaki nguya na ye?

8 Emonani ete Yesu asalaki makamwisi te ntango azalaki naino mwana moke na Nazalete. Kasi, makambo ebongwanaki nsima ya batisimo na ye na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), wana azalaki na mbula soki 30. (Luka 3:21-23) Biblia eyebisi biso boye: “Nzambe apakolaki ye na elimo santu mpe na nguya, mpe akatisaki mokili yango mobimba kosaláká malamu mpe kobikisáká baoyo nyonso banyokolami na Zabolo.” (Misala 10:38) Maloba “kosaláká malamu” emonisi mpenza ete Yesu asalelaki nguya na ye malamu, boye te? Nsima ya kopakolama na ye, “akómaki mosakoli ya nguya na misala mpe na maloba.”Luka 24:19.

9-11. (a) Epai wapi Yesu azalaki koteya mbala mingi, mpe mokakatano nini asengelaki kolonga? (b) Mpo na nini lolenge ya koteya ya Yesu ezalaki kokamwisa bibele ya bato?

 9 Na ndenge nini Yesu azalaki na nguya na maloba? Mbala mingi, azalaki koteya na bisika ya polele—pembenipembeni ya balaki, na bangomba ya mike, na babalabala mpe na bazando. (Malako 6:53-56; Luka 5:1-3; 13:26) Bato oyo bazalaki koyoka ye bakokaki koleka soki maloba na ye ebendaka likebi na bango te. Lokola masini ya kosala babuku ezalaki naino te, baoyo bazalaki kosepela koyoka ye basengelaki kokanga maloba na ye na motó mpe na motema na bango. Yango wana, mateya ya Yesu esengelaki kobendaka mpenza likebi ya bato, kozala mpasi te mpo na kokanga ntina na yango mpe mpo na kobomba yango na makanisi. Kasi, mpo na Yesu, yango ezalaki mpenza mokakatano te. Tózwa kaka ndakisa ya Lisolo na ye Likoló ya Ngomba.

10 Mokolo moko na ntɔngɔ, na ebandeli ya mobu 31 T.B., bato ebele bayanganaki na mwa ngomba moko pembeni ya Mbu ya Galilai. Kati na bango, basusu bautaki na Yudea mpe na Yelusaleme, batambolaki kilomɛtrɛ 100 to 110. Basusu bautaki na Tulo mpe Sidoni, bamboka oyo ezali na nɔrdi mpe pembenipembeni ya mbu. Bato mingi ya maladi bapusanaki penepene na Yesu mpo na kosimba ye, mpe abikisaki bango nyonso. Ntango amonaki ete ata moko te kati na bango azalaki lisusu na maladi ya makasi, abandaki koteya bango. (Luka 6:17-19) Ntango asilisaki, bango nyonso bakamwaki mpo na makambo oyo bayokaki. Mpo na nini?

11 Bambula mingi na nsima, moto moko oyo ayokaki lisolo wana akomaki ete: “Bibele yango ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya; mpo azalaki koteya bango na ndenge ya moto oyo azali na bokonzi.” (Matai 7:28, 29) Yesu azalaki koloba na nguya mpe bazalaki komona yango. Azalaki koloba na nkombo ya Nzambe mpe azalaki kotika ete bokonzi oyo Liloba ya Nzambe ezali na yango nde esimba mateya na ye. (Yoane 7:16) Makambo oyo azalaki koloba ezalaki polele, bilendiseli na ye ezalaki kotinda bato bábongola makanisi na bango mpe moto moko te akokaki kokweisa bandimbola oyo azalaki kopesa. Azalaki kolobela makambo na bozindo mpe maloba na ye ezalaki kosimba mitema ya bayoki na ye. Ateyaki bango ndenge ya kozala na bomoi ya esengo, ya  kobondela, ya koluka Bokonzi ya Nzambe, mpe ya komibongisela avenire. (Matai 5:3–7:27) Maloba na ye ezalaki kolamusa mitema ya bato oyo bazalaki na nzala ya mateya ya solo mpe ya boyengebene. Bato ya ndenge wana bazalaki kondima ‘komiboya’ bango moko mpe kotika makambo nyonso mpo na kolanda ye. (Matai 16:24; Luka 5:10, 11) Na ntembe te, yango emonisi ete maloba ya Yesu ezalaki mpenza na nguya!

Azalaki na “nguya na misala”

12, 13. Na ndenge nini Yesu azalaki na “nguya na misala,” mpe makamwisi na ye ezalaki kaka ndenge moko?

12 Yesu azalaki mpe na “nguya na misala.” (Luka 24:19) Baevanzile elobeli makamwisi koleka 30 oyo asalaki—mpe asalaki yango nyonso na “nguya ya Yehova.” * (Luka 5:17) Makamwisi ya Yesu esalisaki bankóto ya bato. Makamwisi mibale mpamba oyo asalaki—koleisa mibali 5 000 mpe na nsima 4 000, “kozanga kotánga basi mpe bana mike”—esalisaki bato soki 20 000!Matai 14:13-21; 15:32-38.

“Bamonaki Yesu azali kotambola likoló ya mbu”

13 Yesu asalaki makamwisi ndenge na ndenge. Azalaki na nguya ya kobengana bademo, yango wana azalaki na mokakatano te ya kosala yango. (Luka 9:37-43) Azalaki na nguya likoló ya biloko ya mokili; yango wana, abongolaki mai vinyo. (Yoane 2:1-11) Atambolaki likoló ya Mbu ya Galilai na ntango oyo mopɛpɛ makasi ezalaki kopɛpa likoló na yango, mpe likambo yango ekamwisaki bayekoli na ye. (Yoane 6:18, 19) Maladi ata moko te elekaki ye na makasi; azalaki kobikisa binama ya nzoto oyo ebebi, maladi oyo eumeli mingi mpe maladi oyo ekoki koboma moto. (Malako 3:1-5; Yoane 4:46-54) Azalaki kobikisa bamaladi yango kaka ndenge moko te. Abikisaki bato mosusu na mosika, nzokande asimbaki basusu kaka kosimba. (Matai 8:2, 3, 5-13) Abikisaki basusu na mbala moko, basusu malɛmbɛmalɛmbɛ.Malako 8:22-25; Luka 8:43, 44.

14. Na makambo nini Yesu amonisaki ete azali na nguya ya kosilisa liwa?

14 Na koleka, Yesu azalaki na nguya ya kozongisa moto na bomoi.  Masolo misato ya Biblia emonisi ete alamusaki bakufi: azongisaki mwana mwasi moko ya mbula 12 epai ya baboti na ye, azongisaki mwana kaka moko ya mwasi moko oyo akufelaki mobali epai ya mama na ye, mpe azongisaki mobali moko oyo balingaki mingi epai ya bandeko na ye ya basi. (Luka 7:11-15; 8:49-56; Yoane 11:38-44) Na mabaku nyonso misato wana, amonaki ata mokakatano moko te na kosala yango. Atɛlɛmisaki mwana wana ya mwasi na mbeto oyo balalisaki ebembe na ye, nzokande autaki kokufa. Asekwisaki mwana mobali ya mwasi wana oyo akufelaki mobali, oyo bazalaki komema na mbeto mpo na kokende kokunda ye; na ntembe te, asekwisaki ye kaka na mokolo oyo akufaki. Mpe atɛlɛmisaki Lazalo na lilita, nzokande akufaki banda mikolo minei.

Asalelaki nguya mpo na bolamu ya bato, kasi na mayele mpe na limemya

15, 16. Makambo nini emonisi ete Yesu azalaki kosalela nguya na ye mpo na bolamu na ye moko te?

15 Kanisá ete nguya oyo Yesu azalaki na yango ezala nde na mabɔkɔ ya mokonzi moko ya kozanga kokoka; ntango mosusu moto yango alingaki kosalela yango na ndenge ya mabe, boye te? Kasi Yesu azalaki na lisumu te. (1 Petelo 2:22) Aboyaki moimi, mposa ya lokumu mpe lokoso, oyo etindaka bato ya kozanga kokoka básalela bokonzi na bango mpo na konyokola basusu.

16 Ntango Yesu azalaki kosalela nguya na ye, azalaki koluka bolamu na ye te; ata mbala moko te asalelaki yango mpo na litomba na ye moko. Ntango azalaki na nzala, aboyaki kokómisa mabanga mampa. (Matai 4:1-4) Lokola azalaki na biloko mingi te, yango emonisi ete asalelaki nguya na ye te mpo na kozala na bozwi. (Matai 8:20) Talá likambo mosusu oyo emonisi ete ezalaki te mposa ya koluka naino bolamu na ye moko nde etindaki ye asalaka misala ya nguya. Ntango azalaki kosala makamwisi, ye moko azalaki komipimela. Na ndakisa, ntango azalaki kobikisa bato ya maladi, ezala ata moto moko mpamba, nguya ezalaki kobima na nzoto na ye mpe azalaki koyoka yango. (Malako 5:25-34) Atako bongo, azalaki kotika ete bibele ya bato básimbaka ye, mpe bazalaki kobika. (Luka 6:19) Azalaki na elimo ya komipimela mpenza!

17. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kosalela nguya na ye na mayele?

17 Yesu azalaki kosalela nguya na ye na mayele. Ata mbala moko  te asalaki misala ya nguya kaka mpo na komilakisa to mpo bámona ye. (Matai 4:5-7) Yango wana, aboyaki kosala bilembo kaka mpo na kosepelisa Elode, oyo azalaki na mposa ya komona bilembo. (Luka 23:8, 9) Yesu azalaki kosalela nguya na ye piblisite te; yango wana, mbala mingi azalaki kosɛnga bato oyo abikisi ete báyebisa likambo yango te. (Malako 5:43; 7:36) Alingaki te ete bansango ya kokamwisa mpenza oyo bazali kopanza ye nde etinda bato báluka koyeba soki azali nani.Matai 12:15-19.

18-20. (a) Nini ezalaki kotinda Yesu asalelaka nguya na ye boye to boye? (b) Ndenge oyo Yesu abikisaki moto moko oyo akufá matoi epesi yo makanisi nini?

18 Yesu, moto ya nguya, akesanaki mingi na bakonzi ya motema makasi oyo batyaka likebi ata moke te na bamposa mpe na bampasi ya basusu ntango bazali kosalela bokonzi na bango. Yesu azalaki kotyela bato likebi. Komona mpamba oyo azalaki komona bato ya mpasi ezalaki kopesa ye mawa mingi mpe ezalaki kotinda ye abikisa bango. (Matai 14:14) Azalaki kotalela mayoki mpe bamposa na bango; boboto mpe komibanzabanza yango nde ezalaki kotinda ye asalela nguya na ye boye to boye. Na Malako 7:31-37, tozali kokuta ndakisa moko oyo ezali kosimba motema.

19 Na libaku yango, bibele mpenza ya bato bamoni Yesu mpe bamemeli ye ebele ya bato ya maladi mpe abikisi bango nyonso. (Matai 15:29, 30) Kasi Yesu atye likebi mingi na mobali moko. Moto yango akufá matoi mpe azali mpenza na likoki ya koloba malamu te. Ntango mosusu Yesu amoni ete moto yango azali nkandankanda to azali komiyoka malamu te na esika yango. Yango wana, Yesu amitye na esika na ye; amemi ye pembeni—mosika na bato—kaka bango mibale. Kuna, Yesu asali mwa bajɛstɛ mpo na komonisa moto yango eloko oyo ye alingi kosala. ‘Atye misapi na ye na matoi ya moto yango mpe, nsima ya kobwaka nsoi, asimbi lolemo na ye.’ * (Malako 7:33) Nsima na yango, Yesu atali likoló mpe apemi mpo na komonisa ete asali libondeli. Na makambo  wana nyonso asali, ezali lokola azali koyebisa moto yango boye: ‘Nguya ya Nzambe nde ekosalisa ngai nasala likambo oyo nalingi kosalela yo.’ Mpo na kosukisa, Yesu alobi boye: “Fungwamá.” (Malako 7:34) Mbala moko, moto yango ayoki mpe alobi polele.

20 Soki tokanisi ete ata na ntango Yesu azalaki kosalela nguya oyo Nzambe apesaki ye mpo na kobikisa bato ya maladi, azalaki kotalela mayoki na bango, likambo yango ezali mpenza kosimba mitema na biso. Koyeba ete Yehova apesi Bokonzi epai ya Masiya, Mokonzi ya motema mawa mpe oyo amibanzabanzaka mpo na basusu ndenge wana ezali mpenza kokitisa biso motema, boye te?

Elembo ya makambo oyo ekoya

21, 22. (a) Makamwisi ya Yesu ezalaki elembo ya nini? (b) Lokola Yesu azali na bokonzi likoló ya mopɛpɛ, mbula mpe biloko mosusu ya mokili, tokoki kolikya ete akosala nini ntango akoyangela?

21 Misala ya nguya oyo Yesu asalaki awa na mabelé ezalaki kaka komonisa mwa moke mapamboli ya minene koleka oyo boyangeli na ye ekosopa. Na mokili ya sika ya Nzambe, Yesu akosala lisusu makamwisi—kasi ya mbala wana ekozala mpo na mokili mobimba! Tólobela mwa makambo mosusu ya kosepelisa oyo ezali kozela biso.

22 Yesu akozongisa mai, mabelé mpe mopɛpɛ oyo bato babebisi ndenge esengeli mpenza kozala. Kanisá lisusu ndenge apekisaki mopɛpɛ moko ya makasi, mpo na komonisa ete azali na bokonzi likoló ya mopɛpɛ, mbula mpe biloko mosusu ya mokili. Na yango, ntembe ezali te ete ntango Kristo akoyangela, bato bakobanga lisusu mipɛpɛ ya makasi te, koningana ya mabele te, bavolka te to makama mosusu oyo ebimaka na mokili. Lokola Yesu azali Mosali ya Mayele oyo Yehova asalelaki mpo na kokela mabelé ná bomoi ya lolenge nyonso, ayebi malamu ndenge mabelé esalemá. Ayebi ndenge ya kosalela malamu biloko na yango. Ntango akoyangela, mabelé oyo mobimba ekokóma Paladiso.Luka 23:43.

23. Ndenge nini Mokonzi Yesu akokokisa bamposa ya bato?

23 Ekozala boni mpo na bamposa ya bato? Lokola Yesu akokaki koleisa malamu mpenza bankóto ya bato na mwa bilei moke  mpamba, yango endimisi biso ete boyangeli na ye ekosilisa nzala. Ya solo, ebele ya bilei, oyo mpe ekokabolama na bosembo mpenza, ekosilisa nzala mpo na libela. (Nzembo 72:16) Bokonzi oyo azalaki na yango likoló ya maladi emonisi biso ete bato ya maladi, bato oyo bakufá miso, bato oyo bakufá matoi, bibɔsɔnɔ mpe batɛngumi bakobikisama mpenza mpo na libela. (Yisaya 33:24; 35:5, 6) Likoki na ye ya kosekwisa bato oyo bakufá endimisi biso ete, lokola azali Mokonzi kuna na likoló, nguya na ye ekopesa ye mpe nzela ya kosekwisa bamilio na bamilio ya bato oyo Tata na ye akanisaka bango na esengo mpenza.Yoane 5:28, 29.

24. Ntango tozali kokanisa nguya ya Yesu, likambo nini tosengeli kobosanaka te, mpe mpo na nini?

24 Ntango tozali kokanisa nguya ya Yesu, tóbosanaka te ete Mwana yango alandaka ndakisa ya Tata na ye malamumalamu. (Yoane 14:9) Na yango, ndenge oyo Yesu asalelaka nguya na ye ezali komonisa polele ndenge oyo Yehova asalelaka oyo ya ye. Na ndakisa, kanisá ndenge Yesu abikisaki na boboto mpenza moto moko ya maba. Lokola Yesu ayokelaki ye mawa, asimbaki ye mpe alobaki: “Nalingi.” (Malako 1:40-42) Na masolo ya ndenge wana, ezali lokola nde Yehova azali koloba na biso boye: ‘Ezali ndenge wana nde nasalelaka nguya na ngai!’ Yango epesi yo mposa ya kokumisa Nzambe na biso mozwi-ya-nguya-nyonso mpe ya kopesa ye matɔndi na ndenge azali kosalela nguya na ye na bolingo ya ndenge wana, boye te?

^ par. 1 Mbala na mbala, mipɛpɛ makasi eyaka pwasa na Mbu ya Galilai. Lokola mai yango ezali na nse mingi (soki mɛtrɛ 200 na nse ya nivo ya mai monene), mopɛpɛ oyo ezalaka likoló na yango ezalaka na molunge mingi koleka oyo ya bisika ya pembenipembeni; yango nde esalaka ete mipɛpɛ makasi ebɛtaka kuna. Mipɛpɛ makasi eutaka na Ngomba Helemona, oyo ezali na nɔrdi, mpe ekitaka na Lobwaku ya Yolodani. Yango wana, mai ekoki kozala kimya mpe mbala moko mopɛpɛ moko ya makasi eyei kobebisa kimya wana.

^ par. 12 Tóyeba lisusu ete na bantango mosusu Baevanzile elobelaka na mokuse ebele ya makamwisi oyo Yesu asalaki lokola nde ezalaki kaka likamwisi moko. Na ndakisa, mokolo moko, “engumba mobimba” eyaki kotala ye, mpe abikisaki “bato mingi” ya maladi.Malako 1:32-34.

^ par. 19 Kobwaka nsoi ezalaki lolenge moko to elembo moko ya kobikisa maladi oyo Bayuda ná bato ya bikólo mosusu bazalaki kondima, mpe makomi ya balabi emonisi ete bato bazalaki kosalela nsoi mpo na kobikisa bato na maladi. Soki Yesu abwakaki nsoi, ezalaki ntango mosusu kaka mpo na komonisa moto yango ete alingi kobikisa ye. Ezala ndenge wana to te, Yesu asalelaki nsoi na ye lokola nkisi te.