Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 4

“Yehova . . . azali monene na nguya”

“Yehova . . . azali monene na nguya”

1, 2. Makambo nini ya kokamwa Eliya asilaki komona na bomoi na ye, kasi makambo nini eleki kokamwisa amonaki ntango azalaki na kati ya lidusu na Ngomba Holebe?

ELIYA asilaki komona makambo ya kokamwa liboso. Na ndakisa, bayanganga bazalaki koyela ye biloko ya kolya mbala mibale na mokolo na esika oyo amibombaki. Amonaki mbɛki moko ya fufu ná molangi moko ya mafuta oyo fufu mpe mafuta na yango esilaki te na boumeli ya ntango molai oyo nzala makasi ekɔtaki na mboka. Amonaki kutu mɔtɔ euti na likoló ntango asɛngaki yango na libondeli. (1 Mikonzi, mokapo 17, 18) Atako bongo, Eliya amonaki naino te na bomoi na ye makambo lokola oyo elandi.

2 Wana azalaki na kati ya lidusu moko ya mabanga na Ngomba Holebe mpe agunzanaki mwa moke na monɔkɔ na yango, amonaki makambo ya kokamwa mpenza oyo elandanaki. Ya liboso, ezalaki mopɛpɛ. Ekoki kozala ete mopɛpɛ yango ebɛtaki makasi mpe esalaki makɛlɛlɛ makasi, mpamba te epasolaki bangomba mpe ebukaki mabanga. Nsima na yango, mabelé eninganaki; koningana yango ebimisaki nguya ya makasi mpenza oyo ezalaka na kati ya mabelé. Mpo na kosukisa, mɔtɔ eyaki. Na ntembe te, ntango mɔtɔ yango elekaki na esika Eliya azalaki, ayokaki mopɛpɛ moko ya mɔtɔ mpenza.1 Mikonzi 19:8-12.

‘Talá, Yehova azalaki koleka’

3. Makambo oyo Eliya amonaki ezalaki elembo ya ezaleli nini ya Nzambe, mpe epai wapi tokoki komona bilembo mosusu ya ezaleli yango?

3 Makambo nyonso wana oyo Eliya amonaki eyokani na likambo moko: ezali kolakisa nguya monene ya Yehova Nzambe. Yango elingi koloba te ete tosengeli naino komona likamwisi moko mpo tósosola ete Nzambe azali na nguya, mpamba te ezalaka mpasi te mpo na komona nguya yango. Biblia eyebisi biso ete biloko oyo Yehova akelá emonisaka “nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.” (Baloma 1:20) Zwá kaka ndakisa ya mikalikali oyo esalaka lokola koboma miso mpe bankake oyo engulumaka na ntango ya mbula ya mopɛpɛ makasi, to mai oyo ezali kouta na nguya nyonso likoló ya ngomba mpe kokwea na nse, to mpe likoló monene  oyo etondi na minzoto! Bandakisa nyonso wana ezali komonisa yo nguya ya Nzambe te? Atako bongo, na mokili ya lelo, bato moke kaka nde bandimaka mpenza nguya ya Nzambe. Kutu, baoyo bayebi mpenza ndenge yango ezali bazali lisusu moke koleka. Nzokande, koyeba malamu ezaleli yango ya Yehova etindaka biso tópusana penepene na ye. Na eteni oyo, tokoyekola malamumalamu nguya ya Yehova oyo ekokani na mosusu te.

Ezaleli moko ya ntina mingi ya Yehova

4, 5. (a) Boyokani nini ezali kati na nkombo ya Yehova mpe nguya na ye? (b) Mpo na nini ezalaki mpenza malamu ndenge Yehova aponaki ngɔmbɛ-mobali ezala elembo ya nguya na ye?

4 Nguya ya Yehova eleki nguya ya moto nyonso. Yilimia 10:6 elobi ete: “Zambi mosusu azali lokola yo te, ee [Yehova]; yo ozali monene, nkombo na yo ezali monene kati na nguya.” Omoni awa balobeli nguya elongo na nkombo ya Yehova. Ozali koyeba lisusu ete nkombo yango elimboli “Akómisaka.” Nini epesaka Yehova likoki ya kokela eloko nyonso alingi mpe ya kokóma lolenge nyonso alingi? Libosoliboso, nguya na ye. Ɛɛ, likoki oyo Yehova azali na yango ya kosala makambo, ya kokokisa mokano na ye, ezali na nsuka te. Nguya yango ezali moko ya bizaleli na ye ya ntina mingi.

5 Lokola Yehova ayebi ete biso bato tokoki te kokanga ntina ya bonene ya nguya na ye, asalelaka bandakisa mpo na kosalisa biso. Ndenge tomonaki yango, asalelaka ngɔmbɛ-mobali lokola elembo ya nguya na ye. (Ezekiele 1:4-10) Aponi elembo yango mpenza malamu, mpamba te ata ngɔmbɛ-mobali oyo babɔkɔlaka ezalaka nyama moko monene mpe ya nguya mingi. Bato oyo bazalaki kofanda na Palestine na ntango ya kala bazalaki mpenza te kokutana na ekelamu mosusu ya makasi koleka oyo wana. Kasi bayebaki motindo moko ya ngɔmbɛ-mobali oyo ezalaki kobangisa bango koleka—ngɔmbɛ-mobali moko ya zamba oyo lelo ezalaka lisusu te. (Yobo 39:9-12) Kala, Amperɛrɛ Moloma Jules César alobaki ete nzoku eleki ngɔmbɛ-mobali yango na monene kaka mwa moke. Akomaki ete ngɔmbɛ-mobali yango “ezali na makasi mingi mpe epotaka mbangu mpenza.” Moto asengelaki komimona moke mpe na makasi te soki atɛlɛmi penepene na ekelamu ya ndenge wana!

6. Mpo na nini kaka Yehova nde abengami “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso”?

 6 Ndenge moko mpe, moto azali mpenza moke mpe azali na makasi te soki tokokanisi ye na Yehova, Nzambe ya nguya. Na miso na Ye, ata bikólo ya makasi ezali lokola putulu likoló ya emekeli ya kilo. (Yisaya 40:15) Yehova akeseni na bikelamu nyonso, mpamba te azali na nguya oyo ezali na nsuka te; yango wana, kaka ye nde abengami “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” * (Emoniseli 15:3) Yehova azali “na makasi kati na nguya” mpe azali ‘na nguya monene.’ (Yisaya 40:26) Ye moto apesaka nguya; atako bongo, nguya na ye esilaka te. Azelaka te ete eloko to moto mosusu apesa ye makasi, mpamba te ‘makasi ezali ya ye.’ (Nzembo 62:11) Kasi, na nzela nini Yehova amonisaka nguya na ye?

Ndenge oyo Yehova amonisaka nguya na ye

7. Elimo santu ya Yehova ezali nini, mpe likanisi nini maloba ya minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli epesaka na ntina na yango?

7 Elimo santu eutaka ntango nyonso epai ya Yehova mpe esilaka te. Yango ezali nguya ya Nzambe wana ezali kosala mosala. Kutu, Biblia ebengi yango na Genese 1:2 (NW) “nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala.” Liloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ebongolami na “elimo” ekoki kobongolama na bisika mosusu na “mopɛpɛ,” “mpema,” mpe “mopɛpɛ ya makasi.” Bato oyo bakomaka badiksionɛrɛ balobi ete maloba wana ya minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli epesaka likanisi ya nguya moko oyo ezali kosala mosala, kasi emonanaka te. Elimo ya Nzambe ezali lokola mopɛpɛ; tomonaka yango te, kasi esalaka makambo ya solo mpe oyo emonanaka.

8. Na maloba ya elilingi, ndenge nini Biblia ebengaka elimo ya Nzambe; mpe mpo na nini bokokanisi yango ebongi?

8 Ezali na mosala ata moko te oyo elimo santu ya Nzambe ekoki kosala te. Yango wana, Yehova asalelaka yango mpo na kokokisa likambo nyonso oyo akani kosala. Ezali mpo na yango nde, na maloba ya elilingi, Biblia ebengaka elimo ya Nzambe “mosapi,”  “lobɔkɔ ya nguya,” to “lobɔkɔ losembwi” ya Nzambe. (Luka 11:20; Deteronome 5:15; Nzembo 8:3) Moto asalaka na lobɔkɔ na ye misala ndenge na ndenge oyo ezali kosɛnga makasi to bokɛngi ndenge moko te; ndenge moko mpe, Nzambe asalelaka elimo na ye mpo na kokokisa likambo nyonso oyo akani—na ndakisa, kokela mwa baatɔmɛ ya mikemike mpenza to kokabola Mbu Motane, to mpe kopesa baklisto ya ekeke ya liboso likoki ya koloba na minɔkɔ ya bapaya.

9. Bokonzi oyo Yehova azali koyangela na yango ezali monene boni?

9 Yehova amonisaka mpe nguya na ye na nzela ya bokonzi na ye, Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́. Kanisá ete ozali koyangela bamilio na bamilio ya bato ya mayele mpe ya makoki oyo bazali pene na kotosa mitindo na yo. Ɛɛ, Yehova azali na bokonzi ya ndenge wana. Azali na bato oyo basalelaka ye, oyo mbala mingi Makomami ekokanisaka bango na limpinga ya basoda. (Nzembo 68:11; 110:3) Kasi, baanzelu baleki bato na makasi. Na ndakisa, ntango basoda ya Asiria bayaki kobunda na ekólo ya Nzambe, anzelu moko mpamba abomaki na butu moko basoda 185 000! (2 Mikonzi 19:35) Baanzelu ya Nzambe ‘baleki na nguya.’Nzembo 103:19, 20.

10. (a) Mpo na nini babengaka Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ete Yehova ya mampinga? (b) Nani nde ekelamu ya Yehova oyo eleki bikelamu mosusu nyonso na makasi?

10 Baanzelu bazali boni? Na emonaneli moko, mosakoli Danyele amonaki bikelamu ya elimo koleka milio 100 kuna na likoló bazali liboso ya kiti ya bokonzi ya Yehova; kasi yango elingi koloba te ete amonaki baanzelu nyonso oyo Yehova akelá. (Danyele 7:10) Na yango, bakoki ntango mosusu kozala bamilio nkama na nkama. Yango wana, Nzambe abengami Yehova ya mampinga. Titre yango ezali komonisa lokumu monene oyo azali na yango mpo azali Komanda ya ebele ya baanzelu ya makasi oyo basalaka na molɔngɔ. Na motó ya bikelamu nyonso wana ya elimo, atye Mwana na ye ya bolingo, “mwana ya liboso na bozalisi nyonso.” (Bakolose 1:15) Lokola Yesu azali anzelu-mokonzi—elingi koloba mokonzi ya baanzelu, baselafa mpe bakeluba nyonso—ye nde ekelamu ya Yehova oyo eleki bikelamu mosusu nyonso na makasi.

11, 12. (a) Na makambo nini nguya ya liloba ya Nzambe emonanaka? (b) Yesu alobaki nini mpo na komonisa ete nguya ya Yehova ezali mpenza monene?

 11 Yehova azali na lolenge mosusu oyo amonisaka nguya na ye. Baebele 4:12 elobi ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” Osilá komona nguya monene ya Liloba ya Nzambe, to nsango epemami na elimo na ye oyo tozali kokuta sikoyo na kati ya Biblia? Liloba yango ekoki kopesa biso makasi, koyeisa kondima na biso makasi mpe kosalisa biso tóbongola mpenza bomoto na biso. Ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye bandimi bákeba na bato oyo bazalaki na etamboli ya mbindo mpenza. Nsima na yango, alobaki boye: “Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana.” (1 Bakolinti 6:9-11) Ya solo, “liloba ya Nzambe” emonisaki nguya na yango mpe esalisaki bango bábongwana.

12 Nguya ya Yehova eleki monene mpe amonisaka yango na ndenge oyo eleki malamu; yango wana, eloko moko te ekoki kopekisa ye kosalela yango. Yesu alobaki boye: “Epai ya Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.” (Matai 19:26) Kasi, Yehova asalelaka nguya na ye mpo na kokokisa mikano nini?

Nguya oyo esalelamaka na ntina

13, 14. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali te kaka eloko moko boye oyo ebimisaka nguya? (b) Yehova asalelaka nguya na ye na makambo nini?

13 Elimo ya Yehova eleki nguya ata ya ndenge nini oyo ezali na mokili; mpe Yehova azali te nguya moko boye, to eloko moko boye oyo ebimisaka nguya. Azali nde Nzambe oyo azali na bomoto mpe oyo ayebi mpenza kosalela nguya na ye na ntango ebongi. Kasi, nini etindaka ye asalela yango?

14 Ndenge tokomona yango, Nzambe asalelaka nguya na ye mpo na kokela, kobebisa, kobatela mpe kozongisa makambo ndenge ezalaki—na mokuse, mpo na kosala likambo nyonso oyo eyokani na mikano na ye ya kokoka. (Yisaya 46:10) Ntango mosusu, Yehova asalelaka nguya na ye mpo na komonisa bizaleli mpe mitinda na ye mosusu ya ntina. Mingimingi, asalelaka nguya na ye mpo na kokokisa mokano na ye—kolongisa bokonzi na ye mpe kosantisa nkombo na ye mosantu na nzela ya Bokonzi ya Masiya. Ata eloko  moko te to moto moko te akoki kopekisa kokokisama ya mokano yango.

15. Ntina nini etindaka Yehova asalela nguya na ye mpo na basaleli na ye, mpe ndenge nini amonisaki yango na likambo ya Eliya?

15 Yehova asalelaka mpe nguya na ye mpo na bolamu ya mokomoko na biso. Yoká ndenge 2 Ntango 16:9 elobi: “Miso ya [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.” Likambo Eliya akutanaki na yango, oyo tolobelaki na ebandeli, ezali ndakisa moko oyo ezali kondimisa yango. Mpo na nini Yehova alakisaki ye nguya na Ye na ndenge ya kokamwa wana? Yezabele, mwasi ya mokonzi, alapaki ndai ete akoboma Eliya. Yango wana, mosakoli yango akimaki. Akanisaki ete atikali kaka ye moko, azalaki kobanga mpe alɛmbaki nzoto—amonaki lokola nde asalaki mosala monene kaka mpamba. Mpo na kobɔndisa mobali yango oyo azalaki komitungisa mingi, Yehova akundwelaki ye polele nguya na ye ya Bonzambe. Mopɛpɛ, koningana ya mabelé mpe mɔtɔ emonisaki Eliya ete Moto oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba azali elongo na ye. Lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azalaki na ye, asengelaki nde kobanga Yezabele?1 Mikonzi 19:1-12. *

16. Mpo na nini kokanisa nguya monene ya Yehova ekoki kobɔndisa biso?

16 Atako Yehova azali lisusu kosala makamwisi te na eleko oyo, kasi azali kaka ndenge azalaki na mikolo ya Eliya. (1 Bakolinti 13:8) Ata lelo oyo, azali kaka na mposa ya kosalela nguya na ye mpo na bolamu ya baoyo balingaka ye. Atako azali kuna likoló elongo na bilimo mosusu, kasi azali mosika na biso te. Lokola nguya na ye ezali na ndelo te, ntaka ata ya ndenge nini ekoki kopekisa yango te. “[Yehova] azali [nde] penepene na bango nyonso bakobenga ye.” (Nzembo 145:18) Mokolo moko, ntango mosakoli Danyele azalaki kosɛnga Yehova asalisa ye, anzelu moko abimelaki ye liboso kutu asilisa kobondela! (Danyele 9:20-23) Eloko moko te ekoki  kopekisa Yehova kosalisa bato oyo ye alingaka to kopesa bango makasi.Nzembo 118:6.

Nguya mpe bokonzi ya Nzambe epekisi bato kopusana penepene na ye?

17. Na ndenge nini nguya mpe bokonzi ya Yehova esalaka ete tóbanga ye, kasi yango epesaka biso te kobanga ya ndenge nini?

17 Nguya mpe bokonzi ya Nzambe esengeli nde kotinda biso tóbanga ye? Eyano ezali ‘ɛɛ’ mpe ‘te.’ Toyanoli ‘ɛɛ,’ mpamba te nguya mpe bokonzi na ye ezali kotinda biso mpenza tózala na ezaleli ya kobanga Nzambe, to limemya makasi oyo tolobelaki na mokuse na mokapo oyo eleki. Biblia eyebisi biso ete kobanga ya ndenge wana ezali “ebandeli ya bwanya.” (Nzembo 111:10) Kasi toyanoli mpe ‘te,’ mpamba te nguya mpe bokonzi ya Nzambe ezali kotinda biso te ete tóbanga ye na ndenge ya mabe to tóboya kopusana penepene na ye.

18. (a) Mpo na nini bato mingi batyelaka bato ya nguya motema te? (b) Ndenge nini toyebi ete nguya mpe bokonzi ya Yehova ekoki kobebisa ye te?

18 Lord Acton, moto moko monene ya Angleterre, akomaki boye na mobu 1887: “Mbala mingi, bokonzi ebebisaka moto; soki bokonzi eleki mingi, ebebisaka mpe mingi koleka.” Bato mingi bazongelaka maloba na ye mbala na mbala, ntango mosusu mpo bamonaka ete ezali mpenza solo. Mbala mingi, bato ya kozanga kokoka basalelaka bokonzi na bango mabe; makambo eleká emonisi mpe ete ezali bongo. (Mosakoli 4:1; 8:9) Yango wana, bato mingi batyelaka bato ya nguya motema te mpe bapusanaka penepene na bango te. Yehova mpe azali na bokonzi oyo eleki mingi, kasi ebebisi ye? Soki moke te! Ndenge tomonaki yango, azali mosantu; ata eloko moko te ekoki kobebisa ye. Yehova akeseni na basi mpe mibali ya kozanga kokoka oyo bazali na bokonzi na mokili oyo esili kobeba. Ata mbala moko te asalelá nguya mpe bokonzi na ye mabe, mpe akosala yango ata mbala moko te.

19, 20. (a) Na boyokani na bizaleli nini mosusu Yehova amonisaka ntango nyonso nguya na ye, mpe mpo na nini likambo yango ezali kokitisa motema? (b) Ndakisa nini okoki kopesa mpo na komonisa komipekisa ya Yehova, mpe mpo na nini ezaleli yango ezali kosepelisa yo?

19 Tóbosana te ete Yehova azali kaka na nguya te. Tokoyekola mpe bosembo, bwanya mpe bolingo na ye. Kasi, tókanisa te ete Yehova  amonisaka bizaleli na ye kozanga kotalela makambo mosusu to kaka ndenge wana lokola nde soki amonisi ezaleli moko, akoki komonisa mosusu te na ntango wana kaka. Ezali bongo te; kutu, ndenge tokomona yango na mikapo oyo elandi, Yehova amonisaka ntango nyonso nguya na ye na boyokani na bosembo, bwanya mpe bolingo na ye. Kanisá sikoyo ezaleli mosusu oyo Nzambe azali na yango, ezaleli moko oyo bayangeli ya mokili oyo bazalaka na yango mpenza te—komipekisa.

20 Kanisá ete okutani na moto moko oyo abangisi yo mpo azali mpenza engambe mpe azali na nguya mingi. Kasi nsima na yango, omoni ete azali na boboto. Azali ntango nyonso pene mpe na mposa ya kosalela nguya na ye mpo na kosalisa mpe kobatela bato, mingimingi baoyo bazangi makasi. Asalelaka makasi na ye mabe te. Omoni ete bakoseli ye makambo kaka mpamba; kasi atomboki te, afandi kimya, azali kopesa nzoto na ye kilo, azali ata mpe na boboto. Okómi komituna soki okokoka kozala na boboto mpe na komipekisa ndenge wana, mingimingi soki yo nde ozalaka na makasi lokola ye. Wana okómi koyeba moto yango mokemoke, ntembe ezali te ete okolinga kopusana penepene na ye, boye te? Tozali na bantina mingi mpenza ya kopusana penepene na mozwi-ya-nguya-nyonso Yehova. Yoká ndenge fraze mobimba, epai tozwi motó ya likambo ya mokapo oyo, elobi: ‘Yehova asilikaka noki te, azali monene na nguya.’ (Nahumu 1:3) Yehova awelaka te kosalela nguya na ye mpo na kosala bato mabe, ata soki ezali bato ya mabe. Azali  mpenza na elimo ya boboto. Mbala ebele oyo batumolaki ye, amonisaki ete ‘asilikaka noki te.’Nzembo 78:37-41.

21. Mpo na nini Yehova aboyaka kotinda bato na makasi ete básala mokano na ye, mpe yango eteyi biso nini na ntina na ye?

21 Tótalela sikoyo komipekisa ya Yehova na ndenge mosusu. Soki ozalaki na nguya oyo ezangi nsuka, okanisi ete okokaki koyoka na bantango mosusu mposa ya kotinda bato básala makambo kaka ndenge yo olingi? Nzokande Yehova, atako azali na nguya mingi, atindaka bato na makasi te ete básalela ye. Atako Yehova ayebi ete moto akozwa bomoi ya seko kaka soki azali kosalela ye, kasi atindaka biso na makasi te ete tósalela ye. Na boboto mpenza, apesaka nde mokomoko na biso lokumu na ndenge atikelaka biso tópona oyo tomoni malamu. Ayebisaka biso liboso mbuma mabe to malamu oyo tokobuka soki toponi kosala mabe to malamu. Kasi, atikelaka biso moko tópona oyo tolingi kosala. (Deteronome 30:19, 20) Yehova asepelaka ata moke te ete moto asalela Ye mpo bazali kotinda ye na makasi to mpo moto yango azali kobanga nguya na Ye monene na ndenge ya mabe. Alukaka baoyo bakosalela ye mpo motema etindi bango mpe mpo balingi ye.2 Bakolinti 9:7.

22, 23. (a) Nini emonisi ete Yehova asepelaka kopesa basusu nguya? (b) Tokoyekola nini na mokapo oyo elandi?

22 Tótalela sikoyo likambo ya nsuka oyo esengeli kotinda biso tóyoka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nsɔmɔ te. Mbala mingi, bato oyo bazali na bokonzi babangaka kopesa basusu mwa ndambo ya bokonzi. Nzokande, Yehova asepelaka kopesa basambeli na ye ya sembo nguya. Apesi basusu bokonzi monene, na ndakisa Mwana na ye. (Matai 28:18) Yehova apesaka mpe basaleli na ye nguya na lolenge mosusu. Biblia elimboli yango boye: ‘Ee Yehova, epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu. Zambi nyonso na likoló mpe na nse ezali ya yo. . . . Na lobɔkɔ na yo, nguya ezali mpe makasi; kokómisa monene mpe kokembisa nyonso ezali na lobɔkɔ na yo.’1 Ntango 29:11, 12.

23 Ya solo mpenza, Yehova akosepela kopesa yo makasi. Apesaka kutu baoyo balingi kosalela ye “nguya oyo eleki makasi.” (2 Bakolinti 4:7) Nzambe yango ya makasi oyo asalelaka nguya na ye na boboto mpe na kolandáká mitinda oyo eleki malamu bongo, abendi yo mpenza epai na ye, boye te? Na mokapo oyo elandi, tokotalela ndenge oyo Yehova asalelaka nguya na ye mpo na kokela.

^ par. 6 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” elimboli mpenzampenza “Moyangeli ya biloko nyonso; Ye oyo azali na nguya nyonso.”

^ par. 15 Biblia elobi ete ‘Yehova azalaki kati na mopɛpɛ te . . . , na koningana ya mokili te . . . , na mɔtɔ te.’ Basaleli ya Yehova bakeseni na basambeli ya banzambe ya masapo oyo bazali biloko oyo ekelamá; basaleli ya Yehova balukaka Ye te na kati ya mopɛpɛ, mɔtɔ to na biloko mosusu ya mokili. Ye aleki monene, eloko moko te oyo ye akelá ekoki kokoka ye.1 Mikonzi 8:27.