Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 10

“Bókóma bamekoli ya Nzambe” na ndenge oyo bosalelaka nguya na bino

“Bókóma bamekoli ya Nzambe” na ndenge oyo bosalelaka nguya na bino

1. Motambo nini emonanaka polele te oyo bato ya kozanga kokoka bakokwea mingi na yango?

“MOTAMBO moko oyo ebombaná ezelaka moto nyonso oyo azali na nguya.” Maloba yango, oyo ekomamaki na mokomi moko ya maloba ya ntɔki na ekeke ya 19, ebendi likebi na biso na likama moko oyo emonanaka polele te: kosalela nguya na ndenge ya mabe. Likambo ya mawa, bato ya kozanga kokoka bakweaka na motambo yango mingi. Kutu, banda kala, ‘moto ayangelaka moto mpo na koyokisa ye mpasi.’ (Mosakoli 8:9) Lokola bato bazali kosalela nguya na bolingo te, yango ebimisi nsuka na bampasi.

2, 3. (a) Na lolenge oyo Yehova asalelaka nguya na ye, nini ekamwisaka? (b) Na mitindo nini nguya na biso ekoki komonana, mpe ndenge nini tosengeli kosalela nguya nyonso wana?

2 Nzokande, Yehova Nzambe, ye oyo nguya na ye ezangá nsuka, asalelaka yango ata mbala moko te na ndenge ya mabe. Yango ezali likambo ya kokamwa te? Ndenge tomonaki yango na mikapo oyo eleki, asalelaka ntango nyonso nguya na ye—ezala ya kokela, ya kobebisa, ya kobatela to ya kozongisa makambo ndenge ezalaki—na boyokani na mikano na ye oyo emonisaka bolingo na ye. Soki tokanisi ndenge asalelaka nguya na ye, yango ezali kotinda biso tópusana penepene na ye. Boye, tokozwa mposa ya ‘kokóma bamekoli ya Nzambe’ na ndenge oyo tosalelaka nguya na biso. (Baefese 5:1) Nguya nini biso bato mpamba tozali na yango?

3 Kobosana te ete moto akelamaki na “elilingi ya Nzambe” mpe na lolenge na ye. (Genese 1:26, 27) Yango wana, biso mpe tozali na nguya—mwa ndambo ya nguya. Nguya na biso emonanaka na mitindo mingi, na ndakisa: likoki ya kosala makambo mpe mosala; bokonzi likoló ya basusu, likoki ya kobongola makanisi to bizaleli ya basusu, mingimingi baoyo balingaka biso; makasi ya nzoto; to mpe biloko na biso. Mokomi ya nzembo  alobaki boye mpo na Yehova: “Na yo ezali liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Yango wana, nguya nyonso ya malamu oyo tokoki kozala na yango eutaka mbala moko epai na ye to apesaka biso yango na nzela ya eloko to moto mosusu. Na ntina wana, ebongi tósalela nguya yango na ndenge oyo ekosepelisa ye. Ndenge nini tokoki kosala yango?

Sɛkɛlɛ ezali bolingo

4, 5. (a) Sɛkɛlɛ ya koyeba kosalela nguya malamu ezali nini, mpe ndenge nini ndakisa ya Nzambe na likambo yango emonisi ete ezali mpenza bongo? (b) Na ndenge nini bolingo ekosalisa biso tósalela nguya na biso malamu?

4 Sɛkɛlɛ ya koyeba kosalela nguya na biso malamu ezali bolingo. Ndakisa oyo Nzambe apesi na likambo yango ezali komonisa ete ezali mpenza bongo, boye te? Kanisá lisusu ndenge totalelaki bizaleli minene minei ya Nzambe—nguya, bosembo, bwanya mpe bolingo—na Mokapo 1. Na bizaleli yango nyonso, oyo wapi eleki? Ezali bolingo. Biblia elobi boye na 1 Yoane 4:8: “Nzambe azali bolingo.” Ɛɛ, bomoto na ye mobimba ezali bolingo na bolingo; yango nde etindaka ye asala makambo nyonso oyo asalaka. Na yango, likambo nyonso oyo asalaka na nguya na ye, bolingo nde etindaka ye asala yango mpe nsukansuka ezalaka kaka mpo na bolamu ya baoyo balingaka ye.

5 Bolingo ekosalisa mpe biso tósalelaka nguya na biso malamu. Kutu, Biblia eyebisi biso ete bolingo ezali “na boboto” mpe “elukaka matomba na yango moko te.” (1 Bakolinti 13:4, 5) Yango wana, bolingo ekopekisa biso kosalela baoyo tozali na mwa bokonzi likoló na bango makambo makasi to konyokola bango. Tokopesa bango nde lokumu mpe tokotya bamposa mpe mayoki na bango liboso ya oyo ya biso.Bafilipi 2:3, 4.

6, 7. (a) Kobanga Nzambe elakisi nini, mpe mpo na nini ezaleli yango ekosalisa biso tóboya kosalela nguya na biso na ndenge ya mabe? (b) Pesá ndakisa moko mpo na komonisa boyokani oyo ezali na kati ya kobanga koyokisa Nzambe mawa mpe kolinga ye.

6 Bolingo etambolaka elongo na ezaleli mosusu oyo ekoki mpe kosalisa biso tósalelaka nguya na biso na ndenge ya mabe te: kobanga Nzambe. Ezaleli yango ezali na ntina nini? Masese 16:6 (NW) elobi ete: “Moto oyo abangaka Yehova akimaka  mabe.” Na ntembe te, kosalela nguya na biso na ndenge ya mabe ezali moko ya banzela ya mabe oyo tosengeli kokima. Kobanga Nzambe ekopekisa biso konyokolaka baoyo bazali na nse ya bokonzi na biso. Mpo na nini? Ya liboso, toyebi ete tokosamba liboso ya Nzambe mpo na ndenge oyo tozali kosalela bato yango makambo. (Nehemia 5:1-7, 15) Kasi kobanga Nzambe esuki wana te. Maloba oyo basaleli na minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli mpo na kolobela “kobanga” mbala mingi elimbolaka komemya Nzambe makasi. Yango wana, Biblia elobelaka kobanga yango nzela moko na kolinga Nzambe. (Deteronome 10:12, 13) Limemya makasi yango esɛngaka mpe kobanga Nzambe na ndenge ya malamu, elingi koloba kobanga koyokisa ye mawa—kaka te mpo tozali kobanga kozwa etumbu kasi mpo tolingi ye mpenza.

7 Tózwa ndakisa ya boyokani malamu oyo ezalaka na kati ya mwana mobali ya moke ná tata na ye. Mwana amonaka ete tata na ye asepelaka na ye mpe alingaka ye mingi. Kasi ayebaka mpe makambo oyo tata na ye azali kosɛnga ye, mpe ayebaka ete tata na ye akopesa ye disipilini soki asali mabe. Atako bongo, mwana abangabangaka tata na ye te. Alingaka ye nde na motema moko. Asepelaka kosala makambo oyo ekotinda tata na ye alinga ye mingi. Kobanga Nzambe mpe ezalaka bongo. Lokola tolingi Yehova, Tata na biso ya likoló, tobangaka mingi kosala likambo nyonso oyo ekopesa ye “bolɔzi na motema.” (Genese 6:6) Tozalaka nde na mposa makasi ya kosepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Yango nde etindaka biso tóluka kosalela nguya na biso malamu. Tótala sikoyo malamumalamu ndenge oyo tokoki kosala likambo yango.

Na kati ya libota

8. (a) Bokonzi nini mibali bazali na yango na kati ya libota, mpe ndenge nini basengeli kosalela yango? (b) Ndenge nini mobali akoki komonisa ete apesaka mwasi na ye lokumu?

8 Tólobela naino libota. Baefese 5:23 elobi ete: “Mobali azali mokonzi ya mwasi na ye.” Ndenge nini asengeli kosalela bokonzi oyo Nzambe apesi ye? Biblia eyebisi mibali báfandaka na basi na bango ‘engebene boyebi, bápesaka bango lokumu lokola epai ya mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ.’ (1 Petelo 3:7) Liloba ya Grɛki oyo  ebongolami na “lokumu” elimboli “motuya, valɛrɛ, . . . limemya.” Maloba mosusu oyo euti na liloba yango ebongolami na “makabo” mpe “na motuya.” (Misala 28:10; 1 Petelo 2:7) Yango wana, mobali oyo apesaka mwasi na ye lokumu abɛtaka ye ata moke te; asambwisaka ye mpe te to akitisaka ye te. Soki bongo te mwasi akomona ete azali na valɛrɛ te. Kasi, mobali yango ayebaka valɛrɛ ya mwasi na ye mpe apesaka ye limemya. Amonisaka na maloba mpe na misala na ye—ezala na ndako na bango to na esika mosusu—ete mwasi na ye azali na motuya na miso na ye. (Masese 31:28) Yango ekosala ete mwasi na ye alinga ye mpe apesa ye limemya mpe likambo ya ntina koleka ezali ete Yehova mpe akondima ye.

Mibali ná basi na bango basalelaka nguya na bango malamu soki bazali kolingana mpe kopesana limemya

9. (a) Bokonzi nini basi bazali na yango na kati ya libota? (b) Nini ekoki kosalisa mwasi na kosalela mayele na ye mpo na kopesa mobali na ye mabɔkɔ mpe yango ekobota mbuma nini?

9 Basi mpe bazali na mwa bokonzi na kati ya libota. Biblia elobeli basi oyo bazalaki kosambela Nzambe oyo, atako bazalaki kotosa mibali na bango, bamemaki bango na nzela ya malamu to basalisaki bango bábunga nzela te. (Genese 21:9-12; 27:46–28:2) Mwasi akoki kozala na mayele mingi koleka mobali na ye to kozala na likoki ya kosala makambo mosusu oyo mobali na ye akokoka te. Atako bongo, asengeli kozala “na limemya makasi” epai ya mobali na ye mpe ‘kotosa’ ye “lokola epai ya Nkolo.” (Baefese 5:22, 33) Soki mwasi azali na mposa ya kosepelisa Nzambe, yango ekosalisa ye asalela mayele na ye mpo na kosunga mobali na ye na esika ya kokitisa ye to koluka komonela ye. “Mwasi ya bwanya mpenza” ndenge wana asalisaka nde mobali na ye na kotonga libota na bango. Na ndenge yango, akozala ntango nyonso na kimya elongo na Nzambe.Masese 14:1.

10. (a) Bokonzi nini Nzambe apesi baboti? (b) Liloba “disipilini” elimboli nini, mpe ndenge nini esengeli kopesama? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

10 Baboti mpe bazali na bokonzi oyo Nzambe apesá bango. Biblia elobi boye: “Batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Na Biblia, liloba “disipilini” ekoki kolimbola “kobɔkɔla, kopesa formasyo, koteya.” Bana bazalaka na mposa ya disipilini; bakolaka malamu soki bazali kopesa bango malako polelepolele mpe koyebisa bango polele makambo oyo basengeli  kosala te. Biblia elobi ete disipilini to koteyama ndenge wana emonisi bolingo. (Masese 13:24) Yango wana, “fimbo ya disipilini” esengeli ata moke te konyokola, ezala makanisi to nzoto. * (Masese 22:15; 29:15) Soki baboti bazali kopesa bana disipilini makasimakasi mpe bazali kopesa yango na bolingo te, bazali kosalela bokonzi na bango mabe mpe yango ekoki konyokola mpenza bana na makanisi. (Bakolose 3:21) Nzokande, soki disipilini oyo bazali kopesa ezali na bokatikati mpe bazali kopesa yango na ndenge ebongi, bana bakomona ete baboti na bango balingi bango mpe balingi bákóma bato malamu.

11. Wapi ndenge ya malamu oyo bana bakoki kosalela nguya na bango?

11 Bongo bana? Wapi ndenge ya malamu oyo bakoki kosalela nguya na bango? Masese 20:29 elobi ete: “Nkembo ya bilenge ezali nguya na bango.” Na ntembe te, lolenge ya malamu koleka oyo bilenge bakosalela makasi na bango ezali kaka ya kosalela ‘Mozalisi na biso Monene.’ (Mosakoli 12:1) Bilenge basengeli kobosanaka te ete makambo oyo basalaka ekoki kopesa baboti na bango esengo to mawa. (Masese 23:24, 25) Ntango bana bazali kotosa baboti na bango oyo babangaka Nzambe mpe bazali na etamboli malamu, basepelisaka mitema ya baboti na bango. (Baefese 6:1) Etamboli ya ndenge wana ezali “malamu mingi na kati ya Nkolo.”Bakolose 3:20.

Na kati ya lisangá

12, 13. (a) Ndenge nini bankulutu basengeli kotalelaka bokonzi na bango na kati ya lisangá? (b) Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ntina oyo bankulutu basengeli kosalelaka bampate makambo na boboto.

12 Yehova atye bakɛngɛli mpo bákambaka lisangá ya boklisto. (Baebele 13:17) Mibali yango ya makoki basengeli kosalela bokonzi oyo Nzambe apesi bango mpo na kopesa etonga na ye lisalisi oyo esengeli na yango mpe koluka bolamu na yango.  Bokonzi yango epesi nde bankulutu nzela ya komonela bandimi mosusu? Soki moke te! Bankulutu basengeli kotalelaka mokumba na bango na lisangá na bokatikati mpe na komikitisa. (1 Petelo 5:2, 3) Biblia eyebisi bakɛngɛli boye: ‘Bóbatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.’ (Misala 20:28) Yango ezali ntina monene oyo esengeli kotinda bango bázalaka na boboto epai ya moto mokomoko oyo azali na kati ya etonga.

13 Tokoki kolimbola likambo yango na ndakisa oyo. Moninga na yo moko ya motema asɛngi yo obatelela ye eloko moko oyo alingaka mingi. Oyebi ete asombaki yango na ntalo makasi. Na ntembe te, okolɛngɛla eloko yango mpe okobatela yango na likebi mingi, boye te? Ndenge moko mpe, Nzambe apesi bankulutu mokumba ya kobatelela ye eloko moko ya valɛrɛ mingi: lisangá, oyo bato na yango bazali lokola bampate. (Yoane 21:16, 17) Yehova alingaka bampate na ye mingi—yango wana, asombaki bango na makila ya motuya mingi ya Mwana na ye mobotami-se-moko, Yesu Klisto. Motuya oyo Yehova afutaki mpo na bampate ezalaki makasi koleka. Bankulutu ya komikitisa babosanaka likambo yango te mpe yango etindaka bango básalelaka bampate ya Yehova na ndenge esengeli.

“Nguya ya lolemo”

14. Nguya nini lolemo ezali na yango?

14 Biblia elobi ete: “Kufa mpe bomoi ezali na nguya ya lolemo.” (Masese 18:21) Ya solo, lolemo ekoki kosala mabe mingi. Nani ayoká naino mpasi na motema te mpo moto moko alobaki na ye likambo moko kozanga kokanisa to mpe liloba moko ya kotyola? Kasi lolemo ezali mpe na nguya ya kosala malamu. Masese 12:18 (NW) elobi ete: “Lolemo ya bato ya bwanya ebikisaka.” Ya solo, maloba ya kolendisa mpe ya malamu ekoki kozala lokola pomadi oyo bazali kopakola na motema mpo na kokitisa mpasi na yango mpe kobikisa mpota na yango. Tózwa mwa bandakisa.

15, 16. Wapi ndenge oyo tokoki kosalela lolemo na biso mpo na kolendisa basusu?

15 Na 1 Batesaloniki 5:14, Biblia elendisi biso ete: ‘Tólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama  na makanisi.’ Ɛɛ, na bantango mosusu, ata basaleli ya sembo ya Yehova bakoki konyokwama na makanisi. Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Pesá bango longonya na motema moko mpo na likambo moko basali, mpo na kosalisa bango báyeba ete bazali na motuya na miso ya Yehova. Talelá elongo na bango maloba ya nguya oyo ezali na bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisaka ete Yehova atyaka mpenza likebi mpe alingaka baoyo bazali “na mitema mitutami” mpe ‘na elimo enyatami.’ (Nzembo 34:18) Ntango tozali kosalela nguya ya lolemo na biso mpo na kobɔndisa basusu, tozali komonisa ete tolandaka ndakisa ya Nzambe na biso ya motema mawa, “oyo abɔndisaka baoyo balɛmbi nzoto.”2 Bakolinti 7:6.

16 Tokoki mpe kosalela nguya ya lolemo na biso mpo na kopesa basusu elendiseli oyo bazali na mposa na yango makasi. Ndeko ya mondimi moko to moninga na ye akufi? Maloba oyo tokoloba mpo na komonisa ete biso mpe tozali koyoka mpasi na ye mpe tozali komibanzabanza mpo na ye ekoki kokitisa mawa oyo azali koyoka. Ndeko moko oyo akómi mobange azali koyoka ete azangi ntina? Na boboto mpenza, tokoki kosalela lolemo na biso mpo na kokitisa ye motema, komonisa ye ete azali na motuya. Moto moko azali na maladi oyo eumeli mingi? Tokoki kokende epai na ye to kobenga ye na telefone mpo na koloba na ye maloba ya boboto mpe yango  ekoki kolendisa ye. Na ntembe te, Mozalisi na biso asepelaka mpenza ntango tozali kosalela nguya ya lolemo na biso mpo na kobimisa maloba oyo ezali “malamu mpo na kotonga”!Baefese 4:29.

Kosakola nsango malamu ezali lolenge moko malamu mpenza ya kosalela nguya na biso

17. Wapi lolenge ya ntina mingi oyo tokoki kosalela lolemo na biso mpo na litomba ya basusu, mpe mpo na nini tosengeli kosala bongo?

17 Lolenge ya ntina mingi koleka oyo tokoki kosalela nguya ya lolemo na biso ezali ya koyebisa basusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Masese 3:27 (NW) elobi ete: “Koboya te kosala bolamu na baoyo osengeli kosalela bango yango, ntango lobɔkɔ na yo ezali na nguya ya kosala yango.” Tozali na mokumba ya koyebisa basusu nsango malamu oyo ebikisaka. Ekozala malamu te tóbomba nsango yango ya ntina mingi oyo Yehova asopeli biso. (1 Bakolinti 9:16, 22) Kasi, ndenge nini Yehova alingi ete tósala mosala yango?

 Tósalela Yehova na ‘makasi na biso nyonso’

18. Yehova azali kosɛnga biso nini?

18 Bolingo oyo tolingaka Yehova etindaka biso tósakolaka mingi. Yehova azali kosɛnga biso nini na mosala yango? Eloko oyo biso nyonso, ata soki tozali na bomoi ya ndenge nini, tokoki kopesa ye: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.” (Bakolose 3:23) Ntango Yesu asakolaki mobeko oyo eleki mibeko nyonso, alobaki boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Malako 12:30) Ɛɛ, Yehova azali kosɛnga mokomoko na biso alinga ye mpe asalela ye na molimo mobimba.

19, 20. (a) Lokola motema, makanisi mpe makasi ezali na kati ya molimo, mpo na nini Malako 12:30 etángi yango lisusu? (b) Kosalela Yehova na molimo mobimba elimboli nini?

19 Kosalela Nzambe na molimo mobimba elimboli nini? Molimo elakisi moto mobimba, na makasi na ye nyonso ya nzoto mpe na mayele na ye nyonso. Lokola motema, makanisi mpe makasi ezali na kati ya molimo, mpo na nini Malako 12:30 etángi yango lisusu? Tózwa ndakisa moko. Na ntango ya kala, moto akokaki komitɛka (elingi koloba kotɛka molimo na ye) na boombo. Atako azali moombo, ekokaki kokóma ete asalela nkolo na ye na motema na ye mobimba te, asalela makasi na ye nyonso te to mayele na ye nyonso te mpo na matomba ya nkolo na ye. (Bakolose 3:22) Na yango, emonani ete Yesu atángaki makambo wana mpo na komonisa polele ete, ntango tozali kosalela Nzambe, tosengeli kobondela ata eloko moko te oyo tozali na yango. Kosalela Nzambe na molimo na biso mobimba elimboli komipesa mobimba, kosalela ye na makasi nyonso oyo tozali na yango.

20 Kosala na molimo mobimba elimboli nde ete biso nyonso tosengeli kolekisa ntango ndenge moko na mosala ya kosakola mpe kopesa makasi ndenge moko na mosala yango? Ekoki mpenza kosalema bongo te, mpamba te biso nyonso tozali na bomoi mpe na makoki ndenge moko te. Na ndakisa, elenge oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makasi mingi akoki kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola koleka moto oyo azali lisusu  na makasi mingi te mpo akómi mobange. Monzemba oyo azali na mokumba ya libota te akoki kosakola mingi koleka moto oyo azali na libota. Soki tozali na makasi mpe makambo ya bomoi na biso ezali kotikela biso nzela ya kosakola mingi, tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na yango! Kasi, tokolinga ata moke te komikokanisa na basusu to kotɔngatɔnga bango. (Baloma 14:10-12) Tokosalela nde makasi na biso mpo na kolendisa bango.

21. Wapi lolenge ya malamu mpe ya ntina mingi koleka oyo tokoki kosalela nguya na biso?

21 Yehova apesi ndakisa ya kokoka mpenza na ndenge asalelaka nguya na ye malamu. Tolingi kosala nyonso oyo moto ya kozanga kokoka akoki kosala mpo na kolanda ndakisa na ye. Tokoki kosalela nguya na biso malamu soki tozali kopesa lokumu na baoyo tozali na mwa bokonzi likoló na bango. Longola yango, tolingi kosala na molimo na biso mobimba mosala ya kosakola oyo Yehova apesi biso, oyo ekobikisa bomoi ya bato. (Baloma 10:13, 14) Kobosana te, Yehova asepelaka ntango ozali kopesa nyonso oyo eleki malamu oyo yo—elingi koloba molimo na yo—okoki kopesa. Motema na yo ezali kotinda yo te na koluka kosala nyonso oyo okoki mpo na kosalela Nzambe yango oyo ayebaka makambo na biso malamu mpe alingaka biso? Wana nde lolenge oyo eleki malamu to ya ntina mingi ya kosalela nguya na biso.

^ par. 10 Na ntango ya kala, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “fimbo” ezalaki kolakisa mwa nzete to lingenda, lokola oyo mobateli ya mpate azalaki kosalela mpo na kotambwisa bampate na ye. (Nzembo 23:4) Ndenge moko mpe, na likambo ya bokonzi ya baboti, “fimbo” ezali kopesa likanisi ya kolakisa bana nzela na bolingo mpenza, kasi te kopesa bango etumbu ya makasi koleka.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Okomipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi?

Tóluka koyeba ndenge tokoki kosalela ntango, mbongo, makasi mpe makoki na biso mpo ete matomba ya Bokonzi ekende liboso