Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 8

Nguya ya kozongisa makambo ndenge ezalaki—Yehova azali “kosala biloko nyonso biloko ya sika”

Nguya ya kozongisa makambo ndenge ezalaki—Yehova azali “kosala biloko nyonso biloko ya sika”

1, 2. Lelo oyo, biloko nini bato bazali kobungisa, mpe yango esalaka ete tómiyoka ndenge nini?

MWANA moko azali kolela na mawa mpenza mpo abungisi to abebisi eloko na ye ya masano oyo alingaka mingi. Kolela na ye ezali mpenza kopesa mpasi na motema! Kasi, kanisá esengo oyo akoyoka soki tata na ye amoni to abongisi eloko yango! Mpo na tata, ezalaki mpasi te kosala makambo yango. Kasi, yango epesi mwana nsuka na esengo mpe ekamwisi ye mingi. Eloko oyo akanisaki ete ebungi to ebebi mpo na libela emonani to ebongi!

2 Yehova, Tata oyo aleki batata nyonso, azali na nguya ya kozongisela bana na ye awa na mabelé eloko oyo bamoni ete ebungi to ebebi mpo na libela. Awa, tolingi kolobela te mwa biloko mpamba ya masano. Na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo tozali, tozali kobungisa biloko ya ntina mingi koleka. (2 Timote 3:1-5) Ebele ya makambo oyo bato bapesaka valɛrɛ mingi ezali komonana ete ezali na likama—na ndakisa, ndako, bozwi, mosala, ata mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Tokoki mpe komitungisa mingi ntango tozali komona ndenge bato bazali kobebisa mabelé, mai ná mopɛpɛ mpe ndenge likambo yango ezali kosala ete mitindo mingi ya biloko ya bomoi esila na mokili. Nzokande, ezali na eloko mosusu te oyo epesaka biso mpasi mingi koleka liwa ya ndeko to ya moninga na biso. Na ntango wana, toyokaka mpenza ete totikali mabɔkɔ mpamba mpe ete tozali na likoki ya kosala eloko te.2 Samwele 18:33.

3. Elikya nini ya kobɔndisa Misala 3:21 elobeli, mpe na nzela ya nini Yehova akokokisa yango?

3 Na yango, koyeba ete nguya ya Yehova ezongisaka makambo ndenge ezalaki ezali kobɔndisa mpenza! Ndenge tokomona yango, Nzambe akozongisela bana na ye awa na mabelé ebele ya makambo. Kutu, Biblia emonisi ete Yehova azali na mokano ete “kozongisama ya makambo nyonso” esalema. (Misala 3:21) Mpo na kokokisa  mokano yango, Yehova akosalela Bokonzi oyo etambwisami na Masiya—Mwana na ye—Yesu Klisto. Bilembeteli emonisi ete Bokonzi yango ebandaki na likoló na 1914. * (Matai 24:3-14) Nini ekozongisama? Tiká tótalela ndambo ya misala malamu oyo Yehova asalaka mpo na kozongisa makambo ndenge ezalaki. Tozali kutu komona moko na misala yango na miso. Mosusu ekosalema na monene na mikolo ezali koya.

Kozongisama ya losambo ya pɛto

4, 5. Nini ekómelaki ekólo ya Nzambe na mobu 607 L.T.B., mpe elikya nini Yehova apesaki bango?

4 Likambo moko oyo Yehova asili kozongisa ezali losambo ya pɛto. Mpo osimba malamu ndimbola ya likambo yango, tiká tótalela na mokuse lisolo ya bokonzi ya Yuda. Yango ekosalisa biso tóyeba mpenza ndenge Yehova asalelaka nguya na ye ya kozongisa makambo ndenge ezalaki.Baloma 15:4.

5 Kanisá mwa moke ndenge Bayuda ya sembo bayokaki na mobu 607 L.T.B. ntango Yelusaleme, engumba na bango oyo balingaki mingi, ebebisamaki mpe lopango na yango ekweisamaki. Likambo ya mabe koleka ezali ete tempelo kitoko oyo Salomo atongaki, oyo ezalaki esika kaka moko na mabelé mobimba epai losambo ya pɛto ya Yehova ezalaki kosalema, yango mpe etikalaki kaka mabanga na mabanga. (Nzembo 79:1) Baoyo bakufaki te bamemamaki na boombo na Babilone; na nsima, mboka na bango etikalaki mpamba mpe banyama ya zamba bakómaki kofanda wana. (Yilimia 9:11) Na ndenge bato batalelaka makambo, elikya ata moko ezalaki lisusu te. (Nzembo 137:1) Kasi Yehova, moto oyo alakaki banda kala ete mboka yango ekobebisama, apesaki bango elikya ete ntango ya kozongisama ekoya.

6-8. (a) Likambo nini basakoli Baebele bazalaki kolobela mbala na mbala na mikanda na bango, mpe ndenge nini bisakweli oyo etali likambo yango ekokisamaki mbala ya liboso? (b) Na mikolo na biso, ndenge nini bisakweli yango mingi ya kozongisama ekokisamaki epai ya basaleli ya Nzambe?

 6 Kozongisama ezali likambo oyo basakoli Baebele bazalaki kolobela mbala na mbala. * Na nzela ya mikanda na bango, Yehova asakolaki ete mboka na bango ekozonga ndenge ezalaki, bato bakoya lisusu kofanda wana, mabelé na yango ekobimisa biloko ya kolya mingi, banyama ya zamba ná banguna bakokɔta lisusu kuna te. Ekozala mpenza paladiso! (Yisaya 65:25; Ezekiele 34:25; 36:35) Koleka nyonso wana, losambo ya pɛto ekozongisama mpe tempelo ekotongama lisusu. (Mika 4:1-5) Bisakweli yango epesaki Bayuda oyo bazalaki na boombo elikya, esalisaki bango báyika mpiko na boombo na bango na Babilone mbula 70.

7 Nsukansuka, ntango ya kozongisama ekokaki. Bayuda babimaki na Babilone, bazongaki na Yelusaleme mpe batongaki lisusu tempelo ya Yehova. (Ezela 1:1, 2) Ntango nyonso oyo bazalaki komipesa na losambo ya pɛto, Yehova azalaki kopambola bango mpe azalaki kobotisa mabelé na bango mingi, mpe bomoi ezalaki malamu na mokili na bango. Azalaki kobatela bango na banguna na bango mpe na banyama ya zamba oyo bayaki kofanda na mboka na bango na boumeli ya bambula mingi. Na ntembe te, basepelaki mingi komona ete Yehova azali na nguya ya kozongisa makambo ndenge ezalaki! Kasi makambo oyo ekómelaki bango ezalaki kaka kokokisama ya liboso mpe ya moke ya bisakweli oyo etali kozongisama. Kokokisama na yango ya monene koleka esengelaki kosalema “na mikolo ya nsuka,” elingi koloba na mikolo na biso, ntango Yehova akofandisa na kiti ya bokonzi Mokitani ya Mokonzi Davidi oyo alakamaki banda kala.Yisaya 2:2-4; 9:6, 7.

8 Mwa moke nsima ya kofanda na kiti ya bokonzi kuna na likoló na 1914, Yesu atyaki likebi na bamposa ya elimo ya basaleli ya sembo ya Nzambe awa na mabelé. Se ndenge Sirise, molongi-bitumba ya ekólo Perse, abimisaki Bayuda oyo batikalaki na Babilone na mobu 537 L.T.B., Yesu mpe abimisaki batikali ya Bayuda ya elimo—bayekoli na ye mpenza—na makambo mabe ya Babilone, lisangá  ya mangomba nyonso ya lokuta ya mikolo na biso. (Baloma 2:29; Emoniseli 18:1-5) Banda 1919, losambo ya pɛto ezongá na esika oyo ebongi na yango na kati ya bomoi ya baklisto ya solo. (Malaki 3:1-5) Kobanda wana, basaleli ya Yehova bazali kosambela ye na tempelo na ye ya elimo oyo epɛtolami—ebongiseli oyo azwi mpo na losambo ya pɛto. Mpo na nini kozongisama yango ezali na ntina mpo na biso lelo oyo?

Ntina ya kozongisama na elimo

9. Nsima ya liwa ya bantoma, mabe nini mangomba ya boklisto esalaki na losambo ya Nzambe, kasi Yehova asali nini na mikolo na biso?

9 Tózongisa naino makanisi nsima. Na ekeke ya liboso, baklisto bazalaki na ebele ya mapamboli na elimo. Kasi Yesu ná bantoma na ye basakolaki ete losambo ya solo ekobebisama mpe ekolimwa. (Matai 13:24-30; Misala 20:29, 30) Nsima ya liwa ya bantoma, mangomba ya boklisto ebotamaki. Bakonzi na yango bakɔtisaki mateya mpe mimeseno ya bapakano. Basalaki mpe ete bandimi na bango bákoka mpenza te kopusana penepene na Nzambe, mpamba te bazalaki koteya ete Ye azali Bosato, liteya oyo ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango; lisusu, bazalaki koteya bato bátubelaka masumu na bango epai ya basango mpe bábondelaka Malia ná “basantu” na esika ya kobondela Yehova. Nsima ya kobebisama ya losambo ya solo ndenge wana na boumeli ya bankama ya bambula, Yehova asali nini? Azongisi losambo ya pɛto na kati ya mokili na biso ya lelo, oyo etondi na lokuta oyo mangomba ezali koteya mpe oyo mimeseno ya mabe ekómisi mbindo! Kozanga kolekisa ndelo, tokoki koloba ete kozongisama yango ezali likambo moko oyo eleki ntina na mikolo na biso.

10, 11. (a) Wapi makambo mibale oyo ezali na kati ya paladiso ya elimo, mpe yango etali yo na nini? (b) Bato ya lolenge nini Yehova ayanganisi na kati ya paladiso ya elimo, mpe bakozala na esengo ya komona nini na miso?

10 Yango wana, lelo oyo baklisto ya solo bazali na paladiso ya elimo. Makambo nini ezali na kati ya paladiso yango? Mingi mpenza, makambo mibale. Ya liboso, losambo ya pɛto ya Nzambe ya solo, Yehova. Apesi biso lolenge moko ya kosambela oyo ezangi lokuta mpe oyo ezali kobongola ndimbola ya makambo te. Apesi biso bilei ya elimo. Yango ezali kosalisa biso tóyeba ye Tata na biso ya likoló, tósepelisa ye mpe tópusana penepene na ye. (Yoane 4:24) Likambo  ya mibale ya paladiso yango ya elimo etali bato. Ndenge Yisaya asakolaki, “na mikolo ya nsuka,” Yehova ateyi biso basambeli na ye banzela ya kimya. Asilisi bitumba na kati na biso. Ata tosalaka mabunga, azali kosalisa biso tólata “bomoto ya sika.” Mpo na komonisa ete asepeli na milende na biso, apesaka biso elimo santu na ye oyo ebotaka mbuma malamu na bomoi na biso. (Baefese 4:22-24; Bagalatia 5:22, 23) Ntango ozali kosala makambo oyo elimo ya Nzambe esɛngaka, ozali mpenza na kati ya paladiso ya elimo.

11 Na kati ya paladiso yango ya elimo, Yehova ayanganisi lolenge ya bato oyo alingaka—baoyo balingi ye, balingi kimya mpe “bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Bango nde bakozala na esengo ya komona na miso kozongisama mosusu ya kokamwisa mpenza—oyo ya bato mpe ya mabelé mobimba.

“Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika”

12, 13. (a) Mpo na nini bisakweli oyo etali kozongisama esengeli kokokisama lisusu? (b) Na Edene, Yehova amonisaki ete mokano na ye mpo na mabelé ezali nini, mpe mpo na nini yango ezali kopesa biso elikya mpo na mikolo ezali koya?

12 Ebele ya bisakweli oyo etali kozongisama esuki kaka te na kozongisama na elimo. Na ndakisa, Yisaya akomaki ete ekozala na ntango oyo bato ya maladi, batɛngumi, bato oyo bakufá miso mpe bato oyo bakufá matoi bakobikisama, ata mpe liwa ekolongolama mpo na libela. (Yisaya 25:8; 35:1-7) Na ndenge ya mosuni, bilaka wana ekokisamaki te epai ya bato ya Yisalaele ya ntango ya kala. Mpe, atako tomoni na mikolo na biso kokokisama na elimo ya bilaka yango, ntembe ezali te ete ekokokisama lisusu na mikolo ezali koya epai ya bato na ndenge ya mosuni mpe kokokisama yango ekozala monene mpenza. Ndenge nini toyebi yango?

13 Na Edene, Yehova amonisaki polele mokano na ye mpo na mabelé: etonda na bato ya esengo oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe na bomoko. Mwasi ná mobali basengelaki kobatela mabelé mobimba mpe bikelamu na yango nyonso, mpe kokómisa yango paladiso. (Genese 1:28) Lelo oyo, makambo ezali mpenza ndenge mosusu. Kasi, tóyeba mpenza ete eloko ata moko te ekoki kopekisa Yehova kokokisa mikano na ye. (Yisaya 55:10, 11) Yesu, Masiya mpe Mokonzi oyo Yehova aponi, nde akosala ete mabelé mobimba ezala Paladiso.Luka 23:43.

14, 15. (a) Ndenge nini Yehova akosala “biloko nyonso biloko ya sika”? (b) Bomoi ekozala ndenge nini na Paladiso, mpe likambo nini oyo ezali kosepelisa yo mingi koleka na bomoi yango?

 14 Kanisá ete mabelé mobimba ekómi Paladiso! Yoká ndenge Yehova alobeli ntango oyo likambo yango ekosalema: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” (Emoniseli 21:5) Tótalela ndimbola ya maloba yango. Ntango Yehova akosilisa kosalela nguya na ye mpo na kobebisa ebongiseli mabe oyo, ‘likoló ya sika mpe mabelé ya sika’ ekotikala. Yango elingi koloba ete guvɛrnema moko ya sika oyo ekozala na likoló ekoyangela bato oyo bakozala na bomoto ya sika, oyo bakozala awa na mabelé, bato oyo balingi Yehova mpe bazali kosala mokano na ye. (2 Petelo 3:13) Satana ná bademo na ye bakokangama. (Emoniseli 20:3) Mpo na mbala ya liboso, banda bankóto ya bambula, baanzelu mabe wana mpe oyo batondi na koyina bakozala lisusu te mpe bakotungisa lisusu bato te. Bato bakofanda nyɛɛ mpenza.

15 Na ntango wana nde tokozala na likoki ya kobatela mabelé na biso ya kitoko ndenge tosengelaki kosala banda na ebandeli. Mabelé yango moko ezali na makoki ya komibongisa. Balaki mpe bibale oyo eloko moko ebebisi ekoki komipɛtola soki eloko ya kobebisa yango ezali lisusu te; bazamba to bisika mosusu oyo ebebi mpo na bitumba ekoki komibongisa yango moko soki bitumba ezali lisusu te. Ekozala mpenza esengo monene kosala elongo na mabelé, kosalisa yango ekóma mobimba lokola elanga ya Edene, oyo ezali na mitindo ya banzete mpe ya banyama ndenge na ndenge! Na esika bato bábebisa lisusu banyama mpe banzete ndenge na ndenge kaka mpo na kobebisa, bakozala nde na kimya elongo na biloko nyonso oyo Nzambe akelá awa na mabelé. Ata bana bakobanga lisusu banyama ya zamba te.Yisaya 9:6, 7; 11:1-9.

16. Na Paladiso, kozongisama ya ndenge nini ekosimba bomoi ya moto mokomoko ya sembo?

16 Kozongisama yango ekosimba mpe bomoi ya moto mokomoko. Nsima ya Armagedona, baoyo bakotikala na bomoi bakomona bipai nyonso na mokili ndenge bato bakobikisama na likamwisi. Yesu akosala ndenge asalaki ntango azalaki awa na mabelé; akosalela nguya oyo Nzambe apesi ye mpo na kofungola lisusu miso ya baoyo bakufá miso, matoi ya baoyo bakufá matoi mpe kobikisa batɛngumi ná bibɔsɔnɔ. (Matai 15:30) Nzoto ya mibange ekozonga makasi mpe kolɔngɔnɔ ndenge ezalaká na bolenge na bango. (Yobo 33:25) Masusa  na elongi ekolimwa, mabɔkɔ ná makolo ekokóma makasi, mpe misisa ekokóma lisusu pɛpɛlɛ mpe makasi. Bato nyonso ya sembo bakoyoka na nzoto na bango ndenge mbuma mabe ya lisumu mpe ya ezaleli ya kozanga kokoka ezali kosila mokemoke tii na nsuka na yango. Tokopesa mpenza Yehova Nzambe matɔndi mpo na nguya na ye malamu ya kobongisa makambo! Tiká tólobela sikoyo likambo moko ya kobɔndisa mpenza oyo ekosalema na boumeli ya ntango malamu yango ya kozongisama.

Bakufi bazongi na bomoi

17, 18. (a) Mpo na nini Yesu apamelaki Basadukai? (b) Nini etindaki Eliya asɛnga Yehova asekwisa mwana wana?

17 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), bakonzi mosusu ya mangomba na nkombo Basadukai bazalaki kondima te ete lisekwa ekozala. Yesu apamelaki bango na maloba oyo: “Bozali na kati ya libunga, mpo boyebi Makomami te mpe nguya ya Nzambe te.” (Matai 22:29) Makomami emonisi solo ete Yehova azali na nguya wana ya kozongisa bakufi na bomoi. Ndenge nini?

18 Talá likambo oyo ekómaki na mikolo ya Eliya. Mwasi moko oyo akufelá mobali amemi na mabɔkɔ na ye mwana na ye kaka moko oyo azali koningana lisusu te. Mwana yango akufi. Na ntembe te, mosakoli Eliya, oyo afandi mwa mikolo na ndako ya mwasi yango, azwi mobulu na makanisi. Eleki mwa mikolo, asalaki likambo moko oyo esalisaki mwana yango akufa na nzala te. Ekoki kozala ete na nsima, Eliya akómaki kolinga mwana yango mingi. Mama ya mwana yango azali na mpasi makasi na motema, mpamba te kaka mwana wana nde azalaki kosalisa ye akanisaka mobali na ye oyo akufá. Ntango mosusu azalaki kotya elikya ete mwana na ye akobatela ye ntango akokóma mobange. Lokola azwi mpenza mobulu na makanisi, akanisi ete likambo oyo ekómeli ye mpo na lisumu moko asalá. Makambo nyonso wana oyo Eliya azali komona elekeli ye. Na malɛmbɛ, Eliya alongoli mwana na ntolo ya mama na ye, amemi ye na shambre oyo ye moko azalaki kolala, mpe asɛngi Yehova Nzambe azongisela mwana molimo to bomoi na ye.1 Mikonzi 17:8-21.

19, 20. (a) Ndenge nini Abalayama amonisaki ete andimaki ete Yehova azali na nguya ya kozongisa makambo ndenge ezalaki, mpe nini epesaki ye kondima yango? (b) Mbano nini Yehova apesaki Eliya mpo na kondima na ye?

19 Eliya azalaki moto ya liboso te oyo andimaki ete moto akoki  kosekwa. Bankama ya bambula liboso, Abalayama andimaki na ntina ete Yehova azali na nguya ya kozongisa moto na bomoi. Ntango azalaki na mbula 100 mpe Sara na mbula 90, Yehova azongiselaki bango makoki na bango ya kobota oyo ezalaki kosala lisusu te mpe likamwisi wana epesaki Sara nzela ya kozwa zemi ya mwana mobali. (Genese 17:17; 21:2, 3) Na nsima, ntango mwana yango akolaki mpenza, Yehova asɛngaki Abalayama apesa ye mbeka. Abalayama amonisaki ete azali na kondima, ayebaki ete Yehova azali na likoki ya kozongisa Yisaka, mwana na ye ya bolingo, na bomoi. (Baebele 11:17-19) Ntango mosusu kondima makasi wana nde etindaki Abalayama ayebisa basaleli na ye, liboso amata na ngomba kokaba mwana na ye, ete ye ná Yisaka bakozonga elongo.Genese 22:5.

“Talá, mwana na yo abiki”!

20 Lokola Yehova atikaki Yisaka na bomoi, ntina ya kosekwisa ye ezalaki te na ntango wana. Nzokande na oyo etali Eliya, mwana ya mwasi wana oyo akufelá mobali asilaki kokufa—kasi liwa yango ekoumela te. Yehova apesaki mosakoli mbano mpo na kondima na ye: asekwisaki mwana yango! Nsima na yango, Eliya azongisaki mwana yango epai ya mama na ye mpe alobaki maloba oyo bato babosanaka te: “Talá, mwana na yo abiki”!1 Mikonzi 17:22-24.

21, 22. (a) Mpo na nini masolo ya bato oyo basekwisamaki ekomamaki na Biblia? (b) Na Paladiso, bato boni bakosekwisama, mpe nani akosekwisa bango?

21 Wana ezali mbala ya liboso oyo tomoni na Biblia ete Yehova asaleli nguya na ye mpo na kozongisa moto na bomoi. Na nsima, Yehova apesaki mpe Elisa, Yesu, Paulo, ná Petelo nguya ya kozongisa bato na bomoi. Kasi, nsukansuka bato yango bakufaki lisusu. Atako bongo, masolo na bango oyo ezali na Biblia ezali kolakisa biso makambo malamu oyo ekosalema na mikolo ezali koya.

22 Na Paladiso, Yesu akokokisa mokumba na ye, akozala “lisekwa mpe bomoi.” (Yoane 11:25) Akosekwisa bamilio na bamilio ya bato, akopesa bango libaku ya kozala na bomoi ya libela na Paladiso. (Yoane 5:28, 29) Kanisá ndenge baninga ná bandeko oyo balinganaki mingi, kasi oyo liwa ekabolaki bango na boumeli ya ntango molai, bakokutana lisusu mpe bakoyambana na esengo mingi mpenza! Bato nyonso bakokumisa Yehova mpo na nguya na ye ya kozongisa makambo ndenge ezalaki.

23. Yehova asalelaki nguya na ye mpo na kosala likambo nini oyo eleki makambo nyonso asalá, mpe na ndenge nini yango ezali kondimisa biso ete elikya na biso mpo na mikolo ezali koya ekokokisama mpenza?

 23 Yehova apesi ndanga ya solosolo mpo na komonisa ete akokokisa bilaka wana. Asalelaki nguya na ye mpo na kosala likambo oyo eleki makambo nyonso asalá: asekwisaki Mwana na ye Yesu, akómisaki ye ekelamu moko ya elimo ya nguya mingi, mpe moto ya mibale na molɔ́ngɔ́ mobimba nsima na Ye. Yesu abimelaki bankama ya bato oyo bamonaki ye na miso nsima ya lisekwa na ye. (1 Bakolinti 15:5, 6) Likambo yango esengeli kondimisa ata bato ya ntembe. Ya solo, Yehova azali na nguya ya kozongisa bomoi.

24. Mpo na nini tozali kondima solo ete Yehova akosekwisa bakufi, mpe elikya nini mokomoko na biso akoki kozala na yango?

24 Yehova azali kaka te na nguya ya kozongisa bato na bomoi, kasi azali mpe na mposa ya kosala likambo yango. Na lisalisi ya elimo santu, Yobo, moto ya sembo, alobaki ete Yehova azali mpenza na mposa ya kozongisa bato na bomoi. (Yobo 14:15) Oyoki te mposa ya kopusana penepene na Nzambe na biso, ye oyo na bolingo ya ndenge wana azali na mposa makasi ya kosalela nguya na ye mpo na kozongisa makambo ndenge ezalaki? Nzokande, kobosana te ete kosekwisa bato ezali kaka moko ya ebele ya makambo oyo Yehova akosala ntango akozongisa makambo ndenge ezalaki. Yango wana, ntango ozali kolanda kopusana penepene na ye, pesáká ntango nyonso motuya mingi na elikya malamu oyo ozali na yango ete okomona na miso ntango Yehova ‘azali kosala biloko nyonso biloko ya sika.’Emoniseli 21:5.

^ par. 3 “Bantango ya kozongisama ya makambo nyonso” ebandaki ntango Bokonzi ya Masiya etyamaki mpe mokonzi na yango ezalaki mokitani moko ya Davidi, mokonzi ya sembo. Yehova alakaki Davidi ete moko ya bakitani na ye akoyangela libela na libela. (Nzembo 89:35-37) Kasi nsima ya kobebisama ya Yelusaleme na Babilone na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ata mwana moko te ya libota ya Davidi afandaki lisusu na kiti ya bokonzi ya Nzambe. Awa na mabelé, Yesu abotamaki na molɔngɔ ya Davidi; na nsima, ntango Yehova afandisaki ye na kiti ya bokonzi kuna na likoló, akómaki Mokonzi oyo alakamaki banda kala.

^ par. 6 Na ndakisa, Moize, Yisaya, Yilimia, Ezekiele, Hosea, Yoele, Amosa, Obadia, Mika, mpe Sefania, bango nyonso balobelaki likambo yango.