Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 6

Nguya ya kobebisa—“Yehova azali elombe ya etumba”

Nguya ya kobebisa—“Yehova azali elombe ya etumba”

1-3. (a) Baezipito bakanaki kosala Bayisalaele nini? (b) Ndenge nini Yehova abundelaki bato na ye?

BANA ya Yisalaele bakangamaki mpenza na motambo—na ngámbo oyo, bangomba oyo esalaki mabwaku ya nsɔmɔ, na ngámbo oyo kuna mbu oyo bakokaki kokatisa te. Nsima na bango, basoda ya Ezipito—oyo bazalaka na mawa ata moke te mpe babomaka na ndenge ya nsɔmɔ—bazalaki kolanda bango na nkanda mpenza mpo na kosilisa bango nyɛɛ. * Atako bongo, Moize alendisaki bango bázala kaka na elikya. Akitisaki bango motema na maloba oyo: ‘Yehova akobundela bino.’Exode 14:14.

2 Atako bongo, emonani ete Moize abelelaki Yehova, mpamba te Nzambe apesaki ye eyano oyo: “Oleli epai na ngai mpo na nini? . . . Tombolá lingenda na yo mpe sembolá lobɔkɔ na yo na likoló ya mai mpe kabolá yango.” (Exode 14:15, 16) Sikoyo, meká komona na makanisi ndenge makambo elandanaki. Mbala moko Yehova apesi anzelu na ye mitindo, mpe likonzí ya lipata eleki na nsima ya bana ya Yisalaele; ntango mosusu etandani lokola efelo mpe epekisi molɔngɔ ya liboso ya basoda ya Ezipito kopusana penepene na bango. (Exode 14:19, 20; Nzembo 105:39) Moize asemboli lobɔkɔ. Mopɛpɛ moko ya makasi ebandi kopɛpa mpe ekaboli mbu. Mai ekangami mpe etɛlɛmi lokola bifelo, efungoli nzela oyo bonene na yango ekoki mpo na kolekisa ekólo mobimba wana!Exode 14:21; 15:8.

3 Ntango Farao amonaki nguya ya ndenge wana, asengelaki kopesa mitindo na basoda na ye bázonga. Kasi, mpo na lolendo, atindi bango bálanda Bayisalaele. (Exode 14:23) Baezipito  baweleli kokɔta na nzela oyo efungwami na kati ya mbu, mpe eumeli te mobulu ekɔteli bango, mpamba te bapine ya makalo na bango ebandi kolongwa. Ntango Bayisalaele bakómi na ngámbo mosusu mpe bazali lisusu na likama te, Yehova ayebisi Moize boye: “Sembolá lobɔkɔ na yo likoló ya mai na monana ete mai ezonga likoló ya Baezipito, likoló ya makalo na bango mpe ya bato na bango ya mbalata.” Mai oyo etɛlɛmaki lokola bifelo ekwei, ekundi Farao ná basoda na ye!Exode 14:24-28; Nzembo 136:15.

Na Mbu Motane, Yehova amonisaki ete azali “elombe ya etumba”

4. (a) Na Mbu Motane, Yehova amonisaki ete azali nani? (b) Ndenge yango ya kolobela Yehova ekoki kopesa basusu makanisi nini?

4 Kobikisama ya ekólo ya Yisalaele na Mbu Motane ezalaki likambo moko ya monene na lisolo ya makambo oyo Nzambe asalelá bato. Na libaku wana, Yehova amonisaki ete azali “elombe ya etumba.” (Exode 15:3) Kasi, ndenge wana ya kolobela Yehova epesi yo makanisi nini? Ezali solo ete bitumba epesi bato mawa mpe mpasi mingi. Na yango, ekoki kozala ete ndenge oyo Nzambe asalelaka nguya na ye ya kobebisa ezali nde kopekisa yo kopusana penepene na ye?

Bitumba ya Nzambe ekeseni na oyo ya bato

5, 6. (a) Mpo na nini Nzambe abengami na nkombo oyo ebongi mpenza na ye “Yehova ya mampinga”? (b) Na ndenge nini bitumba ya Nzambe ekeseni na oyo ya bato?

5 Mbala soki nkama misato na Makomami ya Liebele mpe mbala mibale na Makomami ya Grɛki, tozali kokuta titre oyo ya Nzambe: “Yehova ya mampinga.” (1 Samwele 1:11) Lokola Yehova azali Mokonzi Monene, azali kokamba limpinga monene ya baanzelu. (Yosua 5:13-15; 1 Mikonzi 22:19) Limpinga yango ezali na nguya ya kobebisa mingi mpenza. (Yisaya 37:36) Kobomama ya bato ezali likambo oyo esepelisaka te. Kasi, tosengeli kobosana te ete bitumba ya Nzambe ekeseni na bitumba ezangá ntina oyo bato babundaka. Atako bakonzi ya basoda mpe ya politiki balukaka ntango mosusu komonisa ete makanisi ya malamu nde etindaka bango na kobundisa basusu,  kasi mbala mingi ezali lokoso ná mposa ya koluka kaka matomba na bango nde etindaka bango bábundaka bitumba.

6 Nzokande, Yehova asalaka makambo bisalelá te, kozanga kokanisa liboso. Deteronome 32:4 (NW) elobi ete: “Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka, mpo nzela na ye nyonso ezali sembo. Nzambe ya sembo, oyo epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe sembo.” Liloba ya Nzambe emonisi ete kozala na nkanda makasi, konyokola basusu mpe kosala mobulu ezali mabe. (Genese 49:7; Nzembo 11:5) Na yango, Yehova asalaka ata likambo moko te soki ntina ya kosala yango ezali te. Asalelaka nguya na ye ya kobebisa na mbala moko moko mpe kaka na ntango oyo ndenge mosusu ya kosala ezali te. Yango nde amonisaki na monɔkɔ ya mosakoli Ezekiele: “Ngai nazwi esengo na kufa ya moto mabe? Ebongi malamu ete abongwana na nzela na ye mpe abika te?”Ezekiele 18:23.

7, 8. (a) Libunga nini Yobo azalaki na yango na ntina na bampasi na ye? (b) Ndenge nini Elihu asembolaki makanisi ya Yobo na likambo yango? (c) Liteya nini tokoki kozwa na libunga wana ya Yobo?

7 Kasi, mpo na nini Yehova asalelaka nguya ya kobebisa? Liboso ya kopesa eyano, tókanisa lisusu moyengebene Yobo. Satana atyaki ntembe ete Yobo—tóloba ete moto nyonso—akotikala sembo te soki amekami. Mpo na kopesa eyano na ntembe wana, Yehova apesaki Satana nzela ameka bosembo ya Yobo. Yango wana, Yobo abɛlaki, bomɛngo na ye nyonso esilaki mpe bana na ye nyonso bakufaki. (Yobo 1:1–2:8) Lokola Yobo ayebaki te ntina ya bampasi wana nyonso, akanisaki ete Nzambe nde apesi ye etumbu atako asalaki mabe te. Atunaki Nzambe ntina oyo Ye akómi komona ye lokola “eloko ya kokanela,” to “monguna” na Ye.Yobo 7:20; 13:24.

8 Elenge mobali moko na nkombo Elihu amonisaki Yobo ete azali na libunga, ayebisaki ye boye: ‘Olobi ete, Boyengebene na ngai eleki ya Nzambe.’ (Yobo 35:2) Ya solo, kokanisa ete biso toyebi makambo koleka Nzambe to kokanisa ete makambo asali ezali sembo te, ezali nde kozanga bwanya. Elihu alobaki boye: “Tiká ete ezala mosika na Nzambe ete asala mabe! Ezala mosika mpe na Oyo-ya-Nguya-Nyonso ete [asala makambo oyo ezangi bosembo].” Nsima na yango, alobaki ete: “Mpo na oyo etali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, tomoni ye te; aleki na nguya,  mpe akotyola te bosembo ná boyengebene oyo etondi mɛkɛ.” (Yobo 34:10; 36:22, 23; 37:23) Na yango, esengeli tóyebaka ete soki Nzambe abundi etumba, ntina ya solosolo esengeli kozala. Lokola tosimbi likanisi wana, tótala sikoyo mwa bantina oyo etindaka Nzambe ya kimya akóma na bantango mosusu elombe ya etumba.1 Bakolinti 14:33.

Ntina oyo Nzambe ya kimya abundaka

9. Mpo na nini Nzambe ya kimya abundaka?

9 Nsima ya kokumisa Nzambe ete azali “elombe ya etumba,” Moize alobaki ete: ‘Ee Yehova, nani azali lokola yo kati na banzambe? Nani azali lokola yo, na lokumu kati na bosantu?’ (Exode 15:11) Ndenge moko mpe, mosakoli Habakuku akomaki ete: “Yo ozali na miso ya pɛto, okoki komona mabe te, oyebi mapɛngwi te.” (Habakuku 1:13) Atako Yehova azali Nzambe ya bolingo, kasi azali mpe Nzambe ya bosantu, ya boyengebene mpe ya bosembo. Na bantango mosusu, bizaleli yango esɛngisaka ye asalela nguya na ye ya kobebisa. (Yisaya 59:15-19; Luka 18:7) Na yango, Nzambe abebisaka bosantu na ye te soki abundi etumba. Kutu, abundaka nde mpo azali mosantu.Exode 39:30.

10. (a) Ntango nini mpe ndenge nini esengelaki ete Nzambe abunda mpo na mbala ya liboso? (b) Wapi lolenge moko kaka ya kosilisa bonguna oyo esakolamaki na Genese 3:15, mpe bolamu nini yango ekomemela bayengebene?

10 Tózwa ndakisa ya likambo oyo ebimaki nsima ya botomboki oyo Adama ná Eva, mobali ná mwasi ya liboso, batombokelaki Nzambe. (Genese 3:1-6) Soki Yehova akangaka miso na kozanga boyengebene na bango, mbɛlɛ akitisaki lokumu na ye ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́. Lokola azali Nzambe ya boyengebene, esɛngaki akatela bango etumbu ya liwa. (Baloma 6:23) Na esakweli ya liboso oyo ezali na Biblia, asakolaki ete bonguna ekozala kati na basaleli na ye mpe baoyo bakolanda “nyoka,” elingi koloba Satana. (Emoniseli 12:9; Genese 3:15) Nsukansuka, ekosɛnga kaka kopanzapanza Satana mpo na kosilisa bonguna yango. (Baloma 16:20) Kasi etumbu wana ekomemela bayengebene ebele ya mapamboli, mpamba te ekolongola makambo mabe ya Satana awa na mabelé mpe ekopesa nzela ete mabelé mobimba ezala paladiso. (Matai 19:28) Kasi,  liboso makambo wana esalema, baoyo bakomitya na ngámbo ya Satana bakobanda ntango nyonso kotungisa basaleli ya Nzambe mpe kotya elimo na bango na likama. Yango ekosɛnga na bantango mosusu ete Yehova asalelaka nguya na ye.

Nzambe asalelaka nguya na ye mpo na kolongola mabe

11. Mpo na nini Nzambe amonaki ete esengeli ayeisa mpela na mokili mobimba?

11 Mpela ya mikolo ya Noa ezali ndakisa moko ya motindo oyo Yehova asalelaki nguya na ye na ndenge yango. Genese 6:11, 12 elobi ete: “Mokili ezalaki mabe na miso ya Nzambe; mokili etondaki na yauli. Nzambe atalaki mokili mpe yango ezalaki mabe mpenza, mpo ete bato nyonso babebisaki nzela na bango na mokili.” Nzambe alingaki nde kotika ete bato mabe bálimwisa ata mwa ndambo ya bizaleli malamu oyo ezalaki naino na mabelé? Te. Yehova amonaki ete esengeli ayeisa mpela na mokili mobimba mpo na kolongola na mabelé baoyo bamipesaki na mobulu mpe etamboli ya mbindo.

12. (a) Likambo nini Yehova asakolaki na ntina na “momboto” ya Abalayama? (b) Mpo na nini Baamola basengelaki kobomama nyɛɛ?

12 Ezalaki mpe bongo mpo na etumbu oyo Nzambe apesaki bato ya Kanana. Yehova ayebisaki ete na nzela ya “momboto” oyo ekouta na Abalayama, mabota nyonso ya mokili ekomizwela lipamboli. Na kotalela mokano yango, Nzambe azwaki ekateli ete akopesa bana ya Abalayama Kanana, mokili oyo Baamola bazalaki kofanda. Nzambe alingaki koloba nini soki batuni ye ntina nini azwaki ekateli ya kolongola bato wana na makasi na mboka na bango? Yehova asakolaki ete akolongola bango te liboso mbula 400 ekoka—ntango ‘lisumu ya Baamola ekotonda.’ * (Genese 12:1-3; 13:14, 15; 15:13, 16; 22:18) Mokemoke, na boumeli ya bambula nyonso wana, bizaleli ya Baamola ebebaki nde kobeba. Kanana ekómaki mokili ya bato oyo bamipesaki na losambo ya bikeko, na kobomana mpe na makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo mpenza. (Exode 23:24; 34:12, 13; Mituya 33:52) Bazalaki ata kotumba bana  na bango na mɔtɔ lokola mbeka. Nzambe oyo azali mosantu akokaki nde kotika bato ya ekólo na ye báfanda na kati ya mabe ya ndenge wana? Te! Alobaki ete: “Mokili ezali mbindo, mpe nasengeli kopesa yango etumbu mpo na libunga na yango, mpe mokili ekosanza bafandi na yango.” (Levitike 18:21-25) Atako bongo, Yehova abomaki bato ya Kanana nyonso te. Atikaki na bomoi baoyo bazalaki na ezaleli oyo ebongi, na ndakisa Lahaba ná bato ya Gibeoni.Yosua 6:25; 9:3-27.

Abundaka mpo na nkombo na ye

13, 14. (a) Mpo na nini Yehova asengelaki kosantisa nkombo na ye? (b) Ndenge nini Yehova alongolaki nsɔni oyo babwakelaki nkombo na ye?

13 Lokola Yehova azali mosantu, nkombo na ye mpe ezali mosantu. (Levitike 22:32) Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tiká nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Botomboki oyo ebimaki na Edene esambwisaki nkombo ya Nzambe na ndenge ebimisaki ntembe likoló ya lokumu ya Nzambe mpe ya lolenge oyo ye ayangelaka. Yehova akokaki ata moke te kokanga miso na botomboki mpe makambo yango ya lokuta oyo bakoselaki ye. Asengelaki kolongola nsɔni nyonso oyo babwakelaki nkombo na ye.Yisaya 48:11.

14 Tólobela lisusu bana ya Yisalaele. Ntango nyonso oyo bazalaki baombo na Ezipito, bazalaki komona ete elaka oyo Nzambe apesaki Abalayama, ete na nzela ya Momboto na ye mabota nyonso ya mokili ekomizwela lipamboli, ezalaki maloba mpamba. Kasi, ntango Yehova asikolaki bango mpe akómisaki bango ekólo, alongolaki nsɔni wana oyo babwakelaki nkombo na ye. Mosakoli Danyele akundolaki likambo yango na libondeli oyo asalaki na maloba oyo: ‘Ee Yehova Nzambe na biso, obimisaki bato na yo na mokili ya Ezipito na lobɔkɔ makasi mpe ozwaki lokumu.’Danyele 9:15.

15. Mpo na nini Yehova abikisaki Bayuda na boombo na Babilone?

15 Yebá ete ntango Danyele abondelaki bongo, Bayuda bazalaki na mposa ete Yehova asalela lisusu nguya na ye mpo na nkombo na Ye. Bayuda yango oyo bazangaki botosi bazalaki baombo, kasi ya mbala oyo na Babilone. Yelusaleme, mboka-mokonzi na bango, ebebaki. Danyele ayebaki ete soki Bayuda  bazongisami na mboka na bango, yango ekokumisa nkombo ya Yehova. Yango wana, abondelaki boye: ‘Ee Yehova, limbisá; ee Yehova, yoká mpe salá; ee Nzambe na ngai, kozela te, na ntina na yo mpenza, mpo ete mboka na yo mpe bato na yo batángami nkombo na yo.’Danyele 9:18, 19.

Abundaka mpo na basaleli na ye

16. Limbolá ntina oyo likebi oyo Yehova atyaka mpo na kokɔtela nkombo na ye elakisi te ete amibanzabanzaka te mpo na basusu mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.

16 Likebi oyo Yehova atyaka mpo na kokɔtela nkombo na ye elakisi ete amibanzabanzaka mpo na basusu te, mpe alukaka kaka bolamu na ye moko? Te, mpamba te bosantu na ye mpe kolinga oyo alingi bosembo etindaka ye abatela basaleli na ye. Tózwa ndakisa ya Genese mokapo 14. Yango elobeli bakonzi minei oyo bayaki kokɔtela mboka ya bato mpe bamemaki na makasi Lota, mwana ya ndeko ya Abalayama, elongo na libota na ye. Na lisalisi ya Nzambe, Abalayama alongaki mampinga wana oyo ezalaki na babundi ebele koleka oyo ya ye! Ekoki kozala ete lisolo ya bolongi wana nde ezali lisolo ya liboso kati na masolo oyo ekomamaki na ‘mokanda ya Bitumba ya Yehova,’ oyo ezalaki ntango mosusu buku moko oyo ezalaki mpe na masolo ya bitumba mosusu oyo Biblia elobeli te. (Mituya 21:14) Kasi na nsima bakolonga lisusu bitumba ebele.

17. Nini emonisi ete Yehova abundelaki Bayisalaele nsima ya kokɔta na bango na mokili ya Kanana? Pesá bandakisa.

17 Mwa moke liboso Bayisalaele bákɔta na mokili ya Kanana, Moize akitisaki bango motema na maloba oyo: “[Yehova] Nzambe na bino, oyo azali kokenda liboso na bino, akobunda ye mpenza mpo na bino, [lokola] ebundaki ye mpo na bino na miso na bino na Ezipito.” (Deteronome 1:30; 20:1) Kobanda na Yosua, mokitani ya Moize, tii na ntango ya Basambisi mpe na boumeli ya boyangeli ya bakonzi ya Yuda oyo bazalaki sembo, Yehova abundelaki mpenza basaleli na ye; mbala mingi, azalaki kosala ete bálonga banguna na bango na ndenge ya nsɔmɔ.Yosua 10:1-14; Basambisi 4:12-17; 2 Samwele 5:17-21.

18. (a) Mpo na nini tokoki kozala na botɔndi na ndenge Yehova abongwani te? (b) Likambo nini ekosalema ntango bonguna oyo elobelami na Genese 3:15 ekoya ndongo?

 18 Yehova abongwani te; mokano na ye ya kokómisa mabelé oyo paladiso ya kimya ebongwani mpe te. (Genese 1:27, 28) Tii lelo, Nzambe ayinaka mabe. Alingaka mpe basaleli na ye mingi mpe etikali moke akosalela nguya na ye mpo na bolamu na bango. (Nzembo 11:7) Tóyeba ete, mosika te, bonguna oyo elobelami na Genese 3:15 ekoya ndongo mpe ekobimisa nsuka na mobulu. Na ntango wana, mpo na kosantisa nkombo na ye mpe kobatela basaleli na ye, Yehova akomikómisa lisusu “elombe ya etumba.”Zekalia 14:3; Emoniseli 16:14, 16.

19. (a) Pesá ndakisa mpo na komonisa ntina oyo ndenge Nzambe asalelaka nguya na ye ya kobebisa ekoki kosalisa biso tópusana penepene na ye. (b) Mposa ya Nzambe ya kobundela biso esengeli kosala biso nini?

19 Tózwa ndakisa: Mobali moko amoni nyama moko mabe elingi kolya mwasi ná bana na ye; mbala moko akweli nyama yango mpe abomi yango. Okanisi ete mwasi ná bana na ye bakomona ete asali mabe? Okokanisa nde ete bolingo oyo amoniseli bango mpe komipesa oyo amipesi mpo na bango ekosimba mitema na bango. Ndenge moko mpe, tosengeli koyoka mabe te mpo Nzambe asalelaka nguya na ye ya kobebisa. Mposa na ye ya kobunda mpo na kobatela biso esengeli kotinda biso nde  tólinga ye mingi. Tosengeli mpe komemya lisusu koleka nguya na ye oyo ezangi nsuka. Na ndenge yango, ‘tokosalela Nzambe mosala mosantu na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe nsɔmɔ.’Baebele 12:28.

Pusaná penepene na “elombe ya etumba”

20. Tosengeli kosala nini ntango totángi na Biblia masolo ya bitumba ya Nzambe kasi tozali kokanga ntina na yango mpenza te, mpe mpo na nini tosengeli kosalaka bongo?

20 Ezali solo ete Biblia eyebisi makambo nyonso te oyo etindaki Yehova azwa ekateli boye to boye na bitumba nyonso oyo abundaki. Kasi tóyebaka ntango nyonso ete, Yehova asalelaka ata moke te nguya na ye ya kobebisa na ndenge oyo ezangi bosembo, kaka mpamba to mpo na konyokola bato. Mbala mingi, soki totaleli bavɛrsɛ oyo ezali zingazinga ya lisolo moko ya Biblia to makambo oyo ezalaki na ntango likambo yango esalemaki, ekoki kosalisa biso tókanga malamu ntina ya lisolo yango. (Masese 18:13) Ata soki toyebi makambo nyonso te, kasi soki kaka tozali koyekola koyeba Yehova malamumalamu mpe tozali komanyola bizaleli na ye ya kokamwa, yango ekoki kosalisa biso tóbwaka ntembe nyonso oyo ekoki kobima na makanisi na biso. Soki tosali bongo, tokomona ete tozali na bantina mingi oyo esengeli kotinda biso tótyela Yehova, Nzambe na biso, motema.Yobo 34:12.

21. Atako na bantango mosusu Yehova azalaka “elombe ya etumba,” kasi azalaka mpenza moto ya ndenge nini?

21 Atako, soki esengeli, Yehova azalaka “elombe ya etumba,” yango elingi koloba te ete ye alingaka bitumba. Na emonaneli oyo Ezekiele azwaki oyo etali likalo ya likoló, amonaki Yehova azali pene na kobunda na banguna na ye. Atako bongo, Ezekiele amonaki Nzambe azingami na monama—elembo ya kimya. (Genese 9:13; Ezekiele 1:28; Emoniseli 4:3) Ntembe ezali te ete Yehova azalaka moto ya matata te mpe alingaka kimya. Ntoma Yoane akomaki ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Bizaleli na ye nyonso esalaka elongo na bokatikati mpenza. Yango wana, tozali mpenza na libaku malamu ya kozala na likoki ya kopusana penepene na Nzambe yango oyo atondi na nguya, kasi azali mpe na bolingo!

^ par. 1 Josèphe, Moyuda moko moto ya mayele na makambo ya kala, akomaki ete “balandaki [Baebele] na makalo 600 ná basoda 50 000 oyo babundaka na mpunda mpe na ebele ya basoda oyo batambolaka na makolo mpo na kobunda, oyo bazalaki 200 000.”Antiquités judaïques, II, 324 [xv, 3].

^ par. 12 Emonani ete awa, liloba “Baamola” ezali kolobela bikólo nyonso ya Kanana.Deteronome 1:6-8, 19-21, 27; Yosua 24:15, 18.