Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 5

Nguya ya kokela—“Ye oyo asalaki lola mpe mokili”

Nguya ya kokela—“Ye oyo asalaki lola mpe mokili”

1, 2. Ndenge nini moi emonisaka nguya ya kokela ya Yehova?

OSALAKA nini soki ofandi pene na mɔtɔ na butu ntango malili ezali? Osembolaka mabɔkɔ epai mɔtɔ ezali, kasi na ntaka oyo ebongi, mpo oyoka yango. Soki opusani mpenza penepene na mɔtɔ, okokoka yango lisusu te. Soki mpe ozongi nsima mingi, mopɛpɛ ya malili ekokɔtela yo mingi mpe okobanda kolɛnga.

2 Na moi, ezali na “mɔtɔ” moko oyo epesaka biso molunge. “Mɔtɔ” yango ezali kopela na ntaka ya kilomɛtrɛ milio 150 na mabelé. * Lokola moi ezali mosika bongo, yango esengeli mpenza kozala na mɔtɔ makasi mpo biso awa na nse tókoka koyoka molunge na yango! Nzokande, mabelé ezalaka na ntaka oyo ebongi mpenza ntango ebalukaka zingazinga na mɔtɔ wana ya nsɔmɔ. Soki mabelé epusani penepene na yango mwa mingi, mai nyonso ekokauka, bomoi mpe ekozala te; soki mpe ezongi nsima mwa mingi, mai nyonso ekokóma mabanga, bomoi ekozala mpe te. Ya solo, kongɛnga ya moi ezali mpenza na ntina mpo bomoi ezala awa na mabelé. Longola yango, ebebisaka mabelé to mopɛpɛ te, esalaka mosala na yango malamu mpenza mpe esepelisaka mpenza.Mosakoli 11:7.

Yehova ‘abongisaki pole mpe moi’

3. Solo nini ya ntina mpenza moi eteyaka biso?

3 Atako bongo, bato mingi bazwaka moi na motuya mingi te; nzokande, soki yango te, bakoki kozala na bomoi te. Na bongo, bayebaka te likambo moko oyo moi ekoki koteya biso. Biblia elobi na ntina na Yehova ete: “Yo obongisaki pole mpe moi.” (Nzembo 74:16) Ya solo, moi epesaka Yehova lokumu, “ye oyo asalaki lola mpe mokili.” (Nzembo 19:1; 146:6) Kasi, moi ezali kaka moko ya ebele ya biloko oyo ezali kuna na likoló oyo emonisaka biso ete nguya ya kokela ya Yehova ezali monene mpenza.  Sikoyo, tótalela malamumalamu mwa ndambo ya biloko yango; mpe na nsima, tokotya likebi na biso na mabelé mpe ebele ya bikelamu ya bomoi oyo ezali na mabelé.

“Bótombola miso na bino likoló mpe bómona”

4, 5. Moi ezali na nguya mpe monene ya ndenge nini, kasi yango eleki minzoto nyonso na monene?

4 Ntango mosusu oyebi ete moi ezali mpe monzoto. Kasi yango emonanaka monene koleka minzoto oyo tomonaka na butu mpo ezali penepene na biso. Nguya nini ezali na yango? Molunge oyo ezali na katikati ya moi ezali makasi mpenza (degrés Celsius milio 15). Soki ekoki kosalema ete bázwa mwa ndambo moke mpenza ya eteni wana ya katikati ya moi mpe ezala monene lokola motó ya ntonga, bátya yango awa na mabelé, eloko nyonso oyo ekozala zingazinga na yango ekozika longola kaka oyo ezali kobanda na ntaka ya kilomɛtrɛ 140! Na segɔnde mokomoko, moi ebimisaka nguya oyo ekokani na nguya ya babɔmbi ya nikleere bamilio nkama na nkama soki epanzani.

5 Moi ezali monene mpenza, mpe mabelé ekoki kokɔta na kati na yango mbala koleka 1 300 000. Moi eleki nde minzoto nyonso na monene? Te, baastronome babengaka yango kutu mwa  monzoto ya moke ya langi ya mosaka. Ntoma Paulo akomaki ete “monzoto na monzoto ekeseni na nkembo.” (1 Bakolinti 15:41) Maloba wana epemami ezali solo mpenza atako ntango mosusu Paulo ye moko ayebaki yango te. Ezali na monzoto moko oyo eleki monene mpe soki ekoki kosalema ete bátya yango esika moi ezali, mabelé oyo tofandi ekozala na kati na yango. Ezali mpe na monzoto mosusu ya monene mpenza oyo soki batye yango na esika moi ezali, ekokóma tii esika planɛti Saturne ezali, nzokande planɛti wana ezali mosika mpenza na mabelé. Kutu, esɛngaki mbula minei mobimba mpo fize moko oyo batindaki kuna ekóma, nzokande fize yango ezalaki kotambola na mbangu makasi mpenza oyo eleki mbala 40 mbangu ya lisasi oyo babɛti na mondoki ya makasi!

6. Ndenge nini Biblia emonisi ete, na miso ya bato, motángo ya minzoto ezali monene mpenza?

6 Motángo ya minzoto ezali kutu kokamwisa mingi koleka  bonene na yango. Biblia elobi ete minzoto ekoki mpenza kotángama te, ndenge moko na “zɛlɔ ya mai-na-monana.” (Yilimia 33:22) Maloba yango emonisi ete minzoto ezali ebele mpenza; soki moto asaleli masini te, miso na ye ekoki komona kaka mwa ndambo moke. Kutu, soki moko ya bato oyo bakomaki Biblia, na ndakisa Yilimia, atombolaki miso likoló na butu mpe amekaki kotánga minzoto oyo azalaki komona, alingaki kotánga kaka minzoto soki nkóto misato; mpamba te yango nde motángo ya minzoto oyo liso ya moto ekoki komona soki likoló etondi na minzoto na butu. Motángo yango ekokani na zɛlɔ oyo moto atondisi na lobɔkɔ moko mpamba. Kasi, motángo mpenza ya minzoto nyonso eleki monene, ndenge moko na zɛlɔ ya mai-na-monana. * Nani akokoka kotánga motángo ya ndenge wana?

‘Abengaka yango nyonso na nkombo’

7. (a) Minzoto boni galaksi oyo biso tozali ekoki kozala na yango, mpe okoki koloba nini mpo na motángo yango? (b) Ndenge baastronome bakoki te koyeba motángo ya bagalaksi yango elakisi nini, mpe yango eteyi biso nini na ntina na nguya ya kokela ya Yehova?

7 Yisaya 40:26 eyanoli boye: ‘Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki biloko yango? Ye oyo akobimisa ebele na yango na motuya, akobenga yango nyonso na nkombo.’ Nzembo 147:4 elobi ete: “Ye akotánga motuya ya minzoto.” “Motuya ya minzoto” yango ezali boni? Wana ezali motuna ya pɛtɛɛ te. Baastronome balobi ete bobele na Voie lactée, galaksi oyo biso tozali, minzoto ekoki koleka miliare 100. * Kasi, bagalaksi mosusu ebele ezali, oyo kutu ezali na minzoto ebele koleka. Bagalaksi ezali boni? Baastronome mosusu balobi ete ekoki kozala miliare 50. Basusu balobi ete ekoki kozala miliare 125. Tomoni ete bato bazali kokoka ata koyeba te motángo ya bagalaksi; bongo ya bamiliare  nyonso ya minzoto oyo ezali na kati ya bagalaksi yango, wana kutu koloba te. Nzokande, Yehova ayebi motángo na yango. Longola yango, apesi monzoto mokomoko nkombo!

8. (a) Lobelá bonene ya galaksi oyo biso tozali? (b) Na nzela ya nini Yehova asalaka ete biloko oyo ezali na likoló etambolaka na molɔngɔ?

8 Bonene ya bagalaksi ekoki kaka kotinda biso tóbanga Nzambe mpe tómemya ye lisusu mingi. Pole etambolaka mbangu mpenza, kilomɛtrɛ 300 000 na segɔnde moko. Kanisá naino, na mbangu ya ndenge wana, pole esengeli kosala mbula 100 000 mpo ekatisa galaksi na biso! Nzokande, bagalaksi mosusu eleki galaksi na biso na monene mosika mpenza. Biblia elobi ete Yehova azali ‘kotanda’ likoló yango oyo eleki monene lokola mwa elamba. (Nzembo 104:2) Azali mpe kosala ete biloko yango oyo akelá etambolaka na molɔngɔ. Ezala mwa biloko ya mike mpenza oyo ezalaka na etando oyo ekaboli minzoto to mpe galaksi oyo eleki monene, nyonso etambolaka na kolanda mibeko oyo Nzambe asalá mpe atyelá biloko oyo akelá. (Yobo 38:31-33) Yango wana, bato ya mayele balobi ete biloko yango ya likoló etambolaka na bosikisiki mpenza ndenge bato babinaka elongo mpe malamu libina moko ya makasi. Kanisá sikoyo Moto oyo asalaki biloko yango. Motema na yo etondi na kobanga mpe na limemya te mpo na Nzambe yango oyo azali na nguya monene ya kokela ndenge wana?

“Asalaki mokili na nguya na ye”

9, 10. Na ndenge nini esika oyo moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango ezali, bakisa esika oyo Jupiter, mabelé ná sanza ezali, ezali komonisa nguya ya Yehova?

9 Mabelé oyo tofandi ezali mpe komonisa nguya ya kokela ya Yehova. Na kati ya molɔ́ngɔ́ monene oyo, Yehova atyaki mabelé na esika ya malamu mpenza. Bato mosusu ya siansi bakanisaka ete bagalaksi mingi ekoki kozala esika ya malamu te mpo na mabelé na biso oyo ezali na bikelamu ya bomoi ndenge na ndenge. Emonani mpe ete eteni monene ya galaksi oyo biso tozali (Voie lactée) esalemaki te mpo bomoi ezala kuna. Na katikati ya galaksi na biso, minzoto ezali mingi mpenza; bagazɛ ya mabe eleki mingi mpe minzoto etutanaka mingi. Na bansukansuka mpenza ya galaksi na biso, biloko ebele oyo esengeli mpo na bomoi  ezali te. Nzokande, moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango, etyami na esika oyo ebongi mpenza, na katikati te, na nsukansuka mpe te.

10 Planɛti moko ya monene, oyo ezali mosika na mabelé, ebatelaka yango—nkombo na yango Jupiter. Mabelé ekokɔta na kati na yango mbala koleka nkóto; mpe yango ebendaka biloko mosusu oyo etambolaka kuna na likoló na nguya moko ya makasi mpenza. Nguya yango esalaka ete planɛti yango emɛla biloko yango mosusu to etinda yango na nzela mosusu. Bato ya siansi bamoni ete soki Jupiter ezalaka te, mbɛlɛ ebele ya biloko ya mineneminene oyo eutaka na likoló mpe eyaka kokwea awa na mabelé elingaki kokweaka ebele, mbala 10 000 koleka ndenge ekweaka lelo oyo. Ezali na eloko moko pene na mabelé oyo ebalukaka zingazinga na yango mpe esalelaka yango likambo oyo eloko mosusu ekoki kosala te—nkombo na yango sanza. Sanza ezali kaka te eloko moko ya kitoko mpe “mwinda moko oyo epelaka moke butubutu,” kasi yango nde esalaka ete kotɛngama ya mabelé ntango ebalukaka zingazinga ya moi ebongwanaka te. Ezali mpo na kotɛngama yango nde bileko elandanaka mbula na mbula mpe ebongwanaka te—bileko yango ezali likambo mosusu ya ntina mpo na bomoi awa na mabelé.

11. Ndenge nini etando ya mopɛpɛ esalemá mpo ebatelaka biso lokola nguba?

11 Ndenge oyo Yehova abongisá eloko mokomoko na mabelé ezali komonisa nguya na ye ya kokela. Zwá ndakisa ya etando ya mopɛpɛ oyo ebatelaka biso lokola nguba. Moi etindaka kongɛnga ya malamu ná oyo ebomaka. Ntango kongɛnga oyo ebomaka ebɛti ngámbo ya etando yango ya mopɛpɛ oyo etali moi, ekómisaka oxygène oyo topemaka ozone. Ozone yango oyo euti kosalema emɛlaka kongɛnga wana nyonso ya mabe. Na ndenge yango, ezali lokola Yehova asalelá mabelé lingɛmbu mpo na kobatela yango!

12. Ndenge nini kobongwana ya mai na kati ya etando ya mopɛpɛ ezali komonisa nguya ya kokela ya Yehova?

12 Wana ezali kaka moko ya makambo oyo etali etando ya mopɛpɛ, oyo ezali na ebele ya bagazɛ oyo esengeli mpenza mpo na bikelamu ya bomoi oyo ezali na mabelé to pembenipembeni na yango. Likambo mosusu ya kokamwa oyo etali yango ezali  ndenge oyo mai ebongwanaka. Mbula na mbula, moi ekómisaka mɛtrɛ-kibe miliare 400 000 ya mai ya mbu mbɔngi (vapeur). Mbɔngi yango ekómaka mapata, mpe mopɛpɛ ememaka mapata yango bipai na bipai. Nsima ya kopɛtolama ya mai ndenge wana, ekitaka lisusu awa na mabelé lokola mbula, mbula-mpɛmbɛ mpe ngalasi; na ndenge yango, eyaka kozongisa lisusu mai awa na mabelé. Likambo yango ezali kaka ndenge Mosakoli 1:7 elobi: “Bibale nyonso ekotiyola kino mai-na-monana; kasi mai-na-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.” Kaka Yehova nde akokaki kobandisa mbongwana yango ya mai.

13. Makambo nini tomoni na banzete mpe na mabelé oyo ezali komonisa nguya ya Mozalisi?

13 Esika nyonso oyo bomoi ezali, tozali komona nguya ya Mozalisi. Ezala tozwi séquoia, nzete monene mpe molai koleka buludingi ya bitaze 29, to tozwi mwa matiti ya mikemike mpenza oyo etondi na mbu mpe epesaka ndambo monene ya mopɛpɛ oyo topemaka, tozali se komona polele nguya ya kokela ya Yehova. Mabelé yango moko etondi na ebele ya biloko ya bomoi—nkusu, mayebo, mpe bamikrobe, oyo esalaka elongo na ndenge ya kokamwa mpenza mpe esalisaka banzete ekola.

14. Nguya ya ndenge nini ezalaka ata na kati ya mwa atɔmɛ ya moke?

14 Ntembe ezali te ete Yehova nde “asalaki mokili na nguya na ye.” (Yilimia 10:12) Nguya na ye ezali komonana ata na biloko ya mike mpenza oyo akelá. Na ndakisa, soki totye baatɔmɛ milio moko esika moko, monene na yango ekokokana ata na monene ya nsuki moko te. Ata soki bayeisi atɔmɛ molai lokola buludingi ya bitaze 13, monene ya ndika (noyau) na yango ekozala kaka lokola mwa mbuma moko ya mungwa oyo ezali na katikati ya etaze ya motoba mpe ya nsambo. Nzokande, ndika yango ya atɔmɛ oyo eleki moke bongo nde ebimisaka nguya ya nsɔmɔ oyo emonanaka soki bɔmbi ya nikleere epanzani!

‘Nyonso oyo ezali na mpema’

15. Likambo nini Yehova ateyaki Yobo ntango ayebisaki ye makambo ya banyama ya zamba ndenge na ndenge?

15 Likambo mosusu oyo ezali komonisa polele nguya ya kokela ya Yehova ezali ebele ya banyama oyo ezali na mabelé.  Nzembo 148 etángi ebele ya biloko oyo ekumisaka Yehova; vɛrsɛ 10, etángi mpe “nyama ya zamba mpe bibwɛlɛ nyonso.” Mpo na komonisa ntina oyo bato basengeli kobanga mpe komemya Mozalisi, mokolo moko Yehova ayebisaki Yobo makambo etali banyama lokola nkɔsi, zɛbrɛ, ngɔmbɛ-mobali ya zamba, Behemote (to ngubu), mpe Leviatana (oyo ekoki kozala ngando). Mpo na nini ayebisaki ye yango? Soki moto ayokaka nsɔmɔ ntango amoni bikelamu yango ya makasi, oyo ebangisaka mpe oyo moto akokaka kotosisa yango te, ndenge nini asengeli kotalela Mozalisi na yango?Yobo, mokapo 38-41.

16. Eloko nini etali bandɛkɛ mosusu oyo Yehova akelá ekamwisi yo?

16 Nzembo 148:10 etángi mpe ‘ndɛkɛ oyo epumbwaka na likoló.’ Kanisá naino mitindo ya ndɛkɛ ndenge na ndenge oyo ezali! Yehova alobelaki Yobo makambo ya maligbanga (autruche), ndɛkɛ oyo ‘esɛkaka mpunda mpe motambwisi na yango.’ Ya solo, atako ndɛkɛ yango oyo ezali na bolai ya mɛtrɛ mibale na ndambo epumbwaka te, kasi ekoki kopota kilomɛtrɛ 65 na ngonga moko; mpe lokolo mokomoko oyo ebwakaka esalaka mɛtrɛ minei na ndambo! (Yobo 39:13, 18) Nzokande, ndɛkɛ babengi albatros elekisaka mikolo mingi ya bomoi na yango kopumbwapumbwa likoló ya mbu. Soki etandoli mapapu na yango, nsuka tii nsuka, ezalaka mɛtrɛ misato. Ekoki kolekaleka na likoló na boumeli ya bangonga ebele kozanga kobɛta mapapu. Kasi, ndɛkɛ babengi calypte d’Hélène, oyo ezali kaka na santimɛtrɛ mitano mpamba mpe eleki moke na kati ya bandɛkɛ nyonso ya mokili, ekoki kobɛta mapapu mbala 80 na segɔndɛ moko! Ndɛkɛ yango, oyo mapapu na yango engɛngaka lokola biju, ekoki kotɛlɛma esika moko kuna na likoló lokola hélicoptère; ekoki ata kopumbwa nsimansima.

17. Baleine bleue ezali na bonene ya ndenge nini, mpe makanisi nini tosengeli kozala na yango nsima ya kotalela banyama oyo Yehova akelá?

17 Nzembo 148:7 elobi ete ata “nyama [minene] ya mai” ekumisaka Yehova. Tózwa ndakisa ya nyama babengi baleine bleue, oyo bato mingi bakanisaka ete yango nde ezali monene koleka banyama nyonso banda mokili ebandá. Nyama monene yango, oyo ezalaka na kati ya mbu, ekoki kozala na bolai ya mɛtrɛ 30 to koleka. Kilo na yango ekoki kokokana na oyo ya nzoku ya mikóló 30. Lolemo na yango mpamba ezali na kilo ya nzoku moko.  Motema na yango ezali monene lokola motuka ya moke mpe ebɛtaka mbala 9 mpamba na miniti moko; nzokande, motema ya ndɛkɛ babengi colibri ebɛtaka mbala soki 1 200 na miniti moko. Mosisa moko ya baleine bleue ezali mpenza monene mpe mwana moke akoki koleka na kati. Na ntembe te, mitema na biso ezali kotinda biso mpe tózongela elendiseli oyo ezali na vɛrsɛ ya nsuka ya mokanda ya Nzembo: ‘Tiká ete nyonso oyo ezali na mpema esanzola Yehova.’Nzembo 150:6.

Tózwa liteya na nguya ya kokela ya Yehova

18, 19. Biloko ya bomoi oyo Yehova akelá awa na mabelé ezali mpenza mitindo boni, mpe bozalisi ezali koteya biso nini na ntina na bokonzi na ye?

18 Ndenge oyo Yehova asalelaka nguya na ye ya kokela eteyi biso nini? Biloko ndenge na ndenge oyo Yehova akelá etindi biso tóbanga ye mpe tómemya ye mingi. Mokomi moko ya nzembo alobaki boye: ‘Misala na yo mingi boni, ee Yehova! . . . Mokili etondi maa na biloko oyo osalaki.’ (Nzembo 104:24) Maloba yango ezali mpenza solo! Tii sikoyo, bato ya mayele na bioloji bayekoli awa na mabelé mitindo koleka milio moko ya biloko oyo ezali na bomoi; kasi ezali na basusu oyo bazali kokanisa ete mitindo ya biloko oyo ezali na bomoi ekoki kozala milio 10, basusu kutu milio 30, to koleka. Ekómaka ete bato oyo basalaka misala ya ntɔki báyeba lisusu te eloko nini ya sika bakoki kosala. Nzokande, emonani polele ete likoki oyo Yehova azali na yango ya kosala mpe kokela biloko ya sika mpe ya ndenge na ndenge esukaka te.

 19 Ndenge oyo Yehova asalelaka nguya na ye ya kokela ezali mpe koteya biso bokonzi oyo azali na yango likoló na nyonso. Liloba “Mozalisi” ekesenisi Yehova na bato to na biloko mosusu nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́, yango nyonso ezali nde “bozalisi.” Ata Mwana mobotami-se-moko ya Yehova, oyo azalaki “mosali ya mayele” na ntango ya kozalisa, Biblia ebengi ye ata mbala moko te Mozalisi. (Masese 8:30; Matai 19:4) Azali nde “mwana ya liboso na bozalisi nyonso.” (Bakolose 1:15) Lokola Yehova azali Mozalisi, yango epesi kaka ye moko lotomo ya kozala na bokonzi likoló na eloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́.Baloma 1:20; Emoniseli 4:11.

20. Na ndimbola nini Yehova azali kopema banda asilisá kokela biloko awa na mabelé?

20 Yehova atiká kosalela nguya na ye ya kokela? Biblia elobi ete ntango Yehova asilisaki mosala na ye ya kokela na mokolo ya motoba, “apemaki na mokolo ya nsambo na misala nyonso misalaki ye.” (Genese 2:2) Ntoma Paulo amonisaki ete “mokolo” yango ya nsambo ezali bankóto ya bambula, mpamba te tii ntango oyo ye azalaki na bomoi mokolo yango esukaki naino te. (Baebele 4:3-6) Kasi ‘kopema’ yango elakisi nde ete Yehova asalaka lisusu ata mosala moko te? Te, Yehova atikaka kosala ata moke te. (Nzembo 92:4; Yoane 5:17) Yango wana, kopema wana elakisi kaka ete atiká mosala na ye ya kokela biloko mosusu awa na mabelé. Nzokande, atiká te mosala ya kokokisa mikano na ye. Yango wana, akomisá Makomami Mosantu na nzela ya elimo na ye mpe asalá “ekelamu ya sika” oyo tokolobela na Mokapo 19.2 Bakolinti 5:17.

21. Nguya ya kokela ya Yehova ekotinda bato ya sembo básala nini seko na seko?

21 Ntango mokolo ya kopema ya Yehova ekokóma na nsuka, akozala sikoyo na likoki ya koloba ete mosala na ye nyonso awa na mabelé ezali “malamu mingi,” lokola alobaki na nsuka ya mikolo motoba oyo alekisaki na kozalisa. (Genese 1:31) Nsima na yango, toyebi te ndenge oyo akopona kosalela nguya na ye ya kokela oyo ezangi nsuka. Ezala Yehova akosalela yango ndenge nini, tóyeba ete akotika te kokamwisa biso na ndenge yango ya kosalela nguya na ye. Na nzela ya bozalisi na ye, tokoyekola seko na seko makambo mingi lisusu oyo etali Yehova. (Mosakoli 3:11) Ntango tokoyeba Mozalisi Monene na biso malamumalamu, tokobanga ye mpe tokomemya ye koleka—mpe tokopusana penepene na ye lisusu koleka.

^ par. 2 Mpo oyeba mpenza ete ntaka wana eleki molai, kanisá likambo oyo: Mpo otambola bakilomɛtrɛ wana nyonso na motuka—ata soki ozali kotambola butu moi na mbangu makasi (kilomɛtrɛ 160 na ngonga)—osengeli kosala mbula koleka mokama!

^ par. 6 Bato mosusu bakanisaka ete bato ya kala mpenza basalelaki lolenge moko ya masini babengi télescope, kasi ya bongobongo kaka. Mpo na bango, soki bato ya ntango wana bazalaki na masini yango te, ndenge nini bakokaki koyeba ete minzoto ezali mingi mpenza mpe moto akoki kotánga yango te? Makanisi ya ndenge wana, oyo eloko moko te endimisi yango, epesaka lokumu te na Yehova, Ye oyo akomisaki Biblia.2 Timote 3:16.

^ par. 7 Talá sikoyo ntango oyo okosala mpo na kotánga minzoto miliare 100 mpamba. Soki na segɔnde moko otángi monzoto moko—mpe otángi bongo butu moi kozanga kopema—yebá ete okosala mbula 3 171 mpo na kosilisa kotánga yango!