Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 7

Nguya ya kobatela—“Nzambe azali esika na biso ya komibomba”

Nguya ya kobatela—“Nzambe azali esika na biso ya komibomba”

1, 2. Likama nini ezalaki kozela Bayisalaele ntango bakɔtaki na etúká ya Sinai na mobu 1513 L.T.B., mpe ndenge nini Yehova akitisaki bango motema?

NA EBANDELI ya mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Bayisalaele bakɔtaki na etúká ya Sinai. Likama ezalaki kozela bango. Basengelaki kosala mobembo moko ya nsɔmɔ mpo na kokatisa ‘esobe monene mpe ya nsɔmɔ, na nyoka ya ngɛngɛ mabe mpe na bankotó na yango.’ (Deteronome 8:15) Longola yango, bikólo ya banguna ekokaki kobundisa bango. Yehova, Nzambe na bango, nde amemaki bango tii wana. Akokoka kobatela bango?

2 Yehova akitisaki bango mpenza motema na maloba oyo: “Bino moko bomonaki oyo nasalaki Baezipito, mpo namema bino likoló ya mapapu ya mpongo mpe namema bino epai na ngai.” (Exode 19:4) Yehova akundwelaki bato na ye ete abikisaki bango na mabɔkɔ ya Baezipito; na maloba ya elilingi, asalelaki mpongo mpo na komema bango na esika oyo likama ezali te. Kasi ezali mpe na bantina mosusu oyo emonisi ete “mapapu ya mpongo” ezali elilingi oyo ebongi mpo na kolobela libateli ya Nzambe.

3. Mpo na nini “mapapu ya mpongo” ezali elilingi oyo ebongi mpo na kolobela libateli ya Nzambe?

3 Mpongo ezalaka na mapapu milai mpe makasi, kasi esalelaka yango te kaka mpo na komata likoló mpenza. Na moi, ntango molunge ezali makasi, mpongo ya mwasi etandaka mapapu na yango—oyo molai na yango ekoki koleka mɛtrɛ mibale—mpo elili na yango ebatela bana na yango ya mike na ntango ya moi makasi. Na bantango mosusu, ezipaka bana na yango na kati ya mapapu mpo na kobatela bango na ntango ya mopɛpɛ ya malili. Se ndenge mpongo ebatelaka bana na yango, Yehova mpe abatelaki ekólo ya Yisalaele oyo eutaki kobotama. Lokola basaleli na ye bazalaki sikoyo na kati ya esobe, akolanda kobomba  bango na nse ya elili ya mapapu makasi na ye ntango nyonso oyo bakotikala sembo epai na ye. (Deteronome 32:9-11; Nzembo 36:7) Kasi, tokoki mpenza lelo oyo kozala na elikya ete Nzambe akobatela biso?

Nzambe alaki ete akobatela biso

4, 5. Mpo na nini tokoki kotya motema na biso mobimba na elaka oyo Nzambe apesi ete akobatela biso?

4 Ntembe ezali te ete Yehova azali na likoki ya kobatela basaleli na ye. Azali “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso”—titre oyo ezali komonisa ete moto ata moko te akoki kotɛmɛla nguya na ye. (Genese 17:1) Ndenge moko na mbonge oyo moto akoki kotɛlɛmisa te, moto moko te akoki kopekisa nguya ya Yehova ntango ezali kosala mosala. Lokola Yehova akoki kosala nyonso oyo mokano na ye esɛngi, tokoki komituna boye: ‘Alingi mpenza kosalela nguya na ye mpo na kobatela basaleli na ye?’

5 Na mokuse, eyano ezali “ɛɛ”! Yehova ayebisi biso mpenza ete akobatela basaleli na ye. Nzembo 46:1 (NW) elobi ete: “Nzambe azali esika na biso ya komibomba mpe ya makasi, lisalisi oyo ezali mpasi te komona yango na bantango ya mpasi.” Lokola Nzambe “akoki te kobuka lokuta,” tokoki kotya motema na biso mobimba na elaka na ye ya kobatela biso. (Tito 1:2) Tótalela sikoyo mwa bandakisa oyo Yehova asaleli polele mpo na kolobela mposa na ye ya kobatela biso.

6, 7. (a) Na ntango ya kala, mobateli ya mpate azalaki kosala nini mpo na kobatela bampate na ye? (b) Ndakisa nini Biblia esaleli mpo na komonisa ete Yehova azalaka na mposa makasi ya kobatela bampate na ye mpe kolɛngɛla bango?

6 Yehova azali Mobateli ya mpate, mpe “tozali bato na ye, mpate ya elanga na ye.” (Nzembo 23:1; 100:3) Ezali na banyama mingi te oyo bayebi komibatela te lokola bampate. Na ntango ya kala, mobateli ya mpate asengelaki kozala na mpiko mpo na kobatela bampate na ye na bankɔsi, bambwa ya zamba, bangombolo mpe bayibi. (1 Samwele 17:34, 35; Yoane 10:12, 13) Kasi na bantango mosusu, mobateli ya mpate asengelaki mpe kozala na boboto. Soki mpate eboti mosika na etonga, mobateli  ya mpate azalaki kobatela yango na boumeli ya ntango nyonso oyo ekozala na makasi te; nsima na yango, azalaki komema mwana-mpate oyo ezangi makasi ya komibatela tii na esika etonga ezali.

Akokumba bango na ntolo na ye”

7 Ndenge oyo Yehova alobi ete azali lokola mobateli ya mpate, amonisi biso mpenza ete azali na mposa makasi ya kobatela biso. (Ezekiele 34:11-16) Kanisá lisusu maloba oyo Yisaya 40:11 esaleli mpo na kolobela Yehova, oyo totalelaki na Mokapo 2 ya buku oyo: “Akoleisa etonga na ye lokola mobateli, akoyanganisa bana ya mpate na mabɔkɔ na ye; akokumba bango na ntolo na ye.” Ndenge nini mwa mwana-mpate ezalaki kokóma na “ntolo” ya mobateli ya mpate, elingi koloba na kati ya libenga oyo ezalaki liboso ya elamba na ye ya likoló? Ntango mosusu, mwana-mpate ezalaki kopusana penepene na mobateli, ata mpe kotutatuta mwa moke lokolo na ye. Kasi, mobateli ya mpate nde asengelaki kogunzama, kokamata mwana-mpate mpe kotya yango malɛmbɛ mpenza na esika ya libateli oyo ezalaki na ntolo na ye. Maloba yango ya elilingi, oyo ezali komonisa ete Mobateli na biso Monene azalaka na mposa ya kobatela biso, ezali mpenza kosimba motema!

8. (a) Nzambe alaki ete akobatela banani, mpe ndenge nini Masese 18:10 emonisi yango? (b) Komibomba na kati ya nkombo ya Nzambe esɛngaka nini?

8 Nzambe alaki ete akobatela kaka baoyo bazali kokokisa likambo oyo—kopusana penepene na ye. Masese 18:10 elobi ete: “Nkombo ya [Yehova] ezali ndako molai ya nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” Na ntango ya kala, na bantango mosusu, bazalaki kotonga bandako ya milai na kati ya esobe mpo ezala bisika ya komibomba. Kasi, moto oyo azali na likama ye moko nde asengelaki kosala makasi akima kuna mpo amibatela. Ezali mpe ndenge moko soki tolingi komibomba na kati ya nkombo ya Nzambe. Tosengeli kosuka kaka te na kotánga yango mbala na mbala lokola nde ezali na nguya ya maji. Tosengeli nde koyeba Nkolo nkombo yango, kotyela ye motema mpe kotosa mitinda na ye ya sembo na bomoi na biso. Yehova amoniseli biso mpenza boboto na ndenge akitisi biso motema ete akozala ndako molai oyo ekobatela biso soki tosɛngi ye lisalisi na kondima!

 “Nzambe na biso . . . azali na likoki ya kobikisa biso”

9. Longola elaka na ye ya kobatela biso, Yehova asalaki nini lisusu?

9 Yehova asuki te kaka na kolaka ete akobatela biso. Na ntango ya kala, asalaki makamwisi oyo emonisaki ete azali na likoki ya kobatela basaleli na ye. Mbala mingi na lisolo ya ekólo ya Yisalaele, “lobɔkɔ” ya nguya ya Yehova ezalaki kobengana banguna na bango oyo balekaki bango na makasi. (Exode 7:4) Kasi, Yehova asalelaki mpe nguya na ye mpo na kobatela mwa bato mosusu.

10, 11. Wapi bandakisa ya Biblia oyo emonisi ndenge Yehova asalelaki nguya na ye mpo na kobatela bato mosusu?

10 Ntango bilenge Baebele misato—Sadalaka, Mesaka mpe Abede-nego—baboyaki kofukamela ekeko ya wolo ya Mokonzi Nebukadanesala, asilikaki makasi mpe abangisaki bango ete bakobwakama na kati ya litumbu ya mɔtɔ oyo bangalisi yango makasi koleka. Na lofundo mpenza, mokonzi yango oyo alekaki makasi na mokili mobimba, alobaki boye: “Nzambe nini oyo akoki kobikisa bino na mabɔkɔ na ngai?” (Danyele 3:15) Bilenge misato yango bayebaki na motema moko ete Nzambe na bango azali na nguya ya kobatela bango, kasi bakanisaki te ete akobatela bango. Yango wana, bayanolaki boye: “Soki esengeli kosalema, Nzambe na biso oyo tozali kosalela azali na likoki ya kobikisa biso.” (Danyele 3:17) Na ntembe te, ata ndenge bangalisaki litumbu ya mɔtɔ makasi wana mbala nsambo koleka ndenge ezalaka, ezalaki eloko te na miso ya Nzambe na bango mozwi-ya-nguya-nyonso. Abatelaki bango mpenza, mpe yango etindaki mokonzi yango andima ete: “Nzambe mosusu boye azali te, oyo akoki kobikisa na lolenge na oyo.”Danyele 3:29.

11 Yehova amonisaki mpe na ndenge ya kokamwa mpenza nguya na ye ya kobatela ntango atyaki bomoi ya Mwana na ye mobotami-se-moko na kati ya libumu ya Maria, ngɔndɔ moko Moyuda. Anzelu moko ayebisaki Maria ete ‘akozwa zemi na matrisi na ye mpe akobota mwana mobali.’ Anzelu abakisaki ete: “Elimo santu ekoya likoló na yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo.” (Luka 1:31, 35) Emonanaki ete wana nde ezalaki mbala ya liboso bomoi ya Mwana ya Nzambe ezala  mpenza na likama monene. Mama yango, oyo azalaki moto, akopesa mwa mwana yango oyo azali na libumu na ye lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka? Satana akokoka kosala Mwana yango mabe to koboma ye liboso abotama? Soki moke te! Eloko moko te—ezala ezaleli ya kozanga kokoka, nguya moko ya mabe, moto moko oyo abomaka bato to mpe demo—ekokaki kobebisa mwa mwana yango oyo azalaki na libumu kobanda na ebandeli ya zemi tii na kobotama na ye mpo Yehova azingaki Maria lokola na efelo. Yehova alandaki kobatela Yesu na bomwana na ye. (Matai 2:1-15) Tii ntango oyo Nzambe ye moko atyaki, moto moko te akokaki kosala Mwana na ye ya bolingo mabe.

12. Mpo na nini Yehova asalaki makamwisi mpo na kobatela bato mosusu na ntango ya kala?

12 Mpo na nini Yehova asalaki makamwisi ya ndenge wana mpo na kobatela bato mosusu? Soki asalaki yango, mbala mingi ezalaki mpo na kobatela eloko moko ya ntina mingi koleka: kokokisama ya mokano na ye. Na ndakisa, kobikisa Yesu na likama ntango azalaki mwana moke ezalaki na ntina mingi mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe, likambo oyo nsukansuka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso. Ebele ya masolo oyo ezali komonisa ndenge Yehova asalelaki nguya na ye ya kobatela ezali na kati ya Makomami oyo epemami, oyo “ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” (Baloma 15:4) Bandakisa yango ezali mpenza kolendisa kondima na biso epai ya Nzambe mozwi-ya-nguya-nyonso. Kasi libateli ya ndenge nini tokoki kolikya kozwa epai ya Nzambe lelo oyo?

Elaka ya Nzambe ya kobatela biso elingi koloba nini te?

13. Yehova asengeli nde kosala makamwisi mpo na biso? Limbolá.

13 Elaka oyo Yehova apesi ete akobatela biso elingi koloba te ete asengeli kosala makamwisi mpo na biso. Nzambe apesi biso ndanga te ete tokozala na mikakatano te na ebongiseli ya ntango oyo. Ebele ya basaleli na ye ya sembo bakutanaka na mikakatano ya makasi, na ndakisa bobola, bitumba, maladi mpe  liwa. Yesu ayebisaki bayekoli na ye polele ete basusu kati na bango bakoki kobomama mpo na kondima na bango. Yango wana, amonisaki polele ete esengeli koyika mpiko tii na nsuka. (Matai 24:9, 13) Soki Yehova asalelaka ntango nyonso nguya na ye mpo na kosikola biso na nzela ya makamwisi, yango elingaki kopesa Satana nzela ya kotumola Yehova mpe kotya ntembe ete tokangamaka na Nzambe na motema moko te.Yobo 1:9, 10.

14. Bandakisa nini emonisi ete Yehova abatelaka ntango nyonso te basaleli na ye nyonso ndenge moko?

14 Ata na ntango ya kala, Yehova asalelaki nguya na ye te mpo na kobatela mosaleli na ye mokomoko ete akufa liwa ya mobesu te. Na ndakisa, Elode abomaki ntoma Yakobo na mobu soki 44 ya ntango na biso (T.B.); nzokande, mwa moke na nsima, Petelo asikolamaki “na lobɔkɔ ya Elode.” (Misala 12:1-11) Mpe Yoane, ndeko ya Yakobo, aumelaki mingi na bomoi koleka Petelo ná Yakobo. Emonani polele ete tokoki te kolikya ete Nzambe abatela basaleli na ye nyonso ndenge moko. Longola yango, “ntango mpe likambo ekanami te” ekómelaka biso nyonso. (Mosakoli 9:11) Kasi, ndenge nini Yehova abatelaka biso lelo oyo?

Yehova abatelaka biso na nzoto

15, 16. (a) Nini emonisi ete Yehova abateli lisangá mobimba ya basambeli na ye na nzoto? (b) Nini ezali kondimisa biso ete Yehova abatelaka basaleli na ye na mikolo oyo mpe akobatela bango na ntango ya “bolɔzi monene”?

15 Tólobela naino kobatelama na nzoto. Biso basambeli ya Yehova tokoki kozala na elikya ete akobatela lisangá na biso mobimba ndenge wana. Soki te, ekozala mpasi te mpo Satana alimwisa biso. Kanisá likambo oyo: Satana, “moyangeli ya mokili oyo,” alingaka kosilisa losambo ya solo nyɛɛ. (Yoane 12:31; Emoniseli 12:17) Baguvɛrnema mosusu oyo eleki na nguya awa na mabelé epekisaki mosala na biso ya kosakola mpe emekaki kosilisa biso nyɛɛ. Atako bongo, biso basaleli ya Yehova tozongaki nsima te mpe tii lelo tozali kokoba kosakola na molende! Mpo na nini bikólo yango ekokaki te kosukisa mosala ya mwa etuluku yango ya baklisto, oyo mpe bazalaki komonana ete bazangi makasi ya komibatela? Mpamba te Yehova abatelaki biso na mapapu na ye ya nguya!Nzembo 17:7, 8.

 16 Tokobatelama mpe na nzoto na ntango ya “bolɔzi monene” oyo ezali koya? Tosengeli kobanga te ntango Nzambe akopesa bato etumbu. Kutu, “Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kasi kobomba mpo na mokolo ya lisambisi bato oyo bazangi boyengebene mpo bálongolama.” (Emoniseli 7:14; 2 Petelo 2:9) Liboso makambo yango esalema, tosengeli kondimaka ntango nyonso makambo mibale oyo. Ya liboso, Yehova akotika ata moke te ete básilisa basaleli na ye nyonso ya sembo na mabelé. Ya mibale, akopesa bato ya sembo mbano ya bomoi ya seko na mokili na ye ya sika ya boyengebene—soki ekosɛnga ete asekwisa bango mpo na yango, akosekwisa bango. Mpo na baoyo bazali kokufa, kobombama na makanisi ya Nzambe eleki kobombama epai mosusu.Yoane 5:28, 29.

17. Ndenge nini Yehova abatelaka biso na nzela ya Liloba na ye?

17 Ata sikoyo, Yehova abatelaka biso na nzela ya “liloba” na ye oyo ezali na bomoi, na nguya ya kobikisa mitema mpe kobongola bomoi ya bato. (Baebele 4:12) Soki tozali kosalela mitinda na yango, bampasi mosusu ekoki kozwa biso te. Yisaya 48:17 elobi ete: ‘Ngai nazali Yehova . . . , nazali kolakisa yo mpo na litomba na yo.’ Ntembe ezali te ete soki tozali kotosa Liloba ya Nzambe, bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na biso ekokóma malamu koleka mpe tokoumela na mokili. Na ndakisa, lokola tosalelaka toli ya Biblia oyo esɛngi ete tóboya pite mpe tómipɛtola na mbindo nyonso, tokimaka misala ya mbindo mpe mimeseno mabe oyo ezali kobebisa bomoi ya ebele ya bato oyo batosaka Nzambe te. (Misala 15:29; 2 Bakolinti 7:1) Tozali mpenza na botɔndi na ndenge Nzambe abatelaka biso na nzela ya Liloba na ye!

Yehova abatelaka biso na elimo

18. Ndenge nini Yehova abatelaka biso na elimo?

18 Likambo ya ntina koleka ezali ete Yehova abatelaka biso na elimo. Nzambe na biso ya bolingo abatelaka biso mpo básala biso mabe te na elimo; yango wana, apesaka biso oyo tosengeli na yango mpo tóyikela komekama mpiko mpe tóbatela boyokani na biso elongo na ye. Na ndenge yango, Yehova asalaka nyonso mpo na kobatela biso na bomoi, kaka mpo na mwa bambula moke te  kasi mpo na libela. Tótalela mwa bibongiseli oyo Nzambe asalelaka mpo na kobatela biso na elimo.

19. Ndenge nini elimo santu ya Yehova ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala liboso ya komekama nyonso?

19 Yehova ‘ayokaka mabondeli.’ (Nzembo 65:2) Ntango mitungisi ya bomoi elekeli biso, tokoki kozwa libɔndisi monene soki tofungoleli ye motema na biso na nzela ya mabondeli. (Bafilipi 4:6, 7) Ntango mosusu akosala likamwisi te mpo na kolongola mikakatano na biso, kasi eyano na ye na mabondeli wana ekoki kozala bwanya oyo akopesa biso mpo tóyeba ndenge ya kosala liboso ya mikakatano yango. (Yakobo 1:5, 6) Koleka wana, Yehova apesaka elimo santu na baoyo basɛngaka ye yango. (Luka 11:13) Elimo wana ya nguya mingi ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala liboso ya komekama to mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango. Elimo yango ekoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi” mpo tóyika mpiko tii ntango Yehova akolongola mpasi nyonso na mokili ya sika oyo ekómi pene.2 Bakolinti 4:7.

20. Na bantango mosusu, ndenge nini Yehova amoniselaka biso nguya na ye ya kobatela na nzela ya bandimi mosusu?

20 Na bantango mosusu, Yehova amoniselaka biso nguya na ye ya kobatela na nzela ya baninga na biso bandimi. Yehova abendi biso basaleli na ye na kati ya ‘lisangá ya bandeko’ oyo bazali na mokili mobimba. (1 Petelo 2:17; Yoane 6:44) Na kati ya bandeko yango ya bolingo, tozali komona na miso ndenge nguya ya  elimo santu ya Nzambe ezali kokómisa biso bato malamu mpenza. Elimo yango ezali kobota kati na biso mbuma—elingi koloba bizaleli malamu mpe ya ntina mingi, lokola bolingo, motema malamu mpe bolamu. (Bagalatia 5:22, 23) Yango wana, ntango tozali na mpasi mpe motema etindi mondimi mosusu apesa biso toli oyo ekosalisa biso to ayebisa biso maloba ya kolendisa oyo tosengeli na yango mingi, tosengeli kopesa Yehova matɔndi mpo na ndenge wana ya kobatela biso.

21. (a) Bilei nini oyo eyaka na ntango ebongi Yehova apesaka biso na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”? (b) Litomba nini ozwi na bibongiseli oyo Yehova akamati mpo na kobatela biso na elimo?

21 Yehova apesaka mpe eloko mosusu mpo na kobatela biso: bilei ya elimo na ntango ebongi. Mpo na kosalisa biso tózwa makasi na kati ya Liloba na ye, Yehova apesi “moombo ya sembo mpe ya mayele” mokumba ya kokabola bilei ya elimo. Ezali na nzela ya mikanda, bakisa mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, makita, mayangani ya mike mpe ya minene, nde moombo ya sembo yango apesaka biso ‘bilei na ntango oyo ebongi’—elingi koloba bilei oyo tosengeli na yango, na ntango na yango. (Matai 24:45) Oyokaki likambo moko na likita moko ya lisangá—ezala na eyano ndeko moko apesaki, na lisukulu, to ata na libondeli—oyo epesaki yo makasi mpe elendiseli oyo ozalaki na mposa na yango na ntango wana? Otángaki lisolo moko na bazulunalo na biso oyo etalelaki mpenza bomoi na yo? Kobosana te, Yehova apesaka biso nyonso wana mpo na kobatela biso na elimo.

22. Na likambo nini Yehova asalelaka nguya na ye ntango nyonso, mpe mpo na nini ndenge wana ya kosalela nguya yango ememelaka biso bolamu ya solosolo?

22 Yehova azali mpenza nguba ‘ya baoyo nyonso bazali komibomba epai na ye.’ (Nzembo 18:30) Tokangi ntina ete sikoyo, asalelaka nguya na ye te mpo na kobatela biso na bampasi nyonso. Kasi, asalelaka ntango nyonso nguya na ye ya kobatela mpo na kokokisa mokano na ye. Nsukansuka, ndenge oyo asalelaka nguya yango ememelaka basaleli na ye bolamu ya solosolo. Soki topusani penepene na Yehova mpe totikali na kati ya bolingo na ye, akopesa biso bomoi ya kokoka mpo na libela. Lokola tozali na elikya yango, tokoki mpenza kotalela mpasi ata ya ndenge nini oyo ekoki kokómela biso na ebongiseli oyo ete ezali “ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ.”2 Bakolinti 4:17.