Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 2

Okoki mpenza ‘kopusana penepene na Nzambe’?

Okoki mpenza ‘kopusana penepene na Nzambe’?

1, 2. (a) Likambo nini bato mingi bamonaka ete ekoki kosalema te, kasi likambo nini Biblia endimisi biso? (b) Boyokani nini ezalaki kati na Abalayama ná Yehova, mpe mpo na nini?

OKOMIYOKA ndenge nini soki Mozalisi ya likoló ná nse alobi boye mpo na yo: “Oyo azali moninga na ngai”? Mpo na bato mingi, likambo ya ndenge wana ekoki mpenza kosalema te. Na makanisi na bango, ekoki kosalema te ete moto oyo asalemi na putulu azala moninga ya Yehova Nzambe. Nzokande, Biblia endimisi biso ete tokoki mpenza kozala baninga ya Nzambe.

2 Abalayama, moto moko ya kala, azalaki na boyokani malamu na Nzambe. Yehova abengaki ye “moninga na ngai.” (Yisaya 41:8) Ɛɛ, na miso ya Yehova, Abalayama azalaki mpenza moninga na ye. Abalayama azalaki na boyokani malamu wana na Yehova mpo ‘andimelaki ye.’ (Yakobo 2:23) Lelo oyo mpe, Yehova alukaka mabaku ya ‘kotya motema na ye’ epai ya baoyo basalelaka ye mpo balingi ye. (Deteronome 10:15) Liloba na ye elendisi biso boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Na vɛrsɛ yango, basɛngi biso tósala eloko moko mpe bapesi biso elaka.

3. Yehova asɛngi biso nini; mpe soki tosali yango, apesi biso elaka nini?

3 Yehova asɛngi biso tópusana penepene na ye. Azali pene ya kondima biso tózala baninga na ye. Kasi, apesi mpe elaka ete soki tosali oyo esengeli mpo na kopusana penepene na ye, ye mpe akosala lokola biso: akopusana penepene na biso. Na ndenge wana, tokozwa eloko moko ya motuya mingi: kokóma ‘baninga ya motema ya Yehova.’ * (Nzembo 25:14) Kozala ‘moninga  ya motema’ ya moto emonisi ete bino mibale boyebisanaka basɛkɛlɛ.

4. Moninga ya motema azalaka ndenge nini, mpe na ndenge nini Yehova azalaka moninga ya motema ya baoyo bapusanaka penepene na ye?

4 Ozali na moninga moko ya motema oyo oyebisaka ye basɛkɛlɛ na yo? Moninga yango alukaka bolamu na yo. Otyelaka ye motema mpo azalaka sembo. Soki oyebisi ye makambo oyo esepelisi yo, osepelaka lisusu koleka. Makambo oyo ezali kopesa yo mpasi na motema ekómaka pɛpɛlɛ mpo ye ayokaka yo mpe amityaka na esika na yo. Ata na ntango oyo omoni ete bato mosusu bazali koyeba te ntina ya makambo osali, ye ayebaka. Ndenge moko mpe, ntango opusani penepene na Nzambe, akómaka Moninga na yo oyo aleki baninga nyonso, moninga oyo azali kopesa yo kilo, kotyela yo likebi mingi mpe koyeba ntina ya makambo nyonso ozali kosala. (Nzembo 103:14; 1 Petelo 5:7) Oyebisaka ye makanisi oyo ezali mpenza na motema na yo mpo oyebi ete azalaka sembo epai ya baoyo bazali sembo epai na ye. (Nzembo 18:25) Nzokande, soki tokómi baninga ya motema ya Nzambe ndenge wana, ezali kaka mpo ye moko apesi biso likoki wana.

Yehova afungoli nzela

5. Yehova asalaki nini mpo biso tózwa likoki ya kozala penepene na ye?

5 Lokola tozali basumuki, biso moko tokokaki soki moke te kozala penepene na Nzambe. (Nzembo 5:4) Kasi, ndenge ntoma Paulo akomaki, “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye moko na likambo oyo ete, wana tozalaki naino basumuki, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:8) Ɛɛ, Yehova atindaki Yesu ‘apesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.’ (Matai 20:28) Kondimela mbeka wana nde epesi biso likoki ya kozala penepene na Nzambe. Lokola Nzambe “alingaki biso liboso,” asalaki makambo oyo ekoki kopesa biso nzela ya kokóma baninga na ye.1 Yoane 4:19.

6, 7. (a) Ndenge nini toyebi ete Yehova azali te Nzambe moko oyo amibombá oyo bato bakoki koyeba te? (b) Na nzela nini Yehova ayebisi bato makambo na ye?

6 Yehova asalaki likambo mosusu: Ayebisi biso makambo na ye. Mpo na kokóma moninga ya moto, esɛngaka koyeba ye  malamu mpe kosepela mpenza na bizaleli mpe makambo na ye. Na yango, soki Yehova azalaka Nzambe moko oyo amibombá mpe oyo bato bakoki koyeba te, mbɛlɛ tokokaki soki moke te kozala penepene na ye. Nzokande, ye amibombi te; alingi tóyeba ye. (Yisaya 45:19) Longola yango, makambo na ye oyo ayebisi biso, moto nyonso akoki koyeba yango, ezala ata bato oyo mokili emonaka bango bato mpamba.Matai 11:25.

Yehova ayebisi biso makambo na ye na nzela ya biloko oyo akelá mpe na nzela ya Liloba oyo akomisá

7 Ndenge nini Yehova ayebisi biso makambo na ye? Biloko oyo akelá emonisi biso mwa bizaleli na ye mosusu—nguya na ye monene, bwanya na ye oyo eleki mingi mpe bolingo na ye oyo etondi mɛkɛ. (Baloma 1:20) Kasi, Yehova ayebisi biso makambo na ye kaka na nzela ya biloko oyo akelá te. Lokola ye ayebi mpenza koyebisa makambo koleka bato nyonso, akomisaki Biblia, Liloba na ye, mpo na kosalisa bato báyeba ye.

Tótala “bizaleli malamu ya Yehova”

8. Mpo na nini tokoki koloba ete Biblia yango moko ezali elembo oyo ezali komonisa ete Yehova alingaka biso?

8 Biblia yango moko ezali elembo oyo ezali komonisa ete Yehova alingaka biso. Na kati ya Liloba na ye, asaleli maloba oyo tokoki kokanga ntina na yango mpo na kosalisa biso tóyeba ye—yango ezali komonisa ete alingaka biso mpe alingi ete tóyeba ye mpe tólinga ye. Makambo oyo totángaka na buku yango ya ntina mingi esalisaka biso tómona “bizaleli malamu ya Yehova” mpe etindaka biso tólinga kozala penepene na ye. (Nzembo 90:17) Tótalela mwa ndenge ya malamu mpenza oyo Yehova ayebisi biso makambo na ye na kati ya Liloba na ye.

9. Wapi mwa bandakisa oyo Biblia elobeli polele bizaleli ya Nzambe?

9 Na kati ya Makomami, ezali na bisika mingi oyo balobeli bizaleli ya Nzambe polele. Mwa bandakisa yango oyo: “Yehova alingi bosembo.” (Nzembo 37:28) Nzambe azali “monene na nguya.” (Yobo 37:23) “‘Nazali sembo,’ Yehova alobi bongo.” (Yilimia 3:12) “Azali na motema ya bwanya.” (Yobo 9:4) Azali ‘Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.’ (Exode 34:6) ‘Yo ozali malamu, ee Yehova, mpe olimbisaka mabe.’ (Nzembo 86:5) Mpe, ndenge tomonaki yango na mokapo oyo eleki, ezali na  ezaleli moko oyo eleki bizaleli mosusu nyonso: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Ntango ozali kokanisa bizaleli malamu yango, yango ebendi yo te epai ya Nzambe yango oyo aleki nyonso?

Biblia esalisaka biso tópusana penepene na Yehova

10, 11. (a) Yehova akomisaki mpe nini na kati ya Liloba na ye mpo na kosalisa biso tómona bizaleli na ye polelepolele? (b) Ndakisa nini ezali na Biblia oyo ezali kosalisa biso tómona nguya ya Nzambe ntango ezali kosala mosala?

10 Yehova asuki kaka te na kolakisa biso bizaleli na ye; bolingo na ye etindaki ye akomisa mpe na Liloba na ye masolo oyo ezali kolakisa ndenge amonisaki mpenza bizaleli yango. Masolo yango ezali kosalisa bɔɔngɔ na biso emona polelepolele bizaleli ndenge na ndenge oyo azali na yango. Yango ezali mpe kosala ete tókoka kopusana penepene na ye. Tózwa ndakisa moko.

11 Soki otángi ete Nzambe azali na “makasi kati na nguya” (Yisaya 40:26), ekeseni mpenza na soki otángi ndenge abikisaki ekólo ya Yisalaele na Mbu Motane mpe ndenge abatelaki bango na boumeli ya mbula 40 na esobe. Na makanisi, okoki komona ebele ya mai wana ekabwani, bato ya ekólo yango—bango nyonso soki milio 3—babandi kotambola na mabelé na kati ya mbu mpe ngámbo na ngámbo, mai etɛlɛmi lokola bifelo ya minene. (Exode 14:21; 15:8) Okoki mpe komona ndenge Nzambe abatelaki bango na esobe: mai ebimi na libanga; biloko ya kolya oyo ezali lokola mwa mbuma ya mpɛmbɛ na mabelé. (Exode 16:31; Mituya 20:11) Awa, Yehova amonisi ete asuki kaka kozala na nguya te, kasi asalelaka mpe yango mpo na bolamu ya basaleli na ye. Mitema na biso ekiti mpenza lokola toyebi ete mabondeli na biso ekendaka epai ya Nzambe moko ya nguya, oyo “azali ekimelo mpe nguya mpo na biso; amonani solo na kosunga na ntango ya mpasi,” boye te?Nzembo 46:1.

12. Ndenge nini Yehova asalelaka maloba oyo tokoki kokanga ntina na yango mpo na kosalisa biso tóyeba ye?

 12 Yehova, ye oyo azali elimo, asali mpe likambo mosusu mpo na kosalisa biso tóyeba ye. Biso bato tomonaka kaka makambo oyo miso na biso ekoki komona; yango wana, tokoki komona bilimo te. Soki Nzambe ayebisaka biso ndenge azali na maloba ya bilimo, mbɛlɛ ezali lokola nde yo ozali koluka koyebisa moto oyo amonaka te banda kobotama ete miso na yo ezali na langi boye to boye, to nzoto na yo ezali na matɔnɔ ya boye to boye. Na boboto nyonso, Yehova asaleli nde maloba oyo tokoki kokanga ntina na yango mpo na kosalisa biso tóyeba ye. Ntango mosusu, asalelaka maloba ya elilingi; amikokanisaka na biloko oyo toyebi. Kutu, amimonisaka lokola nde azali na binama mosusu oyo ezalaka na nzoto ya moto. *

13. Elilingi nini eyeli yo na makanisi nsima ya kotánga Yisaya 40:11, mpe yango epesi yo makanisi nini?

13 Yoká maloba Yisaya 40:11 esaleli mpo na kolobela Yehova: “Akoleisa etonga na ye lokola mobateli, akoyanganisa bana ya mpate na mabɔkɔ na ye; akokumba bango na ntolo na ye.” Awa, bakokanisi Yehova na mobateli ya mpate oyo amemi bana ya mpate na “mabɔkɔ na ye.” Yango ezali komonisa ete Nzambe azali na likoki ya kobatela mpe kosalisa basaleli na ye, ata baoyo bazali mpenza na likoki ya komibatela bango moko te. Kati na mabɔkɔ na ye ya makasi, tokoki kobanga eloko te mpamba te soki tozali sembo epai na ye, akotika biso soki moke te. (Baloma 8:38, 39) Mobateli Monene ya Mpate amemaka bana ya mpate “na ntolo na ye”—elobeli oyo elakisi mabenga ya minene oyo ezalaki na elamba ya likoló, mpe na bantango mosusu mobateli ya mpate azalaki komema na yango mwana ya mpate oyo auti kobotama. Yango ezali kondimisa biso ete Yehova alingaka biso mpe akokisaka bamposa na biso na boboto mpenza. Yango wana, tosengeli kaka kolinga kozala penepene na ye.

 ‘Mwana asepeli komonisa ye’

14. Mpo na nini tokoki koloba ete ezali na nzela ya Yesu nde Yehova ayebisi biso makambo na ye malamumalamu?

14 Ezali na nzela ya Yesu, Mwana na ye ya bolingo, nde Yehova ayebisi biso makambo na ye malamumalamu na kati ya Liloba na ye. Moto ata moko te akokaki komonisa malamumalamu makanisi mpe mayoki ya Nzambe to kolimbola Ye polelepolele koleka ndenge Yesu asalaki. Ezali bongo, mpamba te Mwana yango ya liboso azalaká na bomoi esika moko na Tata na ye liboso ete bikelamu mosusu ya elimo mpe molɔ́ngɔ́ ekelama. (Bakolose 1:15) Yesu ayebaki Yehova malamumalamu. Yango wana, alobaki ete: ‘Oyo Mwana azali moto moko te ayebi longola kaka Tata; mpe oyo Tata azali, moto moko te ayebi longola kaka Mwana, mpe moto oyo epai na ye Mwana asepeli komonisa ye.’ (Luka 10:22) Ntango Yesu azalaki naino awa na mabelé, amonisaki Tata na ye na ndenge mibale ya minene.

15, 16. Wapi ndenge mibale oyo Yesu amonisaki Tata na ye?

15 Ya liboso, mateya ya Yesu esalisi biso tóyeba Tata na ye. Mpo na kolobela ndenge Tata na ye azali, Yesu asalelaki maloba oyo ezali  kosimba mitema na biso. Na ndakisa, mpo na komonisa ete Yehova azali Nzambe ya motema mawa oyo ayambaka lisusu basumuki oyo babongoli motema, Yesu akokanisaki Yehova na tata moko oyo alimbisaka; tata yango atondi na esengo ntango amoni mwana na ye oyo akómaki motó likolólikoló azongi na ndako, apoti mbangu mpe amibwaki na nkingo ya mwana yango mpe apwɛpwi ye na boboto. (Luka 15:11-24) Yesu alobaki mpe ete Yehova azali Nzambe oyo ‘abendaka’ bato ya mitema ya sembo, mpamba te alingaka mokomoko na bango. (Yoane 6:44) Kutu, ayebaka ata ntango mwa mokɛngɛli-mboka moko ekwei na mabelé. Yesu alobaki ete: “Bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” (Matai 10:29, 31) Na ntembe te, Nzambe ya boboto boye asengeli kaka kobenda biso.

16 Ya mibale, ndakisa ya Yesu emonisi biso ndenge Yehova azalaka. Yesu alandaki malamu mpenza ndakisa ya Tata na ye, yango wana alobaki boye: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Yango wana, ntango tozali kotánga makambo ya Yesu na Baevanzile—esengo to mawa oyo ayokaki mpe ndenge azalaki na bato—ezali lokola tozali komona Tata na ye na miso. Ezali na lolenge mosusu te koleka wana, oyo Yehova akokaki kosalela mpo na kosalisa biso tóyeba bizaleli na ye malamumalamu. Mpo na nini?

17. Na nzela ya ndakisa moko, monisá eloko oyo Yehova asalá mpo na kosalisa biso tóyeba bomoto na ye.

17 Tózwa ndakisa: Olingi kopesa ndimbola ya boboto. Ntango mosusu, okosalela maloba oyo ezali komonisa ndenge ezaleli yango ezalaka. Kasi soki olakisi moto moko oyo azali mpenza kosala likambo moko ya boboto mpe olobi, “Talá ndenge bamonisaka boboto,” mbala moko ndimbola ya liloba “boboto” ekokóma polele mpe ekozala mpasi te moto akanga ntina na yango. Yehova asali mpe bongo mpo na kosalisa biso tóyeba bomoto na ye. Longola maloba oyo asaleli mpo na komonisa biso ndenge azalaka, alakisi biso mpe ndakisa ya solosolo ya Mwana na ye. Tozali komona polele bizaleli ya Nzambe na nzela ya misala oyo Yesu asalaki na bomoi na ye. Ntango totángaka masolo ya Baevanzile oyo elobelaka Yesu, ezali lokola nde Yehova ayebisaka biso boye: “Bótala ndenge ngai nazalaka.” Masolo  yango oyo epemami emonisi ete Yesu azalaki moto ya ndenge nini?

18. Ndenge nini Yesu amonisaki nguya, bosembo mpe bwanya?

18 Yesu amonisaki na ndenge ya malamu mpenza bizaleli minei ya minene oyo Nzambe azalaka na yango. Azalaki na nguya ya kosilisa maladi, nzala, ata mpe liwa. Kasi, ye azalaki te lokola bato oyo balukaka matomba na bango moko oyo basalelaka nguya na bango na ndenge ya mabe; ata mbala moko te asalelaki nguya na ye ya kosala makamwisi mpo na bolamu na ye moko to mpo na kosala basusu mabe. (Matai 4:2-4) Alingaki bosembo. Ntango amonaki batɛkisi ya lokoso bazali koyibela bato, asilikaki na ntina. (Matai 21:12, 13) Na makambo oyo azalaki kosalela babola mpe bato oyo banyokwami, azalaki kopona bilongi te; asalisaki bango ‘bázwa kopema’ mpo na milimo na bango. (Matai 11:4, 5, 28-30) Mateya ya Yesu, moto oyo ‘alekaki Salomo,’ emonisaki ete azali na bwanya oyo ekokani na oyo ya moto mosusu te. (Matai 12:42) Kasi Yesu azalaki komilakisa soki moke te ete ye nde azali na bwanya. Maloba na ye ezalaki kosimba mitema ya bato mpamba, mpo mateya na ye ezalaki polele, pɛtɛɛ mpe ezalaki komonisa bango oyo bakoki kosala.

19, 20. (a) Na ndenge nini Yesu azalaki ndakisa eleki malamu na oyo etali komonisa bolingo? (b) Likambo nini tosengeli kobosanaka te ntango tozali kotánga mpe kokanisa makambo oyo etali ndakisa ya Yesu?

19 Yesu amonisaki bolingo na ndenge oyo eleki malamu. Kobanda na ebandeli tii na nsuka ya mosala na ye, amonisaki bizaleli ndenge na ndenge oyo ezalaka na kati ya bolingo, na ndakisa koyeba komitya na esika ya basusu mpe motema mawa. Akokaki te komona moto oyo azali na mpasi mpe ayokela ye mawa te. Mbala na mbala, mawa wana ezalaki kotinda ye asala misala ya malamu. (Matai 14:14) Atako Yesu abikisaki bato ya maladi mpe aleisaki bato oyo bazalaki na nzala, amonisaki mpe motema mawa na ye na lolenge moko ya malamu koleka: asalisaki bato báyeba, bándima mpe bálinga solo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, ebongiseli oyo ekomemela bato matomba oyo ekoumela seko. (Malako 6:34; Luka 4:43) Koleka nyonso wana, Yesu amonisaki bolingo mpe elimo ya komipimela na ndenge andimaki kokaba molimo na ye mpo na bolamu ya basusu.Yoane 15:13.

 20 Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki mikóló mpe bana, bato minene mpe bato mpamba, bazalaki kolinga kopusana penepene na moto yango ya boboto, ya esengo mpe ya motema mawa. (Malako 10:13-16) Nzokande, ntango tozali kotánga makambo etali ndakisa oyo Yesu atikaki mpe tozali kokanisa yango malamumalamu, tóbosanaka te ete Mwana yango azali kosalisa biso tómona polele ndenge Tata na ye azali.Baebele 1:3.

Mokanda ya boyekoli mpo na kosalisa biso

21, 22. Koluka Yehova esɛngi nini, mpe makambo nini ezali na kati ya mokanda oyo ya boyekoli oyo ekosalisa biso na koluka ye?

21 Lokola Yehova ayebisi biso makambo na ye polelepolele na kati ya Liloba na ye, yango emonisi ete alingi mpenza tózala penepene na ye. Atako bongo, azali kotinda biso na makasi te ete tóluka kozala na boyokani ya malamu elongo na ye. Biso moko nde tosengeli koluka Yehova “naino akoki komonana.” (Yisaya 55:6) Koluka Yehova esɛngi koyeba bizaleli mpe banzela na ye ndenge Biblia emonisi yango. Mokanda ya boyekoli oyo ozali kotánga sikoyo ekomamaki mpo na kosalisa yo oluka ye.

22 Okomona ete tokaboli buku oyo na biteni minei, eteni mokomoko etaleli ezaleli moko ya monene kati na bizaleli minei oyo Yehova azali na yango: nguya, bosembo, bwanya mpe bolingo.  Na ebandeli ya eteni mokomoko, tolobeli na mokuse ezaleli oyo eteni yango ekotalela. Nsima na yango, ezali na mwa mikapo oyo elobeli ndenge oyo Yehova amonisaka ezaleli yango na makambo ndenge na ndenge oyo etali ezaleli yango. Eteni mokomoko ezali mpe na mokapo moko oyo elobeli ndenge Yesu amonisaki ezaleli yango mpe mokapo mosusu elobeli ndenge biso mpe tokoki komonisa yango na bomoi na biso.

23, 24. (a) Lobelá ntina ya etanda ya sika “Mituna mpo na komanyola.” (b) Ndenge nini komanyola esalisaka biso tópusana ntango nyonso penepene na Nzambe?

23 Kobanda na mokapo oyo, eloko moko ebakisami: etanda moko oyo ezali na motó ya likambo “Mituna mpo na komanyola.” Na ndakisa, talá etanda oyo ezali na lokasa 24. Bavɛrsɛ ná mituna wana etyami te mpo na kosalisa yo ozongela makanisi ya ntina ya mokapo. Etyami nde mpo na kosalisa yo okanisa makambo mosusu ya ntina oyo etali mpe lisolo yango. Ndenge nini okoki kosalela etanda yango malamu? Luká bavɛrsɛ bapesi wana na Biblia mpe tángá yango malamumalamu. Nsima na yango, talelá motuna oyo elandi vɛrsɛ mokomoko. Kanisá malamumalamu eyano na yango. Ntango mosusu okoki kolukaluka na kati ya mikanda. Omituna mituna mosusu: ‘Likambo yango eteyi ngai nini na ntina na Yehova? Na ndenge nini yango etali bomoi na ngai? Ndenge nini nakoki kosalela yango mpo na kosalisa basusu?’

24 Komanyola ndenge wana ekoki kosalisa biso tópusana ntango nyonso penepene na Yehova. Mpo na nini? Biblia emonisi ete moto amanyolaka nde na motema. (Nzembo 19:14) Ntango tozali kokanisa na botɔndi mpenza makambo tozali koyekola na ntina na Nzambe, makambo yango ekɔtaka na motema na biso ya elilingi; kuna, esimbaka makanisi mpe mayoki na biso mpe nsukansuka etindaka biso na kosala likambo moko. Tokómaka kolinga Nzambe mingi mpe bolingo yango etindaka biso tóluka kosepelisa ye, Moninga na biso ya bolingo mpenza. (1 Yoane 5:3) Mpo boyokani na biso ná Yehova ekóma ndenge wana, tosengeli koyekola koyeba bizaleli mpe banzela na ye. Kasi, tótalela naino ezaleli moko ya Yehova oyo ezali kotinda biso kaka na kopusana penepene na ye—bosantu na ye.

^ par. 3 Tosengeli koyeba ete liloba ya Liebele oyo ebongolami ‘baninga ya motema,’ basaleli yango mpe na Amosa 3:7. Vɛrsɛ yango elobi ete Yehova, Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso, ayebisaka “mwango [“sɛkɛlɛ,” NW]” na ye epai ya basaleli na ye, elingi koloba ayebisaka bango makambo oyo akani kosala.

^ par. 12 Na ndakisa, Biblia elobeli elongi ya Nzambe, miso, matoi, zolo, monɔkɔ, mabɔkɔ mpe makolo na ye. (Nzembo 18:15; 27:8; 44:3; Yisaya 60:13; Matai 4:4; 1 Petelo 3:12) Yango ezali nde maloba ya elilingi, elingi koloba te ete Yehova azali mpenza na binama yango; ndenge moko mpe, azali mpenza “libanga” to “nguba” te atako basalelaka maloba wana mpo na kolobela ye.Deteronome 32:4; Nzembo 84:11.