Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 31

‘Pusaná penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na yo’

‘Pusaná penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na yo’

1-3. (a) Kotala boyokani kati na baboti ná mwana na bango ya moke emonisi biso ezaleli nini oyo bato bazalaka na yango? (b) Likambo nini ebandaka ntango moto moko alingi biso, mpe motuna nini ya ntina mingi tokoki komituna?

BABOTI balingaka komona mwana na bango oyo abotami sika azali kosɛka. Bakitisaka elongi pene na oyo ya ye, basololisaka ye na bolingo nyonso mpe basɛkisaka ye mingi. Bazelaka mpenza komona ndenge akosala. Mpe eumelaka te, okomona matama ya mwana ekɔti, mbɛbu ebendani mpo na kosɛka. Na ndenge na yango, kosɛka wana ezali komonisa bolingo; mwana abandi komonisa baboti na ye ya bolingo ete ye mpe alingi bango.

2 Kosɛka ya mwana moke emonisi ezaleli moko ya ntina mingi oyo bato bazalaka na yango: tolingaka bato oyo balingaka biso. Tosalemá bongo. (Nzembo 22:9) Ntango tokolaka, ndenge na biso ya kolinga bato oyo balingaka biso mpe ekolaka. Mbala mosusu ozali koyeba lisusu ndenge oyo, na bomwana na yo, baboti, bandeko to baninga bazalaki kolinga yo. Bolingo ebotamaki na motema na yo, ekolaki mpe emonanaki na makambo oyo ozalaki kosala. Yo mpe okómaki kolinga bango. Likambo ya ndenge yango ezali mpe kosalema na kati na yo ná Yehova Nzambe?

3 Biblia elobi ete: “Nde biso, tozali kolinga, mpamba te ye alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:19) Kobanda na Eteni 1 kino Eteni 3 ya buku oyo, bakundoleli yo ete Yehova Nzambe amonisi nguya, bosembo mpe bwanya na ye mpo na bolamu na yo na ndenge mpenza ya bolingo. Mpe na Eteni 4, omoni ete Yehova amonisi polelepolele, na ndenge mingi ya kokamwa, ete alingaka bato mpe alingaka yo. Sikoyo motuna yango oyo. Mbala mosusu motuna yango ezali motuna ya ntina mingi mpenza oyo okoki komituna: ‘Nasala nini mpo na bolingo oyo Yehova amoniseli ngai?’

 Kolinga Nzambe elimboli nini?

4. Mobulu nini ezali na makanisi ya bato na likambo etali ndimbola ya kolinga Nzambe?

4 Yehova, Mobandisi ya bolingo, ayebi malamu ete bolingo ezalaka na nguya monene ya kotinda bato bámonisa bizaleli ya malamu mpenza oyo bazali na yango. Yango wana, atako bato oyo bazali sembo te bazali kotika te kotombokela ye, Yehova atyaka ntango nyonso motema ete bato mosusu bakolinga ye mpo ye alingi bango. Mpe, ya solo, bamilio ya bato bamonisi ete balingi ye. Nzokande, na mawa, mangomba ya mokili oyo ebebi etye bato na mobulu na likambo ya koyeba soki kolinga Nzambe ezali nini. Ebele ya bato balobaka ete balingaka Nzambe, kasi emonani lokola nde mpo na bango bolingo yango esengeli komonisama kaka na maloba mpamba. Kolinga Nzambe ekoki kobanda bongo, se ndenge kosɛka ya mwana moke ezalaka likambo ya liboso oyo asalaka mpo na komonisa baboti na ye ete alingi bango. Kasi, mpo na bato oyo bakoli, bolingo esukaka wana te.

5. Ndenge nini Biblia elimboli bolingo ya Nzambe, mpe mpo na nini ndimbola yango esengeli kosepelisa biso?

5 Yehova alimboli eloko oyo babengi kolinga ye. Liloba na ye elobi ete: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye.” Na bongo, kolinga Nzambe esengeli komonana na misala. Ya solo, bato mingi balingaka kotosa te. Nzokande, kaka vɛrsɛ wana ebakisi boye: “Kutu bakomandema na ye [Nzambe] ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Mibeko mpe mitinda ya Yehova ezali mpo na bolamu na biso, kasi mpo na konyokola biso te. (Yisaya 48:17, 18) Liloba ya Nzambe etondi na mitinda oyo esalisaka biso tópusana penepene na ye. Ndenge nini? Tótalela makambo misato oyo etali boyokani na biso na Nzambe: kosolola, kosambela mpe komekola ye.

Kosolola na Yehova

6-8. (a) Ndenge nini tokoki koyoka Yehova? (b) Ndenge nini tokoki kosala ete Makomami eloba ntango tozali kotánga yango?

6 Mokapo 1 ebandaki na maloba oyo, “Kanisá ete ozali kosolola na Nzambe.” Tomonaki ete likambo yango ezali kaka likanisi  mpamba te mpo Moize asololaki mpenza na Nzambe. Bongo biso? Sikoyo Yehova atindaka lisusu baanzelu te mpo asolola na bato na nzela na bango. Atako bongo, Yehova azali na ndenge oyo eleki malamu ya kosolola na biso lelo. Ndenge nini tokoki koyoka Yehova?

7 Lokola “Makomami nyonso epemami na Nzambe,” tokoki koyoka Yehova wana tozali kotánga Biblia, Liloba na ye. (2 Timote 3:16) Yango wana, mokomi ya nzembo alendisi basaleli ya Yehova ete bátángaka Biblia ‘butu moi.’ (Nzembo 1:1, 2) Yango wana, tosengeli mpenza kosala milende mpe tokozwela yango matomba. Ndenge tomonaki na Mokapo 18, Biblia ezali lokola mokanda moko ya motuya mingi oyo euti epai ya Tata na biso ya likoló. Na yango, kotánga yango esengeli te kozala mosala moko ya mpasi. Tosengeli kosala ete Makomami eloba ntango tozali kotánga yango. Ndenge nini?

8 Salá lokola ozali komona makambo oyo ozali kotánga. Na makanisi, meká komona bato oyo balobeli na Biblia. Luká koyeba malamu makambo ya ntango na bango, bomoi na bango, mpe mikano na bango. Na nsima, kanisá malamumalamu makambo ozali kotánga, omituna mituna lokola oyo: ‘Lisolo oyo ezali koteya ngai nini mpo na Yehova? Wapi bizaleli na ye oyo nazali komona awa? Yehova alingi koteya ngai etinda nini, mpe ndenge nini nakoki kosalela yango na bomoi na ngai?’ Tángá, manyolá, mpe na nsima salelá—na ndenge yango, Liloba ya Nzambe ekoloba na bomoi na yo.Nzembo 77:12; Yakobo 1:23-25.

9. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali nani mpe mpo na nini ezali na ntina mingi tóyokaka “moombo” yango na likebi mpenza?

9 Yehova alobaka na biso mpe na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Ndenge Yesu asakolaki, mwa etuluku ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo etyami mpo na kopesa ‘bilei [ya elimo] na ntango oyo ebongi,’ na mikolo ya nsuka oyo ya yikiyiki. (Matai 24:45-47) Ntango totángaka mikanda oyo ebongisami mpo na kosalisa biso tózwa boyebi ya solosolo ya Biblia mpe ntango toyanganaka na makita ya lisangá mpe na mayangani, moombo yango nde aleisaka biso  na elimo. Lokola moombo yango azali moombo ya Klisto, totosaka na bwanya mpenza maloba oyo ya Yesu: “Bókeba na ndenge bozali koyoka.” (Luka 8:18) Toyokaka na likebi mingi, mpamba te tondimi ete moombo ya sembo ezali moko ya banzela oyo Yehova azali kosalela mpo na kosolola na biso.

10-12. (a) Mpo na nini libondeli ezali likabo ya malamu mingi oyo Yehova apesi biso? (b) Ndenge nini tokoki kobondela na ndenge oyo ekosepelisa Yehova, mpe mpo na nini tokoki kotya motema ete apesaka motuya na mabondeli na biso?

10 Bongo tokoloba nini na oyo etali kosolola na Nzambe? Tokoki koloba na Yehova? Wana ezali likanisi moko ya kobangisa. Kanisá ete olingi kokutana na mokonzi ya liboso ya ekólo na bino mpo na koyebisa ye makambo na yo; ekozala mpenza pɛtɛɛ mpo okutana na ye? Na bisika mosusu, koluka mpamba kokutana na mokonzi ezali likama! Na mikolo ya Esetele mpe Moledekai, moto oyo ayei epai ya mokonzi ya Perse soki ye abengaki ye te akokaki kobomama. (Esetele 4:10, 11) Sikoyo kanisá ete tosengeli koya liboso ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ye oyo liboso na ye ata bakonzi oyo baleki makasi ‘bazali lokola mayoyo.’ (Yisaya 40:22) Tosengeli nde kobanga kopusana epai na ye? Soki moke te!

11 Yehova atye nzela moko ya polele, mpe ya mpasi te, mpo na koloba na ye: libondeli. Ata mwana moke mpenza akoki kobondela ye na kondima, na nkombo ya Yesu. (Yoane 14:6; Baebele 11:6) Atako bongo, libondeli epesaka biso likoki ya koyebisa ye makanisi mpe mayoki ndenge na ndenge oyo ezalaka mpenza na kati ya motema na biso—ata oyo eyokisaka biso mpasi, oyo tozwaka mpenza te maloba ya kolobela yango. (Baloma 8:26) Ntina moko ezali te ya koluka kokamwisa Yehova na maloba ya kitoko to na mabondeli oyo ezali na ebele ya maloba. (Matai 6:7, 8) Nzokande, Yehova atye ndelo te na bolai ya mabondeli to mbala boni tosengeli kobondela ye. Kutu, Liloba na ye elendisi biso ‘tóbondelaka ntango nyonso.’1 Batesaloniki 5:17.

12 Kobosana te, kaka Yehova nde abengami “Moyoki-Mabondeli” mpe ntango ayokaka, amityaka mpenza na esika ya moto oyo azali kobondela ye. (Nzembo 65:2) Ayokaka mabondeli ya basaleli na ye ya sembo kaka mpo na koyoka?  Te, asepelaka nde na yango. Liloba na ye ekokanisi mabondeli yango na mpaka ya malasi, oyo epesaka molinga ya nsolo kitoko oyo emataka likoló ntango bazali kotumba yango. (Nzembo 141:2; Emoniseli 5:8; 8:4) Soki tokanisi ete mabondeli na biso oyo tosalaka na motema moko emataka mpe bongo epai ya Nkolo Mokonzi mpe esepelisaka ye, yango ebɔndisaka biso mpenza, boye te? Yango wana, soki olingi kopusana penepene na Yehova, bondelá ye mbala na mbala na komikitisa mpenza mpe saláká yango mokolo na mokolo. Lobelá ye makambo oyo ezali na motema na yo; kobombela ye eloko te. (Nzembo 62:8) Yebisá Tata na yo ya likoló mitungisi, makambo oyo ezali kopesa yo esengo, matɔndi mpe masanzoli na yo. Yango ekosala ete boyokani na yo ná ye ekóma malamu koleka.

Kosambela Yehova

13, 14. Kosambela Yehova elimboli nini, mpe mpo na nini ebongi tósambela ye?

13 Kosolola na Yehova Nzambe ezali kaka te koyoka ye mpe koloba na ye lokola tosalaka na moninga to na ndeko moko. Ezali mpenza nde losambo mobimba tozali kosambela ye, tozali kopesa ye lokumu mpe limemya monene oyo ebongi na ye. Losambo ya solo ezali bomoi na biso mobimba. Ezali lolenge tomonisaka Yehova ete tolingi ye mpe tokangami na ye na molimo na biso mobimba; mpe esangisaka bikelamu nyonso ya sembo ya Yehova, na likoló to na nse. Na emonaneli moko, ntoma Yoane ayokaki anzelu moko azali kosakola etinda oyo: “Bósambela Oyo asalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe maziba ya mai.”Emoniseli 14:7.

14 Mpo na nini tosengeli kosambela Yehova? Kanisá bizaleli oyo tolobeli na buku oyo, lokola: bosantu, nguya, komipekisa, boyengebene, mpiko, bwanya, komikitisa, bolingo, motema mawa, bosembo mpe malamu. Tomonaki ete na bizaleli wana nyonso, Yehova nde azali mpenza ndakisa oyo eleki monene. Soki tomeki kosangisa bizaleli yango nyonso, tokomona ete azali kaka te Moto moko monene oyo azali kokamwisa. Nkembo na ye eleki monene, aleki biso mosika mpenza. (Yisaya 55:9) Ntembe ezali te, Yehova abongi kozala Mokonzi Oyo-Aleki-Nyonso,  mpe ebongi solo tósambela ye. Nzokande, ndenge nini tosengeli kosambela ye?

15. Ndenge nini tokoki kosambela Yehova “na elimo mpe na solo,” mpe libaku nini makita ya boklisto epesaka biso mpo na yango?

15 Yesu alobaki ete: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Mpo na kosambela Nzambe “na elimo,” tosengeli kozala na elimo na ye mpe kotambwisama na yango. Losambo na biso esengeli mpe kozala na boyokani na solo, boyebi ya sikisiki oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Tozalaka na libaku malamu ya kosambela Yehova “na elimo mpe na solo” ntango nyonso oyo toyanganaka elongo na baninga na biso bandimi. (Baebele 10:24, 25) Ntango toyembaka nzembo ya kokumisa Yehova, ntango tobondelaka ye na bomoko, mpe ntango toyokaka mpe tozwaka maloba na masolo oyo etali Liloba na ye, tomonisaka na nzela ya losambo ya pɛto ete tolingi ye.

Makita ya boklisto ezali mabaku ya malamu mpo na kosambela Yehova

16. Wapi moko ya mibeko oyo eleki ntina oyo baklisto ya solo basengeli kotosa, mpe mpo nini tomoni ete tosengeli kotosa yango?

 16 Tosambelaka mpe Yehova ntango tolobelaka ye epai ya bato mosusu wana tozali kokumisa ye liboso na bango. (Baebele 13:15) Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova ezali moko na mibeko oyo eleki ntina oyo baklisto basengeli kotosa. (Matai 24:14) Totosaka yango na motema mobimba mpamba te tolingi Yehova. Soki tokanisi ndenge “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” Satana Zabolo, “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima” na ndenge azali kopanza lokuta na ntina na Yehova, tozalaka na mposa makasi ya kopesa litatoli mpo na Nzambe na biso, komonisa polele ete bakoseli ye makambo, boye te? (2 Bakolinti 4:4; Yisaya 43:10-12) Mpe ntango tokanisaka bizaleli ya kokamwa ya Yehova, na motema na biso toyokaka mposa makasi ya kolobela basusu makambo na ye. Ya solo, mosala oyo tozali kosala ya kosalisa bato báyeba mpe bálinga Tata na biso ya likoló, ezali libaku oyo eleki monene mpenza.

17. Losambo oyo tozali kosambela Yehova etali mpe makambo nini, mpe mpo na nini tosengeli kosambela ye na bosembo mpenza?

17 Losambo oyo tosambelaka Yehova esuki wana te. Etali makambo nyonso ya bomoi na biso. (Bakolose 3:23) Soki tondimaka mpenza ete Yehova azali Nkolo Mokonzi na biso, tokoluka kosala mokano na ye na makambo nyonso—na libota na biso, na mosala na biso, na boyokani na biso na bato, mpe na makambo oyo tosalaka mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. Tokoluka kosalela Yehova “na motema mobimba,” na bosembo mpenza. (1 Ntango 28:9) Losambo ya ndenge yango endimaka te kozala na mitema mibale to kozala lokolo oyo na kati lokolo mosusu libándá, elingi koloba kokosa ete tozali kosalela Yehova nzokande tosalaka masumu minene na kobombama. Bosembo etikaka nzela soki moke te na bokosi ya ndenge yango; bolingo esepelaka na yango ata moke te. Kobanga Nzambe mpe ekosalisa biso. Biblia emonisi polele ete limemya mpe kobanga ya ndenge yango esalaka ete tózala ntango nyonso na boyokani moko ya malamu mingi na Yehova.Nzembo 25:14.

 Komekola Yehova

18, 19. Mpo na nini ebongi kondima ete bato ya kozanga kokoka bakoki komekola Yehova Nzambe?

18 Eteni mokomoko ya buku oyo esuki na mokapo moko oyo ezali komonisa ndenge ya ‘kokóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana balingami.’ (Baefese 5:1) Ezali na ntina mingi tóbosana te ete atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki mpenza komekola lolenge ya kokoka mpenza oyo Yehova asalelaka nguya, amonisaka bosembo, bwanya mpe bolingo. Ndenge nini toyebi ete tokoki mpenza komekola Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Kobosana te, ndimbola ya nkombo ya Yehova ezali koteya biso ete amikómisaka nyonso oyo alingi mpo na kokokisa mikano na ye. Likoki yango ekamwisaka biso solo, kasi tokoki nde komekola yango te? Te, tokoki komekola yango.

19 Tosalemá na elilingi ya Nzambe. (Genese 1:26) Na yango, biso bato tokeseni na bikelamu mosusu ya mabelé. Totambwisamaka te kaka na bamposa lokola banyama, na makambo tobotamá na yango na makila to na makambo ya mboka esika tozali. Yehova apesi biso likabo moko ya motuya mingi: bonsomi ya kopona. Atako makoki na biso ezali na ndelo mpe tozali bato ya kozanga kokoka, tozali na bonsomi ya kopona oyo tolingi kokóma. Olingi kokóma moto moko ya bolingo, ya bwanya mpe ya sembo oyo asalelaka nguya na ye malamu? Na lisalisi ya elimo ya Yehova, okoki mpenza kokóma bongo! Kanisá makambo malamu oyo okosala soki okómi bongo.

20. Malamu nini tosalaka soki tozali komekola Yehova?

20 Okosepelisa Tata na yo ya likoló, okosala ete motema na ye eyoka esengo. (Masese 27:11) Okoki kutu ‘kosepelisa mpenza’ Yehova, mpamba te ayebi esika makoki na yo esuki. (Bakolose 1:9, 10) Mpe soki ozali kotika te kokolisa bizaleli ya malamu mpo na kolanda ndakisa ya Tata na yo ya bolingo, okozwa libaku moko ya malamu mpenza: Kozala momemi ya pole na kati ya mokili oyo ya molili mpe oyo ezali mosika na Nzambe. (Matai 5:1, 2, 14) Okopesa mabɔkɔ na kopalanganisa na mabelé kongɛnga ya bomoto ya Yehova oyo etondi na nkembo. Wana ezali solo lokumu monene!

 ‘Pusaná penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na yo’

Tiká opusana ntango nyonso penepene na Yehova

21, 22. Mobembo nini oyo ezangi nsuka ezali liboso ya baoyo balingaka Yehova?

21 Likambo ya polele oyo Yakobo 4:8 esɛngi biso tósala ezali kaka mokano mpamba te. Ezali nde mobembo mpenza. Soki totikali sembo, mobembo yango ekosuka te. Tokotika soki moke te kopusana ntango nyonso penepene na Yehova. Kutu, tokozala ntango nyonso na ebele ya makambo ya koyekola epai na ye. Tókanisa soki moke te ete buku oyo eteyi biso makambo nyonso oyo etali Yehova. Tolobeli kaka makambo moke mpenza na oyo Biblia elobi mpo na Nzambe! Mpe ata Biblia yango moko eyebisi biso makambo nyonso te oyo etali Nzambe. Ntoma Yoane akanisaki ete soki bákomaka makambo nyonso oyo Yesu asalaki na mosala na ye awa na mabelé, “mokili yango moko elingaki kokoka te barulo oyo ekomami.” (Yoane 21:25) Soki balobeli Mwana bongo, bongo Tata?

22 Ata ntango tokozala na bomoi ya seko, tokokoka te koyeba makambo nyonso oyo etali Yehova. (Mosakoli 3:11) Na bongo,  kanisá makambo malamu oyo ezali kozela biso. Nsima ya koumela na bomoi bambula nkama na nkama, nkóto na nkóto, bamilio na bamilio, ata mpe bamiliare na bamiliare, tokoyeba Yehova Nzambe malamu koleka ndenge toyebi ye sikoyo. Kasi tokomona kaka ete makambo malamu ya koyekola etikali naino ebele. Tokozala na mposa makasi ya koyeba makambo mingi koleka, mpamba te tokozala ntango nyonso na makambo oyo ekotinda biso tókanisa lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Ezali malamu ete nabɛlɛma na Nzambe.” (Nzembo 73:28) Tokoki ata moke te kokanisa makambo ya kosepelisa ndenge na ndenge oyo ekozala na bomoi ya seko, mpe kopusana penepene na Yehova nde ekozala ntango nyonso mbano oyo eleki malamu na bomoi yango.

23. Olendisami na kosala nini?

23 Monisá botɔndi na yo mpo na bolingo ya Yehova sikoyo: lingá ye na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. (Malako 12:29, 30) Tiká bolingo na yo ezala sembo mpe makasi. Tiká ete bikateli na yo ya mikolo nyonso, ezala ya mike to ya minene, nyonso etambwisama na etinda oyo: kopona ntango nyonso nzela oyo ekomema yo na boyokani malamu mpenza na Tata na yo ya likoló. Na koleka, tiká opusana ntango nyonso penepene na Yehova, mpe tiká ye apusana penepene na yo, libela na libela!