Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 21

Yesu amonisi “bwanya oyo euti na Nzambe”

Yesu amonisi “bwanya oyo euti na Nzambe”

1-3. Ndenge nini bato oyo kala bafandaki na Yesu mboka moko bayambaki mateya na ye, mpe likambo nini oyo etali ye baboyaki kondima?

BATO oyo bazali na sinagoga bakamwe. Elenge mobali oyo atɛlɛmi liboso na bango ezali Yesu. Azali koteya bango. Bayebi ye malamu—akoli na engumba na bango, mpe asali mosala ya mabaya kati na bango bambula mingi. Ekoki kozala ete bandako mosusu oyo bazalaki kolala Yesu mpe apesaki mabɔkɔ ntango batongaki yango; to bitimweli mpe bikangeli oyo bazali kosalela na bilanga na bango, ye moto asalaki yango na mabɔkɔ na ye. * Kasi, bakondima to bakoboya mateya ya moto yango oyo kala azalaki mosali ya mabaya?

2 Bato mingi kati na baoyo bazali koyoka ye bakamwe, mpe batuni: “Epai wapi moto oyo azwi bwanya oyo?” Kasi balobi mpe ete: “Ye azali mosali ya mabaya mwana ya Malia.” (Matai 13:54-58; Malako 6:1-3) Likambo ya mawa, bato yango oyo kala bafandaki na Yesu mboka moko bakanisaki boye, ‘Mosali ya mabaya oyo azali kaka moto ya mboka oyo lokola biso.’ Atako maloba na ye ezalaki komonisa bwanya, baboyaki kondima ye. Bayebaki te ete bwanya oyo azalaki kobimisa eutaki na ye te.

3 Yesu azwaki bwanya wana wapi? Alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 7:16) Na nsima, ntoma Paulo amonisaki ete Yesu “akómi epai na biso bwanya oyo euti na Nzambe.” (1 Bakolinti 1:30) Bwanya mpenza ya Yehova emonisami na nzela ya Mwana na ye Yesu. Ezali mpenza bongo mpamba te Yesu alobaki ete: “Ngai ná Tata tozali moko.” (Yoane 10:30) Tótalela makambo misato oyo Yesu amonisaki na yango “bwanya oyo euti na Nzambe.”

 Mateya na ye

4. (a) Motó ya likambo ya nsango oyo Yesu azalaki kosakola ezali nini, mpe mpo na nini yango ezalaki na ntina mingi? (b) Mpo na nini Yesu azalaki ntango nyonso kopesa toli oyo ebongi mpe mpo na bolamu ya solosolo ya bayoki na ye?

4 Ya liboso, tótalela mateya ya Yesu. Motó ya likambo ya nsango oyo azalaki kosakola ezali “nsango malamu ya bokonzi.” (Luka 4:43) Yango ezalaki na ntina mingi, mpamba te Bokonzi yango esengeli kokokisa mokumba monene: kolongisa bokonzi monene ya Yehova mpe kopesa bato mapamboli ya seko. Na mateya na ye, Yesu azalaki mpe kopesa toli ya bwanya mpo na bomoi ya mokolo na mokolo. Amonisaki ete azali solo “Mopesi-Toli ya kokamwa” oyo asakolamaki. (Yisaya 9:6) Bongo, ndenge nini toli na ye ekokamwisa te? Ayebaki Liloba mpe mokano ya Nzambe malamumalamu, ayebaki na bozindo ndenge bato bazalaka, mpe alingaki bato mingi mpenza. Yango wana, azalaki ntango nyonso kopesa toli oyo ebongi mpe mpo na bolamu ya solosolo ya bayoki na ye. Yesu azalaki koloba “maloba ya bomoi ya seko.” Soki moto alandi toli na ye, ekomema ye mpenza na lobiko.Yoane 6:68.

5. Wapi makambo mosusu oyo Yesu alobelaki na Lisolo Likoló ya Ngomba?

5 Lisolo Likoló ya Ngomba ezali ndakisa oyo eleki malamu oyo emonisi ete mateya ya Yesu ezali na bwanya oyo eleki bwanya mosusu nyonso. Lisolo yango, ndenge ezali na Matai 5:3–7:27, mbala mosusu esɛngaki kaka miniti 20 mpo na kosala yango. Nzokande, toli na yango esilaka ngala te; ata lelo, ezali na ntina kaka ndenge ezalaki ntango Yesu apesaki yango. Na lisolo yango, Yesu alobelaki makambo ndenge na ndenge, na ndakisa ndenge ya koyokana na bato (5:23-2638-42; 7:1-512), ya komibatela pɛto na bizaleli (5:27-32), mpe ya kozala na bomoi oyo ezali mpenza na ntina (6:19-24; 7:24-27). Kasi Yesu asukaki te kaka na koyebisa bayoki na ye ndenge nzela ya bwanya ezalaka; amonisaki mpe yango na kolimbweláká bango yango, na kokanisáká na bango mpe na kopesáká bango bilembeteli.

6-8. (a) Wapi bantina ya polele oyo Yesu apesi biso mpo tómitungisaka te? (b) Nini emonisi ete toli ya Yesu ezali na bwanya oyo euti na likoló?

 6 Na ndakisa, tótalela toli ya bwanya oyo Yesu apesaki na likambo etali komitungisa mpo na biloko ya mosuni, ndenge ezali na Matai mokapo 6. Yesu apesi biso toli oyo: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino na oyo etali nini bokolya to nini bokomɛla, to mpo na banzoto na bino na oyo etali nini bokolata.” (Vɛrsɛ 25) Bilei mpe bilamba ezali biloko ya libosoliboso ya ntina mingi, mpe ezali mabe te moto akanisa ndenge nini akozwa yango. Kasi Yesu ayebisi biso tótika “komitungisa” mpo na biloko yango. * Mpo na nini?

7 Yoká bantina ya polele oyo Yesu apesi. Lokola Yehova apesi biso bomoi mpe nzoto, akoki te kopesa biso bilei mpo na kobatela bomoi yango mpe bilamba mpo na kolatisa nzoto yango? (Vɛrsɛ 25) Soki Nzambe apesaka bandɛkɛ bilei mpe alatisaka bafololo kitoko mpenza, akoki mpenza kokanisa bato oyo basambelaka ye koleka ndenge asalelaka bandɛkɛ mpe bafololo! (Vɛrsɛ 2628-30) Ya solo, ata ndenge nini, komitungisa koleka ndelo ezali na ntina te. Ekoki kobakisa mikolo ya bomoi na biso ata moke te. * (Vɛrsɛ 27) Ndenge nini tokoki kotika komitungisa? Yesu apesi biso toli oyo: Kosambela Nzambe esengeli ntango nyonso kozala na esika ya liboso na bomoi na biso. Baoyo basalaka bongo bakoki mpenza kotya motema ete Tata na bango ya likoló ‘akobakisela’ bango nyonso oyo basengeli na yango mokolo na mokolo. (Vɛrsɛ 33) Na nsuka, Yesu apesi toli moko oyo ebongi mpenza—mokolo na mokolo ezali na makambo na yango. Mpo na nini kobakisa mitungisi ya lobi likoló ya oyo ya lelo? (Vɛrsɛ 34) Lisusu, mpo na nini komitungisa mpamba mpo na makambo oyo mbala mosusu ekosalema te? Kolanda toli yango  ya bwanya ekoki kosala ete bampasi mosusu ya mokili oyo ekómela biso te.

8 Emonani polele ete toli ya Yesu ezali na litomba lelo kaka ndenge ezalaki ntango apesaki yango esili koleka mbula pene na 2 000. Wana ezali te komonisa bwanya oyo euti likoló? Ata toli ya malamu mpenza oyo bato bakoki kopesa esilaka ngala mpe esɛngaka nokinoki kotalela yango lisusu to kotya mosusu na esika na yango. Nzokande, mateya ya Yesu esilaka ngala te. Kasi yango esengeli te kokamwisa biso, mpamba te Mopesi-Toli yango ya kokamwa alobaki nde “maloba ya Nzambe.”Yoane 3:34.

Lolenge na ye ya koteya

9. Basoda mosusu balobaki nini mpo na mateya ya Yesu, mpe mpo na nini balekisaki ndelo te na maloba yango?

9 Likambo ya mibale oyo Yesu amonisaki na yango bwanya ya Nzambe ezali lolenge na ye ya koteya. Mokolo moko, basoda oyo batindaki mpo na kokanga ye bazongaki mabɔkɔ mpamba, mpe balobaki ete: “Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.” (Yoane 7:45, 46) Balekisaki ndelo te. Na bato nyonso oyo bafandá awa na mabelé, Yesu, “moto ya bitúká ya likoló,” nde azalaki na boyebi mpe na mayele mingi koleka; yango nde asalelaki mpo na koteya. (Yoane 8:23) Moto mosusu akoki koteya lokola ye te. Tótalela kaka mayele mibale ya koteya oyo Moteyi wana ya bwanya asalelaki.

“Bibele yango ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya”

10, 11. (a) Mpo na nini tokoki kaka kokamwa na ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bandakisa? (b) Masese ezali nini, mpe ndakisa nini emonisi ete masese ya Yesu ezalaki mpenza koteya malamu?

10 Asalelaki bandakisa na ndenge ya malamu koleka. Bayebisi biso ete, “Yesu alobaki . . . epai ya bibele na nzela ya bandakisa. Kutu, azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa.” (Matai 13:34) Tokoki se kotikala monɔkɔ polele liboso na makoki na ye, oyo eleki ya bato nyonso, ya koteya makambo ya ntina mingi na nzela ya makambo oyo bato bamonaka mokolo na mokolo. Basali-bilanga oyo bazali kolona mboto, basi oyo balingi kotumba mampa, bana oyo bazali kosakana na zando, babomi-mbisi oyo bazali kobenda minyama na bango, babateli ya mpate oyo bazali koluka bampate oyo ebungi—wana ezali makambo oyo  bayoki na ye bazalaki komona mbala na mbala. Soki basangisi mateya ya ntina na makambo oyo bato bayebi malamu, mateya yango ekokɔta nokinoki na kati mpenza ya makanisi mpe ya mitema na bango.Matai 11:16-19; 13:3-8, 33, 47-50; 18:12-14.

11 Mbala na mbala Yesu azalaki kosalela masese, mwa masolo ya mokuse oyo bato bakoki kozwela liteya oyo etali bizaleli malamu to makambo ya elimo. Lokola bato bakangaka ntina ya masolo noki mpe ezongelaka bango na makanisi noki koleka mateya ya makasi oyo elobami kaka bongobongo, masese esali ete mateya ya Yesu elimwa te. Na masese mingi, Yesu amonisaki ndenge Tata na ye azali na bandakisa ya pɛtɛɛ oyo moto akoki kobosana noki te. Na ndakisa, nani akoki te kosimba liteya oyo ezali na lisese ya mwana ya kilikili, ete soki moto moko oyo abungi nzela abongoli mpenza motema, Yehova akoyokela ye mawa mpe akondima ye lisusu na boboto nyonso?Luka 15:11-32.

12. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kosalela mituna na mateya na ye? (b) Ndenge nini Yesu akangaki monɔkɔ ya baoyo bazalaki kobɛtela bokonzi na ye ntembe?

12 Kosalela malamu mituna. Yesu asalelaki mituna mpo na kosalisa bayoki na ye bákata bango moko likambo, to báyeba mikano ya mitema na bango, to bázwa bikateli. (Matai 12:24-30; 17:24-27; 22:41-46) Ntango bakonzi ya mangomba babɛtaki ntembe ete bokonzi ya Yesu eutaki na Nzambe te, ayanolaki boye: “Batisimo ya Yoane eutaki na likoló to na bato?” Lokola bakanisaki te ete akotuna bango motuna ya ndenge wana, babandaki kokanisakanisa bango na bango ete: “Soki tolobi ete, ‘Na likoló,’ akoloba na biso ete, ‘Boye, mpo na nini bondimaki ye te?’ Nzokande, soki tolobi ete, ‘Na bato,’ tosengeli kobanga ebele wana ya bato, mpo bango nyonso bazwaka Yoane lokola mosakoli.” Nsukansuka, bayanolaki ete: “Toyebi te.” (Malako 11:27-33; Matai 21:23-27) Kaka na motuna moko mpamba, Yesu akangaki bango monɔkɔ mpe amonisaki bokosi ya mitema na bango.

13-15. Ndenge nini lisese ya Mosamalia malamu emonisi bwanya ya Yesu?

13 Na mabaku mosusu, Yesu azalaki kosalela mayele ndenge na ndenge, lokola kokɔtisa mituna oyo ezali kotinda bato na kokanisa na kati ya bandakisa na ye. Ntango Moyuda moko oyo ayebaki  mibeko malamu atunaki Yesu soki asengeli kosala nini mpo na kozwa bomoi ya seko, Yesu atindaki ye na makambo oyo ezali na Mibeko ya Moize, oyo ezali kosɛngisa bato bálinga Nzambe mpe bazalani na bango. Lokola alingaki komimonisa moyengebene, mobali yango atunaki boye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Yesu apesaki eyano na lisolo moko. Mobali moko Moyuda azalaki kosala mobembo ye moko; babandi bakangaki ye, babɛtaki ye penepene na liwa. Bayuda mibale bayaki koleka, ya liboso nganga-nzambe mpe na nsima Molevi. Batalaki ye ata na liso te. Kasi na nsima, Mosamalia moko ayaki. Ayokaki mawa, mpe na boboto nyonso atyaki moto yango nkisi na bampota mpe amemaki ye na esika bato ya mobembo balalaka mpo bábatela ye mpe nzoto na ye ezongela makasi. Mpo na kosukisa lisolo yango, Yesu atunaki moto yango boye: “Mpo na yo nani na kati na bango misato amimonisi mozalani ya moto oyo akweaki na kati ya babandi?” Mobali yango asengelaki bobele koyanola ete: “Oyo amimonisaki moto ya motema mawa epai na ye.”Luka 10:25-37.

14 Ndenge nini lisese wana emonisi bwanya ya Yesu? Na mikolo ya Yesu, Bayuda bazalaki kosalela liloba “mozalani” kaka mpo na baoyo bazalaki kotosa mimeseno ya bonkɔkɔ na bango, kasi mpo na Basamalia te. (Yoane 4:9) Soki, na lisolo yango, Yesu alobaka ete babɛtaki Mosamalia mpe Moyuda nde asalisaki ye, mbɛlɛ asilisi makanisi mabe oyo Bayuda bazalaki kozwela Basamalia? Yango wana, Yesu abongisaki lisolo yango na bwanya mpenza mpo ezala Mosamalia nde, na bolingo nyonso, asalisaki Moyuda. Talá mpe motuna oyo Yesu atunaki na nsuka ya lisolo yango. Asalelaki liloba “mozalani” na ndenge oyo Bayuda bazalaki kosalela yango te. Moto wana ya mibeko atunaki mpenza boye: ‘Nani oyo nasengeli komonisela ye bolingo lokola mozalani na ngai?’ Kasi Yesu atunaki: “Mpo na yo nani na kati na bango misato amimonisi mozalani?” Yesu abendi likebi te epai ya moto oyo bamoniseli ye boboto, moto oyo babɛtaki, kasi nde epai na oyo amonisaki boboto, Mosamalia. Mozalani ya solosolo azwaka likanisi ya komonisa bolingo epai na basusu kozanga kotalela ekólo na bango. Wana nde lolenge eleki malamu oyo Yesu akokaki komonisa likambo yango.

15 Ezali nde likambo ya kokamwa soki bato bazalaki kotikala  monɔkɔ polele “na ndenge na ye ya koteya” mpe bazalaki kokende epai na ye? (Matai 7:28, 29) Na libaku mosusu, “ebele monene ya bato” baumelaki pene na ye mikolo misato mobimba, mpe bazalaki kutu na eloko ya kolya te.Malako 8:1, 2.

Bomoi na ye

16. Nini ‘emonisaki polele’ ete bwanya ya Nzambe ezalaki kotambwisa Yesu?

16 Likambo ya misato oyo Yesu amonisaki na yango bwanya ya Yehova ezali bomoi na ye. Bwanya emonanaka na misala; ebotaka mpenza mbuma. Moyekoli Yakobo atunaki motuna oyo: “Nani kati na bino azali na bwanya?” Na nsima ayanolaki na motuna yango boye: “Tiká ete etamboli na ye ya sembo emonisa yango polele.” (Yakobo 3:13, The New English Bible) Bomoi ya Yesu ‘emonisaki polele’ ete bwanya ya Nzambe ezalaki kotambwisa ye. Tótala ndenge amonisaki ete ayebi malamu kokesenisa makambo, ezala na bomoi na ye to na ndenge na ye ya kofanda na bato.

17. Makambo nini emonisi ete Yesu azalaki mpenza na bokatikati na bomoi na ye?

17 Osilá komona ete, mbala mingi, bato oyo bayebaka mpenza te kokesenisa makambo bazalaka na bokatikati te? Ɛɛ, mpo na kozala na bokatikati esengeli kozala na bwanya. Lokola Yesu azalaki komonisa bwanya ya Nzambe, azalaki na bokatikati na makambo nyonso. Libosoliboso, atyaki makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ye. Amipesaki mingi na mosala ya kosakola nsango malamu. Alobaki boye: “Ezali mpo na yango nde nabimaki.” (Malako 1:38) Yango wana biloko ya mosuni ezalaki na ntina mingi te na miso na ye; kutu emonani ete azalaki mpenza na biloko mingi te. (Matai 8:20) Atako bongo, azalaki koboya kosepela te. Lokola Tata na ye azali “Nzambe ya esengo,” Yesu mpe azalaki moto ya esengo, mpe azalaki kosepelisa bato mosusu. (1 Timote 1:11; 6:15) Ntango akendeki na fɛti moko ya libala—fɛti oyo babɛtaka miziki, bayembaka nzembo mpe basepelaka—akendeki te kosilisa esengo ya bato. Ntango vinyo esilaki, akómisaki mai vinyo ya kitoko, masanga oyo ‘esepelisaka motema ya moto.’ (Nzembo 104:15; Yoane 2:1-11) Yesu azalaki kokende epai ya bato oyo bazalaki kobenga ye mpo na kolya,  mpe mbala mingi asalelaki mabaku yango mpo na koteya.Luka 10:38-42; 14:1-6.

18. Ndenge nini Yesu amonisaki ete ayebaki malamu kokesenisa makambo na ndenge azalaki kofanda na bayekoli na ye?

18 Yesu ayebaki mpenza kokesenisa makambo na ndenge azalaki kofanda na bato. Koyeba malamu mpenza bizaleli ya bato esalisaki ye atalela bayekoli na ye na ndenge oyo esengeli. Ayebaki malamu ete bazangi kokoka. Atako bongo, azangaki te komona bizaleli na bango ya malamu. Amonaki makambo malamu oyo mibali yango oyo Yehova abendaki epai na ye bazalaki na yango. (Yoane 6:44) Atako bazalaki kosala mabunga, Yesu andimaki kotyela bango motema. Mpe amonisaki yango ntango apesaki bango mokumba moko monene: atindaki bango básakola nsango malamu. Andimaki ete bakoki kokokisa mokumba yango. (Matai 28:19, 20) Mokanda ya Misala endimisi ete bakokisaki malamu mpenza mosala oyo apesaki bango. (Misala 2:41, 42; 4:33; 5:27-32) Emonani polele ete Yesu azalaki na bwanya na ndenge atyelaki bango motema.

19. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali na “elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema”?

19 Ndenge tomonaki na Mokapo 20, Biblia emonisi ete komikitisa mpe boboto etambolaka nzela moko na bwanya. Yehova nde apesaka ndakisa oyo eleki malamu na likambo yango. Bongo Yesu? Ezali esengo komona komikitisa ya Yesu epai ya bayekoli na ye. Lokola azalaki moto ya kokoka, alekaki bango  na makambo nyonso. Atako bongo, atyolaki bayekoli na ye te. Ata mokolo moko te alukaki komonisa bango ete aleki bango to bayebi eloko te. Kasi, ayebaki nde makambo oyo bakokoka te mpe azalaki kokanga motema mpenza na mabunga na bango. (Malako 14:34-38; Yoane 16:12) Ata bana mike bazalaki komiyoka malamu penepene na Yesu; yango ezali koteya biso te? Bazalaki kolinga ye mingi mpamba te bamonaki ete azali na “elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema.”Matai 11:29; Malako 10:13-16.

20. Ndenge nini Yesu amonisaki mwasi ya ekólo mosusu oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na bademo ete azali na makambo makasimakasi te?

20 Yesu amonisaki mpe komikitisa ya Nzambe na lolenge mosusu ya ntina. Azalaki na makambo makasimakasi te, to ayebaki kotika likambo, soki motema mawa esɛngi asala bongo. Na ndakisa, kanisá ntango mwasi moko oyo azalaki Moyuda te asɛngaki ye abikisa mwana na ye ya mwasi oyo bademo bakɔtelá ye makasi. Kasi Yesu amonisaki na ndenge misato ete akosalisa ye te—ya liboso, aboyaki koyanola ye; ya mibale, alobaki polele ete atindamaki epai ya bato ya bikólo mosusu te, kasi epai ya Bayuda; ya misato, apesaki ndakisa moko oyo ezongelaki likanisi na ye na boboto nyonso. Kasi, mwasi yango atingamaki kaka; yango emonisaki ete azalaki na kondima monene. Na kotalela likambo ya ndenge wana, oyo emonanaka mingi te, Yesu asalaki nini? Asalaki mpenza likambo oyo alobaki ete akosala te. Abikisaki mwana ya mwasi yango. (Matai 15:21-28) Oyo ezali solo komikitisa monene, boye te? Mpe kobosana te, bwanya ya solosolo eutaka na komikitisa.

21. Mpo na nini tosengeli kosala makasi ete tómekola bomoto, elobeli mpe bomoi ya Yesu?

21 Tozali solo na botɔndi mingi ndenge Baevanzile emonisi biso maloba mpe misala ya moto oyo alekaki bato nyonso na bwanya! Tóbosana te, Yesu amonisaki Tata na ye na ndenge ya kokoka. Soki tozali komekola bomoto, elobeli, mpe bomoi ya Yesu, tokolona bwanya oyo euti na likoló. Na mokapo oyo elandi, tokomona ndenge oyo tokoki komonisa bwanya ya Nzambe na bomoi na biso.

^ par. 1 Na ntango ya kala, basali ya mabaya bazalaki mpe kotonga bandako, kosala bakiti ná biloko mosusu ya ndako, mpe kosala biloko ya mosala ya bilanga. Justin le Martyr, moto ya ekeke ya mibale na ntango na biso (T.B.) akomaki boye mpo na Yesu: “Wana azalaki kati na bato, azalaki mosali ya mabaya, azalaki kosala bitimweli mpe bikangeli.”

^ par. 6 Liloba ya Grɛki oyo babongoli “komitungisa” elimboli “kotika makanisi eyengayenga.” Ndenge basaleli liloba yango na Matai 6:25, ezali komonisa kobanga oyo etindaka moto na komitungisa mpe esalaka ete makanisi ezala esika moko te to ekabwana, mpe elongolaka esengo ya moto.

^ par. 7 Bato ya siansi bamoni ete komitungisa koleka ndelo ekoki komemela moto maladi ya motema mpe ebele ya bamaladi mosusu oyo ekoki koyeisa bomoi mokuse.