Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 19

“Bwanya ya Nzambe na kati ya sɛkɛlɛ moko mosantu”

“Bwanya ya Nzambe na kati ya sɛkɛlɛ moko mosantu”

1, 2. “Sɛkɛlɛ mosantu” nini esengeli kobenda likebi na biso, mpe mpo na nini?

SƐKƐLƐ ebendaka likebi mpe ekamwisaka. Yango wana, mbala mingi, bato bakokaka kobomba yango te. Nzokande, Biblia elobi ete: “Ezali nkembo na Nzambe ete akobombaka likambo.” (Masese 25:2) Lokola Yehova azali Mokonzi Monene ya molɔ́ngɔ́ mpe Mozalisi, azali na lotomo ya kobombela bato makambo mosusu tii ntango oyo akosepela koyebisa yango.

2 Nzokande, na kati ya Liloba na ye, Yehova asili komonisa sɛkɛlɛ moko ya kokamwisa. Babengi yango “sɛkɛlɛ mosantu ya mokano [ya Nzambe].” (Baefese 1:9) Koyeba yango ekosuka kaka te na kokokisa mposa na yo ya koyeba makambo ya sika. Kasi, ekoki mpe komema yo na lobiko mpe kosalisa yo oyeba mwa moke bwanya ya Yehova oyo ezali na nsuka te.

Emonisami mokemoke

3, 4. Elikya nini esakweli oyo ezali na Genese 3:15 epesaki; mpe libombami, to ‘sɛkɛlɛ moko mosantu’ nini ezalaki na kati ya esakweli yango?

3 Ntango Adama ná Eva basalaki lisumu, emonanaki lokola nde mokano ya Yehova ya kokómisa mabelé mobimba paladiso oyo bato ya kokoka bafandi ebebaki. Kasi Nzambe atyelaki likambo yango likebi mbala moko. Alobaki ete: “Nakotya koyinana kati na yo [nyoka] mpe mwasi mpe kati na momboto na yo mpe momboto na ye. Akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.”Genese 3:15.

4 Maloba wana ezalaki lokola lisese oyo ndimbola na yango eyebanaki te. Mwasi wana ezalaki nani? Nyoka ezalaki nani? “Momboto” oyo akopanza motó ya nyoka ezalaki nani? Adama ná Eva bakokaki mpenza koyeba ntina ya likambo yango te. Atako bongo, maloba wana ya Nzambe epesaki elikya na bakitani nyonso ya sembo ya mwasi ná mobali wana ya liboso oyo  bazangaki bosembo. Boyengebene ekolonga. Mokano ya Yehova ekokokisama. Kasi ndenge nini? Yango nde ezalaki libombami! Biblia ebengi yango “bwanya ya Nzambe na kati ya sɛkɛlɛ moko mosantu, bwanya oyo ebombamá.”1 Bakolinti 2:7.

5. Monisá na ndakisa moko ntina oyo Yehova amonisaki sɛkɛlɛ na ye mokemoke.

5 Lokola Yehova ‘amonisaka makambo mabombami,’ asengelaki na nsima kolimbola makambo mosusu ya ntina oyo etali kokokisama ya sɛkɛlɛ yango. (Danyele 2:28) Kasi asengelaki kosala yango mokemoke. Na ndakisa, tókanisa lolenge tata moko ya bolingo akoyanola mwana na ye ya moke oyo atuni, “Papa, nautá wapi?” Soki azali na bwanya akoloba kaka makambo oyo mwana yango akoki kokanga ntina na yango. Ntango mwana yango azali kokola, tata akobanda kolimbwela ye likambo yango malamu lisusu. Se ndenge moko, Yehova ayebaka ntango oyo akoki koyebisa bato na ye makambo mosusu oyo etali mokano na ye.Masese 4:18; Danyele 12:4.

6. (a) Ntina ya kondimana to boyokani ezalaka nini? (b) Mpo na nini ezali likambo ya kokamwa ete Yehova asala boyokani elongo na bato?

6 Ndenge nini Yehova ayebisaki makambo yango? Asalelaki kondimana, to boyokani, ndenge na ndenge. Mbala mosusu, na ntango moko boye, yo mpe osalaki boyokani moko na moto mosusu—ekoki kozala mpo na kosomba ndako to mpo na kodefa to kodefisa mbongo. Boyokani wana ezalaki ndanga oyo endimisi liboso na mibeko ete bokotosa makambo oyo boyokani. Kasi mpo na nini Yehova amonaki ete asengeli kosala kondimana to boyokani ya sikisiki elongo na bato? Ntembe ezali te, liloba na ye ezali ndanga mpenza mpo na bilaka na ye. Nzokande, na mabaku mosusu, Nzambe amonaki malamu kosala boyokani oyo endimami na mibeko mpo na kondimisa maloba na ye. Boyokani wana oyo ekoki kokatama mpambampamba te epesi biso bato ya kozanga kokoka ntina mosusu ya solosolo ya kotyela bilaka ya Yehova motema.Baebele 6:16-18.

 Kondimana elongo na Abalayama

7, 8. (a) Kondimana nini Yehova asalaki elongo na Abalayama, mpe likambo nini ya sɛkɛlɛ mosantu emonisamaki polele? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki mokemoke libota oyo Momboto ya elaka ekobima?

7 Mbula koleka nkóto mibale nsima ya kobengana moto na Paladiso, Yehova ayebisaki mosaleli na ye ya sembo Abalayama boye: “Nakofulisa bana na yo lokola minzoto ya likoló . . . Mabota nyonso na nse bakopambolama mpo na bana [“momboto,” NW] na yo, mpo ete yo osili kotosa monɔkɔ na ngai.” (Genese 22:17, 18) Oyo ezalaki kaka elaka mpamba te; Yehova asalaki nde kondimana moko oyo eyokani na mibeko mpe alapaki ndai ya libela mpo na kondimisa yango. (Genese 17:1, 2; Baebele 6:13-15) Yango ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge Nkolo Mokonzi-Aleki-Nyonso asali boyokani mpo na kopesa bato mapamboli!

“Nakofulisa bana na yo lokola minzoto ya likoló”

8 Kondimana ya Abalayama emonisaki ete Momboto oyo elakamaki ekozala moto, mpo akozala mokitani ya Abalayama. Kasi ekozala nani? Na nsima, Yehova amonisaki ete na kati ya bana ya Abalayama, Momboto akobima na bakitani ya Yisaka. Kati na bana mibale ya Yisaka, aponaki Yakobo. (Genese 21:12; 28:13, 14) Na nsima, Yakobo ayebisaki moko ya bana na ye ya mibali 12 maloba oyo ya esakweli: “Nzete ya bokonzi ekolongwa na Yuda te mpe lingenda ya mokonzi ekolongwa na kati ya makolo na ye te kino ekoya mokóló [na] yango [“Shilo,” NW] mpe bato bakotosa ye.” (Genese 49:10) Sikoyo, eyebanaki ete Momboto akozala mokonzi, oyo akobima na libota ya Yuda!

Kondimana elongo na Yisalaele

9, 10. (a) Kondimana nini Yehova asalaki elongo na ekólo ya Yisalaele, mpe ndenge nini kondimana yango ezalaki kobatela bango? (b) Na ndenge nini Mibeko emonisaki ete bato bazali na mposa ya lisiko?

9 Na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova asalaki ebongiseli moko oyo efungolelaki ye nzela ya koyebisa makambo mosusu ya sɛkɛlɛ mosantu. Asalaki kondimana elongo na ekólo ya Yisalaele, bakitani ya Abalayama. Atako lelo oyo kondimana  yango ya Mibeko ya Moize ezali lisusu te, kasi ezalaki na ntina mingi na kati ya mokano ya Yehova ya kobimisa Momboto ya elaka. Na ndenge nini? Tótalela makambo misato oyo. Ya yambo, Mibeko ezalaki kobatela lokola efelo. (Baefese 2:14) Malako na yango ya boyengebene ezalaki lokola lopango kati na Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu. Na ndenge yango, Mibeko ebatelaki molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Momboto ya elaka. Mpo na libateli wana, ekólo yango ezalaki naino na ntango oyo Nzambe atyaki ete Masiya abotama na libota ya Yuda.

10 Ya mibale, Mibeko emonisaki polele ete bato basengeli na lisiko. Lokola Mibeko ezalaki ya kokoka, emonisaki polele ete bato, ná masumu na bango, bazali na likoki te ya kotosa yango malamumalamu. Na bongo, ‘emonisaki polele bobuki-mibeko, tii ntango momboto oyo elaka epesamaki epai na ye akoya.’ (Bagalatia 3:19) Na nzela ya mbeka ya banyama, Mibeko ezalaki kosala ete masumu ya bato elimbisama mwa moke. Kasi, ndenge Paulo akomaki, lokola “ekoki kosalema soki moke te ete makila ya bangɔmbɛ-mibali mpe ya bantaba elongola masumu,” bambeka wana ezalaki kaka komonisa mbeka ya lisiko ya Klisto. (Baebele 10:1-4) Yango wana, mpo na Bayuda ya sembo, kondimana wana ekómaki “molakisi . . . oyo azalaki kokamba epai ya Klisto.”Bagalatia 3:24.

11. Wapi elikya ya lokumu mpenza oyo kondimana ya Mibeko etyaki liboso ya Yisalaele, kasi mpo na nini ekólo yango ebungisaki elikya yango?

11 Ya misato, kondimana yango epesaki ekólo ya Yisalaele elikya moko ya lokumu mpenza. Yehova ayebisaki bango ete soki batosi kondimana yango, bakokóma ‘bokonzi ya banganga-nzambe mpe libota mosantu.’ (Exode 19:5, 6) Na nsima, bato ya liboso oyo bandimamaki na bokonzi ya banganga-nzambe oyo bakozala na likoló bautaki mpenza na ekólo ya Yisalaele. Nzokande, ekólo ya Yisalaele etosaki kondimana ya Mibeko te, eboyaki Momboto to Masiya, mpe ebungisaki elikya yango. Bongo banani balingaki kokokisa motángo ya bato oyo bakozala na kati ya bokonzi yango ya banganga-nzambe? Mpe boyokani nini ekozala kati na ekólo yango oyo epambwami mpe Momboto oyo elakamaki? Nzambe asengelaki komonisa makambo wana ya sɛkɛlɛ mosantu na ntango oyo ebongi.

 Kondimana elongo na Davidi mpo na bokonzi

12. Kondimana nini Yehova asalaki elongo na Davidi, mpe yango emonisaki likambo mosusu nini ya sɛkɛlɛ mosantu ya Nzambe?

12 Na ekeke ya 11 L.T.B., Yehova amonisaki makambo mosusu oyo etali sɛkɛlɛ mosantu ntango asalaki kondimana mosusu. Apesaki Davidi, mokonzi ya sembo, elaka oyo: “Nakokembisa mwana [“momboto,” NW] na yo, . . . mpe nakokokisa bokonzi na ye. . . . Nakokembisa mpe efandelo ya bokonzi na ye libela.” (2 Samwele 7:12, 13; Nzembo 89:3) Sikoyo, kaka bakitani ya Davidi nde basengelaki kobimisa Momboto oyo alakamaki. Kasi moto lokola biso akoki koyangela “libela na libela”? (Nzembo 89:20, 29, 34-36) Akokoka nde kobikisa bato na lisumu mpe liwa?

13, 14. (a) Ndenge emonisami na Nzembo 110, elaka nini Yehova apesi Mokonzi oyo ye apakoli? (b) Wapi makambo mosusu oyo Yehova ayebisaki na monɔkɔ ya basakoli na ye mpo na Momboto oyo asengelaki koya?

13 Na nguya ya elimo santu, Davidi akomaki ete: “[Yehova] alobelaki Nkolo na ngai ete, [Fandá] na lobɔkɔ na ngai ya mobali kino ekotya ngai bayini na yo lokola etɛmɛlo ya makolo na yo. [Yehova] asimbi ndai mpe akobongola liloba na ye te ete, Yo ozali [nganga-nzambe] ya seko na motindo ya [Melekisedeke].” (Nzembo 110:1, 4) Maloba yango etalaki mpenzampenza Momboto oyo elakamaki, elingi koloba Masiya. (Misala 2:35, 36) Mokonzi yango asengelaki koyangela, na Yelusaleme te, kasi nde na likoló na ‘lobɔkɔ ya mobali’ ya Yehova. Yango wana bokonzi na ye ekozala kaka likoló ya Yisalaele te kasi likoló ya mokili mobimba. (Nzembo 2:6-8) Awa likambo mosusu ya sika emonisami. Yehova alapaki ndai polele ete Masiya akozala ‘nganga-nzambe . . . na motindo ya Melekisedeke.’ Se ndenge Melekisedeke azalaki mokonzi mpe nganga-nzambe na ntango ya Abalayama, bobele bongo, Momboto akozala Mokonzi mpe Nganga-Nzambe oyo Nzambe ye mei aponi!Genese 14:17-20.

14 Na boumeli ya bambula mingi, Yehova asalelaki basakoli na ye mpo na komonisa makambo mosusu ya sɛkɛlɛ mosantu. Na ndakisa, Yisaya amonisaki ete Momboto akokufa lokola mbeka. (Yisaya 53:3-12) Mika asakolaki esika oyo Masiya akobotama.  (Mika 5:2) Danyele asakolaki ntango mpenza ya komonana mpe ya kobomama ya Momboto.Danyele 9:24-27.

Sɛkɛlɛ mosantu emonisami!

15, 16. (a) Ndenge nini Mwana ya Yehova “abotamaki epai ya mwasi moko”? (b) Eloko nini Yesu azwaki epai ya bato oyo abotamaki epai na bango, mpe ntango nini akómaki Momboto oyo alakamaki?

15 Ndenge oyo bisakweli yango ekokokisama etikalaki libombami tii ntango Momboto amonanaki mpenza. Bagalatia 4:4 elobi ete: “Wana nsuka mpenza ya ntango yango ekokaki, Nzambe atindaki Mwana na ye, oyo abotamaki epai ya mwasi moko.” Na mobu 2 L.T.B., anzelu moko ayebisaki Maria, ngɔndɔ moko Moyuda, ete: “Talá! okozwa zemi na matrisi na yo mpe okobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu. Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye . . . Elimo santu ekoya likoló na yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.”Luka 1:31, 32, 35.

16 Na nsima, Yehova alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe akɔtisaki yango na libumu ya Maria, mpo abotama na mwasi. Maria azalaki mwasi ya kozanga kokoka. Atako bongo, Yesu azwaki te kozanga kokoka na ye, mpamba te azalaki “Mwana ya Nzambe.” Lokola mama oyo abotaki Yesu ná tata-mobɔkɔli na ye bazalaki bakitani ya Davidi, bapesaki ye lotomo ya kozala mozwi-ya-libula ya Davidi. (Misala 13:22, 23) Ntango Yesu azwaki batisimo na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), Yehova apakolaki ye na elimo santu mpe alobaki ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami.” (Matai 3:16, 17) Nsukansuka, Momboto ye wana! (Bagalatia 3:16) Ntango ekokaki mpo na komonisa ebele ya makambo mosusu ya sɛkɛlɛ mosantu.2 Timote 1:10.

17. Ndenge nini ndimbola ya Genese 3:15 emonisamaki polele?

17 Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye, amonisaki polele ete nyoka ya Genese 3:15 ezali Satana mpe momboto ya nyoka ezali bato oyo bazali kolanda Satana. (Matai 23:33; Yoane 8:44) Na nsima, ndenge oyo bakopanza bango nyonso mpo na libela eyaki koyebana. (Emoniseli 20:1-3, 10, 15) Mpe eyaki koyebana  lisusu ete mwasi ezali “Yelusaleme mboka ya likoló,” ebongiseli ya Yehova kuna na likoló—bikelamu ya elimo—oyo ezali lokola mwasi na ye ya libala. *Bagalatia 4:26; Emoniseli 12:1-6.

Kondimana ya sika

18. Ntina ya “kondimana ya sika” ezali nini?

18 Mbala mosusu likambo eleki kokamwisa na makambo nyonso oyo eyebisamaki mpo na sɛkɛlɛ yango ezali oyo Yesu alobaki na butu oyo ezalaki liboso ya mokolo oyo babomaki ye, ntango ayebisaki bayekoli na ye ya sembo likambo ya “kondimana ya sika.” (Luka 22:20) Ndenge moko na kondimana ya Mibeko ya Moize, oyo ezalaki liboso na yango, kondimana ya sika esengelaki kobimisa ‘bokonzi ya banganga-nzambe.’ (Exode 19:6; 1 Petelo 2:9) Kasi, kondimana ya sika ekobimisa ekólo moko ya mosuni te, kasi ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe,” oyo esalemi bobele na bayekoli ya sembo ya Klisto oyo bapakolami na elimo. (Bagalatia 6:16) Bato oyo bazali na kati ya kondimana ya sika bakosangana elongo na Yesu mpo na kopesa bato mapamboli!

19. (a) Mpo na nini kondimana ya sika elongi kobimisa ‘bokonzi ya banganga-nzambe’? (b) Mpo na nini baklisto bapakolami babengami “ekelamu ya sika,” mpe bato boni bakosala elongo na Klisto na likoló?

19 Kasi mpo na nini kondimana ya sika elongi kobimisa ‘bokonzi ya banganga-nzambe’ oyo ekopesa bato mapamboli? Elongi mpamba te, na esika ete ekweisa bayekoli ya Yesu ete bazali basumuki, esali nde ete masumu na bango ekoka kolimbisama na nzela ya mbeka ya Yesu. (Yilimia 31:31-34) Lokola Yehova azali komona bango pɛto, azali kokómisa bango bato ya libota na ye ya likoló mpe kopakola bango na elimo santu. (Baloma 8:15-17; 2 Bakolinti 1:21) Na ndenge yango, bazali kozwa “kobotama moko ya sika mpo na elikya moko ya bomoi . . . [oyo] ebombami na likoló.” (1 Petelo 1:3, 4) Lokola ezaleli wana ya lokumu  mingi ezali mpenza likambo ya sika mpo na bato, yango wana baklisto bapakolami oyo babotami na elimo babengami “ekelamu ya sika.” (2 Bakolinti 5:17) Biblia emonisi ete bato yango bakozala 144 000 mpe, uta na likoló, bakoyangela bato oyo basikolami.Emoniseli 5:9, 10; 14:1-4.

20. (a) Wapi likambo ya sika ya sɛkɛlɛ mosantu oyo emonisamaki na mobu 36 T.B.? (b) Banani bakozwa mapamboli oyo balakaki Abalayama?

20 Bapakolami yango, elongo na Yesu, bakómi “momboto ya Abalayama.” * (Bagalatia 3:29) Bapakolami ya liboso oyo baponamaki bazalaki Bayuda. Kasi na mobu 36 T.B., likambo mosusu ya sɛkɛlɛ mosantu emonisamaki: bato ya bikólo mosusu bakozwa mpe elikya ya kozala na bomoi na likoló. (Baloma 9:6-8; 11:25, 26; Baefese 3:5, 6) Ezali kaka baklisto bapakolami nde bakozwa mapamboli oyo balakaki Abalayama? Te, mpamba te mbeka ya Yesu ezali mpo na mokili mobimba. (1 Yoane 2:2) Nsima ya mwa ntango, Yehova amonisaki ete “ebele ya bato,” oyo motángo na bango eyebani te, bakobika na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya Satana. (Emoniseli 7:9, 14) Bato mosusu ebele bakosekwisama mpe bakozala na elikya ya kofanda libela na Paladiso!Luka 23:43; Yoane 5:28, 29; Emoniseli 20:11-15; 21:3, 4.

Bwanya ya Nzambe mpe sɛkɛlɛ mosantu

21, 22. Na ndenge nini sɛkɛlɛ mosantu ya Yehova ezali komonisa bwanya na ye?

21 Sɛkɛlɛ mosantu ezali lolenge ya kokamwa oyo “bwanya ya Nzambe oyo ezali ya mitindo ndenge na ndenge mpenza” emonisami. (Baefese 3:8-10) Yehova amonisaki mpenza bwanya na ndenge oyo ayebisaki sɛkɛlɛ yango, mpe na nsima, na ndenge oyo amonisaki yango mokemoke! Na bwanya mingi, atalelaki esika makoki ya bato esuki, apesaki bango nzela ya komonisa oyo ezali na mitema na bango.Nzembo 103:14.

22 Yehova amonisaki mpe bwanya oyo eleki bwanya mosusu  nyonso na ndenge aponaki Yesu azala Mokonzi. Mwana ya Yehova abongi mpenza kotyelama motema koleka bikelamu nyonso ya molɔ́ngɔ́. Ntango azalaki na bomoi lokola moto mpenza, Yesu akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge. Yango wana, ayebi malamumalamu mikakatano ya bato. (Baebele 5:7-9) Bongo bato oyo bakoyangela elongo na ye? Na boumeli ya bankama ya bambula, mibali mpe basi—oyo baponami na kati ya bato ya mposo nyonso, minɔkɔ nyonso, na kati ya bato ya bomɛngo mpe babola—bapakolami na elimo. Ezali na mokakatano moko te oyo basusu kati na bango bakutaná na yango te mpe balongá yango te. (Baefese 4:22-24) Koyangelama na banganga-nzambe mpe bakonzi ya motema mawa ndenge wana ekozala esengo monene!

23. Wapi libaku malamu etali sɛkɛlɛ mosantu ya Yehova oyo baklisto bazali na yango?

23 Ntoma Paulo akomaki boye: “Sɛkɛlɛ mosantu oyo ebombamaki banda na bibongiseli ya makambo ya ntango ya kalakala mpe banda na mabota ya kalakala . . . emonisami polele epai ya basantu na ye.” (Bakolose 1:26) Basantu ya Yehova, bapakolami na ye, bayebi sikoyo makambo mingi ya sɛkɛlɛ mosantu, mpe bayebisi bamilio ya bato makambo yango. Biso nyonso tozali mpenza na libaku malamu! Yehova ‘ayebisi biso sɛkɛlɛ mosantu ya mokano na ye.’ (Baefese 1:9) Tóyebisa bato mosusu sɛkɛlɛ wana ya kokamwa, tósalisa bango mpo bango mpe bálukaluka na kati ya bwanya ya Yehova oyo eyebani nsuka te!

^ par. 17 “Sɛkɛlɛ mosantu ya ezaleli . . . ya kokangama na Nzambe” emonisamaki mpe kati na Yesu. (1 Timote 3:16) Ezali nde na moto moko oyo akokoka kotikala sembo epai ya Yehova na makambo nyonso? Motuna wana etikalaki sɛkɛlɛ to libombami na boumeli ya ntango molai. Yesu nde apesaki eyano na motuna yango. Atikalaki sembo na komekama nyonso oyo Satana abimiselaki ye.Matai 4:1-11; 27:26-50.

^ par. 20 Yesu asalaki mpe “kondimana . . . mpo na bokonzi moko” elongo na etuluku yango. (Luka 22:29, 30) Yesu asalaki boyokani na “etonga moke” yango nde mpo báyangela elongo na ye na likoló lokola eteni ya mibale ya momboto ya Abalayama.Luka 12:32.