Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 22

“Bwanya oyo euti na likoló” ezali kotambwisa yo?

“Bwanya oyo euti na likoló” ezali kotambwisa yo?

1-3. (a) Ndenge nini Salomo amonisaki ete azali na bwanya moko ya kokamwa ntango asilisaki matata ya basi oyo bazalaki kowela mwana? (b) yehova alaki kopesa biso nini, mpe yango ebimisi mituna nini?

BASI mibale bazali kowela mwana moko. Ezali mpasi mpo na kokata likambo yango. Basi yango bafandaka ndako moko, mpe bango nyonso babotaki, kasi mosusu abotaki mwa mikolo nsima ya moninga. Mwana moko akufaki, mpe sikoyo mokomoko na bango alobi ete mwana oyo azali na bomoi ezali mwana na ye. * Moto mosusu azalaki elongo na bango te. Mbala mosusu tribinale moko ya moke eyokaki bango kasi ekataki likambo yango te. Nsukansuka, bakómi liboso ya Salomo, mokonzi ya Yisalaele. Akoyeba mpenza mama ya mwana yango?

2 Nsima ya koyoka mwa moke ndenge basi yango bazali koswana, Salomo asɛngi mbɛli. Lokola nde alingi kosala likambo oyo akoloba, apesi mitindo bákata mwana yango na biteni mibale, mpe bápesa mwasi na mwasi eteni moko. Mbala moko, oyo azalaki mpenza mama ya mwana yango abondeli mokonzi ete bápesa mwana yango ya bolingo epai ya mwasi mosusu wana. Kasi, mwasi mosusu wana azali kaka kotingama ete bákata mwana yango na biteni mibale. Sikoyo Salomo ayebi nani azali mpenza mama ya mwana yango. Ayebaki ete mama alingaka mingi mwana oyo ye moko aboti, mpe asalelaki boyebi wana mpo na kosilisa matata yango. Kanisá ndenge motema ya mama wana ekitaki ntango Salomo apesaki ye mwana na ye mpe alobaki: “Azali mama na ye.”1 Mikonzi 3:16-27.

 3 Wana ezalaki mpenza bwanya ya kokamwa, boye te? Ntango bato bayokaki ndenge Salomo akataki likambo yango, bakómaki komemya ye mingi, “bamonaki ete [bwanya] ya Nzambe ezalaki na ye.” Ɛɛ, bwanya ya Salomo ezalaki likabo ya Nzambe. Yehova apesaki ye ‘motema ya bwanya mpe ya bososoli.’ (1 Mikonzi 3:12, 28) Bongo biso? Biso mpe tokoki kozwa bwanya ya Nzambe? Ɛɛ, mpamba te na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Salomo akomaki ete: ‘Yehova apesaka bwanya.’ (Masese 2:6) Yehova alaki kopesa bwanya—likoki ya kosalela malamu boyebi, mayele mpe bososoli—na baoyo bazali koluka yango na motema mobimba. Ndenge nini tokoki kozwa bwanya oyo euti na likoló? Mpe ndenge nini tokoki kosala ete etambwisa biso?

Ndenge ya ‘kozwa bwanya’

4-7. Wapi makambo minei oyo ezali na ntina mpo na kozwa bwanya?

4 Tosengeli kozala na mayele mingi to kotánga kelasi mingi mpo na kozwa bwanya ya Nzambe? Te. Yehova alingaka kokabela biso bwanya na ye, tózala bazwi to babola, mindɛlɛ to baindo, ezala totángá kelasi mingi to te. (1 Bakolinti 1:26-29) Kasi tosengeli komonisa ete tozali na mposa na yango, mpamba te Biblia ezali kolendisa biso na ‘kozwa bwanya.’ (Masese 4:7) Ndenge nini tokoki kozwa yango?

5 Ya liboso, tosengeli kobanga Nzambe. Masese 9:10 (NW) elobi ete “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya [to “likambo ya liboso oyo ememaka na bwanya,” The New English Bible].” Kobanga Nzambe nde esimbi bwanya ya solosolo. Mpo na nini? Kobosana te, bwanya elakisi koyeba kosalela boyebi. Kobanga Nzambe elingi koloba te kolɛnga na nsɔmɔ na miso na ye, kasi nde kosambela ye, komemya ye mpe kotyela ye motema. Kobanga yango ezali ya malamu. Ezalaka na nguya ya kotinda moto asala makambo oyo ayebi ete eyokani na mokano ya Nzambe mpe banzela na ye. Yango ezali mpenza likambo ya bwanya koleka oyo tosengeli kosala, mpamba te kotosa mitinda ya Yehova epesaka ntango nyonso matomba oyo eleki monene.

6 Ya mibale, tosengeli kozala na komikitisa mpe na bopɔlɔ. Soki komikitisa mpe bopɔlɔ ezali te, bwanya ya Nzambe ekoki mpe kozala te. (Masese 11:2) Mpo na nini bongo? Soki tozali  na komikitisa mpe na bopɔlɔ, tokokakatana te mpo na kondima ete toyebi makambo nyonso te, ete tosalaka mpe mabunga, mpe ete tozali na mposa ya koyeba ndenge Yehova atalelaka makambo ndenge na ndenge. Yehova “atɛmɛlaka bato ya lolendo,” kasi asepelaka kopesa bato ya motema ya komikitisa bwanya.Yakobo 4:6.

Mpo na kozwa bwanya ya Nzambe, tosengeli kolukaluka yango na molende

7 Likambo ya misato oyo ezali na ntina mingi ezali bongo koyekola Liloba ya Nzambe. Bwanya ya Yehova emonisami na Liloba na ye. Mpo na kozwa yango, tosengeli kolukaluka yango na molende. (Masese 2:1-5) Likambo ya minei ezali libondeli. Soki, na motema na biso mobimba, tosɛngi Nzambe bwanya, akokabela biso yango mingi. (Yakobo 1:5) Akozanga te koyanola na mabondeli oyo tosali mpo na kosɛnga elimo na ye. Mpe elimo na ye ekosalisa biso tózwa na kati ya Liloba na ye makanisi ya motuya, oyo ekosalisa biso tósilisa mikakatano na biso, tókima makama mpe tózwa bikateli ya bwanya.Luka 11:13.

8. Soki tozwi mpenza bwanya ya Nzambe, ndenge nini yango ekomonana?

8 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 17, bwanya ya Yehova emonanaka na misala. Na yango, soki tozwi mpenza bwanya ya Nzambe, etamboli na biso ekomonisa yango polele. Moyekoli Yakobo alobelaki mbuma ya bwanya ya Nzambe na mokanda na ye: “Bwanya oyo euti na likoló ezali libosoliboso pɛto na bizaleli, na nsima kimya, makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na bambuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te.” (Yakobo 3:17) Na ntango oyo tozali kotalela mokomoko ya makambo yango oyo emonisaka bwanya ya Nzambe, tómituna boye, ‘Bwanya oyo euti na likoló ezali kotambwisa ngai?’

“Pɛto na bizaleli, na nsima kimya”

9. Kozala pɛto na bizaleli elimboli nini, mpe mpo na nini ebongi ete bopɛto ya bizaleli ezala likambo ya liboso oyo balobeli mpo na bwanya?

9 “Libosoliboso pɛto na bizaleli.” Kozala pɛto na bizaleli elimboli kozanga mbindo, ezala na libándá to na kati. Biblia elobaka ete bwanya ezalaka na motema, kasi bwanya oyo euti na likoló ekoki te kokɔta na motema oyo makanisi, bamposa mpe  mikano ya mabe ekómisi yango mbindo. (Masese 2:10; Matai 15:19, 20) Nzokande, soki motema na biso ezali pɛto—elingi koloba, na ndenge oyo ekoki na bato ya kozanga kokoka—‘tokotika mabe mpe tokosala malamu.’ (Nzembo 37:27; Masese 3:7) Ebongi solo ete bopɛto ya bizaleli ezala likambo ya liboso oyo balobeli mpo na bwanya, boye te? Kutu, soki tozali pɛto te na bizaleli mpe na elimo, ndenge nini tokoki mpenza komonisa bizaleli mosusu ya bwanya oyo euti na likoló?

10, 11. (a) Mpo na nini ezali na ntina mingi tózala bato oyo batyaka kimya? (b) Soki okanisi ete ozokisaki ndeko moko, ndenge nini okomonisa ete ozali moto oyo atyaka kimya? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

10 “Na nsima kimya.” Bwanya oyo euti na likoló etindaka biso tólanda kimya, oyo ezali mbuma ya elimo ya Nzambe. (Bagalatia 5:22) Tosalaka makasi mpo tóbebisa te “ekanganeli ya kimya” oyo esangisi basaleli ya Yehova. (Baefese 4:3) Tosalaka mpe makasi mpo tózongisa kimya ntango ebebi. Mpo na nini yango ezali na ntina mingi? Ezali mpo Biblia elobi ete: “Bókoba . . . kofanda na kimya; mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya akozala na bino.” (2 Bakolinti 13:11) Na yango, soki tozali kofanda ntango nyonso na kimya, Nzambe ya kimya akozala na biso. Boyokani na biso na Yehova etali ndenge tofandaka na baninga oyo tosambelaka na bango. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali bato oyo batyaka kimya? Tózwa ndakisa moko.

11 Okosala nini soki okanisi ete osalaki likambo moko oyo ezokisaki ndeko moko? Yesu alobaki ete: “Boye, soki ozali komema likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na yo likambo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.” (Matai 5:23, 24) Okoki kosalela toli oyo soki okei kokutana na ndeko na yo. Mpo na kosala nini? ‘Koyokana’ na ye. * Mpo bóyokana, ekosɛnga mbala  mosusu ondima ete ozokisaki ye, na esika ya koboya kondima yango. Soki okei kokutana na ye mpo na kozongisa kimya mpe obateli likanisi yango, okoki mpenza kobongisa makambo nyonso oyo esali ete bózanga koyokana, kosɛnga bolimbisi na ndenge oyo esengeli mpe okolimbisama. Soki osali nyonso mpo kimya ezonga, ozali komonisa ete bwanya ya Nzambe ezali kotambwisa yo.

“Makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa”

12, 13. (a) Ndimbola ya liloba oyo ebongolami na “makambo makasimakasi te” na Yakobo 3:17 ezali nini? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na makambo makasimakasi te?

12 “Makambo makasimakasi te.” Kozala na makambo makasimakasi te elimboli nini? Bato ya mayele balobi ete, liloba ya Grɛki, oyo basalelaki na ebandeli, oyo ebongolami na Yakobo 3:17 “makambo makasimakasi te” ezalaka mpasi mpo na kobongola yango. Babongolaki liloba yango na maloba lokola “na boboto,” “kokanga motema,” mpe “komitya na esika ya  basusu.” Ndimbola mpenzampenza ya liloba yango ya Grɛki ezali “koyokela basusu.” Ndenge nini tokoki komonisa ete likambo yango ya bwanya oyo euti na likoló ezali kotambwisa biso?

13 Bafilipi 4:5 elobi ete: “Tiká ete ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana epai na bato nyonso.” Libongoli mosusu elobi boye: “Bóyebana ete bozali bato ya makambo makasimakasi te.” (The New Testament in Modern English, ya J. B. Phillips) Omoni ete, likambo ya ntina ezali te ndenge oyo biso moko tomitalelaka, kasi ezali nde ndenge bato mosusu batalelaka biso, ndenge toyebani na miso na bango. Moto oyo azali na makambo makasimakasi te alandelaka makambo ya mikemike nyonso te to alingaka te ete makambo nyonso esalema kaka ndenge alingi. Asepelaka nde koyoka bato mosusu, mpe soki ebongi, kotika makambo esalema ndenge balingi. Azalaka mpe na boboto, kasi matatamatata te. Atako ezaleli yango ezali na ntina mingi mpo na baklisto nyonso, eleki mpenza ntina mpo na baoyo bazali bankulutu. Boboto ebendaka bato, esalaka ete bato bábanga te kosolola na bankulutu. (1 Batesaloniki 2:7, 8) Ekozala malamu biso nyonso tómituna boye, ‘Nayebani lokola moto oyo amityaka na esika ya basusu, andimaka makanisi ya basusu, mpe azalaka na boboto?’

14. Ndenge nini tokoki komonisa ete ‘tosepelaka kotosa’?

14 “Esepelaka kotosa.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “esepelaka kotosa” ezali epai mosusu te na Makomami ya Grɛki ya boklisto. Moto moko ya mayele alobi ete liloba yango “esalelamaka mbala mingi mpo na disipilini ya basoda.” Epesaka likanisi ya “kozala moto oyo bandimisaka makambo nokinoki” mpe “kozala moto ya botosi.” Moto oyo atambwisami na bwanya ya likoló atosaka noki makambo oyo Makomami elobi. Ayebani te ete azali moto oyo aboyaka kobongola bikateli na ye soki makambo mosusu emonisi ete bikateli yango ezali malamu te. Kasi, aumelaka te kobongola makanisi soki bamonisi ye polele na Makomami ete asalaki libunga to azwaki bikateli ya mabe. Bato bayebi ete yo ozalaka ndenge wana?

 “Etondi na motema mawa mpe na bambuma ya malamu”

15. Motema mawa ezali nini, mpe mpo na nini ebongi ete “motema mawa” mpe “bambuma malamu” elobelama esika moko na Yakobo 3:17?

15 “Etondi na motema mawa mpe na bambuma ya malamu.” * Motema mawa ezali eteni ya ntina mingi ya bwanya oyo euti na likoló, mpamba te balobi ete bwanya yango “etondi na motema mawa.” Omoni ete batángi “motema mawa” esika moko na “bambuma ya malamu.” Yango ebongi mpenza, mpamba te na Biblia, mbala mingi motema mawa elakisaka mposa ya kosalela basusu mpo tozali komibanzabanza mpo na bango, to mawa oyo ebotaka ebele ya misala malamu. Buku moko elimboli motema mawa lokola “koyokela moto mawa mpo na mpasi oyo azali na yango mpe koluka kosala likambo moko mpo na kosilisa mpasi yango.” Na yango, bwanya ya Nzambe ezali te ezaleli moko oyo ezangi bolingo, to oyo esuki kaka na motó. Kasi ezalaka nde na nsai, eutaka na motema mpe etalelaka mayoki ya basusu. Ndenge nini tokoki komonisa ete totondi na motema mawa?

16, 17. (a) Longola kolinga Nzambe, nini etindaka biso na kosakola, mpe mpo na nini? (b) Na makambo nini tokoki komonisa ete totondi na motema mawa?

16 Lolenge moko ya ntina mingi ya komonisa yango ezali kosakwela bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Nini etindaka biso tósala mosala yango? Ya liboso, ezali bolingo oyo tolingaka Nzambe. Kasi motema mawa oyo tomonisaka basusu etindaka biso mpe na kosala yango. (Matai 22:37-39) Lelo oyo ebele ya bato ‘batikami mpamba mpe bapalanganisami lokola bampate ezangá mobateli.’ (Matai 9:36) Babateli ya mpate ya mangomba ya lokuta basundoli bango mpe bakangi bango miso na elimo. Yango wana, bayebi te toli ya bwanya oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe mpe bayebi te makambo ya malamu oyo mosika te Bokonzi ekosalela mabelé. Ntango tokanisaka bamposa ya elimo ya bato oyo tofandi na bango, mawa ya solosolo etindaka biso na kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyebisa bango mokano ya Yehova oyo etondi na bolingo.

Ntango tomoniselaka bato motema mawa, tomonisaka “bwanya oyo euti na likoló”

 17 Wapi ndenge mosusu oyo tokoki komonisa ete totondi na motema mawa? Kanisá ndakisa oyo Yesu apesaki ya Mosamalia oyo amonaki mosali-mobembo moko alali na pembeni ya nzela, bayibi ye biloko nyonso mpe babɛti ye mabe. Ntango mawa ekangaki Mosamalia yango, “amimonisaki moto ya motema mawa,” akangaki mpota ya moto yango mpe asalisaki ye. (Luka 10:29-37) Yango emonisi mpenza ete motema mawa esɛngi kosalela bato oyo bazali na mpasi makambo oyo ekosunga bango. Biblia eyebisi biso “tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Talá mwa mabaku ya kosala yango. Mbala mosusu ndeko moko mobange azali na mposa bámemaka ye na makita mpe bázongisaka ye na ndako na ye. Ndeko mwasi moko na lisangá na bino oyo mobali na ye akufá akoki kozala na mposa ya moto mpo na kobongisela ye ndako. (Yakobo 1:27) Moto moko oyo alɛmbi akoki kozala na mposa ya “liloba malamu” oyo ekolendisa ye. (Masese 12:25) Ntango tozali komonisa motema mawa na ndenge yango, tozali komonisa polele ete bwanya oyo euti na likoló ezali kotambwisa biso.

“Eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te”

18. Soki totambwisami na bwanya oyo euti na likoló, tosengeli kosala makasi tólongola nini na mitema na biso, mpe mpo na nini?

18 “Eponaka bilongi te.” Bwanya ya Nzambe elongaka makanisi mabe oyo bato bazwelaka basusu mpo bakeseni mposo mpe lolendo oyo bato bazalaka na yango mpo na ekólo na bango. Soki totambwisami na bwanya yango, tokosala milende tólongola na mitema na biso ezaleli nyonso ya koponapona. (Yakobo 2:9) Tokotyela basusu likebi koleka te mpo batángá kelasi mingi, bazali na mbongo mingi, bazali na mikumba na lisangá; mpe na kati ya bandeko na biso, tokomona moto moko mpamba te, ata soki azali mobola. Soki Yehova amoniseli bango bolingo na ye, mpo na nini biso tokoboyela bango bolingo na biso?

19, 20. (a) Liloba ya Grɛki oyo elimboli “na bokosi” ebandaki ndenge nini? (b) Ndenge nini tomonisaka “bolingo ya bondeko oyo ezangi bokosi,” mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi?

19 “Ezalaka na bokosi te.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolamaka na “na bokosi” ezalaki kosalelama mpo na “mosani moko ya teyatre.”  Na ntango ya kala, basani ya Bagrɛki mpe ya Baloma bazalaki kolata maskɛ ya monene na ntango ya lisano. Na yango, liloba yango ekómaki komonisa moto oyo azali kobomba bomoto na ye. Likambo yango ya kozala na bokosi te, oyo ezali mpe na kati ya bwanya ya Nzambe, esengeli kosalisa biso kaka te na ndenge oyo tofandaka na bandeko na biso, kasi mpe na ndenge oyo tokanisaka mpo na bango.

20 Ntoma Petelo alobaki ete “botosi na [biso] epai na solo” esengeli kobota “bolingo ya bondeko oyo ezangi bokosi.” (1 Petelo 1:22) Bolingo oyo tolingaka bandeko na biso esengeli kozala ya likolólikoló te. Tolataka maskɛ te to tosalaka teyatre te mpo na kokosa bato. Bolingo na biso esengeli kozala ya solosolo, ya motema. Soki ezali bongo, bandeko na biso bakotyela biso motema, mpamba te bakoyeba solo ete tozalaka kaka ndenge tozali komonana. Bosembo ya ndenge wana esalaka ete boyokani oyo ezangi bokosi ezala kati na baklisto mpe esalaka ete bandeko bátyelana motema na lisangá.

 ‘Batelá bwanya ya solo’

21, 22. (a) Mpo na nini Salomo alongaki te kobatela bwanya? (b) Ndenge nini tokoki kobatela bwanya, mpe litomba nini tokozwa soki tosali yango?

21 Bwanya ya Nzambe ezali likabo apesi biso, oyo tosengeli mpenza kobatela. Salomo alobaki boye: ‘Mwana na ngai, . . . batelá bwanya ya solo mpe bososoli.’ (Masese 3:21) Likambo ya mawa, Salomo ye moko alongaki kosala yango te. Azalaki moto ya bwanya ntango nyonso oyo azalaki na motema ya botosi. Kasi na nsuka, ebele ya basi ya bikólo mosusu oyo abalaki balongolaki motema na ye na losambo ya pɛto ya Yehova. (1 Mikonzi 11:1-8) Likambo oyo ekómelaki Salomo emonisi ete boyebi ezali na ntina mingi te soki tosaleli yango malamu te.

22 Ndenge nini tokoki kobatela bwanya ya solo? Tosengeli te kaka kotángaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso, kasi tosengeli mpe kosala milende mpo na kosalela makambo oyo tozali koyekola. (Matai 24:45) Tozali na bantina mpenza ya kosalela bwanya ya Nzambe. Yango ekosala ete bomoi na biso ya mikolo oyo ezala mpenza malamu. Ekopesa biso likoki ya ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo,’ bomoi na mokili ya sika ya Nzambe. (1 Timote 6:19) Mpe likambo oyo eleki ntina, kolona bwanya oyo euti na likoló ekosalisa biso tópusana penepene na Yehova Nzambe, liziba ya bwanya nyonso.

^ par. 1 Na kotalela 1 Mikonzi 3:16, basi yango bazalaki basi ya ndumba. Buku Étude perspicace des Écritures elobi boye: “Basi wana bazalaki mbala mosusu basi ya ndumba ndenge basalaki pite, kasi te mpo bazalaki kosala kindumba mpo na koluka mbongo. Bazalaki Bayuda, to ekoki mpenza kozala ete bazalaki bana ya bapaya.”—Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 11 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “yokaná” euti na verbe moko oyo elimboli “‘kosala mbongwana, kopesana,’ mpe na bongo, ‘koyokanisa.’” Yango emonisi ete, mokano na yo ezali ya kosala mbongwana, kolongola, soki likoki ezali, nkanda oyo ezali na motema ya moninga oyo ozokisi.Baloma 12:18.

^ par. 15 Biblia mosusu ebongoli maloba yango na “etondi na motema mawa mpe na misala malamu.”A Translation in the Language of the People, ya Charles B. Williams.