Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 17

‘E! Bwanya ya Nzambe ezali bozindo boni!’

‘E! Bwanya ya Nzambe ezali bozindo boni!’

1, 2. Mokano ya Yehova mpo na mokolo ya nsambo ezalaki nini, mpe ndenge nini bwanya ya Nzambe etyamaki na komekama na ebandeli ya mokolo yango?

ABEBI mpenza kobeba! Moto, nkembo ya mosala oyo Nzambe asalaki na mokolo ya motoba, akwei mabe mpenza. Nzokande, Yehova alobaki ete ‘biloko nyonso oyo asalaki,’ ná moto mpe, ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:31) Kasi, na ebandeli ya mokolo ya nsambo, Adama ná Eva bamonaki malamu bálanda Satana na botomboki na ye. Bakweaki mbala moko na lisumu, na kozanga kokoka mpe na liwa.

2 Emonanaki lokola nde mokano ya Yehova mpo na mokolo ya nsambo ebebi libela. Mokolo yango, lokola mikolo motoba oyo ezalaki liboso na yango, esengelaki koumela bambula nkóto na nkóto. Yehova alobaki ete mokolo yango ezali mosantu, mpe nsukansuka, na mokolo yango mabelé mobimba ekokóma paladiso oyo etondi na bato ya kokoka. (Genese 1:28; 2:3) Kasi, nsima ya botomboki wana oyo ebebisaki mpenza makambo, ndenge nini mokano yango ekokokisama? Nzambe akosala nini? Yango etyaki mpenza bwanya ya Yehova na komekama, mbala mosusu na komekama oyo eleki makasi.

3, 4. (a) Na ndenge nini meko oyo Yehova azwaki nsima ya botomboki na Edene ezali komonisa bwanya na ye oyo etindaka biso tómemya ye mingi? (b) Wapi likambo ya ntina mingi oyo komikitisa esengeli kotinda biso tóbosana te wana tozali koyekola bwanya ya Yehova?

3 Nokinoki mpenza Yehova azwaki meko. Akatelaki batomboki etumbu na Edene, mpe kaka na ntango yango ayebisaki mwa moke likambo moko ya malamu mpenza: mokano na ye ya kosilisa mikakatano oyo bautaki kobimisa. (Genese 3:15) Mokano yango ekoumela bambula nkóto na nkóto: Kobanda na Edene, bambula nyonso oyo moto asali awa na mabelé, tii mosika na mikolo ezali koya. Mokano yango ezali na mindɔndɔ te, kasi ezali mpenza na makambo ya bozindo oyo motángi ya Biblia akoki kolekisa bomoi na ye mobimba na koyekola mpe kokanisa yango.  Lisusu, mokano ya Yehova ekozanga soki moke te kokokisama. Ekosukisa mabe, lisumu mpe liwa. Ekosala ete bato ya sembo bákóma na ezaleli ya kokoka. Makambo oyo nyonso ekosalema liboso mokolo ya nsambo esuka; na ndenge yango, Yehova akokokisa mokano na ye oyo etali mabelé mpe bato na ntango oyo akanaki mpenza, mpe eloko moko te ekopekisa ye!

4 Bwanya ya ndenge yango ezali mpenza kotinda biso tómemya ye mingi, boye te? Yango etindaki ntoma Paulo akoma ete: ‘E! bwanya ya Nzambe ezali bozindo boni!’ (Baloma 11:33) Wana tobandi koyekola makambo ndenge na ndenge ya bwanya ya Nzambe, komikitisa esengeli kotinda biso tóbosana te likambo oyo ya ntina mingi: lokola Yehova azali na bwanya mingi mpenza, ata soki tosali ndenge nini tokoyeba yango kaka mwa moke. (Yobo 26:14) Liboso, tólimbola naino ezaleli yango oyo etindaka biso na komemya ye mingi.

Bwanya ya Nzambe ezali nini?

5, 6. Boyokani nini ezali kati na boyebi mpe bwanya, mpe boyebi oyo Yehova azali na yango ezali monene boni?

5 Bwanya ekeseni na boyebi. Bakoki kokɔtisa na ordinatɛrɛ ebele ya boyebi, kasi ezali mpasi mpo moto aloba ete masini yango ezalaka na bwanya. Atako bongo, boyebi ná bwanya ezalaka na boyokani. (Masese 10:14) Na ndakisa, soki ozali koluka toli ya bwanya mpo na komisalisa na maladi moko monene, okokende epai ya moto oyo ayebi mosala ya monganga malamu te to oyo ayebi yango ata moke te? Soki moke te! Na yango, boyebi ya sikisiki ezali na ntina mingi mpo na kozala na bwanya ya solosolo.

6 Boyebi oyo Yehova azali na yango ezali na nsuka te. Lokola azali “Mokonzi ya seko,” ye kaka nde azali na bomoi oyo ezali na ebandeli te. (Emoniseli 15:3) Mpe na ebele ya bambula wana nyonso oyo eyebani motángo te, ayebi makambo nyonso. Biblia elobi ete: “Ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye, kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” (Baebele 4:13; Masese 15:3) Lokola Yehova azali Mozalisi, ayebi malamu biloko nyonso asalá, mpe azali kotala misala nyonso ya bato uta ebandeli. Atalatalaka mitema nyonso ya bato, mpe azangi koyeba eloko moko te. (1 Ntango 28:9) Lokola akelaki biso  bato na bonsomi, asepelaka mingi ntango amonaka ete tozali kozwa bikateli na bwanya. Lokola azali “Moyoki-Mabondeli,” ayokaka ebele ya makambo oyo bayebisaka ye na mbala moko. (Nzembo 65:2) Mpe ntina kutu ezali te ya koloba ete Yehova abosanaka makambo te.

7, 8. Ndenge nini Yehova amonisaka mayele, bososoli mpe bwanya?

7 Yehova azali kaka na boyebi te. Amonaka mpe boyokani oyo ezalaka kati na makambo ndenge na ndenge, mpe asosolaka likambo oyo ebele ya makambo mikemike ekoki kobimisa soki yango nyonso esangani. Ayebaka ntina ya likambo na likambo mpe azwaka bikateli: akesenisaka malamu ná mabe, makambo ya ntina mpe makambo ezangi ntina. Lisusu, atalaka makambo to bato kaka likolólikoló te mpe alukalukaka na kati ya motema. (1 Samwele 16:7) Na yango, Yehova azali na mayele mpe bososoli, bizaleli oyo eleki boyebi. Kasi bwanya ezali kutu na ntina mingi koleka bizaleli yango.

8 Bwanya esɛngaka kosalela nzela moko boyebi, bososoli mpe mayele mpo na kosala likambo moko. Kutu, maloba mosusu ya minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli oyo ebongolami “bwanya” elimboli mpenzampenza “mosala oyo ebimisi litomba” to “bwanya oyo ebongi.” Na yango, bwanya ya Yehova ezali kaka ya maloba te. Emonanaka na misala mpe epesaka litomba. Lokola Yehova azali na boyebi mingi mpenza mpe na mayele mingi, azwaka ntango nyonso bikateli oyo eleki malamu, mpe akokisaka yango na ndenge oyo eleki malamu mpenza. Oyo nde bwanya ya solosolo! Yehova amonisi bosolo ya maloba oyo ya Yesu: “Bwanya emonani moyengebene na misala na yango.” (Matai 11:19) Misala ya Yehova na kati ya molɔ́ngɔ́ mobimba emonisaka bwanya na ye polele mpenza.

Biloko oyo emonisaka bwanya ya Nzambe polele

9, 10. (a) Yehova azalaka na bwanya ya ndenge nini, mpe ndenge nini amonisi yango? (b) Ndenge nini selile ezali komonisa polele bwanya ya Yehova?

9 Okamwá naino te na mayele ya moto moko ya mosala ya mabɔkɔ oyo asalaka biloko kitoko oyo etambolaka to esalaka malamu? Wana ezali lolenge moko ya bwanya oyo ekamwisaka mpenza. (Exode 31:1-3) Yehova nde azali liziba mpe nkolo mpenza  ya bwanya yango. Mokonzi Davidi alobaki na Yehova ete: “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo ya kokamwa mingi; misala na yo ezali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” (Nzembo 139:14) Ya solo, soki toyebi makambo ya nzoto na biso mingi, bwanya ya Yehova mpe ekotinda biso tómemya ye mingi mpenza.

10 Tópesa ndakisa: Bomoi na yo ebandaki na selile moko mpamba na libumu ya mama na yo, ntango momboto ya tata na yo ekɔtelaki likei na ye. Eumelaki te, selile yango ebandaki kobota baselile mosusu. Lelo oyo, nzoto na yo mobimba ezali na baselile miliare nkóto nkama moko. Baselile yango ezalaka mike mpenza. Baselile pene na nkóto zomi ekoki kokɔta na motó ya ntonga. Atako bongo, mokomoko na yango esalemi mpenza na ndenge ya kokamwa. Selile ezali na biloko ebele na kati koleka masini to izini nyonso oyo bato basalá. Bato ya mayele balobaka ete selile ekokani na mboka moko oyo ezingami na efelo—oyo ezali na banzela ya kokɔta mpe ya kobima oyo ekɛngɛlami malamu, na mituka ya komema biloko, na batelefone, na bakompani ya kura, na baizini ya kosala biloko, na baizini ya kolamba bosɔtɔ mpo na kobimisa biloko ya sika, na mampinga ya basoda, mpe ezali kutu na lolenge moko ya guvɛrnema monene na katikati na yango. Lisusu, selile ekoki kobimisa selile mosusu lokola yango mpenza na mwa bangonga mpamba!

11, 12. (a) Nini etindaka baselile ya mwana oyo auti kobanda na zemi ekesana, mpe na ndenge nini yango eyokani na Nzembo 139:16? (b) Na ndenge nini bɔɔngɔ ya moto ezali komonisa ete ‘tosalemi na motindo ya kokamwa mingi’?

11 Baselile nyonso ezalaka ndenge moko te. Wana baselile ya mwana oyo auti kobanda na zemi ezali kokoba kobotana, baselile na baselile ekozwa mosala na yango. Mosusu ekokóma baselile ya bɔɔngɔ, mosusu ya mikuwa, ya misisa, ya makila, to ya miso. Makambo oyo ekesenisaka baselile bongo ekomamá na ADN, oyo ezali lokola bibliotɛkɛ ya selile epai babombi babuku oyo ezali na makambo ya moto. Likambo ya kobenda likebi, na lisalisi ya elimo ya Yehova, Davidi alobaki boye: “Miso na yo emonaki ngai naino esalamaki ngai te; mikolo na ngai ekomamaki nyonso na mokanda na yo.”Nzembo 139:16.

12 Biteni mosusu ya nzoto ya moto ezalaka mpe na ebele ya makambo  ndenge na ndenge. Tózwa na ndakisa, bɔɔngɔ. Bato mosusu babengaki yango eloko oyo eleki kokamwisa na kati ya biloko nyonso ya molɔ́ngɔ́. Ezali na baselile soki miliare 100, ebele lokola minzoto ya galaksi na biso. Mokomoko na yango ezali na bankóto ya matonga oyo ekangisi yango na baselile mosusu. Bato ya siansi balobaka ete bɔɔngɔ ya moto ekoki kobomba boyebi nyonso oyo ezali na babuku ya babibliotɛkɛ nyonso ya mokili mobimba, mpe makoki na yango ya kosimba makambo ezali na ndelo te. Ata nsima ya ebele ya bambula oyo balekisi na koyekola eteni wana ya nzoto, oyo ‘esalemi na motindo ya kokamwa mingi,’ bato ya siansi balobi ete bakokoka mbala mosusu te koyeba malamumalamu ndenge oyo yango esalaka.

13, 14. (a) Ndenge nini nsɛlɛlɛ mpe bikelamu mosusu emonisaka ete ezali na “bwanya oyo euti na lɔɔmbi,” mpe yango ezali koteya biso nini mpo na Mozalisi? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete biloko oyo Nzambe asalá, lokola motambo ya limpulututu, esalemi “na bwanya”?

13 Nzokande, moto azali kaka ndakisa moko ya biloko Yehova asali na bwanya na ye. Nzembo 104:24 elobi ete: ‘Misala na yo mingi boni, ee Yehova! Otɛlɛmisaki yango nyonso na bwanya. Mokili etondi mpenza na biloko oyo osalaki.’ Bwanya ya Yehova ezali komonana polele na kati ya bikelamu nyonso oyo tokoki komona. Na ndakisa, nsɛlɛlɛ ezali na “bwanya oyo euti na lɔɔmbi.” (Masese 30:24) Ya solo, nsɛlɛlɛ na kati na ndako na yango emikaboli na bituluku, mpe etuluku mokomoko esalaka kaka mosala na yango. Nsɛlɛlɛ mosusu ekɛngɛlaka, ebatelaka mpe ebendaka mabɛlɛ ya nyama-nkɛkɛ mosusu ndenge babendaka mabɛlɛ ya ngɔmbɛ. Nsɛlɛlɛ mosusu ezalaka lokola basali-bilanga; elonaka mpe ekolisaka mayebo. Ebele ya bikelamu mosusu esalemá mpo ekoka kosala makambo ya kokamwa oyo lɔɔmbi na yango—mwa mayele bapesá yango—etindaka yango na kosala. Kobaluka oyo nzinzi ebalukaka wana ezali kopumbwa, ata mpɛpɔ oyo moto asali na mayele mpenza ekoki komekola yango te. Ndɛkɛ oyo esalaka mibembo eyebaka nzela na yango na lisalisi ya minzoto, ya emá ya mabelé (champ magnétique), to ya lolenge moko ya karte oyo ezali na bɔɔngɔ na yango. Bato ya mayele oyo bayekolaka bikelamu ya bomoi balekisaka bambula ebele mpo na koluka koyeba mwa mayele ya kokamwa oyo etyamá na kati ya bikelamu yango. Ya solo, Nzambe oyo atyá yango asengeli solo kozala na bwanya mingi!

 14 Bato ya siansi bayebi makambo mingi nsima ya koyekola biloko oyo Yehova akelá na bwanya na ye. Ezali kutu na mayele moko ya siansi oyo babengi biomimétique, oyo elukaka komekola makambo oyo ezali epai ya biloko oyo Nzambe akelá. Na ndakisa, mbala mosusu osilá kozwa libaku ya kotala, na kokamwa, kitoko ya motambo ya limpulututu (toile d’araignée). Kasi, mpo na moto ya mayele na makambo ya tekiniki, yango ezali eloko oyo etongami na ndenge ya kokamwa mpenza. Mwa bansinga na yango mikemike oyo emonanaka lokola nde ezali makasi te, ezali makasi koleka ebende oyo bayeisi moke ndenge moko na yango; ezali mpe makasi koleka bansinga ya elamba oyo balataka mpo masasi ekɔta bango na nzoto te. Makasi na yango ezali mpenza ndenge nini? Kanisá ete bayeisi motambo ya limpulututu monene lokola monyama oyo basalelaka na masuwa mpe batandi yango na likoló, mpɛpɔ ya monene oyo ekotutana wana ekokoka kopasola yango te! Ya solo, Yehova asalaki mpenza biloko yango nyonso “na bwanya.”

Nani asalaki ete bikelamu ya mabelé ezala “na bwanya oyo euti na lɔɔmbi”?

Bwanya na kati ya biloko mosusu ya molɔ́ngɔ́

15, 16. (a) Likambo nini minzoto ya likoló ezali komonisa polele mpo na bwanya ya Yehova? (b) Lokola Yehova azali Komanda Monene ya ebele ya baanzelu, ndenge nini yango emonisi polele ete azali Motambwisi-Mosala ya bwanya?

15 Bwanya ya Yehova ezali komonana polele na biloko oyo asalá na molɔ́ngɔ́ mobimba. Minzoto ya likoló, oyo tolobelaki mingi na Mokapo 5, ezali te mobulumobulu kuna na likoló. Mpo na bwanya oyo ezali na “mibeko ya lola” oyo Yehova atyá, minzoto ya likoló esangisami na kati ya bagalaksi to bituluku ya minzoto oyo ebongisami malamu; bagalaksi yango esangisami na kati ya bituluku ya bagalaksi, mpe bituluku yango esangisami na bituluku ya minene koleka. (Yobo 38:33) Yango wana Yehova alobelaka minzoto ya likoló ete ezali “limpinga.” (Yisaya 40:26) Nzokande, limpinga mosusu ezali, oyo ezali kutu komonisa lisusu polele koleka bwanya ya Yehova.

16 Ndenge tomonaki na Mokapo 4, babengaka Nzambe na nkombo ya lokumu “Yehova ya mampinga” mpo azali Komanda  Monene ya limpinga moko monene oyo ezali na bamilio na bamilio ya bikelamu ya elimo. Yango emonisi mpenza nguya ya Yehova. Kasi ndenge nini yango etali bwanya na ye? Talá likambo oyo: Yehova ná Yesu bazangaka mosala te. (Yoane 5:17) Yango wana, tosengeli mpe kondima ete, baanzelu, oyo bazali baministre ya Oyo-Aleki-Likoló, bango mpe bazalaka ntango nyonso na mosala. Longola yango, tosengeli kobosana te ete baanzelu baleki bato na mayele mpe na nguya mosika mpenza. (Baebele 1:7; 2:7) Nzokande, Yehova apesaka baanzelu yango mosala ntango nyonso; banda bambula bamiliare na bamiliare, basalelaka ye na esengo—‘batosaka ye’ mpe ‘basalaka mokano na ye.’ (Nzembo 103:20, 21) Motambwisi-Mosala ya ndenge yango asengeli mpenza kozala na bwanya ya nsɔmɔ!

‘Kaka Yehova ye moko nde azali moto ya bwanya’

17, 18. Mpo na nini Biblia elobi ete ‘kaka Yehova ye moko nde azali moto ya bwanya,’ mpe mpo na nini bwanya na ye esengeli kotinda biso tómemya ye mpenza?

17 Na kotalela makambo nyonso oyo, ezali nde likambo ya kokamwa soki Biblia elobi ete Yehova azali na bwanya oyo eleki? Na ndakisa, Biblia elobi ete ‘kaka Yehova ye moko nde azali moto ya bwanya.’ (Baloma 16:27) Kaka Yehova ye moko nde azali mpenzampenza na bwanya. Bwanya nyonso ya solosolo eutaka epai na ye. (Masese 2:6) Yango wana, Yesu, atako azali ekelamu ya Yehova oyo eleki bikelamu mosusu na bwanya, azalaki kotyela bwanya na ye moko motema te, kasi azalaki koloba nde ndenge Tata na ye azalaki kotinda ye.Yoane 12:48-50.

18 Talá ndenge ntoma Paulo amonisi ete bwanya ya Yehova eleki mpenza bwanya mosusu nyonso: “E! Bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te!” (Baloma 11:33) Ndenge Paulo abandi vɛrsɛ oyo na liloba “E!,” emonisi ete akamwe na limemya mpenza. Liloba ya Grɛki oyo asaleli mpo na “bozindo” ezali mpenza penepene na liloba oyo elimboli “lobwaku mozindo.” Na yango, maloba na ye ebimisi likambo yango polele na makanisi na biso. Yango elingi koloba ete, ntango tozali kokanisa bwanya ya Yehova, ezali lokola nde tozali kotala malamumalamu na lobwaku moko oyo nsuka to nse na yango ezali komonana te, esika moko ya mozindo mpe ya monene mpenza  oyo tokoki ata moke te koyeba bonene na yango to oyo tokoki ata komeka te koyema yango ndenge ezali mpenza. (Nzembo 92:5) Wana ezali mpenza likanisi oyo ezali kotinda biso na komikitisa, boye te?

19, 20. (a) Mpo na nini mpongo ebongi mpenza kozala elembo ya bwanya ya Nzambe? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki makoki na ye ya koyeba makambo oyo ekoya?

19 Ezali mpe na ndimbola mosusu oyo emonisi ete ‘kaka Yehova ye moko nde azali moto ya bwanya’: Kaka ye nde akoki komona makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Tóbosana te ete Yehova asalelaka mpongo lokola elembo ya bwanya na ye. Mpongo babengi aigle royal ekoki kozala na kilo mitano mpamba, kasi miso na yango ezalaka monene koleka oyo ya moto oyo akómi mpenza mokóló. Miso ya mpongo emonaka mpenza mosika, ekoki komona ata mwa nyama ya moke oyo ezali mosika na bankama ya bamɛtrɛ to ata mpe koleka kilomɛtrɛ moko! Mokolo moko Yehova alobaki boye mpo na mpongo: “Miso na ye ekomona yango mosika.” (Yobo 39:29) Ndenge moko mpe, Yehova akoki komona “mosika,” elingi koloba akoki komona makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.

20 Biblia etondi na makambo oyo endimisi likanisi yango. Ezali na bisakweli—to makambo oyo ekomamá liboso ete esalema—nkama na nkama. Mbala mosusu kutu bankama ya bambula liboso, Biblia esakolaki ndenge bitumba mosusu ekosuka, kobima mpe  kokwea ya bikólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba, ata mpe mayele oyo bakomanda mosusu ya basoda basalelaki mpo na kolonga bitumba mosusu.Yisaya 44:25–45:4; Danyele 8:2-8, 20-22.

21, 22. (a) Mpo na nini ntina moko ezali te ya koloba ete Yehova ayebaka makambo nyonso oyo okosala na bomoi na yo? Pesá ndakisa. (b) Ndenge nini toyebi ete bwanya ya Yehova ezangi bolingo to motema mawa te?

21 Kasi, yango elingi koloba ete Nzambe ayebaka makambo nyonso oyo okosala na bomoi na yo? Bato oyo bateyaka ete Nzambe akaná makambo nyonso banda kala, balobaka ete ezali bongo. Nzokande, likanisi yango esilisaka nde valɛrɛ ya bwanya ya Yehova, mpamba te yango elingi koloba ete akokaka te kopekisa makoki na ye ya koyeba makambo oyo ekoya. Tópesa ndakisa: Soki ozali na mongongo moko kitoko mpenza, yango elingi koloba ete nzembo ekosila na monɔkɔ na yo lisusu te? Oyo ezali likanisi ya bozoba mpenza! Se ndenge moko, Yehova azali na makoki ya koyeba makambo oyo ekoya, kasi asalelaka yango ntango nyonso te. Soki asalaka bongo, yango ekokaki kolakisa ete alongoli mwa ndambo ya bonsomi oyo apesá biso ya kopona oyo tokosala, nzokande bonsomi yango ezali likabo ya malamu mingi oyo Yehova akolongola biso yango soki moke te.Deteronome 30:19, 20.

22 Kasi, likambo eleki mabe yango oyo: Liteya oyo elobi ete Nzambe akaná makambo nyonso liboso ezali komonisa ete bwanya ya Yehova ezangi bolingo mpe ezangi motema mawa. Likanisi yango eyokani soki moke te na ndenge Yehova azali! Biblia eteyaka ete Yehova azali na “motema ya bwanya.” (Yobo 9:4) Yango elingi koloba te ete azalaka mpenza na motema, kasi mbala mingi Biblia esalelaka liloba motema mpo na komonisa lolenge moto azalaka na kati, mikano mpe mayoki na ye, lokola bolingo. Na yango, bwanya ya Yehova, lokola mpe bizaleli na ye mosusu, etambwisami nde na bolingo.1 Yoane 4:8.

23. Bonene ya bwanya ya Yehova esengeli kotinda biso na kosala nini?

23 Na ntembe te, ebongi tótyela bwanya ya Yehova motema. Eleki bwanya na biso moko mosika; yango wana Liloba ya Nzambe elendisi biso na bolingo nyonso ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” (Masese 3:5, 6) Sikoyo tiká tótalela malamumalamu bwanya ya Yehova mpo tópusana penepene na ye, Nzambe na biso oyo aleki na bwanya.