Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 18

Bwanya na “Liloba ya Nzambe”

Bwanya na “Liloba ya Nzambe”

1, 2. “Mokanda” nini Yehova akomeli biso, mpe mpo na nini?

OYEBI lisusu mbala ya nsuka oyo ozwaki mokanda ya ndeko to moninga moko oyo olingaka mingi, kasi afandi mosika? Makambo mingi te epesaka biso esengo mingi lokola mokanda oyo euti na moto oyo tolingaka mingi. Tosepelaka koyoka ndenge azali, makambo oyo azali kosala mpe oyo azali kokana kosala. Kosolola ya ndenge yango esalaka ete bandeko to baninga bálingana lisusu mingi ata soki bafandi esika moko te.

2 Bongo, nini lisusu ekoki kopesa biso esengo mingi koleka kozwa nsango oyo Nzambe na biso ya bolingo akomeli biso? Tokoki koloba ete, Yehova akomeli biso “mokanda”—Liloba na ye—Biblia. Na kati na yango azali koyebisa biso soki ye azali nani, makambo oyo asalá, oyo akani kosala, mpe makambo mosusu mingi. Yehova apesi biso Liloba na ye mpamba te alingi ete tózala penepene na ye. Nzambe na biso oyo aleki na bwanya amonaki ete lolenge wana ya koyebisa biso makambo nde eleki malamu. Lolenge oyo Biblia ekomamaki mpe makambo oyo ezali na kati na yango ezali komonisa bwanya oyo ekokani na mosusu te.

Mpo na nini mokanda?

3. Ndenge nini Yehova apesaki Moize Mibeko?

3 Bato mosusu bakoki kotuna, ‘Mpo na nini Yehova asalelaki te lolenge moko oyo ekokaki kobenda likebi koleka—lokola koloba uta na likoló—mpo na kosolola na bato’? Ya solo, na mabaku mosusu Yehova alobaki uta na likoló na nzela ya baanzelu oyo bamonisaki ye. Na ndakisa, asalaki bongo ntango apesaki Bayisalaele Mibeko. (Bagalatia 3:19) Mongongo oyo eutaki na likoló ezalaki mpenza kobangisa; yango wana lokola Bayisalaele babangaki, basɛngaki ete Yehova aloba na bango bongo te kasi asolola na bango na nzela ya Moize. (Exode 20:18-20) Yango wana Yehova ayebisaki Moize liloba mokomoko ya Mibeko, oyo ezalaki na malako soki 600.

4. Limbolá mpo na nini momeseno ya koyebisana makambo na monɔkɔ esengelaki te kozala lolenge ya malamu mpenza ya koyebisa bato mibeko ya Nzambe.

 4 Kasi elingaki kozala ndenge nini soki bakomaki Mibeko kokoma te? Moize akokaki koyeba malamumalamu liloba mokomoko ya ebele ya malako wana mpe koyebisa yango ekólo mobimba kozanga kobosana likambo? Bongo bana oyo bakobotama nsima? Balingaki kaka kotya motema na momeseno ya koyebisana makambo na monɔkɔ? Yango elingaki kozala te lolenge ya malamu mpenza ya koyebisa bato mibeko ya Nzambe. Kanisá nini ekokóma soki osengeli koyebisa ebele ya bato oyo batandani na molɔngɔ lisolo moko, oyebisi yango moto ya liboso, ye ayebisa oyo alandi ye, mpe bongo na bongo tii na moto ya nsuka. Mbala mosusu, makambo oyo moto ya nsuka akoyoka ekokesana makasi na oyo bayebisaki moto ya liboso. Maloba ya Mibeko ya Nzambe ezalaki na likama ya ndenge wana te.

5, 6. Yehova atindaki Moize asala nini na maloba na Ye, mpe mpo na nini kozala na Liloba ya Yehova oyo ekomami ezali lipamboli mpo na biso?

5 Na bwanya mpenza, Yehova amonaki malamu kokomisa maloba na ye. Apesaki Moize etinda oyo: “Komá maloba oyo. Ngai nasili kosala kondimana na yo mpe na Yisalaele na motindo na maloba oyo.” (Exode 34:27) Na ndenge yango, na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), babandaki kokoma Biblia. Na boumeli ya mbula koleka 1 610 oyo elandaki, ‘na mabaku mingi mpe na mitindo ndenge na ndenge, Yehova alobaki’ na bato soki 40 oyo bakomaki Biblia. (Baebele 1:1) Na bambula yango, bakomeli ya molende basalaki makasi mpo na kokoma bakopi ya sikisiki ya Makomami mpo na kobatela yango.Ezela 7:6; Nzembo 45:1.

6 Yehova apamboli mpenza biso ndenge ayebisi biso makambo yango na mokanda. Naino ozwá te mokanda moko oyo esepelisaki yo mingi mpenza—mbala mosusu mpo ebɔndisaki yo—mpe obombaki yango mpo otángaka yango mbala na mbala? Ezali mpe ndenge moko mpo na “mokanda” oyo Yehova akomeli biso. Lokola Yehova atindaki bákoma maloba na ye na buku  moko, tozali na likoki ya kotánga yango mbala na mbala mpe ya komanyola likoló na yango. (Nzembo 1:2) Tokoki kozwa “kobɔndisama oyo euti na Makomami” ntango nyonso oyo tozali na mposa na yango.Baloma 15:4.

Mpo na nini bato nde bakomaki yango?

7. Na ndenge nini kosalela bato mpo na kokoma Biblia ezali komonisa bwanya ya Yehova?

7 Na bwanya na ye, Yehova asalelaki bato mpo na kokoma Liloba na ye. Kanisá likambo oyo: Soki Yehova asalelaki baanzelu mpo na kokoma Biblia, elingaki mpenza kosepelisa biso ndenge ezali kosepelisa biso lelo? Toboyi te, baanzelu balingaki kolobela Yehova mpenzampenza ndenge bango batalelaka ye, ndenge oyo bakangamaka na ye, mpe balingaki kolobela bato oyo basalelaka Nzambe na bosembo mpenza. Kasi tondimi solo ete lolenge ya kotalela makambo ya bilimo wana ya kokoka, oyo boyebi, mayele mpe nguya na bango eleki ya biso mosika, elingaki koyokana na makambo na biso?Baebele 2:6, 7.

“Makomami nyonso epemami na Nzambe”

8. Na meko nini Yehova apesaki bakomi ya Biblia nzela ya kosalela mayele na bango? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

8 Ndenge Yehova asaleli bato mpo na kokoma Liloba na ye, apesi biso eloko oyo tosengeli na yango mpenza—lisolo oyo “epemami na Nzambe” kasi oyo ezali mpe na makambo etali bato. (2 Timote 3:16) Asalaki yango ndenge nini? Mbala mingi, emonani ete azalaki kotika bakomi básalela mayele na bango mpo na kopona “maloba kitoko mpe kokoma maloba ya solo oyo ezali sikisiki.” (Mosakoli 12:10, 11) Yango wana, na Biblia okokuta mitindo ndenge na ndenge ya koyebisa makambo; makomi na yango elandi bomoi mpe bomoto ya baoyo bakomaki yango. * Atako bongo, mibali yango “balobaki oyo eutaki epai ya Nzambe wana bazalaki kopusama na elimo santu.” (2 Petelo 1:21) Na yango, mbuma ya mosala na bango ezali solo “liloba ya Nzambe.”1 Batesaloniki 2:13.

9, 10. Mpo na nini kosalela bato mpo na kokoma Biblia ebakisi esengo mpe mposa ya kotánga yango?

 9 Lokola Biblia ekomamaki na bato, yango ebakisi esengo mpe mposa ya kotánga yango. Bakomi na yango bazalaki bato na mayoki lokola ya biso. Lokola bazalaki bato ya kozanga kokoka, bakutanaki na komekama mpe mitungisi lokola oyo ya biso. Elimo ya Yehova etindaki basusu kati na bango bákoma makambo etali mayoki mpe mikakatano na bango. (2 Bakolinti 12:7-10) Yango wana, bakomaki maloba na elobeli oyo emonisi ete makambo yango etali bango, nzokande anzelu moko te akokaki kosalela maloba ya ndenge wana.

10 Na ndakisa, tólobela Davidi, mokonzi ya Yisalaele. Nsima ya kosala masumu minene, akomaki loyembo moko mpo na komonisa mpasi ya motema na ye mpe kosɛnga Nzambe bolimbisi. Akomaki boye: “Pɛtolá ngai na masumu na ngai. Mpo ete nayebi epɛngwɛli na ngai mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso. Talá, ngai nabotami kati na bokesene, mpe mama na ngai azwaki zemi kati na lisumu. Bwaká ngai mosika na elongi na yo te mpe longwelá ngai [elimo] na yo na [bosantu] te. Makabo mazali malamu na miso na Nzambe ezali [elimo] etutami; ee Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.” (Nzembo 51:2, 3, 5, 11, 17) Okoki koyoka mpasi ya mokomi oyo, boye te? Soki moto ya kozanga kokoka te, nani lisusu akokaki komonisa mpenza mitungisi ya motema na ye bongo?

Mpo na nini buku oyo ezali kolobela bomoi ya bato?

11. Masolo nini ya bomoi ya bato ekomamá na Biblia lokola ndakisa “mpo na kolakisa biso”?

11 Ezali na likambo mosusu oyo ezali kosala ete Biblia esepelisa biso. Mingi mpenza, Biblia ezali buku oyo ezali kolobela bomoi ya bato—bato mpenza—baoyo basalelaki Nzambe mpe baoyo basalelaki ye te. Totángaka makambo bakutanaki na yango, bampasi mpe bisengo na bango. Tomonaka ndenge makambo oyo baponaki kosala esukelaki bango. Masolo ya ndenge wana ekomamá mpo na “kolakisa biso.” (Baloma 15:4) Na nzela ya bandakisa ya bato wana, Yehova ateyaka biso na ndenge oyo esimbaka mpenza motema. Tótalela mwa bandakisa.

12. Ndenge nini masolo ya bomoi ya bato oyo bazalaki sembo te esalisaka biso?

 12 Biblia elobelaka bato oyo bazalaki sembo te, ata mpe bato mabe, mpe makambo oyo ekómelaki bango. Na masolo yango, bizaleli mabe na bango emonani polele na makambo oyo basalaki; na bongo, esalisi biso tóyeba bizaleli yango malamu. Na ndakisa, mobeko nini oyo ezali kopekisa ezaleli ya kozanga bosembo ekoki kozala polele koleka ndakisa oyo emonisi ezaleli yango epai ya Yuda, ntango atɛkaki Yesu? (Matai 26:14-16, 46-50; 27:3-10) Masolo lokola oyo esimbaka mitema na biso malamu koleka, mpe esalisaka biso tóyeba bizaleli mabe mpe tótika yango.

13. Ndenge nini Biblia esalisaka biso tósimba bizaleli ya malamu?

13 Biblia elobelaka mpe ebele ya basaleli ya sembo ya Nzambe. Totángaka ndenge bamipesaki na Nzambe mpe ndenge bamonisaki ete bazali sembo epai na ye. Bato yango bazali komonisa polele bizaleli oyo tosengeli kozala na yango mpo na kopusana penepene na Nzambe. Na ndakisa, tólobela kondima. Biblia epesi ndimbola ya kondima mpe eyebisi biso ete yango ezali na ntina mingi soki tolingi kosepelisa Nzambe. (Baebele 11:1, 6) Kasi na kati ya Biblia tozali mpe kokuta bandakisa ya bato oyo bamonisaki kondima polele. Kanisá kondima oyo Abalayama amonisaki ntango alingaki kopesa Yisaka mbeka. (Genese, mokapo 22; Baebele 11:17-19) Na masolo lokola wana, liloba “kondima” ekómi polele mpe ezali lisusu mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Yehova azali mpenza na bwanya na ndenge asuki kaka te na kolendisa biso tólona bizaleli malamu, kasi alakisaka mpe biso bizaleli yango na nzela ya bato oyo bazalaki na yango na bomoi na bango!

14, 15. Biblia eyebisi biso nini mpo na mwasi moko oyo ayaki na tempelo, mpe likambo nini lisolo yango eteyi biso mpo na Yehova?

14 Mbala mingi, masolo ya bato oyo balobeli na Biblia eteyaka biso mwa makambo mosusu ya bomoto ya Yehova. Tótalela lisolo ya mwasi moko oyo Yesu atyelaki likebi na tempelo. Ntango Yesu afandaki penepene ya bakesi ya makabo, amonaki ndenge bato bazalaki kotya makabo. Bato mingi ya bomɛngo bayaki kotya “oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele.” Kasi Yesu atyaki likebi na mwasi moko mobola oyo mobali na ye akufá.  Likabo oyo apesaki ezalaki “mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke mpenza.” * Yango nde mbongo nyonso oyo atikalaki na yango. Yesu, oyo amonisaki malamumalamu likanisi ya Yehova na likambo yango, alobaki boye: “Mwasi mobola wana oyo akufelá mobali atye mingi koleka bato nyonso oyo batyaki mbongo na bakesi ya makabo.” Maloba wana emonisi ete likabo ya mwasi yango elekaki makabo nyonso oyo bato mosusu batyaki.Malako 12:41-44; Luka 21:1-4; Yoane 8:28.

15 Na kati ya bato nyonso oyo bayaki na tempelo mokolo yango, ndenge Nzambe aponaki mwasi wana oyo akufelá mobali mpo bálobela ye na Biblia, ezali likambo moko ya ntina, boye te? Na lisolo yango, Yehova azali koteya biso ete azali Nzambe oyo amonisaka botɔndi. Andimaka na esengo nyonso makabo oyo topesi na molimo na biso mobimba, ata soki emonani moke to mingi koleka oyo bato mosusu bakoki kopesa. Yehova azwaki mpenza lolenge oyo eleki malamu ya koteya biso solo wana ya kolendisa!

Makambo oyo Biblia elobeli te

16, 17. Ndenge nini bwanya ya Yehova emonani ata na makambo oyo amoni malamu kolobela te na Liloba na ye?

16 Ntango okomelaka moninga na yo ya bolingo, ozalaka na makambo ebele ya kolobela, kasi likoki ya koloba nyonso ezalaka te. Osalelaka mayele mpo na koyeba nini okokoma. Se ndenge moko, Yehova amonaki malamu alobela bato mpe makambo mosusu na kati ya Liloba na ye. Kasi na masolo yango, Biblia elobeli te makambo nyonso ya mikemike. (Yoane 21:25) Na ndakisa, ntango Biblia elobelaka bitumbu ya Nzambe, mbala mosusu makambo oyo eyebisi ezalaka na biyano nyonso te na mituna na biso. Bwanya ya Yehova emonani ata na makambo oyo amoni malamu kolobela te na Liloba na ye. Ndenge nini?

 17 Biblia ekomami na ndenge oyo ezali komeka mikano ya motema na biso. Baebele 4:12 elobi: “Liloba [to nsango] ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo . . . mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” Nsango ya Biblia ekɔtelaka biso malamumalamu, emonisaka polele makanisi mpe mikano na biso ya solosolo. Baoyo batángaka Biblia kaka mpo na koluka mabunga na yango, mbala mingi masolo oyo ezali na makambo mingi te ndenge balingaki ebɛtisaka bango libaku. Bato ya ndenge yango bakoki kutu kondima te ete Yehova azali mpenza na bolingo, na bwanya mpe na bosembo.

18, 19. (a) Mpo na nini tosengeli te kotungisama soki lisolo moko ya Biblia ebimisi mituna oyo tozali kokoka te kopesa mbala moko biyano? (b) Tosengeli kosala nini mpo tókoka kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe, mpe ndenge nini yango emonisi polele bwanya monene ya Yehova?

18 Kasi, soki toyekoli Biblia malamumalamu mpe na motema moko, tokoyeba Yehova na ndenge oyo Biblia mobimba ezali kolobela ye. Na yango, tokotungisama te soki bisika mosusu ya Biblia ebimisi mituna oyo tozali kokoka te kopesa mbala moko biyano. Tomonaka ete, ntango tozali koyekola Biblia, mokemoke toyebaka soki Yehova azali Nzambe ya ndenge nini, mpe nsukansuka tozwaka likanisi ya ndenge azali mpenza. Ata soki na ebandeli tokoki te kokanga ntina ya lisolo moko, to koyeba te ndenge nini yango eyokani na bomoto ya Nzambe, boyekoli na biso ya Biblia esili koteya biso makambo ya Yehova mingi, mpe endimisi biso ete azali mpenza Nzambe ya bolingo mpe ya sembo.

19 Na yango, mpo na kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe, tosengeli kotánga mpe koyekola yango na motema moko mpe na mposa mpenza ya koyeba. Wana ezali mpenza komonisa bwanya monene ya Yehova, boye te? Bato ya mayele bakoki kokoma babuku oyo kaka “bato ya bwanya mpe bato ya mayele” nde bakoki kokanga ntina na yango. Kasi, kokomisa buku moko oyo kaka bato ya makanisi malamu nde bakoki kokanga ntina na yango ezali kosɛnga mpenza bwanya ya Nzambe!Matai 11:25.

 Buku moko ya “bwanya oyo ebongi”

20. Mpo na nini kaka Yehova nde akoki kolakisa biso lolenge ya bomoi oyo eleki malamu, mpe eloko nini ezali na Biblia oyo ekoki kosalisa biso?

20 Na Liloba na ye, Yehova azali koyebisa biso lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Lokola azali Mozalisi na biso, ayebi bamposa na biso malamu koleka biso moko. Mpe bamposa ya libosoliboso ya moto—lokola mposa ya kolingama, ya kozala na esengo, ya kozala na baninga—ebongwaná te. Biblia etondi na “bwanya oyo ebongi” oyo ekoki kosalisa biso tózala na bomoi moko malamu. (Masese 2:7) Eteni mokomoko ya buku oyo ezali na mokapo moko oyo emonisi ndenge tokoki kosalela toli ya bwanya oyo ezali na Biblia, kasi awa tokolobela kaka ndakisa moko mpamba.

21-23. Wapi toli ya bwanya oyo ekoki kosalisa biso tóboya kobomba nkanda?

21 Oyebi ete bato oyo babombaka nkanda basukaka na komipesa mpasi bango moko? Kobomba nkanda ezalaka mokumba moko ya kilo. Ntango tozali kokolisa ezaleli yango, ezwaka makanisi na biso, elongolaka kimya na biso, mpe ebebisaka esengo na biso. Bato ya mayele oyo bayekolaki likambo yango bamonaki ete kokanga nkanda ekoki kotya biso na likama monene ya kozwa maladi ya motema mpe ebele ya bamaladi mosusu oyo eumelaka. Ntango molai liboso bato wana ya mayele báyeba yango, Biblia eyebisaki likanisi oyo ya bwanya: “Zalá na nkanda te mpe tiká kosilika.” (Nzembo 37:8) Kasi ndenge nini tokoki kosala yango?

22 Liloba ya Nzambe epesi toli oyo ya bwanya: “Bososoli ya moto ya mayele ekozikisa nkanda na ye; nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.” (Masese 19:11) Bososoli ezali likoki ya kotala likambo malamumalamu, kosuka kaka te na oyo ezali komonana na miso. Bososoli ekolisaka mayele, mpamba te ekoki kosalisa biso tóyeba mpo na nini moto alobi to asali boye. Soki tosali makasi mpo na koyeba makanisi ya motema na ye, nkanda to mawa oyo esalaki ye, mpe makambo mosusu ya bomoi na ye, yango ekosalisa biso tókanisela ye mabe te mpe tóyokela ye nkanda te.

23 Biblia ezali mpe kopesa toli oyo: “Bókoba kokanga motema  moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.” (Bakolose 3:13) Maloba “bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu” elingi koloba kozala motema molai epai ya baninga, kolandela te bizaleli na bango oyo ekoki kosilikisa biso. Motema molai ya ndenge yango ekoki kosalisa biso tóboya kokanga nkanda mpambampamba. “Kolimbisana” ezali kopesa likanisi ya kotika kobomba nkanda. Nzambe na biso ya bwanya ayebi ete tosengeli kolimbisa basusu soki esengeli. Yango ezali kaka mpo na bolamu ya baoyo tolimbisi te kasi mpe mpo na kimya ya makanisi mpe ya motema na biso. (Luka 17:3, 4) Liloba ya Nzambe ezali solo na bwanya!

24. Nini emonanaka ntango toyokanisi bomoi na biso na bwanya ya Nzambe?

24 Mpo na bolingo monene na ye, Yehova asepelaki kosolola na biso bato. Aponaki lolenge oyo eleki malamu ya kosala yango—atindaki bato bákoma “mokanda” moko na litambwisi ya elimo santu. Yango wana, bwanya ya Yehova nde ezali na kati ya mokanda yango. Ebongi “kotyela” bwanya yango “mpenza motema.” (Nzembo 93:5) Wana tozali koyokanisa bomoi na biso na bwanya yango mpe tozali koyebisa basusu yango, tozali biso moko kopusana penepene na Nzambe na biso oyo aleki na bwanya. Na mokapo oyo elandi, tokolobela ndakisa mosusu ya kokamwa oyo emonisi bwanya monene ya Yehova: likoki na ye ya kosakola makambo oyo ekoya mpe ya kokokisa mokano na ye.

^ par. 8 Na ndakisa, Davidi, mobateli ya mpate, asalelaki bandakisa mingi ya bomoi ya babateli ya mpate. (Nzembo 23) Matai, oyo azalaká mokɔngɔli ya mpako, alobeli mingi mituya mpe valɛrɛ ya mbongo. (Matai 17:27; 26:15; 27:3) Luka azalaki monganga, mpe asaleli maloba oyo emonisi mosala na ye.Luka 4:38; 14:2; 16:20.

^ par. 14 Mbongo yango ya ebende mokomoko ezalaki leptôn, mbongo ya ebende oyo eleki moke oyo Bayuda bazalaki kosalela na ntango wana. Mbongo yango mibale ezalaki na valɛrɛ ya lifuti ya mokolo mobimba ya mosala kabolá na 64. Ekokaki kutu te kosomba mokɛngɛli-mboka moko, ndɛkɛ ya ntalo moke mpenza oyo babola bazalaki kolya.