Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 20

“Azali na motema ya bwanya”—Kasi atondi na komikitisa

“Azali na motema ya bwanya”—Kasi atondi na komikitisa

1-3. Nini endimisi biso ete Yehova azali na komikitisa?

TATA moko alingi koteya mwana na ye likambo moko ya ntina mingi. Alingi mpenza kosimba motema na ye. Akosala ndenge nini? Akotɛlɛma nde liboso na ye mpe kobanda kogangela ye? To nde akokita mpo mitó na bango ekóma esika moko mpe aloba na ye na boboto nyonso? Na ntembe te, soki azali na bwanya mpe na komikitisa, akomona malamu nde asolola na ye na boboto mpenza.

2 Yehova azalaka Tata ya lolenge nini—ya lolendo to ya komikitisa, ya matata to ya boboto? Yehova ayebi makambo nyonso, aleki na bwanya. Nzokande, oyebi malamu ete, mbala mingi, boyebi mpe mayele esalisaka bato te mpo bázala na komikitisa, boye te? Ezali mpenza ndenge Biblia elobi, “boyebi evimbisaka na lolendo.” (1 Bakolinti 3:19; 8:1) Kasi Yehova, oyo azali na “motema ya bwanya,” azali mpe na komikitisa. (Yobo 9:4) Yango elingi koloba te ete azali moto mpamba to azangi lokumu, kasi azali nde na lolendo te. Mpo na nini?

3 Yehova azali mosantu. Na yango, azali na lolendo te, ezaleli oyo ekómisaka moto mbindo. (Malako 7:20-22) Lisusu, yoká oyo mosakoli Yilimia alobaki na Yehova: “Molimo na yo [elingi koloba, Yehova ye mei] ekozanga te kokanisa ngai lisusu mpe kogumbama epai na ngai.” * (Bileli 3:20) Kanisá naino! Yehova, Nkolo Mokonzi Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, andimaki “kogumbama,” to kokita tii penepene na Yilimia, mpo na kotyela moto wana ya kozanga kokoka likebi. (Nzembo 113:7)  Ya solo, Yehova azali na komikitisa. Kasi komikitisa ya Nzambe elimboli nini? Na ndenge nini yango eyokani na bwanya? Mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi mpo na biso?

Lolenge oyo Yehova amonisaka komikitisa

4, 5. (a) Komikitisa ezali nini, ndenge nini emonanaka, mpe mpo na nini esengeli te kotalela yango lokola bolɛmbu to ezaleli ya nsɔninsɔni? (b) Ndenge nini Yehova amikitisaki epai ya Davidi, mpe komikitisa ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na biso?

4 Komikitisa ezali kozanga lofundo mpe lolendo. Lokola ezali ezaleli ya motema, komikitisa emonanaka polele na bizaleli lokola boboto, motema molai, mpe kozala makambo makasimakasi te. (Bagalatia 5:22, 23) Nzokande, soki moto azali na bizaleli wana elingi koloba te ete alɛmbalɛmbá to azalaka nsɔninsɔni. Bizaleli yango epekisaka mpe Yehova te asilika soki esengeli to asalela nguya na ye ya kobebisa. Kasi, na komikitisa mpe boboto na ye, Yehova amonisaka nde nguya na ye oyo eleki monene mpe makoki na ye ya komipekisa malamumalamu. (Yisaya 42:14) Boyokani nini ezali kati na komikitisa ná bwanya? Buku moko oyo elimbolaka Biblia elobi boye: “Nsukansuka balimbolaka komikitisa . . . lokola ezaleli ya koluka libosoliboso matomba ya basusu  mpe yango ezali moko ya makambo oyo esimbi bwanya nyonso.” Na bongo, moto akoki kozala na bwanya ya solosolo ata moke te soki azali na komikitisa te. Matomba nini komikitisa ya Yehova epesaka biso?

Tata ya bwanya azalaka na komikitisa mpe na boboto epai ya bana na ye

5 Mokonzi Davidi ayembelaki Yehova ete: “Okopesa ngai nguba na yo ya lobiko, mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekosalisa ngai, mpe komikitisa na yo ekokómisa ngai moto monene.” (Nzembo 18:35) Ya solo, Yehova amikitisaki mpo na kotyela moto wana ya kozanga kokoka likebi, kobatela ye mpe kosalisa ye mokolo na mokolo. Davidi ayebaki ete akobika—ata mpe kokóma mokonzi monene—kaka mpo Yehova andimaki komikitisa bongo. Solo, nani kati na biso akokaki kozala na elikya ya kobika soki Yehova alingaka te komikitisa mpo na kozala Tata na biso ya boboto mpe ya bolingo?

6, 7. (a) Mpo na nini Biblia elobaka te ete Yehova azali na bopɔlɔ? (b) Boyokani nini ezali kati na boboto mpe bwanya, mpe nani azali kopesa ndakisa oyo eleki malamu na likambo yango?

6 Ezali na ntina tókesenisa komikitisa mpe bopɔlɔ. Bopɔlɔ ezali ezaleli moko ya ntina mingi oyo bato ya sembo basengeli kozala na yango. Ndenge moko na komikitisa, bopɔlɔ mpe ezali ndeko ya bwanya. Na ndakisa, Masese 11:2 (NW) elobi ete: “Bwanya ezali na bato ya bopɔlɔ.” Nzokande, Biblia elobaka soki moke te ete Yehova azali na bopɔlɔ. Mpo na nini? Na Makomami, bopɔlɔ elakisaka: koyeba ete okokoka kosala makambo mosusu te. Nzokande, likambo moko te eleki makoki ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, longola kaka makambo oyo ye moko aboyaka kosala mpo na kotosa mitinda na ye ya boyengebene. (Malako 10:27; Tito 1:2) Lisusu, moto moko te azali likoló na ye mpo ye azali Oyo-Aleki-Likoló. Yango wana, bopɔlɔ ekoki kosalelama mpo na Yehova te.

7 Atako bongo, Yehova azali na komikitisa mpe na boboto. Ateyaka basaleli na ye ete boboto ezali na ntina mingi mpo na komonisa bwanya ya solosolo. Liloba na ye elobeli “boboto oyo ezali ya bwanya.” * (Yakobo 3:13) Talá ndakisa ya Yehova na likambo yango.

 Yehova apesaka mikumba mpe ayokaka na komikitisa nyonso

8-10. (a) Mpo na nini ezali kokamwisa ete Yehova asepelaka kopesa mikumba mpe koyoka? (b) Ndenge nini Mozwi-ya-Nguya-Nyonso amonisaki komikitisa epai ya baanzelu na ye?

8 Komikitisa ya Yehova emonanaka na mposa na ye ya kopesa bikelamu na ye mosusu mikumba mpe ya koyokamela bango. Koyeba ete Yehova ayokamelaka mpenza bikelamu na ye ezali kokamwisa, mpamba te azalaka na mposa ya toli to ya lisalisi ya moto te. (Yisaya 40:13, 14; Baloma 11:34, 35) Atako bongo, Biblia ezali komonisa mbala na mbala ete Yehova amikitisaka bongo.

9 Na ndakisa, tótalela likambo moko ya ntina mingi oyo ekómelaki Abalayama. Abalayama ayambaki bapaya misato, baanzelu. Abengaki moko na bango “Yehova” mpo ye nde azalaki momonisi mpenza ya Yehova. Ntango anzelu yango azalaki koloba to mpe kosala likambo moko, ezalaki mpenza lokola nde Yehova azalaki koloba to kosala. Na monɔkɔ na ye, Yehova alobaki na Abalayama ete ayokaki “kolela [makasi] na ntina na Sodoma na Gomola.” Yehova alobaki ete: “Nakokita mpe nakotala soki basili kosala [ndenge] nsango ekómi na esika na ngai, mpe soki ezali bongo te, nakoyeba.” (Genese 18:3, 20, 21) Maloba ya Yehova elingaki mpenza koloba te ete Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ye mei ‘akokita’ na nse. Kasi, atindaki lisusu nde baanzelu mpo na komonisa ye. (Genese 19:1) Mpo na nini? Yehova, ye oyo akoki komona makambo nyonso, akokaki ye moko te ‘koyeba’ makambo oyo ezalaki koleka mpenza na etúká yango? Akokaki koyeba yango. Kasi na komikitisa nyonso, Yehova apesaki nde baanzelu yango mokumba ya koluka koyeba makambo yango mpe kotala Lota ná libota na ye na Sodoma.

10 Yehova ayokaka mpe. Mokolo moko asɛngaki baanzelu na ye báyebisa ndenge ya kosukisa boyangeli ya mokonzi mabe Ahaba. Yehova azalaki na mposa ya lisalisi yango te. Atako bongo, andimaki likanisi ya anzelu moko mpe apesaki ye nzela ya kokokisa yango. (1 Mikonzi 22:19-22) Wana ezali elembo ya komikitisa te?

11, 12. Ndenge nini Abalayama amonaki komikitisa ya Yehova?

11 Yehova asepelaka kutu koyoka bato ya kozanga kokoka oyo  balingaka koyebisa ye mitungisi na bango. Na ndakisa, ntango Yehova ayebisaki Abalayama mpo na mbala ya liboso mokano na ye ya kobebisa Sodoma ná Gomola, makanisi ya mobali yango ya sembo ezwaki mobulu. Abalayama alobaki ete: “Ebongi na yo te kosala likambo boye.” Mpe abakisaki ete: “Mosambisi ya mokili mobimba akosala sembo te?” Atunaki soki Yehova akoboma bingumba yango te soki bato ya sembo 50 bamonani kuna. Yehova akitisaki ye motema ete akoboma yango te mpo na bango. Kasi Abalayama atunaki lisusu, akitisaki motángo yango na 45, na nsima na 40, mpe bongo na bongo. Atako Yehova akitisaki ye motema, Abalayama akitisaki lisusu motángo yango kino na zomi. Ekoki kozala ete Abalayama akangaki naino malamu te ntina ya bonene ya motema mawa ya Yehova. Atako bongo, na motema molai mpe na komikitisa mpenza, Yehova apesaki moninga mpe mosaleli na ye Abalayama nzela amonisa na lolenge wana makambo oyo ezali kotungisa ye.Genese 18:23-33.

12 Bato boni ya mayele, oyo batángi kelasi mingi, bakolinga kozala na motema molai ndenge wana mpo na koyoka moto moko oyo akokani na bango ata moke te na mayele? * Oyo emonisi mpenza komikitisa ya Nzambe na biso. Kaka na lisolo yango, Abalayama amonaki polele ete Yehova ‘ayokaka nkanda noki te.’ (Exode 34:6) Mbala mosusu, ntango asosolaki ete azali na lotomo te ya kobɛta ntembe na makambo oyo Oyo-Aleki-Likoló azali kosala, Abalayama alobaki mbala mibale: “Tiká [Yehova] ayokela ngai nkanda te.” (Genese 18:30, 32) Yehova asilikelaki ye te. Azali mpenza na “boboto oyo ezali ya bwanya.”

Yehova azali na makambo makasimakasi te

13. Na ndimbola nini Biblia esaleli liloba oyo ebongolami “makambo makasimakasi te,” mpe mpo na nini yango emonisi mpenza ndenge Yehova azalaka?

13 Komikitisa ya Yehova emonanaka mpe na ezaleli na ye mosusu ya malamu oyo bato mingi ya kozanga kokoka bazali na yango te—kozala na makambo makasimakasi te. Yehova asepelaka  kaka te koyoka bikelamu na ye ya mayele, kasi asepelaka mpe kosala makambo oyo balingi soki ebuki mitinda na ye ya boyengebene te. Ndenge basaleli yango na Biblia, liloba oyo ebongolami “makambo makasimakasi te” elimboli mpenza “koyokela basusu.” Ezaleli yango ezali mpe elembo ya bwanya ya Nzambe. Yakobo 3:17 elobi ete: “Bwanya oyo euti na likoló ezali . . . makambo makasimakasi te.” Na ndenge nini Yehova, ye oyo aleki na bwanya, azalaka na makambo makasimakasi te? Ya liboso, amiyokanisaka na likambo mokomoko. Kobosana te, nkombo mpenza ya Yehova eteyaka biso ete amikómisaka nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mikano na ye. (Exode 3:14) Wana ezali komonisa ete azali na elimo ya komiyokanisa na likambo mokomoko mpe ya kozala na makambo makasimakasi te, boye te?

14, 15. Emonaneli ya likalo ya Yehova oyo Ezekiele amonaki na likoló ezali koteya biso nini mpo na ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló, mpe yango ekeseni na bibongiseli ya bato na nini?

14 Mokapo moko ya kokamwa ya Biblia esalisi biso tómeka koyeba mwa moke likoki ya Yehova ya komiyokanisa na likambo mokomoko. Yehova alakisaki mosakoli Ezekiele emonaneli ya ebongiseli na ye ya likoló oyo esalemi na bikelamu ya elimo. Mosakoli yango amonaki likalo moko ya monene mpenza, “motuka” ya Yehova, oyo Ye moko atambwisaka ntango nyonso. Lolenge oyo likalo yango ezalaki kotambola nde eleki mpenza kokamwisa. Bapinɛ na yango minene oyo mokomoko na yango ezalaki na bipai minei ezalaki misomiso; yango wana, ezalaki na likoki ya komona bisika nyonso, mpe ya kobukisa na mbalakaka, kozanga kotɛlɛma to kobaluka. Mpe likalo monene wana ezalaki te kotambola malɛmbɛ lokola mituka mosusu ya kilo oyo esalemi na bato. Ezalaki kotambola mbangu lokola mokalikali, ata mpe kobukisa mbala moko! (Ezekiele 1:1, 14-28) Ya solo, ebongiseli ya Yehova, ndenge moko na Mokonzi mozwi-ya-nguya-nyonso oyo azali kotambwisa yango, eyebi mpenza komiyokanisa na likambo nyonso; eyebi ntango nyonso ndenge ya kosala soki makambo ebongwani to soki bamposa mosusu emonani.

15 Bato bakoki bobele komekola mwa moke lolenge yango ya komiyokanisa malamumalamu na makambo. Kasi emonanaka mbala mingi ete bato nde bazalaka na makambo makasimakasi  koleka, ndenge moko mpe bibongiseli na bango, bamiyokanisaka mpenza te na makambo mpe bayokelaka basusu mpenza te. Tókamata ndakisa moko: Bonene mpe nguya ya masuwa oyo ememaka petrole to ya engbunduka oyo ememaka biloko ekoki mpenza kobangisa. Kasi esalaka nini soki likambo moko ebimeli yango na mbalakaka? Soki engbunduka ya ndenge wana ekutani na eloko na nzela, ekoki kokima yango ata moke te. Ezalaka mpe mpasi mingi etɛlɛma mbala moko. Soki ata bakangi frɛ ya engbunduka ya ndenge wana, ekokende kotɛlɛma nsima ya kilomɛtrɛ pene na mibale! Se ndenge moko, soki bakati motɛrɛ ya masuwa monene oyo ememaka petrole, ekoki kokende kotɛlɛma ata nsima ya kilomɛtrɛ mwambe. Ata soki otye vitesi ya kozongisa yango nsima, ekokoba kokende kilomɛtrɛ misato liboso ya kotɛlɛma! Bibongiseli ya bato oyo ezalaka na makambo makasimakasi ezalaka se bongo. Lolendo etindaka bato báboya komiyokanisa na makambo ya sika. Kozala na makambo makasimakasi ndenge wana ekweisá bakompani, ata mpe baguvɛrnema mingi. (Masese 16:18) Tosengeli solo kozala na esengo mpamba te Yehova ná ebongiseli na ye bazali ndenge wana te!

Ndenge oyo Yehova amonisaka ete azali na makambo makasimakasi te

16. Liboso ya koboma Sodoma ná Gomola, ndenge nini Yehova amonisaki Lota ete azali na makambo makasimakasi te?

16 Tólobela lisusu kobomama ya Sodoma ná Gomola. Anzelu ya Yehova apesaki Lota ná libota na ye malako polele ete: “Kimá epai na ngomba.” Nzokande, likambo yango esepelisaki Lota te. Abondelaki ete: “Te, bongo te, [Yehova].” Lokola akanisaki mpenza ete akokufa soki akimi na bangomba yango, Lota asɛngaki ete ye ná libota na ye bákima na Soali, engumba moko oyo ezalaki penepene wana. Nzokande, Yehova akanaki mpe koboma engumba yango. Lisusu, Lota asengelaki te kobanga, mpamba te Yehova akokaki mpenza kobatela ye kuna na bangomba! Atako bongo, Yehova andimaki likambo Lota asɛngaki mpe abomaki Soali te. Anzelu alobaki na Lota ete: “Talá, nakopesa yo mpe oyo elɔmbi yo lokola.” (Genese 19:17-22) Yehova amonisaki mpenza ete azali na makambo makasimakasi te, boye te?

17, 18. Ndenge nini Yehova amonisaki bato ya Ninive ete azalaka na makambo makasimakasi te?

 17 Yehova alimbisaka mpe soki basumuki babongoli mpenza motema, asalaka ntango nyonso makambo na motema mawa mpe na bosembo. Tótalela oyo esalemaki ntango atindaki mosakoli Yona na Ninive, engumba moko mabe oyo etondaki na mobulu. Ntango Yona atambolaki na babalabala ya Ninive, nsango ya Nzambe oyo azalaki kosakola ezalaki polele: Engumba wana monene ekobomama nsima ya mikolo 40. Kasi, mbongwana moko monene esalemaki. Bato ya Ninive babongolaki motema!Yona, mokapo 3.

18 Kotalela ndenge Yehova asalaki mpe ndenge oyo Yona asalaki ntango makambo ebongwanaki, ekoki mpenza koteya biso. Awa, Yehova amiyokanisaki na likambo yango, amikómisaki Molimbisi-Masumu na esika ya “mobali ya etumba.” * (Exode 15:3) Nzokande, Yona atingamaki kaka na makanisi na ye mpe amonisaki motema mawa te. Na esika azala na makambo makasimakasi te lokola Yehova, azalaki lokola engbunduka oyo ememaka biloko to lokola masuwa monene oyo ememaka petrole, oyo tolobelaki. Mpo na ye, lokola asakolaki kobomama, basengelaki kaka kobomama! Kasi, na motema molai nyonso mpe na ndenge ya malamu mpenza, Yehova ateyaki mosakoli na ye wana ya motema mɔtɔmɔtɔ kozala na makambo makasimakasi te mpe kozala na motema mawa.Yona, mokapo 4.

Yehova azali na makambo makasimakasi te mpe ayebi esika makoki na biso esuki

19. (a) Nini endimisi biso ete Yehova asɛngaka biso te makambo oyo eleki biso motó? (b) Ndenge nini Masese 19:17 (NW) emonisi ete Yehova azali Nkolo “ya malamu mpe ya boboto” mpe azali na nsuka ya komikitisa?

19 Mpo na kosukisa, Yehova asɛngaka biso te makambo oyo eleki biso motó. Mokonzi Davidi alobaki ete: “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:14) Yehova ayebi esika makoki na biso esuki mpe ayebi kozanga kokoka na biso malamu koleka kutu biso moko. Asɛngaka soki moke te ete tósala makambo oyo eleki makoki na biso. Biblia emonisi kutu ete bokeseni ezali kati na bankolo “ya malamu  mpe ya boboto” ná baoyo “bazalaka matata.” (1 Petelo 2:18) Yehova azali Nkolo ya ndenge nini? Talá oyo Masese 19:17 (NW) elobi: “Ye oyo azali komonisela moto mpamba boboto azali kodefisa Yehova.” Emonani polele ete kaka nkolo ya malamu mpe ya makambo makasimakasi te nde akotya likebi bongo na likambo nyonso ya boboto oyo basaleli bato mpamba. Vɛrsɛ yango emonisi lisusu ete Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ amitalelaka lokola nde azali na nyongo ya bato oyo basalaka makambo wana oyo emonisaka motema mawa! Wana nde nsuka ya komikitisa.

20. Nini ezali kondimisa biso ete Yehova ayokaka mabondeli na biso mpe ayanolaka yango?

20 Ata na moi ya lelo, Yehova amoniselaka basaleli na ye boboto mpe asalelaka bango makambo makasimakasi te. Ntango tobondelaka ye na kondima mpenza, ayokaka. Ata soki atindelaka biso baanzelu te mpo na kosolola na biso, tosengeli te kokanisa ete ayanolaka mabondeli yango te. Kanisá lisusu, ntango ntoma Paulo asɛngaki baninga na ye bandimi ‘bábondelaka’ mpo abimisama na bolɔkɔ, abakisaki maloba oyo: “Mpo nazongisama epai na bino nokinoki.” (Baebele 13:18, 19) Na yango, mabondeli na biso ekoki kotinda Yehova asala makambo oyo alingaki ntango mosusu kosala te soki tósɛngaka ye yango te!Yakobo 5:16.

21. Likambo nini tosengeli soki moke te kokanisa mpo na komikitisa ya Yehova, kasi tosengeli nde kosepela mingi na ezaleli nini na ye?

21 Bizaleli wana oyo emonisi komikitisa ya Yehova—boboto,  kolinga koyoka basusu, motema molai mpe kozala na makambo makasimakasi te—emonisi te ete Yehova abukaka mitinda na ye ya boyengebene. Bakonzi ya mangomba ya boklisto bakoki mbala mosusu kokanisa ete bazali na makambo makasimakasi te ntango bazali kolɛmbisa mitinda ya Yehova oyo etali bizaleli malamu mpo na kosepelisa matoi ya bato na bango. (2 Timote 4:3) Bato ya kozanga kokoka babukaka mitinda mpo na kozwa litomba moko nokinoki, kasi yango eyokani te na ezaleli ya kozala na makambo makasimakasi te oyo Nzambe azali na yango. Yehova azali mosantu; akoki soki moke te kobebisa mitinda na ye ya boyengebene. (Levitike 11:44) Na yango, tólinga ezaleli ya Yehova ya kozala na makambo makasimakasi te, mpamba te yango ezali mpenza elembo ya komikitisa na ye. Ozali na esengo monene te ya koyeba ete Yehova Nzambe, Moto oyo aleki na bwanya na molɔ́ngɔ́, aleki mpe na komikitisa? Ezali solo esengo kopusana penepene na Nzambe yango ya kokamwa, kasi mpe ya boboto, ya motema molai mpe ya makambo makasimakasi te!

^ par. 3 Bakomeli ya ntango ya kala, to Basoferime, babongolaki vɛrsɛ yango mpo eloba ete ezali Yilimia, kasi Yehova te, nde azali kogumbama. Bakanisaki mpenza ete ebongi te koloba ete Nzambe asali likambo ya komikitisa ndenge wana. Yango esali ete mabongoli mingi ebimisa malamu te likanisi oyo ezali na vɛrsɛ wana ya ntina. Nzokande, libongoli moko (The New English Bible) emonisi malamu maloba ya Yilimia: “Kanisá lisusu, ee kanisá lisusu, mpe gumbamá epai na ngai.”

^ par. 7 Mabongoli mosusu elobi “ásála misálá na bwányá mpé na motéma bobóto” mpe “boboto oyo ezali elembo ya bwanya.”

^ par. 12 Likambo ya kobenda likebi, Biblia elobi ete motema molai ná lofundo ezali na boyokani te. (Mosakoli 7:8) Motema molai ya Yehova ezali elembo mosusu ya komikitisa na ye.2 Petelo 3:9.

^ par. 18 Na Nzembo 86:5, balobi ete Yehova azali ‘malamu mpe alimbisaka mabe.’ Ntango babongolaki nzembo yango na Grɛki, liloba ‘alimbisaka’ ebongolamaki na e·pi·ei·kesʹ, to “makambo makasimakasi te.”