Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 15

Yesu ‘atye bosembo na mabelé’

Yesu ‘atye bosembo na mabelé’

1, 2. Na libaku nini Yesu asilikaki, mpe mpo na nini?

EMONANI ete Yesu azalaki na nkanda—mpe nkanda yango ezalaki na ntina. Ntango mosusu likambo yango ekamwisi yo, mpamba te azalaki na elimo ya boboto. (Matai 21:5) Kasi amipekisaki mpenza, mpe nkanda na ye ezalaki sembo. * Likambo nini oyo esilikisaki moto yango ya kimya? Likambo moko oyo ezalaki mpenza sembo te.

2 Yesu alingaki tempelo ya Yelusaleme mingi. Na mokili mobimba, yango kaka nde ezalaki esika mosantu oyo ebongisamaki mpo na losambo ya Tata na ye ya likoló. Bayuda ya bipai na bipai bazalaki kosala mibembo ya milai mpo na kosambela kuna. Ata bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki koya, kokɔta na lopango ya tempelo oyo ebongisamaki mpo na bango. Kasi na ebandeli ya mosala ya Yesu, akɔtaki na lopango ya tempelo mpe amonaki makambo oyo esepelisaki ye ata moke te. Na esika emonana lokola esika ya losambo, ekómaki nde esika ya mombongo! Batɛkisi ná bato oyo basenzaka mbongo batondanaki wana. Kasi, nini emonisaki ete bazali sembo te? Bango bazalaki komona tempelo ya Nzambe lokola nde ezali esika ya kolyela bato—ata mpe koyiba bango. Na ndenge nini?Yoane 2:14.

3, 4. Na ndako ya Yehova, ndenge nini bato bazalaki kolyela bato mosusu na lokoso mpenza, mpe Yesu asalaki nini mpo na kosilisa likambo yango?

3 Bakonzi ya mangomba bazwaki ekateli ete bato basengeli kosalelaka kaka motindo moko boye ya mbongo ya ebende mpo na kofuta mpako ya tempelo. Bapaya basengelaki bongo kosanze mbongo na bango mpo na kozwa mbongo wana. Yango wana, bato oyo  basenzaka mbongo batyaki bamesa na bango na kati mpenza ya tempelo mpe bazalaki kosɛnga matabisi epai ya moto nyonso oyo asanze mbongo. Kotɛkisa banyama ezalaki mpe mombongo mosusu oyo ezalaki kokɔtisa mbongo mingi. Bato oyo balingaki kopesa nyama mbeka bakokaki kosomba nyama yango epai ya batɛkisi oyo bazalaki na engumba, kasi ntango mosusu basali ya tempelo bakokaki koboya nyama yango. Nzokande, soki basombi nyama yango na lopango mpenza ya tempelo, bakokaki koboya yango ata moke te. Batɛkisi bakómaki na bantango mosusu kotya ntalo makasi, mpamba te bayebaki ete bato bakoya kosomba kaka epai na bango. * Wana ezalaki kaka mombongo ya lokoso te, kasi nde moyibi mpenza!

“Bólongola biloko oyo awa!”

4 Yesu akokaki te kokanga miso likoló ya makambo oyo ezalaki sembo te ndenge wana. Wana ezalaki ndako ya Tata na ye! Asalaki fimbo ya bansinga mpe abenganaki bitonga ya bangɔmbɛ mpe ya mpate na libándá ya tempelo. Nsima na yango, akendaki mbangu epai ya bato oyo basenzaka mbongo mpe akweisaki bamesa na bango. Kanisá ndenge mbongo wana nyonso ya bibende epanzanaki likoló ya mabanga ya marbre oyo ezalaki na nse! Ayebisaki bato oyo bazalaki kotɛka bibenga na makasi nyonso ete: “Bólongola biloko oyo awa!” (Yoane 2:15, 16) Emonani ete ata moto moko te amekaki kotɛmɛla mobali yango ya mpiko.

Mwana alandaka ndakisa ya Tata

5-7. (a) Ndenge nini bomoi oyo Yesu azalaki na yango liboso akóma moto ekolisaki bosembo na ye, mpe koyekola ndakisa na ye ekosalisa biso na nini? (b) Klisto asalaki nini mpo na kosukisa makambo oyo ezali sembo te oyo elobamaki na ntina na bokonzi mpe nkombo ya Yehova?

5 Kasi, batɛkisi yango bazongaki lisusu na tempelo. Mbula  soki misato na nsima, Yesu asalaki bango lisusu ndenge asalaki liboso; kasi, na mbala oyo, azongelaki maloba oyo Yehova alobaká mpo na kokweisa baoyo bakómisaki ndako na Ye “libulu ya babandi.” (Matai 21:13; Yilimia 7:11) Ntango Yesu amonaki ndenge bato bazali kolyela basusu na lokoso mpenza mpe ndenge bakómisaki tempelo ya Nzambe mbindo, ayokaki mabe lokola Tata na ye. Mpe yango esengeli kokamwisa biso te! Na boumeli ya bambula bamilio na bamilio, Yesu ateyamaki na Tata na ye ya likoló. Yango esalaki ete bosembo ya Yehova ekɔtela ye mpe mingi. Na yango, soki tolingi koyeba bosembo ya Yehova malamu, lolenge ya kosala oyo eleki malamu ezali komanyola ndakisa ya Yesu Klisto.Yoane 14:9, 10.

6 Mwana mobotami-se-moko ya Yehova azalaki ntango Satana abengaki Yehova Nzambe mobuki-lokuta mpe amonisaki ete boyangeli na Ye ezangi boyengebene. Talá lokuta ya ndenge wana! Na nsima, Mwana ayokaki mpe Satana azali kobɛta ntembe ete ata moto moko te akosalela Yehova na bolingo, kozanga koluka matomba na ye moko. Na ntembe te, bifundeli ya lokuta wana epesaki Mwana mpasi na motema na ye oyo elingá boyengebene. Oyo nde esengo monene ayokaki ntango bayebisaki ye ete akozwa mokumba monene ya komonisa ete nyonso wana ezali lokuta mpamba! (2 Bakolinti 1:20) Ndenge nini akokokisa mokumba yango?

7 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 14, Yesu Klisto amonisaki polele mpe mpo na libela ete efundeli ya Satana na ntina na bosembo ya bikelamu ya Yehova ezali lokuta. Na ndenge yango, Yesu asalaki likambo oyo, na nsuka, ekosalisa na kolongisa bokonzi ya Yehova mpe kosantisa nkombo na Ye. Lokola Yehova atye Yesu Kapita, Yesu akotya bosembo ya Nzambe na molɔ́ngɔ́ mobimba. (Misala 5:31) Bomoi na ye awa na mabelé emonisaki mpe bosembo yango. Yehova alobelaki ye ete: “Nakotya elimo na ngai likoló na ye, mpe akomonisa polele epai ya bikólo soki bosembo ezali nini.” (Matai 12:18) Ndenge nini Yesu akokisaki maloba yango?

 Yesu amonisi polele “soki bosembo ezali nini”

8-10. (a) Ndenge nini mimeseno oyo ekomamaki te oyo bakonzi ya mangomba babimisaki ezalaki kolendisa Bayuda bátyolaka bato oyo bazalaki Bayuda te ná basi? (b) Na ndenge nini mibeko oyo ekomamaki te ekómisaki mobeko ya Yehova oyo etali Sabata kilo?

8 Yesu alingaki Mibeko ya Yehova mpe azalaki kotosa yango. Kasi bakonzi ya mangomba ya mikolo na ye bazalaki kolimbola Mibeko ndenge mosusu mpe kosalela yango na ndenge ya mabe. Yesu ayebisaki bango ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! . . . Bosili kotyola makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo mpe motema mawa mpe kondima.” (Matai 23:23) Na ntembe te, bateyi wana ya Mibeko ya Nzambe bazalaki komonisa polele te “soki bosembo ezali nini.” Bazalaki nde kosala ete bosembo ya Nzambe emonana polele te. Na ndenge nini? Tózwa mwa bandakisa.

9 Yehova asɛngaki bato na ye bákabwana na bikólo ya bapakano oyo ezalaki zingazinga na bango. (1 Mikonzi 11:1, 2) Kasi, bakonzi mosusu ya mangomba oyo bazalaki na molende ya mabe bazalaki kolendisa Bayuda bátyolaka baoyo nyonso bazali Bayuda te. Kutu, Mishna epesaki mobeko oyo: “Esengeli te kotika bangɔmbɛ na mwa baotɛlɛ ya bato oyo bazali Bayuda te, mpamba te elobamaka ete bato wana basangisaka nzoto na banyama.” Kozwela bato nyonso oyo bazali Bayuda te makanisi mabe ndenge wana ezalaki sembo te mpe eyokanaki ata moke te na likambo oyo Mibeko ya Moize esɛngaki. (Levitike 19:34) Mibeko mosusu ya bato ezalaki kokitisa lokumu ya basi. Mibeko oyo ekomamaki te elobaki ete mwasi asengeli kotambola nsima ya mobali na ye, kasi pembeni na ye te. Ezalaki mabe mobali asolola na mwasi na miso ya bato, ata mwasi na ye. Ndenge moko na baombo, basi mpe bazalaki na ndingisa te ya kozala batemwe na tribinale. Kutu, ezalaki na libondeli moko oyo mibali bazalaki kosala mpo na kopesa Nzambe matɔndi na ndenge akelaki bango basi te.

10 Bakonzi ya mangomba bakundaki Mibeko ya Nzambe na nse ya ebele ya mibeko mpe malako ya bato. Na ndakisa, mobeko ya Sabata epekisaki kaka kosala mosala na mokolo ya Sabata; ekómisaki mokolo wana mokolo ya losambo, ya kolendisama na elimo mpe ya kopema. Kasi Bafalisai bakómisaki mobeko wana kilo. Bamipesaki lotomo ya koyebisa nini oyo esengelaki kotalelama lokola  “mosala.” Na yango, bakataki ete makambo 39, na ndakisa kobuka mbuma to kosala bokila, esengelaki kotalelama ete ezali misala. Makambo yango ebimisaki ebele mpenza ya mituna na mitó ya bato. Soki moto abomi nsili moko mokolo ya Sabata, asali nde bokila? Soki, ntango moto azali koleka na elanga, abuki mwa blé na lobɔkɔ mpo alya, asali nde mosala ya kobuka mbuma? Soki asalisi moto ya maladi, asali nde mosala? Ezalaki na mibeko ya mikemike mpe ya makasimakasi oyo eyanolaki na mituna wana.

11, 12. Ndenge nini Yesu amonisaki ete andimaki te mimeseno ya Bafalisai oyo eyokanaki na Makomami te?

11 Lokola makambo ezalaki bongo, ndenge nini Yesu alingaki kosalisa bato báyeba soki bosembo ezali nini? Na mpiko nyonso, atɛmɛlaki bakonzi wana ya mangomba na nzela ya mateya na ye mpe ya etamboli na ye. Tólobela naino ndambo ya mateya na ye. Akweisaki polelepolele ebele ya mibeko na bango; ayebisaki bango boye: “Bozali kokómisa liloba ya Nzambe eloko ya mpamba na mimeseno na bino oyo bopesaki.”Malako 7:13.

12 Na nguya nyonso, Yesu ateyaki ete Bafalisai bazali komikosa na ntina na mobeko ya Sabata—amonisaki kutu ete bayebaki mpenza ntina ya mobeko yango te. Alimbolaki ete Masiya azali “Nkolo ya sabata”; yango wana, azali na lotomo ya kobikisa bato na mokolo yango. (Matai 12:8) Mpo na komonisa ete ezali mpenza bongo, na miso ya bato mingi, abikisaki bato na likamwisi na mokolo ya Sabata. (Luka 6:7-10) Yango emonisaki mwa moke ndenge oyo akobikisa bato na mokili mobimba na boumeli ya Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto. Boyangeli wana ekozala yango moko nsuka na Sabata; na ntango wana, bato nyonso ya sembo bakopema mpenza nsima ya konyokwama na lisumu mpe liwa bambula nkama na nkama.

13. Mobeko nini ebandaki nsima ya mosala ya Klisto awa na mabelé, mpe mobeko yango ná Mibeko oyo ezalaki liboso na yango ekeseneki na nini?

13 Yesu amonisaki mpe polele soki bosembo ezali nini na nzela ya mobeko moko ya sika, “mobeko ya Klisto,” oyo ebandaki nsima ya mosala na ye awa na mabelé. (Bagalatia 6:2) Mobeko yango ya sika ekeseneki na Mibeko ya Moize oyo ezalaki liboso na yango; yango ezalaki mpenzampenza te na masɛngami ebele oyo ekomami, ezalaki nde na mitinda. Atako bongo, ezalaki na mwa  ndambo ya malako ya polele. Yesu abengaki moko na malako yango “komandema ya sika.” Yesu ateyaki bayekoli na ye nyonso bálinganaka lokola ye alingaki bango. (Yoane 13:34, 35) Ɛɛ, bolingo oyo esɛngaka komipesa mpo na basusu esengelaki kozala elembo mpo na koyeba baoyo nyonso bazali kotosa “mobeko ya Klisto.”

Azalaki ndakisa mpenza ya bosembo

14, 15. Ndenge nini Yesu amonisaki ete ayebaki esika oyo bokonzi na ye esuki, mpe mpo na nini likambo yango ezali kokitisa biso motema?

14 Yesu asukaki kaka te na koteya bolingo. Azalaki kotosa “mobeko ya Klisto.” Azalaki komonisa yango na bomoi na ye. Tótalela ndenge misato oyo bomoi ya Yesu emonisaki polele soki bosembo ezali nini.

15 Ya liboso, Yesu asalaki nyonso mpo asala ata likambo moko te oyo ezali sembo te. Ntango mosusu osilá komona ete mbala mingi bato ya kozanga kokoka basalelaka basusu makambo na bosembo te soki lofundo ekómi kotinda bango básala makambo oyo bokonzi na bango epesi bango nzela te. Yesu asalaki bongo te. Mokolo moko, moto moko ayaki epai na ye mpe ayebisaki ye boye: “Moteyi, yebisá ndeko na ngai akabola libula elongo na ngai.” Eyano nini Yesu apesaki ye? “Moto, nani atye ngai mosambisi to mokaboli na kati na bino?” (Luka 12:13, 14) Omoni te ete ezali likambo ya kokamwa? Mayele ya Yesu, bososoli na ye, ata mpe bokonzi oyo Nzambe apesaki ye, elekaki ya bato nyonso mosika; atako bongo, aboyaki komikɔtisa na likambo wana, mpamba te bapesaki ye bokonzi ya kosala likambo yango te. Banda kala Yesu azalaka kaka na bopɔlɔ ya ndenge wana, ata na boumeli ya bambula nkóto na nkóto oyo alekisaki na likoló liboso akóma moto. (Yuda 9) Lokola Yesu amikitisaka mpe atikaka Yehova amonisa ye moko nini ezali sembo, emonisi ete azali na ezaleli ya malamu mingi.

16, 17. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki bosembo ntango azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe? (b) Na ndenge nini Yesu azalaki komonisa bosembo ná motema mawa mbala moko?

16 Ya mibale, Yesu amonisaki bosembo na ndenge na ye ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Azalaki kopona bilongi te. Azalaki nde kosala nyonso mpo asolola na bato ya ndenge nyonso, ezala bazwi to babola. Nzokande, Bafalisai bazalaki koboya babola to bato mpamba; bapesaki bango nkombo moko ya kotyola:  ʽam-ha·ʼaʹrets, to “bato ya mboka.” Na mpiko nyonso, Yesu asukisaki likambo yango oyo ezali sembo te. Ntango azalaki koteya bato nsango malamu—to, mpo na mosala yango, ntango azalaki kolya na bato, koleisa bango, kobikisa bango, ata mpe kosekwisa bango—azalaki komonisa bosembo ya Nzambe oyo alingi ete “bato ya ndenge nyonso” báyoka nsango yango. *1 Timote 2:4.

17 Ya misato, ntango Yesu azalaki komonisa bosembo, azalaki mpe komonisa motema mawa mpenza. Azalaki kosala nyonso mpo na kosalisa basumuki. (Matai 9:11-13) Azalaki kokakatana te kosalisa bato oyo bazalaki na nguya te ya komibatela bango moko. Na ndakisa, Yesu akeseneki na bakonzi ya mangomba; ye azalaki kolendisa bato te ete bákeba mpenza na moto nyonso oyo azali Moyuda te. Atako batindaki ye libosoliboso epai ya Bayuda, motema mawa etindaki ye asalisa mpe ateya bato mosusu oyo bazalaki Bayuda te. Na ndakisa, andimaki kosala likamwisi mpo na kobikisa mosali ya Moloma moko, mokonzi ya basoda, oyo asɛngaki ye abikisela ye mosali yango. Alobaki boye: “Namoná naino kondima ya monene boye te epai ya moto moko na Yisalaele.”Matai 8:5-13.

18, 19. (a) Na ndenge nini Yesu atombolaki lokumu ya basi? (b) Ndenge nini ndakisa ya Yesu esalisi biso tóyeba boyokani oyo ezali kati na mpiko mpe bosembo?

18 Ndenge moko mpe, Yesu azalaki kolanda te ndenge oyo bato mingi ya ntango na ye bazalaki kotalela basi. Na mpiko nyonso, asalaki nde oyo ezalaki sembo. Bayuda bazalaki komona basi ya Samalia ete bazali mbindo ndenge moko na bato oyo bazalaki Bayuda te. Atako bongo, Yesu akakatanaki te kosakwela mwasi moko Mosamalia na libulu ya mai ya Sikala. Kutu, ezalaki epai ya mwasi wana nde Yesu alobaki mpo na mbala ya liboso polele ete azali Masiya oyo alakamaki. (Yoane 4:6, 25, 26) Bafalisai bazalaki koloba ete esengeli te koteya basi Mibeko ya Nzambe, kasi Yesu azalaki kolekisa ntango mingi mpe komipesa mpo na  koteya basi. (Luka 10:38-42) Lisusu, wana mimeseno ezalaki komonisa ete basi bakoki te kotatola makambo ya solo mpo bakoki te kotyelama motema, Yesu apesaki basi mingi lokumu na ndenge apesaki bango libaku malamu ya kozala bato ya liboso oyo bamonaki ye nsima ya lisekwa na ye. Ayebisaki kutu bango bákende koyebisa bayekoli na ye ya mibali likambo wana oyo eleki ntina!Matai 28:1-10.

19 Ya solo, Yesu amonisaki polele epai ya bikólo soki bosembo ezali nini. Mbala mingi, atyaki mpenza bomoi na ye na likama mpo na komonisa yango. Ndakisa na ye esalisi biso tóyeba ete esɛngaka kozala na mpiko mpo na komonisa bosembo ya solosolo. Yango wana, babengaki ye “Nkɔsi ya libota ya Yuda.” (Emoniseli 5:5) Ozali koyeba lisusu ete nkɔsi ezali elembo ya bosembo oyo emonisamaka na mpiko mpenza? Mosika te, Yesu akotya bosembo mingi koleka. Akotya mpenzampenza “bosembo na mabelé.”Yisaya 42:4.

Mokonzi Masiya ‘atye bosembo na mabelé’

20, 21. Na mikolo na biso, ndenge nini Mokonzi Masiya azali kokɔtisa bosembo na mabelé mobimba mpe na kati ya lisangá ya boklisto?

20 Banda Yesu Masiya akómá Mokonzi na 1914, azali kokɔtisa bosembo awa na mabelé. Na ndenge nini? Azali kotambwisa kokokisama ya esakweli na ye oyo ezali na Matai 24:14. Bayekoli na ye awa na mabelé bazali koteya bato ya mikili nyonso solo ya Bokonzi ya Yehova. Lokola Yesu, bazali kosakola kozanga kopona bilongi mpe na bosembo mpenza; bazali koluka kopesa moto nyonso—ezala elenge to mobange, mozwi to mobola, mwasi to mobali—libaku ya koyeba Yehova, Nzambe ya bosembo.

21 Yesu azali mpe kolendisa bosembo na kati ya lisangá ya boklisto, oyo ye azali Mokonzi na yango. Ndenge esakolamaki, azali kopesa “makabo oyo ezali bato,” elingi koloba bankulutu ya sembo oyo bazali kokamba lisangá. (Baefese 4:8-12) Ntango mibali yango babatelaka etonga ya Nzambe, balandaka ndakisa ya bosembo ya Yesu Klisto. Ntango nyonso, babosanaka te ete Yesu alingi ete básalelaka bampate na ye makambo na bosembo—ezala bampate yango bazali na mosala nini, bato minene to te, bazwi to te.

22. Yehova azali koyoka ndenge nini ntango azali komona ebele ya makambo oyo ezali sembo te oyo etondi na mokili lelo oyo, mpe apesi Mwana na ye mokumba ya kosala nini?

 22 Mosika te, Yesu akotya bosembo na mabelé na ndenge oyo emonaná naino te. Mokili mabe oyo etondi na makambo oyo ezali sembo te. Kozanga bosembo ya nsɔmɔ nde ezali kobomisa bana na nzala, mingimingi soki tokanisi ete mbongo mpe ntango mingi ezali kokende na kosala bibundeli mpe na koluka kosepelisa mposa ya bato oyo balingá bisengo. Liwa ya mobesu oyo bamilio na bamilio ya bato bazali kokufa mbula na mbula ezali moko na ebele ya makambo oyo ezali sembo te; mpe makambo yango nyonso ezali kotinda Yehova asilika. Yango wana, apesi Mwana na ye mokumba ya kobundisa ebongiseli mabe mobimba ya makambo ya ntango oyo etumba moko ya sembo mpo na kosukisa makambo nyonso oyo ezali sembo te libela na libela.Emoniseli 16:14, 16; 19:11-15.

23. Nsima ya Armagedona, ndenge nini Klisto akokɔtisa bosembo seko na seko?

23 Kasi, bosembo ya Yehova esuki kaka te na koboma bato mabe. Aponi mpe Mwana na ye ayangela mpe azala “Nkolo ya kimya.” Nsima ya etumba ya Armagedona, boyangeli ya Yesu ekotya kimya na mabelé mobimba mpe akoyangela ‘na bosembo.’ (Yisaya 9:6, 7) Na ntango wana, Yesu akosepela kosilisa makambo nyonso oyo ezali sembo te, oyo epesaki bato mawa mpe mpasi mingi. Akomonisa bosembo ya kokoka ya Yehova seko na seko. Yango wana, ezali na ntina mingi ete banda sikoyo tóluka kolanda ndakisa ya bosembo ya Yehova. Tótala sikoyo ndenge oyo tokoki kosala yango.

^ par. 1 Na ndenge Yesu amonisaki nkanda ya sembo, akokanaki na Yehova, ye oyo “atondi na nkanda” mpo na kotɛmɛla mabe nyonso. (Nahumu 1:2) Na ndakisa, nsima ya koyebisa bato na ye oyo bazalaki motó makasi ete bakómisaki ndako na ye “ndako ya miyibi,” Yehova alobaki ete: “Nkanda na ngai mpe nkɛlɛ na ngai ekosopama likoló ya esika oyo.”Yilimia 7:11, 20.

^ par. 3 Mishna emonisi ete nsima ya mwa bambula, bato batombokaki mpo bibenga ezalaki kotɛkama na ntalo makasi na tempelo. Mbala moko bakitisaki mpenza ntalo yango (na 99 %)! Banani bazalaki kozwa litomba mingi mpenza na mombongo yango oyo ezalaki kopesa matabisi mingi? Bato mosusu ya mayele na makambo ya kala bakanisaka ete mombongo oyo ezalaki kosalema na tempelo ezalaki na mabɔkɔ ya bato ya libota ya Nganga-Nzambe Monene Anasi; libota yango ezalaki na bozwi mingi, mpe ndambo monene ya bozwi yango ezalaki kouta na mombongo yango.Yoane 18:13.

^ par. 16 Na miso ya Bafalisai, bato mpamba ‘balakelamaki mabe’ mpo bayebaki Mibeko malamu te. (Yoane 7:49) Bazalaki koloba ete esengeli te koteya bato yango, kosala na bango mombongo, kolya na bango mpe kobondela na bango. Kotika ete moko na bango abala mwana na yo ya mwasi ezalaki mabe koleka kotika ye na banyama ya zamba. Na miso na bango, bato mpamba wana bakoki kozala na elikya ya lisekwa te.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Mbula 100 ya Boyangeli​—Eteyi yo nini?

Ndenge nini tokozwa matomba na boyangeli yango? Talá ndenge Mokonzi Masiya azali kopɛtola, koteya mpe kobongisa bato na ye.