Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 11

“Nzela na ye nyonso bosembo”

“Nzela na ye nyonso bosembo”

1, 2. (a) Makambo nini oyo ezali mpenza sembo te basalelaki Yozefe? (b) Ndenge nini Yehova asukisaki makambo yango?

LIKAMBO oyo basali ezali mpenza sembo te. Elenge mobali moko ya kitoko asali mabe moko te, kasi batye ye na kasho mpo bakoselaki ye ete alingaki kosangisa nzoto na makasi na mwasi ya bato. Oyo ezali mbala ya liboso te ete básalela ye likambo oyo ezali sembo te. Bambula mingi liboso, ntango elenge yango, Yozefe, azalaki na mbula 17, bandeko na ye mpenza balingaki liboso koboma ye; kasi na nsima, batɛkaki ye moombo na mboka mopaya. Na mboka yango, mwasi ya nkolo na ye azalaki kosɛnga ye ete básangisa nzoto, kasi ye azalaki koboya. Yango etindaki mwasi wana akosela ye makambo. Ezali mpo na ntina wana nde Yozefe azali sikoyo na bolɔkɔ. Na mawa mpenza, emonani ete ata moto moko ya kokɔtela ye azali te.

Yozefe anyokwamaki mpamba na kati ya “bolɔkɔ”

2 Kasi Yehova, Nzambe oyo ‘alingi boyengebene mpe bosembo’ azalaki kotala. (Nzembo 33:5) Yehova asukisi mabe yango oyo basalelaki Yozefe, asali ete makambo eleka na ndenge oyo, nsukansuka, babimisi ye na bolɔkɔ. Longola yango, Yozefe—moto ya “bolɔkɔ”—ayei kokóma mokonzi monene mpe na lokumu mingi mpenza. (Genese 40:15; 41:41-43; Nzembo 105:17, 18) Nsukansuka, makambo nyonso bakoselaki Yozefe emonanaki lokuta, mpe asalelaki bokonzi monene oyo bapesaki ye mpo na kokokisa mokano ya Nzambe.Genese 45:5-8.

3. Mpo na nini ezali likambo ya kokamwa te soki biso nyonso tolingaka básalelaka biso makambo na bosembo mpenza?

3 Lisolo yango esimbaka mpenza mitema na biso, boye te? Nani oyo amoná naino te basaleli moto moko likambo oyo ezali sembo te to nani oyo basalelá ye naino te likambo oyo ezali sembo te? Ya solo, biso nyonso tozalaka na mposa makasi ete básalela biso makambo na bosembo mpenza mpe bápona bilongi te. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te Yehova apesá biso bizaleli oyo ye azalaka na yango, mpe bosembo  ezali moko na bizaleli na ye ya minene. (Genese 1:27) Mpo tóyeba Yehova malamu, tosengeli kokanga ntina ya bosembo na ye. Yango ekoki kosalisa biso tósepela lisusu mingi na banzela malamu na ye mpe tóluka kopusana penepene na ye.

Bosembo ezali nini?

4. Mbala mingi, bato bakanisaka ete bosembo elakisi nini?

4 Mbala mingi, bato bakanisaka ete bosembo elakisi kaka kosalela mibeko na ndenge elongobani. Buku moko (Right and ReasonEthics in Theory and Practice) elobi ete “bosembo ezali na boyokani na mobeko, na likambo oyo basɛngisi biso, na ntomo, mpe na mikumba; mpe ezwaka bikateli na yango kozanga kopona bilongi mpe etalelaka likambo ndenge mpenza ezali.” Nzokande, bosembo ya Yehova esukaka kaka te na kosalela malako mpo ezali mokumba to likambo oyo basɛngisi biso.

5, 6. (a) Maloba ya minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli oyo ebongolami na “bosembo” elimboli nini? (b) Koloba ete Nzambe azali sembo elakisi nini?

5 Tokoki kokanga ntina ya bonene mpe bozindo ya bosembo ya Yehova malamumalamu soki totaleli maloba oyo bato oyo bakomaki Biblia na ebandeli basalelaki. Na Makomami ya Liebele, basaleli mingimingi maloba misato. Moko na yango oyo ebongolamaka mbala mingi na “bosembo” ekoki mpe kobongolama “sembo.” (Genese 18:25) Maloba mibale oyo etikali ebongolamaka ntango nyonso “boyengebene.” Na Makomami ya Grɛki ya boklisto, liloba oyo ebongolami na “boyengebene” elakisi “ezaleli ya oyo ezali semba to sembo.” Na yango, emonani polele ete bokeseni ezali mpenza te kati na boyengebene mpe bosembo.Amosa 5:24.

6 Na yango, ntango Biblia elobi ete Nzambe azali sembo, yango elingi koloba ete asalaka ntango nyonso makambo oyo ezali semba, aponaka bilongi te. (Baloma 2:11) Ekoki kosalema ata moke te ete asala makambo na ndenge mosusu. Elihu, moto ya sembo, alobaki boye: “Tiká ete ezala mosika na Nzambe ete asala mabe! Ezala mosika mpe na Oyo-na-Nguya-Nyonso ete asala [makambo oyo ezangi bosembo]!”  (Yobo 34:10) Ya solo, ekoki kosalema te ete Yehova “asala makambo oyo ezangi bosembo.” Mpo na nini? Mpo na ntina mibale ya minene.

7, 8. (a) Mpo na nini Yehova akoki te kosala makambo oyo ezangi sembo? (b) Nini etindaka Yehova azala moyengebene to sembo na boyokani na ye na basusu?

7 Ya liboso, azali mosantu. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 3, Yehova azali pɛto mpe alima na ndenge oyo eleki mpenza. Yango wana, akoki te kosala makambo oyo ezangi boyengebene to oyo ezangi sembo. Kanisá ndimbola na yango. Bosantu ya Tata na biso ya likoló ezali kotinda biso mpenza tóndima ete akonyokola bana na ye ata mokolo moko te. Yesu andimaki likambo yango. Na butu na ye ya nsuka awa na mabelé, abondelaki boye mpo na bayekoli na ye: “Tata mosantu, kɛngɛlá bango mpo na nkombo na yo.” (Yoane 17:11) Na Makomami, kaka Yehova ye moko nde abengami “Tata mosantu.” Ebengeli yango ebongi, mpamba te tata ata moko te awa na mabelé akokani na ye na bosantu. Yesu andimaki na motema na ye mobimba ete bayekoli na ye bakozala na likama ata moko te soki Tata na ye azali kokɛngɛla bango, mpamba te Ye azali pɛto na makambo nyonso mpe lisumu ezali mpenza mosika na ye.Matai 23:9.

8 Ya mibale, bolingo oyo elukaka matomba na yango moko te ezali ezaleli na ye ya monene. Bolingo yango etindaka ye azala moyengebene to sembo na boyokani na ye na basusu. Kasi, mbala mingi lokoso ná moimi, bizaleli oyo eyokani ata moke te na bolingo, nde ebimisaka makambo oyo ezali sembo te oyo emonanaka na mitindo ndenge na ndenge—na ndakisa, koyina bato ya loposo mosusu mpe kopona bilongi. Biblia elobi mpo na Nzambe yango ya bolingo ete: “[Yehova] azali moyengebene mpe alingi boyengebene.” (Nzembo 11:7) Ye moko alobi ete: “Ngai Yehova nalingi bosembo.” (Yisaya 61:8) Koyeba ete Nzambe na biso asepelaka kosala makambo oyo ezali semba to sembo ezali mpenza kobɔndisa biso, boye te?Yilimia 9:24.

 Yehova azali na motema mawa mpe na bosembo ya kokoka

9-11. (a) Boyokani nini ezali na kati ya bosembo ya Yehova mpe motema mawa na ye? (b) Ndenge nini bosembo ya Yehova mpe motema mawa na ye ezali komonana polele na ndenge na ye ya kosalela basumuki makambo?

9 Lokola bomoto ya Yehova ekoki na makambo nyonso mpenza mpe ezangi eloko te, bosembo na ye mpe ezali ndenge wana. Moize akomaki maloba oyo mpo na kosanzola Yehova: “Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka, mpo nzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe ya sembo, oyo epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe semba.” (Deteronome 32:3, 4) Lolenge nyonso oyo Yehova amonisaka bosembo na ye ezalaka na mbeba te—amonisaka motema mawa koleka te, amonisaka mpe motema makasi koleka te.

10 Boyokani monene ezali kati na bosembo ya Yehova mpe motema mawa na ye. Nzembo 116:5 elobi ete: “[Yehova] azali na boboto mpe na boyengebene [“bosembo,” Biblia na lingala ya lelo oyo]; Nzambe na biso azali na [motema] mawa.” Ɛɛ, Yehova azali na bosembo mpe na motema mawa. Bizaleli mibale wana ewelanaka te. Amonisaka motema mawa te mpo na kolɛmbisa bosembo na ye, lokola nde bosembo na ye eleki makasi. Kasi, mbala mingi amonisaka bizaleli mibale wana nzela moko, ata mpe na likambo moko. Tózwa ndakisa moko.

11 Lokola bato nyonso babotamaka na lisumu, basengeli kozwa etumbu oyo eutaka na lisumu—liwa. (Baloma 5:12) Kasi, Yehova asepelaka ata moke te na liwa ya basumuki. Ye azali ‘Nzambe oyo alingi kolimbisa, azali na ngɔlu mpe na motema mawa.’ (Nehemia 9:17) Atako bongo, lokola azali mosantu, akoki te kokanga miso likoló ya makambo oyo ezangi boyengebene. Sikoyo, ndenge nini akoki komonisela bato oyo bamesaná na lisumu motema mawa? Eyano ekouta na liteya moko ya ntina mingi mpenza oyo ezali na Liloba na ye: lisiko oyo abongisaki mpo na kobikisa bato. Tokoyeba malamumalamu likambo yango oyo ezali komonisa bolingo na ye na Mokapo 14. Lisiko yango eyokani mpenza na bosembo mpe ezali  komonisa mpenza motema mawa. Na nzela na yango, Yehova akoki koyokela basumuki oyo babongoli motema mawa oyo etondi na boboto kozanga kobuka mitinda na ye ya bosembo ya kokoka.Baloma 3:21-26.

Bosembo ya Yehova epesaka esengo

12, 13. (a) Mpo na nini bosembo ya Yehova ebendaka biso epai na ye? (b) Davidi azwaki likanisi nini mpo na bosembo ya Yehova, mpe ndenge nini yango ekoki kobɔndisa biso?

12 Bosembo ya Yehova ezali te ezaleli moko oyo ezangi bolingo oyo ebenganaka biso, kasi ezali nde ezaleli moko ya kosepelisa oyo ebendaka biso epai na ye. Biblia emonisi polele ete bosembo to boyengebene ya Yehova ezalaka ntango nyonso na motema mawa. Tótalela mwa bandakisa ya kosepelisa oyo ezali kolakisa ndenge Yehova amonisaka bosembo na ye.

13 Bosembo ya kokoka ya Yehova etindaka ye atika basaleli na ye te. Makambo oyo Davidi, mokomi ya nzembo, ye moko akutanaki na yango na bomoi na ye, esalisaki ye akanga ntina ya bosembo yango mpe asepela na yango. Makambo oyo amonaki na miso mpe koyekola oyo ayekolaki banzela ya Nzambe etindaki ye azwa likanisi nini? Alobaki ete: “Yehova alingi bosembo, mpe akotika te bato na ye ya sembo. Bakobatelama mpenza na boumeli ya ntango oyo eyebani nsuka te.” (Nzembo 37:28) Maloba yango ezali mpenza kobɔndisa biso! Ata mokolo moko te Nzambe na biso akosundola baoyo bazali sembo epai na ye. Na yango, tokoki kotyela ye motema ete akozala penepene na biso mpe akobatela biso na bolingo mpenza. Bosembo na ye ezali kondimisa biso likambo yango.Masese 2:7, 8.

14. Ndenge nini komibanzabanza ya Yehova mpo na bato oyo bazali na mposa ya lisalisi ezali komonana polele na kati ya Mibeko oyo apesaki Yisalaele?

14 Bosembo ya Nzambe ekangaka miso te na bampasi ya bato oyo bazali konyokwama. Mibeko oyo Yehova apesaki Yisalaele ezali komonisa ete amibanzabanzaka mpo na baoyo bazali na mposa ya lisalisi. Na ndakisa, Mibeko yango esɛngaki makambo mosusu mpo na bolamu ya bitike mpe ya basi oyo  bakufelá mibali. (Deteronome 24:17-21) Lokola Yehova ayebaki ete bato ya ndenge wana bakoki kozala na bomoi ya mpasi, amikómisaki tata, Zuzi mpe Mobateli na bango, ye oyo ‘akataka na sembo mpo na etike mpe mpo na mwasi-akufeli-mobali.’ (Deteronome 10:18; Nzembo 68:5) Yehova akebisaki Bayisalaele ete soki banyokoli basi mpe bana oyo bazangi moto ya kobatela bango, akoyoka mpenza kolela na bango. Alobaki ete: “Nkanda na ngai ekopela.” (Exode 22:22-24) Atako nkanda ezali te moko ya bizaleli minene ya Yehova, boyengebene na ye etindaka ye ayoka nkanda soki amoni bazali kosalela bato makambo oyo ezali sembo te na nko mpenza, mingimingi soki bazali kosalela yango bato mpamba oyo bazangi moto ya kosalisa bango.Nzembo 103:6.

15, 16. Likambo nini emonisi mpenza polele ete Yehova aponaka bilongi te?

15 Yehova ayebisi biso mpe ete “aponaka bilongi te mpe andimaka kanyaka te.” (Deteronome 10:17) Yehova akeseni na bato mingi oyo bazali na bokonzi to na nguya, ye atalaka bozwi ya moto te to ndenge oyo moto azali komonana na miso. Akaniselaka bato mabe te, aponaka mpe bilongi te. Kanisá naino likambo oyo emonisi polele ete Yehova aponaka bilongi te: aponi kaka mwa bato moke te ya mayele to ya bomɛngo mpo bákóma basambeli na ye ya solo mpe bázala na elikya ya bomoi ya seko. Kasi, “na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Moto nyonso, azala mobola to mozwi, mondɛlɛ to moindo to mpe moto ya mboka nini, akoki kozwa libaku malamu wana. Wana nde nsuka ya bosembo, boye te?

16 Bosembo ya kokoka ya Yehova ezali mpe na likambo mosusu oyo tosengeli kotalela mpe kozwa yango na motuya: ndenge oyo asalaka baoyo babuki mitinda na ye ya sembo.

Azangaka te kopesa etumbu

17. Mpo na nini makambo oyo ezali sembo te oyo etondi na mokili emonisi ata moke te ete Yehova azangi bosembo?

17 Basusu bakoki komituna boye: ‘Lokola Yehova akangaka  miso te likoló ya makambo oyo ezangi boyengebene, mpo na nini tozali komona na mokili ya lelo bato mingi bazali konyokwama mpamba mpe mabe ekómi mingi?’ Makambo yango oyo ezali sembo te emonisi te ete Yehova azali na bosembo te. Makambo yango euti nde na lisumu oyo Adama atikelá bato. Makambo oyo ezali sembo te esengeli kaka kozala beboo na mokili oyo bato ya kozanga kokoka baponi kolanda banzela ya masumu—kasi likambo yango ekoumela lisusu mingi te.Deteronome 32:5.

18, 19. Nini emonisi ete Yehova akotika te baoyo bazali kobuka mibeko na ye ya sembo na nko bázala libela na libela?

18 Atako Yehova amonisaka motema mawa mpenza epai ya baoyo bazali kopusana penepene na ye na motema na bango mobimba, akotika nzela te ete likambo moko boye oyo ezali kosambwisa nkombo na ye mosantu ezalaka libela na libela. (Nzembo 74:10, 22, 23) Batyolaka Nzambe ya bosembo te; akobatela te baoyo basalaka masumu na nko mpo bákima etumbu oyo ebongi na etamboli na bango. Yehova azali ‘Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo, . . . kasi akozanga soki moke te kopesa etumbu.’ (Exode 34:6, 7) Na boyokani na maloba yango, na bantango mosusu Yehova amonaki malamu kopesa etumbu na bato oyo babukaki mibeko na ye ya sembo na nko.

19 Na ndakisa, tózwa makambo oyo Nzambe asalaki Yisalaele ya kala. Ata ntango Bayisalaele bakómaki kofanda na Mokili ya Ndaka, mbala na mbala, babatelaki bosembo na bango te. Atako mabe na bango ezalaki ‘kotungisa’ yehova, abwakaki bango mbala moko te. (Nzembo 78:38-41) Kasi, na motema mawa mpenza, apesaki bango mabaku ya kobongwana. Abondelaki bango boye: “Nazwi esengo na liwa ya moto mabe te, bobele ete moto mabe abongwana na nzela na ye mpe abika; bóbongwana, bóbongwana na nzela mabe na bino; zambi bino bolingi kokufa mpo na nini, ee ndako ya Yisalaele?” (Ezekiele 33:11) Lokola bomoi ezali na motuya na miso ya Yehova, atindaki basakoli na ye mbala na  mbala mpo na kosalisa Bayisalaele bátika banzela mabe. Kasi, mingi kati na bato yango ya mitema makasi baboyaki koyoka mpe kobongola motema. Nsukansuka, mpo na nkombo na ye mosantu mpe makambo nyonso oyo yango ezali komonisa, Yehova akabaki bango epai ya banguna na bango.Nehemia 9:26-30.

20. (a) Makambo oyo Yehova azalaki kosala Yisalaele eteyi biso nini na ntina na ye? (b) Mpo na nini nkɔsi ebongi kozala elembo ya bosembo ya Yehova?

20 Makambo Yehova azalaki kosalela Yisalaele eteyi biso makambo mingi oyo etali ye. Tozwi liteya ete lokola miso na ye ekoki komona makambo nyonso, emonaka mpe makambo ezangi boyengebene mpe yango epesaka ye mpasi mpenza. (Masese 15:3) Tolendisami mpe na koyeba ete alukaka komonisa motema mawa soki ntina ya kosala bongo ezali. Liteya mosusu tozwi ezali ete awelaka te kopesa bato etumbu. Lokola Yehova azali na motema molai, bato mingi bakanisaka ete akopesa bato mabe etumbu te; nzokande, bazali komikosa. Mpamba te makambo Nzambe asalaki Yisalaele eteyi mpe biso ete motema molai na ye ezalaka na ndelo. Yehova akangami makasi na boyengebene. Mbala mingi, bato babangaka komonisa bosembo, kasi ye azangaka soki moke te mpiko ya kosala makambo oyo ezali sembo. Yango wana, nkɔsi, elembo ya bosembo oyo esɛngi mpiko, emonisamaka na esika oyo Nzambe  azali mpe kiti ya bokonzi na Ye. * (Ezekiele 1:10; Emoniseli 4:7) Na yango, tokoki kotya motema ete akokokisa elaka na ye ya kolongola makambo oyo ezali sembo te na mabelé. Na mokuse, Yehova asambisaka boye: azwaka bikateli ya makasi soki esengeli, amonisaka motema mawa soki ntina ezali.2 Petelo 3:9.

Tópusana penepene na Nzambe ya bosembo

21. Ntango tozali komanyola lolenge Yehova amonisaka bosembo na ye, ndenge nini tosengeli komona ye, mpe mpo na nini?

21 Ntango tozali komanyola lolenge Yehova amonisaka bosembo na ye, tosengeli komona ye te lokola zuzi moko oyo azangi motema mawa mpe oyo azali na makambo makasimakasi, oyo azali kaka na mposa ya kokatela bato oyo babuki mibeko etumbu. Tosengeli nde komona ete azali Tata ya bolingo, kasi oyo azwaka mpe bikateli ya makasi, Tata oyo asalelaka bana na ye makambo na ndenge oyo eleki malamu. Lokola Yehova azali Tata ya sembo, to ya boyengebene, asalaka ete kokangama na ye na makambo oyo ezali sembo eyokana na motema mawa na ye epai ya bana na ye awa na mabelé, baoyo bazali na mposa ya lisalisi mpe ya bolimbisi na ye.Nzembo 103:10, 13.

22. Elikya nini bosembo ya Yehova etindi ye apesa biso, mpe mpo na nini asaleli biso makambo na ndenge wana?

22 Tozali mpenza na botɔndi na ndenge toyebi ete bosembo ya Nzambe esuki kaka te na kokatela baoyo babuki mibeko etumbu! Bosembo ya Yehova etindi ye apesa biso elikya moko ya kosepelisa mpenza—bomoi ya kokoka mpe oyo ezangi nsuka na mokili oyo “boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Nzambe na biso asaleli biso makambo na ndenge wana, mpamba te bosembo na ye etindaka ye aluka kobikisa na esika ya kokweisa. Ya solo mpenza, koyeba malamu bonene ya bosembo ya Yehova ezali kobenda biso epai na ye! Na mikapo oyo elandi, tokotalela malamumalamu ndenge oyo Yehova amonisaka ezaleli malamu wana.

^ par. 20 Likambo moko oyo ebendi likebi na biso ezali ete ntango Yehova azali kopesa Yisalaele oyo ezangi bosembo etumbu, amikokanisi na nkɔsi.Yilimia 25:38; Hosea 5:14.