Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 14

Yehova apesi “lisiko na esika ya bato mingi”

Yehova apesi “lisiko na esika ya bato mingi”

1, 2. Ndenge nini Biblia elobeli bomoi oyo bato bazali na yango, mpe wapi eloko kaka moko oyo ekobikisa bato?

“BOZALISI mobimba ezali kokoba komilelalela elongo mpe ezali konyokwama elongo.” (Baloma 8:22) Na maloba wana, ntoma Paulo amonisi ete bomoi na biso bato etondi na mawa. Bato bamonaka ete eloko moko te ekoki kosilisa mpasi, lisumu mpe liwa. Kasi Yehova azali lokola bato te, makoki na ye ezali na nsuka te. (Mituya 23:19) Nzambe ya bosembo apesi biso eloko oyo ekosilisa mpasi na biso. Nkombo na yango lisiko.

2 Lisiko ezali likabo oyo eleki makabo nyonso oyo Yehova apesá bato. Na nzela na yango, tokoki kosikolama na lisumu mpe liwa. (Baefese 1:7) Yango nde eloko oyo esimbi elikya ya bomoi ya seko, na likoló to na paladiso awa na mabelé. (Luka 23:43; Yoane 3:16; 1 Petelo 1:4) Kasi lisiko yango ezali mpenza nini? Ezali koteya biso nini na ntina na bosembo ya Yehova oyo eleki bosembo mosusu nyonso?

Ndenge oyo mposa ya lisiko ebandaki

3. (a) Mpo na nini lisiko ekómaki na ntina? (b) Mpo na nini Nzambe akokaki kaka te kopesa bakitani ya Adama etumbu mosusu na esika ya liwa?

3 Lisumu ya Adama nde esalaki ete lisiko ezala na ntina. Ntango Adama aboyaki kotosa Nzambe, yango esalaki ete atikela bakitani na ye maladi, mawa, mpasi mpe liwa. (Genese 2:17; Baloma 8:20) Lokola Nzambe azalaka na motema mawa, akokaki te kopesa etumbu mosusu na esika ya liwa? Soki asalaka yango, mbɛlɛ abuki mobeko na ye oyo: “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baloma 6:23) Mpe soki Yehova ye moko atyolaka mitinda ya bosembo na ye, mbɛlɛ mobulu mpe ezaleli ya kotyola mibeko epalangani na molɔ́ngɔ́ mobimba!

4, 5. (a) Makambo nini ya lokuta Satana akoselaki Nzambe, mpe mpo na nini Yehova amonaki ete asengeli koyanola na makambo yango? (b) Satana abimisaki bifundeli nini na ntina na basaleli ya sembo ya Yehova?

 4 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 12, botomboki oyo ebimaki na Edene ebimisaki kutu makambo mosusu ya minene koleka. Satana abebisaki lokumu ya Nzambe. Maloba na ye emonisi ete afundaki Yehova ete azali mobuki-lokuta mpe mokonzi moko mabe mpenza oyo aboyelaki bikelamu na ye bonsomi. (Genese 3:1-5) Ndenge makambo emonanaki lokola nde Satana apekisi Nzambe kokokisa mokano na ye ya kotondisa mabelé na bayengebene, Satana amonisaki lokola nde Nzambe azali na likoki ya kosala likambo ya malonga te. (Genese 1:28; Yisaya 55:10, 11) Soki Yehova asalaka eloko te, mingi kati na bikelamu na ye ya mayele balingaki lisusu kotyela boyangeli na ye motema te.

5 Satana akoselaki mpe basaleli ya sembo ya Yehova makambo; alobaki ete basalelaka ye kaka mpo na bolamu na bango mpe soki bamekami makasi, moko te kati na bango akotikala sembo epai ya Nzambe. (Yobo 1:9-11) Makambo wana ezali na ntina mingi koleka bomoi ya mpasi oyo bato bazali na yango. Yango wana, Yehova amonaki ete asengeli koyanola na bifundeli ya lokuta ya Satana. Kasi ndenge nini Nzambe akokaki kosilisa makambo yango mpe kobikisa bato?

Lisiko—Bokokani

6. Wapi mwa maloba oyo Biblia esaleli mpo na kolobela eloko oyo Nzambe abongisaki mpo na kobikisa bato?

6 Lolenge oyo Yehova asilisaki makambo yango emonisaki mpenza motema mawa mpe bosembo—moto ata moko te akokaki kokanisa yango. Atako bongo, ezalaki mpenza mindɔndɔ te. Biblia esaleli maloba ndenge na ndenge mpo na kolobela yango, na ndakisa lisombi, kozongisama ya boyokani, kosikolama, mbɔndi to kolimbisama. (Nzembo 49:8; Danyele 9:24; Bagalatia 3:13; Bakolose 1:20; Baebele 2:17) Kasi liloba oyo emonani ete ezali kolobela likambo yango malamu koleka ezali liloba oyo Yesu ye moko asalelaki. Alobaki ete: “Mwana  ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko [na Grɛki: lutron] na esika ya bato mingi.”Matai 20:28.

7, 8. (a) Na Makomami, liloba “lisiko” elimboli nini? (b) Na ndenge nini lisiko esɛngaka bokokani?

7 Lisiko ezali nini? Liloba ya Grɛki oyo basaleli wana euti na verbe moko oyo elimboli “kofungola, kosikola.” Bazalaki kosalela liloba yango mpo na kolobela mbongo oyo ezalaki kofutama mpo na kosikola bato oyo bakangaki na etumba. Yango wana, tokoki koloba na mokuse ete lisiko ezali eloko oyo bafutaka mpo na kozwa lisusu eloko moko. Na Makomami ya Liebele, liloba oyo ebongolami “lisiko” (kophèr) euti na verbe moko oyo elimboli “kozipa.” Yango esalisi biso tóyeba ete lisiko elimboli mpe kozipa masumu.

8 Kutu, buku moko (Theological Dictionary of the New Testament) elobi ete liloba kophèr “emonisaka ntango nyonso bokokani.” Na ndakisa, ezipeli ya sanduku ya kondimana esalemaki mpo ekokana malamu na sanduku yango. Ndenge moko mpe, mpo na kosikola bato na lisumu to kozipa yango, esengeli kofuta eloko moko oyo ekokani mpenza na mpasi oyo lisumu ebimisá, to eloko oyo ekozipa makambo wana nyonso. Yango wana, Mibeko oyo Nzambe apesaki Yisalaele elobaki ete: “Bomoi mpo na bomoi, mpe liso mpo na liso, mpe lino mpo na lino, mpe lobɔkɔ mpo na lobɔkɔ, mpe likaka mpo na likaka.”Deteronome 19:21.

9. Mpo na nini bato ya sembo bazalaki kopesa bambeka ya banyama, mpe ndenge nini Yehova azalaki kotalela bambeka yango?

9 Kobanda na Abele, bato ya sembo bazalaki kopesa Nzambe bambeka ya banyama. Na ndenge yango, bazalaki komonisa ete bayebaki eloko babengi lisumu, mpe ete bato basengelaki kosikolama na yango; lisusu, bamonisaki ete bazalaki kondimela elaka oyo Nzambe apesaki ete akosikola bato na nzela ya “momboto.” (Genese 3:15; 4:1-4; Levitike 17:11; Baebele 11:4) Yehova azalaki kondima bambeka wana mpe azalaki kosepela na basambeli yango. Nzokande, makabo ya banyama, ata  soki ekokaki kozala malamu ndenge nini, ezalaki kaka elembo. Lokola bato baleki nyama na valɛrɛ, nyama ekokaki mpenza te kozipa lisumu ya bato. (Nzembo 8:4-8) Yango wana, Biblia elobi ete: “Ekoki kosalema soki moke te ete makila ya bangɔmbɛ-mibali mpe ya bantaba elongola masumu.” (Baebele 10:1-4) Bambeka wana ezalaki bobele elilingi ya mbeka ya solosolo oyo esengelaki kopesama nsima mpo na kosikola bato.

“Lisiko oyo ekokani”

10. (a) Mosikoli asengelaki kokokana na nani, mpe mpo na nini? (b) Mpo na nini esengelaki ete kaka moto moko nde apesama mbeka?

10 Ntoma Paulo alobaki ete: “Bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama.” (1 Bakolinti 15:22) Na yango, lisiko esɛngaki liwa ya moto oyo akokani mpenza na Adama—moto moko ya kokoka. (Baloma 5:14) Ata ekelamu moko te ya lolenge mosusu ekokaki kosala ete bokokani oyo bosembo esɛngaki na likambo yango ezala. Kaka moto moko ya kokoka, oyo azwaki te etumbu ya liwa oyo eutá na Adama, nde akokaki kopesa “lisiko oyo ekokani”—lisiko oyo ekokani mpenzampenza na Adama. (1 Timote 2:6) Ekosɛnga te ete bato ebele bápesama mbeka na esika ya mokitani mokomoko ya Adama. Ntoma Paulo alimbolaki ete: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu.” (Baloma 5:12) “Lokola liwa eyei na nzela ya moto moko,” Nzambe asalaki ete bato básikolama mpe “na nzela ya moto moko.” (1 Bakolinti 15:21) Ndenge nini?

“Lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso”

11. (a) Na ndenge nini mosikoli ‘akokufela moto nyonso’? (b) Mpo na nini Adama ná Eva bakozwela lisiko litomba te? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

11 Yehova azwaki bibongiseli mpo moto moko ya kokoka andima ye moko kopesa bomoi na ye mbeka. Ndenge Baloma 6:23 elobi yango, “lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” Ntango mosikoli yango akopesa bomoi na ye mbeka, ‘akokufela moto nyonso.’ Na maloba mosusu, akofuta lifuta mpo na lisumu ya Adama. (Baebele 2:9; 2 Bakolinti 5:21; 1 Petelo 2:24) Na kotalela mibeko, likambo yango ekozala na motuya monene. Lisiko ekolongola etumbu ya liwa likoló ya bana ya Adama  oyo bazali na botosi mpe, ekosilisa nguya ya koboma oyo lisumu ezali na yango banda na misisa na yango. *Baloma 5:16.

12. Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ete kofuta nyongo moko ekoki komemela bato mingi litomba.

12 Tózwa ndakisa: Kanisá ete ofandi na engumba moko oyo bato mingi mpenza basalaka na izini moko ya monene. Lokola yo ná baninga na yo ya kartye bosalaka na izini yango, bazali kofuta bino malamu mpe bozali na bomoi ya malamu. Mokolo moko, izini yango ekwei. Mpo na nini? Mokambi na yango akómaki na makambo ya nyamunyamu, yango esali ete kompani ekwea. Na mbala moko, yo ná baninga na yo ya kartye bozangi mosala mpe bozali lisusu na makoki te ya kofuta banyongo na bino. Basi, mibali, bana ná badefisi bakómi komona mpasi mpo na nyamunyamu ya moto moko mpamba. Ndenge ya kosilisa yango ezali? Ɛɛ! Moto moko ya bozwi, oyo mpe azali na motema malamu, andimi kosalisa bino. Ayebi valɛrɛ ya kompani yango. Amitye mpe na esika ya bato ya mosala mpe mabota na bango. Nyonso wana etindi ye na kofuta nyongo ya kompani yango mpe kofungola lisusu izini yango. Kofutama ya nyongo wana moko esilisi mpasi oyo bato mingi ya mosala, mabota na bango mpe badefisi bazalaki na yango. Ndenge moko mpe, kofuta nyongo ya Adama ememeli bamilio na bamilio ya bato litomba.

Nani apesaki lisiko?

13, 14. (a) Ndenge nini Yehova apesaki lisiko mpo na bato? (b) Epai ya nani lisiko efutamaki, mpe mpo na nini kofutama yango ezalaki na ntina?

13 Kaka Yehova nde akokaki kopesa “Mwana-Mpate . . . oyo azali kolongola lisumu ya mokili.” (Yoane 1:29) Kasi Nzambe atindaki kaka anzelu moko boye te mpo aya kobikisa bato. Atindaki nde Ye oyo akokaki kosilisa mpo na libela likambo  oyo Satana akoselaki basaleli ya Yehova. Yehova amipimelaki mpenza ntango atindaki Mwana mobotami-se-moko na ye, “ye oyo azalaki kolinga mingi.” (Masese 8:30) Mwana yango andimaki ye moko ‘komikómisa mpamba,’ kotika lolenge oyo azalaki kuna na likoló. (Bafilipi 2:7) Yehova asalaki likamwisi, azwaki bomoi mpe bomoto ya Mwana na ye wana ya liboso oyo azalaki na likoló mpe atyaki yango na libumu ya ngɔndɔ moko Moyuda na nkombo Malia. (Luka 1:27, 35) Ntango mwana yango akómi moto, basengelaki kobenga ye Yesu. Kasi na kotalela mibeko, akokaki kobengama Adama ya mibale, mpamba te akokanaki mpenza na Adama. (1 Bakolinti 15:45, 47) Na ndenge yango, Yesu akoki kopesa bomoi na ye mbeka oyo ekozala lisiko mpo na bato ya masumu.

14 Lisiko yango esengelaki kofutama epai ya nani? Nzembo 49:7 elobi polele ete lisiko esengelaki kofutama “epai ya Nzambe.” Kasi, ezali ye te moto apesi lisiko yango? Ezali ye, kasi yango elingi koloba te ete lisiko ezali kaka mwa lolenge moko boye ezangi ntina ya kopesa eloko oyo na esika ya mosusu—lokola nde moto abimisi mbongo na libenga oyo atye yango na libenga mosusu. Tosengeli koyeba ete lisiko elakisi te kopesa eloko moko mpo na kozwa mosusu, ezali nde likambo moko oyo mibeko esɛngisi. Lokola Yehova azwaki bibongiseli mpo ete lisiko efutama, atako yango esɛngaki ye amipimela mingi mpenza, amonisaki ete akangami makasi mpenza na bosembo na ye ya kokoka.Genese 22:7, 8, 11-13; Baebele 11:17; Yakobo 1:17.

15. Mpo na nini esengelaki Yesu amona mpasi mpe akufa?

15 Na eleko ya prɛnta ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yesu Klisto andimaki bámeka ye na ndenge moko ya nsɔmɔ mpe na nsuka na yango, lisiko efutamaki. Atako bafundaki ye mpo na makambo oyo asalaki te, atikaki bákanga ye, básambisa ye, bákweisa ye na likambo, mpe bábaka ye na nzete mpo na koboma ye. Esengelaki mpenza ete Yesu amona mpasi nyonso wana? Ɛɛ, mpamba te likambo ya bosembo ya basaleli ya Nzambe esengelaki kokatama. Yango wana, Nzambe atikaki te ete Elode aboma Yesu ntango azalaki naino mwana moke. (Matai 2:13-18) Kasi ntango Yesu akómaki mokóló, akokaki kotɛmɛla  komekama ya makasi oyo Satana azalaki kobimisela ye, wana ayebi sikoyo malamu ntina na yango. * Atako banyokolaki Yesu makasi, atikalaki “moto ya sembo, oyo azangá mabe, azangá mbindo, akabwani na basumuki”; na ndenge yango, amonisaki mpo na libela ete Yehova azali na basaleli oyo batikalaka sembo na ntango oyo bamekami. (Baebele 7:26) Yango wana, tokoki kokamwa te ete, mwa moke liboso Yesu akufa, agangaki lokola moto oyo alongi, ete: “Ekokisami!”Yoane 19:30.

Asukisi mosala na ye ya kosikola

16, 17. (a) Ndenge nini Yesu akobaki na mosala na ye ya kosikola? (b) Mpo na nini esengelaki ete Yesu amonana “liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso”?

16 Atako bongo, Yesu asukisaki naino te mosala na ye ya kosikola. Na mokolo ya misato nsima ya liwa na ye, Yehova asekwisaki ye. (Misala 3:15; 10:40) Na nzela ya likambo monene wana, Yehova apesaki Mwana na Ye kaka mbano te mpo asalelaki Ye na bosembo, kasi apesaki ye mpe libaku ya kozala Nganga-Nzambe Monene mpo asukisa mosala na ye. (Baloma 1:4; 1 Bakolinti 15:3-8) Ntoma Paulo alimboli boye: “Ntango Klisto ayaki lokola nganga-nzambe monene . . . , akɔtaki, na makila ya bantaba mpe ya bangɔmbɛ-mibali ya mike te, kasi nde na makila na ye moko, mbala moko mpo na libela na kati ya esika mosantu mpe azwelaki biso kosikolama ya seko. Mpo Klisto akɔtaki, na kati ya esika mosantu oyo esalemi na mabɔkɔ te, oyo ezali elilingi ya bosolo, kasi nde na kati ya likoló mpenza, mpo na komonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.”Baebele 9:11, 12, 24.

17 Klisto akokaki komema makila ya nzoto na ye ya mosuni  kuna na likoló te. (1 Bakolinti 15:50) Amemaki nde eloko oyo makila yango emonisaki: motuya oyo bomoi na ye ya moto ya kokoka, bomoi oyo apesaki mbeka, ezalaki na yango na kotalela mibeko. Ntango abimaki na miso ya Nzambe, alakisaki ye na ndenge esengeli motuya ya bomoi wana lokola lisiko na esika ya bato ya masumu. Yehova andimaki mbeka wana? Ɛɛ, amonisaki yango polele na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango asopaki elimo santu likoló ya bayekoli soki 120 oyo bazalaki na Yelusaleme. (Misala 2:1-4) Likambo yango epesaki esengo monene, kasi ezalaki nde ebandeli ya bolamu oyo ekouta na lisiko.

Matomba ya lisiko

18, 19. (a) Wapi bituluku mibale ya bato oyo bazwi litomba na kozongisama ya boyokani oyo esalemi mpo na makila ya Klisto? (b) Wapi mwa matomba oyo baoyo bazali na kati ya “ebele ya bato” bazali kozwa lelo oyo mpe oyo bakozwa na mikolo ezali koya mpo na lisiko?

18 Na mokanda oyo Paulo akomelaki Bakolose, alimboli ete Nzambe amonaki malamu ete, na nzela ya Klisto, azongisa boyokani kati na Ye mpe biloko mosusu nyonso na kotyáká kimya na lisalisi ya makila oyo Yesu asopaki likoló ya nzete ya mpasi. Paulo alimboli mpe ete kozongisa boyokani yango etaleli bituluku mibale ya bato: “Biloko oyo ezali na likoló” mpe “biloko oyo ezali na mabelé.” (Bakolose 1:19, 20; Baefese 1:10) Etuluku ya liboso ezali na baklisto 144 000 oyo bazwi elikya ya kozala banganga-nzambe mpe bakonzi kuna na likoló, oyo bakoyangela mabelé elongo na Klisto Yesu. (Emoniseli 5:9, 10; 7:4; 14:1-3) Bango nde bakosala ete, na boumeli ya mbula nkóto, bato ya botosi bázwa mokemoke matomba ya lisiko.1 Bakolinti 15:24-26; Emoniseli 20:6; 21:3, 4.

19 “Biloko oyo ezali na mabelé” ezali bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya kokoka na Paladiso awa na mabelé. Emoniseli 7:9-17 elobi ete bazali “ebele ya bato” oyo bakobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya. Kasi, basengeli kozela tii ntango wana te mpo na kozwa matomba ya lisiko. Basili ‘kosukola bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.’ Lokola bazali komonisa kondima na kati ya lisiko, ata sikoyo likabo yango ya bolingo ezali kopesa  bango matomba na elimo. Batángami bayengebene, baninga ya Nzambe! (Yakobo 2:23) Mbeka ya Yesu epesi bango likoki ya ‘kopusana na elobeli ya polele penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene.’ (Baebele 4:14-16) Ntango basali mabunga, Nzambe alimbisaka bango mpenza. (Baefese 1:7) Atako bazali bato ya kozanga kokoka, bazali na lisosoli oyo epɛtolami. (Baebele 9:9; 10:22; 1 Petelo 3:21) Na yango, kozongisa boyokani elongo na Nzambe ezali te likambo moko oyo bazali kozela esalema na mikolo ezali koya, kasi ezali kosalema lelo oyo! (2 Bakolinti 5:19, 20) Na boumeli ya mbula nkóto, ‘bakolongolama mokemoke na boombo ya kopɔla’ mpe nsukansuka ‘bakozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.’Baloma 8:21.

20. Ozali koyoka ndenge nini ntango ozali komanyola likoló ya lisiko?

20 “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Klisto” mpo na lisiko! (Baloma 7:25) Etinda oyo esimbi lisiko ezali na mindɔndɔ te; atako bongo, lisiko ezali na ndimbola monene oyo ezali kotinda biso tómemya yango makasi. (Baloma 11:33) Ntango tozali komanyola likoló ya lisiko na botɔndi mpenza, ezali kosimba mitema na biso mpe ezali kotinda biso tópusana ntango nyonso penepene na Nzambe ya bosembo. Ndenge moko na mokomi ya nzembo, tosengeli mpenza kokumisa Yehova, mpamba te “alingi boyengebene mpe sembo.”Nzembo 33:5.

^ par. 11 Adama ná Eva bakozwela lisiko litomba te. Mibeko ya Moize epesaki etinda oyo soki moto abomi moto moko na nko: “Bosengeli kondima lisiko te mpo na molimo ya moto oyo abomi moto, mpamba te asengeli kokufa.” (Mituya 35:31) Na ntembe te, Adama ná Eva basengelaki kokufa mpo baboyaki kotosa Nzambe na nko. Na ndenge yango, babwakaki likoki na bango ya kozala na bomoi ya seko.

^ par. 15 Mpo na kozipa lisumu ya Adama, Yesu asengelaki kokufa moto ya kokoka oyo akɔmeli, kasi te mwana ya kokoka. Tóbosana te ete Adama asalaki lisumu na nko, ayebaki malamu mabe ya likambo oyo asalaki mpe mbuma na yango. Yango wana, mpo Yesu akóma “Adama ya nsuka” mpe azipa lisumu wana, asengelaki kozwa ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova lokola moto oyo akɔmeli mpe oyo ayebi malamu likambo azali kosala. (1 Bakolinti 15:45, 47) Na ndenge yango, bosembo oyo Yesu amonisaki bomoi na ye mobimba—bakisa mpe liwa na ye lokola mbeka—ezalaki “mosala kaka moko ya kolongisama.”Baloma 5:18, 19.