Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 12

“Nzambe azangi nde bosembo?”

“Nzambe azangi nde bosembo?”

1. Na bantango mosusu, toyokaka ndenge nini soki basaleli moto likambo oyo ezali sembo te?

BAYIBI mwasi moko mobange oyo akufelá mobali mbongo na ye oyo abombaka banda kala. Mama moko ya motema mabe asundoli mwana na ye ya moke. Bakangi mobali moko na bolɔkɔ mpo na mabe oyo asali te. Motema na yo eyoki ndenge nini na makambo yango? Ntango mosusu, oyoki mpasi; mpe yango esengeli kaka kozala bongo, mpamba te biso bato toyebaka malamu kokesenisa mabe ná malamu. Soki basaleli moto moko likambo oyo ezali sembo te, toyokaka nkanda. Tolingaka báfuta moto yango mpe bápesa moto oyo asalaki likambo yango etumbu. Soki makambo esalemi bongo te, tomitunaka ntango mosusu boye: ‘Nzambe amonaka mpenza makambo oyo ezali kosalema? Mpo na nini azali kosala eloko te?’

2. Habakuku asalaki nini ntango amonaki makambo oyo ezali sembo te, mpe mpo na nini Yehova apamelaki ye te?

2 Kobanda kala, basaleli ya sembo ya Yehova bamitunaka mpe mituna yango. Na ndakisa, mosakoli Habakuku abondelaki Nzambe boye: “Mpo na nini ozali kotika ngai namona kozanga bosembo ya nsɔmɔ boye? Mpo na nini ozali kotika mobulu, bobuki-mibeko, mabe mpe monyokoli epalangana bisika nyonso?” (Habakuku 1:3, Contemporary English Version) Yehova apamelaki Habakuku te mpo atunaki ye polele mituna wana, mpamba te ye nde Moto atyá mposa ya bosembo na mitema ya bato. Ɛɛ, Yehova apesá biso bato mwa ndambo ya bosembo monene na ye.

Yehova ayini makambo oyo ezali sembo te

3. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova ayebi makambo oyo ezali sembo te malamu koleka biso?

3 Yehova ayebaka makambo oyo ezali sembo te. Amonaka makambo oyo ezali kosalema. Na ntina na mikolo ya Noa, Biblia  eyebisi biso ete: ‘Yehova amonaki ete masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.’ (Genese 6:5) Tótalela ndimbola ya maloba yango. Mbala mingi, ezali na nzela ya mwa makambo toyokaka to oyo biso moko tokutanaka na yango nde toyebaka ete bosembo ezali te. Nzokande, Yehova ayebaka makambo oyo ezali sembo te oyo esalemaka na mokili mobimba. Amonaka yango nyonso! Longola yango, asosolaka makanisi ya motema—elingi koloba makanisi ya mabe oyo etindaka na kosala makambo oyo ezali sembo te.Yilimia 17:10.

4, 5. (a) Na ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova atyaka likebi na baoyo basalelami makambo oyo ezali sembo te? (b) Ndenge nini basalelaki mpe Yehova makambo oyo ezali sembo te?

4 Kasi Yehova asukaka kaka te na koyeba ete makambo oyo ezali sembo te ezali kosalema. Atyaka mpe likebi na baoyo basaleli bango yango. Ntango bikólo ya banguna ezalaki konyokola bato ya ekólo na ye, Yehova azalaki koyoka mpasi “na ntina na kokimela na bango mpo na baoyo bayokisaki bango mpasi mpe banyokolaki bango.” (Basambisi 2:18) Ntango mosusu, osilá komona ete bato mosusu bamitungisaka lisusu te soki bamoni makambo oyo ezali sembo te mpo bamoná yango mingi. Yehova azalaka bongo te! Atako amoná makambo ndenge na ndenge oyo ezali sembo te na boumeli ya mbula soki 6 000, ayinaka yango kaka. Kutu, Biblia eyebisi biso ete ayinaka makambo lokola “lolemo ya lokuta,” “mabɔkɔ masopi makila ya mosembwi,” mpe “motatoli ya lokuta oyo akolobaka maloba ya sembo te.”Masese 6:16-19.

5 Tótalela mpe maloba makasi oyo Yehova asalelaki mpo na komonisa mabe ya batambwisi ya Yisalaele oyo bazalaki kosala makambo oyo ezali sembo te. Elimo santu etindaki mosakoli na ye atuna bango boye: “Ekoki na bino koyeba kosambisa-sembo te?” Yehova alobelaki naino polele lolenge mabe oyo bazalaki kosalela bokonzi na bango; na nsima, asakolaki likambo oyo ekokómela bato yango: “Bakolela epai na [Yehova] nde akozongisela bango monɔkɔ te; ɛɛ, akobombela bango elongi na ye na ntango yango lokola esalaki bango mabe  na misala na bango.” (Mika 3:1-4) Yehova ayini mpenza makambo oyo ezali sembo te! Kutu, ye nde moto ya liboso oyo basalelaki makambo yango! Banda bambula nkóto na nkóto, Satana azali kotumola ye kaka mpamba. (Masese 27:11) Longola yango, likambo ya kozanga bosembo koleka oyo basalelaki Yehova ezali ndenge babomaki Mwana na ye lokola mosali ya mabe, nzokande “asalaki lisumu te.” (1 Petelo 2:22; Yisaya 53:9) Na ntembe te, Yehova ayebaka mpe atyaka likebi na mpasi ya bato oyo basalelamaka makambo oyo ezali sembo te.

6. Tokoki koyoka ndenge nini soki tomoni likambo oyo ezali sembo te, mpe mpo na nini?

6 Atako bongo, soki tomoni basaleli moto likambo moko oyo ezali sembo te—to soki basaleli biso moko yango—etindaka biso kaka na koyoka nkanda. Tokelamá na elilingi ya Nzambe, mpe makambo oyo ezali sembo te eyokani ata moke te na bizaleli ya Yehova. (Genese 1:27) Bongo, mpo na nini atikelaka yango nzela?

Ntembe oyo etali bokonzi ya Nzambe

7. Lobelá ndenge oyo babɛtelaki bokonzi ya Yehova ntembe.

7 Ntembe oyo etali bokonzi nde esimbi eyano na motuna yango. Ndenge tomonaki yango, Mozalisi azali na lotomo ya koyangela mabelé mpe bato nyonso oyo bafandi wana. (Nzembo 24:1; Emoniseli 4:11) Kasi, na ebandeli ya bomoi ya bato awa na mabelé, babɛtelaki bokonzi ya Yehova ntembe. Likambo yango ebandaki ndenge nini? Yehova apekisaki Adama, moto ya liboso, kolya mbuma ya nzete moko oyo ezalaki na Paladiso, elanga epai azalaki kofanda. Nzambe ayebisaki mpe ye ete soki atosi te, ‘akokufa solo.’ (Genese 2:17) Mobeko yango epimelaki Adama to Eva, mwasi na ye, eloko te. Atako bongo, Satana andimisaki Eva ete Nzambe atyelaki bango bipekiseli kaka mpamba. Nini ekokómela ye soki alye mbuma ya nzete yango? Satana ayebisaki ye mbala moko ete: ‘Bino bokokufa solo te, mpo ete Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwama, mpe bino bokozala lokola Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.’Genese 3:1-5.

8. (a) Na maloba oyo Satana ayebisaki Eva, alingaki komonisa nini? (b) Na likambo ya bokonzi ya Nzambe, nini mpenza Satana atyelaki ntembe?

 8 Na maloba wana, Satana alingaki komonisa ete Yehova asukaki kaka te na kobombela Eva makambo ya ntina, kasi akosaki ye mpe. Satana atyaki ntembe te ete Nzambe azali mpenza na bokonzi likoló na nyonso. Atyaki nde ntembe ete Nzambe azali na lotomo te to abongi te kozala na bokonzi wana. Na maloba mosusu, amonisaki ete Yehova azalaki kosalela bokonzi na Ye na bosembo te mpe mpo na bolamu mpenza ya bato na Ye te.

9. (a) Mbuma nini Adama ná Eva babukaki mpo na kozanga botosi, mpe mituna nini ya ntina likambo yango ebimisaki? (b) Mpo na nini Yehova abomaki batomboki yango mbala moko te?

9 Nsima na yango, Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova na ndenge balyaki mbuma oyo apekisaki bango. Yango wana, basengelaki kozwa etumbu ya liwa ndenge Nzambe alobaki. Lokuta ya Satana ebimisaki mwa mituna ya ntina: Yehova azali mpenza na lotomo ya koyangela bato, to basengeli nde komitambwisa bango moko? Yehova asalelaka bokonzi na ye na ndenge oyo eleki malamu? Yehova akokaki kosalela nguya monene oyo azali na yango mpo na koboma batomboki yango mbala moko. Nzokande, ntembe wana etalelaki nde boyangeli na ye kasi nguya na ye te. Na yango, ata soki abomaka Adama, Eva ná Satana, yango elingaki te komonisa ete boyangeli na ye ezali sembo. Kutu, elingaki nde kobota ntembe mosusu. Lolenge kaka moko ya koyeba soki bato bakokoka komitambwisa malamu bango moko kozanga kotalela Nzambe, ezalaki ya kotikela bango ntango.

10. Bambula nyonso oyo eleki emonisi nini na ntina na boyangeli ya bato?

10 Ntango nyonso oyo eleki emonisi nini? Na boumeli ya bambula nkóto na nkóto, bato bameki biyangeli ndenge na ndenge, na ndakisa: otokrasi, demokrasi, sosialisme mpe kominisme. Biblia emonisi polele mpe na mokuse mbuma oyo biyangeli nyonso wana eboti: “Moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Yango wana, mosakoli Yilimia alobaki ete: “Ee [Yehova],  nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.”Yilimia 10:23.

11. Mpo na nini Yehova atikaki bato bámona mpasi?

11 Banda na ebandeli, Yehova ayebaki ete soki bato bamitambwisi bango moko, yango ekobotela bango mpasi mingi. Boye, tokoloba ete azali sembo te ndenge atikaki ete mpasi yango emonana mpe ekoba? Soki moke te! Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali na mwana oyo basengeli kosala ye lipaso mpo bábikisa ye. Oyebi ete lipaso yango ekosala ye mpasi, mpe likambo yango ezali kopesa yo mawa mingi. Kasi, oyebi mpe ete yango ekosalisa ye na nsima azala nzoto kolɔngɔnɔ. Ndenge moko mpe, Nzambe ayebaki—kutu asakolaki mpe yango—ete bato bakomona mpasi mpe bakonyokwama soki atiki bango bámitambwisa bango moko. (Genese 3:16-19) Kasi ayebaki mpe ete mpo bato bázala malamu mpenza mpe bolamu yango eumela, esɛngaki kaka atika bango bámona mbuma mabe oyo botomboki yango ekobimisa. Na ndenge yango nde ntembe oyo ebimaki ekokaki kosila mpo na libela.

Ntembe oyo etali bosembo ya bato

12. Ndenge likambo ya Yobo emonisi yango, na likambo nini Satana afundaki bato?

12 Ntango Satana abɛtaki ntembe ete Nzambe azali na lotomo te ya koyangela mpe boyangeli na ye ezali sembo te, yango ezalaki lokuta oyo akoselaki Yehova na ntina na bokonzi na Ye. Kasi yango ezalaki mpe lokuta oyo akoselaki basaleli ya Nzambe na ntina na bosembo na bango epai na Ye. Na ndakisa, yoká maloba Satana ayebisaki Yehova na ntina na moyengebene Yobo: “Yo otiki lopango kozingela ye te mpo na ndako na ye mpe na biloko na ye nyonso epai na epai? Opamboli mosala ya mabɔkɔ na ye mpe bibwɛlɛ na ye esili kofuluka mingi kati na mokili. Nde tiká ete osembola lobɔkɔ na yo  [sikoyo] mpe [osimba] nyonso ezali na ye mpe akolakela yo mabe na miso na yo.”Yobo 1:10, 11.

13. Na bifundeli oyo Satana afundaki Yobo, alingaki komonisa nini mpe ndenge nini yango etali bato nyonso?

13 Satana alingaki nde komonisa ete Yehova asalelaki nguya na Ye ya kobatela mpo na kosomba motema ya Yobo. Yango elingaki koloba ete bosembo ya Yobo epai ya Yehova ezalaki ya lokuta mpe ete azalaki kosambela Ye kaka mpo na litomba oyo akokaki kozwa. Satana alobaki ete soki Nzambe atiki kopambola Yobo, mobali yango akolakela Mozalisi na ye mabe. Satana ayebaki ete Yobo azalaki mpenza moto moko “malamu bɛɛ mpe ya sembo, oyo akotosaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.” * Na yango, soki Satana akoka kobebisa bosembo ya Yobo, mbɛlɛ akokaki mpe kobebisa bosembo ya bato mosusu nyonso, boye te? Yango emonisi ete Satana azalaki nde kobɛtela bosembo ya baoyo nyonso balingi kosalela Nzambe ntembe. Mpo na komonisa ete ntembe yango esukaki kaka epai ya Yobo te, Satana ayebisaki Yehova ete: “Moto [kaka Yobo ye moko te] akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.”Yobo 1:8; 2:4.

14. Makambo oyo eleká emonisi nini na ntina na efundeli oyo Satana afundaki bato?

14 Makambo oyo eleká emonisi ete bato mingi, atako bamekamaki, batikalaki sembo epai ya Yehova lokola Yobo—yango emonisi ete Satana akosaki. Bosembo na bango esepelisaki motema ya Yehova, mpe esalisaki Ye azwa eyano ya kopesa Satana, ye oyo azalaki kotumola Yehova na lolendo mpenza ete bato bakotika kosalela Ye soki bakutani na mikakatano. (Baebele 11:4-38) Ya solo, bato ya mitema sembo baboyi kopesa Nzambe mokɔngɔ. Ata ntango makambo ya mpasi mingi koleka esilisi bango mayele, batyaka motema mingi koleka nde epai ya Yehova mpo apesa bango makasi ya koyika mpiko.2 Bakolinti 4:7-10.

15. Motuna nini tokoki komituna na ntina na kosambisa oyo Nzambe asambisaki bato kala mpe na oyo akosambisa na mikolo ezali koya?

 15 Kasi bosembo ya Yehova esuki kaka te na ntembe oyo ebimaki mpo na bokonzi na ye mpe bosembo ya bato. Biblia elobeli mpe kosambisa oyo Yehova asambisaki bato mosusu, ata mpe bikólo. Ezali mpe na bisakweli ya kosambisa oyo akosambisa bato na mikolo ezali koya. Mpo na nini tokoki kondima na motema moko ete Yehova asambisaki mpe akosambisa na boyengebene?

Ntina oyo bosembo ya Nzambe eleki bosembo mosusu nyonso

Ata mokolo moko te Yehova ‘akoboma bayengebene elongo na bato mabe’

16, 17. Bandakisa nini emonisi ete mayele na biso ezalaka na nsuka na oyo etali koyeba kotalela bosembo ya solosolo?

16 Na ntina na Yehova, tokoki mpenza koloba ete: “Nzela na ye nyonso bosembo.” (Deteronome 32:4) Moto moko te na kati na biso akoki koloba ete nzela na ye nyonso mpe ezali bosembo, mpamba te, lokola mayele na biso ezali na nsuka, mbala mingi toyebaka malamu te makambo oyo ezali sembo. Tózwa ndakisa ya Abalayama. Alelelaki Yehova na ntina na kobomama ya Sodoma—atako engumba yango etondaki na mabe. Atunaki Yehova ete: “Okoboma mpe bayengebene elongo na bato mabe?” (Genese 18:23-33) Na ntembe te, eyano ezalaki: “te.” Yehova “anokisaki sufulu mpe mɔtɔ” likoló ya Sodoma kaka ntango moyengebene Lota ná bana na ye ya basi bakómaki na engumba Soali mpe bazalaki lisusu na likama te. (Genese 19:22-24) Nzokande, Yona ayokaki “nkanda” ntango Nzambe amoniselaki bato ya Ninive motema mawa. Lokola Yona asilaki kosakola ete bakobomama, azalaki nde kozela bábomama mpo motema na ye ekita—atako babongolaki mpenza motema.Yona 3:10–4:1.

17 Yehova akitisaki Abalayama motema, amonisaki ye ete asalelaka bosembo na Ye kaka mpo na koboma bato mabe te, kasi mpe mpo na kobikisa bayengebene. Yona azwaki liteya ete Yehova azalaka na motema mawa. Soki bato mabe babongwani, azalaka “pene na kolimbisa.” (Nzembo 86:5) Yehova  akeseni na bato oyo babangaka bábɔtɔla bango bokonzi; ye apesaka etumbu te kaka mpo na komonisa ete azali na bokonzi mpe abangaka te ete bámona ye lokola azangi makasi mpo amoniseli moto motema mawa. Ntango nyonso, Ye amonisaka motema mawa na ntina.Yisaya 55:7; Ezekiele 18:23.

18. Salelá Biblia mpo na komonisa ete Yehova atikaka te ete mayoki mpamba nde etambwisa ye.

18 Atako bongo, Yehova atikaka te ete mayoki mpamba nde etambwisa ye. Ntango bato ya ekólo na ye bamipesaki na losambo ya bikeko, ayebisaki bango polele ete: “Nakokata makambo na bino [na kotalela] kotambola na bino; mpe nakokweisa [likoló] na bino makambo ya mbindo na bino nyonso. Liso na ngai ekotala yo na mawa te, mpe nakotika yo te; kasi nakozongisa kotambola na bino likoló na bino.” (Ezekiele 7:3, 4) Yango emonisi ete ntango bato balingaka kotika mabe na bango te, Yehova asambisaka bango mpe na kotalela etamboli na bango. Kasi atalelaka naino bilembeteli ya solosolo liboso akata likambo. Yango wana, ntango “kolela” moko ya makasi na ntina na Sodoma mpe Gomola ekómaki tii na matoi na ye, Yehova alobaki ete: “Yango wana nakokita mpe nakotala soki basili kosala [ndenge] nsango ekómi na esika na ngai.” (Genese 18:20, 21) Tozali mpenza na botɔndi na koyeba ete Yehova akeseni na bato mingi oyo bazwaka bikateli nokinoki liboso ya koyoka naino makambo nyonso! Ya solo, Yehova azali mpenza ndenge Biblia elobeli ye, “Nzambe ya sembo, oyo epai na ye kozanga bosembo ezali te.”Deteronome 32:4.

Tyelá bosembo ya Yehova motema

19. Tokoki kosala nini soki totungisami na ndenge Yehova asalelaki bosembo na ye to na ndenge akosalela yango?

19 Biblia elobeli te eloko mokomoko oyo etali makambo oyo Yehova asalaki na ntango ya kala; emonisi mpe te makambo nyonso ya mikemike oyo etali ndenge akosambisa bato mosusu to bituluku ya bato na mikolo ezali koya. Soki makambo yango ezangi na lisolo to na esakweli moko oyo tozali kotánga na Biblia mpe yango etungisi biso mingi, tokoki komonisa  bosembo lokola mosakoli Mika; ye akomaki ete: “[Nakozela] Nzambe ya kobika na ngai.”Mika 7:7.

20, 21. Mpo na nini tokoki kotya motema ete Yehova akosala ntango nyonso oyo ezali sembo?

20 Tokoki kotya motema ete ezala na likambo nini, Yehova akosala ntango nyonso oyo ezali sembo. Ata soki emonani ete bato bazali kotya likebi te na makambo oyo ezali sembo te oyo ezali kosalema, Yehova alaki ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa.” (Baloma 12:19) Soki tolandi kozela, biso mpe tokomonisa kondima makasi ndenge ntoma Paulo amonisaki na maloba oyo: “Nzambe azangi nde bosembo? Yango ekóma bongo soki moke te!”Baloma 9:14.

21 Kasi, tozali naino na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1) Makambo oyo ezali sembo te mpe “minyoko” ebimisi ebele ya makambo mosusu oyo ezali komonisa bato mpasi mpenza. (Mosakoli 4:1) Nzokande, Yehova abongwani te. Ayinaka kaka makambo oyo ezali sembo te, mpe atyelaka mpenza baoyo basalelami makambo yango likebi. Soki tozali kaka sembo epai na ye mpe bokonzi na ye, akopesa biso makasi ya koyika mpiko tii ntango oyo atyá mpo Bokonzi na ye esilisa makambo nyonso oyo ezali sembo te.1 Petelo 5:6, 7.

^ par. 13 Yehova alobelaki Yobo ete: “Mosusu azali lokola ye kati na mokili te.” (Yobo 1:8) Na yango, emonani ete Yobo azalaki na bomoi nsima ya liwa ya Yozefe mpe liboso Moize aponama motambwisi ya Yisalaele. Na ndenge yango, tokoki koloba ete na ntango wana ezalaki na moto moko te oyo azalaki sembo lokola Yobo.