Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 16

‘Monisá bosembo’ na kotamboláká elongo na Nzambe

‘Monisá bosembo’ na kotamboláká elongo na Nzambe

1-3. (a) Mpo na nini tozali na nyongo ya Yehova? (b) Eloko nini Mobikisi na biso ya bolingo asɛngi biso?

KANISÁ ete ozali na kati ya masuwa oyo ezali kozinda. Kaka na ntango oyo omoni ete elikya ezali lisusu te, moto moko ayei kobikisa yo. Motema na yo ekiti mpenza wana moto yango alongoli yo na likama mpe ayebisi yo ete: “Sikoyo obiki”! Omoni te ete okoyoka ete ozali na nyongo ya moto yango oyo abikisi yo?

2 Ndakisa yango emonisi mwa moke likambo oyo Yehova asaleli biso. Tozali mpenza na nyongo na ye. Ezali bongo, mpamba te apesi lisiko oyo epesi biso likoki ya kobikisama na lisumu mpe liwa oyo ekangi biso makasi. Sikoyo, tozali kobanga likama moko te; mpamba te toyebi ete ntango nyonso oyo tokondimela mbeka wana ya motuya mingi, masumu na biso ekolimbisama mpe tokozala na elikya ya bomoi ya seko. (1 Yoane 1:7; 4:9) Ndenge tomonaki yango na Mokapo 14, lisiko ezali lolenge eleki mpenza monene oyo Yehova amonisaki bolingo mpe bosembo na ye. Sikoyo, eloko nini biso tosengeli kosala?

3 Ezali malamu tótalela oyo Mobikisi na biso ya bolingo asɛngi biso ye moko. Na monɔkɔ ya mosakoli Mika, Yehova alobi boye: “Ee moto oyo asalemi na putulu, ayebisi oyo ezali malamu. Mpe eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, bobele ete omonisa bosembo mpe olinga boboto mpe ozala na bopɔlɔ na kotamboláká elongo na Nzambe na yo?” (Mika 6:8) Omoni ete moko na makambo oyo Yehova asɛngi biso ezali ete ‘tómonisa bosembo.’ Ndenge nini tokoki komonisa yango?

Tólanda “boyengebene ya solosolo”

4. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingi tótosaka mitinda na ye ya sembo?

4 Yehova alingi ete tótosaka mitinda na ye oyo ekesenisaka mabe ná malamu. Lokola mitinda na ye ezali sembo mpe na boyengebene, soki tozali kotosa yango, tozali kolanda bosembo  mpe boyengebene. Yisaya 1:17 elobi ete: ‘Yekolá kosala malamu, luká bosembo.’ Liloba ya Nzambe elendisi biso ‘tóluka boyengebene.’ (Sefania 2:3) Esɛngi mpe biso ‘tólata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo.’ (Baefese 4:24) Boyengebene to bosembo ya solosolo eboyi mobulu, etamboli ya bosɔtɔ mpe ya mbindo, mpamba te makambo yango eyokani na bosantu te.Nzembo 11:5; Baefese 5:3-5.

5, 6. (a) Mpo na nini ezali mpasi te kotosa mitinda ya Yehova? (b) Na ndenge nini Biblia emonisi ete kolanda boyengebene esengeli kosuka te?

5 Ezali mpenza mpasi mpo tótosa mitinda ya sembo ya Yehova? Te. Motema oyo elingaka Yehova emonaka te ete makambo oyo azali kosɛnga ezali kilo. Lokola tolingi Nzambe na biso mpe bomoto na ye, tosepelaka kotambola na ndenge oyo esepelisaka ye. (1 Yoane 5:3) Tóbosana te ete Yehova “alingi boyengebene.” (Nzembo 11:7) Soki tolingi mpenza kolanda ndakisa ya bosembo to boyengebene na ye, tosengeli kolinga makambo oyo alingaka mpe koyina makambo oyo ayinaka.Nzembo 97:10.

6 Ezalaka pɛtɛɛ te ete moto ya kozanga kokoka alanda boyengebene. Esengeli kolongola bomoto ya kala elongo na misala na yango ya mabe mpe kolata bomoto ya sika. Biblia elobi ete bomoto ya sika ezali “kokómisama sika” na nzela ya boyebi ya solosolo. (Bakolose 3:9, 10) Maloba “kokómisama sika” emonisi ete kolata bomoto ya sika ezali likambo oyo esengeli kosuka te mpe yango ezali kosɛnga molende mpenza. Ata soki tobomaka nzoto ndenge nini mpo na kosala oyo ezali malamu, ekómaka na bantango mosusu ete tóbɛta libaku na makanisi, na maloba, to na misala, mpo tozali basumuki.Baloma 7:14-20; Yakobo 3:2.

7. Ndenge nini tosengeli kotalela mabaku oyo tobɛtaka wana tozali kosala makasi mpo na kolanda boyengebene?

7 Ndenge nini tosengeli kotalela mabaku yango wana tozali kosala makasi mpo na kolanda boyengebene? Na ntembe te, tosengeli kotalela lisumu na lisɛki te. Kasi, tosengeli mpe te kotika kolanda boyengebene; tómimona te ete tobongi te kosalela Yehova mpo tosalaki mabunga. Nzambe na biso ya motema mawa asili kobongisa likambo moko mpo andima lisusu baoyo  babongoli mpenza motema. Yoká maloba oyo ntoma Yoane akomaki: “Nazali kokomela bino makambo oyo mpo bósala lisumu te.” Kasi nsima na yango, alobaki na bosembo nyonso maloba oyo ya kobɔndisa: “Nzokande, soki moto asali lisumu [mpo na ezaleli ya kozanga kokoka oyo tobotamaka na yango], tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Klisto.” (1 Yoane 2:1) Ɛɛ, Yehova asili kopesa mbeka ya lisiko ya Yesu mpo tókoka kosalela Ye na ndenge oyo ekosepelisa Ye atako tozali basumuki. Yango epesi biso te mposa ya kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosepelisa Yehova?

Nsango malamu mpe bosembo ya Nzambe

8, 9. Ndenge nini kosakolama ya nsango malamu ezali komonisa bosembo ya Yehova?

8 Tokoki komonisa bosembo—tóloba kaka, kolanda ndakisa ya bosembo ya Nzambe—soki tozali komipesa mpenza na kosakwela basusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Boyokani nini ezali kati na bosembo ya Yehova mpe nsango malamu?

9 Yehova akosukisa ebongiseli mabe oyo te soki apesi naino likebisi te. Ntango Yesu asakolaki makambo oyo ekosalema na ntango ya nsuka, alobaki boye: “Na kati ya bikólo nyonso nsango malamu esengeli kosakolama liboso.” (Malako 13:10; Matai 24:3) Lokola asalelaki liloba “liboso,” yango emonisi ete makambo mosusu ekoya na nsima ya mosala wana ya kosakola na mokili mobimba. Bolɔzi monene oyo esakolamaki ezali moko ya makambo yango; na ntango yango, bato mabe bakobomama mpe na nsima, mokili ya sika ya boyengebene ekobanda. (Matai 24:14, 21, 22) Na ntembe te, moto ata moko te akoki kofunda Yehova ete asaleli bato mabe likambo na bosembo te. Lokola azali kosala ete likebisi epesama, azali kopesa bango mabaku mingi mpo bábongwana mpe bábomama te.Yona 3:1-10.

Tomonisaka bosembo ya Nzambe ntango tozali koyebisa basusu nsango malamu kozanga kopona bilongi

10, 11. Na ndenge nini tomonisaka bosembo ya Nzambe ntango tosakolaka nsango malamu?

10 Ntango tosakolaka nsango malamu, na ndenge nini tomonisaka bosembo ya Nzambe? Ya liboso, bosembo ezali kotinda biso tósala oyo tokoki mpo na kosalisa basusu bázwa lobiko. Tózongela lisusu ndakisa oyo tolobelaki ya kobikisama na masuwa  oyo ezali kozinda. Wana ozali lisusu na likama te mpo ozali na kati ya kano, ntembe ezali te ete okoluka mpe kosalisa basusu oyo bazali naino na mai. Biso mpe tozali na mokumba ya kosala bongo epai ya baoyo bazali naino kobundana na kati ya mai ya elilingi, mokili mabe oyo. Ezali solo ete bato mingi baboyaka nsango oyo tomemelaka bango. Kasi, lokola Yehova azali kolanda komonisa motema molai, tozali na mokumba ya kopesa bango libaku ya ‘kokóma na kobongola motema’ mpo bákoka kobika.2 Petelo 3:9.

11 Ntango tozali kosakwela moto nyonso oyo tokutani na ye nsango malamu, tozali komonisa bosembo na lolenge mosusu ya ntina: tozali komonisa ete tozali kopona bilongi te. Tóbosana te ete “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Soki tolingi kolanda ndakisa ya bosembo na Ye, tosengeli kozwelaka bato mosusu makanisi mabe te. Tosengeli nde kosakwela bango nsango malamu kozanga kotala naino soki bazali mindɛlɛ to baindo, bato minene to bato mpamba, bato ya mbongo to babola. Na ndenge yango, tozali kopesa moto nyonso oyo akoyamba biso libaku ya koyoka mpe kondima nsango malamu.Baloma 10:11-13.

Ndenge oyo tosalelaka basusu makambo

12, 13. (a) Mpo na nini tosengeli te kowela kosambisa basusu? (b) Toli oyo Yesu apesaki ete “bótika kosambisa” mpe “bótika kokweisa bato likambo,” elimboli nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

12 Tokoki mpe komonisa bosembo soki tozali kosalela basusu makambo ndenge Yehova asalelaka biso. Ezalaka pɛtɛɛ mpenza kosambisa basusu, kolobela mabunga na bango mpe kokanisa ete mikano na bango ezali malamu te. Kasi nani kati na biso akolinga ete Yehova ayokela ye mawa te ntango azali kotala malamumalamu mikano mpe mabunga na ye? Yehova asalaka bongo te. Mokomi ya nzembo alobaki ete: ‘Ee Yehova, soki okotalaka bokesene, ee Nkolo, nani akotɛlɛma?’ (Nzembo 130:3) Tozali na botɔndi te ete Nzambe na biso ya sembo mpe ya motema mawa aponaka kotya likebi mingi te na mabunga na biso? (Nzembo 103:8-10) Lokola ezali boye, ndenge nini tosengeli kosalela basusu makambo?

 13 Soki toyebi ete bosembo ya Nzambe etambolaka nzela moko na motema mawa, tokowela te kosambisa basusu mpo na makambo oyo etali biso te to na makambo ya mikemike. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu akebisaki boye: “Bótika kosambisa mpo bino bósambisama te.” (Matai 7:1) Na kotalela lisolo oyo Luka akomaki, Yesu abakisaki ete: “Bótika kokweisa bato likambo, mpe bokokweisama likambo ata moke te.” * (Luka 6:37) Yesu amonisaki ete ayebaki ete bato ya kozanga kokoka balingaka mingi kosambisa baninga. Na bato nyonso oyo bayokaki ye, oyo azalaki na momeseno ya kosambisa basusu kozanga mawa asengelaki kotika yango.

14. Bantina nini esengeli kotinda biso ‘tótika kosambisa’ basusu?

14 Mpo na nini tosengeli ‘kotika kosambisa’ basusu? Ya liboso, mpo bokonzi na biso ezali na ndelo. Moyekoli Yakobo akundweli biso likanisi oyo: “Ezali na moto moko kaka oyo azali mopesi-mibeko mpe mosambisi”—moto yango ezali Yehova. Yango wana, Yakobo atuni motuna oyo ebongi mpenza: “Ozali nani mpo osambisa mozalani na yo?” (Yakobo 4:12; Baloma 14:1-4) Longola yango, lokola tozali basumuki, mbala mingi totalelaka basusu na bosembo te. Bizaleli mpe makanisi ndenge na ndenge—na ndakisa, koyina basusu kaka mpamba, kozala na nkanda mpo basalelaki biso makambo oyo ezali sembo te, zuwa, mpe komimona ete tozali sembo koleka basusu—ekoki kosala ete tótalelaka basusu na ndenge ebongi te. Ezali mpe na makambo mosusu oyo soki tokanisi yango, esengeli kopekisa biso kowela kotɔnga basusu mpo na mabunga na bango. Na ndakisa, tokoki koyeba oyo ezali na mitema ya basusu te; tokoki mpe te koyeba makambo oyo bazali mpenza na yango. Soki ezali boye, tozali banani mpo na kozwela baninga na biso bandimi makanisi mabe to kotɔnga bango mpo na milende bazali kosala na  mosala ya Nzambe? Na esika ya kolandela kaka mabunga ya bandeko na biso, eleki malamu nde kolanda ndakisa ya Yehova: tólukaka makambo ya malamu oyo bazali na yango!

15. Wapi maloba mpe ndenge mosusu ya kosalela basusu makambo oyo epekisami kati na basambeli ya Nzambe, mpe mpo na nini?

15 Tokoloba boni mpo na likambo ya kosambisa bato ya libota na biso? Likambo ya mawa, na mokili ya lelo, ezali na bandako, bisika oyo bato basengeli kofanda na kimya, nde bato bazali mpenza kokatelana mangala mabe. Emonanaka mingi ete mibali, basi to baboti bazali ntango nyonso kofinga mpe kobɛta bato ya mabota na bango. Nzokande, epai ya basambeli ya Nzambe, epekisami kosalela maloba ya kozokisa, ya kotyola mpe kobɛta. (Baefese 4:29, 31; 5:33; 6:4) Tosengeli kosalela toli oyo Yesu apesaki ete ‘tótika kosambisa’ mpe ‘tótika kokweisa bato likambo’ kaka epai ya bato ya libándá te. Tóbosana te ete komonisa bosembo esɛngi kosalela basusu makambo ndenge Yehova  asalelaka biso. Nzokande, Nzambe na biso asalelaka biso makambo ya makasimakasi te, anyokolaka biso mpe te. “Azali [nde] na bolingo mingi ya motema” epai ya baoyo balingaka ye. (Yakobo 5:11) Talá ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda!

Bankulutu bazali kosala “mpo na bosembo”

16, 17. (a) yehova azali kosɛnga bankulutu nini? (b) Esengeli kosala nini ntango mosumuki moko aboyi mpenza kobongola motema, mpe mpo na nini?

16 Biso nyonso tozali na mokumba ya komonisa bosembo, kasi mingimingi bankulutu ya lisangá ya boklisto. Yoká ndenge esakweli moko ya Yisaya elobelaki “bankumu,” to bankulutu: “Talá! Mokonzi moko akoyangela mpo na boyengebene; mpe bankumu, bango bakoyangela lokola bankumu mpo na bosembo.” (Yisaya 32:1) Ɛɛ, Yehova azali kosɛnga bankulutu básalaka makambo na bosembo. Ndenge nini bakoki kosala yango?

17 Mibali yango ya makoki na elimo bayebi malamu ete bosembo, to boyengebene, esɛngi ete lisangá etikala kaka pɛto. Na bantango mosusu, esɛngaka ete bankulutu básambisa baoyo basali masumu minene. Na ntango wana, babosanaka te ete bosembo ya Nzambe esɛngi ete bámonisa motema mawa soki esengeli. Yango wana, basalaka makasi ete básalisa ndeko oyo asalaki lisumu abongola motema. Kasi ezalaka boni soki ndeko yango aboyi kobongola mpenza motema atako basalisi ye? Liloba ya Yehova esɛngi na bosembo nyonso ete ekateli moko ya makasi ezwama: “Bólongola moto mabe na kati na bino.” Yango elingi koloba, kobimisa ye na lisangá. (1 Bakolinti 5:11-13; 2 Yoane 9-11) Epesaka bankulutu mawa kozwa ekateli wana, kasi bayebaka ete ezali na ntina mpo na kobatela bopɛto ya bizaleli mpe ya elimo ya lisangá. Ata soki bazwi ekateli wana, bazalaka na elikya ete mokolo mosusu mosumuki yango akozwa makanisi ya malamu mpe akozonga na lisangá.Luka 15:17, 18.

18. Likambo nini bankulutu babosanaka te ntango bazali kopesa basusu toli oyo euti na Biblia?

18 Kosala makambo na bosembo esɛngi mpe kopesa toli ya Biblia soki esengeli. Yango elingi koloba te ete bankulutu balukalukaka mabunga ya basusu to basembolaka bango ntango nyonso.  Kasi moninga moko mondimi akoki ‘kobɛta libaku liboso ete ayeba yango.’ Soki bankulutu babosani te ete bosembo ya Nzambe esɛngi te kozala motema mabe to kozanga motema mawa, yango ekotinda bango ‘bámeka kosembola moto yango na elimo ya boboto.’ (Bagalatia 6:1) Na yango, bankulutu bakogangela ye te to bakoloba na ye te maloba oyo ekopesa ye mpasi. Toli oyo epesami na bolingo nde elendisaka moto oyo bazali kopesa ye yango. Ata ntango bankulutu bazali kopamela moninga moko mondimi mpo na mbeba moko asali—bazali komonisa ye polele mbuma mabe oyo eutaka na etamboli moko oyo ezangi bwanya—babosanaka te ete azali mpate ya etonga ya Yehova. * (Luka 15:7) Soki emonani polele ete bolingo nde ezali kotinda bango bápesa toli to bápamela moto oyo asali mbeba mpe soki basali yango na bolingo, ntembe ezali te ete ekosembola ye.

19. Bikateli nini bankulutu basengeli kozwa, mpe basengeli kotalela nini mpo na kozwa bikateli yango?

19 Mbala mingi, esɛngaka ete bankulutu bázwa bikateli oyo etali baninga na bango bandimi. Na ndakisa, na bantango mosusu, bankulutu bakutanaka mpo na kotala soki ezali na bandeko mosusu ya lisangá oyo bakokisi masɛngami mpo bákoka koponama bankulutu to basaleli na misala. Lokola bankulutu bayebi ete esengeli kopona bilongi te, batikaka te ete mayoki na bango etambwisa bango; batikaka nde masɛngami oyo Nzambe atye etambwisa bango mpo na kozwa bikateli wana. Na ndenge yango, basalaka makambo “kozanga makanisi mabe, kosaláká ata eloko moko te na elimo ya koponapona.”1 Timote 5:21.

20, 21. (a) Bankulutu basalaka nyonso mpo básalaka nini, mpe mpo na nini? (b) Na ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa “milimo oyo ezali konyokwama na makanisi”?

20 Ezali mpe na ndenge mosusu oyo bankulutu bamonisaka  bosembo ya Nzambe. Nsima ya kosakola ete bankulutu bakosala “mpo na bosembo,” Yisaya abakisaki boye: ‘Moto na moto akozala lokola ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango ya mbula makasi; lokola bitima ya mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili ya libanga monene kati na mokili molɛmbisami na moi.’ (Yisaya 32:2) Yango wana, bankulutu basalaka nyonso mpo bábɔndisaka mpe bápesaka baninga na bango bandimi makasi.

21 Lelo oyo, bato mingi basengeli kolendisama, mpamba te ezali na ebele ya mikakatano oyo ekoki kolɛmbisa bato nzoto. Bino bankulutu, ndenge nini bokoki kosalisa “milimo oyo ezali konyokwama na makanisi”? (1 Batesaloniki 5:14) Bómitya na esika na bango na ntango bozali koyokamela bango. (Yakobo 1:19) Bakoki ntango mosusu kozala na mposa ya koyebisa “bozito” oyo ezali na mitema na bango epai ya moto moko oyo batyelaka motema. (Masese 12:25) Bóyebisa bango ete Yehova ná bandeko na bango bazali na mposa na bango, bazali kozwa bango  na motuya mingi mpe bazali kolinga bango. (1 Petelo 1:22; 5:6, 7) Longola yango, bokoki kobondela elongo na bango mpe mpo na bango. Bakoki kobɔndisama mingi na koyoka nkulutu moko azali kobondela na motema moko mpo na bango. (Yakobo 5:14, 15) Nzambe ya sembo akozanga te komona milende oyo bozali kosala na bolingo mpenza mpo na kosalisa baoyo bazali konyokwama na makanisi.

Bankulutu bamonisaka bosembo ya Yehova ntango balendisaka baoyo balɛmbi nzoto

22. Wapi ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa ya bosembo ya Yehova, mpe yango ezali kobota mbuma nini?

22 Ya solo, ntango tozali kolanda ndakisa ya bosembo ya Yehova, tozali mpenza kopusana penepene na ye! Ntango totosaka mitinda na ye ya sembo, ntango toyebisaka bato nsango malamu ya lobiko, mpe ntango tozwaka ekateli ya kotya likebi mingi na makambo ya malamu oyo ezali epai ya basusu na esika ya koluka mabunga na bango, tomonisaka bosembo ya Nzambe. Bino bankulutu, ntango bobatelaka bopɛto ya lisangá, ntango bopesaka toli ya kolendisa oyo euti na Makomami, ntango bozwaka bikateli kozanga kopona bilongi mpe ntango bolendisaka baoyo balɛmbi nzoto, bomonisaka mpe bosembo ya Nzambe. Na ntembe te, motema ya Yehova kuna na likoló esepelaka mpenza ntango amonaka basaleli na ye bazali kosala nyonso mpo na ‘komonisa bosembo’ wana bazali kotambola elongo na ye!

^ par. 13 Na Babiblia mosusu, bakomi “bósambisa te” mpe “bókweisa bato likambo te.” Ndenge wana ya kobongola elimboli ete “kobanda kosambisa te” mpe “kobanda kokweisa bato likambo te.” Nzokande, na monɔkɔ oyo bakomi wana ya Biblia bakomaki, batyaki baverbe oyo ezali komonisa makambo oyo epekisami na eleko bebe (présent). Yango elingi koloba ete bato bazalaki kosala makambo yango na ntango wana, kasi basengelaki kotika yango.

^ par. 18 Na 2 Timote 4:2, Biblia elobi ete, na bantango mosusu, bankulutu basengeli ‘kopamela, kosembola, kolendisa.’ Liloba ya Grɛki oyo ebongolami ‘kolendisa’ na vɛrsɛ yango ezali parakaléô. Liloba mosusu ya Grɛki oyo eyokani na yango, paraklêtos, ekoki kolakisa avoka oyo azali kosamba likambo moko na tribinale. Na yango, ata ntango bankulutu bazali kopamela makasi baoyo basengeli kozwa lisungi ya elimo, basengeli nde kosalisa bango.