Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 29

“Koyeba bolingo ya Klisto”

“Koyeba bolingo ya Klisto”

1-3. (a) Nini etindaki Yesu asepela kozala lokola Tata na ye? (b) Makambo nini ya bolingo ya Yesu tokotalela?

OSILÁ komona mwana mobali moko ya moke azali koluka kozala lokola tata na ye? Mwana yango akomekola ntango mosusu ndenge tata na ye atambolaka, alobaka to asalaka. Na nsima, akokangama ntango mosusu na bizaleli mpe makambo ya elimo oyo tata na ye alandaka. Ɛɛ, bolingo mpe limemya oyo azali na yango mpo na tata na ye nde etindi ye alinga kozala lokola tata na ye.

2 Bongo boyokani kati na Yesu ná Tata na ye ya likoló ezalaka ndenge nini? Mokolo moko Yesu alobaki ete: “Ngai nalingaka Tata.” (Yoane 14:31) Moto moko te akoki mpenza kolinga Yehova koleka Mwana na ye, oyo afandaki na ye ntango molai liboso bikelamu mosusu nyonso bizalisama. Bolingo yango etindaki Mwana wana, oyo amipesi mpenza, na kosepela kozala lokola Tata na ye.Yoane 14:9.

3 Na mikapo oyo ezali liboso na buku oyo, totalelaki ndenge Yesu amekolaki nguya, bosembo mpe bwanya ya Yehova. Kasi, ndenge nini Yesu amonisaki bolingo ya Tata na ye? Tótalela makambo misato ya bolingo ya Yesu—elimo na ye ya komipimela, mawa monene na ye mpe mposa na ye ya kolimbisa.

“Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo”

4. Ndenge nini Yesu apesaki ndakisa monene mpenza na likambo ya kolinga mpe komipimela mpo na basusu?

4 Yesu apesaki ndakisa monene na ndenge amipimelaki mpo alingaki basusu. Komipimela elingi koloba kotya matomba mpe mikakatano ya bato mosusu liboso ya oyo ya biso. Ndenge nini Yesu amonisaki bolingo ya ndenge yango? Ye moko alobaki ete: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Na bolingo na ye moko Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na biso. Yango ezalaki elembo ya bolingo ya monene mpenza oyo moto  ata moko te amonisá. Kasi Yesu amonisaki mpe na ndenge mosusu bolingo oyo etindaka na komipimela.

5. Mpo na nini tokoki koloba ete Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe amipimelaki na bolingo mpenza ntango alongwaki na likoló?

5 Liboso abotama moto, Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe azalaki na esika monene mpe ya lokumu mingi na likoló. Azalaki na boyokani makasi mpenza elongo na Yehova mpe na ebele ya bikelamu ya elimo. Atako azalaki na makambo nyonso wana, Mwana wana ya bolingo “amikómisaki nde mpamba mpe akamataki motindo ya moombo mpe ayaki kokóma motindo moko na bato.” (Bafilipi 2:7) Ye moko andimaki koya kofanda kati na basumuki na mokili oyo “ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Na bolingo nyonso Mwana ya Nzambe amipimelaki mpenza mpo na kosala likambo yango, boye te?

6, 7. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki bolingo oyo etindaka na komipimela mpo na bato mosusu ntango azalaki kokokisa mosala ya Nzambe awa na mabelé? (b) Yoane 19:25-27 ezali na ndakisa nini ya bolingo oyo ezangi koluka matomba ya moto ye moko?

6 Na mosala mobimba oyo Yesu asalelaki Nzambe awa na mabelé, amonisaki na ndenge mingi ete amipimelaki mpo alingaki bato. Azalaki koluka matomba na ye moko ata moke te. Amipesaki mpenza mingi na mosala ya Nzambe, mpe mpo na yango amipimelaki biloko oyo bato basengeli kozala na yango na bomoi na bango. Alobaki boye: “Bagambala bazalaka na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló bazalaka na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó na ye te.” (Matai 8:20) Lokola Yesu azalaki mosali ya mabaya oyo ayebaki malamu mosala na ye, mbɛlɛ azwaki mwa ntango ya komitongela ndako ya kitoko to kosala biloko kitoko ya ndako mpo na kotɛka mpe kozwa mwa mbongo. Kasi asalelaki mayele na ye te mpo na konduka biloko ya mokili.

7 Ndakisa moko ya kosimba mpenza motema, oyo emonisi bolingo oyo ezalaki kotinda Yesu na komipimela mpo na bolamu ya bato mosusu ekomami na Yoane 19:25-27. Kanisá ebele ya makambo oyo ezalaki kotambola na makanisi mpe na motema ya Yesu wana azali konyokwama likoló ya nzete ya mpasi, na nsima ya midi na mokolo oyo babomaki ye. Azalaki  komibanzabanza mpo na bayekoli na ye, mosala ya kosakola, mpe mingimingi mpo na bosembo na ye mpe makambo oyo bosembo yango ekosala na nkombo ya Tata na ye. Ya solo, bomoi ya bato mpo na mikolo ezali koya ezalaki na motó na ye! Atako bongo, mwa ntango moke liboso akufa, Yesu amonisaki mpe ete azali komibanzabanza mpo na mama na ye Maria, oyo mbala mosusu na ntango yango mobali na ye asilaki kokufa. Yesu asɛngaki ntoma Yoane abatela Maria lokola mama na ye mpenza, mpe kobanda wana ntoma yango azwaki Maria na ndako na ye. Na ndenge yango, Yesu azwaki bibongiseli mpo na bolamu ya mosuni mpe ya elimo ya mama na ye. Wana ezali solo elembo ya bolingo oyo ezangi koluka matomba ya moto ye moko!

“Mawa ekangaki ye”

8. Wapi ndimbola ya liloba ya Grɛki oyo Biblia esaleli mpo na kolobela motema mawa ya Yesu?

8 Yesu azalaki na motema mawa lokola Tata na ye. Makomami ezali kolobela Yesu lokola moto oyo azalaki komipesa mpo na kosalisa bato, mpamba te mpasi na bango ezalaki koyokisa ye mawa mingi. Mpo na kolobela motema mawa ya Yesu, Biblia esaleli liloba ya Grɛki oyo elimboli ‘mawa ekangi [moto].’ Moto moko ya mayele alobi ete: “[Liloba yango] elobelaka . . . mawa oyo eningisaka mpenza motema ya moto. Yango nde liloba ya Grɛki oyo eleki maloba mosusu nyonso mpo na komonisa mawa.” Tótalela mwa makambo oyo etindaki Yesu ayoka mawa mpe asala likambo moko.

9, 10. (a) Makambo nini etindaki Yesu ná bantoma na ye báluka esika moko ya kimya? (b) Ntango ebele ya bato batikelaki Yesu ata ntango te ya kozala ye ná baninga na ye, asalaki nini; mpe mpo na nini asalaki bongo?

9 Mawa etindaki ye akokisa bamposa ya elimo ya bato. Lisolo oyo ezali na Malako 6:30-34 emonisi likambo ya libosoliboso oyo ezalaki kotinda Yesu ayoka mawa. Meká komona na makanisi likambo oyo esalemaki. Bantoma basepeli mingi, mpamba te bauti kosakola na bamboka nyonso epai batindaki bango. Bazongi epai ya Yesu mpe na esengo mpenza bayebisi ye nyonso oyo bamonaki mpe bayokaki. Kasi ebele ya bato bayangani  wana, Yesu ná bantoma na ye bazwi ata ntango ya kolya te. Ntango atali bantoma, amoni ete balɛmbi. Ayebisi bango boye: “Bino bóya, kaka bino moko, na esika oyo bato bazali te mpe bópema mwa moke.” Bakɔti na masuwa moko, mpe bakatisi na nɔrdi ya Mbu ya Galilai mpo na koluka esika moko ya kimya. Kasi ebele yango ya bato bamonaki bango ntango bazali kokende. Basusu mpe bayokaki nsango ya kokende na bango. Bango nyonso bapoti mbangu pembenipembeni ya mbu epai ya nɔrdi mpe bakómi na ngámbo mosusu liboso ya masuwa!

10 Yesu asiliki nde lokola batikeli ye ata ntango te ya kozala kaka ye ná baninga na ye? Te! Ntango amoni ebele wana ya bato bazali kozela ye, epesi ye mawa na motema. Malako akomi ete: “Amonaki ebele mpenza ya bato, kasi mawa ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate bazangi mobateli. Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.” Yesu amoni ete bato wana bazali na bosɛnga na makambo ya elimo. Bazali lokola bampate oyo bazali koyengayenga mpe bazangi elikya, bazali na mobateli te mpo na kotambwisa bango to kobatela bango. Yesu ayebi malamu ete bakonzi ya mangomba, bato ya motema libanga, oyo basengeli kozala babateli ya bolingo, bazali kotyela bato mpamba likebi te. (Yoane 7:47-49) Ayokeli bato wana mawa, bongo abandi koteya bango “makambo oyo etali bokonzi ya Nzambe.” (Luka 9:11) Omoni ete Yesu ayokeli bato yango mawa liboso kutu ya komona ndenge oyo bakoyamba mateya na ye. Yango elingi koloba ete mawa monene oyo amonisi ekangi ye te nsima ya koteya ebele yango ya bato, kasi yango nde etindaki ye na koteya.

“Asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki ye”

11, 12. (a) Na ntango ya kala bazalaki kotalela bato ya maba ndenge nini, kasi Yesu asalaki nini ntango mobali moko oyo “atondá na maba maa” ayaki epai na ye? (b) Mbala mosusu moto ya maba yango ayokaki nini ntango Yesu asimbaki ye, mpe ndenge nini likambo oyo monganga moko akutanaki na yango endimisi yango?

11 Mawa etindaki ye na kokitisa bampasi ya bato. Bato oyo bazalaki na makɔnɔ ndenge na ndenge bamonaki ete Yesu azalaki na motema mawa, yango wana bazalaki kokende epai na ye. Yango emonanaki polele ntango mobali moko oyo “atondá na maba maa” ayaki epai ya Yesu wana ebele ya bato bazali kolanda ye. (Luka 5:12) Na ntango ya kala, bazalaki kopekisa bato ya maba  kozala esika moko na bato mosusu mpo bázwa maladi yango te. (Mituya 5:1-4) Nzokande, na nsima, balabi (oyo bazalaki bakonzi ya mangomba) babimisaki makanisi oyo ezalaki komonisa mawa te epai na bato ya maba mpe batyelaki bango mibeko ya makasimakasi. * Atako bongo, talá ndenge Yesu asalaki epai ya moto yango ya maba: “Moto moko ya maba mpe ayaki epai na ye, azalaki kobondela ye ɛɛ na kofukama, alobaki na ye ete: ‘Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.’ Na yango mawa ekangaki ye, mpe asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki ye, mpe alobaki na ye ete: ‘Nalingi. Kómá pɛto.’ Mpe na mbala moko maba elimwaki epai na ye.” (Malako 1:40-42) Yesu ayebaki ete mibeko epesaki moto ya maba yango nzela te azala wana na kati ya bato. Atako bongo, na esika ya kobengana ye, mawa ekangaki Yesu makasi mpe etindaki ye asala likambo oyo ekokaki te koyela moto moko na makanisi: Yesu asimbaki ye!

12 Oyebi ndenge moto wana ya maba ayokaki ntango Yesu asimbaki ye? Mpo ozwa mwa likanisi, tózwa ndakisa ya likambo moko oyo esalemaki. Paul Brand, monganga ya maladi ya maba, alobeli moto ya maba moko oyo ye asalisaki na Inde. Ntango monganga wana azalaki kotalatala moto yango ya maba, atyaki lobɔkɔ na lipeka na ye, mpe ayebisaki ye na nzela ya mobongoli moko, ndenge akosalisa ye. Mbala moko, moto ya maba yango abandaki kolela. Monganga atunaki: “Nalobi nde mabe?” Mobongoli ayebisaki elenge mobali yango na monɔkɔ na ye mpe ayanolaki boye: “Te, monganga. Alobi azali kolela mpo otye lobɔkɔ na lipeka na ye. Eleki bambula ebele ata moto moko asimbaka ye te.” Mpo na moto ya maba oyo ayaki epai ya Yesu, kosimba oyo Yesu asimbaki ye ezalaki kutu na ntina koleka: nsima na yango, maladi oyo ezalaki kotinda bato bákima ye esilaki!

13, 14. (a) yesu akutanaki na banani ntango akómaki pene na engumba Naini, mpe nini ekómisaki liwa yango likambo ya mawa koleka? (b) Motema mawa ya Yesu etindaki ye asala nini mpo na mwasi mokufeli-mobali ya Naini?

 13 Mawa etindaki ye na kosilisa kolela. Kolela ya bato ezalaki koyokisa Yesu mawa mingi. Tótala, na ndakisa, lisolo oyo ezali na Luka 7:11-15. Yango esalemaki ntango Yesu akómaki na katikati ya mosala na ye ya kosakola. Alingaki kokɔta na engumba moko ya Galilai na nkombo Naini. Ntango akómaki pene na porte ya mboka yango, akutanaki na bato bazali kokende kokunda ebembe moko. Liwa yango epesaki mawa mingi. Mowei ezali elenge mobali oyo azalaki mwana kaka moko ya mama na ye, oyo mpe akufelá mobali. Ekoki kozala ete mwasi yango azalaká mpe kati na bato oyo bakendaká kokunda mobali na ye. Mbala oyo ezali mwana na ye ya mobali, oyo mbala mosusu azalaki moto kaka moko oyo azalaki kosalisa ye. Mbala mosusu na kati ya ebele ya bato oyo bazalaki kokende elongo na mwasi yango, ezalaki na basi oyo balelaka bibembe na banzembo ya mawa mpe babɛti-miziki bazali kobɛta miziki ya mawa mpenza. (Yilimia 9:17, 18; Matai 9:23) Kasi Yesu atyaki likebi na ye likoló ya mama yango oyo azalaki na mawa mingi, oyo na ntembe te azalaki kotambola pene na mbeto oyo ezalaki na ebembe ya mwana na ye.

14 Yesu “ayokelaki [mama yango] mawa.” Na mongongo oyo ezali kokitisa motema, alobaki na ye ete: “Tiká kolela.” Mbala moko, apusanaki mpe asimbaki mbeto oyo bamemaki ebembe. Bato oyo bakumbaki ebembe, mbala mosusu ná ebele ya bato oyo bazalaki wana, batɛlɛmaki. Na mongongo makasi, Yesu alobaki na ebembe ete: “Elenge mobali, nalobi na yo, Tɛlɛmá!” Nini esalemaki? “Mokufi afandaki mpe abandaki koloba” lokola moto oyo alamuki na mpɔngi moko ya makasi! Na nsima, Biblia elobi likambo moko oyo ezali kosimba motema mpenza: “Mpe [Yesu] apesaki ye epai ya mama na ye.”

15. (a) Masolo oyo elobeli motema mawa ya Yesu emonisi ete motema mawa etindaka na kosala nini? (b) Ndenge nini tokoki komekola Yesu na likambo yango?

15 Masolo oyo eteyi biso nini? Na mabaku yango nyonso, motema mawa etindaki Yesu na kosala likambo moko. Yesu akokaki  te komona mpasi ya bato mosusu kozanga ete ayoka mawa, mpe akokaki te koyoka mawa bongo akanga mabɔkɔ. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye? Biso baklisto tozali na mokumba ya kosakola nsango malamu mpe ya kokómisa bato bayekoli. Libosoliboso, kolinga Nzambe nde etindaka biso tósala mosala yango. Nzokande, tóbosana te ete mosala yango esɛngaka mpe kozala na motema mawa. Soki tozali komitya na esika ya bato ndenge Yesu asalaki, motema na biso ekotinda biso tósala nyonso oyo ekoki mpo na kosakwela bango nsango malamu. (Matai 22:37-39) Bongo tokoloba nini na oyo etali komonisa motema mawa epai na baninga na biso bandimi oyo bazali na mpasi to bakufeli ndeko to moninga? Tokoki te kosala makamwisi mpo na kosilisa maladi na bango to kosekwisa bakufi. Kasi, tokoki komonisa motema mawa soki toyebisi bango ete tozali komibanzabanza mpo na bango to soki tosalisi bango na likambo moko oyo basengeli na yango.Baefese 4:32.

“Tata, limbisá bango”

16. Ndenge nini mposa ya Yesu ya kolimbisa emonanaki polele ata ntango akakisamaki na nzete ya mpasi?

16 Yesu amonisaki mpe malamumalamu bolingo ya Tata na ye na lolenge mosusu ya ntina mingi, ‘azalaki kolimbisa mabe.’ (Nzembo 86:5) Mposa wana ya kolimbisa emonanaki polele ata ntango akakisamaki na nzete ya mpasi. Lokola liwa moko ya nsɔni ezalaki kozela ye, wana nsɛtɛ etɔbɔli mabɔkɔ mpe makolo na ye, Yesu alobaki nini? Asɛngaki Yehova apesa babomi na ye etumbu? Te, kasi na maloba na ye ya nsuka, alobaki ete: “Tata, limbisá bango, mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.”Luka 23:34. *

17-19. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alimbisi ntoma Petelo atako awanganaki ye mbala misato?

 17 Mbala mosusu, lolenge oyo Yesu alimbisaki ntoma Petelo nde ezali mpenza kosimba motema. Ntembe moko ezali te ete Petelo alingaki Yesu mingi. Na mokolo ya 14 Nisana, butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé, Petelo ayebisaki ye ete: “Nkolo, nandimi kokende elongo na yo na bolɔkɔ mpe na liwa.” Nzokande, mwa bangonga mpamba na nsima, mbala misato mobimba Petelo awanganaki mpenza Yesu! Biblia eyebisi biso likambo oyo esalemaki ntango Petelo awanganaki mpo na mbala ya misato: “Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo.” Lokola Petelo atungisamaki mingi na bonene ya lisumu na ye, “abimaki na libándá mpe alelaki na mawa makasi.” Na nsima, ntango Yesu akufaki, kaka na mokolo yango, ekoki kozala ete Petelo amitunaki ete: ‘Nkolo na ngai alimbisaki ngai mpenza?’Luka 22:33, 61, 62.

18 Eumelaki te, Petelo azwaki eyano na motuna yango. Yesu asekwaki na ntɔngɔ ya mokolo ya 16 Nisana, mpe emonani ete kaka na mokolo yango, akendeki kotala Petelo. (Luka 24:34; 1 Bakolinti 15:4-8) Mpo na nini Yesu atyaki likebi monene bongo epai ya ntoma oyo awanganaki Ye makasi mpenza? Yesu alingaki ntango mosusu kobɔndisa Petelo, wana asilaki kobongola motema, ayeba ete Nkolo na ye azali kaka kolinga ye mpe kosepela na ye. Kasi Yesu asalaki likambo mosusu mpo na kokitisa Petelo motema.

19 Mwa ntango moke na nsima, Yesu abimelaki bayekoli na ye na Mbu ya Galilai. Na libaku yango, Yesu atunaki Petelo mbala misato soki alingaka ye (Petelo awanganaki mpe ye mbala misato). Na mbala ya misato, Petelo azongisaki ete: “Nkolo, oyebi makambo nyonso; oyebi yango ete nalingaka yo mingi.” Ya solo, lokola Yesu azalaki koyeba makambo na mitema ya bato, ayebaki malamu ete Petelo alingaka ye mingi. Atako bongo, Yesu apesaki Petelo libaku ya koloba yango ye moko. Yesu asukaki kaka wana te, apesaki Petelo mokumba ya ‘koleisa’ mpe ‘kobatela bampate mike’ na Ye. (Yoane 21:15-17) Mwa liboso, apesaki Petelo mokumba ya kosakola. (Luka 5:10) Kasi sikoyo, Yesu amonisi ete atyeli ye mpenza motema, apesi ye mokumba monene koleka: kobatela baoyo bakokóma bayekoli ya Klisto. Mwa moke na nsima, Yesu apesi Petelo mokumba moko ya lokumu na mosala oyo apesaki  bayekoli na ye. (Misala 2:1-41) Motema ya Petelo ekitaki mpenza na koyeba ete Yesu alimbisi ye mpe azali kaka kotyela ye motema!

‘Oyebi bolingo ya Klisto’?

20, 21. Ndenge nini tokoki “koyeba bolingo ya Klisto” malamumalamu?

20 Ya solo, Liloba ya Yehova ezali kolobela bolingo ya Klisto na ndenge moko ya malamu mpenza. Kasi, bolingo yango esengeli kotinda biso tósala nini? Biblia elendisi biso na “koyeba bolingo ya Klisto oyo eleki boyebi.” (Baefese 3:19) Ndenge tomoni, masolo ya bomoi ya Yesu mpe ya mosala na ye oyo ezali na Baevanzile eteyaka biso makambo mingi mpo na bolingo ya Klisto. Nzokande, “koyeba bolingo ya Klisto” malamumalamu esuki te kaka na koyeba oyo Biblia elobi mpo na ye.

21 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “koyeba” elimboli koyeba “na misala, na nzela ya makambo oyo moto ye moko asali.” Mpo tóyeba mpenza ndenge oyo Yesu azalaki koyoka na motema, tosengeli komonisa bolingo ndenge ye amonisaki—komipimela mpo na bolamu ya bato mosusu, kokokisa bamposa na bango mpo tozali koyokela bango mawa, kolimbisa bango na motema mobimba. Ezali na ndenge yango, na makambo oyo biso moko tosali, nde ‘tokoyeba bolingo ya Klisto oyo eleki boyebi.’ Mpe tóbosana soki moke te ete soki tozali mpenza kokóma lokola Klisto, tokopusana lisusu koleka penepene na Yehova, Nzambe na biso ya bolingo, oyo Yesu amekolaki malamumalamu.

^ par. 11 Mibeko ya balabi elobaki ete moto moko te asengeli kopusana penepene na moto ya maba na ntaka oyo ezali na nse ya mapeko minei (soki mɛtrɛ 1,8). Soki mopɛpɛ ezali kopɛpa, moto ya maba asengeli kozala mosika, na ntaka ya mapeko 100 (soki mɛtrɛ 45) to koleka. Buku Midrash Rabba elobeli labi moko oyo azalaki komibomba mpo amona bato ya maba te mpe mosusu azalaki kobwakela bango mabanga mpo bázala mosika na ye. Na yango, bato ya maba bazalaki koyoka mpasi mpo bato bazalaki kosundola bango, kotyola bango, mpe kolinga bango te.

^ par. 16 Eteni ya liboso ya Luka 23:34 ezali te na baminiskri mosusu ya kala. Nzokande, lokola maloba yango ezali na baminiskri mingi oyo ebongi kotyelama motema, Libongoli ya Mokili ya Sika mpe mabongoli mosusu ya Biblia etye yango. Na ntembe te, Yesu azalaki kolobela basoda ya Loma oyo bakakisaki ye na nzete. Bayebaki te nini bazalaki kosala, mpamba te bayebaki te soki Yesu azali mpenza nani. Kasi, bakonzi ya mangomba oyo batindaki bango báboma Yesu bazalaki na ngambo monene koleka, mpamba te bayebaki eloko bazalaki kosala mpe basalelaki mayele mabe. Mingi kati na bango, bakokaki kolimbisama te.Yoane 11:45-53.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Ndenge ya kokoba komonisa ezaleli ya komipimela

Tozali na monguna moko oyo alukaka na mayele mabe kobebisa ezaleli na biso ya komipimela. Lisolo oyo emonisi polele monguna yango mpe elobeli ndenge tokoki kosalela Biblia mpo na kolonga monguna yango.