Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 26

Nzambe oyo ‘alimbisaka mabe’

Nzambe oyo ‘alimbisaka mabe’

1-3. (a) Mokumba nini ya kilo mokomi ya nzembo Davidi akumbaki, mpe ndenge nini azwaki libɔndisi na mpasi oyo ayokaki na motema? (b) Soki tosali lisumu, yango ekoki kotya likoló na biso mokumba nini ya kilo, kasi ndenge nini Yehova akitisi biso motema?

DAVIDI, mokomi ya nzembo, akomaki boye: “Mabe na ngai eleki likoló ya motó na ngai; ezali na bozito [“kilo,” NW] boleki nguya na ngai. Nabɛtami mpe nanyatami mingi mpenza.” (Nzembo 38:4, 8) Davidi ayebaki malamu ete soki moto asali mabe, lisosoli na ye etungisamaka mpe ekómaka na kilo. Kasi azwaki libɔndisi na mpasi wana ya motema na ye. Akangaki ntina ete atako Yehova ayini lisumu, ayinaka te mosumuki oyo abongoli solo motema mpe atiki etamboli na ye ya mabe. Lokola Davidi andimaki solo ete Yehova alingaka mpenza komonisa motema mawa na ye epai ya bato oyo babongoli motema, alobaki boye: ‘Yo, . . . Ee Yehova, . . . olimbisaka mabe.’Nzembo 86:5.

2 Ntango tosali lisumu, ekoki kokómela biso mpe tóyoka lokola tonyatami mpo lisosoli na biso ezali kotungisa biso mingi. Koyoka mpasi ndenge wana ezalaka na litomba. Ekoki kotinda biso tóbongisa esika tosalaki mabunga. Nzokande, likama ezali ete tokoki komimemisa ngambo oyo eleki ndelo. Ndenge motema na biso ezali kokweisa biso, ekoki kokoba koyebisa biso ete Yehova akolimbisa biso te, ata soki tobongoli motema ndenge nini. Soki ngambo oyo tozali koyoka ‘emɛli’ biso, Satana akoluka kotinda biso tótika kosalela Yehova, tókanisa ete Yehova atalelaka biso na valɛrɛ te mpe ete tobongi te kosalela ye.2 Bakolinti 2:5-11.

3 Yehova atalelaka biso mpenza bongo? Soki moke te! Kolimbisa ezalaka moko ya makambo oyo ezali na kati ya bolingo monene ya Yehova. Na Liloba na ye, azali kokitisa biso motema ete soki tobongoli solo motema, akolimbisa biso. (Masese 28:13) Mpo tókanisa te ete Yehova akolimbisa biso te, tóluka koyeba mpo na nini mpe ndenge nini alimbisaka.

 Ntina oyo Yehova ‘alimbisaka mabe’

4. Likambo nini Yehova abosani te mpo na nzoto na biso, mpe yango esalaka ete atalela makambo na biso ndenge nini?

4 Yehova ayebi malamu esika makoki na biso esuki. Nzembo 103:14 elobi ete: “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele putulu.” Abosani te ete tosalemi na putulu, tozali na bolɛmbu oyo euti na kozanga kokoka. Maloba oyo alobi ete ayebi “nzoto na biso,” ezongisi na makanisi na biso ete Biblia ekokanisaka Yehova na moyemi-mbɛki mpe biso na mbɛki ya mabelé oyo ye azali kosala. * (Yilimia 18:2-6) Wana azali kotalela makambo na biso, Moyemi-Mbɛki Monene abosanaka te ete nzoto na biso ya masumu ezali na bolɛmbu, mpe atalaka soki totosaka malako na ye to te.

5. Ndenge nini mokanda ya Baloma elobeli nguya ya solosolo oyo lisumu ezali na yango?

5 Yehova ayebi nguya ya lisumu malamu. Liloba na ye elobaka ete lisumu ezali eloko moko ya nguya mingi oyo ekangi bato mpo na koboma bango. Ekangi bango mpenza makasi? Na mokanda ya Baloma, ntoma Paulo alobi boye: tozali “na nse ya lisumu,” lokola basoda na nse ya komanda na bango (Baloma 3:9); lisumu ‘eyangeli’ bato lokola mokonzi (Baloma 5:21); “efandi” to “ezali kofanda” na kati na biso (Baloma 7:17, 20); “mobeko” na yango ezali ntango nyonso kosala mosala kati na biso, ezali koluka kotambwisa biso. (Baloma 7:23, 25) Lisumu ezali mpenza na nguya ya solosolo likoló na nzoto na biso ya kozanga kokoka!Baloma 7:21, 24.

6, 7. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo balukaka bolimbisi na ye na motema oyo ezali na mawa mpo na lisumu basali? (b) Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete ata soki tosali nini Nzambe akoyokela biso mawa kaka?

6 Na yango, Yehova ayebi malamu ete tokokoka te kotosa ye malamumalamu, ata soki tozali na mposa makasi ya kotosa ye bongo. Na bolingo nyonso, akitisi biso motema ete soki toluki bolimbisi na ye na motema oyo ezali na mawa mpo tosali lisumu, akolimbisa biso mpenza. Nzembo 51:17 elobi: “Makabo mazali  malamu na miso ya Nzambe ezali [elimo] etutami; ee Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.” Yehova akobwaka te moto oyo motema na ye ‘etutami mpe ezali na mawa’ mpo lisosoli na ye etungisami mingi.

7 Yango elingi nde koloba ete lokola tozali na nzoto ya masumu, tokosala ndenge tolingi mpo Nzambe akoyokela biso mawa kaka? Soki moke te! Yehova atambwisami kaka na mawa te. Motema mawa na ye ezalaka na nsuka. Akolimbisa ata moke te baoyo basalaka masumu na nko mpe babongolaka motema te. (Baebele 10:26) Nzokande, soki amoni ete moto azali koyoka mawa mpo na lisumu na ye, alimbisaka. Sikoyo tótalela maloba oyo Biblia emonisi polele mpo na kolobela ezaleli malamu wana ya Yehova oyo emonisaka mpe bolingo na ye.

Yehova alimbisaka mpenza

8. Tokoki koloba ete Yehova asalaka nini ntango alimbisaka masumu na biso, mpe elikya nini yango epesi biso?

8 Davidi, nsima ya kobongola motema alobaki boye: “Nsukansuka, nayambolaki lisumu na ngai epai na yo, mpe nabombaki mabe na ngai te. . . . Mpe yo olimbisi mabe ya masumu na ngai.” (Nzembo 32:5) Liloba “olimbisi” ezali ndenge babongoli liloba ya Liebele oyo elimboli libosoliboso “kotombola” to “komema.” Ndenge basaleli yango awa, elingi koloba kolongola “ngambo, mabe, lisumu.” Na yango, tokoki koloba ete Yehova atombolaki masumu ya Davidi mpe amemaki yango mosika. Na ntembe te, yango ekitisaki ngambo oyo Davidi azalaki na yango. (Nzembo 32:3) Biso mpe tokoki mpenza kotya motema epai ya Nzambe oyo amemaka mosika masumu ya baoyo balukaka bolimbisi na ye na nzela ya kondima na bango na mbeka ya lisiko ya Yesu.Matai 20:28.

9. Yehova abwakaka masumu na biso wapi?

9 Davidi asalelaki ndakisa mosusu ya polele mpo na kolobela bolimbisi oyo Yehova alimbisaka: ‘Ndenge epai moi ebimaka ezali mosika na epai elalaka, se ndenge wana pe ye abwaki masumu na biso mosika.’ (Nzembo 103:12, Bible na lingala ya lelo oyo) Ɛsti, epai moi ebimaka, ezalaka solo mosika na wɛsti, epai yango elalaka? Ɛsti ezalaka ntango nyonso mosika mpenza na  wɛsti; yango mibale ekokutana mokolo moko te. Moto moko ya mayele alobi ete maloba yango elimboli “mosika; mosika mpenza.” Maloba wana oyo Davidi akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe eyebisi biso ete ntango Yehova alimbisaka, abwakaka masumu na biso mosika mpenza.

“Masumu na bino . . . ekokóma pɛɛ lokola mbula mpɛmbɛ”

10. Soki Yehova alimbisi masumu na biso, mpo na nini tosengeli kokanisa lisusu te ete tokotikala na litɔnɔ ya masumu yango bomoi na biso mobimba?

10 Osilá komeka kolongola litɔnɔ moko na elamba ya mpɛmbɛ? Mbala mosusu, atako osalaki nyonso, litɔnɔ yango ezalaki kaka komonana. Yoká ndenge Yehova alobeli likoki na ye ya kolimbisa masumu: ‘Ata masumu na bino ezali motane lokola ngola, ekokóma pɛɛ lokola mbula mpɛmbɛ, ata ezali motane lokola makila, ekozala lokola [nsuki] ya bampate.’ (Yisaya 1:18) Liloba “ngola” ezali komonisa langi ya motane ngwaa. * Langi ya  “motane lokola makila” ezali komonisa langi ya makasi mpenza oyo bazalaki kotya na bilamba. (Nahumu 2:3) Na makasi na biso moko tokoki te kolongola litɔnɔ ya lisumu. Kasi Yehova akoki kozwa masumu oyo ezali motane lokola ngola to lokola makila, mpe kokómisa yango mpɛmbɛ lokola mbula mpɛmbɛ to lokola nsuki ya mpate oyo bapakoli langi te. Soki Yehova alimbisi masumu na biso, tosengeli kokanisa lisusu te ete tokotikala na litɔnɔ ya masumu yango bomoi na biso mobimba.

11. Na ndenge nini Yehova abwakaka masumu na biso na mokɔngɔ na ye?

11 Na loyembo moko kitoko oyo Hizikiya asalaki mpo na kopesa Yehova matɔndi nsima ya kobika na maladi moko oyo elingaki koboma ye, alobaki na Yehova ete: ‘Obwaki masumu na ngai nyonso nsima ya mokɔngɔ na yo.’ (Yisaya 38:17) Awa balobeli Yehova lokola nde azali kokamata masumu ya mosumuki oyo abongoli motema mpe abwaki yango nsima na Ye epai akomona yango lisusu te to akotyela yango lisusu likebi te. Buku moko elobi ete likanisi oyo ebimi awa ekoki kolobelama boye: “Okómisi [masumu na ngai] lokola nde nasalaki yango te.” Likanisi yango ezali mpenza kokitisa motema, boye te?

12. Ndenge nini mosakoli Mika amonisi ete ntango Yehova alimbisaka masumu na biso, alongolaka yango mpo na libela?

12 Na elaka moko ya kozongisama ya ekólo Yisalaele, mosakoli Mika amonisaki ete andimaki makasi ete Yehova akolimbisa bato na ye oyo bakobongola motema; alobaki boye: ‘Nani azali Nzambe lokola yo, . . . atiki lipɛngwi ya litika ya libula na ye? . . . Okobwaka mapɛngwi nyonso na bango kino bozindo ya mai ya mbu.’ (Mika 7:18, 19) Kanisá naino ndimbola ya maloba yango na ntango ya kala. Likoki ezalaki solo ya kozwa lisusu eloko moko oyo babwaki na “bozindo ya mai [ya mbu]”? Na bongo, maloba ya Mika emonisi ete ntango Yehova alimbisaka masumu na biso, alongolaka yango mpo na libela.

13. Maloba ya Yesu “Limbisá biso banyongo na biso” elingi koloba nini?

13 Yesu asalelaki ndakisa ya boyokani oyo ezalaka kati na modefisi mpe modefi mpo na komonisa lolenge Yehova alimbisaka. Yesu alendisaki biso tóbondelaka ete: “Limbisá biso banyongo na biso.” (Matai 6:12) Na ndenge yango, Yesu akokanisaki  masumu na banyongo. (Luka 11:4) Ntango tosalaka masumu, tokómaka lokola bato ya nyongo ya Yehova. Buku moko elobi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami ‘kolimbisa,’ ekoki kolimbola “kotika nyongo to kolandela yango lisusu te, wana toboyi kosɛnga yango.” Na maloba mosusu, ntango Yehova alimbisaka, abomaka nyongo oyo tozalaki na yango. Na ndenge yango, basumuki oyo babongoli motema bakoki kobɔndisama. Yehova akosɛnga soki moke te moto afuta nyongo oyo ye asili koboma!Nzembo 32:1, 2.

14. Maloba “mpo masumu na bino ebomama” ezali kopesa likanisi nini?

14 Na Misala 3:19, balobeli lisusu ndenge Yehova alimbisaka masumu: “Na yango, bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama.” Liloba “ebomama” ebongoli liloba ya Grɛki oyo ekoki kolimbola “kopangusa, . . . kolongola, kosilisa.” Bato ya mayele mosusu balobi ete liloba yango ezali kopesa likanisi ya kozimisa makambo oyo ekomami. Ndenge nini? Mpo na kosala mai ya mokanda oyo bazalaki kosalela na ntango ya kala, bazalaki kosangisa makala, makiki ya nzete mpe mai. Mwa moke nsima ya kokoma na mai ya mokanda yango, mokomi akokaki koboma makambo akomi na linyuka oyo ezali na mwa mai. Yango ezali elilingi moko kitoko mpo na kolobela motema mawa ya Yehova. Ntango alimbisaka masumu na biso, ezali lokola nde azwaka linyuka mpo na koboma yango libela.

Yehova alingi tóyeba ete ‘alimbisaka mabe’

15. Yehova alingi tóyeba ye na likambo nini?

15 Bandakisa nyonso wana ezali na liteya moko: Yehova alingi tóyeba ete azali mpenza pene ya kolimbisa masumu na biso soki amoni ete tobongoli motema solosolo. Tosengeli soki moke te kobanga ete akobomba masumu yango mpo na kopesa biso etumbu nsima. Yango emonisami na likambo mosusu oyo Biblia elobi mpo na motema mawa monene ya Yehova: ntango alimbisaka, abosanaka.

‘Nakokanisa mabe na bango lisusu te’

16, 17. Ntango Biblia elobi ete Yehova abosanaka masumu na biso, yango elingi koloba nini; mpe mpo na nini oyanoli bongo?

16 Mpo na baoyo bazali na kati ya kondimana ya sika, Yehova apesaki elaka oyo: “Nakolimbisa bokesene na bango, nakokanisa  mpe mabe na bango lisusu te.” (Yilimia 31:34) Yango elingi nde koloba ete soki Yehova alimbisi, azalaka lisusu na likoki te ya koyeba lisumu yango? Ekoki mpenza kozala ndenge wana te. Biblia elobeli masumu ya bato mingi oyo Nzambe alimbisaki, na ndakisa Davidi. (2 Samwele 11:1-17; 12:13) Na ntembe te, tii lelo Yehova azali koyeba masumu oyo basalaki. Masumu na bango, ná kobongola motema na bango mpe ndenge oyo Nzambe alimbisaki bango, nyonso wana ebatelami mpo na bolamu na biso. (Baloma 15:4) Bongo, ntango Biblia elobi ete Yehova ‘akanisaka lisusu’ te masumu ya bato oyo ye alimbisi, yango elingi koloba nini?

17 Ndimbola ya liloba ya Liebele oyo babongoli ‘nakokanisa lisusu’ esuki kaka te na kokanisa lisusu makambo oyo eleká. Buku moko (Theological Wordbook of the Old Testament) elobi ete liloba yango “elimbolaka mpe kozwa meko oyo esengeli.” Na yango,  awa, ‘kokanisa lisusu’ lisumu elingi koloba kopesa bato oyo basali lisumu yango etumbu. (Hosea 9:9) Kasi ntango Nzambe alobi ‘nakokanisa mabe na bango lisusu te,’ azali kokitisa biso motema ete soki alimbisi basumuki oyo babongoli motema, na nsima akopesa bango lisusu etumbu te mpo na masumu yango. (Ezekiele 18:21, 22) Na yango, Yehova abosanaka na ndenge azongisaka te masumu na biso mbala na mbala na makanisi na ye mpo na kofunda biso to kopesa biso etumbu mbala na mbala mpo na masumu yango. Koyeba ete Nzambe na biso alimbisaka mpe abosanaka ezali solo kobɔndisa, boye te?

Mbuma mabe ya lisumu

18. Mpo na nini kolimbisama elingi koloba te ete mosumuki oyo abongoli motema akobuka te mbuma ya etamboli mabe na ye?

18 Lokola Yehova alimbisaka masumu, yango elingi nde koloba ete mosumuki oyo abongoli motema akozwa ata moke te bampasi oyo ekoki kouta na etamboli mabe na ye? Soki moke te. Tokoki soki moke te kosala lisumu kozanga kobuka mbuma na yango. Paulo akomaki ete: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Tokoki kozwa mpasi mosusu oyo euti na makambo tosalaki. Yango elingi koloba te ete nsima ya kolimbisa, Yehova akosala ete mpasi ekwela biso. Ntango moklisto akutani na mikakatano, asengeli te kokanisa ete, mbala mosusu Yehova nde azali kopesa ye etumbu mpo na masumu oyo asalaki kala. (Yakobo 1:13) Atako bongo, Yehova asalaka te ete tóbuka te mbuma ya makambo mabe oyo tosalaki. Koboma libala, zemi ya balabala, maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, koboya kotyela biso lisusu motema to komemya biso—nyonso wana ekoki kozala mbuma ya lisumu oyo tokoki kokima yango te. Kobosana te ete ata nsima ya kolimbisa Davidi masumu oyo asalaki na likambo ya Bata-Seba ná Uliya, Yehova asalaki te ete Davidi azwa te mikakatano minene oyo masumu yango ebimiselaki ye na nsima.2 Samwele 12:9-12.

19-21. (a) Ndenge nini mobeko oyo ezali na Levitike 6:1-7 ezalaki na litomba mpo na moto oyo basali ye mabe mpe oyo asalaki mabe? (b) Soki masumu na biso epesaki bato mosusu mpasi, mokano ya Yehova ezali ete tósala nini?

19 Masumu na biso ekoki mpe kobimisa mikakatano mosusu,  mingimingi soki makambo tosalaki epesaki bato mosusu mpasi. Na ndakisa, tózwa lisolo oyo ezali na Levitike mokapo 6. Awa, Mibeko ya Moize elobeli likambo moko oyo etali moto oyo asali lisumu monene: koyiba, kobɔtɔla biloko ya moninga na ye Moyisalaele to kobuba ye. Na nsima, mosumuki yango aboyi kondima mabe na ye, akei kutu kino kolapa ndai ya lokuta. Awa likambo oyo moto moko alobi eyokani te na litatoli oyo moto mosusu apesi. Kasi na nsima, moto oyo asalaki mabe atungisami na lisosoli na ye mpe ayei kondima lisumu na ye. Mpo Nzambe andima kolimbisa ye, asengelaki lisusu kosala makambo misato: kozongisa eloko oyo azwaki, kofuta nkolo eloko yango amande oyo ezali na valɛrɛ ya biloko oyo ayibaki kabolá na mitano, mpe kopesa mpate mobali lokola mbeka ya ekweli. Na nsima, Mibeko elobaki ete: “Nganga-nzambe asengeli kobondela mpo na ye liboso ya Yehova, mpe bongo akolimbisama.”Levitike 6:1-7.

20 Mobeko yango ezalaki ebongiseli moko oyo emonisaki motema mawa ya Nzambe. Ezalaki kopesa litomba na moto oyo bayibi eloko na ye, mpamba te azalaki kozwa yango lisusu mpe na ntembe te, motema na ye ezalaki kokita mpenza ntango moto oyo azwaki eloko yango andimi lisumu na ye. Mobeko yango ezalaki mpe kopesa litomba na moto oyo atungisamaki na lisosoli na ye mpe na nsuka andimi mabe na ye mpe abongisi makambo. Soki aboyaka mpenza kosala bongo, mbɛlɛ Nzambe alingaki kolimbisa ye soki moke te.

21 Atako tozali na nse ya Mibeko ya Moize te, Mibeko yango esalisi biso na koyeba makanisi ya Yehova, na ndakisa na likambo ya kolimbisa masumu. (Bakolose 2:13, 14) Soki mabe oyo tosali epesi bato mosusu mpasi, mokano ya Nzambe ezali ete tósala nyonso oyo ekoki mpo na kobongisa makambo. (Matai 5:23, 24) Ekoki kosɛnga kondima lisumu na biso, kondima ete tosalaki mabe, ata mpe kosɛnga moto oyo tosalelaki mabe bolimbisi. Na nsima, tokoki kolelela Yehova na nzela ya mbeka ya Yesu mpe kondima solo ete alimbisi biso.Baebele 10:21, 22.

22. Soki Yehova alimbisi akoki mpe kosala nini?

22 Ndenge tata nyonso oyo alingaka bana na ye asalaka, Yehova  akoki kolimbisa mpe kolandisa yango na mwa etumbu. (Masese 3:11, 12) Mpo na yango, ekosɛnga mbala mosusu ete moklisto oyo abongoli motema, soki azalaki nkulutu, mosaleli na misala to mosakoli ya ntango nyonso, atika mikumba na ye. Kobungisa mikumba oyo alingaki mingi mpo na mwa ntango ekoki kosala ye mpasi. Nzokande, disipilini yango elingi koloba te ete Yehova aboyi kolimbisa ye. Tosengeli kobosana te ete disipilini ya Yehova ezali elembo ete alingaka biso. Kondima yango mpe kotosa yango ezali mpo na bolamu na biso.Baebele 12:5-11.

23. Mpo na nini tosengeli soki moke te kokanisa ete Yehova akolinga te koyokela biso mawa, mpe mpo na nini tosengeli komekola ezaleli na ye ya kolimbisa?

23 Koyeba ete Nzambe na biso ‘alimbisaka mabe’ ezali solo kobɔndisa! Ata soki tosalaki mabunga nini, tókanisa te ete Yehova akolinga te koyokela biso mawa. Soki tobongoli mpenza motema, tozwi bibongiseli mpo na kosembola mabe tosalaki, mpe soki tobondeli na motema mobimba mpo na kosɛnga bolimbisi na nzela ya makila ya Yesu Klisto oyo esopamaki mpo na biso, tokoki solo kondima ete Yehova akolimbisa biso. (1 Yoane 1:9) Na boyokani na biso na bamosusu, tiká tómekola ezaleli na ye ya kolimbisa. Kutu, soki Yehova oyo asalaka lisumu te alimbisaka biso na bolingo nyonso, bongo biso basumuki, tosengeli te kosala makasi mpo na kolimbisana?

^ par. 4 Basalelaka mpe liloba ya Liebele oyo ebongolami na “nzoto na biso” mpo na kolobela bambɛki ya mabelé oyo moyemi-mbɛki asalaka.Yisaya 29:16.

^ par. 10 Moto moko ya mayele alobi ete langi ya motane lokola ngola “ezalaki langi oyo, soki ekangami na elamba, etikalaka libela, elongwaka te. Ezala mamwɛ, to mbula, to kosukola, to kosalela yango ntango molai, ekokaki kolongola yango te.”

Makambo mosusu

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Nzambe akosalisa ngai soki nabondeli ye?

Nzambe akipaka mpenza makambo na ngai?