Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 24

Eloko moko te ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe”

Eloko moko te ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe”

1. Wapi likanisi oyo bato mingi, ezala mpe baklisto mosusu ya solo, bandimaka te?

YEHOVA NZAMBE alingaka yo mpenza? Bato mingi bandimaka ete Nzambe alingi mokili mobimba, ndenge Yoane 3:16 elobi. Bato yango bakanisaka mpenza boye: ‘Nzambe akokoka kolinga moto lokola ngai te.’ Ata baklisto ya solo bakoki na bantango mosusu kondima te ete Nzambe alingaka mpenza bango. Mobali moko, oyo alɛmbaki nzoto, alobaki ete: “Ezalaka mpasi mpenza nandima ete Nzambe akanisaka ngai ata moke.” Ekómelaka mpe yo omiyoka bongo?

2, 3. Nani oyo alingi tóndima ete tozalaka na valɛrɛ te na miso ya Yehova to Yehova akoki kolinga biso te, mpe ndenge nini tokoki kolongola likanisi yango?

2 Satana azali kosala nyonso mpo na kondimisa biso ete Yehova alingaka biso te mpe tozalaka na valɛrɛ na miso na ye te. Mbala mingi Satana asalelaka lofundo mpe lolendo oyo bato bazalaka na yango mpo na kobenda bango epai na ye. (2 Bakolinti 11:3) Kasi asepelaka mpe mingi kosala ete baoyo bakoki bango moko komibatela te bákanisa ete bazali na ntina moko te. (Yoane 7:47-49; 8:13, 44) Azali mpenza kosala bongo na “mikolo ya nsuka” oyo ya ndenge mosusu. Lelo bato mingi bazali kokola na kati ya mabota oyo “bolingo ya libota” ezali te. Basusu bakutanaka mikolo nyonso na bato ya matata, ya moimi mpe ya motó makasi. (2 Timote 3:1-5) Bato yango bakanisaka ntango mosusu ete bazali na ntina te to moto moko te akoki kolinga bango mpo banda bambula mingi banyokwami, basaleli bango mabe kaka mpo bazali bato ya loposo mosusu, to bayini bango.

3 Soki yo mpe okanisaka bongo, kolɛmba nzoto te. Ekómelaka mingi kati na biso tómitalela na ndenge oyo ebongi te. Kasi kobosana te, ntina ya Liloba ya Nzambe ezali ya “kosembola makambo” mpe “kokweisa biloko oyo epikamá makasi.” (2 Timote 3:16; 2 Bakolinti 10:4) Biblia elobi ete: “Tokondimisa mitema  na biso liboso na ye na likambo nyonso oyo mitema na biso ezali kokweisa biso na yango, mpamba te Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:19, 20) Tótalela ndenge minei oyo Makomami esalisaka biso na ‘kondimisa mitema na biso’ ete Yehova alingi biso.

Ozalaka na valɛrɛ na miso ya Yehova

4, 5. Ndenge nini ndakisa ya bakɛngɛli-mboka oyo Yesu apesaki emonisi ete tozali na valɛrɛ na miso ya Yehova?

4 Ya liboso, Biblia ezali koteya polele ete Nzambe amonaka mosaleli na ye mokomoko na valɛrɛ. Na ndakisa, Yesu alobaki ete: “Batɛkaka te bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo moko ya ebende ya motuya moke? Nzokande moko te na yango ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba. Kasi nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso. Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” (Matai 10:29-31) Tótalela sikoyo ntina ya maloba oyo epai na bayoki ya Yesu na ntango wana.

“Boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya”

5 Mbala mosusu tokoki komituna mpo na nini moto akosomba mokɛngɛli-mboka moko. Na ntango ya Yesu, na bandɛkɛ nyonso ya kolya oyo bazalaki kotɛka, mokɛngɛli-mboka nde ezalaki na ntalo oyo eleki moke. Na mbongo moko ya ebende ya motuya moke, moto akokaki kosomba bakɛngɛli-mboka mibale. Kasi na nsima Yesu alobaki ete soki moto azali na mbongo ya ebende mibale, azalaki kosomba bakɛngɛli-mboka minei te, kasi mitano. Ndɛkɛ ya mitano oyo babakiseli ye etalelamaki lokola nde ezali na valɛrɛ moko te. Mbala mosusu bandɛkɛ yango ezalaki na valɛrɛ te na miso ya bato, kasi ndenge nini Mozalisi azalaki kotalela yango? Yesu alobaki ete: “Nzambe abosanaka ata moko na yango te [ata oyo epesami ofele].” (Luka 12:6, 7) Sikoyo tobandi kosimba liteya ya Yesu. Soki Yehova azwaka mokɛngɛli-mboka moko na valɛrɛ bongo, moto asengeli mpenza kozala na valɛrɛ mingi koleka! Ndenge Yesu amonisaki, Yehova ayebi makambo na biso nyonso. Atángaka ata nsuki nyonso ya mitó na biso!

6. Mpo na nini tondimi mpenza ete Yesu azalaki koloba likambo ya solo ntango alobaki ete nsuki ya mitó na biso etángami?

6 Nsuki na biso etángamá? Bato mosusu bakoki kokanisa ete  awa Yesu azalaki koloba likambo ya solo mpenza te. Kanisá mwa moke elikya ya lisekwa. Yehova asengeli mpenza koyeba biso malamumalamu mpo akoka kosala biso lisusu! Atalelaka biso na valɛrɛ mingi mpenza, yango wana abosanaka te likambo mokomoko ya nzoto na biso, ezala code génétique na biso mpe makambo oyo bɔɔngɔ na biso ebombá mpe makambo oyo tokutaná na yango na boumeli ya bambula nyonso ya bomoi na biso. * Kotánga nsuki ya mitó na biso, oyo mbala mingi ezalaka soki 100 000, ezali mpenza mpasi te soki tokokanisi yango na nyonso wana.

Yehova amonaka nini na motema na biso?

7, 8. (a) Bizaleli nini oyo Yehova asepelaka mingi komona ntango atalatalaka mitema ya bato? (b) Wapi ndambo ya misala oyo tosalaka oyo Yehova atalelaka na motuya mingi?

7 Ya mibale, Biblia eyebisi biso eloko oyo Yehova atalaka na motuya epai na basaleli na ye. Na mokuse, asepelaka mingi na bizaleli na biso ya malamu mpe na milende tosalaka. Mokonzi Davidi ayebisaki mwana na ye Salomo ete: “[Yehova] akotalatala mitema nyonso mpe akososola makanisi mpe mikano nyonso.” (1 Ntango 28:9) Ntango Nzambe atalatalaka na kati ya mitema ya bamiliare ya bato na mokili oyo etondi na mobulu mpe koyinana, asepelaka mpenza soki akuti motema moko oyo elingaka kimya, solo mpe boyengebene! Nzambe asalaka nini soki amoni motema moko oyo elingaka ye mpenza, oyo elukaka koyeba ye malamu mpe kopesa bato mosusu boyebi yango? Yehova ayebisi biso ete atyaka likebi na bato oyo bayebisaka basusu makambo na ye. Kutu azali na “buku ya kokanisama” mpo na ‘baoyo [nyonso] bazali kobanga ye mpe kokanisa nkombo na ye.’ (Malaki 3:16) Bizaleli ya ndenge yango ezali na motuya mingi na miso na ye.

 8 Wapi ndambo ya misala ya malamu oyo Yehova atalelaka na motuya mingi? Kati na yango tokoki kotánga milende oyo tosalaka mpo na komekola Mwana na ye Yesu Klisto. (1 Petelo 2:21) Mosala moko ya ntina mingi oyo Nzambe amonaka na motuya mpenza ezali mosala ya kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi na ye. Na Baloma 10:15, totángi boye: “Oyo nde kitoko makolo ya baoyo bazali kosakola nsango malamu ya makambo ya malamu!” Mbala mosusu tokoki kokanisa te kotalela kaka makolo na biso oyo ete ezali “kitoko.” Kasi awa makolo ezali komonisa nde milende oyo basaleli ya Yehova basalaka mpo na kosakola nsango malamu. Milende wana nyonso ezali kitoko mpe na motuya mingi na miso na ye.Matai 24:14; 28:19, 20.

9, 10. (a) Ndenge nini toyebi ete Yehova apesaka motuya mingi na koyika mpiko oyo toyikaka ntango tokutani na mikakatano? (b) Wapi makambo mabe oyo Yehova akaniselaka te basaleli na ye ya sembo?

9 Yehova atalelaka mpe ezaleli na biso ya koyika mpiko na motuya mingi. (Matai 24:13) Kobosana te, Satana alingi oboya Yehova. Mokolo nyonso oyo otikalaka sembo epai ya Yehova, opesaka Yehova likoki ya kozongisa monɔkɔ na matumoli ya Satana. (Masese 27:11) Nzokande, koyika mpiko ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Mikakatano ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto, kozanga mbongo,  kotungisama na makanisi, mpe mikakatano mosusu ekoki kokómisa mokolo mokomoko komekama mpo na biso. Soki makambo tozalaki kozela esalemi noki te, tokoki kolɛmba nzoto. (Masese 13:12) Koyika mpiko na mikakatano ya ndenge wana ezali lisusu na motuya koleka na miso ya Yehova. Ezali mpo na ntina yango nde Mokonzi Davidi asɛngaki Yehova abomba mai ya miso na ye na “molangi,” mpe abakisaki na kondima mpenza ete: “Yango ekomami na mokanda na yo te?” (Nzembo 56:8) Ɛɛ, Yehova abosanaka te mai ya miso nyonso mpe mpasi nyonso oyo toyikelaka mpiko mpo na kotikala sembo epai na ye. Yango mpe ezali na motuya mingi na miso na ye.

Yehova atalelaka na motuya mingi mpiko oyo toyikaka ntango tozali na komekama

10 Motema oyo ezali komikweisa ekoki koboya kondima makambo wana nyonso oyo emonisi polele motuya na biso na miso ya Nzambe. Ekoki koyebisaka yo ntango nyonso: ‘Kasi bato mingi bazali bandakisa malamu koleka yo. Yehova asengeli mpenza koyoka mawa soki akokanisi yo na bango!’ Yehova akokanisaka bato te; azalaka mpe na makambo makasimakasi te. (Bagalatia 6:4) Asalelaka bososoli ya mozindo wana azali kotala mitema na biso, mpe apesaka motuya mingi na makambo malamu oyo amonaka kuna, ata soki ezali moke mpenza.

Yehova aponaka makambo ya malamu mpe atikaka oyo ya mabe

11. Lolenge oyo Yehova atalelaki likambo ya Abiya eteyi biso nini mpo na ye?

11 Ya misato, ntango Yehova atalatalaka mitema na biso, alukaka na likebi mpenza makambo ya malamu. Na ndakisa, ntango azwaki ekateli ete libota ya Mokonzi Yelobama oyo emipesaki na lipɛngwi ekobomama nyɛɛ, apesaki etinda ete Abiya, moko ya bana mibali ya mokonzi yango, akundama na lokumu. Mpo na nini? “Kati na ye likambo ya kosepelisa [Yehova] Nzambe ya Yisalaele emonani.” (1 Mikonzi 14:1, 10-13) Ezali lokola Yehova ayungolaki makambo oyo ezalaki na motema ya elenge mobali yango mpe amonaki “likambo ya kosepelisa.” Ata soki likambo ya malamu yango ezalaki moke ndenge nini, Yehova asepelaki bálobela yango na Liloba na ye. Kutu apesaki mbano mpo na yango na ndenge amoniselaki elenge yango motema mawa, atako azalaki na libota ya bapɛngwi.

12, 13. (a) Ndenge nini likambo ya Yosafata emonisi ete ata ntango tosali lisumu, Yehova alukaka malamu oyo ezali na kati na biso? (b) Na oyo etali misala mpe bizaleli malamu na biso, ndenge nini Yehova asalaka lokola Tata oyo alingaka bana na ye mingi?

 12 Ndakisa mosusu ya malamu koleka ezali ya Mokonzi Yosafata. Ntango mokonzi yango asalaki likambo moko ya bozoba, mosakoli ya Yehova ayebisaki ye boye: “Yango wana, nkanda euti na [Yehova] ekweli yo.” Wana ezalaki likambo ya lisɛki te. Kasi nsango ya Yehova esukaki bongo te. Mosakoli abakisi boye: “Kasi makambo malamu mamonani epai na yo.” (2 Ntango 19:1-3) Na yango, nkanda ya sembo oyo Yehova ayokaki epekisaki ye te amona makambo malamu oyo ezalaki epai ya Yosafata. Akeseni mpenza na biso bato ya kozanga kokoka! Soki moto moko asilikisi biso, mbala mingi tomonaka lisusu makambo na ye ya malamu te. Mpe ntango tosali lisumu, mawa, nsɔni, mpe ngambo esalaka ntango mosusu ete tóbosana makambo na biso ya malamu. Nzokande, tóbosana te, soki tobongoli motema mpe tosali makasi ete tózongela masumu na biso te, Yehova akolimbisa biso.

13 Wana Yehova azali koyungola makambo oyo ezali na motema na yo, abwakaka masumu pembeni, ndenge kaka moluki-wolo abwakaka mwa mabanga mikemike oyo ezangi ntina.  Asalaka nini na bizaleli mpe misala malamu na yo? Yango ezali lokola “mwa mabanga ya wolo” oyo abombaka! Osilá komona ndenge baboti oyo balingaka bana na bango mingi babombaka mayemi to badevuare na bango ya kelasi, mbala mosusu bambula ebele wana bana bango moko babosaná yango? Yehova azali Tata oyo alingaka bana na ye koleka. Soki totikali kaka sembo epai na ye, akobosana soki moke te misala mpe bizaleli malamu na biso. Kutu, soki abosani yango, ekozala mpo na ye lokola azangi boyengebene, nzokande azangaka boyengebene soki moke te. (Baebele 6:10) Atalaka mpe biso na ndenge mosusu.

14, 15. (a) Mpo na nini kozanga kokoka na biso epekisaka Yehova te komona makambo malamu na biso? Pesá ndakisa. (b) Yehova akosala nini na makambo malamu oyo amonaka epai na biso, mpe ndenge nini atalelaka basaleli na ye ya sembo?

14 Miso ya Yehova etalaka kaka te kozanga kokoka na biso, kasi emonaka mpe makoki oyo tozali na yango. Na ndakisa: Bato oyo balingaka mayemi to bikeko ya kokembisa ndako babomaka nzoto kaka mpo na kobongisa mayemi to bikeko oyo ebebi. Na ndakisa, ntango moto moko abɛtaki masasi na liyemi moko ya Léonard de Vinci oyo ezali na National Gallery na Londres, oyo ntalo na yango ezali dolare milio 30, moto moko te alobaki ete lokola liyemi yango ebebi, esengeli kobwaka yango. Babandaki nokinoki kobongisa liyemi wana kitoko oyo eumeli mbula soki 500. Mpo na nini? Mpamba te ezali na motuya mingi na miso ya bato oyo balingaka misala ya ntɔki. Yo oleki mpenza eloko nyonso oyo bayemi na bakrɛyo ndenge na ndenge na motuya, boye te? Ɛɛ, na miso ya Nzambe oleki mpenza na motuya, ata soki ezaleli ya kozanga kokoka oyo ozwá ebebisi yo ndenge nini. (Nzembo 72:12-14) Yehova Nzambe, Mozalisi ya mayele mingi oyo asalaki bato, akosala nyonso oyo esengeli mpo na kozongisela baoyo nyonso bazalaka na botɔndi mpo na bolingo na ye ezaleli ya kokoka.Misala 3:21; Baloma 8:20-22.

15 Ɛɛ, Yehova amonaka malamu oyo ezali na kati na biso, oyo biso moko ntango mosusu tomonaka te. Mpe wana tozali kosalela ye, akosala ete malamu yango ekola kino tokokóma bato ya kokoka. Ata soki mokili ya Satana enyokoli biso ndenge nini, Yehova atalelaka basaleli na ye ya sembo ete bazali kitoko.Hagai 2:7.

 Yehova amonisaka bolingo na ye na misala

16. Wapi elembeteli oyo eleki monene oyo emonisi ete Yehova alingaka biso, mpe ndenge nini toyebi ete likabo yango epesami mpe mpo na mokomoko na biso?

16 Ya minei, Yehova asalaka makambo mingi mpo na komonisa ete alingaka biso. Na ntembe te, mbeka ya lisiko ya Klisto nde emonisi na nguya nyonso ete Satana abukaka lokuta ntango alobaka ete tozali na valɛrɛ te to moto moko te akoki kolinga biso. Tóbosana soki moke te, liwa ya nsɔmɔ oyo Yesu akufaki likoló ya nzete ya mpasi mpe mpasi makasi mpenza oyo Yehova ayokaki ntango azalaki kotala liwa ya Mwana na ye ya bolingo, ezali elembeteli ete balingaka biso. Likambo ya mawa, bato mingi bandimaka mpenza te ete likabo yango epesamaki mpe mpo na bango. Bamiyokaka ete babongi na yango te. Bato ya ndenge wana bákanisa naino ntoma Paulo, oyo liboso azalaki konyokola bayekoli ya Klisto. Kasi, akomaki na nsima boye: “Mwana ya Nzambe . . . alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.”Bagalatia 1:13; 2:20.

17. Na nzela ya nini Yehova abendaka biso epai na ye mpe epai ya Mwana na ye?

17 Yehova amoniselaka biso bolingo na ye na ndenge asalisaka mokomoko na biso azwela mbeka ya Klisto litomba. Yesu alobaki ete: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoane 6:44) Ɛɛ, Yehova ye moko abendaka biso epai ya Mwana na ye mpe apesaka biso elikya ya bomoi ya seko. Ndenge nini? Na nzela ya mosala ya kosakola oyo eponaka moto te, mpe na nzela ya elimo santu na ye oyo esalisaka biso tóyeba mpe tósalela mateya ya solo atako makoki na biso ezali na ndelo mpe tozali bato ya kozanga kokoka. Na yango, Yehova akoki koloba mpo na biso ndenge alobaki mpo na Yisalaele ete: “Nalingi yo na bolingo ya seko. Yango wana, nabendi yo na motema-boboto.”Yilimia 31:3.

18, 19. (a) Na ebongiseli nini Yehova amonisaka ete alingaka biso lokola baninga mpenza ya motema, mpe nini emonisi ete ye moko moto atalelaka ebongiseli yango? (b) Ndenge nini Liloba ya Nzambe endimisi biso ete Yehova amityaka na esika na biso na ntango ayokaka biso?

18 Mbala mosusu ezali na nzela ya libaku malamu oyo apesi biso ya kobondela ye nde toyokaka ete Yehova alingaka biso  lokola baninga mpenza ya motema. Biblia ezali kosɛnga mokomoko na biso ‘abondelaka Nzambe ntango nyonso.’ (1 Batesaloniki 5:17) Ayokaka. Babengaka ye kutu “Moyoki-Mabondeli.” (Nzembo 65:2) Atikeli moto mosusu mokumba yango te, ata mpe Mwana na ye. Kanisá naino: Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ azali kolendisa biso tóbondela ye, kozanga kobanga. Mpe azalaka moyoki ya ndenge nini? Oyo akipaka te, oyo azali motema makasi to oyo atyaka likebi te? Te, azalaka bongo te.

19 Yehova ayebaka komitya na esika ya bato mosusu. Yango elingi koloba nini? Moklisto moko ya sembo oyo akómi mobange alobaki boye: “Koyeba komitya na esika ya moto elingi koloba koyoka mpasi na ye na motema na yo.” Mpasi na biso etungisaka solo Yehova? Tozali kotánga boye mpo na bampasi ya libota na ye Yisalaele: “Na boumeli ya mpasi nyonso na bango, ezalaki kosala ye mpasi.” (Yisaya 63:9) Yehova asukaki te kaka na komona bampasi na bango; amityaki mpe na esika na bango. Yehova amonisi mpasi makasi oyo ayokaka na maloba oyo: “Ye oyo asimbi bino azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” * (Zekalia 2:8) Esalaka mpenza mpasi! Ɛɛ, Yehova amityaka na esika na biso. Ntango toyokaka mpasi, ye mpe ayokaka yango.

20. Makanisi nini ezangi bokatikati tosengeli koboya soki tolingi kotosa toli oyo ezali na Baloma 12:3?

20 Moklisto moko te oyo azali na bokatikati akokóma na lolendo to akobanda koluka matomba na ye moko kaka mpo ayebi ete Nzambe alingaka basaleli na ye mpe apesaka bango kilo. Ntoma Paulo akomaki boye: “Na nzela ya boboto monene oyo bamoniselaki ngai nazali koyebisa moto nyonso kuna na kati na bino ete akanisa mpo na ye moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa; kasi akanisa nde na ndenge ya kozala na makanisi malamu, moto na moto na mezire ya kondima oyo Nzambe akabeli ye.” (Baloma 12:3) Libongoli mosusu elobi ete: “Nazali koloba  na mokomoko na bino ete amitalela te ete azali na motuya koleka, kasi atalela valɛrɛ na ye na bokatikati.” (A Translation in the Language of the People, ya Charles B. Williams) Na yango, lokola tozali komona mpenza ete Tata na biso ya likoló alingi biso mingi, tózala na makanisi malamu mpe tóbosana te ete soki alingi biso bongo ezali te mpo tosalaka boye to boye.Luka 17:10.

21. Wapi lokuta ya Satana oyo tosengeli ntango nyonso koboya, mpe tosengeli kokoba kondimisa mitema na biso na solo nini ya Nzambe?

21 Biso nyonso tósala nyonso oyo ekoki mpo tóboya lokuta nyonso ya Satana, ezala oyo elobi ete tozali na valɛrɛ te to tobongi te ete bálinga biso. Soki makambo oyo okutanaki na yango na bomoi eteyá yo omona ete ezali mpenza mpasi ata mpo Nzambe alinga yo, to ete misala na yo ya malamu ezali mpenza na ntina te mpo miso na ye oyo emonaka biloko nyonso ekokoka komona yango, to ete masumu na yo eleki monene mpe ata liwa ya Mwana na ye ya bolingo ekokoka te kolimbisa yango, yebá ete ezali lokuta. Bwaká lokuta wana nyonso na motema na yo mobimba. Tókoba kondimisa mitema na biso na solo oyo ezali na maloba Paulo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe: “Nandimi solo ete ezala liwa to bomoi to baanzelu to baguvɛrnema to makambo ya sikoyo to makambo oyo ekoya to banguya to bosanda to bozindo to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso ná bolingo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Klisto Yesu Nkolo na biso.”Baloma 8:38, 39.

^ par. 6 Mbala na mbala Biblia elobelaka lisekwa nzela moko na likoki ya Yehova ya kobomba makambo na makanisi. Moto ya sembo Yobo alobaki na Yehova ete: ‘Ee, . . . soki okotyela ngai elaka mpe okokanisa ngai?’ (Yobo 14:13) Yesu alobelaki lisekwa ya “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama.” Maloba yango ebongaki mpamba te Yehova abosani ata moke te bakufi oyo ye andimi kosekwisa.Yoane 5:28, 29.

^ par. 19 Babiblia mosusu ebongoli vɛrsɛ oyo lokola nde ye oyo asimbi libota ya Nzambe azali kosimba liso na ye moko to liso ya Yisalaele, kasi liso ya Nzambe te. Libunga yango euti na bakomeli mosusu, mpo bakanisaki ete vɛrsɛ yango ezangi limemya epai ya Nzambe, yango wana bakomaki yango ndenge mosusu. Milende na bango ya mabe wana esalaki ete ezaleli ya Yehova ya komitya na esika ya bato eyebana te.