Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 27

“Malamu na ye ezali monene boni!”

“Malamu na ye ezali monene boni!”

1, 2. Wapi makambo ndenge na ndenge oyo emonisaka malamu ya Nzambe, mpe ndenge nini Biblia ebendi likebi likoló na ezaleli yango?

MOI ekómi motane wana ezali kokende kolala, mpe baninga oyo bayebani banda kala bazali na libándá, bazali kolya elongo, kosɛka mpe kosolola wana bazali kotala ndenge moi ezali kolala. Mosika na bango, mosali-bilanga moko azali kotala bilanga na ye mpe kosɛka, mpamba te likoló eyindi mpe matanga ya mbula ebandi kokwela milona. Na esika mosusu, mwasi moko ná mobali na ye batondi na nsai ndenge mwana na bango abandi kobwaka makolo.

2 Báyeba yango to te, bato wana nyonso bazali nde kozwa litomba oyo euti na malamu ya Yehova Nzambe. Mbala mingi bato oyo basambelaka balobaka ete: “Nzambe azali malamu.” Nzokande Biblia elobi lisusu polele koleka, ete: “Malamu na ye ezali monene boni!” (Zekalia 9:17) Kasi emonani ete lelo oyo bato mingi te bayebi ndimbola mpenza ya maloba wana. Malamu ya Yehova emonanaka mpenza na makambo nini mpe ndenge nini ezaleli wana ya Nzambe etali mokomoko na biso?

Lolenge moko ya ntina mingi ya bolingo ya Nzambe

3, 4. Malamu ezali nini, mpe mpo na nini ebongi mpenza kolobela malamu ya Yehova lokola elembo ya bolingo na ye?

3 Na minɔkɔ mingi ya lelo, “malamu” ezali liloba moko oyo elimboli makambo ndenge na ndenge. Nzokande, ezali bongo te na Biblia. Kuna, ezaleli yango emonisaka libosoliboso kozala na bizaleli oyo eleki malamu. Na bongo, tokoki koloba ete bomoto ya Yehova etondi mpenza na malamu. Bizaleli na ye nyonso—ezala nguya, bosembo, mpe bwanya—ezali mpenza malamu. Atako bongo, mpo na kolobela ezaleli yango na ndenge esengeli, ebongi tóloba ete ezali lolenge oyo Yehova amonisaka bolingo na ye. Mpo na nini?

 4 Malamu ezali ezaleli oyo emonanaka na misala oyo ezali mpo na bolamu ya bato mosusu. Ntoma Paulo alobaki ete bato basepelaka na ezaleli yango kutu koleka boyengebene. (Baloma 5:7) Moyengebene atosaka mibeko na bosembo nyonso, kasi moto malamu asukaka kaka na kotosa te. Alukaka na ndenge nyonso kosala ete bato mosusu bázala malamu. Lokola tokomona yango, ezali mpenza na ndenge wana nde Yehova azali malamu. Ezali komonana polele ete malamu na ye eutaka nde na bolingo na ye oyo ezangi nsuka.

5-7. Mpo na nini Yesu aboyaki bábenga ye “Moteyi Malamu”; mpe na ndenge yango, ateyaki likambo nini ya ntina mingi?

5 Malamu ya Yehova mpe ekeseni na oyo ya bikelamu na ye. Mwa moke liboso ya liwa ya Yesu, mobali moko ayaki kotuna ye motuna, mpe abengaki ye “Moteyi Malamu.” Yesu azongisaki ete: “Mpo na nini ozali kobenga ngai malamu? Moto ya malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.” (Malako 10:17, 18) Mbala mosusu eyano yango ekamwisi yo. Mpo na nini Yesu asembolaki mobali yango? Yesu azalaki “Moteyi Malamu” te?

6 Emonani polele ete mobali yango asalelaki maloba “Moteyi Malamu” lokola titre, mpo na kolɛtɛ ye. Na bopɔlɔ nyonso, Yesu apesaki nkembo yango epai ya Tata na ye ya likoló, oyo azali malamu na ndenge oyo eleki mpenza. (Masese 11:2) Na ndenge yango, Yesu ateyaki likambo oyo ya ntina mingi: Kaka Yehova nde azali ndakisa na likambo etali kozala malamu. Na molɔ́ngɔ́ mobimba, kaka ye nde azali na lotomo ya kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Ntango Adama ná Eva baboyaki bokonzi ya Nzambe mpe balyaki mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe, balukaki nde ete lotomo wana ezala ya bango. Yesu akeseni na bango; na komikitisa nyonso, atikelaka Tata na ye mokumba ya kokata oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe.

7 Lisusu, Yesu ayebaki ete nyonso oyo ezali solo malamu eutaka na Yehova. Ye moto apesaka “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” (Yakobo 1:17) Tótalela sikoyo ndenge elimo ya kokaba ya Yehova emonisaka polele malamu na ye.

 Makambo oyo emonisi ete malamu ya Yehova ezali monene

8. Na ndenge nini Yehova amonisi malamu na ye epai ya bato nyonso?

8 Moto nyonso azwá litomba na malamu ya Yehova. Nzembo 145:9 elobi ete: ‘Yehova azali malamu epai ya bato nyonso.’ Wapi mwa bandakisa ya malamu na ye monene? Biblia elobi ete: “Amitikaki te kozanga litatoli na boye ete asalaki bolamu, kopesáká bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, kotondisáká mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” (Misala 14:17) Oyoká naino nsai na motema te ntango ozali kolya bilei ya elɛngi? Soki mpo na malamu ya Yehova te—ye oyo asalaki ete mai ebongwanaka mpe mabelé ná “bileko ya kobota mbuma” mpo na kobimisa ebele ya biloko ya kolya—mbɛlɛ bilei ezali te. Malamu wana ya Yehova esuki te kaka epai ya baoyo balingaka ye kasi esalemaka epai ya bato nyonso. Yesu alobaki boye: “Asalaka ete moi na ye  ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.”Matai 5:45.

Yehova azali ‘kopesa bino mbula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma’

9. Ndenge nini pɔme emonisaka malamu ya Yehova?

9 Bato bazwaka na motuya mingi te makabo nyonso tozwaka na nzela ya mosala oyo moi, mbula, mpe bileko ya kobota mbuma esalaka ntango nyonso. Na ndakisa, tótalela mbuma babengi pɔme. Na mikili ya malili, pɔme ezalaka ebele. Atako bongo, mbuma yango ezalaka kitoko, elɛngi, etondi na mai oyo ekitisaka motema mpe na biloko oyo etongaka nzoto. Oyebaka ete na mokili mobimba bapɔme ezali soki ndenge 7 500: ezali na langi ndenge na ndenge, na ndakisa motane, mosaka mpe mai ya pondu; mpe ezali na bonene ndenge na ndenge,  mosusu monene na yango lokola mbila, mosusu lokola paplɛmusi. Soki osimbi mwa mbuma na yango ya kati, emonanaka mpenza ntina te. Kasi yango nde ebimisaka moko ya banzete oyo eleki kitoko. (Loyembo ya Salomo 2:3) Na eleko ya prɛnta nyonso nzete ya pɔme etondaka na bafololo; na eleko ya ɔtɔne nyonso ebotaka mbuma. Tii ekokokisa mbula 75 banda ebandi kobota, mbula na mbula, nzete moko ya pɔme ebotaka mbuma oyo kilo na yango ekoki kokóma soki 400!

Mwa mbuma oyo ekobimisa nzete oyo ekoki koleisa mpe kosepelisa bato bambula ebele

10, 11. Ndenge nini biyokeli ya nzoto na biso emonisaka malamu ya Nzambe?

10 Lokola Yehova azali malamu mingi mpenza, apesi biso nzoto moko oyo ‘esalami na motindo ya kokamwa mingi’; na nzoto yango, atye biyokeli mpo na kosalisa biso tóyeba misala na ye mpe tózwa na yango esengo. (Nzembo 139:14) Kanisá lisusu bandakisa oyo topesaki na ebandeli ya mokapo oyo. Makambo nini bato wana bamonaki oyo epesaki bango esengo? Elongi ya mwana ezali kongɛnga na esengo; mbula monene ezali kobɛta na bilanga; to moi ezali kolala mpe ebimisi balangi ndenge na ndenge. Miso ya moto ekoki komona balangi koleka 300 000! Mpe matoi na ye ekoki koyoka mitindo ndenge na ndenge ya mongongo ya moto oyo alingaka mingi, mwa makɛlɛlɛ ya mopɛpɛ oyo ezali kobɛta na bitape ya nzete, kosɛka makasi ya mwana moke oyo abandi kotambola. Mpo na nini moto azali na likoki ya kosepela na makambo oyo amoni mpe na mingongo oyo ayoki? Biblia eyanoli ete: “Litoi mpo na koyoka mpe liso mpo na komona, [Yehova] asali yango mibale.” (Masese 20:12) Kasi wana ezali kaka biloko mibale mpamba kati na biyokeli oyo nzoto ya moto ezali na yango.

11 Koyoka nsolo ezali likambo mosusu oyo emonisi malamu ya Yehova. Zolo ya moto ekoki koyoka nsolo ndenge soki 10 000. Kanisá mwa moke nsolo oyo: ya biloko oyo olingaka mpenza kolya ezali kotɔka na mɔtɔ, ya bafololo, ya nkasa ya nzete oyo ekweá na mabelé, ya mwa milinga ya mɔtɔ kitoko oyo ozali koyɔta. Mpe loposo esalisaka yo na koyoka mwa mopɛpɛ oyo ezali kobɛta na elongi, ntango moto oyo olingaka azingi yo ekɔpi, mpe koyoka ete mbuma oyo osimbi na lobɔkɔ ezali pɛtɛpɛtɛ. Ntango okati mbuma yango, lolemo ebandaka  mbala moko mosala na yango. Okoyoka elɛngi, ngayi, bololo, wana lolemo na yo ezali kokesenisa mwa biloko mikemike ndenge na ndenge oyo ezali kati na mbuma yango. Ɛɛ, tosengeli koloba na Yehova ete: “Malamu na yo ezali monene mingi mpenza, oyo yo obombeli bango bakotosaka [“babangaka,” NW] yo.” (Nzembo 31:19) Kasi ndenge nini Yehova ‘abombi’ malamu mpo na baoyo babangaka ye?

Malamu mpe bolamu ya seko

12. Makabo nini oyo euti na Yehova ezalaka na ntina koleka, mpe mpo na nini?

12 Yesu alobaki ete: “Ekomamá boye, ‘Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.’” (Matai 4:4) Ya solo, makabo ya elimo oyo euti na Yehova ekoki kutu kopesa biso bolamu mingi koleka makabo ya mosuni, mpamba te yango ememaka na bomoi ya seko. Na Mokapo 8 ya buku oyo, tomonaki ete na mikolo oyo ya nsuka Yehova asaleli nguya na ye ya kozongisa makambo ndenge ezalaki mpo na kosala paladiso ya elimo. Likambo moko ya ntina ya paladiso yango ya elimo ezali ete etondi na ebele ya bilei ya elimo.

13, 14. (a) Mosakoli Ezekiele amonaki nini na emonaneli, mpe yango elimboli nini mpo na biso lelo oyo? (b) Wapi makabo ya elimo oyo epesaka bomoi Yehova apesi basaleli na ye ya sembo?

13 Na moko ya bisakweli minene ya Biblia oyo etali kozongisama, mosakoli Ezekiele amonaki emonaneli ya tempelo moko oyo ezongisami mpe ekumisami. Mwa mongala moko eutaki na tempelo yango, ezalaki kokóma monene mpe mozindo wana ezali kokóma mosika na tempelo kino ekómaki ‘ebale, oyo ezali monene mbala mibale koleka.’ Esika nyonso oyo ebale yango ezalaki koleka, ezalaki komema mapamboli. Pembenipembeni ya ebale yango ezalaki na ebele ya nzete oyo ezalaki kopesa bilei mpe kobikisa. Kutu ebale yango ezongisaki bomoi mpe misala na Mbu Ekufá oyo mai na yango ezalaka mungwamungwa mpe ezangi bomoi; mbu yango ekómaki na mbisi mingi! (Ezekiele 47:1-12) Kasi nyonso wana elingaki koloba nini?

 14 Emonaneli yango ezalaki komonisa ete Yehova akozongisa ebongiseli na ye mpo na losambo ya pɛto, oyo emonisamaki na tempelo oyo Ezekiele amonaki. Lokola ebale wana ya emonaneli, ebele ya makabo oyo epesaka bomoi oyo akosopela basaleli na ye ekobakisama se kobakisama. Yango nde azali kosala banda losambo ya pɛto ezongisamaki na 1919. Ndenge nini? Babiblia, mikanda oyo elimbolaka Biblia, makita mpe mayangani, nyonso wana esalisi na komemela bamilio ya bato solo oyo epesaka bomoi. Na nzela ya bibongiseli yango Yehova ateyi bato makambo etali likabo na ye oyo eleki makabo na ye nyonso oyo epesaka bomoi, elingi koloba mbeka ya lisiko ya Klisto, oyo ekómisaka baoyo nyonso balingaka Nzambe mpe babangaka ye mpenza pɛto na miso ya Yehova mpe epesaka bango elikya ya bomoi ya seko. * Na yango, na mikolo oyo ya nsuka, wana mokili ezali konyokwama na nzala ya elimo, basaleli ya Yehova bazali kolya ebele ya bilei ya elimo.Yisaya 65:13.

15. Ndenge nini bato ya sembo bakomona malamu ya Yehova na Bokonzi ya Mbula Nkóto ya Klisto?

15 Kasi ebale oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ekotika kotiyola te ata ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka. Ekokóma lisusu nde na mai mingi koleka na Bokonzi ya Mbula Nkóto ya Klisto. Bongo na lisalisi ya Bokonzi ya Masiya Yehova akosalela motuya mobimba ya mbeka ya Yesu mpe mokemoke akokómisa bato ya sembo bato ya kokoka. Na ntango yango tokosepela mpenza na malamu ya Yehova!

Makambo mosusu oyo emonisaka malamu ya Yehova

16. Ndenge nini Biblia emonisi ete malamu ya Yehova ezali mpe na bizaleli mosusu, mpe wapi bizaleli yango?

16 Malamu ya Yehova esuki kaka te na kokabela bato biloko. Nzambe ayebisaki Moize ete: “Nakolekisa malamu na ngai liboso na yo, mpe nakosakola liboso na yo nkombo na ngai [Yehova].” Na nsima, Biblia elobi ete: “[Yehova] alekaki liboso na ye mpe agangaki ete, [Yehova, Yehova,] azali Nzambe na mawa  mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 33:19; 34:6) Na yango, malamu ya Yehova ezali mpe na bizaleli mosusu oyo esepelisaka.

17. Ndenge nini Yehova asalelaka bato ya kozanga kokoka makambo, mpe ezaleli nini etindaka ye asala bongo?

17 Vɛrsɛ oyo ya nsuka esalisi biso tóyeba malamumalamu ndenge oyo Yehova azalaka na bikelamu na ye. Na esika ya kozala na makambo makasimakasi, kozanga bolingo, to konyokola basusu, ndenge ebele ya bato minene bazalaka, Yehova azalaka na boboto. Na ndakisa, Yehova alobaki na Abalama ete: “Nabondeli yo, tombolá miso, mpe na esika ozali, talá epai ya nɔrdi, epai ya sudi, epai ya ɛsti mpe epai ya wɛsti.” (Genese 13:14) Mabongoli mingi etyaka maloba “nabondeli yo” te. Kasi bato ya mayele na makambo ya Biblia balobi ete ndenge oyo vɛrsɛ yango ekomamaki na ebandeli na Liebele, ezalaki na mwa liloba moko oyo esalaka ete likambo oyo ekokaki kozala etinda ekóma likambo oyo moto asɛngi na bonkonde mpenza. Bavɛrsɛ mosusu ya ndenge wana ezali. (Genese 31:12; Ezekiele 8:5) Kanisá naino, Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba azali koloba na moto “nabondeli yo”! Na mokili oyo bato bazangi boboto, balingi matata, mpe bazangi bonkonde, kokanisa bonkonde ya Yehova Nzambe na biso ezali mpenza kokitisa motema, boye te?

18. Na ndenge nini Yehova “aleki . . . na solo,” mpe mpo na nini maloba yango ezali kokitisa motema?

18 Vɛrsɛ yango elobi mpe ete “aleki na . . . solo.” Lelo oyo bato mingi na mokili bazali lisusu sembo te. Kasi Biblia ekundweli biso ete: “Nzambe azali moto te ete [abuka] lokuta.” (Mituya 23:19) Kutu, Tito 1:2 elobi ete “Nzambe . . . akoki te kobuka lokuta.” Lokola aleki na malamu mpenza, akoki kosala bongo te. Yango wana, bilaka na ye ebongi mpenza kotyelama motema mpe maloba na ye ekokisamaka ntango nyonso. Yehova abengami kutu “Nzambe ya solo.” (Nzembo 31:5) Asukaka kaka te na koboya koloba lokuta, kasi ayebisaka mpe ebele ya makambo ya solo. Azali te moto oyo aboyaka bato mosusu báyeba makambo na ye to oyo abomboka makambo na ye; kasi asalelaka nde bwanya na ye oyo ezangi nsuka mpo na  kongɛngisa malamumalamu basaleli na ye ya sembo. * Alakisaka bango ata ndenge ya kosalela solo oyo ateyaka bango mpo ‘bákoba kotambola na kati ya solo.’ (3 Yoane 3) Bongo malamu ya Yehova esengeli kosala mokomoko na biso nini

‘Bókóma na nsai mpo na malamu ya Yehova’

19, 20. (a) Ndenge nini Satana alukaki kolongola motema oyo Eva atyelaki malamu ya Yehova, mpe yango ebimisaki nini? (b) Malamu ya Yehova esengeli kotinda biso na kosala nini, mpe mpo na nini?

19 Ntango Satana amekaki Eva na elanga ya Edene, abandaki liboso na mayele kolongola motema oyo Eva atyelaki malamu ya Yehova. Yehova ayebisaki Adama ete: “Yo okoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga.” Na banzete nkóto na nkóto oyo ezalaki kokómisa elanga wana kitoko, Yehova apekisaki kaka nzete moko mpamba. Nzokande, yoká ndenge Satana atunaki Eva motuna na ye ya liboso: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” (Genese 2:9, 16; 3:1) Satana abalolaki maloba ya Yehova mpo Eva akanisa ete Yehova abombelaki bango eloko moko ya malamu. Na mawa, mayele na ye wana elongaki. Eva abandaki kotya ntembe na malamu ya Nzambe, oyo apesaki ye biloko nyonso oyo azalaki na yango; yango nde likambo mibali ná basi oyo bayaki nsima na ye basalaki.

20 Toyebi bampasi mpe mawa monene oyo ntembe yango ebimisi. Yango wana, tótya likebi na maloba ya Yilimia 31:12 (NW): “Na ntembe te . . . bakokóma na nsai mpo na malamu ya Yehova.” Ya solo, malamu ya Yehova esengeli kopesa biso nsai. Tosengeli soki moke te kotyela mikano ya Nzambe na biso ntembe, ye azali nta bolamu. Ebongi tótyela ye motema mobimba, mpamba te alukaka kaka bolamu ya baoyo balingaka ye.

21, 22. (a) Na mwa makambo nini okolinga komonisa botɔndi na yo mpo na malamu ya Yehova? (b) Ezaleli nini tokotalela na mokapo oyo elandi, mpe ndenge nini yango ekeseni na malamu?

 21 Lisusu, ntango tozwaka libaku ya koyebisa bato mosusu malamu ya Nzambe, yango esepelisaka biso mingi. Mpo na bato ya Yehova, Nzembo 145:7 elobi boye: “Bakosakola lokumu ya malamu monene na yo.” Mokolo na mokolo, tozwaka litomba na malamu ya Yehova ata na likambo moko. Mpo na nini te kokóma na momeseno ya kopesaka Yehova botɔndi mpo na malamu na ye, mpo na likambo moko oyo asaleli biso? Kokanisa ezaleli wana, kopesa Yehova botɔndi mokolo na mokolo mpo na yango, mpe koyebisa yango bato mosusu, ekosalisa biso tómekola Nzambe na biso oyo azali malamu. Mpe wana tozali koluka mabaku ya kosala malamu, lokola Yehova, tokopusana ntango nyonso penepene na ye. Ntoma Yoane oyo akómaki mobange akomaki ete: “Molingami, zalá momekoli, ya oyo ezali mabe te, kasi ya oyo ezali malamu. Moto oyo asalaka malamu auti na Nzambe.”3 Yoane 11.

22 Malamu ya Yehova etambolaka mpe nzela moko na bizaleli mosusu. Na ndakisa, Nzambe “aleki na boboto [“motema-boboto,” NW],” to bolingo ya sembo. (Exode 34:6) Ezaleli wana emonisamaka epai ya moto nyonso te lokola malamu, mpamba te Yehova amonisaka yango mingi mpenza epai ya basaleli na ye ya sembo. Na mokapo oyo elandi, tokoyeba ndenge oyo asalaka yango.

^ par. 14 Elembo mosusu ya malamu ya Yehova oyo eleki lisiko ezali te. Kati na bamilio ya bikelamu na ye nyonso ya elimo, Yehova aponaki nde Mwana mobotami-se-moko na ye ya bolingo mpo akufela biso.

^ par. 18 Ezali mpenza na ntina ndenge Biblia elobelaka solo nzela moko na pole. Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Tindá pole na yo mpe solo na yo.” (Nzembo 43:3) Yehova angɛngisaka pole ya elimo makasi likoló ya baoyo balingaka koteyama, to kongɛngisama, na ye.2 Bakolinti 4:6; 1 Yoane 1:5.