Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 23

“Ye alingaki biso liboso”

“Ye alingaki biso liboso”

1-3. Makambo nini esalaki ete liwa ya Yesu ekesana na liwa ya bato mosusu nyonso?

ELEKI sikoyo mbula soki 2 000, na mokolo moko ya eleko ya prɛnta, basambisaki mobali moko oyo asalaki likambo moko te, bakatelaki ye etumbu mpo na mabe oyo asalaki te, mpe na nsima banyokolaki ye kino liwa. Azalaki moto ya liboso te oyo babomaki ye kaka mpamba bongo; likambo ya mawa, azalaki mpe moto ya nsuka te. Kasi, liwa na ye ekesanaki na oyo ya bato mosusu nyonso.

2 Ntango mobali yango azalaki konyokwama na mpasi, na bangonga ya nsuka ya bomoi na ye, ata likoló yango moko emonisaki ntina monene ya likambo yango. Atako ezalaki mpenza midi, na mbalakaka, molili ezipaki mboka mobimba. Ndenge mokomi moko ya makambo ya kala alobaki, “pole ya moi elimwaki.” (Luka 23:44, 45) Bongo, liboso mobali yango akata motema, abimisaki maloba oyo etikalá libela: “Ekokisami!” Ya solo, na ndenge oyo apesaki bomoi na ye, akokisaki likambo moko ya ntina koleka. Mbeka oyo apesaki ezalaki elembo ya bolingo oyo eleki monene oyo moto amonisá naino te.Yoane 15:13; 19:30.

3 Mobali wana ezalaki nde Yesu Klisto. Mpasi mpe liwa na ye na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), mokolo wana ya mawa, eyebani malamu. Nzokande, ezali na likambo mosusu ya ntina koleka oyo mbala mingi bato babosanaka. Atako Yesu ayokaki mpasi mingi, kasi ezali na moto mosusu oyo ayokaki mpasi koleka ye. Kutu moto yango amipimelaki na mokolo yango koleka, oyo ezali mpenza likambo ya bolingo oyo eleki monene. Likambo yango nini? Eyano na motuna oyo ezali kokɔtisa biso na likambo oyo eleki makambo mosusu nyonso: bolingo ya Yehova.

 Likambo ya monene mpenza oyo emonisi bolingo

4. Ndenge nini soda moko Moloma ayaki koyeba ete Yesu azalaki lokola bato mosusu te, mpe soda yango andimaki nini na nsuka?

4 Mokonzi ya basoda ya Loma oyo bapesaki ye mokumba ya koboma Yesu akamwaki ntango amonaki molili liboso Yesu akufa mpe koningana makasi ya mabelé oyo esalemaki nsima na yango. Alobaki ete: “Ya solo oyo azalaki Mwana ya Nzambe.” (Matai 27:54) Emonani polele ete Yesu azalaki lokola bato mosusu te. Soda yango apesaki mabɔkɔ na koboma Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló! Mwana yango azalaki mpenza na motuya mingi na miso ya Tata na ye?

5. Mbula boni Mwana ya Nzambe alekisaki elongo na Tata na ye na likoló liboso abotama lokola moto?

5 Biblia ebengi Yesu “mwana ya liboso na bozalisi nyonso.” (Bakolose 1:15) Kanisá naino—Mwana ya Yehova azalaki na bomoi liboso kutu biloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́ esalama. Na bongo, ntango boni Tata ná Mwana balekisaki esika moko? Bato mosusu ya siansi bakanisaka ete molɔ́ngɔ́ eumeli mbula miliare 13. Okangi mpenza bolai ya ntango yango? Ata soki likanisi yango ezali solo, bambula nyonso miliare 13 wana ekokani te na bambula ya bomoi ya Mwana ya Yehova! Mosala nini azalaki kosala na boumeli ya ntango wana nyonso?

6. (a) Mosala nini Mwana ya Yehova azalaki kosala liboso abotama awa na mabelé? (b) Ekanganeli ya ndenge nini ezali na kati ya Yehova ná Mwana na ye?

6 Mwana azalaki na esengo ya kosala lokola “mosali ya mayele” ya Tata na ye. (Masese 8:30) Biblia elobi ete: “Kozanga [Mwana] eloko ata moko te esalemaki.” (Yoane 1:3) Na yango, Yehova ná Mwana na ye basalaki mosala elongo mpo na kokela biloko nyonso. Balekisaki solo ntango ya esengo! Bato mingi bayebi ete bolingo ya moboti ná mwana na ye ezalaka mpenza makasi. Mpe bolingo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Na yango, nani kati na biso akoki koyeba makasi ya ekanganeli oyo eumelaki mpenza ntango molai bongo? Ezali polele ete Yehova Nzambe ná Mwana na ye bakangami na ekanganeli ya bolingo oyo eleki mosusu nyonso na makasi.

7. Ntango Yesu azwaki batisimo, ndenge nini Yehova amonisaki lolenge azalaki kotalela Mwana na ye?

 7 Atako bongo, Tata atindaki Mwana na ye awa na mabelé mpo abotama lokola moto. Yango elingi koloba ete na boumeli ya bambula mingi, Yehova akozala lisusu esika moko te na Mwana na ye ya bolingo kuna na likoló. Azalaki kotala na likebi mpenza uta na likoló ndenge Yesu azalaki kokola tii akómaki mobali ya kokoka. Yesu azwaki batisimo ntango akokisaki mbula 30. Ntina ezali te ya kolukaluka mpo na koyeba ndenge Yehova atalelaki ye na ntango wana. Tata ye moko alobaki uta likoló ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Asengelaki solo kosepela mingi na komona ndenge Yesu akokisaki na bosembo mpenza makambo nyonso oyo esakolamaki, mpe makambo nyonso oyo asɛngaki ye!Yoane 5:36; 17:4.

8, 9. (a) Basalaki Yesu nini na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., mpe yango esalaki Tata na ye nini? (b) Mpo na nini Yehova atikaki Mwana na ye anyokwama mpe akufa?

8 Bongo, Yehova ayokaki ndenge nini na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B.? Ayokaki nini ntango batɛkaki Yesu mpe na nsima ebele ya bato bakangaki ye na butu wana? Ntango baninga ya Yesu bakimaki ye mpe ntango basambisaki likambo na ye na bosembo te? Ntango basɛkaki ye, babwakelaki ye nsoi, mpe babɛtaki ye makofi? Ntango babɛtaki ye fimbo mpe azokizoki na mokɔngɔ? Ntango babɛtaki ye nsɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo likoló ya nzete, mpe batikaki ye wana mpo bato báfinga ye? Tata ayokaki ndenge nini ntango Mwana na ye ya bolingo agangaki epai na ye na mpasi ya liwa? Yehova ayokaki nini ntango Yesu akataki motema, mpe mpo na mbala ya liboso uta ebandeli ya bozalisi, Mwana na ye ya motema azalaki lisusu na bomoi te?Matai 26:14-16, 46, 47, 56, 59, 67; 27:38-44, 46; Yoane 19:1.

“Nzambe . . . apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko”

9 Tozangi maloba mpo na kolobela yango. Lokola Yehova ayokaka mpe mawa, liloba moko te ekoki kolobela mpenza mpasi oyo ayokaki na liwa ya Mwana na ye. Likambo tokoki kolimbola ezali nde ntina oyo etindaki Yehova apesa nzela na liwa yango. Mpo na nini Tata andimaki koyoka mpasi ya ndenge wana? Yehova amonisi biso likambo moko ya ntina mingi na Yoane 3:16. Vɛrsɛ yango ezali na ntina mingi mpo ebengamaka mpe Evanzile na mokuse. Elobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki  Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” Na bongo, likambo oyo etindaki Yehova ezali: bolingo. Likabo ya Yehova, elingi koloba kotinda oyo atindaki Mwana na ye anyokwama mpe akufela biso, ezalaki likambo oyo eleki monene oyo emonisi bolingo banda ntango wana tii na moi ya lelo.

Bolingo ya Nzambe ezali nini?

10. Bato basengeli na nini, mpe nini ekómeli ndimbola ya liloba “bolingo”?

10 Liloba “bolingo” elimboli nini? Balobaka ete bolingo ezali eloko ya libosoliboso oyo bato basengeli na yango. Kobanda ntango bato babotamaka kino liwa na bango, balukaka bálinga bango, bakolaka malamu esika bolingo ezali, mpe bazalaka na mawa mpe bakufaka noki soki balingi bango te. Atako bongo, kolimbola bolingo ezali mpasi. Ya solo, balobelaka bolingo mingi. Bato balɛmbaka te kobimisa ebele ya mikanda, banzembo, mpe maloba ya ntɔki oyo elobelaka bolingo. Nyonso wana emonisi mpe ndimbola ya bolingo polele te. Kutu, lokola bato bazali kosalela liloba yango mingi ndenge wana, emonani ete ezali se kokóma mpasi koleka mpo na koyeba mpenza ndimbola na yango.

11, 12. (a) Epai wapi tokoki koyeba makambo mingi oyo etali bolingo, mpe mpo na nini kuna? (b) Wapi mitindo ya bolingo balobeli na monɔkɔ ya Grɛki ya kala, mpe Makomami ya Grɛki ya boklisto esaleli mingi liloba nini mpo na “bolingo”? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (c) A·gaʹpe ezali nini?

11 Nzokande, Biblia ezali koteya polele makambo etali bolingo. Na buku na ye Diksionɛrɛ oyo elimbolaka maloba ya Testama ya Sika (na Lingelesi), Vine akomi boye: “Bolingo ekoki koyebana kaka na makambo oyo etindaka bato básala.” Makambo oyo Yehova asalá, oyo ekomamá na Biblia, ezali koteya biso mingi na ntina na bolingo na ye, ndenge alingaka bikelamu na ye na bolingo ya motema. Na ndakisa, eloko mosusu nini ekoki kolimbola bolingo polele koleka likambo ya monene mpenza oyo Yehova asalaki mpo na komonisa bolingo na ye, oyo tolobelaki liboso? Na mikapo oyo elandi, tokomona bandakisa mosusu mingi oyo  ezali komonisa ndenge Yehova alakisaka bolingo. Lisusu, kotalela maloba oyo bakomi ya Biblia basalelaki mpo na kolobela “bolingo” ekobakisa bososoli na biso ya liloba yango. Monɔkɔ ya Grɛki ya kala ezalaki na maloba minei mpo na kolobela “bolingo.” * Moko na yango oyo esalelami mingi na Makomami ya Grɛki ya boklisto ezali a·gaʹpe. Diksionɛrɛ moko ya Biblia ebengi yango “liloba oyo eleki nguya mpo na kolobela bolingo.” Mpo na nini?

12 A·gaʹpe ezali komonisa bolingo oyo elandaka mitinda. Na yango, bolingo yango ezali kaka te ndenge ozali koyoka na motema mpo na moto mosusu. Yango ezali na ndimbola monene koleka, ezali bolingo oyo moto akanisaka naino liboso ya komonisa yango mpe ye moko andimaka komonisa yango. Na koleka, a·gaʹpe elukaka libosoliboso bolamu ya basusu. Na ndakisa, tótalela lisusu Yoane 3:16. “Mokili” oyo Nzambe alingaki mingi tii apesa Mwana na ye mobotami-se-moko ezali nini? Ezali bato oyo bakoki kosikolama. Ata bato mingi oyo bazali komipesa na masumu bazali na kati ya bato yango. Yehova alingaka nde bato yango lokola baninga mpenza na ye, ndenge alingaki Abalayama, moto ya sembo? (Yakobo 2:23) Te, kasi na bolingo nyonso azali kosalela bato nyonso bolamu, atako yango esɛngi amipimela mingi. Alingi bato nyonso bábongola motema mpe bátika banzela na bango mabe. (2 Petelo 3:9) Mingi basalaka bongo. Baoyo wana, ayambaka bango na esengo nyonso lokola baninga na ye.

13, 14. Nini emonisi ete mbala mingi a·gaʹpe ekendeke nzela moko na bolingo ya motema?

13 Nzokande, bato mosusu bayebi a·gaʹpe malamu te. Bakanisaka ete yango ezali bolingo moko oyo emonanaka polele te, oyo esuki kaka na makanisi. Nzokande, mbala mingi a·gaʹpe emonanaka mpe na nsai, na bolingo oyo euti na motema. Na ndakisa, ntango  Yoane akomaki, “Tata alingaka Mwana,” asalelaki lolenge moko ya liloba a·gaʹpe. Bolingo yango ezangi esengo to nsai? Te. Na Yoane 5:20, ndenge ekomamaki na ebandeli, asalelaki lolenge moko ya liloba phi·leʹo (bolingo ya motema). (Yoane 3:35) Mbala mingi bolingo ya Yehova ekendeke nzela moko na bolingo ya motema. Atako bongo, bolingo na ye etambwisamaka kaka na mayoki te. Etambwisamaka ntango nyonso nde na mitinda na ye ya bwanya mpe ya sembo.

14 Ndenge tomonaki yango, bizaleli nyonso ya Yehova ezali malamu mpenza, ezali ya kokoka mpe ebendaka bato epai na ye. Kati na yango nyonso, bolingo nde ebendaka bato koleka. Eloko moko te ebendaka biso makasi epai ya Yehova koleka bolingo na ye. Likambo ya esengo, bolingo ezali mpe ezaleli na ye oyo eleki monene. Ndenge nini toyebi yango?

“Nzambe azali bolingo”

15. Biblia elobi nini mpo na bolingo ya Yehova, mpe na ndenge nini maloba yango ekeseni na mosusu nyonso? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

15 Biblia elobi likambo moko mpo na bolingo oyo elobi te mpo na bizaleli mosusu minene ya Yehova. Elobi te ete Nzambe azali nguya to bosembo ata mpe bwanya. Azalaka na bizaleli yango, eutaka mpenza epai na ye, mpe moto moko te akokani na ye na bizaleli yango misato. Nzokande, mpo na ezaleli ya minei, Biblia elobi likambo moko ya ntina mingi: “Nzambe azali bolingo.” * (1 Yoane 4:8) Yango elingi koloba nini?

16-18. (a) Mpo na nini Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo”? (b) Na bikelamu nyonso ya mabelé, mpo na nini moto nde abongi kozala elembo ya ezaleli ya Yehova oyo babengi bolingo?

16 Koloba “Nzambe azali bolingo” ezali te kaka likambo ya bokokani, lokola nde balobi, “Nzambe akokani na bolingo,” mpo tokokoka  te kobalola likambo yango mpe koloba ete “bolingo ezali Nzambe.” Yehova azali te kaka ezaleli mpamba. Azali moto oyo azalaka na mayoki mpe bizaleli ndenge na ndenge, bakisa bolingo. Nzokande, Yehova atondi mpenza na bolingo. Na yango, buku moko elobi boye mpo na vɛrsɛ wana: “Bomoto ya Nzambe etondi mpenza na bolingo.” Tokoki kokanisa boye: Nguya ya Yehova esalisaka ye asala makambo. Bosembo mpe bwanya na ye etambwisaka ndenge oyo asalaka makambo yango. Kasi bolingo ya Yehova nde etindaka ye na kosala makambo yango. Mpe bolingo na ye emonanaka ntango nyonso na ndenge oyo amonisaka bizaleli na ye mosusu.

17 Mbala mingi balobaka ete Yehova amonisaka bolingo na ndenge oyo eleki malamu. Na yango, soki tolingi koyeba bolingo oyo etambwisami na mitinda, tosengeli koyeba Yehova malamu. Ya solo, tokoki mpe komona ezaleli yango ya malamu epai ya bato. Kasi mpo na nini bazali na yango? Na ntango azalaki kokela, emonani ete Yehova alobaki na Mwana na ye maloba oyo: “Tiká tózalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso.” (Genese 1:26) Kati na bikelamu nyonso oyo ezali na mabelé, kaka bato nde bakoki kopona komonisa bolingo mpe, na ndenge yango, komekola Tata na bango ya likoló. Kanisá lisusu: Yehova azwaki bikelamu ndenge na ndenge lokola elembo ya bizaleli na ye ya minene. Kasi, amonaki malamu kozwa moto, ekelamu oyo eleki bikelamu nyonso na mabelé, lokola elembo ya bolingo, ezaleli na ye oyo eleki monene.Ezekiele 1:10.

18 Ntango tomonisaka bolingo kozanga koluka matomba na biso moko, engebene mitinda, tomonisaka ezaleli ya Yehova oyo eleki ntina. Ezali mpenza ndenge ntoma Yoane akomaki: “Nde biso, tozali kolinga, mpamba te ye alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:19) Kasi na ndenge nini Yehova alingaki biso liboso?

Yehova nde amonisaki yango liboso

19. Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo ezalaki na ntina mingi na mosala ya kokela oyo Yehova asalaki?

19 Bolingo ezali likambo ya sika te. Eloko nini etindaki Yehova abanda kokela? Ezalaki te mpo azalaki komiyoka ye moko mpe azalaki na mposa ya baninga. Yehova akoká na nyonso mpe  akokisaka bamposa na ye nyonso ye moko, azangi eloko moko te oyo moto moko asengeli kopesa ye. Kasi bolingo na ye, ezaleli oyo etindaka na mosala, nde etindaki ye asala bikelamu ya mayele mpo bango mpe bázala na esengo ya bomoi, mpamba te bango bazali na likoki ya kosepela na likabo yango. Mwana mobotami-se-moko na ye nde azalaki “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.” (Emoniseli 3:14) Na nsima, Yehova asalelaki Mosali ya Mayele wana mpo na kokela biloko mosusu nyonso, banda na baanzelu. (Yobo 38:4, 7; Bakolose 1:16) Lokola akelaki bango na bonsomi, mayele mpe mayoki, bilimo yango ya nguya bizalaki na likoki ya kolinga: kolingana bango na bango mpe na koleka kolinga Yehova Nzambe. (2 Bakolinti 3:17) Na yango, bazalaki kolinga mpo balingaki bango liboso.

20, 21. Makambo nini Adama ná Eva bazalaki komona polele oyo emonisaki ete Yehova alingaki bango; atako bongo, basalaki nini?

20 Ezalaki mpe bongo mpo na bato. Uta ebandeli, Adama ná Eva bafandaki mpenzampenza na kati ya bolingo. Na Edene, Paladiso epai bazalaki kofanda, bazalaki komona bipai nyonso bilembo ya bolingo ya Tata na bango. Talá likambo oyo Biblia elobi: “[Yehova] Nzambe akonaki elanga epai ya ebimelo ya ntango, kati na Edene, mpe kuna atyaki moto oyo ye asalaki.” (Genese 2:8) Osilá kokɔta na elanga to parke moko ya kitoko mpenza? Nini esepelisaki yo mingi? Moi oyo elekaka na kati ya nkasa ya nzete mpo na kongɛngisa mwa bisika ya molili? Bafololo ya kitoko ndenge na ndenge oyo etandanaki na nse? Mwa makɛlɛlɛ ya mai oyo ezali kotiyola, nzembo ya bandɛkɛ, mpe mongongo ya nyama-nkɛkɛ? Ezalaki nde nsolo ya nzete, ya mbuma mpe ya fololo? Ezala eloko nini esepelisaki yo mingi, yebá ete lelo oyo parke moko te ekokani na oyo ya Edene. Mpo na nini?

21 Yehova ye moko moto asalaki elanga yango! Na ntembe te, ezalaki na kitoko ya koloba te. Nzete nyonso ya kitoko to ya mbuma ya elɛngi ezalaki kuna. Elanga yango ezalaki na mai mingi, ezalaki monene mpe na banyama ndenge na ndenge. Adama ná Eva bazalaki na biloko nyonso oyo ekokaki kosepelisa bango mpe kopesa bango bomoi ya malamu mpenza, bazalaki mpe na mosala moko malamu mpe boninga ya kokoka. Yehova alingaki bango liboso, yango wana basengelaki mpe kolinga ye. Kasi, basalaki yango  te. Na esika ete bolingo etinda bango na kotosa Tata na bango ya likoló, mposa ya koluka bolamu na bango moko etindaki bango bátombokela ye.Genese, mokapo 2.

22. Ndenge nini ekateli oyo Yehova azwaki nsima ya botomboki na Edene emonisi ete bolingo na ye ezali sembo?

22 Na ntembe te, likambo yango epesaki Yehova mpasi mingi! Kasi botomboki yango elongolaki elikya nyonso na motema na ye oyo etondi na bolingo? Te! “Boboto na ye [to, bolingo ya sembo] ezali mpo na libela.” (Nzembo 136:1) Na yango, nokinoki azwaki bibongiseli ya bolingo mpo na kosomba bakitani ya Adama ná Eva oyo bakozala na motema oyo ebongi. Ndenge tomonaki, kati na bibongiseli yango, ezali na mbeka ya lisiko oyo Mwana na ye ya bolingo apesaki, oyo esɛngaki Tata na ye amipimela mingi.1 Yoane 4:10.

23. Moko ya bantina oyo Yehova azali “Nzambe ya esengo” ezali nini, mpe motuna nini ya ntina mingi ekotalelama na mokapo oyo elandi?

23 Ɛɛ, uta ebandeli Yehova nde abandaki kolinga bato. “Alingaki biso liboso” na ndenge ebele mpenza. Bolingo ekolisaka boyokani mpe esengo, yango wana ezali likambo ya kokamwa te ndenge balobi ete Yehova azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Nzokande, motuna moko ya ntina mingi yango oyo: Yehova alingaka solo mokomoko na biso? Mokapo oyo elandi ekopesa eyano na motuna yango.

^ par. 11 Liloba phi·leʹo oyo elimboli “komonisa bolingo ya motema epai ya, kokangama mingi na, kolinga (ndenge moto alingaka moninga moko ya motema to ndeko na ye),” esalelami mingi na Makomami ya Grɛki ya boklisto. Lolenge moko ya liloba stor·geʹ, to bolingo kati na bato ya libota moko, esalelami na 2 Timote 3:3 mpo na komonisa ete bolingo ya ndenge yango ekozala mpenza te na mikolo ya nsuka. Eʹros, to lolango ya mwasi ná mobali, esalelami te na Makomami ya Grɛki ya boklisto, atako balobeli lolenge ya bolingo yango na Biblia.Masese 5:15-20.

^ par. 15 Na Makomami basaleli mpe elobeli ya ndenge yango na bisika mosusu. Na ndakisa, “Nzambe azali pole” mpe “Nzambe . . . azali . . . mɔtɔ oyo ezikisaka.” (1 Yoane 1:5; Baebele 12:29) Wana ezali bobele maloba ya elilingi, mpamba te na bavɛrsɛ yango bakokanisi Yehova na biloko. Yehova azali lokola pole, mpamba te azali mosantu mpe semba. “Molili,” to mbindo moko te ezali na kati na ye. Mpe ebongi bákokanisa ye na mɔtɔ mpo akoki kosalela nguya na ye mpo na kobebisa.