Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 25

“Mawa monene ya Nzambe na biso”

“Mawa monene ya Nzambe na biso”

1, 2. (a) Mama asalaka nini soki mwana na ye abandi kolela? (b) Likambo nini eleki mawa oyo mama ayokelaka mwana na ye?

NA KATIKATI ya butu, mwana abandi kolela. Mbala moko, mama na ye alamuki. Kobanda mwana yango abotami, mama alalaka lisusu mpenza mpɔngi ya malonga te. Ayebi ete lolenge mokomoko ya kolela ya mwana na ye ezali na ntina na yango. Na yango, mbala mingi ayebaka soki mwana alingi bámɛlisa ye, bábondela ye to básalela ye likambo moko. Ata soki mwana aleli mpo na nini, mama akoya epai na ye. Akokaka kokanga motema te ntango mwana azali kolela.

2 Mawa oyo mama ayokelaka mwana oyo ye aboti ezali moko ya makambo oyo bato bayokaka oyo emonisaka bolingo makasi mpenza. Nzokande, ezali na likambo mosusu oyo eleki yango: motema mawa monene ya Nzambe na biso, Yehova. Kotalela ezaleli malamu wana ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Yehova. Na yango, tótalela ndimbola ya motema mawa mpe ndenge Nzambe amonisaka yango.

Motema mawa ezali nini?

3. Liloba ya Liebele oyo ebongolami “komonisela moto motema mawa” ezali na ndimbola nini?

3 Na Biblia, maloba mingi ya Liebele mpe ya Grɛki elimboli motema mawa monene; na ndakisa, verbe ya Liebele raḥam. Buku moko elobi ete verbe yango “emonisaka mawa monene mpenza, lokola oyo toyokaka ntango tomoni bato oyo tolingaka mingi basili makasi to bazali komona mpasi to basengeli na lisalisi na biso.” Liloba wana ya Liebele, oyo Yehova mpe asaleli, ezali ndeko ya liloba oyo ebongolamaka na “matrisi” mpe bakoki kolimbola yango lokola “mawa oyo mama ayokelaka mwana na ye.” *Exode 33:19; Yilimia 33:26.

“Mwasi akoki nde kobosana . . . mwana mobali ya libumu na ye?”

4, 5. Ndenge nini Biblia esaleli bolingo oyo mama alingaka mwana na ye ya moke mpo na koteya biso motema mawa ya Yehova?

 4 Biblia esalelaka bolingo oyo mama alingaka mwana na ye mpo na koteya biso ndimbola mpenza ya motema mawa ya Yehova. Na Yisaya 49:15 totángi boye: “Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo anungi ye naino? Ayoka mawa [raḥam] lisusu te mpo na mwana mobali ya libumu na ye? Ata baoyo bakobosana nde ngai nakobosana yo te.” Maloba wana ezali kosimba mpenza motema mpamba te ezali komonisa bonene ya motema mawa ya Yehova mpo na bato na ye. Ndenge nini?

5 Ezali mpasi kokanisa ete mama abosana koleisa mpe kobatela mwana oyo ye azali naino komɛlisa mabɛlɛ. Mpamba te, mwana moke akoki soki moke te kokokisa bamposa na ye ye moko; butu moi esengeli mama na ye atyela ye likebi mpe alinga ye. Nzokande, likambo ya mawa, toyokaka ete bamama mosusu babatelaka bana na bango malamu te, mingi mpenza na “bantango ya ndenge mosusu” oyo tozali, oyo bato mingi bazangi “bolingo ya libota.” (2 Timote 3:1, 3) Yehova alobi ete: “Nde ngai nakobosana yo te.” Yehova azangaka soki moke te komonisela basaleli na ye motema mawa oyo azalaka na yango mpo na bango. Yango ezali bolingo ya makasi mpenza koleka mawa oyo mama ayokelaka mwana na ye ya moke. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te soki moto moko oyo alimbolaka Biblia alobaki mpo na Yisaya 49:15 boye: “Wana ezali moko ya lolenge oyo eleki makasi, ntango mosusu lolenge oyo eleki makasi, oyo Nzambe amonisi bolingo na ye na Testama ya Kala.”

6. Lolenge nini bato mingi ya kozanga kokoka batalelaka ezaleli ya motema mawa, kasi ndenge nini Yehova akitisi biso motema?

6 Kozala na motema mawa monene ezalaka elembo ya bolɛmbu? Ebele ya bato ya kozanga kokoka bakanisaka bongo. Na ndakisa Moloma moko na nkombo Sénèque, filozofe moko na ntango ya Yesu mpe moko ya bato ya mayele mingi na Loma, ateyaki ete “koyoka mawa ezali bolɛmbu.”  Sénèque azalaki kokɔtela filozofi ya Basetoa (stoïcisme), oyo ezalaki kosɛnga kozala na kimya ya makanisi mpe koboya komonisa esengo to mawa mpe bongo na bongo. Sénèque alobaki ete moto ya bwanya akoki kosalisa moto oyo azali na mpasi, kasi asengeli te koyokela ye mawa, mpamba te mawa ekoki kolongola kimya na makanisi na ye. Makanisi ya ndenge wana oyo ezalaki kotinda bato bátalelaka kaka bamposa na bango moko ezalaki kopesa nzela te na koyokela basusu mawa ya solosolo. Yehova azalaka bongo soki moke te. Na Liloba na ye, Yehova akitisi biso motema ete “azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Ndenge tokomona yango, motema mawa ezali bolɛmbu te, ezali nde ezaleli moko ya ntina mingi. Tótala sikoyo ndenge oyo Yehova, tata na biso ya bolingo, amonisaka yango.

Ntango Yehova amoniselaki ekólo moko motema mawa

7, 8. Mpasi nini Bayisalaele bamonaki na Ezipito, mpe Yehova asalaki nini mpo na bango?

7 Motema mawa ya Yehova ezali komonana polele na lolenge oyo asalaki epai na ekólo ya Yisalaele. Na nsuka ya ekeke ya 16 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bamilio na bamilio ya Bayisalaele bazalaki na boombo na Ezipito, esika bazalaki konyokwama mabe mpenza. Baezipito “bazalisaki mikolo na bango na mpasi mpo na misala makasi na biliki mpe na pɔtɔpɔtɔ.” (Exode 1:11, 14) Kati na mpasi na bango, Bayisalaele balelaki epai na Yehova mpo asalisa bango. Nzambe ya motema mawa monene ayokaki ndenge nini?

8 Ayokaki mawa. Alobaki ete: “Ngai nasili komona monyoko ya bato na ngai na Ezipito mpe nayoki kolela na bango na ntina na bakapita na bango. Nayebi bolɔzi na bango.”  (Exode 3:7) Yehova akokaki te komona mpasi ya bato na ye to koyoka kolela na bango kozanga koyokela bango mawa. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 24, Yehova azali Nzambe oyo amityaka na esika ya bato. Mpe ezaleli yango ya komitya na esika ya basusu ezali ndeko ya motema mawa. Kasi Yehova ayokelaki bato na ye kaka mawa mpamba te; asalisaki mpe bango. Yisaya 63:9 elobi ete: “Na bolingo na ye mpe na mawa na ye asikolaki bango.” Na “lobɔkɔ ya nguya,” Yehova abikisaki Bayisalaele na Ezipito. (Deteronome 4:34) Nsima na yango, apesaki bango bilei na ndenge ya likamwisi mpe akɔtisaki bango na mokili moko ya mabelé malamu oyo ekómaki ya bango.

9, 10. (a) Mpo na nini Yehova azalaki mbala na mbala kobikisa Bayisalaele nsima ya kokɔta na bango na Mokili ya Ndaka? (b) Na mikolo ya Yefeta, Yehova abikisaki Bayisalaele na monyoko nini, mpe nini etindaki ye asala bongo?

9 Motema mawa ya Yehova esukaki wana te. Ntango Bayisalaele bafandaki na Mokili ya Ndaka, bamonaki lisusu mpasi mpo, mbala na mbala, bazalaki kotikala sembo te epai ya Yehova. Kasi na nsima, bazalaki kozwa lisusu makanisi malamu mpe kolelela Yehova. Ntango bazalaki kosala bongo, azalaki kobikisa bango. Mpo na nini? “[Mpamba te] ayokelaki bato na ye mawa.”2 Ntango 36:15; Basambisi 2:11-16.

10 Kanisá likambo oyo esalemaki na mikolo ya Yefeta. Lokola Bayisalaele bamipesaki na banzambe ya lokuta, Yehova atikaki Baamona bányokola bango mbula 18. Nsukansuka Bayisalaele babongolaki motema. Biblia eyebisi biso ete: “Balongolaki banzambe ya bapaya na kati na bango mpe basalelaki [Yehova]. Bongo ekokaki na ye lisusu te kotala mawa na Yisalaele.” (Basambisi 10:6-16) Ntango kaka bato na ye babongolaki motema na ndenge ya solosolo, Yehova akokaki lisusu kokanga motema te komona bango na mpasi. Yango wana, Nzambe ya motema mawa monene apesaki Yefeta nguya ya kobikisa Bayisalaele na mabɔkɔ ya banguna na bango.Basambisi 11:30-33.

11. Makambo nini toyekoli na kotalela makambo oyo Yehova asalelaki Bayisalaele?

 11 Lolenge oyo Yehova asalaki epai na ekólo ya Yisalaele eteyi biso makambo nini oyo etali motema mawa monene? Ya liboso, tomoni ete yango esuki te kaka na koyoka mawa ntango tomoni basusu bazali na mpasi. Kanisá lisusu ndakisa ya mama oyo motema mawa etindaka ye atyela mwana na ye oyo azali kolela likebi. Ndenge moko mpe, Yehova akangaka matoi te na kolela ya bato na ye. Motema mawa monene na ye etindaka ye asala ete mpasi na bango ekita mwa moke. Lisusu, lolenge oyo Yehova asalaki epai na Bayisalaele eteyi biso ete motema mawa ezalaka bolɛmbu soki moke te, mpamba te ezaleli wana etindaki ye na kobunda mpo na kobikisa bato na ye. Kasi, Yehova amonisaka motema mawa kaka na lisangá mobimba ya basaleli na ye?

Yehova amoniselaka moto mokomoko motema mawa

12. Ndenge nini Mibeko emonisaki ete Yehova amoniselaka moto mokomoko motema mawa?

12 Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo ya Yisalaele emonisi motema mawa oyo amoniselaka moto mokomoko. Tózwa ndakisa ya ndenge azalaki komibanzabanza mpo na babola. Yehova ayebaki ete makambo ekanami te ekokaki kokómisa Moyisalaele mobola. Basengelaki kosalela babola nini? Yehova apesaki Bayisalaele lilako polele ete: “Okokanga motema na yo te mpe okokanga lobɔkɔ na yo te epai ya mobola ndeko na yo. Okopesa ye na motema malamu, mpe motema na yo ekoimaima te wana ekopesa yo ye, mpo ete na ntina na oyo [Yehova] Nzambe na yo akopambola yo na misala na yo nyonso.” (Deteronome 15:7, 10) Yehova apesaki lisusu bango lilako ete bábuka te mbuma nyonso oyo ezali pembenipembeni ya bilanga na bango to bálɔkɔta te biloko oyo etikalaki na elanga nsima ya kobuka mbuma. Biloko yango ezalaki mpo na babola. (Levitike 23:22; Luta 2:2-7) Ntango bato ya Yisalaele bazalaki kotosa mibeko wana ya boboto, babola  oyo bazalaki na ekólo yango bakokaki te kosɛngasɛnga biloko ya kolya. Yango emonisaki ete Yehova azali mpenza na motema mawa monene, boye te?

13, 14. (a) Ndenge nini maloba ya Davidi ezali kokitisa biso motema ete Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na mokomoko na biso? (b) Ndenge nini tokoki komonisa na nzela ya ndakisa moko ete Yehova azalaka penepene na baoyo ‘mitema na bango etutami’ to ‘elimo na bango enyatami’?

13 Lelo mpe, Nzambe na biso ya bolingo amibanzabanzaka makasi mpo na mokomoko na biso. Tokoki solo kondima ete ayebi malamu mpasi nyonso oyo ezali konyokola biso. Mokomi ya nzembo Davidi akomaki ete: “Miso ya [Yehova] ekotalaka bato ya boyengebene mpe matoi na ye ekoyokaka koganga na bango. [Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na [elimo] enyatami.” (Nzembo 34:15, 18) Molimboli moko ya Biblia alobi boye mpo na baoyo balobelami na bavɛrsɛ wana: ‘Bazalaka na motema etutami mpe na elimo ya mawa, elingi koloba bamonaka ete basambwe mpo na lisumu mpe ete bazali lisusu na kilo te; bango moko bamimonaka ete bazali na ntina te.’ Bato ya ndenge yango bakanisaka ntango mosusu ete Yehova azali mpenza mosika na bango mpe ete bazali mpenza na ntina moko te mpo akanisa bango. Kasi ezali mpenza bongo te. Maloba wana ya Davidi ezali kondimisa biso ete Yehova asundolaka te baoyo “bamimonaka ete bazali na ntina te.” Nzambe na biso ya motema mawa ayebi malamu ete na ntango ya ndenge wana, tozalaka na mposa na ye koleka, mpe azalaka penepene na biso.

14 Talá likambo oyo. Na États-Unis, mama ya mwana moko ya mobali ya mbula mibale amemaki ye mbangu na lopitalo mpo azalaki na bokɔnɔ ya mongongo oyo ekangaka mpema. Nsima ya kosala ye ekzamɛ, minganga bayebisaki mama yango ete bakotikala na mwana butu mobimba na lopitalo. Mama wana alalaki wapi? Na lopitalo na kiti, pembeni ya mbeto ya mwana na ye! Lokola mwana na ye azalaki kobɛla, asengelaki kozala pene na ye. Na ntembe te tokoki kotya motema  ete Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo akosala kutu koleka wana! Kutu tosalemi nde na elilingi na ye. (Genese 1:26) Maloba ya kosimba motema oyo ezali na Nzembo 34:18 eyebisi biso ete ntango ‘mitema na biso etutami’ to ‘elimo na biso enyatami,’ Yehova—tata ya bolingo—“azali penepene,” azali ntango nyonso na motema mawa mpe pene na kosalisa biso.

15. Ndenge nini Yehova asalisaka mokomoko na biso?

15 Bongo, ndenge nini Yehova asalisaka mokomoko na biso? Ntango mosusu alongolaka te likambo oyo ezali kopesa biso mpasi. Kasi azwi bibongiseli mingi mpo na kosalisa baoyo bazali kolelela ye. Liloba na ye Biblia epesaka toli ya malamu oyo ekoki kosalisa mingi. Na lisangá, Yehova atye bakɛngɛli oyo bazali na makoki ya elimo, oyo basalaka makasi mpo na komonisa motema mawa na ye na ndenge basalisaka baninga na bango bandimi. (Yakobo 5:14, 15) Lokola azali “Moyoki-Mabondeli” apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.’ (Nzembo 65:2; Luka 11:13) Elimo yango ekoki kotondisa biso na “nguya oyo eleki makasi” mpo tókoba koyika mpiko kino ntango Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano nyonso oyo etungisaka biso. (2 Bakolinti 4:7) Tozali na botɔndi te mpo na bibongiseli nyonso wana? Tóbosanaka te ete bibongiseli yango emonisaka nde motema mawa monene ya Yehova.

16. Wapi likambo oyo Yehova asalaki oyo emonisaki motema mawa na ye na ndenge eleki monene, mpe ndenge nini yango etali mokomoko na biso?

16 Kasi, Yehova amonisaki motema mawa na ndenge oyo eleki monene ntango apesaki Moto oyo alingaki mingi lokola lisiko mpo na biso. Bolingo nde etindaki Yehova amipimela bongo, mpe lisiko yango efungweli biso nzela ya lobiko. Kobosana te, lisiko yango etali mokomoko na biso. Zekaria, tata ya Yoane Mobatisi, asakolaki na ntina mpenza ete likabo yango ekokumisa “mawa monene ya Nzambe na biso.”Luka 1:78.

 Ntango Yehova aboyaka komonisa motema mawa

17-19. (a) Ndenge nini Biblia emonisi ete motema mawa ya Yehova ezalaka na nsuka? (b) Nini esalaki ete motema mawa oyo Yehova azalaki komonisela bato na ye ekóma na nsuka?

17 Tosengeli nde kokanisa ete motema mawa monene ya Yehova ezalaka na nsuka te? Soki moke te. Kutu, Biblia emonisi polele ete Yehova aboyaka na ntina komonisa motema mawa epai ya bato oyo baponi kotɛmɛla nzela na ye ya boyengebene. (Baebele 10:28) Mpo na koyeba ntina oyo asalaka bongo, tókamata lisusu ndakisa ya ekólo ya Yisalaele.

18 Atako Yehova abikisaki Bayisalaele mbala na mbala na mabɔkɔ ya banguna na bango, nsukansuka motema mawa na ye ekómaki na nsuka. Bato wana ya motó makasi bamipesaki na kosambela bikeko, kutu bamemaki ata bikeko na bango ya mbindo kino na kati ya tempelo ya Yehova! (Ezekiele 5:11; 8:17, 18) Lisusu, bayebisi biso boye: “Bazalaki kosɛka bantoma ya Nzambe mpe kotyola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye; nkanda ya [Yehova] epelisami liboso na bato na ye, kino akokaki kotika lisusu te.” (2 Ntango 36:16) Bayisalaele bakómaki na esika oyo ntina mpenza ya komonisela bango motema mawa ezalaki lisusu te, mpe batumolaki nkanda ya sembo ya Yehova. Yango esukelaki bango ndenge nini?

19 Yehova akokaki lisusu komonisela bato na ye motema mawa te. Asakolaki boye: “Nakoyoka mawa te, nakotika te, nakozala na boboto te kasi bobele kobebisa bango.” (Yilimia 13:14) Yango wana, Yelusaleme mpe tempelo na yango ebebisamaki, mpe bamemaki Bayisalaele na boombo na Babilone. Ezalaka mpenza nsɔmɔ soki basumuki bamikɔtisi na botomboki makasi mpe batindi Nzambe akóma na nsuka ya motema mawa na ye!Bileli 2:21.

20, 21. (a) Na mikolo na biso, nini ekosalema ntango motema mawa ya Nzambe ekokóma na nsuka? (b) Wapi likabo moko oyo ezali komonisa motema mawa ya Yehova tokotalela na mokapo oyo elandi?

20 Bongo lelo oyo? Yehova abongwani te. Mpo na motema mawa na ye, apesi Batatoli na ye mosala ya kosakola ‘nsango  malamu ya bokonzi’ na mabelé mobimba esika bato bazali. (Matai 24:14) Ntango bato ya motema sembo bayokaka, Yehova asalisaka bango bákanga ntina ya nsango yango. (Misala 16:14) Kasi mosala yango ekoumela libela te. Soki Yehova atiki mokili mabe oyo, na bobola mpe mpasi na yango, ekoba kozanga nsuka, ekomonisa ete azali na motema mawa te. Ntango motema mawa ya Yehova ekokóma na nsuka na yango, akopesa ebongiseli ya makambo ya ntango oyo etumbu. Ata bongo, akosala ndenge wana nde mpo na komonisa motema mawa na ye—motema mawa mpo na ‘nkombo mosantu’ na ye mpe mpo na basaleli na ye ya sembo. (Ezekiele 36:20-23) Yehova akolongola mabe nyonso mpe akotya mokili ya sika ya boyengebene. Mpo na bato mabe, Yehova alobi ete: “Liso na ngai ekotala na mawa te, mpe nakomonisa motema mawa te. Na ntembe te, nakozongisa etamboli na bango likoló na motó na bango.”Ezekiele 9:10.

21 Wana Yehova azali naino kozela, ayokelaka bato mawa, ata baoyo bazali na nzela ya kobomama. Basumuki oyo bazali mpenza kobongola motema bakoki kozwa litomba na likabo moko oyo ezali mpenza komonisa motema mawa ya Yehova: kolimbisama ya masumu. Na mokapo oyo elandi, tokotalela bandakisa ya malamu oyo ezali na Biblia oyo emonisi ete Yehova alimbisaka masumu na motema moko.

^ par. 3 Nzokande, na Nzembo 103:13, liloba ya Liebele ra·chamʹ elakisi mawa oyo tata ayokelaka bana na ye.