Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 30

“Bókoba kotambola na kati ya bolingo”

“Bókoba kotambola na kati ya bolingo”

1-3. Tokozwa nini soki tomekoli Yehova na likambo etali komonisa bolingo?

“ESENGO ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Maloba oyo ya Yesu emonisi polele solo oyo ya ntina mingi: Bolingo oyo ezangi moimi ezalaka na lifuti na yango. Atako ezalaka mpenza esengo soki bamoniseli biso bolingo, nzokande ezalaka kutu esengo koleka soki biso tomoniseli bato mosusu bolingo.

2 Moto moko te ayebi likambo yango koleka Tata na biso ya likoló. Ndenge tomonaki na mikapo oyo eleki, na eteni oyo, Yehova nde azali ndakisa oyo eleki nyonso na likambo etali bolingo. Moto mosusu naino amonisá bolingo na ndenge ya malamu to na ntango molai koleka ye te. Na yango, ezali nde likambo ya kokamwa soki babengi ye “Nzambe ya esengo”?1 Timote 1:11.

3 Nzambe na biso ya bolingo alingi tómekola ye, mingi mpenza na likambo etali komonisa bolingo. Baefese 5:1, 2 eyebisi biso boye: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana balingami, mpe bókoba kotambola na kati ya bolingo.” Soki tomekoli Yehova na likambo etali komonisa bolingo, tokozwa esengo mingi oyo eutaka na kopesa. Tokozala mpe na esengo ya koyeba ete tozali kosepelisa Yehova, mpamba te Liloba na ye ezali kolendisa biso ‘tólingana biso na biso.’ (Baloma 13:8) Kasi ezali mpe na bantina mosusu oyo tosengeli ‘kokoba kotambola na kati ya bolingo.’

Mpo na nini bolingo ezali na ntina mingi?

4, 5. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tólinga baninga na biso bandimi na bolingo oyo esɛngaka komipimela?

4 Mpo na nini ezali na ntina mingi tólingaka baninga na biso bandimi? Na mokuse, mpo bolingo nde esimbi mpenza losambo ya baklisto ya solo. Soki tozangi bolingo, tokoki te kozala na boyokani ya malamu mpenza na baninga baklisto, mpe likambo eleki ntina, tokozala mpamba na miso ya Yehova. Liloba ya Nzambe emonisi polele ete ezali mpenza bongo, tótala yango.

 5 Na butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:34, 35) “Ndenge ngai nalingaki bino”—ɛɛ, tozwi etinda ya komonisa lolenge ya bolingo oyo Yesu amonisaki. Na Mokapo 29, tomonaki ete Yesu apesaki ndakisa ya malamu mpenza na likambo etali komonisa bolingo oyo esɛngaka komipimela, azalaki kotya bamposa mpe matomba ya bato mosusu liboso ya oyo ya ye. Biso mpe tosengeli komonisa bolingo ya ndenge wana, mpe tosengeli komonisa yango malamumalamu mpo ata bato oyo bazali baklisto te bámona yango. Ɛɛ, bolingo oyo elukaka liboso matomba ya bandeko nde ezali elembo oyo emonisaka polele ete tozali bayekoli ya solo ya Klisto.

6, 7. (a) Ndenge nini toyebi ete Liloba ya Yehova ezali kozwa na ntina mingi likambo ya komonisa bolingo? (b) Maloba ya Paulo na 1 Bakolinti 13:4-8 elobeli mpenza bolingo nini?

6 Bongo soki tozangi bolingo? Ntoma Paulo alobaki ete: “Soki . . . nazali na bolingo te, nakómi eteni ya ebende ya bronzɛ oyo ezali kolela to sɛmbalɛ oyo ezali kobɛta.” (1 Bakolinti 13:1) Sɛmbalɛ oyo ezali kobɛta esalaka matoi mpasi. Bongo eteni ya ebende ya bronzɛ oyo ezali kolela? Na mabongoli mosusu, balobi ete “ngonga oyo elelaka makasi.” Ndakisa wana ebongi mpenza! Moto oyo azangi bolingo azali lokola ebɛtɛli ya miziki oyo ezali kosala makɛlɛlɛ moko makasi oyo ezali kobengana bato na esika ya kobenda bango. Ndenge nini moto motindo wana akoki kozala na boyokani malamu na basusu? Paulo alobaki lisusu boye: “Soki nazali na kondima monene tii na kolongola bangomba mpe kotya yango epai mosusu, kasi nazali na bolingo te, nazali mpamba.” (1 Bakolinti 13:2) Kanisá naino, moto oyo azangi bolingo azali “mpamba,” ata soki asali misala nini! Emonani polele ete Liloba ya Yehova ezali kozwa likambo ya komonisa bolingo na ntina mingi, boye te?

7 Nzokande, ndenge nini tokoki komonisa ezaleli yango na kati ya boyokani na biso na bato mosusu? Mpo na koyanola  na motuna oyo, tótalela maloba ya Paulo oyo ezali na 1 Bakolinti 13:4-8. Likambo oyo alobeli mpenza na bavɛrsɛ oyo ezali te bolingo oyo Nzambe alingaka biso to bolingo oyo biso tolingaka ye. Kasi, alobeli mpenzampenza lolenge oyo tosengeli kolingana kati na biso. Alobeli mwa makambo oyo emonisaka bolingo mpe oyo emonisaka yango te.

Makambo oyo emonisaka bolingo

8. Ndenge nini motema molai ekoki kosalisa biso na boyokani na biso na basusu?

8 “Bolingo ezali na motema molai.” Kozala na motema molai elingi koloba kokanga motema na makambo ya basusu. (Bakolose 3:13) Tosengeli kozala na motema molai kati na biso, boye te? Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka elongo, tólinga tólinga te, na bantango mosusu, tokoki kosilikisana. Kasi kozala na motema molai ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mwa mabunga ya bandeko mosusu, kozanga kobebisa kimya ya lisangá.

9. Ndenge nini tokoki komonisa bato mosusu boboto?

 9 “Bolingo ezali . . . na boboto.” Boboto emonanaka na misala oyo esalisaka basusu mpe na maloba oyo emonisaka ete tozali komibanzabanza mpo na bango. Bolingo etindaka biso tóluka ndenge ya komonisa boboto, mingi mpenza epai ya baoyo bazali mpenza na mposa na yango. Na ndakisa, moninga moko mondimi oyo azali mobange akoki kozala mawamawa mpo azangi moto ya kosolola na ye mpe akoki kozala na mposa moto aya kotala ye mpo na kolendisa ye. Ndeko mwasi moko oyo azali kobɔkɔla bana ye ye moko to oyo mobali na ye azali mondimi te akoki kozala na mposa ya lisalisi. Ndeko moko oyo azali na maladi to oyo azali kokutana na mikakatano akoki kozala na mposa ya koyoka maloba ya boboto na monɔkɔ ya moninga moko ya sembo. (Masese 12:25; 17:17) Soki tozwi likanisi ya komonisa boboto na ndenge yango, tokomonisa ete tozali mpenza na bolingo ya solosolo.2 Bakolinti 8:8.

10. Ndenge nini bolingo esalisaka biso tókɔtela solo mpe tóloba yango ata soki ezali mpasi kosala bongo?

10 “Bolingo . . . esepelaka nde na solo.” Libongoli mosusu elobi ete: “Bolingo . . . emityaka na esengo nyonso na ngámbo ya solo.” Bolingo etindaka biso tókɔtela solo mpe ‘tólobaka solo moto na moto na mozalani na ye.’ (Zekalia 8:16) Na ndakisa, soki moto moko oyo tolingaka mingi asali lisumu monene, bolingo oyo tolingaka Yehova—mpe moto yango—ekosalisa biso tósimba mitinda ya Nzambe na esika ya komeka kobomba, kolongisa moto yango, to ata koloba lokuta na likambo ya lisumu yango. Ya solo, ekoki kozala mpasi mpo na kondima likambo yango. Kasi soki tokanisi bolamu ya moto yango oyo tolingi mingi, tokolinga azwa mpe andima disipilini mpo yango ezali elembo ya bolingo ya Nzambe. (Masese 3:11, 12) Biso baklisto oyo tozali na bolingo, tosengeli mpe kozala na mposa ya “komitambwisa na bosembo na makambo nyonso.”Baebele 13:18.

11. Lokola bolingo “ekangaka motema na makambo nyonso,” tosengeli kosalaka nini mpo na mabunga ya baninga na biso bandimi?

11 “Bolingo . . . ekangaka motema na makambo nyonso.” Maloba oyo elimboli mpenzampenza ete “biloko nyonso [bolingo] ezipaka.” (Kingdom Interlinear) Na 1 Petelo 4:8, Biblia elobi ete:  “Bolingo ezipaka ebele ya masumu.” Ɛɛ, moklisto oyo atambwisami na bolingo alukaka te kobimisa bolɛmbu mpe mabunga nyonso ya bandeko na ye baklisto. Mbala mingi, mabunga ya baninga bandimi ezalaka ya mikemike mpe bolingo ekoki kozipa yango.Masese 10:12; 17:9.

Bolingo etindaka biso tótyela bandeko na biso motema

12. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki ete atyelaki Filemona motema ete akosala oyo eleki malamu, mpe ndakisa ya Paulo ekoki koteya biso nini?

12 “Bolingo . . . endimaka makambo nyonso.” Biblia ya Moffat elobi ete bolingo ezalaka “ntango nyonso na mposa makasi ya kondima makambo oyo eleki malamu.” Tokaniselaka te baninga na biso bandimi mabe kaka mpamba, totyaka ntembe te na makanisi oyo etindaka bango básala boye to boye. Bolingo esalisaka biso ‘tóndima makambo oyo eleki malamu’ na ntina na bandeko na biso mpe tótyela bango motema. * Talá ndakisa moko na mokanda oyo Paulo atindelaki Filemona. Paulo akomaki yango mpo na kolendisa Filemona ayamba na boboto moombo na ye Onezime oyo akimaki ye, mpe oyo na nsima akómaki moklisto. Na esika ya kosɛnga Filemona asala likambo yango na makasi, Paulo abondelaki ye na bolingo nyonso. Amonisaki ndenge atyaki motema ete Filemona akosala oyo ezali malamu, na maloba oyo: “Kotyáká motema ete okondima, nazali kokomela yo, koyebáká ete okosala ata koleka makambo oyo nalobi.” (Vɛrsɛ 21) Ntango bolingo etindi biso tómonisa ete totyelaka bandeko na biso motema bongo, tokosalisa bango bázala lisusu malamu koleka.

13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozalaka na elikya ete makambo ya bandeko na biso ekozala malamu?

13 “Bolingo . . . elikyaka makambo nyonso.” Se ndenge bolingo etyelaka bato motema, ezalaka mpe na elikya. Lokola totambwisami na bolingo, tozali na elikya ete makambo ya bandeko na biso ekozala malamu. Na ndakisa, soki ndeko moko “abɛti libaku liboso ete ayeba yango,” tozalaka na elikya ete akondima milende  oyo ekosalema na bolingo nyonso mpo na kozongisa ye na nzela ya malamu. (Bagalatia 6:1) Tozalaka mpe na elikya ete baoyo kondima na bango elɛmbi bakozonga lisusu makasi. Epai ya bandeko ya ndenge wana, tozalaka na motema molai, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bákóma makasi na kondima. (Baloma 15:1; 1 Batesaloniki 5:14) Ata soki moto moko oyo tolingaka mingi abungi nzela, tolongolaka elikya te ete mokolo mosusu akozongela makanisi malamu mpe akozongela Yehova, lokola mwana ya kilikili na ndakisa oyo Yesu apesaki.Luka 15:17, 18.

14. Makambo nini ekoki kosɛnga tóyikela yango mpiko na kati ya lisangá, mpe ndenge nini bolingo ekosalisa biso na makambo yango?

14 “Bolingo . . . eyikaka mpiko na makambo nyonso.” Koyika mpiko esalisaka biso tótɛlɛma ngwi ata soki bayokisi biso mawa to tokutani na mikakatano. Makambo yango oyo esɛngaka tóyika mpiko eutaka kaka libándá ya lisangá te. Na bantango mosusu, tokoki komekama na kati ya lisangá. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ekoki kokóma ete bandeko na biso báyokisa biso mawa. Maloba oyo ndeko akanisi malamu te ekoki kozokisa biso. (Masese 12:18) Mbala mosusu, bataleli likambo moko ya lisangá te na ndenge tokanisaki. Etamboli ya ndeko moko oyo bapesaka limemya mingi ekoki kosilikisa biso, kotinda biso na komituna, ‘Ndenge nini moklisto akoki kosala boye?’ Soki tokutani na makambo ya ndenge wana, tokokima lisangá mpe tokotika kosalela Yehova? Te, tokosala bongo te soki tozali na bolingo! Bolingo ekopekisa biso komonaka kaka mabunga ya ndeko na biso mpe kozanga komona makambo malamu oyo ezali epai na ye to na lisangá mobimba. Bolingo esalisaka biso tótikala sembo epai ya Nzambe mpe tópesaka mabɔkɔ na misala ya lisangá ata soki moto moko ya kozanga kokoka alobi to asali likambo nini.Nzembo 119:165.

Makambo oyo emonisaka bolingo te

15. Zuwa ya mabe ezali nini, mpe ndenge nini bolingo esalisaka biso na kobwaka ezaleli mabe wana?

15 “Bolingo ezali na zuwa te.” Zuwa ya mabe ekoki kotinda biso tólula biloko ya bato, mikumba oyo bazali na yango to makoki na bango. Zuwa ya ndenge wana elukaka kaka matomba ya moto  ye moko mpe ebebisaka makambo; yango wana, soki topekisi yango te, ekoki kobebisa kimya ya lisangá. Nini ekosalisa biso tóboya ‘kobendama na likunya’? (Yakobo 4:5) Na mokuse, ezali bolingo. Ezaleli wana ya ntina mingi ekoki kosalisa biso na kosepela elongo na baoyo mbala mosusu na bomoi na bango bazali na biloko oyo tozangi. (Baloma 12:15) Bolingo ekosalisa biso tómona te lokola nde bafingi biso na ntango bakumisi ndeko moko mpo na mayele moko ya kokamwa oyo azali na yango to likambo moko monene oyo asali.

16. Soki tolingaka mpenza bandeko na biso, mpo na nini tokoboya komikumisa mpo na makambo oyo tozali kosala na mosala ya Yehova?

16 “Bolingo . . . emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te.” Bolingo epekisaka biso komilakisa mpo na mayele na biso to makambo minene oyo tosali. Soki tolingi mpenza bandeko na biso, ndenge nini tokolanda ntango nyonso komikumisa mpo na makambo malamu tosalaki na mosala ya kosakola to mpo na mikumba na biso na lisangá? Komikumisa ya ndenge yango ekoki kolɛmbisa bandeko, kotinda bango báyoka ete bazali mpamba liboso na biso. Bolingo epekisaka biso komikumisa mpo na makambo oyo Nzambe apesi biso tósala na mosala na ye. (1 Bakolinti 3:5-9) Kutu, bolingo “emivimbisaka na lolendo te,” to ndenge Bible na lingala ya lelo oyo elobi yango, bolingo “ezalaka na lofundo te.” Bolingo epekisaka biso kokanisa ete tozali na ntina koleka.Baloma 12:3.

17. Bolingo etindaka biso tómonisa limemya ya ndenge nini epai ya bato mosusu, mpe bongo etamboli ya lolenge nini tokoboya?

17 “Bolingo . . . emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te.” Moto oyo amitambwisaka na ndenge ya nsɔni asalaka makambo oyo ebongi mpenza te kosala to oyo ezokisaka bato. Etamboli ya ndenge wana emonisaka bolingo te, mpamba te emonisaka ete tozali mpenza kotalela mayoki mpe bolamu ya bato mosusu te. Nzokande, bonkonde oyo eutaka na bolingo etindaka biso tómemya bato mosusu. Bolingo etindaka moto azala na bonkonde, na bizaleli ya moto na Nzambe mpe limemya epai ya bandimi mosusu. Na yango, bolingo ekopesa biso nzela te ya kozala na “etamboli ya nsɔni”—ɛɛ, etamboli nyonso oyo ekotungisa to ekozokisa baklisto mosusu.Baefese 5:3, 4.

18. Mpo na nini moto oyo azali na bolingo asɛngaka te ete makambo nyonso esalema ndenge ye alingi?

 18 “Bolingo . . . elukaka matomba na yango moko te.” Libongoli mosusu elobi ete: “Bolingo etingamaka na makanisi na yango moko te.” Moto oyo azali na bolingo asɛngaka te ete makambo nyonso esalema ndenge ye alingi, lokola nde makanisi na ye ezalaka ntango nyonso malamu. Alukaka te kosalela mayele na ye ya kondimisa mpo na kotya baoyo bakeseni na ye makanisi mpanzi likoló kino bakondima makanisi na ye. Kozala motó makasi bongo emonisaka mwa lolendo, nzokande Biblia elobi ete: “Lolendo [ezalaka] liboso ya kobeba.” (Masese 16:18) Soki tolingaka solo bandeko na biso, tokomemya makanisi na bango, mpe soki ekoki, tokondima kolanda oyo balobi. Kondima makanisi ya bato mosusu eyokani na maloba oyo ya Paulo: “Tiká moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”1 Bakolinti 10:24.

19. Ndenge nini bolingo esalisaka biso tóyeba ndenge ya kosala ntango basaleli biso mabe?

19 “Bolingo . . . esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te.” Bolingo esilikaka nokinoki te na makambo oyo bato mosusu balobi to basali. Toboyi te, ekómelaka biso nyonso tósilika soki bato basaleli biso mabe. Kasi ata soki likambo moko esilikisi biso, bolingo etikaka biso te tóumela na nkanda. (Baefese 4:26, 27) Tokobomba te maloba to makambo nyonso oyo eswaki biso lokola nde tokomi yango na buku mpo tóbosana yango te. Kasi, bolingo etindaka biso nde na komekola Nzambe ya bolingo. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 26, Yehova alimbisaka soki ntina ezali. Soki alimbisi biso, abosanaka, elingi koloba, akokanisa lisusu masumu wana te mpo na kopesa biso etumbu mpo na yango na mikolo ekoya. Tozali na botɔndi te ndenge Yehova abombaka mabe na motema te?

20. Tosengeli kosala nini soki ndeko moko moklisto akwei na lisumu mpe ememeli ye mpasi?

20 “Bolingo . . . esepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene.” Libongoli moko elobi ete: “Bolingo . . . esepelaka na masumu ya bato mosusu te.” Mosusu elobi boye: “Bolingo ezalaka na nsai te ntango bato mosusu babɛti libaku.” Bolingo esepelaka te na kozanga boyengebene, yango wana tokangaka miso te na  makambo ya mbindo ya lolenge nyonso. Tosalaka nini soki moninga moko moklisto akwei na lisumu mpe ememeli ye mpasi? Bolingo ekopekisa biso kosepela, lokola nde tozali koloba ‘Malamu! Azwi!’ (Masese 17:5) Nzokande, tosepelaka ntango ndeko moko oyo asalaki lisumu abandi kosala milende mpo azala lisusu makasi na elimo.

“Nzela oyo eleki nyonso”

21-23. (a) Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete “bolingo esilaka soki moke te”? (b) Tokotalela nini na mokapo ya nsuka?

21 “Bolingo esilaka soki moke te.” Paulo alingaki koloba nini? Soki totali mokapo oyo ezali liboso, tokomona ete azalaki kolobela makabo ya elimo oyo ezalaki epai ya baklisto ya liboso. Makabo yango ezalaki komonisa ete Nzambe andimi lisangá oyo eutaki kosalema sika. Nzokande, baklisto nyonso te nde bazalaki na likabo ya kobikisa  bato, kosakola makambo, to koloba minɔkɔ mosusu. Kasi, yango ezalaki na ntina te; mpamba te makabo yango esengelaki kosila na nsima. Nzokande, eloko mosusu nde esengelaki kotikala, eloko oyo moklisto nyonso azali na likoki ya kozala na yango. Ezalaki eloko moko ya ntina mingi mpe oyo ekoumela koleka makabo nyonso ya elimo. Paulo abengaki yango “nzela oyo eleki nyonso.” (1 Bakolinti 12:31) “Nzela [yango] oyo eleki nyonso” ezali nini? Bolingo.

Basaleli ya Yehova bayebanaka na bolingo oyo balinganaka kati na bango

22 Ya solo, bolingo ya boklisto oyo Paulo alobelaki “esilaka soki moke te,” elingi koloba, ekosuka ata mokolo moko te. Kino lelo, bolingo oyo elukaka libosoliboso bolamu ya bandeko ezali elembo oyo emonisaka bayekoli ya solo ya Yesu. Tomonaka bilembo ya bolingo wana na kati ya masangá ya basaleli ya Yehova na mabelé mobimba, boye te? Bolingo wana ekoumela seko, mpamba te Yehova alaki basaleli na ye ya sembo bomoi ya seko. (Nzembo 37:9-11, 29) Tólanda kosala makasi mpo na ‘kokoba kotambola na kati ya bolingo.’ Na ndenge yango, tokozwa esengo monene mpenza oyo eutaka na kopesa. Koleka wana, tokokoba kozala na bomoi—ɛɛ, tokokoba kolinga—libela na libela, lokola Yehova, Nzambe na biso ya bolingo.

23 Na mokapo ya nsuka ya eteni oyo elobeli bolingo, tolobeli ndenge oyo tokoki kolingana. Kasi na kotalela ndenge ebele oyo Yehova amoniselaka biso bolingo—nguya, bosembo mpe bwanya na ye—tosengeli komituna, ‘Ndenge nini nakoki komonisa Yehova ete nalingaka ye solo?’ Tokotalela motuna oyo na mokapo ya nsuka.

^ par. 12 Kasi, bolingo ya baklisto ekufá miso te, ezali bindimandima te. Biblia elendisi biso ete ‘tótya miso na baoyo bakɔtisaka bokabwani mpe makambo oyo ebɛtisaka libaku . . . , mpe tóboya kozala elongo na bango.’Baloma 16:17.