Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Pusaná penepene na Yehova

 MOKAPO 28

“Yo moko kaka nde ozali sembo”

“Yo moko kaka nde ozali sembo”

1, 2. Mpo na nini tokoki koloba ete Mokonzi Davidi ayebaki malamu eloko oyo babengi kozanga bosembo?

MOKONZI DAVIDI ayebaki malamu eloko oyo babengi kozanga bosembo. Na eleko moko, mayele mabe eningisaki bokonzi na ye oyo esilaki kokɔta na yikiyiki. Bato mosusu ya ekólo na ye mpenza bayokanaki mpo na kobɔtɔla ye bokonzi. Mpe, bato oyo tokoki koloba ete bazalaki baninga mpenza ya Davidi babalukelaki ye. Tózwa ndakisa ya Mikala, mwasi na ye ya liboso. Na ebandeli, “alingaki Davidi,” mpe na ntembe te azalaki kopesa ye mabɔkɔ na bokonzi na ye. Kasi na nsima, “atyolaki ye na motema na ye,” mpe atalelaki ye ‘lokola moto mpamba.’1 Samwele 18:20; 2 Samwele 6:16, 20.

2 Tólobela mpe Ahitofele, mopesi-toli mpenza ya Davidi. Bato bazalaki kosepela na toli na ye lokola nde euti na monɔkɔ ya Yehova. (2 Samwele 16:23) Kasi, na nsima, moto wana oyo Davidi azalaki kotyela motema abalukelaki ye mpe asanganaki na batomboki oyo bayokanaki mpo na kobɔtɔla Davidi bokonzi. Nani abimisaki botomboki yango? Abesaloma, mwana mpenza ya Davidi! Moto yango oyo asalelaki mayele mabe mpo na kozwa bokonzi ‘azalaki kozimbisa mitema ya bato ya Yisalaele,’ mpe amityaki mokonzi, mpo na kotɛmɛla tata na ye. Botomboki ya Abesaloma ekómaki makasi mpe Mokonzi Davidi akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye.2 Samwele 15:1-6, 12-17.

3. Davidi andimaki mpenza likambo nini?

3 Moto moko te atikalaki sembo epai ya Davidi? Na kati ya bampasi na ye nyonso, Davidi ayebaki solo ete moto moko ya sembo azali. Nani? Ezali Yehova. Davidi alobaki na Yehova ete “epai ya moto ya boboto [“sembo,” NW] okomimonisa na boboto [“sembo,” NW].” (2 Samwele 22:26) Bosembo ezali nini, mpe ndenge nini Yehova apesaka ndakisa oyo eleki malamu na likambo yango?

 Bosembo ezali nini?

4, 5. (a) “Bosembo” ezali nini? (b) Ndenge nini motema oyo batyelaka biloko oyo ezangi bomoi ekeseni na bosembo oyo moto amonisaka?

4 Na Makomami ya Liebele, liloba “bosembo” elimboli boboto oyo moto amonisaka na eloko oyo alingi tii mokano na ye mpo na eloko yango ekokokisama. Moto oyo azali sembo alingaka. Likambo ya kobenda likebi ezali ete mokomi ya nzembo abengaki sanza “motatoli ya sembo na likoló” mpamba te na butu nyonso emonanaka. (Nzembo 89:37) Awa balingi koloba ete tokoki kotyela sanza motema mpo ezangaka kobima te. Kasi sanza ekoki te kozala sembo lokola moto. Mpo na nini? Mpamba te, bosembo oyo moto amonisaka ezalaka nde elembo ya bolingo na ye, ezaleli oyo biloko ezalaka na yango te.

Sanza ebengami motatoli ya sembo, kasi bobele bikelamu ya bomoi oyo bizali na mayele nde bikoki komonisa mpenza bosembo ya Yehova

5 Na ndenge Makomami ezali kolobela yango, bosembo emonanaka na boninga. Komonisa bosembo elakisi ete boyokani ya malamu ezali kati na moto oyo amonisi yango mpe oyo bamoniseli ye yango. Bosembo ya ndenge wana ezalaka ntango nyonso. Ezali te lokola mbonge ya mai monene oyo ekendaka bipai nyonso mopɛpɛ ememaka yango. Kasi, bosembo, to bolingo ya sembo, eumelaka mpe ezalaka makasi; yango wana, elongaka ata mikakatano oyo eleki makasi.

6. (a) Na ndenge nini bosembo ezali mpenza komonana te lelo oyo, mpe ndenge nini Biblia emonisaki likambo yango? (b) Wapi lolenge ya koyeba bosembo malamumalamu, mpe mpo na nini?

 6 Ya solo, bosembo ya ndenge wana emonanaka mingi te lelo oyo. Mbala mingi, ata baninga ya motema bakómaka ‘pene na kosalana mabe.’ Mbala mingi mpe, toyokaka ete basi to mibali bazali kosundola babalani na bango. (Masese 18:24; Malaki 2:14-16) Bandakisa ya kozanga bosembo eleki mpenza mingi; na yango, tokoki koloba lokola mosakoli Mika ete: “Moto ya malamu [“sembo,” NW] alimwe kati na mokili.” (Mika 7:2) Atako mbala mingi bato bamonisaka motema-boboto to bosembo te, kasi Yehova atondi mpenza na ezaleli yango. Kutu, lolenge ya koyeba bosembo malamumalamu ezali bongo kotalela ndenge Yehova amonisaka ezaleli malamu wana ya bolingo na ye.

Moto moko te azali sembo lokola Yehova

7, 8. Mpo na nini ekoki kolobama ete kaka Yehova ye moko nde azali sembo?

7 Biblia elobi mpo na Yehova ete: “Yo moko kaka nde ozali sembo.” (Emoniseli 15:4) Na ndenge nini? Na bantango mosusu, bato ná baanzelu bamonisaki bosembo ya kokamwa te? (Yobo 1:1; Emoniseli 4:8) Bongo Yesu Klisto? Azali te “moto ya sembo” ya liboso ya Nzambe? (Nzembo 16:10) Bongo, ndenge nini ekoki kolobama ete kaka Yehova ye moko nde azali sembo?

8 Ya liboso, kobosana te ete bosembo ezali moko ya bizaleli oyo emonisaka bolingo. Lokola “Nzambe azali bolingo,” to bolingo ezali mpenzampenza bomoto na ye, nani mosusu akoki komonisa bosembo malamu koleka Ye? (1 Yoane 4:8) Ya solo, baanzelu ná bato bakoki komonisa bizaleli ya Nzambe, kasi kaka Yehova nde azali sembo koleka. Lokola azali “Mokóló ya Mikolo,” amonisi motema-boboto ntango molai koleka bikelamu nyonso ya mabelé mpe ya likoló. (Danyele 7:9) Na yango, na likambo ya komonisa bosembo, Yehova azali mpenza sukisa. Amonisaka ezaleli yango na ndenge  oyo ekelamu moko te ekoki komonisa. Tótalela mwa bandakisa.

9. Na ndenge nini Yehova azali ‘sembo na misala na ye nyonso’?

9 Yehova azali “na ngɔlu [“sembo,” NW] na misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:17) Ndenge nini? Nzembo 136 epesi eyano. Kuna balobeli misala mosusu ya kobikisa ya Yehova, lokola kobikisama monene ya Bayisalaele na Mbu Motane. Likambo ya ntina mingi, vɛrsɛ mokomoko ya loyembo yango ezali na maloba oyo ezali kopesa yango kilo: “Mpo ete boboto [to bosembo] na ye ezali mpo na libela.” Loyembo yango etyami mpe na Mituna mpo na komanyola na lokasa 289. Wana ozali kotánga bavɛrsɛ yango, okozanga te kokamwa na ndenge mingi oyo Yehova amonisaki bato na ye motema-boboto. Ɛɛ, Yehova amoniselaka basaleli na ye ya sembo bosembo na ndenge ayokaka bango ntango basɛngaka ye lisalisi, mpe na ndenge asalisaka bango na ntango oyo atye. (Nzembo 34:6) Bolingo ya sembo oyo Yehova amoniselaka basaleli na ye ebongwanaka te soki bazali kaka sembo epai na ye.

10. Ndenge nini Yehova amonisaka bosembo na oyo etali mitinda na ye?

10 Lisusu, Yehova amoniselaka basaleli na ye bosembo na ndenge alandaka ntango nyonso mitinda na ye. Yehova akeseni na bato ya bongolabongola, oyo batambwisami na bamposa mpe mayoki na bango; abongolaka te ndenge na ye ya kotalela malamu ná mabe. Na boumeli ya bambula nkóto na nkóto, ndenge na ye ya kotalela makambo lokola boyokani na bilimo mabe, losambo ya bikeko, mpe koboma bato ebongwani te. Na monɔkɔ ya mosakoli Yisaya, alobaki ete: “Kino ntango ya konuna, ngai oyo [“nazali se ndenge moko,” NW].” (Yisaya 46:4) Na yango, tokoki solo kotya motema ete tokozwa litomba soki tolandi toli ya polele ya Liloba na ye na oyo etali bizaleli.Yisaya 48:17-19.

11. Pesá bandakisa oyo emonisi ete Yehova akokisaka bilaka na ye.

11 Yehova amonisaka mpe bosembo ndenge akokisaka bilaka na ye nyonso. Soki asakoli likambo moko, esalemaka. Yango wana, Yehova alobaki ete: ‘Liloba oyo ekobima na  monɔkɔ na ngai; ekozongela ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo oyo ngai natindaki yango.’ (Yisaya 55:11) Yehova amonisaka bosembo epai ya basaleli na ye na ndenge akokisaka bilaka na ye. Atikaka bango te bázelaka na motema likoló eloko oyo akosala te. Eyebani mpenza malamu ete Yehova akokisaka bilaka na ye, yango wana Yosua alobaki boye: “Moko na ndaka malamu nyonso, oyo [Yehova] atyaki na ndako ya Yisalaele, ezangaki te. Yango ebimaki nyonso.” (Yosua 21:45) Na yango tokoki solo kotya motema ete ata mokolo moko te tokoyoka mawa mpo Yehova akozanga kokokisa bilaka na ye.Yisaya 49:23; Baloma 5:5.

12, 13. Na ndenge nini motema-boboto ya Yehova “ezali mpo na libela”?

12 Ndenge tomonaki mwa liboso, Biblia eyebisi biso ete motema-boboto ya Yehova “ezali mpo na libela.” (Nzembo 136:1) Na ndenge nini? Ya liboso, Yehova alimbisaka masumu mpo na libela. Ndenge Mokapo 26 emonisaki, Yehova alandelaka te masumu oyo asilá kolimbisa. Lokola “bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe,” biso nyonso tosengeli kozala na botɔndi mpamba te motema-boboto ya Yehova ezali mpo na libela.Baloma 3:23.

13 Kasi motema-boboto ya Yehova ezali mpo na libela mpe na ndenge mosusu. Liloba na ye elobi ete moyengebene “[akozala] lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokauka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” (Nzembo 1:3) Kanisá naino nzete moko monene oyo nkasa na yango ekaukaka ata mokolo moko te! Ndenge moko mpe, soki tozali solo kosepela na Liloba ya Nzambe, bomoi na biso ekozala molai, na kimya mpe na makambo mingi ya malamu. Mapamboli oyo Yehova apesaka basaleli na ye ya sembo na bosembo nyonso eumelaka libela. Ɛɛ, na mokili ya sika ya boyengebene oyo Yehova akoyeisa, akomonisela bato ya botosi motema-boboto na ye mpo na libela.Emoniseli 21:3, 4.

 Yehova “akosundola bato na ye ya sembo te”

14. Ndenge nini Yehova amonisaka botɔndi mpo na bosembo ya basaleli na ye?

14 Mbala na mbala Yehova amonisaki bosembo na ye. Lokola Yehova abongwanaka ata moke te, bosembo na ye epai ya basaleli na ye ya sembo elimwaka soki moke te. Mokomi ya nzembo akomaki ete: “Nazalaki elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo [akosɛngaka] kwanga. Mpo ete Yehova alingi sembo; [akosundola bato na ye ya sembo te].” (Nzembo 37:25, 28) Ya solo, ebongi básambela Yehova, mpamba te azali Mozalisi. (Emoniseli 4:11) Atako bongo, lokola Yehova azali sembo, atalelaka misala na biso ya bosembo na motuya mingi.Malaki 3:16, 17.

15. Limbolá ndenge oyo likambo oyo Yehova asalelaki Yisalaele emonisaki bosembo na ye polele.

15 Motema-boboto ya Yehova etindaka ye mbala na mbala asalisa bato na ye ntango bazali na mpasi. Mokomi ya nzembo ayebisi biso ete: “Ye akobatelaka bomoi ya bato na ye ya boyengebene [“sembo,” NW]; akobikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.” (Nzembo 97:10) Kanisá likambo asalelaki ekólo ya Yisalaele. Nsima ya kobikisama na bango na Mbu Motane na ndenge ya likamwisi, Bayisalaele bayembelaki Yehova boye: “Yo, na motema-boboto [to bolingo ya sembo] na yo okambaki bato oyo obikisaki.” (Exode 15:13) Na ntembe te, kobikisama na bango na Mbu Motane ezalaki elembo ya bolingo ya sembo ya Yehova. Yango wana, Moize ayebisaki Bayisalaele ete: “[Yehova] atyaki bolingo na ye na likoló na bino mpe aponaki bino mpo ete boleki mabota mosusu na motuya te, mpo ete boleki mabota mosusu nyonso na moke; kasi ezali mpo ete [Yehova] alingi bino mpe azali kokokisa ndai oyo esimbelaki ye batata na bino ete [Yehova] abimisaki bino na lobɔkɔ ya nguya, mpe asikolaki bino na ndako ya boombo, na lobɔkɔ ya [Farao] mokonzi ya Ezipito.”Deteronome 7:7, 8.

16, 17. (a) Ndenge nini Bayisalaele bazangaki mpenza komonisa botɔndi, atako bongo ndenge nini Yehova amoniselaki bango motema mawa? (b) Ndenge nini Bayisalaele mingi mpenza bamonisaki ete ‘bakokaki lisusu kobika te,’ mpe ndakisa nini ya kokebisa yango epesi biso?

 16 Kasi, ekólo ya Yisalaele emonisaki botɔndi te mpo na motema-boboto ya Yehova, mpamba te nsima ya kobikisama na bango “balekaki kosalela ye [Yehova] masumu, batombokaki na Oyo-Aleki-Likoló.” (Nzembo 78:17) Na boumeli ya bambula nkama na nkama, batombokaki mbala na mbala, bazalaki kotika Yehova mpo na kosambela banzambe ya lokuta mpe komipesa na mimeseno ya bapakano oyo ezalaki bobele kokómisa bango mbindo. Atako bongo, Yehova abukaki kondimana na ye te. Kasi nde, na monɔkɔ ya mosakoli Yilimia abondelaki bato na ye boye: ‘Ee Yisalaele, mozongi na nsima, bózonga lisusu . . . nakokweisa nkanda na ngai likoló na bino te, zambi ngai nazali na boboto [“sembo,” NW].’ (Yilimia 3:12) Nzokande, ndenge Mokapo 25 emonisaki, Bayisalaele mingi babongwanaki te. Kutu, “bazalaki kosɛka bantoma ya Nzambe mpe kotyola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye.” Basukaki ndenge nini? Nsukansuka, ‘nkanda ya Yehova epelisamaki liboso na bato na ye, kino [bakokaki kobika] lisusu te.’2 Ntango 36:15, 16.

17 Yango eteyi biso nini? Yehova amonisaka bosembo na ye epai ya moto nyonso te mpe bakoki kokosa ye te. Ezali solo ete Yehova “atondi na motema-boboto,” mpe asepelaka mpenza koyokela bato mawa soki ntina ezali. Bongo soki moto oyo asali lisumu azali moto mabe oyo alingi kobongwana te? Na ntango yango Yehova akolanda mitinda na ye ya boyengebene mpe akopesa ye etumbu. Ndenge bayebisaki Moize: “[Yehova] akozanga soki moke te kopesa etumbu.”Exode 34:6, 7.

18, 19. (a) Na ndenge nini etumbu oyo Yehova apesaka bato mabe ezali likambo ya bosembo? (b) Ndenge nini Yehova akomonisa bosembo na ye epai ya basaleli na ye oyo banyokwamaki kino liwa?

18 Etumbu oyo Nzambe apesaka bato mabe ezalaka mpe likambo ya bosembo. Ndenge nini? Moko ya makambo oyo emonisi yango ezali na mokanda ya Emoniseli epai Yehova apesi  baanzelu nsambo etinda oyo: “Bókende mpe bósopa basaani nsambo ya nkanda ya Nzambe na mabelé.” Ntango anzelu ya misato asopaki saani na ye “na bibale mpe na maziba ya mai,” yango ekómaki makila. Na nsima, anzelu yango alobaki na Yehova ete: “Yo, Oyo ozali mpe ozalaki, Moto ya sembo, ozali moyengebene, mpamba te ozwi bikateli wana, mpamba te basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli, mpe opesi bango makila bámɛla. Babongi na yango.”Emoniseli 16:1-6.

Na bosembo mpenza, Yehova akokanisa baoyo nyonso bamonisaki bosembo ata kino liwa mpe akosekwisa bango

19 Omoni ete ntango anzelu yango azali kopesa nsango wana ya kosambisa abengi Yehova “Moto ya sembo.” Mpo na nini? Mpamba te, ntango Yehova azali koboma bato mabe, azali nde komonisa bosembo epai ya basaleli na ye, oyo mingi na bango banyokwamaki kino liwa. Na bosembo nyonso, Yehova abombaka bato wana ya sembo malamumalamu na kati ya makanisi na ye. Ayokaka mposa makasi ya komona bango lisusu, mpe Biblia emonisi mpenza ete azali na mokano ya kopesa bango mbano; kosekwisa bango. (Yobo 14:14, 15) Yehova abosanaka basaleli na ye ya sembo te ata soki bazali lisusu na bomoi te. Kasi, “epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:37, 38) Mokano ya Yehova ya kozongisa na bomoi  baoyo bazali kati na makanisi na ye ezali elembo monene oyo emonisi bosembo na ye.

Bernard Luimes (awa na likoló) mpe Wolfgang Kusserow (na katikati) babomamaki na Banazi

Moses Nyamussua abomamaki na makonga na etuluku moko ya bato ya politiki

Bolingo ya sembo ya Yehova efungoli nzela na lobiko

20. Banani bazali “bambɛki ya mawa,” mpe ndenge nini Yehova amoniseli bango bosembo?

20 Na boumeli ya lisolo mobimba ya bato, Yehova amoniseli bato ya sembo bosembo na ye na ndenge ya kokamwa. Kutu, na boumeli ya bambula nkóto na nkóto Yehova ‘atiki nzela na motema molai mpenza na bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi.’ Mpo na nini? “Mpo akoka kolakisa bomɛngo ya nkembo na ye likoló ya bambɛki ya motema mawa, oyo asilaki kobongisa liboso mpo na nkembo.” (Baloma 9:22, 23) “Bambɛki ya motema mawa” wana ezali bato oyo bazali na ezaleli ebongi, oyo bapakolami na elimo santu mpo na koyangela elongo na Klisto na Bokonzi na ye. (Matai 19:28) Na ndenge  afungoleli bambɛki ya mawa yango nzela ya lobiko, Yehova atikali sembo epai ya Abalayama, oyo ye apesaki elaka na kondimana oyo basalaki ete: “Mabota nyonso na nse bakopambolama mpo na bana na yo, mpo ete yo osili kotosa monɔkɔ na ngai.”Genese 22:18.

Mpo na bosembo ya Yehova, basaleli na ye nyonso ya sembo bazali na elikya ya solosolo

21. (a) Ndenge nini Yehova amonisaka bosembo epai na “ebele ya bato” oyo bakobika na “bolɔzi monene”? (b) Bosembo ya Yehova ezali kotinda yo na kosala nini?

21 Yehova amonisi bosembo ndenge moko epai ya “ebele ya bato” oyo bakobika na “bolɔzi monene” mpe bakozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekokóma paladiso. (Emoniseli 7:9, 10, 14) Atako basaleli ya Yehova bazali bato ya kozanga kokoka, na bosembo nyonso azali kopesa bango libaku ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Ndenge nini? Na nzela ya lisiko, elembo ya monene mpenza ya bosembo na ye. (Yoane 3:16; Baloma 5:8) Bosembo ya Yehova ezali kobenda baoyo bazali na mposa ya boyengebene. (Yilimia 31:3) Ozali komimona mpenza pene na Yehova mpo na bosembo monene oyo amonisi mpe oyo akomonisa, boye te? Lokola tozali na mposa ya kopusana penepene na Nzambe, tiká ete tózala na ekateli makasi ya kosalela ye na bosembo mpenza mpo na komonisa ete tozali na botɔndi mpo na bolingo na ye.