Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Nsango malamu oyo euti na Nzambe!

 LITEYA 9

Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?

Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?

1. Mpo na nini libala esengeli kokomisama na Leta mpo libota ezala na esengo?

Nsango malamu euti epai ya Yehova, Nzambe ya esengo, oyo alingi ete mabota ezala na esengo. (1 Timote 1:11) Ye nde abandisaki libala. Ezali na ntina ete libala ekomisama na Leta mpo libota ezala na esengo, mpamba te yango esalaka ete bana bábɔkwama na esika moko oyo ekobatela bango. Bakristo basengeli kotosa mibeko ya mboka na oyo etali kokomisa libala na buku ya Leta.Tángá Luka 2:1, 4, 5.

Ndenge nini Nzambe atalelaka libala? Alingaka ete mwasi ná mobali oyo babalani báfanda libela. Yehova alingi ete mobali ná mwasi bázala sembo moko epai ya mosusu. (Baebre 13:4) Ayinaka koboma libala. (Malaki 2:16) Kasi, apesi bakristo nzela ya koboma libala mpe kobala lisusu kaka soki molongani moko asali ekobo.Tángá Matai 19:3-6, 9.

2. Bizaleli nini mwasi ná mobali basengeli komoniselana?

Yehova akelaki mobali ná mwasi mpo básalisanaka na libala. (Ebandeli 2:18) Lokola mobali azali mokonzi ya libota, ye nde azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya libota na ye, ata mpe koteyaka bato ya libota na ye makambo ya Nzambe. Asengeli mpenza kolinga mwasi na ye. Mobali mpe mwasi basengeli kolinganaka mpe kopesanaka limemya. Lokola mwasi ná mobali bazali bato ya kozanga kokoka, kolimbisana nde ekosalisa bango bázala na esengo na libala.Tángá Baefese 4:31, 32; 5:22-25, 33; 1 Petro 3:7.

3. Osengeli nde kokabwana na molongani na yo soki makambo ezali kosimba te?

Soki bozali na mikakatano na libala na bino, bino nyonso mibale bósala makasi mpo bósalelanaka makambo na boboto. (1 Bakorinti 13:4, 5) Liloba ya Nzambe elendisi te kokabwana  mpo na kosilisa mikakatano oyo ebimaka na libala.Tángá 1 Bakorinti 7:10-13.

4. Bana, Nzambe alingi nini mpo na bino?

Yehova alingi ete bózala na esengo. Apesaka bino toli oyo ekoki kosalisa bino bózala na esengo na bolenge na bino. Alingaka ete bózwa matomba na bwanya ya baboti na bino mpe na makambo oyo bakutaná na yango. (Bakolose 3:20) Yehova alingi mpe ete bóyoka esengo oyo eutaka na kosalela Mozalisi na bino ná Mwana na ye.Tángá Mosakoli 11:9–12:1; Matai 19:13-15; 21:15, 16.

5. Baboti, ndenge nini bana na bino bakoki kozala na esengo?

Bosengeli kosala nyonso mpo na koleisa bana na bino, kolatisa bango mpe kopesa bango esika ya kolala. (1 Timote 5:8) Kasi, mpo bana na bino bázala na esengo, bosengeli mpe koteya bango bálinga Nzambe mpe báyekola makambo na ye. (Baefese 6:4) Ntango bino moko bozali kolinga Nzambe, yango ekoki kotinda bana bálanda ndakisa na bino. Soki bozali kosalela Biblia mpo na koteya bana na bino, yango ekoki mpenza kobongisa makanisi na bango.Tángá Kolimbola Mibeko 6:4-7; Masese 22:6.

Bana basepelaka soki bozali kolendisa bango mpe kopesa bango longonya. Esengeli mpe kosembolaka mpe kopesaka bango disiplini. Kosala bongo esalisaka bana bálanda te nzela oyo ekobendela bango mikakatano. (Masese 22:15) Kasi, esengeli te konyokola bana to kosalela bango makambo makasimakasi ntango ozali kopesa bango disiplini.Tángá Bakolose 3:21.

Batatoli ya Yehova babimisaka babuku ndenge na ndenge mpo na kosalisa baboti mpe bana. Makanisi oyo ezali na babuku yango eutaka na Biblia.Tángá Nzembo 19:7, 11.